Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
ISAIAH
Prev Up Next
Chapter 30
Isai LinVB 30:1  Yawe alobi : Mawa na bato balolendo ! Bakani kosala makambo, kasi batuni ngai te, baluki koyokana na bato, kasi ngai nalingaki te, mpe babakisi bongo lisumu likolo lya lisumu.
Isai LinVB 30:2  Bakei o Ezipeti, kasi batuni ngai te, mpo baluka libiki epai ya Farao mpe bazwa esika ya kobombama o Ezipeti.
Isai LinVB 30:3  Kasi bobateli bwa Farao bokoyokisa bino nsoni, koluka libiki o Ezipeti ekosa­mbwisa bino.
Isai LinVB 30:4  Bankumu ba bino basili bakomi o Tanis, mpe bantoma ba bino bakomi o Kanes.
Isai LinVB 30:5  Bakoyoka nsoni, zambi bakosalisa bango te, bayebi kopesa bango lisalisi to litomba te, bakolembe bato baye bayebi se koyokisa nsoni.
Isai LinVB 30:6  Maloba ma bokaneli nyama ya Negeb. Bakatisi mokili mwa mpasi mpe mwa nsomo, mokili mwa ntambwe basi na babali ba nkele, mokili mwa bitupa na bibuki bya ngando. Batii nkita ya bango o mokongo mwa mpunda, bamemisi kamela biloko bya ba­ngo bya motuya mpo ya kokabela bato bakoki kosalisa bango te.
Isai LinVB 30:7  Lisalisi lya bato ba Ezipeti lizali mpamba lokola mompepe. Yango wana napesi Ezipeti nko­mbo eye : ‘Rakab, akosalaka mosala te’.
Isai LinVB 30:8  Sikawa, kende mpe koma yango o libaya, koma yango mpe o monkanda, mpo ezala seko o mikolo mikoya.
Isai LinVB 30:9  Bazali batomboki, bato ba lokuta, bato balingi koyoka mitindo mya Yawe te.
Isai LinVB 30:10  Na bamoni-makambo bakolobaka : « Botala te », mpe na baprofeta : « Biso tosengi te ’te bosakola makambo ma bosembo : boloba se maye makosepelisa bato, mpe bokosa na mamoni ma lokuta.
Isai LinVB 30:11  Bolongwa o nzela, botika balabala enene, bolongola Mosantu wa Israel o kati ya biso. »
Isai LinVB 30:12  Yango wana Mosantu wa Israel alobi boye : Bongo bino bokoboyaka liloba liye, bokondimaka makambo ma lokuta mpe ma kokosa.
Isai LinVB 30:13  Yango wana lisumu lina likozalela bino lokola monkaka mopasoli efelo, efelo ekokweya na mbala yoko na makeléle.
Isai LinVB 30:14  Ekozala lokola mbeki ya mabelé ekwei mpe ebolani biteni biteni, mawa te, mpe o kati ya biteni bina okoki kozwa eteni yoko te, eye ekoki na bokamati mwa makala ma móto, to na botoki mwa mai o libulu.
Isai LinVB 30:15  Mpamba te, Yawe Nzambe, Mosantu wa Israel, alobi boye : « Bokobika soko bobongoli mitema mpe bofandi kimia, elikya mpe kimia ekopesa bino bokasi. » Kasi bolingaki bongo te,
Isai LinVB 30:16  bolobi : « Te, tokokima na farasa ! » Malamu, ya solo bokokima. Lisusu : « Tokokima na farasa ya mbangu ! » Malamu, kasi baye bakolanda bino bakoleka bino na mbangu.
Isai LinVB 30:17  Bokaneli bwa moto moko bokolengisa bato nkoto, bokaneli bwa bato batano bokokimisa bino ; tee ekotikala se moko wa bino lokola likonzi lyoko o nsonge ya ngomba enene, to bendele yoko o ngomba eke.
Isai LinVB 30:18  Kasi Yawe akozila ngonga ya kolakisa bino bolamu, akoteleme mpe akoyokela bino ngolu, mpo Yawe azali Nzambe wa bosembo. Bato bakolikya na ye bakoyoka esengo !
Isai LinVB 30:19  Solo, bino bato ba Sion o Yeruzalem, bokolela lisusu te. Mokolo bokobelela, akolimbisa bino ; ekoyoka ye losambo la bino, akondimela bino.
Isai LinVB 30:20  Yawe akopesa bino mampa o nta­ngo ya mpasi, akopesa bino mai o ntango ya minyoko. Oyo akoteya bino akobombama lisusu te, mpe bokomono ye na miso.
Isai LinVB 30:21  Bokoyoka na matoi moto akoloba nsima ya bino : « Ata okokende o epai ya mwasi to o epai ya mobali, landa bobele nzela eye. »
Isai LinVB 30:22  Mokolo mona bokotala bikeko bya bino bo biloko mbindo, biye bopakolaki na palata to bokataki nko­ma, na bikeko bozipaki na wolo, bo biloko bosoto boko­bwaka byango, bokoloba : « Bolo­ngwa awa ! »
Isai LinVB 30:23  Nzambe akotindela bino mbula, mpo ya mbuma bokolona o bila­nga, mpo mampa na milona bikoma bilei biike mpe elengi. O mokolo mona bibwele bya bino bikolia o bisobe binene bya matiti kitoko.
Isai LinVB 30:24  Ngombe na mpunda iko­salela bino o bilanga, ikolia se bilei bizali na mongwa, biye bapupoli na nkanya mpe na lungu.
Isai LinVB 30:25  O mokolo mwa bobomi bonene manongi ma mboka makokweya, o ngomba inene mpe ike miluka mikotonda na mai mingi.
Isai LinVB 30:26  Mwi­nda mwa sanza mokozala makasi lokola mwa mwese, mpe mwese mokopesa mwinda mbala nsa­mbo. O mokolo mona Nzambe akokangisa mpota ya bato ba ye, mpe akobikisa baye bazokaki o etumba.
Isai LinVB 30:27  Talani ut’o mosika Nkombo ya Yawe ebelemi, móto na milinga milakisi nkanda ya ye enene, monoko mwa ye motondi na nkele, lolemu la ye lozali lokola móto mokosilisa binso.
Isai LinVB 30:28  Mpema ya ye ezali lokola mai matondisi moluka, soko moto akoti o mai, makokoma kin’o nkingo. Akoyongele bato babe na kayi­ngilu ya bobebisi, akotia ebende o monoko mwa bato mpo babunga nzela libela.
Isai LinVB 30:29  Bokoyemba lisusu lokola o nta­ngo ya eyenga, mpe esengo ekozala mingi o mitema mya bino, lokola o ntango bakobina na lomeko la mpiololo mpo ya kokoma o ngomba ya Yawe, libanga lya Israel.
Isai LinVB 30:30  Yawe akotombola lolaka la ye la nkembo, akolakisa lisusu bokasi bwa loboko la ye na nkele makasi mpe na móto mokosilisa binso, o ntei ya nkake, mbula makasi mpe mbula ya matandala.
Isai LinVB 30:31  Ba-Asur bakoyoka nsomo mpo ya lolaka la Yawe. Yawe akobete bango na lingenda.
Isai LinVB 30:32  Mbala inso Yawe akobete bango fimbo, bokoyoka miziki mya mbonda mpe mya nzenze. Yawe akobundisa ba­ngo.
Isai LinVB 30:33  Mpamba te, banda kala bapelisi etumbelo ya Tofet, eye babongiseli Molok ; zongazonga na yango libulu linene lizali, litondi na matiti mpe na nkoni. Lokola mbula ya mpaka, mpema ya Yawe ekopelisa móto mwango.