LEVITICUS
Chapter 23
Levi | LinVB | 23:2 | Loba na bana ba-Israel boye : Biyenga bya Yawe, biye bato banso bakobyangema o lisanga lisantu, byango biye : | |
Levi | LinVB | 23:3 | Bosala mosala mikolo motoba, kasi mokolo mwa nsambo mozali mokolo mwa bopemi, mokolo mwa kosangana lisanga lisantu mpe mwa kotika mosala nye. Bisika binso bokofanda, mokolo mona mozala Sabato, mokolo mwa Yawe. | |
Levi | LinVB | 23:5 | Sanza ya yambo o mokolo mwa zomi na minei ezali eyenga ya Pasika mpo ya kokumisa Yawe. | |
Levi | LinVB | 23:6 | Mokolo mwa zomi na mitano mwa sanza eye ezali eyenga ya Mampa mazangi nkisi o miso ma Moko-nzi. Mikolo nsambo bokolia ma-mpa mazangi nkisi. | |
Levi | LinVB | 23:8 | Mikolo nsambo bokobonzela Nzambe libonza ; mokolo mwa nsambo bokosangana lisanga lisa-ntu lisusu, mpe bokosala mosala makasi soki te. | |
Levi | LinVB | 23:10 | Loba na bana ba-Israel boye : Soko bosili bokomi o mokili nakopesa bino, mokolo bokobuka mbuma o bilanga, bokoyela nganga Nzambe liboke lya liboso. | |
Levi | LinVB | 23:11 | Ye moto akobonzela Nzambe yango, mpo ’te Nzambe abenisa bino. Akobonza lyango o mokolo nsima ya Sabato. | |
Levi | LinVB | 23:12 | Mokolo bokobonza mbuma ya mampa, bobonzela Yawe mpe libonza lya mwana mpata ya mbula yoko, ezala na mbeba te. | |
Levi | LinVB | 23:13 | Mokolo mona bobonza libonza lya bilei : kilo libwa ya fufu elambami na mafuta, ezala bilei bya nsolo mpimbo bilambami mpo ya kosepelisa Yawe. Bopesa mpe litele ibale ya vino. | |
Levi | LinVB | 23:14 | Bokoki kolia mampa to mbuma ya mampa ma kokalinga te, soko liboso bobonzeli Nzambe wa bino libonza lina te. Ezali mobeko mwa seko napesi bino mpe bana ba bino, ata bakofandaka o esika nini. | |
Levi | LinVB | 23:15 | Banda mokolo nsima ya Sabato, moye bokendeki kobonza liboke lya mbuma, bokotanga poso nsambo, | |
Levi | LinVB | 23:16 | mikolo ntuku itano tee mokolo nsima ya Sabato ya nsa-mbo : o mokolo mona bobonzela Nzambe libonza lisusu. | |
Levi | LinVB | 23:17 | Ut’o esika bofandi, bosengeli komeme mampa mabale bo libo-nza : mampa mabale ma kilo libwa, malambami na lokweza ; bokobo-nzela Yawe mango bo ‘libonza lya mbuma ya yambo’. | |
Levi | LinVB | 23:18 | Bobakisa naino libonza lya bana mpata nsambo, ya mbula yoko, izala na mbeba te, na mpe ngombe mobali yoko, na mpata babali ibale bo libonza lya kotumbela Yawe. Bobakisa bilei na mpe limeli, ezala bongo libonza lya nsolo mpimbo likosepelisa Yawe. | |
Levi | LinVB | 23:19 | Boboma mpe ntaba mobali yoko bo moboma mwa bolimbisi masumu, na mpe mpata basi ibale, ibotami se o mobu mona, bo moboma mwa bondeko. | |
Levi | LinVB | 23:20 | Nganga Nzambe atombola yango mpo ’te alakisa Yawe, elongo na mampa ma mbuma ya yambo ya bilanga mpe na mpata ibale. Bongo yango ekomi bilei bisantu mpo ya Yawe. Bilei bina bikozala bya nga-nga Nzambe. | |
Levi | LinVB | 23:21 | O mokolo monamei bobenga bato o likita, basangana lisanga lisantu. Mokolo mona bokoki kosala mosala makasi te. Ezali mobeko mwa seko napesi bino mpe bankoko ba bino, ata bakokofanda wapi. | |
Levi | LinVB | 23:22 | Soko bobuki mbuma ya bilanga bya bino, bobuka mbuma inso tee nsuka ya bilanga te ; soko mbuma ikwei, bolokoto yango te, botikela babola na bampaya. Ngai nazali Yawe Nzambe wa bino. | |
Levi | LinVB | 23:24 | Loba na bana ba-Israel boye : mokolo mwa yambo mwa sanza ya nsambo mozali mokolo mwa bopemi, ‘mokolo mwa bokundoli makambo ma kala mpe mwa bobeti mindule’ ; mozala mokolo mwa likita lisantu. | |
Levi | LinVB | 23:27 | Mokolo mwa zomi mwa sanza ya nsambo, mozali mokolo mwa ‘bolimbisi bonene’. Obenga bato o lisanga lisa-ntu. Bolala nzala mpe bobonzela Yawe libonza lya bilei bitumbami. | |
Levi | LinVB | 23:28 | O mokolo mona bosala mosala moko te, zambi mozali mokolo mwa bofuti nyongo ya masumu, mokolo bakosala milulu mya bosengi bolimbisi o miso ma Yawe Nzambe wa biso. | |
Levi | LinVB | 23:31 | Bokoki kosala mosala moko te. Ezali mobeko mwa seko napesi bino mpe bankoko ba bino, ata bakofanda wapi. | |
Levi | LinVB | 23:32 | Mokolo mona mozali Sabato, mokolo mwa bopemi mpe mwa bolali nzala. Banda mpokwa ya mokolo mwa libwa mwa sanza tee mpokwa esusu, botosa mobeko mona mwa bopemi o mokolo mwa Sabato. | |
Levi | LinVB | 23:34 | Loba na bana ba-Israel : Banda mokolo mwa zomi na mitano mwa sanza eye ya nsambo, mikolo nsambo mobimba bosepela ‘Eyenga ya Biema’ o miso ma Yawe. | |
Levi | LinVB | 23:36 | Mikolo nsambo mobimba bobonzela Yawe mabonza ma bilei. Mokolo mwa mwambe bosangana lisanga lisantu lisusu : bobonzela Yawe libonza lya bilei ; o mokolo mwa likita bosala mosala makasi moko te. | |
Levi | LinVB | 23:37 | Tala biyenga bya Yawe. Obenga bana ba-Israel basangana lisanga lisantu. O ntango ya lisanga bosengeli kobonzela Yawe mabonza ma bolei, mabonza ma kotumba, miboma mya bondeko, mabonza ma bomeli, lokola etindami mokolo na mokolo, | |
Levi | LinVB | 23:38 | na mabonza ma mikolo mya Sabato, na mabonza bokopesa zambi bolakelaki Yawe to bolingi kobonza bino moko. | |
Levi | LinVB | 23:39 | Lisusu, o mokolo mwa zomi na mitano mwa sanza ya nsambo, soko bosilisi kobuka mbuma ya bilanga bya bino, bosepela eyenga ya Yawe mikolo nsambo. Bopema mokolo mwa liboso mpe mokolo mwa mwambe. | |
Levi | LinVB | 23:40 | Mokolo mwa liboso bokamata mbuma kitoko, nkele ya mbila, na bitapi bya nzete iye izali na nkasa mingi, na mpe nsese. Bosepela bongo mikolo nsambo o miso ma Yawe Nzambe wa bino. | |
Levi | LinVB | 23:41 | Mobu na mobu bosala mobembo moye mwa mikolo nsambo mpo ya kokumisa Yawe. Ezali mobeko mwa seko napesi bino mpe bankoko ba bino ; bosala mobembo moye o sanza ya nsambo. | |
Levi | LinVB | 23:43 | mpo ’te bankoko ba bino bayeba ’te o eleko ngai nabimisaki bana ba-Israel o mokili mwa Ezipeti, nafandisaki bango o bisasa. Ngai nazali Yawe Nzambe wa bino. | |