DANIEL
Chapter 14
Dani | LinVB | 14:2 | Daniel azalaki ‘molingami wa mokonzi’, mpe mokonzi andimi ye liboso lya bankumu banso. | |
Dani | LinVB | 14:3 | Bato ba Babilon bazalaki na ekeko ya nzambe, oyo bakobyangaka Bel ; mokolo na mokolo bazalaki kobonzela ye saki ya fufu zomi na ibale, mpata ntuku inei na masangala manene ma vino motoba. | |
Dani | LinVB | 14:4 | Mokonzi azalaki kokumbamela ekeko ena, mokolo na mokolo akei kosambela kuna. Kasi Daniel azalaki kokumbamela se Nzambe wa ye. Mokolo moko mokonzi atuni ye : « Mpo nini oboyi kokumbamela Bel ? » | |
Dani | LinVB | 14:5 | Daniel ayanoli : « Ngai nakokumbamela bikeko te biye bisalemi na maboko ma bato, kasi bobele Nzambe oyo azali na bomoi, oyo akeli likolo na nse, oyo azali mokonzi wa bato banso. » | |
Dani | LinVB | 14:6 | Mokonzi atuni ye : « Okanisi ’te Bel azali na bomoi te ? Binso akoliaka mpe akomeleke mokolo na mokolo ozali komono byango te ? » | |
Dani | LinVB | 14:7 | Daniel aseki, alobi : « Mokonzi, omikosa te : Bel azali se mabelé epai ya kati mpe mbengi epai ya libanda. Ata mokolo moko te alei to ameli eloko yoko. » | |
Dani | LinVB | 14:8 | Mokonzi ayoki nkanda, abyangi banganga ba ye, alobi na bango : « Boyebisa ngai nani akoliaka biloko binso bya Bel. Soko boyebisi ngai te, bokokufa ; kasi soko bokoki kolakisa ’te bobele Bel akoliaka byango, Daniel akokufa, mpo atuki Bel. » | |
Dani | LinVB | 14:9 | Daniel ayanoli : « Esalema se bongo ! » Banganga ba Bel bazalaki ntuku nsambo, kotanga basi na bana te. | |
Dani | LinVB | 14:11 | Banganga balobi : « Mokonzi, biso tokobima awa. Yo moko otia bilei mpe vino, na nsima okanga ndako mpe obaka motako mwa yo o ezibeli ya ndako. | |
Dani | LinVB | 14:12 | Ozonga lobi na ntongo ; soko Bel alei biloko binso te, biso tondimi kokufa ; soko alei biloko binso, Daniel akufa, mpo atongi biso. » | |
Dani | LinVB | 14:13 | Bazalaki mitema likolo te, mpo na bonkutu basalaki libulu o nse ya meza ya libonza, mpo bazwa bongo nzela ya koleka mpo ya kolongola mabonza mikolo minso. | |
Dani | LinVB | 14:14 | Bango babimi. Mokonzi atieli Bel biloko bya bolei ; kasi na nsima Daniel abyangi basaleli ba ye, atindi bango ’te bakamata mputulu ya makala, bapanza yango o tempelo mobimba. Bobele mokonzi amoni yango. Ntango basili bakangi tempelo, babaki motako mwa mokonzi o ezibeli ya ndako mpe bakei. | |
Dani | LinVB | 14:15 | O kati ya butu banganga bayei elongo na basi mpe na bana ba bango, lokola bameseni kosala uta kala. Balei mpe bameli biloko binso. | |
Dani | LinVB | 14:17 | Mokonzi atuni ye : « Daniel, moto moko asimbi mitako te ? » Daniel ayanoli : « Moto moko te, mokonzi ! » | |
Dani | LinVB | 14:18 | Bongo bafungoli ezibeli ya tempelo ; mokonzi atali meza ya libonza, asepeli mpe agangi : « Ya solo, Bel ozali nzambe monene ! Ozali na lokuta soki te ! » | |
Dani | LinVB | 14:19 | Kasi Daniel aseki. Apekisi mokonzi kokoto, alobi na ye : « Mokonzi, tala o nse, tala soko makolo ma nani mazali wana. » | |
Dani | LinVB | 14:21 | Asiliki mpe atindi ’te bakanga banganga, basi na bana ba bango. Balakisi ye ezibeli eye bazalaki kokoto na bonkutu mpo ’te bakamata biloko o meza ya libonza. | |
Dani | LinVB | 14:22 | Mokonzi akitisi bango o liwa. Atiki ekeko ya Bel o maboko ma Daniel. Daniel abomi yango na mpe tempelo ya yango. | |
Dani | LinVB | 14:24 | Mokonzi alobi na Daniel : « Okoki koloba te ’te nzambe oyo azali na bomoi te. Yango wana kumbamela ye ! » | |
Dani | LinVB | 14:25 | Daniel azongisi : « Ngai nakokumbamela se Mokonzi Nzambe wa ngai, mpo azali Nzambe wa bomoi. | |
Dani | LinVB | 14:26 | Soko yo, mokonzi, olingisi ngai, nakoboma ngando eye, na mopanga te, na lingenda mpe te. » Mokonzi azongisi : « Nandimi. » | |
Dani | LinVB | 14:27 | Daniel akamati mpaka, mafuta na matiti ma nyama, asangisi yango, akotisi yango o mai, alambi minkate minene mpe apesi ngando. Ngando alei myango mpe akufi. Daniel alobi : « Bomoni eloko nini bino bokokumisaka ! » | |
Dani | LinVB | 14:28 | Ntango bato ba Babilon bayoki yango, batoki na nkanda. Batombokeli mokonzi, balobi : « Mokonzi amikomisi mo-Yuda : Alingisi ’te babuka ekeko ya Bel, baboma ngando enene mpe banganga nzambe. » | |
Dani | LinVB | 14:29 | Yango wana bakei koyebisa mokonzi : « Kaba Daniel o maboko ma biso ; soko olingi te, tokoboma yo na libota lya yo mobimba. » | |
Dani | LinVB | 14:30 | Mokonzi amoni ’te bakaneli ye mabe, nzela esusu ya kobika ezalaki te, akabi Daniel o maboko ma bango. | |
Dani | LinVB | 14:32 | O libulu lyango nkosi izalaki nsambo. Mikolo minso bazalaki kopesa yango bilei : bibembe bibale na mpata ibale. Kasi mokolo mona bapesi yango eloko te mpo ’te ilia Daniel. | |
Dani | LinVB | 14:33 | Nzokande profeta Abakuk azalaki o Yudea. Alambaki supu mpe atiaki ndambo ya mampa o ekoló mpo akende kopesa yango na bato ba ye bazalaki kobuka mbuma o bilanga. | |
Dani | LinVB | 14:34 | Anzelu wa Nzambe alobi na Abakuk : « Babwaki Daniel o libulu lya nkosi o Babilon ; memela ye biloko byango. » | |
Dani | LinVB | 14:35 | Abakuk azongisi : « E Mokonzi, naino namoni Babilon mokolo moko te, mpe nayebi libulu lyango te. » | |
Dani | LinVB | 14:36 | Anzelu wa Mokonzi akangi ye na motó, abendi ye na nsuki, mpe amemi ye bongo na mbangu lokola elimo, tee akitisi ye penepene na libulu lya nkosi. | |
Dani | LinVB | 14:38 | Daniel azongisi : « E Nzambe, ya solo okanisi ngai. Ata mokolo moko te obosani bato balingi yo. » | |
Dani | LinVB | 14:39 | Daniel atelemi mpe abandi kolia. Se o ntango ena anzelu wa Nzambe akei kotika ye o ekolo ya ye. | |
Dani | LinVB | 14:40 | Nsima ya mikolo motoba, mokonzi ayei kolela Daniel. Akomi o libulu, atali mpe amoni Daniel afandi wana. | |
Dani | LinVB | 14:41 | Agangi : « E Mokonzi, Nzambe wa Daniel, ozali monene ! Nzambe mosusu azali te, bobele yo ! » | |