ISAIAH
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
43
44
45
46
47
48
49
50
51
52
53
54
55
56
57
58
59
60
61
62
63
64
65
66
Chapter 33
Isai | LinVB | 33:1 | Mawa na yo, mobebisi oyo babebisi te, mawa na yo, mosuli oyo moto moko asulaki te. Tango okosilisa kobebisa, bakobebisa yo mpe, tango okosilisa koteka bato, bakoteka yo mpe. | |
Isai | LinVB | 33:2 | E Yawe, yokela biso ngolu, tokolikya na yo. Ozala bokasi bwa biso banda ntongo, mpe libiki lya biso o mikolo mya mpasi. | |
Isai | LinVB | 33:4 | Bakosangisa biloko lokola mapalela makosalaka, bakowela byango lokola mbinzu ikowelaka nkasa. | |
Isai | LinVB | 33:6 | Yawe akoumisa bomoi bwa yo ; nkita ikobikisa yo, nde bwanya na boyebi. Bobangi Nzambe ezali nkita ya solo. | |
Isai | LinVB | 33:7 | Talani bato ba Ariel bakomi koga-nga o nzela, bantoma ba boboto baleli mpizoli ya mawa. | |
Isai | LinVB | 33:8 | Moto moko azali o balabala lisusu te, ata moto wa mobembo te. Baboyi bondeko bakataki, bakinoli banzeneneke, bamemyi lisusu moto moko te. | |
Isai | LinVB | 33:9 | Ekolo ekomi na mawa, bato balembi, Libano ebebi, ekomi na nsoni, mokili mwa Saron mokomi esobe, nzete ya Basan mpe ya Karmel ibungisi nkasa. | |
Isai | LinVB | 33:11 | Bomemi zemi lya matiti makauki, bokobota matiti, mpema ya ngai ezali móto mokosilisa bino. | |
Isai | LinVB | 33:13 | Bino bato bozali mosika, boyoka makambo nasali, bino bato bozali penepene, boyeba nguya ya ngai. » | |
Isai | LinVB | 33:14 | O Sion basumuki bakomi kobanga, nsomo enene ekangi bato babe. Nani wa biso ndakoki móto moye mokosilisa binso ? Nani akoki kofanda o móto makasi boye ? | |
Isai | LinVB | 33:15 | Bobele moto oyo akolandaka nzela ya bosembo mpe akolobaka makambo na bosolo, oyo akoboyaka mosolo mwa boyibi, oyo akotandaka loboko te mpo ya kozwa mabonza, oyo akokangaka matoi mpo ayoka maloba ma mobomi te mpe akokangaka miso mpo amono makambo mabe te, | |
Isai | LinVB | 33:16 | ye akofanda o mboka ya likolo, akobombama solo o ndako etongami o mabanga, akozwa mampa ma kolia mpe mai ma komele. | |
Isai | LinVB | 33:18 | Okokanisa lisusu makambo mayokisaki yo nsomo, okomilobela : « Wapi moto oyo azalaki kotanga mpe komeka bozito bwa biloko ? Wapi oyo azalaki kotanga bilenge ba mboka ? » | |
Isai | LinVB | 33:19 | Okomono lisusu bato ba lofundo wana te, baye bakolobaka lokota moto moko akoki koyeba te, lokota malonga te, lozali mpe na ntina te. | |
Isai | LinVB | 33:20 | Otalaka Sion, esika tosepelaki biyenga bya biso, miso ma yo mamono Yeruzalem, esika ya kimia, ema eye bakolongola te ; bakolongola piké ya yango te, bakokata nsinga ya yango te. | |
Isai | LinVB | 33:21 | Kuna Yawe akolakisa nguya ya ye, kuna bibale mpe miluka minene mizali, bwato bonene na nkai bokoleka te, mpe masuwa manene makotambola te. | |
Isai | LinVB | 33:22 | Zambi Yawe azali zuzi mpe mosa-mbisi wa biso, Yawe azali Mokonzi wa biso, ye akobikisa biso. | |
Isai | LinVB | 33:23 | Mikulu mya masuwa ma bino milembi, mikoki kotelemisa lisusu likonzi lya masuwa te, mikoki kotombola bendele lisusu te. O ntango ena bato bakokabelana biloko biye babotoli, ata batengoli bakokende kokamata byango. | |