JEREMIAH
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
43
44
45
46
47
48
49
50
51
52
Chapter 32
Jere | LinVB | 32:1 | O mobu mwa zomi mwa bokonzi bwa Sedekia o Yuda, o mobu mwa zomi na mwambe mwa bokonzi mwa Nabukodonozor, Yawe alobi na Yeremia. | |
Jere | LinVB | 32:2 | O eleko basoda ba Nabukodonozor bazalaki kozinga Yeruzalem, Yeremia akangemi o boloko, o lopango la bakengeli penepene na ndako ya mokonzi wa Yuda. | |
Jere | LinVB | 32:3 | Sedekia, mokonzi wa Yuda akangaki ye o boloko mpo asakolaki ’te : « Yawe alobi boye : Nakokaba engumba eye o maboko ma mokonzi wa Babilon. | |
Jere | LinVB | 32:4 | Sedekia, mokonzi wa Yuda, akokima maboko ma ba-Kaldea te, kasi bakokaba ye o maboko ma mokonzi wa Babilon mpe ye moko akokoka kosolola na ye. | |
Jere | LinVB | 32:5 | Mokonzi akokende na Sedekia o Babilon, esika akotikala tee o mokolo nakoya kotala ye. Maloba ma Yawe. Soko okobundisa ba-Kaldea, okolonga te ! » | |
Jere | LinVB | 32:7 | Tala awa Kananel, mwana wa noko wa yo Salum, akoya kotuna yo : « Olingi kosomba elanga ya ngai o Anatot ? Yo moto okoki kosomba yango mpe kokoma nkolo wa yango. » | |
Jere | LinVB | 32:8 | Bongo, lokola Yawe alobaki, Kananel, mwana wa noko wa ngai akomi epai ya ngai o lopango la bakengeli ba boloko, alobi na ngai : « Somba elanga ya ngai o Anatot, o mokili mwa Benyamin ; ozali na likoki lya kosomba yango. » O ntango ena nayebaki ’te ezalaki etinda ya Yawe. | |
Jere | LinVB | 32:9 | Nasombi elanga ena ya Kananel, mwana wa noko wa ngai o Anatot, mpe nafuti ye mosolo : mitako mya palata zomi na nsambo. | |
Jere | LinVB | 32:10 | Nakomi monkanda mwa bosombi, nakangi mwango mpe natii elembo o miso ma banzeneneke babale ; nameki mpe bozito bwa mosolo. | |
Jere | LinVB | 32:11 | Nsima nakamati monkanda mwa bosombi, moye natiaki elembo engebene na mibeko, mpe moye mokangemi te. | |
Jere | LinVB | 32:12 | Napesi monkanda mwa bosombi o maboko ma Baruk, mwana wa Neria, nkoko wa Maseya, o miso ma Kananel, mwana wa noko wa ngai, mpe o miso ma banzeneneke, baye batiaki nkombo o monkanda, mpe o miso ma bato banso ba Yuda bazalaki o lopango la bakengeli ba boloko. | |
Jere | LinVB | 32:14 | « Yawe wa bokasi bonso, Nzambe wa Israel, alobi boye : Kamata minkanda miye, monkanda mwa bosombi, moye mozali na elembo mpe moye mokangemi te, mpe tia myango o mbeki ya mabelé mpo ’te mibeba noki te, | |
Jere | LinVB | 32:15 | zambi Yawe wa bokasi bonso, Nzambe wa Israel, alobi ’te : O mokili moye bato bakosomba naino ndako, bilanga mpe bilanga bya nzete ya vino. » | |
Jere | LinVB | 32:16 | Ntango napesi Baruk, mwana wa Neria, monkanda mwa bosombi, nasambeli Yawe losambo loye : | |
Jere | LinVB | 32:17 | « E Mokonzi Yawe, yo moto okelaki likolo na nse na nguya ya yo enene mpe na bokasi bwa loboko la yo. Likambo lyoko lileki yo na bokasi te. | |
Jere | LinVB | 32:18 | Okolakisaka bolamu na bato nkoto na nkoto, kasi okotumbolaka bana na bankoko mpo ya masumu ma batata ba bango. E Nzambe monene mpe wa bokasi, nkombo ya yo : Yawe wa bokasi bonso. | |
Jere | LinVB | 32:19 | Mikano mya yo mikolakisaka bonene bwa yo, mpe bikela bya yo nguya ya yo. Okomonoko nzela inso ya bato mpo ya kozongisela moto na moto engebene na ezalela mpe na misala mya ye ! | |
Jere | LinVB | 32:20 | Yo moto osalaki makamwisi manene o mokili mwa Ezipeti, mpe tee lelo bilembo bikomononoko o Israel. | |
Jere | LinVB | 32:21 | Obimisaki bato ba ekolo ya yo Israel o mokili mwa Ezipeti na bilembo mpe na makamwisi, na bokasi bwa loboko la yo mpe na nsomo enene. | |
Jere | LinVB | 32:22 | Na nsima opesi bango mokili moye olakelaki bankoko ba bango, mokili motondi na mabéle ma ngombe mpe na mafuta ma nzoi. | |
Jere | LinVB | 32:23 | Bango bayei awa mpe bakomi bankolo ba mabelé, kasi baboyi koyoka yo, bazalaki kolanda Mobeko mwa yo te, mpe baboyi kosala maye otindi bango ; yango wana oyokisi bango mpasi eye. | |
Jere | LinVB | 32:24 | Botala, banguna basili kobongisa manso mpo ’te babotolo engumba. Elingi ekweya o maboko ma ba-Kaldea babundisi yango. Etikali moke bakufa na mopanga, na nzala ekasi mpe na bokono bobe. Makambo olobaki makosalema, mpe ozali komono mango. | |
Jere | LinVB | 32:25 | Nzokande yo Yawe olobi na ngai : « Somba elanga mpe futa mosolo o miso ma banzeneneke », awa engumba elingi ekweya o maboko ma ba-Kaldea. » | |
Jere | LinVB | 32:28 | Yango wana Yawe alobi : Nakokaba engumba eye o maboko ma ba-Kaldea mpe ma Nabukodonozor, mokonzi wa Babilon ; ye akobotolo yango. | |
Jere | LinVB | 32:29 | Ba-Kaldea bakobundisa engumba eye, bakokoto wana mpe bakotumba ndako inso, esika bato babonzelaki Baal mpaka ya malasi o motondo mwa ndako, mpe basopelaki banzambe basusu mabonza ma bomeli, mpo ya kotumola ngai. | |
Jere | LinVB | 32:30 | Banda bolenge, bana ba Israel mpe ba Yuda basali se masepelisi ngai te. Solo, bana ba Israel bayokisi ngai nkanda na misala mya maboko ma bango. Maloba ma Yawe. | |
Jere | LinVB | 32:31 | Solo, engumba eye eyokisi ngai nkanda enene banda mokolo batongi yango tee lelo ; nakolongola yango o miso ma ngai. | |
Jere | LinVB | 32:32 | Na mabe bato ba Israel mpe ba Yuda banso basali batumoli ngai banso : bakonzi, bankumu, banganga Nzambe, baprofeta na bato banso ba Yuda mpe ba Yeruzalem. | |
Jere | LinVB | 32:33 | Bapesi ngai mokongo, balakisi ngai elongi te ; ntango nazalaki koteya bango mokolo na mokolo, ata moko te azalaki kotia matoi na mateya ma ngai. | |
Jere | LinVB | 32:34 | Bakotisi bikeko bya banzambe ba lokuta o Tempelo eye ezali na nkombo ya ngai, mpe basantoli yango. | |
Jere | LinVB | 32:35 | Batongeli Baal bitumbelo o lobwaku la Ben-Inom, mpe bazalaki kotumbela Molok bana babali na bana basi ba bango. Ngai natindaki bango makambo maye te ; mokolo moko te nalingaki te ’te babenda bato ba Yuda o nzela ya masumu na likambo liye lya nsomo. | |
Jere | LinVB | 32:36 | Mpo ya engumba eye olobaki : « Etikali moke engumba ekweya o maboko ma mokonzi wa Babilon, mpe bato bakokufa wana na mopanga, na nzala ekasi mpe na bokono bobe », Yawe, Nzambe wa Israel, alobi sikawa : | |
Jere | LinVB | 32:37 | Nakosangisa bango ut’o bikolo binso napanzaki bango na nkele mpe na nkanda enene, mpe nakozongisa bango o esika eye mpo ’te bafanda wana kimia. | |
Jere | LinVB | 32:39 | Nakokomisa bango banso se motema moko mpe mayele moko, mpo ’te bakumisa bobele ngai ntango inso, mpo ya bolamu bwa bango moko mpe bwa bana ba bango. | |
Jere | LinVB | 32:40 | Nakokata na bango bondeko bwa seko : nakoboya bango mokolo moko lisusu te, nakosala bango se bolamu, mpe nakotia bobangi o mitema mya bango mpo ’te balongwa epai ya ngai lisusu te. | |
Jere | LinVB | 32:41 | Nakosepela na bosali bango bolamu, na motema mobimba mpe na mayele ma ngai manso nakopika bango makasi o mokili moye. | |
Jere | LinVB | 32:42 | Yawe alobi boye : Se lokola natindelaki bato baye mpasi ya nsomo, nakopesa bango bolamu boye nalakeli bango. | |
Jere | LinVB | 32:43 | Bakosomba bilanga o ekolo eye bolobi ’te ezali mopotu, ezali na bato to nyama lisusu te, ekwei o maboko ma ba-Kaldea. | |