Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
GENESIS
Prev Up Next
Chapter 36
Gene LinVB 36:2  Ezau aponoki basi o kati ya bilenge basi ba Kanana. Nkombo ya bango : Ada, mwana wa mo-Iti Elon ; Olibama, mwana wa Ana, nkoko wa Sibeon, moto wa Kor,
Gene LinVB 36:3  na mpe Basemat, mwana wa Ismael mpe ndeko wa Nebayot.
Gene LinVB 36:5  Olibama aboti Yeus, Yalam na Kora. Baboteli Ezau bana babali baye o mokili mwa Kanana.
Gene LinVB 36:6  Ezau atiki ndeko wa ye Yakob, akei o ekolo esusu, na basi, bana babali na bana basi, bato banso ba ndako, bibwele na mpunda inso, na mpe biloko binso azwaki o mokili mwa Kanana.
Gene LinVB 36:7  Lokola bazalaki na biloko mingi, bakoki kofanda esika yoko te, mokili mwa bango mokoki na bango babale te, mpo biloko bilekaki mingi.
Gene LinVB 36:8  Bongo Ezau, ye nde Edom, akei kofanda o ngomba Seir.
Gene LinVB 36:9  Tala libota lya Ezau, tata wa Edom, o ngomba Seir.
Gene LinVB 36:10  Nkombo ya bana ba Ezau : Elifaz, mwana wa Ada, mwasi wa Ezau, na Reuel, mwana wa Basemat, mwasi mosusu wa Ezau.
Gene LinVB 36:11  Bana ba Elifaz : Teman, Omar, Sefo, Gatam na Kenaz.
Gene LinVB 36:12  Elifaz, mwana wa Ezau azalaki na maka-ngo, nkombo ya ye Timna ; oyo aboteli ye Amalek. Bango bazali bana babali ba Ada, mwasi wa Ezau.
Gene LinVB 36:13  Bana ba Reuel : Nakat, Zera, Samna na Misa. Bango bazali bana babali ba Basemat, mwasi wa Ezau.
Gene LinVB 36:14  Bana ba Olibama, mwana wa Ana, nkoko wa Sibeo, mwasi wa Ezau : oyo aboteli ye Yeus, Yalam na Kora.
Gene LinVB 36:15  Bakonzi ba mabota ma bana ba Ezau : mokonzi Tema, mwana wa liboso wa Ezau, mokonzi Omar, mokonzi Sefo, mokonzi Kenaz,
Gene LinVB 36:16  mokonzi Gatam, moko­nzi Amalek. Bana baye ba Ada bazali bakonzi ba Elifaz o Edom.
Gene LinVB 36:17  O kati ya bana ba Reuel, mwana wa Ezau : mokonzi Nakat, mokonzi Zera, mokonzi Samna, mokonzi Misa. Bana baye ba mwasi wa Ezau, Basemat, bazali bakonzi ba Reuel o Edom.
Gene LinVB 36:18  O kati ya bana ba Olibama, mwasi wa Ezau : mokonzi Yeus, mokonzi Yalam, mokonzi Kora. Bazali bakonzi ba libota lya Olibama, mwana wa Ana, mwasi wa Ezau.
Gene LinVB 36:19  Yango nkombo ya bana ba Ezau to Edom, mpe nkombo ya bakonzi ba bango.
Gene LinVB 36:20  Bana ba Seir, moto wa Kor, bato ba liboso o mokili moye : Lotan, Sobal, Sibeo na Ana,
Gene LinVB 36:21  Diso, Eser, Disan bazali bakonzi ba ba-Kor, bana ba Seir o mokili mwa Edom.
Gene LinVB 36:22  Lo­tan aboti Ori na Emam mpe ndeko mwasi wa ye Timna.
Gene LinVB 36:23  Sobal aboti Alvan, Manakat, Ebal, Sefo na Onam.
Gene LinVB 36:24  Sibeo aboti Aya na Ana. Ana moto akutaki mai móto o eliki o ntango akendeki koleisa mpunda ya tata wa ye Sibeo.
Gene LinVB 36:25  Ana aboti Diso, mwana mobali, mpe Olibama, mwana mwasi.
Gene LinVB 36:29  Bakonzi ba ba-Kor : mokonzi Lotan, mokonzi Sobal, mokonzi Sibeo, mokonzi Ana,
Gene LinVB 36:30  mokonzi Diso, mokonzi Eser, mokonzi Disan. Bazali bakonzi ba ba-Kor, e­ngebene na bokabwani bwa mabota o mokili mwa Seir.
Gene LinVB 36:31  Bakonzi bazalaki koyangela mokili mwa Edom o ntango Israel alubolaki naino mokonzi kuna te.
Gene LinVB 36:32  O Edom, Bela, mwana wa Beor azalaki mokonzi o mboka Dinaba.
Gene LinVB 36:33  Bela awei mpe Yobab, mwana wa Zera wa Bosra, ayangeli o esika ya ye.
Gene LinVB 36:34  Yobab awei mpe Kusam wa mokili mwa ba-Teman ayangeli o esika ya ye.
Gene LinVB 36:35  Kusam awei mpe Adad, mwana wa Bedad, ayangeli o esika ya ye ; ye moto alongi ba-Madian o esobe ya Moab ; mboka ya ye Avit.
Gene LinVB 36:36  Adad awei mpe Samla wa Masreka ayangeli o esika ya ye.
Gene LinVB 36:37  Samla awei mpe Saul wa Reobot-a-Nakar ayangeli o esika ya ye.
Gene LinVB 36:38  Saul awei mpe Baal-Kanan, mwana wa Akbor, ayangeli o esika ya ye.
Gene LinVB 36:39  Baal-Kanan awei mpe Adad ayangeli o esika ya ye ; mboka ya ye Pawu, nkombo ya mwasi wa ye Meetabeel, mwana wa Matred, wa Me-Zaab.
Gene LinVB 36:40  Nkombo ya bakonzi ba Ezau engebene na bokabwani bwa mabota mpe bwa mboka : mokonzi Timna, mokonzi Alva, mokonzi Yetet ;
Gene LinVB 36:43  mokonzi Magdiel, mokonzi Iram. Bazali bakonzi ba Edom, lokola bafandi o mboka ya ekolo esika bazalaki bankolo. Mabota ma Ezau, tata wa Edom, ma­ngo mana.