LUKE
Chapter 19
Luke | LinVB | 19:2 | Ezalákí wâná moto mǒkó nkómbó ’te Zakéo ; yě mokonzi mǒkó wa bafútisi mpáko mpé moto wa nkita. | |
Luke | LinVB | 19:3 | Alukí komóno Yézu, áyéba sókó yě azali náni ; kasi akokí komóno yě té, mpô azalákí mokúsé mpé bato balekí míngi. | |
Luke | LinVB | 19:4 | Bôngó akeí mbángu o libosó mpé abutí nzeté ya fígi mpô ’te ámóno Yézu o ntángo akoleka wâná. | |
Luke | LinVB | 19:5 | Ekómí Yézu o esíká yangó, atálí o likoló mpé alobí na yě : « Zakéo, kitá nokí, leló nasengélí kozala o ndáko ya yǒ. » | |
Luke | LinVB | 19:7 | Emóní bato bôngó, bánso basilíkí, balobí : « Bóní, akeí kokóto o ndáko ya mosúmuki ! » | |
Luke | LinVB | 19:8 | Kasi Zakéo abelémí mpé alobí na Mokonzi : « Mokonzi, nakokabela babóla ndámbo ya bilóko bya ngáí bínso. Mpé sókó nayíbákí bilóko bya bato na mayéle, nakozóngisa yangó mbala ínei. » | |
Luke | LinVB | 19:9 | Yézu alobí na yě : « Libótá liye lizwí libíkí leló, zambí yě mpé azalí mwána wa Abaráma. | |
Luke | LinVB | 19:11 | Awa bazalákí koyóka yangó, Yézu abakísí naíno moúlání moye, zambí azalákí penepene na Yerúzalem, mpé bato bakanísí ’te Bokonzi bwa Nzámbe bokomónono nokí. | |
Luke | LinVB | 19:12 | Bôngó alobí : « Nkúmú mǒkó akeí o ekólo mosíká mpô ya kozwa bokonzi, na nsima ázónga. | |
Luke | LinVB | 19:13 | Abéngí basáleli ba yě zómi, apésí bangó mǒkó mǒkó ‘mina’ yǒ kó, mpé alobí na bangó : ‘Bósála na yangó mombóngo téé mokolo nakozónga.’ | |
Luke | LinVB | 19:14 | Kasi bato ba ekólo ya yě bazalákí koyina yě, bôngó batíndí bantóma nsima ya yě báyébisa ’te : ‘Tolingí té ’te moto óyo ázala mokonzi wa bísó.’ | |
Luke | LinVB | 19:15 | Awa azwí bokonzi, azóngí mpé abéngísí basáleli baye apésákí mosolo, áyéba mbakisa eye mǒkó mǒkó azwí. | |
Luke | LinVB | 19:17 | Mokonzi alobí na yě : ‘Osálí malámu, ozalí mosáleli wa sôló. Okoyángela mbóka zómi, mpô omílakísí moto wa bosémbo o makambo maké.’ | |
Luke | LinVB | 19:21 | Nazalákí kobánga yǒ, zambí ozalí na míso makási : okokamataka bilóko esíká obómbákí byangó té ; okobúkaka mbuma esíká olónákí yangó té.’ | |
Luke | LinVB | 19:22 | Mokonzi alobí : ‘Yó mosáleli mabé ! Nakokwêisa yó mpô ya maloba ma yó mǒkó. Oyébákí ’te nazalí míso makási : nakokamataka bilóko esíká nabómbákí byangó té ; mpé nakobúkaka mbuma esíká nalónákí yangó té. | |
Luke | LinVB | 19:23 | Mpô níni obómbákí mosolo mwa ngáí o bánki té ? Mbele nakamátákí mwangó mokolo nazóngí, ná mbakisa lokóla.’ | |
Luke | LinVB | 19:24 | Mpé alobí na bato bazalákí wâná : ‘Bóbótolo yě mina ya yě, bópésa yangó na moto óyo azalí na mina zómi.’ | |
Luke | LinVB | 19:26 | Azóngísí : ‘Nalobí na bínó : óyo azalí na bilóko, bakobakisela yě lisúsu ; kasi óyo azalí na bilóko míngi té, bakobótolo yě atâ mwâ elóko ezalí na yě. | |
Luke | LinVB | 19:27 | Bôngó bangúná ba ngáí, baye balingákí té ’te názala mokonzi wa bangó, bóyâ na bangó áwa mpé bókáta bangó nkíngó o míso ma ngáí !’ » | |
Luke | LinVB | 19:29 | Ekómí yě penepene na Betfáge mpé na Betánia, epái ya ngómbá ya Olíva, atíndí bayékoli ba yě bábalé, alobí na bangó : | |
Luke | LinVB | 19:30 | « Bókende o mbóka bozalí komóno kúná. Ntángo bokokóma, bokomóno mwána wa mpúnda ekangémí wâná, moto mǒkó abutélí yangó naíno té. Bókangola yangó mpé bóyâ na yangó áwa. | |
Luke | LinVB | 19:31 | Sókó batúní bínó : ‘Mpô níni bozalí kokangola yangó ?’, bokoloba : ‘Mokonzi asengélí na yangó’. » | |
Luke | LinVB | 19:33 | Ntángo bazalákí kofungola mwána wa mpúnda, bakóló ba yangó batúní : « Mpô níni bozalí kokangola mwána wa mpúnda ? » | |
Luke | LinVB | 19:35 | Bayélí Yézu mwána wa mpúnda, batandí bilambá bya bangó likoló lya yangó, babutísí Yézu. | |
Luke | LinVB | 19:37 | Ekómí yě penepene na nzelá eye eútí o ngómbá ya Oliva, bayékoli bánso, na esengo enéne, babandí kokúmisa Nzámbe na mongóngó makási mpô ya makamwísi mánso bamónókí. | |
Luke | LinVB | 19:38 | Balobí : « Bábenisa Mokonzi óyo akoyâ o nkómbó ya Mokonzi Nzámbe ! Bobóto o likoló, mpé nkémbo o ntá likoló ! » | |
Luke | LinVB | 19:39 | Ba-Farizéo basúsu bazalákí wâná o káti ya bato balobí na yě : « Motéyi, pekísá bayékoli ba yǒ. » | |
Luke | LinVB | 19:40 | Kasi yě azóngísí : « Nalobí na bínó, sókó bangó bakangí monoko, mabángá makogánga. » | |
Luke | LinVB | 19:42 | Alobí : « A ! Sókó leló olingákí kondima eye ekokí koyêla yǒ bobóto ! Kasi ozalí komóno yangó té ! | |
Luke | LinVB | 19:43 | Ya sôló, o mikolo mokoyâ bangúná bakotímola mabúlú zóngazónga na yǒ, bakozínga mpé bakokangisa yǒ bipái bínso. | |
Luke | LinVB | 19:44 | Bakonyata yǒ na bána ba yǒ bánso bazalí o mbóka ya yǒ. O lopángo la yǒ bakotíka libángá lyǒ kó likoló lya libángá lisúsu té ; mpámba té, o eleko bayákí kotála yǒ ondimákí yangó té ! » | |
Luke | LinVB | 19:46 | Alobí na bangó : « Ekomámí ’te ndáko ya ngáí esengélí kozala ndáko ya losámbo. Kasi bínó bobóngólí yangó ndáko ya bayíbi ! » | |
Luke | LinVB | 19:47 | Mokolo na mokolo azalákí kotéya o Témpelo. Banganga bakonzi na batéyi ba Mobéko na bankúmú ba mbóka balukí nzelá ya koboma yě. | |