Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
JOB
Prev Up Next
Chapter 30
Job LinVB 30:1  Kasi sikawa bato bazali kotiola ngai, mokóló wa bango ; natiaki batata ba bango nsima ya mbwa ya ngai, iye izalaki kokengele bibwele bya ngai.
Job LinVB 30:2  Bakokaki kopesa ngai maboko te, zambi bokasi bwa bango bosila kala.
Job LinVB 30:3  Nzala mpe mpasi ilembisaki bango, bazalaki kolia matiti mpamba ma esobe ;
Job LinVB 30:4  bazalaki kobuka mbika o bilanga bya kala ; bilei bya bango, se minsisa mya nzete.
Job LinVB 30:5  Bato banso babenganaki bango, bawulolaki bango lokola bakowulolaka bayibi.
Job LinVB 30:6  Bakendeki kolala o mabwaku ma nsomo, o mibenga mya ngomba mpe o mabulu o kati ya mabelé.
Job LinVB 30:7  Wana balelaki o kati ya matiti lokola ngombe, mpe babombamaki o nse ya nzete ya nzube.
Job LinVB 30:8  Bazalaki bato ba mpamba baye bazangi lokumu, bato ba ekolo ya bango bazalaki kobengana bango.
Job LinVB 30:9  Bakomisi nkombo ya ngai lokola nzembo, nakomi lokola lisapo o minoko mya bango.
Job LinVB 30:10  Bayoki ngai nsomo, batelemi mosika na ngai to babwakeli ngai nsoi o elongi, nsoni te !
Job LinVB 30:11  Awa Nzambe alembisi ngai mpe abwaki ngai, balakisi ngai limemye soki te.
Job LinVB 30:12  Penepene na ngai bakomi ebele, batieli ngai mabaku mpo ’te bakweisa ngai, bamilengeli mpo bazwa nzela ya koboma ngai.
Job LinVB 30:13  Bakangeli ngai nzela bipai binso, baluki se kosukisa ngai, moto moko te ayei kosalisa ngai.
Job LinVB 30:14  Bakoti ebele o esika babuki lopango, bakimi mabanga malingi kokwela bango.
Job LinVB 30:15  Nsomo enene ekangi ngai na mbala yoko, elikya ya ngai ekimi lokola mompepe, lokumu la ngai losili lokola limpata lilimwi.
Job LinVB 30:16  Sikawa bomoi bozali kokima ngai, mikolo mya mpasi mizali koyela ngai.
Job LinVB 30:17  Na butu mpasi eyeli ngai, eswi ngai minkuwa ; ezali lokola nyama ike ikolia ngai, ikopema te.
Job LinVB 30:18  Lokola moto akangi ngai makasi na elamba, afini ngai nkingo.
Job LinVB 30:19  Abwaki ngai o kati ya potopoto, nakomi lokola mputulu ya makala.
Job LinVB 30:20  Nabeleli yo Nzambe, mpe ondimeli ngai te, natelemi o miso ma yo, otali ngai te.
Job LinVB 30:21  Okomi konyokolo ngai mingi mpenza, bokasi bwa loboko la yo bokweisi ngai.
Job LinVB 30:22  Omemi ngai na mompepe lokola likolo lya mpunda, lokola ekumbaki oningisi ngai.
Job LinVB 30:23  Nayebi solo ’te okotinda ngai o liwa, o mboka eye bato banso bakokendeke.
Job LinVB 30:24  Ngai nde naboyaki kosalisa mobola, oyo ayaki kosenge lisalisi o mpasi ya ye ?
Job LinVB 30:25  Ngai nalelaki elongo na baye bazalaki na mpasi, mpe nazalaki koyokela bango mawa.
Job LinVB 30:26  Nalukaki kozwa bolamu, nazwi se mabe, nazilaki mwinda, kasi tala molili moyei.
Job LinVB 30:27  Motema mwa ngai mozali kobete makasi ntango inso ; mokolo na mokolo mokoyela ngai mpasi.
Job LinVB 30:28  Ata natamboli na elongi mawa mawa, moto moko abondi ngai te, natelemeki o lisanga se mpo ’te nabelela.
Job LinVB 30:29  Nakomi ndeko wa minsole, nakoti o molongo mwa maligbanga.
Job LinVB 30:30  Lomposo la ngai loindi mpe lolongwi, minkuwa mya ngai miziki mpe mikauki.
Job LinVB 30:31  Nzenze ya ngai ezali koyokisa nzembo ya lilaka, mpiololo ya ngai elandi se mingongo mya baleli.