Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
JOHN
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10 11 12 13 14 15 16 17 18 19 20 21
Prev Up Next
Chapter 1
John LinVB 1:1  O libandela Liloba azalákí. Liloba azalákí epai ya Nzámbe mpé Liloba azalákí Nzámbe.
John LinVB 1:2  Ut’o libandela Liloba azalákí epái ya Nzámbe.
John LinVB 1:3  Bínso bisálémí na yě ; sókí yě té, elóko yǒ kó esálémákí té.
John LinVB 1:4  Bomoi bozalákí o Liloba mpé bomoi bozalákí Mwínda mwa bato.
John LinVB 1:5  Mwínda mozalákí kongenge o káti ya molílí, kasi bato ba molílí bayambí mwangó té.
John LinVB 1:6  Nzámbe atíndí moto mǒkó nkó­mbó ’te Yoáne.
John LinVB 1:7  Yě moto ayéí lokóla nzénénéké kosangela bato Mwínda, mpô ’te bato bánso báyamba Mwínda mpô ya maloba ma yě.
John LinVB 1:8  Yě mpenzá azalákí Mwínda té, azalákí bobélé nzénénéké óyo ayéí kosangela bato Mwínda.
John LinVB 1:9  Mwínda moye, mwínda mwa sôló moyéí o nsé kongengele bato bánso.
John LinVB 1:10  Liloba azalákí áwa o mokili. Na yě Nzámbe akeláká mokili ; nzókandé bato ba mokili baya­mbí yě té.
John LinVB 1:11  Ayéí o ekólo ya yě mǒ­kó, kasi bato ba yě bayambí yě té.
John LinVB 1:12  Kasi baye bayambí yě, baye ba­ndimí Nkómbó ya yě, apésí bangó likokí lya kokóma bána ba Nzámbe.
John LinVB 1:13  Bakómí bána ba Nzámbe na loléngé la bomoto té, na mpósá ya nzóto té, kasi babótámí na Nzámbe.
John LinVB 1:14  Liloba akómí moto mpé azalákí o ntéi ya bísó, Tomónókí nkémbo ya yě, nkémbo ya Mwána sé mǒkó eye azwí na Tatá atóndí na bolingi mpé na bosôló.
John LinVB 1:15  Yoáne asakólí mpô ya yě, alobí : « Tálá moto óyo nayébísí bínó ’te Oyo akoyâ nsima ya ngáí, alekí ngáí, zambí yě azalákí liboso na ngai. »
John LinVB 1:16  Oyo atóndí na makabo maye akabélí bísó bánso, apésí bísó ngrá­sya mbala na mbala.
John LinVB 1:17  Tozwákí Mobéko na mabóko ma Móze, kasi ngrásya na bosôló iyéí na Yézu Krístu.
John LinVB 1:18  Moto mǒkó amóní naíno Nzámbe té ; kasi Mwána sé mǒkó wa Yě, óyo azalí o mbóka Tatá, yě moto ayébísí bísó Nzámbe.
John LinVB 1:19  maye mazali maloba Yoáne alobákí ntángo ba-Yúda ba Yerúzalem batí­ndákí banganga Nzámbe na ba-Lévi epái ya yě bátúna yě : « Yǒ ozalí náni ? »
John LinVB 1:20  Yoáne asakólí polélé, awángání té, alobí : « Ngáí nazalí Krístu té. »
John LinVB 1:21  Batúní yě : « Bôngó yǒ náni ? Yǒ ndé Elía ? » Alobí : « Nazalí Elía té. » Batúní lisúsu : « Ozalí proféta óyo asengélí koyâ ? » Alobí : « Té. »
John LinVB 1:22  Batúní yě lisúsu : « Bôngó yǒ náni ? Yébísá bísó, tókende kopésa eyano na bato batíndí bísó. Yǒ mǒkó olobí ’te ozalí náni ? »
John LinVB 1:23  Yoáne ayanólí : « Ngáí nazalí mongóngó mwa moto óyo azalí kobélela o elíkí : Bóbongisela Mokonzi nzelá, lokóla proféta Izaya alobáká. »
John LinVB 1:24  Baye batíndámákí bazalákí ba lingómbá lya ba-Farizéo.
John LinVB 1:25  Batúní yě : « Sókó ozalí Krístu té, Elía té, proféta mpé té óyo asengélí koyâ, mpô níni ozalí kobátisa bato ? »
John LinVB 1:26  Yoáne ayanólí bangó : « Ngáí nazalí kobátisa na mái ; kasi o ntéi ya bínó moto mǒkó azalí, bínó boyébí yě té.
John LinVB 1:27  Yě akoyâ nsima ya ngáí, kasi nabongí kofungola nsinga ya bikótó bya yě té. »
John LinVB 1:28  Makambo maye mánso malekákí o Betánia o ngámbo ya Yordáne, esíká Yoáne azalákí kobátisa.
John LinVB 1:29  Mokolo mwa nsima, ntángo Yoáne amóní Yézu azalákí koyâ epái ya yě, alobí : « Tálá mwâ Mpatá ya Nzámbe, óyo akolongola lisúmu lya nsé.
John LinVB 1:30  Mpô ya yě nalobákí ’te : Nsima ya ngáí moto mǒkó akoyâ, alekí ngáí, zambí azalákí ntángo babótí ngáí naíno té.
John LinVB 1:31  Ngáí mpé nayébákí yě té, kasi nayéí kobátisa na mái mpô ’te ba-Israél báyéba yě. »
John LinVB 1:32  Mpé Yoáne akóbí kosakola : « Namónókí Elímo aútí o likoló lokóla ebengá mpé atíkálí likoló lya yě.
John LinVB 1:33  Ngáí mpé nayébákí yě té ; kasi óyo atíndí ngáí nábátisa na mái, alobí na ngáí : Moto óyo okomóno Elímo akokitela yě, yě moto akobátisa na Elímo Sántu.
John LinVB 1:34  Ngáí moto namónókí yangó, yangó wâná nasakólí ’te Yě azalí Mwána wa Nzámbe. »
John LinVB 1:35  Mokolo mwa nsima Yoáne azalákí wâná lisúsu na bayékoli ba yě bábalé.
John LinVB 1:36  Yoáne atálí Yézu ntángo azalákí koleka, alobí : « Tálá mwâ Mpatá ya Nzámbe. »
John LinVB 1:37  Eyókí bayékoli bábalé maloba mâná, balandí Yézu.
John LinVB 1:38  Yézu atálí o nsima, amóní bangó bazalákí kolanda yě, alobí na bangó : « Bozalí koluka níni ? » Bayanólí yě : « Rábi, lokóla ’te Motéyi, okofándaka wápi ? »
John LinVB 1:39  Yézu alobí na bangó : « Bóyâ kotála. » Bôngó bakeí na yě mpô bámóno esíká azalákí kofánda ; mokolo môná batíkálí epái ya yě. Ezalákí ngonga sókí ya ínei ya mpókwa.
John LinVB 1:40  Andréa, ndeko wa Simóni Pétro, azalákí mǒkó wa bayékoli baye bábalé bayókákí maloba ma Yoáne mpé balandákí Yézu.
John LinVB 1:41  Andréa akútání libosó na ndeko wa yě Simóni, alobí na yě : « Tomóní Mesíya », yě ndé Krístu.
John LinVB 1:42  Akeí na yě epái ya Yézu. Yézu atálí yě, alobí : « Yǒ Simóni, mwána wa Yoáne, út’o leló bakobénga yǒ Pétro », lokóla ’te libángá.
John LinVB 1:43  Mokolo mwa nsima Yézu akání kokende o Galiléa, akútání na Filípo, alobí na yě : « Landá ngáí. »
John LinVB 1:44  Filípo azalákí moto wa Betsáida, mbóka ya Andréa na Pétro.
John LinVB 1:45  Filípo akútání na Natánael, alobí na yě : « Tomóní moto óyo Móze akomáká mpô ya yě o búku ya Mo­béko, óyo baproféta bayébísáká : Yézu, mwána wa Yozéfu, wa Nazaréte. »
John LinVB 1:46  Natánael ayanólí yě : « Elóko níni ya malámu ekokí (ndé) koúta o Nazaréte ? » Filípo alobí na yě : « Yáká, ótála. »
John LinVB 1:47  Yézu amóní Natánael azalákí koyâ epai na ye, alobí mpô ya yě : « Tálá mo-Israél wa sôló, moto azalí na lokutá té. »
John LinVB 1:48  Natánael atúní yě : « Ndéngé níni oyébí ngáí ? » Yézu azóngísélí yě : « Libosó ’te Filípo ábê­nga yǒ, namónókí yǒ o nsé ya nzeté ya fígi. »
John LinVB 1:49  Natánael azóngísí : « Rábi, yǒ ozalí Mwána wa Nzámbe, ozalí Mokonzi wa Israél. »
John LinVB 1:50  Yézu ayanólí yě : « Oya­mbí zambí nalobí na yǒ ’te namónókí yǒ o nsé ya nzeté ya fígi ! Okomóno makambo masúsu makoleka óyo na bonéne. »
John LinVB 1:51  Mpé abakísí : « Ya sôló sôló, nalobí na bínó : bokomóno likoló likofungwama mpé bǎnzelú ba Nzámbe bakobuta mpé bakokita mpô ya Mwána wa Moto. »