Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
MATTHEW
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 13
Matt LinVB 13:1  Mokolo mǒkó Yézu abimí o ndáko, akeí kofánda o libóngo lya etíma.
Matt LinVB 13:2  Bato ebelé bayéí kozínga yě ; yangó wâná akwélí o bwáto mpé afándí ; bato batélémí o libóngo.
Matt LinVB 13:3  Atéyí bangó makambo míngi na miúlání. Alobí : « Moto mǒkó akeí kolóna mbóto o elanga.
Matt LinVB 13:4  Ezalákí yě kolóna, mbóto isúsu ikwéí mpembéni ya nzelá ; ndeke iyéí kolía yangó.
Matt LinVB 13:5  Mbóto isúsu ikwéí o esíká ya mabángá, izwí mabelé míngi té ; ibimí nokí, zambí ikótókí o mabelé bozindó té ;
Matt LinVB 13:6  kasi ebimí mói makási, izíkí mpé ikaúkí, zambí ibimísí ntína o mabelé té.
Matt LinVB 13:7  Mbóto isúsu ikwéí o káti ya nzúbe ; nzúbe ikólí mpé ibomí yangó.
Matt LinVB 13:8  Mbóto isúsu ikwéí o mabelé malámu, ibótí mbuma : esúsu ebótí mbuma monkámá, esúsu ntúkú motóbá, esúsu ntúkú ísáto.
Matt LinVB 13:10  Bayékoli babelémí mpé batúní yě : « Mpô níni ozalí koloba na bangó na miúlání ? »
Matt LinVB 13:11  Ayanólí : « Bínó bobongí koyéba mibómbamo mya Bokonzi bwa Likoló, kasi bangó té.
Matt LinVB 13:12  Moto azalí na bilóko akozwa naíno, mpé akokóma na bilóko míngi ; kasi óyo azalí na bilóko té, bakobótolo yě atâ mwâ elóko ezalí na yě.
Matt LinVB 13:13  Yangó wâná nakolobaka na bangó na miúlání ; mpô atâ batálí, bazalí komóno té ; mpé atâ bayókí na matói, bazalí koyéba ntína té.
Matt LinVB 13:14  Bôngó maloba ma proféta Izáya makosálema na bangó : Atâ bokoyóka ndéngé níni, bokoyéba ntína té. Atâ bokotála ndéngé níni, bokomóno té.
Matt LinVB 13:15  Zambí bato ba ekólo eye bakómí na motéma mabé : bazipí matói mpé bakangí míso, mpô ’te bámóno elóko yǒ kó na míso té, báyóka likambo lyǒ kó na matói té, mpé mitéma mya bangó míyóka ntína té. Bôngó bábóngola mitéma té, mpé ngáí nákoka kobíkisa bangó té.
Matt LinVB 13:16  Kasi esengo na bínó, zambí míso ma bínó mazalí komóno, mpé matói ma bínó mazalí koyóka.
Matt LinVB 13:17  Ya sôló sôló, nalobí na bínó : baproféta na bato ba bosémbo baíké balulákí komónó maye bínó bozalí komóno, kasi bamónókí mangó té ; bali­ngákí koyóka maye bínó bozalí koyóka, kasi bayókákí mangó té !
Matt LinVB 13:18  Bôngó bóyóka ntína ya moúlání mwa molóni.
Matt LinVB 13:19  Sókó moto ayókí Liloba lya Bokonzi, kasi atongólí ntína ya lyangó té, Mobébisi akoyâ kolongola mbóto elónámí o motéma mwa yě : yangó ndé mbóto e­kwéí mpembéni ya nzelá.
Matt LinVB 13:20  Moto ayambí mbóto o esíká mabángá mazalí, azalí moto óyo ayókí Liloba mpé ayambí lyangó nokí na esengo.
Matt LinVB 13:21  Kasi azalí na minsisá o mo­téma té, andimí sé mokolo mǒkó. Sókó akómí na mpási tǒ na minyóko mpô ya Liloba, akokwéya nokí.
Matt LinVB 13:22  Moto ayambí mbóto o káti ya nzúbe, azalí moto óyo ayókí Liloba, kasi makanisi ma bisengo bya nsé na mpósá ya nkita ibomí Liloba. Yangó wâná Liloba libótí mbuma té.
Matt LinVB 13:23  Moto ayambí mbóto o mabelé malámu, azalí moto óyo ayókí Liloba, mpé atongólí ntína ya lyangó. Yě akobóta mbuma monkámá, mosúsu ntúkú motóbá, mosúsu ntúkú ísáto. »
Matt LinVB 13:24  Yézu alobí na bangó moúlání mosúsu : « Bokonzi bwa Likoló boú­lání na moto alónákí mbóto ilámu o elanga ya yě.
Matt LinVB 13:25  Kasi ntángo bato balálí mpongí, mongúná ayéí kolóna mbóto ya matíti mabé o káti ya mbuma ya mámpa mpé akeí.
Matt LinVB 13:26  Awa mbuma ya mámpa ikólí mpé ibandí kobimisa mitó, matíti mabé mpé mamónóní.
Matt LinVB 13:27  Basáli bakeí epái ya nkóló wa elanga, balobí na yě : ‘Mokonzi, olónákí mbóto ilámu o elanga ya yǒ té ? Bôngó matíti mabé maútí wápi ?’ Azóngísí :
Matt LinVB 13:28  ‘Mongúná mǒkó asálí bôngó.’ Basáli batúní yě : ‘Olingí tókende kolongola matíti mabé ?’
Matt LinVB 13:29  Alobí : ‘Té, sókó bolo­ngólí matíti mabé, mbele bokolo­ngola mpé mbuma ilámu.
Matt LinVB 13:30  Bótíka matíti mánso mákóla téé ntángo ya bobúki mbuma ekokí. O ntángo êná nakoloba na basáli : Bósangisa libosó matíti mabé, bókanga mangó mabóké mabóké mpô ya kotumba mangó, na nsima bókende kotíka mbuma ilámu o ebómbelo ya ngáí’. »
Matt LinVB 13:31  Yézu alobí na bangó moúlání mosúsu : « Bokonzi bwa Likoló boú­lání na mbóto ya sénevé moto mǒkó alónákí o elanga ya yě.
Matt LinVB 13:32  Mbóto eye elekí mbóto ínso na boké. Kasi sókó ekólí, elekí ndúnda ínso na bolaí. Ekotanda bitápi lokóla nzeté mpenzá, mpé ndeke ya likoló ikoyâ kofánda wâná. »
Matt LinVB 13:33  Alobí na bangó moúlání mosúsu : « Bokonzi bwa Likoló boúlání na nkísi ya mámpa mwásí akamátí mpé asangísí na sǎ ni ísáto ya fufú ya mámpa. Nkísi ebutísí fufú yangó ínso. »
Matt LinVB 13:34  Yézu alobí na bato mâná mánso na miúlání ; alobí na bangó sé na miúlání.
Matt LinVB 13:35  Akokísí bôngó maloba ma proféta : Nakofungola monoko mpô ya koloba na miúlání, nakoyébisa maye mabómbámí út’o libandela lya mokili.
Matt LinVB 13:36  Na nsima atíkí bato bákende mpé azóngí o ndáko. Bayékoli bayéí epái ya yě mpé batúní yě : « Li­mbólélá bísó moúlání mwa matíti mabé o elanga. »
Matt LinVB 13:37  Yézu ayanólí : « Moto alóní mbóto ilámu, ezalí Mwána wa Moto ;
Matt LinVB 13:38  elanga, yangó ndé mokili ; mbóto ilámu, yangó ndé bána ba Bokonzi ; matíti mabé, mangó ndé bato ba Sátana ;
Matt LinVB 13:39  mo-ngúná óyo alóní matíti mabé ezalí zábolo ; eleko ya bobúki mbuma ezalí nsúka ya molóngó, mpé bato bakobúka mbuma, ezalí bǎnzelú.
Matt LinVB 13:40  Lokóla bakosangisaka matíti mabé mpé bakobwákaka mangó o móto, ekosálema sé bôngó o nsúka ya molóngó :
Matt LinVB 13:41  Mwána wa Moto akotínda bǎnzelú ba yě básangisa o Bokonzi bwa yě bato bánso bapésí esímbisi mpé baye bazangí bosémbo ;
Matt LinVB 13:42  bakobwáka bangó o fúlu ya móto : kúná bakolela mpé bakolía míno.
Matt LinVB 13:43  Kasi bato ba bosémbo bakongenge lokóla mwésé o Bokonzi bwa Tatá wa bangó. Moto azalí na matói, áyóka !
Matt LinVB 13:44  Bokonzi bwa Likoló boúlání na elóko ya motúya ebómbámí o elanga. Moto mǒkó amóní yangó, kasi abómbí yangó lisúsu. Na esengo enéne akeí kotéke bilóko bya yě bínso mpé asómbí elanga êná.
Matt LinVB 13:45  Bokonzi bwa Likoló boúlání na moto wa mombóngo azalí koluka mayaka kitóko.
Matt LinVB 13:46  Awa amóní lyǒ kó lya motúya monéne, akeí kotéke bilóko bya yě bínso mpé asómbí liyaka lîná.
Matt LinVB 13:47  Bokonzi bwa Likoló boúlání na monyámá babwákí o mbú, mpé motóndí na mbísi ndéngé na ndéngé.
Matt LinVB 13:48  Etóndí monyámá, babomi mbísi babéndí mwangó o libóngo ; na nsima bafándí, baponí mbísi ilámu, batíí yangó o bikoló, kasi ba­bwákí iye ya mpámba.
Matt LinVB 13:49  Ekozala sé bôngó o nsúka ya molóngó : bǎnzelú bakobima mpé bakokabola bato babé na bato ba bosémbo.
Matt LinVB 13:50  Bakobwáka bato babé o fúlu epelí móto : kúná bakolela mpé bakolía míno.
Matt LinVB 13:51  Botongólí makambo mâná má-nso ? » Balobí na yě : « Iyo. »
Matt LinVB 13:52  Alobí na bangó : « Yangó wâná motéyi wa Mobéko, sókó akómí kondima Bokonzi bwa Likoló, azalí lokóla nkóló wa ndáko azalí na bilóko míngi ; o káti ya bilóko bya yě, akopono biye bya sika mpé biye bya kala ».
Matt LinVB 13:53  Esílísí Yézu koloba na miúlání mîná, alongwí kúná.
Matt LinVB 13:54  Ekómí yě o ekólo ya yě, abandí kotéya bato o sinagóga ya bangó. Bakámwí míngi mpenzá, balobí : « Bwányá na ngúyá ya kosála makamwísi, azwí yangó wápi ?
Matt LinVB 13:55  Yě mwána wa mokabínda té ? Mamá wa yě María té ? Yakóbo, Yozéfu, Simóni na Yúda bazalí bandeko ba yě té ?
Matt LinVB 13:56  Bandeko básí ba yě bazalí áwa na bísó té ? Bôngó azw­í mâná mánso wápi ? »
Matt LinVB 13:57  Yangó wâná ayókísí bangó mabé mpenzá. Kasi Yézu alobí na bangó : « Bakokínolaka proféta bobélé o ekólo mpé o libótá lya yě. »
Matt LinVB 13:58  Kúná asálí makamwísi míngi té, mpô bazalákí boyambi té.