JOB
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
Chapter 34
| Job | LinVB | 34:10 | Bongo, bino bato ba mayele, boyoka ngai : Nzambe akosalaka mabe soki te ; Mokonzi wa bokasi azangi bosembo te. | |
| Job | LinVB | 34:11 | Akofutaka bato engebene na misala mya bango, akokataka makambo ma bango se na bosembo. | |
| Job | LinVB | 34:17 | Nzambe akokaki koyangela binso, soko azangaki bosembo ? Okoki kokitisa Oyo aleki bato banso na bosembo ? | |
| Job | LinVB | 34:18 | Ye akoki kotanga mokonzi wa ekolo ‘moto mpamba’, mpe kotala bankumu lokola bato babe. | |
| Job | LinVB | 34:19 | Akobondelaka bato banene te, akotalaka moto wa nkita na mobola ndenge se yoko, mpo banso bazali mosala mwa maboko ma ye. | |
| Job | LinVB | 34:20 | Bakoki kokufa na mbala yoko na butu : ata bato banene bakoki kolimwa bongo ; ye akoki kolongola monyokoli o bokonzi, mpasi te. | |
| Job | LinVB | 34:24 | akoki kolongola baye bazali na bokonzi, kotuna te, mpe kofandisa basusu o esika ya bango, | |
| Job | LinVB | 34:28 | Boleli bwa babola bokokomaka tee o matoi ma Nzambe, akoyokaka boleli bwa bato ba mawa. | |
| Job | LinVB | 34:29 | Soko atikali nye mpe asali eloko te, nani akomono ye mabe ? Soko amibombi, nani akosambisa ye ? | |
| Job | LinVB | 34:32 | lakisa ngai maye nasengeli kosala ; nazangaki bosembo, nakozongela yango lisusu te » ? | |
| Job | LinVB | 34:33 | Bongo Nzambe akopesa ye etumbu ? Okanisi nini ? Loba ko, yo moto oboyi maloba ma ye ma bopaleli, mpe okanisi ’te oyebi manso ! Ngai nakoloba eloko te. | |
| Job | LinVB | 34:34 | Mbele bato ba mayele bakoloba na ngai, na mpe moto nyonso wa bwanya azali koyoka ngai : | |