Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
EXODUS
Prev Up Next
Chapter 22
Exod LinVB 22:1  Soko bato bakangi moyibi o ntango azali kotubola efelo ya ndako mpe babomi ye, bapesa bango etumbu te.
Exod LinVB 22:2  Kasi soko esalemi na moi, bazwa etumbu. Moyibi azongisa biloko binso ayibaki ; soko akoki te, bateke ye ; na mosolo mona bafuta biloko ayibaki.
Exod LinVB 22:3  Soko nyama eye ayibaki, ngombe, mpunda to mpata, ekufi te mpe ezwami epai ya moyibi, oyo asengeli kofuta mbala ibale.
Exod LinVB 22:4  Soko moto atiki bibwele bya ye bikende kolia o bilanga bya ndunda to o elanga ya vino ya moninga, afuta biloko binso bibwele biliaki, atanga mbuma iye ileki kitoko.
Exod LinVB 22:5  Soko moto apelisi móto penepene na nzube mpe móto moye mosikisi matiti na mbuma ya bilanga, moto apelisaki móto, afuta mpo ya biloko binso bisiki.
Exod LinVB 22:6  Soko moto abombisi mosolo to biloko epai ya moninga, mpe moyibi ayibeli moninga oyo biloko, soko bakangi moyibi, ye asengeli kosongisa mbala ibale biloko binso ayibaki.
Exod LinVB 22:7  Soko bakangi moyibi te, nkolo wa ndako abeleme na Nzambe mpo ya kosakola ’te ye moko ayibaki eloko ya moninga te.
Exod LinVB 22:8  O makambo manso basengeli kokata, to ngombe to mpunda to mpata to elamba to ata eloko nini ebungi, soko balobi : ‘Ezali bobele ye !’, batika likambo o maboko ma Nzambe. Oyo Nzambe akokitisa o likambo, ye moto afuta moninga mbala ibale.
Exod LinVB 22:9  Soko moto atikeli moninga mpunda, ngombe, mpata to ata nyama nini mpo akengele yango, mpe nyama eye ekufi to ebukani makolo, to bayibi babotoli yango mpe moto moko amonoki yango te,
Exod LinVB 22:10  ndai bakolayela Yawe ekokata likambo : soko mokengeli asali mabe to te. Nkolo andima maloba ma ye, kasi mokengeli afuta te.
Exod LinVB 22:11  Kasi soko nyama eye bayibaki ezalaki penepene na ndako ya ye, asengeli kofuta nkolo.
Exod LinVB 22:12  Soko nyama ya zamba ekatikati nyama, mokengeli alakisa ye biteni bya nyama ekufi, bongo afuta te.
Exod LinVB 22:13  Soko moto adefi nyama ya moninga mpe nyama eye ezoki to ekufi ntango nkolo wa nyama azalaki te, ye afuta.
Exod LinVB 22:14  Kasi soko nkolo azalaki wana, moninga afuta te. Soko adefaki nyama mwa mikolo, afuta mosolo mwa bodefi.
Exod LinVB 22:15  Soko moto asenginyi elenge mwasi, oyo abali naino te, mpe ayebani na ye, afuta mosolo mwa libala mpe abala ye.
Exod LinVB 22:16  Soko tata wa ye aapi ’te abala ye, afuta mosolo moye bakosengeke mpo ya libala lya ba-ngondo.
Exod LinVB 22:19  Moto abonzeli banzambe basusu libonza, baboma ye.
Exod LinVB 22:20  Otungisa mompaya te, onyokolo ye mpe te, zambi yo moko osalaki mompaya o mokili mwa Ezipeti.
Exod LinVB 22:21  Oyokisa mwasi bosenge mpe mwana etike mpasi te.
Exod LinVB 22:22  Soko osali bango mabe, mokolo bakobelela ngai, nakondimela bango.
Exod LinVB 22:23  Nakotoko na nkanda mpe nakoboma bino na mopanga : basi ba bino bakosanga babali, mpe bana ba bino bakosanga batata.
Exod LinVB 22:24  Soko odefisi mosolo na moninga to na mobola akofanda o ndako ya yo, mokolo bakosongisela yo, osenge mbakisa te.
Exod LinVB 22:25  Soko obombi elamba ya moninga oyo azali na nyongo ya yo, zongisa yango na mpokwa.
Exod LinVB 22:26  Azali na elamba esusu te mpo azipa nzoto, akolala ndenge nini soko azangi yango ? Soko abeleli ngai, nakoyoka ye, zambi ngai nakoyokelaka bato mawa.
Exod LinVB 22:27  Otuka Nzambe te, obetele mokonzi wa ekolo ya yo mobondo te.
Exod LinVB 22:28  Mbuma ya yambo ya elanga ya yo na mpe vino ya ekamelo ya yo, obonza yango noki. Pesa ngai mwana mobali wa yo wa yambo.
Exod LinVB 22:29  Sala se bongo na ngombe mpe na mpata ya yo. Mwana wa nyama etikala mikolo nsambo epai ya mama wa ye ; kasi o mokolo mwa mwambe opesa ngai yango.
Exod LinVB 22:30  Bosala basantu o miso ma ngai. Soko nyama ya zamba ekatikati nyama esusu o esobe, bokoki kolia mosuni mwa yango te ; bopesa mbwa nyama ena.