Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
JOB
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 28
Job LinVB 28:1  Solo, bisika bakotimolaka palata bizali, bato bazali mpe na mayele ma kopetola wolo.
Job LinVB 28:2  Bakobimisaka bibende o mabelé, mpe bakonyangwisaka mabanga mpo ya kozwa mitako.
Job LinVB 28:3  Bato basili kokita o mabulu ma molili, mpe kokende koluka tee o nse ya mabelé, esika mabanga mabombami o mboka ya molili.
Job LinVB 28:4  Basili kopasola nzela mosika na mboka ya bato, o bisika moto moko akolekaka te : bakokitaka na nsinga o esika moto akokomaka te.
Job LinVB 28:5  Mabelé maye makobotaka mbuma ya mampa, mabebi epai ya nse, esika móto mopeli.
Job LinVB 28:6  Mabanga make ma motuya mabombami o mabanga manene, mabelé masangani na wolo makozwama bobele kuna.
Job LinVB 28:7  Mpongo eyebi bisika bina te, mpe engondo ekoki komono byango na miso te.
Job LinVB 28:8  Nyama ya zamba ikoki kokoma kuna te, ata nkosi atii makolo kuna naino te.
Job LinVB 28:9  Kasi bato bapasoli mabanga mana makasi, batimoli mabulu mosika o kati ya ngomba.
Job LinVB 28:10  O kati ya mabanga bapasoli nzela lokola balabala, mpe bamoni biloko binso bya motuya bizali kuna.
Job LinVB 28:11  Babongoli nzela ya mai, bakaukisi maziba, mpe babimisi biloko bibombami kuna.
Job LinVB 28:12  Kasi Bwanya bokoutaka wapi, o mboka nini bakoki kozwa bwango ?
Job LinVB 28:13  Awa o nse moto moko te ayebi motuya mwa bwango, bokomonono te o mokili mwa bato.
Job LinVB 28:14  Etima ekoloba : « Ngai nazali na bwango te. » Mbu se bongo : « Epai ya ngai bozali te. »
Job LinVB 28:15  Bakoki kosomba bwango na mosolo mwa wolo te, bokozwama ata na mosolo mwa palata te.
Job LinVB 28:16  Wolo ya Ofir ekokani na bwango te, liyaka kitoko mpe libanga lya motuya se nsima.
Job LinVB 28:17  Wolo na diama bikokani na bwango motuya te, bokozwama mpo ya kopo etulami na wolo te.
Job LinVB 28:18  Mayaka manzenga na mbeki kitoko bizali se mpamba, malamu oluka mayaka te, kasi oluka Bwanya.
Job LinVB 28:19  Topaze ya Kus ezali na motuya lokola Bwanya te, ata wolo eye bapetoli ekokani na bwango te.
Job LinVB 28:20  Kasi Bwanya bokoutaka wapi mpenza ? Ndako ya Bwanya ekozwama o esika nini ?
Job LinVB 28:21  Bwanya bobombami o miso ma bato ba nse eye, ndeke ya likolo ikokuta Bwanya o nzela te.
Job LinVB 28:22  O mai bozindo mpe o mboka ya bawa bakolobaka : « Toyoki likambo lya Bwanya se na matoi. »
Job LinVB 28:23  Se Nzambe ayebi nzela ya mboka ya Bwanya, ye ayebi o mboka nini Bwanya bokofandaka,
Job LinVB 28:24  zambi ye akomonoko mokili mobimba na mpe biloko binso awa o nse.
Job LinVB 28:25  Oyo akopesaka mompepe bozito mpe akotondisaka mai o bibale,
Job LinVB 28:26  Oyo akopesaka mbula bitinda, mpe akotambwisaka mbula na minkalali,
Job LinVB 28:27  Ye azali komono Bwanya, ayebi bwango, ayebi bwango solosolo mpenza.
Job LinVB 28:28  Na nsima alobi na bato : « Bwanya bwa solo ezali kobanga Nzambe, moto wa mayele, nde oyo akokimaka mabe. »