JEREMIAH
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
43
44
45
46
47
48
49
50
51
52
Chapter 2
Jere | LinVB | 2:2 | Kende mpe ganga o matoi ma bato ba Yeruzalem : Yawe alobi boye : Nakundoli o motema ndenge ozalaki kolinga ngai o bolenge mpe ntango nabandaki yo : ozalaki kolanda ngai o eliki, o mokili mozalaki na milona te. | |
Jere | LinVB | 2:3 | Israel azalaki ekolo esantu ya Yawe, mbuma ya yambo ya bilanga bya ye. Ata nani amekaki kolia yango azwi etumbu, mabe makweli ye. Maloba ma Yawe. | |
Jere | LinVB | 2:5 | Yawe alobi boye : Bankoko ba bino bazwaki ngai na mabe nini ? Mpo nini batikaki ngai ? Balandaki banzambe ba mpamba, bango mpe bakomi bato mpamba. | |
Jere | LinVB | 2:6 | Bamitunaki te : « Yawe azali wapi, oyo alongolaki biso o mokili mwa Ezipeti, oyo akambaki biso o eliki, o mokili mokauka mpe mwa mabwaku, o mokili mozangi mai mpe mwinda, esika moto moko akolekaka to akofandaka te ? » | |
Jere | LinVB | 2:7 | Nakotisaki bino o mokili mokobotaka mbuma mingi mpo ’te naleisa bino mbuma ipusi elengi. Kasi ekomaki bino kuna, bobebisaki ekolo ya ngai mpe bokomisaki ekolo ya ngai esika ya nsomo. | |
Jere | LinVB | 2:8 | Banganga Nzambe batunaki te : « Yawe azali wapi ? » Bateyi ba Mobeko bandimaki ngai te, bankumu batombokelaki ngai, baprofeta basakolaki o nkombo ya Baal mpe balandaki banzambe ba mpamba. | |
Jere | LinVB | 2:10 | Bokende kotala o bisanga bya Kitim, botinda bato o Kedar batuna bato malamu ! Botala soko makambo mana masili masalemi ! | |
Jere | LinVB | 2:11 | Bato ba ekolo nini bakotikaka nde banzambe ba bango ? Kutu bazali banzambe te ! Bato ba ekolo ya ngai batikaki Nzambe wa nkembo mpo balanda bikeko bizangi ntina ! | |
Jere | LinVB | 2:13 | Bato ba ngai basalaki makambo mabe mabale : batikaki ngai, liziba lya mai ma bomoi mpo batimola mabulu mapaswani mpe makoki kobomba mai te. | |
Jere | LinVB | 2:14 | Israel azali nde moombo ? Abotami nde moombo ? Boniboni akwei o maboko ma bato basusu ? | |
Jere | LinVB | 2:15 | Nkosi ibimeli ye mpe igangeli ye makasi, ikomisi ekolo ya ye mopotu : bingumba bya ye bitumbami, bizali na bato lisusu te. | |
Jere | LinVB | 2:18 | Olingi nde kokende o Ezipeti mpe komele mai ma Nil tee sikawa ? Olingi nde kokende komele mai ma Efrate o Asur ? | |
Jere | LinVB | 2:19 | Etumbu ekweli yo mpo ya mabe osalaki : opesaki ngai mokongo ! Yeba ’te osali mabe : otiki Yawe, Nzambe wa yo, okobangaka ngai lisusu te, yango ekoyokisa yo mpasi. Yawe Nzambe wa bokasi bonso alobi bongo. | |
Jere | LinVB | 2:20 | Banda kala obuka ekangiseli ya yo mpe okata nsinga ikangaki yo. Olobaki : « Nakosalela yo lisusu te ! » O ngomba inso mpe o nse ya nzete inso omilalisi lokola mwasi ndumba. | |
Jere | LinVB | 2:21 | Nzokande nalonaki yo lokola nzete ya vino eponomi eye ekobotaka mbuma ilamu. Boniboni bitapi bya yo bibebi sikawa, mpe okomi kobota mbuma ibe ? | |
Jere | LinVB | 2:22 | Ata osukoli nzoto ndenge nini, ata omipakoli sabuni mingi, mabe ma yo makoki kolongwa o miso ma ngai te. Maloba ma Yawe Nzambe. | |
Jere | LinVB | 2:23 | Boniboni okoki koloba : « Nazali na mbindo te, nalandi makambo ma ba-Baal te » ? Tala makambo ozalaki kosala o lobwaku, ndima makambo ozalaki kosala lokola kamela mwasi ekozolonganaka epai na epai. | |
Jere | LinVB | 2:24 | Ozali lokola mpunda mwasi ya eliki, soko mposa ya nzoto eyeli yango, ekobenda mpema ; nani akoki kopekisa yango elanda mposa ya nzoto ? Ata mpunda mobali nini ekoluka yango ekoyoka mpasi te, ekozwa yango noki soko eleko ya yango ekomi. | |
Jere | LinVB | 2:25 | Keba ! Okobebisa makolo ma yo mpe mongongo mwa yo mokokauka. Kasi olobi : « Likambo te ! Tika ngai ! Nalingi banzambe baye mingi, nalingi kolanda bango. » | |
Jere | LinVB | 2:26 | Lokola moyibi akangemi, se bongo bato ba Israel, bakonzi na bankumu, banganga Nzambe na baprofeta ba bango bakoyoka nsoni. | |
Jere | LinVB | 2:27 | Bakoloba na nzete : « Ozali tata wa ngai », mpe na libanga : « Yo moto obotaki ngai. » Bapesi ngai mokongo, balingi kolakisa elongi te ; kasi ntango bakomi na mpasi, bakoganga : « Teleme noki ! Bikisa biso ! » | |
Jere | LinVB | 2:28 | Wapi bikeko bya banzambe, biye omisalelaki ? Baya kosalisa yo o ntango ya mpasi. Okomi na banzambe baike, ebele lokola bingumba bya yo, e Yuda ! | |
Jere | LinVB | 2:30 | Nabeteki bana ba yo, kasi se mpamba, yango epesi bango mayele te. Mopanga mwa yo mobomaki baprofeta ba yo, lokola nkosi ekosilisaka bato. | |
Jere | LinVB | 2:31 | Bino bato ba mikolo mya lelo, boyoka maloba ma Yawe : O miso ma Israel nakomi nde lokola eliki to mokili mwa molili makasi ? Mpo nini bato ba ekolo ya ngai bakolobaka : « Tolingi bonsomi, tokokende epai ya yo lisusu te » ? | |
Jere | LinVB | 2:32 | Elenge mwasi akobosana nde biloko bya monzele ? Mwasi abandemi akobosana nde molato mwa eyenga ? Nzokande bato ba ngai babungi ngai banda kala. | |
Jere | LinVB | 2:34 | Makila ma babola mpe ma bato basalaki mabe te, mpe ma baye okangaki bo moyibi te, makangemi o malenda ma bilamba bya yo. | |
Jere | LinVB | 2:35 | Ata bongo, olobi : « Nazali na likambo lyoko te, ayokela ngai nkanda lisusu te ! » Tala, nakosambisa yo mpo olobi : « Nasali mabe te. » | |
Jere | LinVB | 2:36 | Mpo nini ozali kowayawaya boye ? Nzokande ba-Ezipeti bakosambwisa yo, se lokola ba-Asur basalaki. | |