PSALMS
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
43
44
45
46
47
48
49
50
51
52
53
54
55
56
57
58
59
60
61
62
63
64
65
66
67
68
69
70
71
72
73
74
75
76
77
78
79
80
81
82
83
84
85
86
87
88
89
90
91
92
93
94
95
96
97
98
99
100
101
102
103
104
105
106
107
108
109
110
111
112
113
114
115
116
117
118
119
120
121
122
123
124
125
126
127
128
129
130
131
132
133
134
135
136
137
138
139
140
141
142
143
144
145
146
147
148
149
150
Chapter 68
Psal | LinVB | 68:3 | O miso ma Nzambe balimwa lokola milinga, lokola mafuta ma nzoi makonyangwaka o móto, bato babe basila o miso ma yo, Nzambe. | |
Psal | LinVB | 68:5 | Boyembela Nzambe, bokumisa nkombo ya ye ; bokumisa Oyo akotambolaka likolo lya mampata, nkombo ya ye Mokonzi, bobinela ye. | |
Psal | LinVB | 68:6 | Ye Nzambe o ndako ya ye esantu, azali tata wa bana bitike, mpe molobeli wa basi bakufeli babali. | |
Psal | LinVB | 68:7 | Ye akopesa baye bazangi ndako esika ya kofanda, akozongisela baombo bonsomi na esengo ; kasi bato batombokeli ye bakofanda o eliki. | |
Psal | LinVB | 68:9 | mokili moninganaki o miso ma Nzambe mpe likolo linokisaki mbula, o miso ma Nzambe, Nzambe wa Israel. | |
Psal | LinVB | 68:10 | E Nzambe, otindelaki bango makabo ma yo maike lokola mbula, mpe olendisaki bato ba yo balembeki. | |
Psal | LinVB | 68:11 | E Nzambe, yo moto opesaki bango esika ya kofanda, eye obongiselaki babola, mpo ya bolamu bwa yo. | |
Psal | LinVB | 68:14 | mapapu ma bibenga makembami na palata, mpe nsala ya byango na wolo. Bongo bokotikala se o lopango la bibwele ? | |
Psal | LinVB | 68:17 | Bino ngomba isanda, mpo nini boyoki zuwa ? Mpo nini boluli ngomba eye Nzambe aponi mpo ’te afanda ? Solo, Mokonzi akozala kuna seko. | |
Psal | LinVB | 68:18 | Nzambe azali na makalo ma etumba nkoto na nkoto, ut’o ngomba Sinai ayaki o ndako ya ye esantu. | |
Psal | LinVB | 68:19 | Obutaki ngomba Sion, okangaki bato bo baombo, osengeki bato mabonza, ata baye batombokoki, mpo ’te ozala na ndako ya kofanda, e Mokonzi Nzambe. | |
Psal | LinVB | 68:23 | Mokonzi alobi : « Nakolongola bango o Basan, nakobenda baye bazindi o bozindo bwa mbu, | |
Psal | LinVB | 68:25 | E Nzambe, bamoni milongo mya bato ba yo, milongo mya Nzambe, Mokonzi wa ngai, bayingeli na nkembo o Tempelo. | |
Psal | LinVB | 68:26 | Bayembi liboso, bato ba miziki nsima, o kati ya bango bilenge basi bazali kobete mbonda. | |
Psal | LinVB | 68:28 | Bato ba Benyamin mozimi bakei liboso, nsima bankumu ba Yuda, bankumu ba Zabulon mpe ba Neftali na milato minzenga. | |
Psal | LinVB | 68:31 | Bangisa ngando ebombami o nsoló ya ebale, ngombe babali na bana ba ngombe, baye babondeli yo, palata o maboko ! Panza bato balingi se bitumba. | |