Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
LEVITICUS
Prev Up Next
Chapter 13
Levi LinVB 13:2  Soko o lomposo la moto litutu, mpanda, to litono eba­ndi komonono, mbele ekoki kozala bokono bwa maba. Base-ngeli kokende na ye epai ya nganga Nzambe Aron to nganga Nzambe mo­susu wa libota lya Aron.
Levi LinVB 13:3  Nga­nga Nzambe atala mpota ya lo­mpo­so. Soko o esika ya mpota nsuki ekomi mpembe, mpe soko misuni miliami, nganga Nzambe, awa amoni yango, atanga ye moto mbi­ndo, moto ona azali na bokono bwa maba.
Levi LinVB 13:4  Kasi soko se litono mpembe limo­noni, misuni miliami te mpe nsuki ekomi mpembe te, nganga Nzambe atia mokoni mikolo nsa­mbo mobimba mpembeni.
Levi LinVB 13:5  O mokolo mwa nsambo atala ye lisusu : soko mabe mazali se ndenge ena mpe bokono bopanzani o lomposo te, atia ye lisusu mpembeni mikolo nsambo,
Levi LinVB 13:6  mpe na nsima akotala ye lisusu, o mokolo mwa nsambo : soko amoni ’te mpota elembi mpe mabe mapanzani o lomposo te, nganga Nzambe ata­nga ye moto peto : ezali se mpanda. Moto oyo asukola bilamba, bongo akozala peto.
Levi LinVB 13:7  Kasi, ata nganga Nzambe atalaki ye bongo mpe atangaki ye moto peto, nzokande na nsima mpanda ebandi kopanzana o lomposo, moto oyo asengeli komilakisa na nga-nga Nzambe lisusu.
Levi LinVB 13:8  Nganga Nza­mbe atala ye lisusu malamu, mpe soko amoni ’te mpanda ebandi kopanzana o lomposo atanga ye moto mbindo, mpo ezali mpota ya maba.
Levi LinVB 13:9  Soko moto akomi na mpota lokola mpota ya maba, bakende na ye epai ya nganga Nzambe.
Levi LinVB 13:10  Nganga Nzambe atala ye malamu, mpe soko amoni litutu lya mpembe o lomposo, nsuki o esika ena ekomi mpembe mpe mosuni mwa sika mobimi,
Levi LinVB 13:11  azali na mpota ya maba esili eumeli. Nganga Nzambe atanga ye moto mbindo. Atia ye o ndako ya mpembeni te, zambi ntembe ezali soki moke te : moto oyo azali na maba.
Levi LinVB 13:12  Soko lomposo lobimi makwa-nza mpe mabe mana mapanzani o nzoto mobimba, banda motó tee makolo, bipai binso nganga Nza-mbe akoki kotala,
Levi LinVB 13:13  atala ye malamu : soko amoni ’te mabe mapanzani o nzoto mobimba, atanga moto oyo moto peto. Awa nzoto mobimba ekomi mpembe, akomi peto.
Levi LinVB 13:14  Nzokande, mokolo mbuma ekobima lisusu o lomposo la ye, akomi na mbindo lisusu.
Levi LinVB 13:15  Soko nganga Nzambe amoni ’te mosuni mwa sika mobimi, atanga ye moto mbi-ndo, zambi mosuni moye mozali na mbindo : ezali nde maba.
Levi LinVB 13:16  Kasi soko mosuni moye mwa sika mokomi mpembe lisusu, moto ona azonga epai ya nganga Nzambe.
Levi LinVB 13:17  Nganga Nzambe atala ye lisusu, mpe soko amoni ’te mpota ekomi mpembe, akozala peto.
Levi LinVB 13:18  Soko moto abimi mbuma o nzoto, kasi mbuma yango ebeli,
Levi LinVB 13:19  mpe o esika ya mbuma litutu lya mpembe libimi to lisali litono lya motane ngwa, moto oyo akende komilakisa na nganga Nzambe.
Levi LinVB 13:20  Nganga Nzambe atala ye malamu : soko litono lyango likomi kolia lomposo, mpe nsuki ekomi mpe-mbe, nganga Nzambe atanga ye moto mbindo : ezali bokono lokola maba, litono likomi kobima mbuma.
Levi LinVB 13:21  Nzokande, soko nganga Nza­mbe atali malamu, mpe amoni nsuki mpembe te, lomposo lolongwi te, longengi mpe te, atia moto wa bokono mpembeni mikolo nsambo.
Levi LinVB 13:22  Soko mabe makomi kopanzana o lomposo, atanga ye moto mbindo, zambi ezali maba.
Levi LinVB 13:23  Soko litono lipanzani te, ezali lipipi lya mbuma ya kala. Nganga Nzambe atanga ye moto peto.
Levi LinVB 13:24  Soko moto aziki móto mpe mpota esali mbuma to litono litane to mpembe,
Levi LinVB 13:25  nganga Nzambe atala ye malamu : soko amoni ’te nsuki ekomi mpembe mpe mosuni mokomi koliama, yango ezali maba mazali kobima mbuma o kati ya mpota ya móto. Nganga Nzambe atanga ye moto mbindo, zambi ezali bokono lokola maba.
Levi LinVB 13:26  Nzokande, soko nganga Nzambe atali malamu mpe amoni nsuki mpembe te, lomposo lolongwi te, longengi mpe te, atia mokoni mpembeni mikolo nsambo.
Levi LinVB 13:27  Atala ye lisusu o mokolo mwa nsambo. Soko bokono bokomi kopanzana o lomposo, nganga Nzambe atanga ye moto mbindo, zambi ezali bokono lokola maba.
Levi LinVB 13:28  Kasi soko litono lipanzani o lomposo te mpe lomposo lo­ngengi lisusu te, ezali se mbuma iuti na mpota ya móto. Nganga Nza­mbe atanga ye moto peto : ezali lipipi lya mpota.
Levi LinVB 13:29  Soko mobali to mwasi azali na mpota o motó to o ebeku,
Levi LinVB 13:30  nganga Nzambe atala mpota : soko amoni ’te misuni mibandi koliama mpe nsuki ekomi motane so mpe ebandi kolongwa, atanga ye moto mbindo ; ezali mapaka lokola ’te maba ma motó to ma ebeku.
Levi LinVB 13:31  Nganga Nza­mbe atala mapaka mana malamu : soko amoni ’te mosuni moliami te mpe nsuki ekomi motane so te, atia moto wa mapaka mpembeni, mikolo nsambo.
Levi LinVB 13:32  O mokolo mwa nsa­mbo atala ye lisusu malamu : soko amoni ’te mapaka mapanzani te mpe nsuki ekomi motane so te, mpe mosuni moliami te,
Levi LinVB 13:33  mokoni akata nsuki, kasi akokola esika ya mapaka te ; nganga Nzambe atia ye lisusu mpembeni mbala ya ibale, mikolo nsambo.
Levi LinVB 13:34  Atala ye lisusu o mokolo mwa nsambo, mpe soko amoni ’te bokono bopanzani te o lomposo, mpe mosuni moliami te, nganga Nzambe atanga ye moto wa nzoto peto. Moto oyo asukola bilamba bya ye, bongo akomi peto.
Levi LinVB 13:35  Nzokande, soko nsima ya bopetoli boye, mapaka mabandi kopanzana o lomposo lisusu,
Levi LinVB 13:36  nganga Nzambe atala ye malamu : soko amoni ’te mapaka mapa­nzani o lomposo lisusu, yango elakisi ’te mokoni azali na mbindo, atala mpe soko nsuki ya ye ekomi motane so te.
Levi LinVB 13:37  Kasi soko mapaka mapanzani te mpe nsuki moindo etikali malamu, ya­ngo elakisi ’te moto oyo abiki na mapaka. Azali peto, nganga Nza­mbe atanga ye mpe moto peto.
Levi LinVB 13:38  Soko mobali to mwasi abimi matono mpembe o nzoto,
Levi LinVB 13:39  nganga Nzambe atala mango malamu. Soko amoni ’te matono mana mazali ko­ngenge te, bokono bwa loto bobimaki o nzoto ya ye ; moto oyo azali peto.
Levi LinVB 13:40  Soko nsuki ya moto ebandi kolongwa o motó, moto oyo akomi na libandi, azali peto.
Levi LinVB 13:41  Soko nsuki iba­ndi kolongwa o elongi, azali na lipepe, azali peto.
Levi LinVB 13:42  Kasi soko emononi o motó mwa ye, epai ya elongi to epai ya bongó, litono litane, ezali nde maba mabimeli ye o motó epai ya elongi to epai ya bongó.
Levi LinVB 13:43  Nga­nga Nzambe atala ye malamu : soko amoni litono litane o elongi to o bongó, lokola litono lya maba ma lomposo,
Levi LinVB 13:44  elakisi ’te moto oyo azali na maba, azali na mbindo. Nga­nga Nzambe asengeli kotanga ye moto mbindo, azali na maba ma motó.
Levi LinVB 13:45  Moto wa maba asengeli kolata bi­lamba bibe, akanga mpe nsuki te ; azipa mandefu, mpe aganga : « Nazali na mbindo ! Nazali na mbindo ! »
Levi LinVB 13:46  Akotikala na mbindo mikolo mi­nso tee bokono bwa ye bokosila. Awa azali na mbindo, afanda o ndako ya ye moko, o libanda lya nganda.
Levi LinVB 13:47  Soko maba masimbi elamba ya moto, ezali elamba ya nsuki ya mpa­ta to ya ntokia,
Levi LinVB 13:48  ezala bolangiti boto­ngami na nsuki ya mpata to na malekani, ezala elamba esonomi na mposo ya ntaba to na mposo ya nyama esusu,
Levi LinVB 13:49  soko molato mona to lomposo to elamba to bolangiti bibimisi litono liindo to litane ngwa, litono lina lizali lya maba ; basengeli kolakisa nganga Nzambe.
Levi LinVB 13:50  Nganga Nzambe atala mabe mana mpe atia eloko ena mpembeni, mikolo nsambo.
Levi LinVB 13:51  Soko o mokolo mwa nsambo amoni ’te mabe mapanzani o molato, o elamba, o bola­ngiti, o lomposo to o eloko esonomi na lomposo ata nini, elakisi ’te maba mapanzani. Eloko esi­mbi maba, ezali na mbindo.
Levi LinVB 13:52  Atumba molato, elamba, bolangiti botongami na nsuki ya mpata to na malekani, eloko esonomi na lomposo ata nini, biye bisimbi maba, zambi ezali maba mapanzani, esengeli kotumbama o móto.
Levi LinVB 13:53  Kasi soko nganga Nzambe atali malamu mpe amoni ’te mabe mapa­nzani te o molato, o elamba, o bolangiti to o eloko esalemi na lo­mposo ata nini,
Levi LinVB 13:54  atinda ’te basukol­a eloko ebebi mpe atia yango mpe­mbeni mbala ya ibale, mikolo nsambo.
Levi LinVB 13:55  Soko nsima ya bosukoli elamba, atali yango malamu mpe amoni ’te litono libongwani te, mpe litikali bobele linene, elamba ena ezali na mbindo. Batumba yango o móto : mpamba te, ebebi epai ya likolo mpe epai ya kati.
Levi LinVB 13:56  Nzokande, soko nganga Nza­mbe atali malamu mpe amoni ’te nsima ya bosukoli, mabe makomi kosila, alo­ngola eteni ebebi ya molato, ya lomposo, ya elamba to ya bolangiti.
Levi LinVB 13:57  Kasi soko litono limononi lisusu o molato, o elamba, o bola­ngiti, o lomposo ata nini, elakisi ’te bokono bosili te ; bongo batumba eteni eye ebebi.
Levi LinVB 13:58  Soko basukoli molato, elamba, bolangiti to lomposo ata nini mpe lotono lizongi te, biloko bina bikozala peto soko ba­sukoli yango naino mbala ya ibale.
Levi LinVB 13:59  Tala mobeko motali maba ma bilamba bya nsuki ya mpata to malekani, elamba, bolangiti, to eloko esalemi na lomposo ata nini. Engebene na mobeko moye bokotanga elamba peto to mbindo.