ISAIAH
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
43
44
45
46
47
48
49
50
51
52
53
54
55
56
57
58
59
60
61
62
63
64
65
66
Chapter 41
Isai | LinVB | 41:1 | Bino bisanga, botika makekéle mpe boyoka ngai, bino bato ba bikolo, bozwa nguya ya sika, bobeleme mpe boloba : Banso elongo tosamba. | |
Isai | LinVB | 41:2 | Nani abimisi epai ya Esti moto oyo akolongaka bipai binso ? Nani akokabaka bato ba bikolo o maboko ma ye, nani akokweisaka bakonzi ba nse ? Na mopanga akokomisaka bango mputulu, na litimbo akopanzaka bango lokola matiti matombwami. | |
Isai | LinVB | 41:3 | Akobengana bango mpe moto moko akosala ye mabe te, akoleka o nzela mpe akonyata mabelé makasi te. | |
Isai | LinVB | 41:4 | Nani moto abongisi mana manso ? Bobele Oyo akobyangaka bato ut’o ebandela : ngai Yawe, nazali moto wa liboso mpe nakozala naino elongo na bato ba nsuka. | |
Isai | LinVB | 41:5 | Bato ba bisanga bamoni mpe babangi, ata baye bazali o ndelo ya mokili balengi, babelemi mpe bayei. | |
Isai | LinVB | 41:7 | Oyo akosalaka bikeko alendisi motuli wa wolo, oyo akopetolaka wolo alendisi oyo akobete ebeteli, alobi mpo ya ebende : « Ebende ezali malamu », mpe abakisi nsete na ekeko mpo eningana te. | |
Isai | LinVB | 41:8 | Kasi yo, Israel, mosaleli wa ngai, yo Yakobo, oyo ngai naponi, yo mwana wa libota lya Abarama, ndeko wa ngai, | |
Isai | LinVB | 41:9 | nakamati yo o nsuka ya mokili, mpe ut’o mokili mosika nabyangi yo, nalobi na yo : « Ozali mosaleli wa ngai, naboyi yo te, kasi naponi yo. » | |
Isai | LinVB | 41:10 | Obanga te, zambi nazali na yo, ozala motema likolo te, zambi nazali Nzambe wa yo. Napesi yo makasi mpe nasalisi yo, nalendisi yo mpe nasimbi yo na loboko la ngai la mobali. | |
Isai | LinVB | 41:11 | Ya solo, baye banso bayokeli yo nkanda bakoyoka nsoni mpe bakosambwa. Baye bakolukaka yo na makambo, bakokoma bato mpamba mpe bakosuka. | |
Isai | LinVB | 41:12 | Okoluka banguna ba yo, kasi okomono bango te. Baye bakobundisaka yo bakokoma bato mpamba mpe bakosuka. | |
Isai | LinVB | 41:13 | Zambi ngai nazali Yawe Nzambe wa yo, nasimbi yo na loboko la ngai la mobali. Nalobi na yo : « Obanga te, ngai nakosalisa yo. » | |
Isai | LinVB | 41:14 | Obanga te, mpambo Yakob, bino mpe, bato ba Israel. Yawe alobi : ‘Ngai nakosalisa yo, Ngai, Mosantu wa Israel, nakosikola yo’. | |
Isai | LinVB | 41:15 | Ngai nakokomisa yo epasola mabelé, eloko ya sika ezali na mino mapotu, okonyata ngomba mpe okopasola yango, okopanza ngomba ike ikoma se mputulu ya matiti makauki. | |
Isai | LinVB | 41:16 | Okopupola yango mpe mompepe mokopimbwisa yango, mompepe mokasi mokopanzola yango. Kasi yo okosepela Yawe, okoluka lokumu epai ya Mosantu wa Israel. | |
Isai | LinVB | 41:17 | Bato babola na bato ba mawa bakoluka mai, kasi bakozwa te, lolemu la bango lokauki mpo ya mposa ya mai. Ngai, Yawe, nakondimela bango, ngai Nzambe wa Israel, nakotika bango te. | |
Isai | LinVB | 41:18 | Nakotiyolisa miluka o bisika bizangi matiti, nakobimisa maziba o mabwaku, nakobongola eliki ekoma etima, nakotimola maziba o mabelé makauki. | |
Isai | LinVB | 41:19 | Nakolona nzete ya sédere o eliki, na nzete ya akasia, ya mirte mpe ya oliva. Nakotia sipresi o esobe, na nzete ya kambala mpe ya wenge. | |
Isai | LinVB | 41:20 | Bongo bato banso bamono mpe bayeba, batala mpe bandima ’te Yawe asali binso, ’te Mosantu wa Israel akeli bina binso. | |
Isai | LinVB | 41:21 | Yawe alobi boye : Boyebisa maye bosengi, Mokonzi wa Yakob alobi : Botanga maye makoki kolongisa bino. | |
Isai | LinVB | 41:22 | Bosakola mpe boyebisa biso makambo makoya. Bosakolaki nde maye masili masalemi ? Bongo tokeba na mango. To boyebisa biso maye makoya, mpo toyeba ndenge nini makosuka. | |
Isai | LinVB | 41:23 | Bosakola makambo masengeli koya, bongo tokoyeba ’te bozali banzambe solo ! Bosala malamu to mabe, mpo totala mango, mpe tokobanga bino. | |
Isai | LinVB | 41:24 | Ya solo, bozali se mpamba, misala mya bino mizali mpe mpamba. Oyo andimi bino azali moto wa nsomo. | |
Isai | LinVB | 41:25 | Nabyangi moto o mokili mwa Nordi mpe ayei, ut’o epai ya Esti nabyangi ye na nkombo. Akonyata bayangeli lokola potopoto, lokola moyemi mbeki akopotoko libazi. | |
Isai | LinVB | 41:26 | Nani ayebisi yango ut’o kala mpo toyeba, mpe tondima ’te ezali ya solo ? Kasi moto moko alobaki ata liloba nini, to ayebisi ata nini, moto moko ayoki ata mwa liloba lya bino te. | |
Isai | LinVB | 41:28 | Kasi natali bikeko, ata yoko emononi te, o kati ya byango ata yoko te ekoki kopesa lilako, to eyano soko natuni yango. | |