Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
NUMBERS
Prev Up Next
Chapter 32
Numb LinVB 32:1  Bana ba Ruben mpe ba Gad bazalaki na bibwele mingi, ebele mpenza. Bamoni ’te mokili mwa Yazer na mokili mwa Galaad mozalaki mabelé malamu mpo ya koleisa bibwele.
Numb LinVB 32:2  Bana ba Gad mpe ba Ruben bayei epai ya Moze na nganga Nzambe Eleazar na bankumu ba lisanga mpe balobi :
Numb LinVB 32:3  « Mboka Atarot, Dibon, Yazer, Nimra, Kesbon, Eleale, Sebam, Nebo na Meon,
Numb LinVB 32:4  mokili mo­ye Yawe abotoli mpo apesa ba-Israel mozali mabelé malamu mpo ya koleisa bibwele, mpe biso basaleli ba yo tozali babengeli ba bibwele. »
Numb LinVB 32:5  Balobi lisusu : « Soko tozwi bolamu o miso ma yo, tika mokili moye mozala eteni ya biso basaleli ba yo ; otinda biso tokatisa Yordane te. »
Numb LinVB 32:6  Moze ayanoli bana ba Gad mpe ba Ruben maloba maye : « Boni ! Ba­ndeko ba bino bákende kobunda etumba mpe bino bótikala awa ?
Numb LinVB 32:7  Awa bana ba Israel balingi kokoto o mo­kili Yawe apesaki bango, mpo nini bozali kolembisa bango mitema ?
Numb LinVB 32:8  Batata ba bino basalaki se bongo o ntango natindaki bango ut’o Kades Barne mpo ’te batala mokili.
Numb LinVB 32:9  Bake­ndeki tee o lobwaku la Eskol, batali mokili mpe na nsima balembisaki ba-Israel mitema mpo ’te bakende te o mokili Yawe apesaki bango.
Numb LinVB 32:10  Yango wana o mokolo mona Yawe ayokaki nkanda mpenza mpe alayaki ndai eye :
Numb LinVB 32:11  ‘Bato baye babimaki o Ezipeti mpe bakokisi mibu ntuku ibale bakomono mokili mona mokolo moko te, mokili moye nalakelaki Abarama, Isaka na Yakob, zambi batosaki ngai na motema moko te.
Numb LinVB 32:12  Bobele Kaleb, mwana wa Yefune, moto wa Kenaz, na Yozue, mwana wa Nun bakokoto, zambi bango batosaki Yawe na motema moko.’
Numb LinVB 32:13  Yawe ayokeli ba-Israel nkanda mpe asalaki ’te balekaleka o eliki mibu ntuku inei mobimba tee libota liye mobimba lisilaki nye, mpo basalaki mabe o miso ma Yawe.
Numb LinVB 32:14  Mpe sikawa bino bokomi kosala lokola libota lya basumuki lokola batata ba bino, mpo ya kongalisa nkanda eye Yawe azali koyokela bato ba Israel.
Numb LinVB 32:15  Soko botiki kolanda Yawe, bokoumela naino mikolo mingi o eliki mpe bokotinda bato banso o nzela ya liwa. »
Numb LinVB 32:16  Balobi lisusu na Moze : « Biso tolingi kotonga mapango ma mpata mpo ya bibwele bya biso mpe bi-ngumba mpo ya bana ba biso.
Numb LinVB 32:17  Kasi biso moko tokomeme bibuneli o maboko, biso tokokende liboso lya bana ba Israel tee mokolo tosili kokomisa bango o esika basengeli kokoma. Kasi bana ba biso bakotikala o bingu­mba bisingami na mapango makasi mpo ’te bato bafandi o mokili moye basala bango mabe te.
Numb LinVB 32:18  Tokozonga epai biso te liboso ’te bana ba Israel banso bakoma bankolo ba mabelé ma bango.
Numb LinVB 32:19  Biso tokozwa mabelé elo­ngo na bango te kuna o ngambo ya Yordane, zambi mabelé ma biso mazali epai eye ya Yordane, epai moi mokobimaka. »
Numb LinVB 32:20  Moze alobi na bango : « Soko bokokisi maloba ma bino mpe bomile-ngeli na etumba o miso ma Yawe,
Numb LinVB 32:21  mpe soko bino banso bondimi kobunda etumba mpe kokatisa Yordane o miso ma Yawe mpo ya kobengana banguna ba ye banso,
Numb LinVB 32:22  o mokolo mo­na, ntango Yawe akokonza mokili mona, bokoki kozonga wana ; bokozala na nyongo te epai ya Yawe to epai ya bato ba Israel. Mpe o miso ma Yawe mokili moye mokozala mwa bi­no.
Numb LinVB 32:23  Kasi soko bosali bongo te, bo­kosala lisumu o miso ma Yawe ; bongo boyeba ’te lisumu lya bino likolanda bino nsima.
Numb LinVB 32:24  Sikawa boke­nde kotonga bingumba mpo ya bana ba bino, mpe mapango mpo ya bi­bwe­le bya bino, kasi bosala maka­mbo manso se lokola bolakeli ngai. »
Numb LinVB 32:25  Bana ba Gad mpe ba Ruben balobi na Moze : « Biso basaleli ba yo tokosala lokola mokonzi wa biso ati­ndi.
Numb LinVB 32:26  Bana na basi ba biso bakotikala o bi­ngumba bya Galaad elongo na bibwele mpe na nyama ya biso ;
Numb LinVB 32:27  kasi biso, basaleli ba yo, banso bibuneli o maboko, tokokende kobunela Yawe, lokola yo mokonzi wa biso oti­ndi. »
Numb LinVB 32:28  Moze apesi bitinda mpo ya bango na nganga Nzambe Eleazar, na Yozue, mwana wa Nun mpe na bankumu banso ba mabota ma Israel.
Numb LinVB 32:29  Alobi na bango : « Soko bana ba Gad mpe ba Ruben bandimi, bibuneli o maboko, bakokatisa Yordane elongo na bino mpo ya kobunela Yawe, o mokolo bosili kobotolo mokili mona, bopesa bango mokili mwa Galaad, mozala mwa bango.
Numb LinVB 32:30  Kasi soko bakatisi Yordane te mpo ya kobunda etumba, bakozwa mabelé o kati ya bino o mokili mwa Kanana. »
Numb LinVB 32:31  Bana ba Gad mpe ba Ruben bazongisi : « Maloba Yawe alobi na biso, basaleli ba yo, tokokokisa mango.
Numb LinVB 32:32  Biso tokokatisa Yordane mpo ya kobunela Yawe o mokili mwa Kanana, kasi biso tosengeli kozwa mabelé epai eye ya Yordane. »
Numb LinVB 32:33  Moze apesi mokili mwa Sion, mokonzi wa bato ba Amor mpe mokili mwa Og, mokonzi wa Basan na bana ba Gad mpe ba Ruben mpe na ndambo ya libota lya Manase, mwana wa Yozefu ; akabeli bango mpe bingumba o ndelo ya mokili.
Numb LinVB 32:36  Bet-Nimra na Bet-Aran, bingumba bisingami na mapango makasi mpo ya kobatela mpata ya ba­ngo.
Numb LinVB 32:37  Bana ba Ruben batongi Kesbon, Eleale, Kiriatim,
Numb LinVB 32:38  Nebo, na Baal-Meon (kasi babongoli nkombo ya yango nsima) na Sibma. Bapesi bi­ngumba biye batongaki nkombo.
Numb LinVB 32:39  Bana ba Makir, mwana wa Manase, bakei o mokili mwa Galaad. Babotoli mwango mpe babengani ba-Amor bazalaki wana.
Numb LinVB 32:40  Moze apesi Makir, mwana wa Manase, mokili mwa Galaad ; oyo akei kofanda kuna.
Numb LinVB 32:41  Yair, mwana wa Manase, akei kobotolo nganda ya bango mpe apesi ya­ngo nkombo Nganda ya Yair.
Numb LinVB 32:42  Noba akei kobotolo Kenat mpe bingumba bya penepene, mpe apesi byango nko­mbo ya ye moko Noba.