Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
MATTHEW
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 24
Matt LinVB 24:1  Yézu abimí o Témpelo. Awa abandí kokende, bayékoli babelémí na yě mpô ya kolakisa yě ndéngé Témpelo etóngámí.
Matt LinVB 24:2  Kasi alobí : « Bomóní bilóko biye bínso ? Ya sôló sôló, nalobí na bínó : libángá lyǒ kó té likotíkala likoló lya libángá lisúsu ; bínso bikobúkana nyé. »
Matt LinVB 24:3  Awa Yézu afándí o ngómbá ya Olíva, bayékoli bábalé, bobélé bangó mǒkó, bayéí epái ya yě, batúní yě : « Yébísá bísó ntángo níni yangó ekosálema, mpé elembo níni ekolakisa bísó mokolo okozónga mpé mokolo mwa nsúka ya molóngó. »
Matt LinVB 24:4  Yézu ayanólí bangó : « Bókéba ’te moto mǒkó ákósa bínó té.
Matt LinVB 24:5  Bato míngi bakokósa ’te bayéí o nkómbó ya ngáí, bakoloba ’te : ‘Krístu, ngáí óyo’ mpé bakokósa bato míngi.
Matt LinVB 24:6  Bokoyóka masoló mpé nsango ya bitumba, kasi bóbánga té. Makambo mâná mánso masengélí koyâ, kasi nsúka ekoyâ nokí té.
Matt LinVB 24:7  Ya sôló, ekólo yǒ kó ekobundisa ekólo esúsu ; bato ba mokili mǒkó bakobunda na mokili mosúsu. O bisíká míngi nzala na bokono bobé iko­ngala, mpé mokili mokoningana.
Matt LinVB 24:8  Mâná mánso makozala lokóla ebandela ya mpási ya kobóta.
Matt LinVB 24:9  O ntángo êná bakokaba bínó mpô ’te bányókolo bínó, mpé bakoboma bínó ; o bikólo bínso bakoyina bínó mpô ya nkómbó ya ngáí.
Matt LinVB 24:10  O mikolo mîná bato ebelé ba­ko­kwéya, bakotéke báníngá mpé bakoyinana.
Matt LinVB 24:11  Baproféta ebelé ba lokutá bakobima, bakokósa bato míngi.
Matt LinVB 24:12  Makambo mazángí bosémbo makongala, yangó wâná o mitéma mya bato míngi bolingi bokole­mbe.
Matt LinVB 24:13  Kasi moto akotía moléndé téé nsúka, akobíka.
Matt LinVB 24:14  Bakosakola Nsango Elámu eye ya Bokonzi bwa Likoló o nsé mobimba mpô ’te bato ba bikólo bínso báyéba yangó. O ntángo êná nsúka ekoyâ.
Matt LinVB 24:15  Bokomóno ’te Eboma-Mbóka, óyo Proféta Daniél alobákí, akotéleme o esíká esántu. (óyo ayebi kotánga áyéba ntína ya maloba maye !)
Matt LinVB 24:16  Mokolo môná bato bakozala o Yudéa bákíma epái ya ngómbá,
Matt LinVB 24:17  óyo akozala o motóndo mwa ndáko, ákita té mpô ya kokamata bilóko bya yě ;
Matt LinVB 24:18  óyo akozala o bilanga, ázónga o ndáko té mpô ya kokamata monkóto mwa yě.
Matt LinVB 24:19  Mawa na básí bakozala na zémi tǒ bakonúngisa bána o eleko êná !
Matt LinVB 24:20  Bósámbela mpô ’te mokolo bokokíma mozala o eleko ya mpío té, o mokolo mwa sábato mpé té.
Matt LinVB 24:21  Mpámba té, ekozala monyóko monéne mpenzá, lokóla ezalákí naíno té, bandá Nzámbe akelá mokili téé sikáwa ; mpé na nsima ekozala bôngó lisúsu té.
Matt LinVB 24:22  Sókó Nzámbe akokútola mikolo mîná té, mbele moto mǒ­kó té akobíka. Kasi akokútola mikolo mîná mpô ya bato baponómí.
Matt LinVB 24:23  Sókó moto akoloba na bínó o ntángo êná ‘Tálá, Krístu azalí áwa !’ tǒ ‘Tálá yě kúná !’, bóndima té.
Matt LinVB 24:24  Sôló, ba-Krístu ba lokutá na baproféta ba lokutá bakobima, bakolakisa bilembo mpé bakosála makamwísi makokí kokósa atâ bato baye Nzámbe aponí, sókó ekokí kosálema !
Matt LinVB 24:26  Bôngó, sókó balobí na bínó : ‘Tálá, azalí o elíkí’, bókende té ! Sókó balobí : ‘Bótála, abómbámí o káti ya ndáko’, bóndima té !
Matt LinVB 24:27  Sôló, lokóla monkalali mokoútaka o Esti mpé mokongengeke kín’o Wésti, Mwána wa Moto akoyâ sé bôngó !
Matt LinVB 24:28  Esíká ebembe elálí, bingondó bikosangana wâná.
Matt LinVB 24:29  Esílí monyóko mwa mikolo mîná, mwésé mokoínda, sánzá eko-ngenge lisúsu té, minzóto miko­kwéya út’o likoló, ngúyá ya likoló ínso ikoningana.
Matt LinVB 24:30  Na nsima ele­mbo ya Mwána wa Moto ekomónono o likoló. O ntángo êná bato ba bikólo bínso bya nsé bakokímela ; bakomóno Mwána wa Moto akoyâ o mampata ma likoló na ngúyá mpé na nkémbo enéne.
Matt LinVB 24:31  Akotínda bǎnzelú ba yě bábéte mindúle makási mpô ’te básangisa bato baye yě aponí, útá bipái bínso bya mokili, út’o nsúka yǒ kó ya likoló kín’o nsúka esúsu.
Matt LinVB 24:32  Bóyóka ntína ya moúlání mwa nzeté yá fígi : Sókó bitápi bya yangó bikómí petepete mpé bibimí nkásá, boyébí ’te eleko ya mói makási ekómí penepene.
Matt LinVB 24:33  Sé bôngó, ntángo bokomóno makambo mâná mánso, bóyéba ’te Mwána wa Moto azalí koyâ, akómí penepene.
Matt LinVB 24:34  Ya sôló sôló, nalobí na bínó : mâná mánso makosálema libosó ’te bato bazalí sikáwa bákúfa.
Matt LinVB 24:35  Likoló na nsé bikoleka, kasi maloba ma ngáí makoleka sókí moké té.
Matt LinVB 24:36  Moto mǒ­kó té ayébí mokolo níni tǒ o ngonga níni makambo mâná makosálema, atâ bǎnzelú ba likoló té, atâ Mwána (wa Moto) té. Bobélé Tatá yě mǒkó ayébí.
Matt LinVB 24:37  Boyéi bwa Mwána wa Moto bokozala lokóla ezaláká o mikolo mya Nowé.
Matt LinVB 24:38  O mikolo mîná libosó lya mpela enéne bato bazalákí kolía, komele, kobálana, kín’o mokolo Nowé ayíngélí o masúwa :
Matt LinVB 24:39  bazalákí kokanisa likambo lyǒ kó té, téé mpela eyéí mpé esílísí bangó bánso. Ekozala sé bôngó o ntángo ya boyéi bwa Mwána wa Moto.
Matt LinVB 24:40  Bato bábalé bakozala o bilanga : bakokamata mǒkó, bakotíka mosúsu ;
Matt LinVB 24:41  básí bábalé bakozala koníka fufú : bakokamata mǒkó, bakotíka mosúsu.
Matt LinVB 24:42  Bôngó bókéngele, zambí boyébí té mokolo níni Mokonzi wa bínó akoyâ.
Matt LinVB 24:43  Bóyéba malámu : Sókó nkóló wa ndáko ayébákí o ngonga níni moyíbi akoyâ na butú, mbele akéngélékí, mpé apekísákí moyíbi kobúka ndáko.
Matt LinVB 24:44  Bôngó bínó lokóla, bózala na bokéngi, zambí Mwána wa Moto akoyâ ntángo bínó bokokanisa té.
Matt LinVB 24:45  Náni mosáleli malámu mpé wa mayéle, óyo mokonzi aponí mpô ’te áyángela bato ba ndáko ya yě, mpé ápésa bangó biléi o ntángo ekokí ?
Matt LinVB 24:46  Esengo na mosáleli óyo, sókó mokonzi ayéí mpé akútí yě azalí kosála mosálá !
Matt LinVB 24:47  Ya sôló sôló, nalobí na bínó : akotía yě moyángeli wa bilóko bya yě bínso.
Matt LinVB 24:48  Kasi sókó mosáleli óyo asálí mabé mpé amílobélí : « Mokonzi wa ngáí aúmélí »,
Matt LinVB 24:49  mpé abandí kobéte bato ba mosálá, kolía mpé komele elongó na balángwi,
Matt LinVB 24:50  mokonzi wa yě akoyâ o mokolo yě akokanisa té, mpé o ntángo akoyéba té.
Matt LinVB 24:51  Akolongola yě o mosálá mpé akosála na yě lokóla bakosálaka na bakíbisi ; kúná bakolela mpé bakolía míno.