Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
JOB
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 36
Job LinVB 36:2  Kanga motema, nakoyokisa yo makambo masusu Nzambe alingi koyebisa yo.
Job LinVB 36:3  Nakokende koluka mayele ma ngai mosika mpo ’te nalongisa Oyo akelaki ngai.
Job LinVB 36:4  Solo, monoko mwa ngai mokokosaka te, moto wa bwanya bwa solo azali kosolola na yo.
Job LinVB 36:5  Nzambe aleki bokasi, kasi akokinolaka moto wa motema peto te.
Job LinVB 36:6  Alingi bato babe baumela na bomoi te, kasi akobatelaka babola.
Job LinVB 36:7  Akotalaka moto semba ntango inso, akofandisaka bango o ngwende elongo na bakonzi, akobombela bango esika ya seko ! Kasi soko bakomi na lolendo,
Job LinVB 36:8  bakokangema na minyololo mpe na nsinga ikoyokisa bango mpasi.
Job LinVB 36:9  Nzambe akopalela bango bongo mpo ya ezalela ya bango mpe akolakisa bango masumu ma bango ma lolendo.
Job LinVB 36:10  Akokebisa bango bongo mpo ’te batika mabe ma bango.
Job LinVB 36:11  Soko bayoki mpe bandimi kotosa ye, bakosukisa mikolo mya bango na bomengo, mpe mibu mya bango mikosila na nsai.
Job LinVB 36:12  Kasi soko bayoki te, bakokufa na mbalakaka, mpo batiaki matoi na ye te.
Job LinVB 36:13  Motema libanga bazali se kobomba nkanda mpe basambeli te awa Nzambe akokanga bango na nsinga ;
Job LinVB 36:14  bomoi bwa bango bokosila o bolenge, mpe bakokufa noki, na nsoni.
Job LinVB 36:15  Kasi akobikisa moto mobola mpo ya bobola bwa ye, na mpasi ayoki, Nzambe azali kokebisa ye.
Job LinVB 36:16  Se bongo Nzambe alingi kobikisa yo o mpasi : liboso osepelaki na biloko ndelo te, meza ya yo etondaki na bilei biike bipusi elengi.
Job LinVB 36:17  Obangaki kokitisa bato babe mpe kolongisa bana bitike.
Job LinVB 36:18  Keba ’te omikosa te na boike bwa biloko mpe na makabo mazangi bosembo !
Job LinVB 36:19  Nkita ya yo ebele ekobikisa yo te, wolo ya yo te, makasi ma yo mpe te.
Job LinVB 36:20  Otia elikya ya yo te na butu boye, mokolo bato banso ba mokili bakosila.
Job LinVB 36:21  Omeka mpe te kolanda bato bazanga bosembo, yango nde ntina ya mpasi ozali koyoka.
Job LinVB 36:22  Nzambe aleki binso mpo ya nguya ya ye, mokonzi moko akoki na ye te.
Job LinVB 36:23  Nani akolakisa ye nzela eye alanda ? Nani akoki koloba na ye : « Osali mabe ? »
Job LinVB 36:24  Yo mpe obosana te kokumisa ye mpo ya bikela bya ye, biye bato banso bakokumisaka na nzembo.
Job LinVB 36:25  Bato banso ba nse bakokamwa na mosala mwa ye, ata baye bakozalaka mosika, bakomonoko mwango.
Job LinVB 36:26  Solo, Nzambe azali monene, biso toyebi eloko te. Moto moko te akoki kotanga mibu Nzambe akokisi.
Job LinVB 36:27  Ye akosangisaka mai ma likolo, mpe akotangisaka mango matanga lokola mbula.
Job LinVB 36:28  Mampata ma likolo makotangisaka mango, mpe makosopaka mango o nse mobimba.
Job LinVB 36:29  Nani ayebi boniboni mampata makotambolaka ? Nani ayebi boniboni nkake ekobeteke kuna ?
Job LinVB 36:30  Akobetisaka nkake likolo lya mampata, mpe akozipaka bozindo bwa mbu enene.
Job LinVB 36:31  Akoleisaka bato bongo, mpe akokabelaka bango biloko ebele.
Job LinVB 36:32  O maboko ma ye akosimbaka minkalali mpe akotindaka myango o bisika alingi.
Job LinVB 36:33  Ntango lokito la nkake loyebisi boyei bwa yango, etonga eyebi ’te ekumbaki ekomi pene.