ISAIAH
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
43
44
45
46
47
48
49
50
51
52
53
54
55
56
57
58
59
60
61
62
63
64
65
66
Chapter 14
Isai | LinVB | 14:1 | Yawe akoyokela Yakobo mawa, akopono Israel lisusu. Akozongisa bango o mabelé ma bango moko. Bampaya bakoya kofanda na bango elongo mpe bakosangana na libota lya Yakobo. | |
Isai | LinVB | 14:2 | Bato bakokamba bango mpe bakotika bango o ekolo ya bango moko. Bato ba Israel bakoyamba bango o mokili mwa Yawe, bakokomisa bango basali babali na basali basi. Bakokanga o boombo baye bakangaki bango liboso, mpe bakoyangela baye banyokoloki bango liboso. | |
Isai | LinVB | 14:4 | bokoyemba nzembo eye ya mbokela mpo ya mokonzi wa Babilone : Ndenge nini lolendo la monyokoli losuki boye ? | |
Isai | LinVB | 14:6 | Moto oyo azalaki kobete bato, mawa te, na nkanda enene anyokoloki bikolo, alembeki te. | |
Isai | LinVB | 14:8 | Ata nzete ya sipresi ikosepela mpo okwei, awa olali wana o nse, nzete ya sedere ya Libano ikoloba : Banda olali bayei lisusu te mpo ya kokata biso. | |
Isai | LinVB | 14:9 | O mboka ya bawa bakosepela mpe mpo ya yo o mokolo bakoyoka nsango ’te ozali koya. Mpo ya yo balamusi bato bawa, baye bazalaki bato banene ba nse, batelemisi bakonzi ba bikolo o ngwende ya bango. | |
Isai | LinVB | 14:10 | Banso lisanga bakoyamba yo mpe bakoloba : « Yo mpe osuki mabe se lokola biso, okomi ndenge yoko na biso ! | |
Isai | LinVB | 14:11 | Okiti o mboka ya bawa na lipombo, mpe na miziki mya nzenze ya yo. Okomi kolala o litoko lya mpambo, mpe ozipami na bolangiti bwa nkusu. | |
Isai | LinVB | 14:12 | Yo monzoto mwa ntongo, mwana wa moi mobimi, ndenge nini obwakemi okwei o nse, yo moto ozalaki kolonga bikolo binso ? | |
Isai | LinVB | 14:13 | Omilobelaki : ‘Nakobuta o likolo, nakotia ngwende likolo lya minzoto mya Nzambe, nakofanda o ngomba ya likita lya banzambe, o nsonge ya Nordi. | |
Isai | LinVB | 14:16 | Baye bamoni yo bongo, batali yo malamu, mpe bamituni : « Ye nde oyo azalaki kolengisa mokili, mpe koningisa bakonzi ? | |
Isai | LinVB | 14:17 | Oyo akomisaki mokili lokola eliki, oyo abebisaki bingumba binso, oyo aboyaki kozongisa baombo o ekolo ya bango ? » | |
Isai | LinVB | 14:19 | Kasi yo, babwaki yo o libanda lya lilita, lokola etapi ekauka, lokola ebembe eye banyati, o nse ya bato bakufaki na mompanga. Bango bakundami likolo lya mabanga, | |
Isai | LinVB | 14:20 | kasi okosangana na bango o lilita te, zambi obebisi ekolo ya yo, obomi bato ba yo. Bakotanga nkombo ya bato baye babe lisusu te. | |
Isai | LinVB | 14:21 | Bomilengele mpo ya koboma bana ba ye, mpo ya mabe ma batata ba bango. Bateleme lisusu te mpo ya kobotolo mokili, mpe batondisa mokili mobimba na bingumba te. | |
Isai | LinVB | 14:22 | Yawe wa bokasi bonso alobi boye : Nakobimela bango, nakobebisa Babilone, ata nkombo ekotikala te, ata moto moko akotikala te ! Yawe alobi bongo. | |
Isai | LinVB | 14:23 | Engumba ekokoma potopoto, ekotonda na ngulu ya zamba, nakosilisa Babilone, ekokufa libela. Yawe wa bokasi bonso alobi bongo. | |
Isai | LinVB | 14:24 | Yawe wa bokasi bonso alayi ndai eye : Maye manso nakanaki o motema, makosalema, maye nalingi kosala ekokokisama : | |
Isai | LinVB | 14:25 | nakosukisa bato ba Asur o mokili mwa ngai, nakonyata bango o ngomba ya ngai. Nakolongola ekangiseli batiaki o nkingo ya bato, nakolongola mokumba batiaki o mapeke ma bato. | |
Isai | LinVB | 14:27 | Awa Yawe wa bokasi bonso akani bongo, nani akopekisa ye ? Awa atomboli loboko, nani akoki kokitisa lango ? | |
Isai | LinVB | 14:29 | Bino bato ba Filisti mobimba, bosepela te, awa Nzambe abuki lingenda lizalaki kobete bino. Zambi nyoka ekufi ekobota etupa, mpe etupa yango ekobota ngando ya mapapu. | |
Isai | LinVB | 14:30 | Babola bakufi na nzala bakozwa bilei, mpe bato bakeleli bakozwa esika ya kofanda kimia, kasi bato ba libota lya yo bakokufa na nzala, mpe nakoboma bana ba yo banso. | |
Isai | LinVB | 14:31 | Yo ezibeli ya mboka, lela ! Yo engumba, ganga na mawa ! Filisti mobimba, oningana na nsomo, zambi molinga mozali kouta epai ya Nordi, o molongo mwa basoda ba bango moto moko akimi te. | |