Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
JEREMIAH
Prev Up Next
Chapter 5
Jere LinVB 5:1  Bokatisa balabala ya Yeruzalem, botala malamu mpe bomeka koyeba, boluka o wenze mpe o zando. Soko bomoni ata moto moko wa bosembo, oyo akolukaka bosolo, nakolimbisa bato ba engumba eye.
Jere LinVB 5:2  Bakolayaka na nkombo ya Yawe, kasi ndai ya bango izali ya lokuta.
Jere LinVB 5:3  E Yawe, olingi se makambo ma bosolo. Ata opesi bango etumbu, bakoyoka te. Ata onyati bango, bakozwa mayele te. Bazali bato ba motó makasi lokola libanga, baboyi kobongola mitema.
Jere LinVB 5:4  Namilobeli : « Bazali bato ba mawa, bayebi eloko te, mpo bayebi nzela ya Yawe te, mibeko mya Nzambe wa bango mpe te.
Jere LinVB 5:5  Bongo nakokende epai ya bato ba­nene, nakoloba na bango, mpo bango bayebi nzela ya Yawe, bayebi mpe mibeko mya Nzambe wa bango ! » Kasi bango mpe babwaki moku-mba, bakati nsinga izalaki kokanga ba­ngo.
Jere LinVB 5:6  Yango wana nkosi ya zamba iko­swa bango, gambala ya esobe ikosilisa bango, nkoi ikozinga mboka ya bango ; ata nani akobima o mboka akoliama, mpo babuki mibeko mingi, mpe bawangani ngai mbala ebele.
Jere LinVB 5:7  Mpo nini nalimbisa bino ? Bana ba yo baboyi ngai, bakolayaka na nkombo ya ba­nza­mbe ba lokuta. Napesi bango bomengo, nzokande bakomi bato ba ekobo, bakowelaka ndako ya bandumba.
Jere LinVB 5:8  Bakomi lokola farasa babali iyoki nzoto móto, bakobengaka mwasi wa moninga.
Jere LinVB 5:9  Bongo napesa bango etumbu te ? Maloba ma Yawe. Nazongisela ekolo eye mabe te ?
Jere LinVB 5:10  Bokende kobebisa bilanga bya vino o ngomba, bonyata binso, bokata bitapi binso, zambi bizali bya Yawe te !
Jere LinVB 5:11  Solo, bato ba Israel mpe ba Yuda baboyaki ngai koboya. Maloba ma Yawe.
Jere LinVB 5:12  Bawanganaki Yawe, balobaki : « azali te ! Mabe makokwela biso te, tokokufa na mopanga to na nzala ekasi te !
Jere LinVB 5:13  Baprofeta bazali se lokola mopepe, Nzambe akolobaka na monoko mwa bango te. Mabe mana makokwela bango moko. »
Jere LinVB 5:14  Yango wana Yawe Nzambe wa bo­kasi bonso alobi : Awa bolobaki bongo nakosala ’te maloba ma ngai makoma móto o monoko mwa yo, mpe bato baye bakoma nkoni ekozika na móto.
Jere LinVB 5:15  Yawe alobi : Bato ba Israel, nakotindela bino bato ba ekolo mosika, ekolo eumeli mingi mpe eyebani ut’o kala, bokoyebaka lokota la bango te, bokoyeba mpe ntina ya maloba ma bango te.
Jere LinVB 5:16  Soko babeti litimbo, liwa se wana ! Bazali bilombe mpenza.
Jere LinVB 5:17  Bakolia mbuma ya bilanga na ma­mpa ma bino, bakosilisa bana ba bino babali na basi, ngombe na mpata ya bino, bakobebisa bilanga bya nzete ya vino mpe ya figi, bakobuka bibombamelo biye botiaki mitema, mpe na mimpanga bakoboma bato bakozala wana.
Jere LinVB 5:18  Nzokande o mikolo mina, Yawe alobi bongo, nakosilisa bino ba­nso te.
Jere LinVB 5:19  Soko bakotuna : « Ntina nini Yawe Nzambe wa biso asali biso mana manso ? », okoloba na ba­ngo : « Lokola boboyi ngai mpe bolandi banzambe ba bikolo bisusu o ekolo ya bino moko, se bongo bokokoma basaleli ba bato basusu o ekolo ya bampaya. »
Jere LinVB 5:20  Boyebisa bato ba libota lya Yakob nsango eye, bosakola yango o mokili mwa Yuda :
Jere LinVB 5:21  Boyoka, bino bazoba, bato baza­ngi mayele, boyoka : Bozali na miso, kasi bokomonoko te, bozali na matoi, kasi bokoyokaka te !
Jere LinVB 5:22  Yawe alobi : Bokobanga ngai te ? Bokolenge o miso ma ngai te, solo ? Ngai moto natii zelo lokola ndelo ya mbu, ndelo ya nsuka eye mbu ekoleka te : mai makoki kotomboko, kasi se mpamba, mbonge ikoki kosala makeléle, kasi ikoleka ndelo yango te.
Jere LinVB 5:23  Kasi bato baye bazangi botosi, bazali batomboki, batiki ngai mpe balandi nzela ya bango moko.
Jere LinVB 5:24  Bamilobelaki te ’te : « Tobanga Yawe Nzambe wa biso, oyo akonokisaka mbula o eleko ekoki, mbula ya ebandela mpe mbula ya nsuka, mpe akotikelaka biso mikolo mya bobuki mbuma. »
Jere LinVB 5:25  Masumu ma bino mabebisi maka­mbo mana, mpo ya mabe ma bino bokozwa malamu maye te.
Jere LinVB 5:26  O ekolo ya ngai bato babe bazali, bakokengeke lokola mobomi nde­ke, bakotiaka mitambo mpo ya koka-nga bato.
Jere LinVB 5:27  Lokola ekoló etondi na ndeke nde­nge na ndenge, ndako ya bango itondi na biloko bayibaki ; bazwi bongo bomengo mpe bakomi makasi.
Jere LinVB 5:28  Bakomi nzoto enene mpe mafuta, bakolekisaka ndelo na bosali mabe. Bakomemyaka bosembo te, baboyi kosalisa bana bitike bakopanganaka na babola te.
Jere LinVB 5:29  Bongo na ntina ena napesa bango etumbu te, mpe nazongisela ekolo ena mabe te ? Maloba ma Yawe.
Jere LinVB 5:30  Makambo mabe mpe ma nsomo makosalemaka o ekolo eye :
Jere LinVB 5:31  baprofeta bakosakolaka maka­mbo ma lokuta, banganga Nzambe bakolukaka ma­tomba ma bango moko. Mpe bato ba ngai balingi yango ! Kasi bokosala nini o mokolo mwa nsuka ?