Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
EXODUS
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 29
Exod LinVB 29:1  Mpo ya kokulisa bango bonganga bwa ngai, sala boye : Kamata mwana ngombe na mpata babali ibale, isali na mbeba te.
Exod LinVB 29:2  Na nsima kamata mampa balambi na nkisi te, ná minkate misali na nkisi te milambami na mafuta, ná bisikiti bisali na nkisi te, kasi bipakolami na mafuta mpe bilambami na fufu ya mbuma ya mampa.
Exod LinVB 29:3  Tia yango inso o ekoló se yoko mpe bonza yango bongo o ekoló, esika yoko na ngombe mpe na mpata babali ina ibale.
Exod LinVB 29:4  Benga Arone na bana ba ye penepene na Ema ya Likita mpe sukola bango na mai.
Exod LinVB 29:5  Olatisa Arone molato, monkoto mwa efod, na efod na libenga, bakisa nkamba ya efod.
Exod LinVB 29:6  Tia ngabuni o motó mwa ye na mpe elembo ya bonganga bwa ye.
Exod LinVB 29:7  Sopela ye mafuta ma bopakoli o motó, mpe pakola ye mango.
Exod LinVB 29:8  Na nsima benga bana ba ye baya penepene mpe latisa bango molato.
Exod LinVB 29:9  Kanga mokaba o loketo la bango mpe bongisela bango enkoti. Okokotisa Arone na bana ba ye bongo o mosala moye mpo ’te bazala banganga Nzambe seko.
Exod LinVB 29:10  Baya na mwana ngombe epai ya Ema ya Likita : Arone na bana ba ye batia maboko o motó mwa ngombe.
Exod LinVB 29:11  Na nsima boma ngombe liboso lya Yawe penepene na monoko mwa Ema ya Likita.
Exod LinVB 29:12  Kamata makila ma ngombe, mpe tia mango na mosapi o maseke ma altare ; sopa makila masusu o nse ya altare.
Exod LinVB 29:13  Mafuta manso maye makangemi na nsopo, na libale mpe na mpiko ibale, otumba mango o altare.
Exod LinVB 29:14  Kasi mosuni mwa ngombe, lomposo na nyei, zikisa yango inso na móto o libanda lya nganda, zambi ezali moboma mwa bolimbisi masumu.
Exod LinVB 29:15  Na nsima kamata mpata yoko ; Arone na bana ba ye batia maboko o motó mwa mpata.
Exod LinVB 29:16  Boma mpata, kamata makila, sopa mango zongazo-nga na altare.
Exod LinVB 29:17  Sese mpata biteni biteni, sukola nsopo na makolo ma mpata, mpe tia inso o mosuni na motó mwa mpata.
Exod LinVB 29:18  Na nsima tumba mpata mobimba o altare ; ezali libonza lya kotumba lya nsolo mpimbo likosepelisaka Yawe.
Exod LinVB 29:19  Kamata mpe mpata esusu. Arone na bana ba ye batia maboko o motó mwa mpata.
Exod LinVB 29:20  Boma mpata, tia makila o eteni ya nse ya litoi lya mobali lya Arone na bana ba ye ; tia mango mpe o mosapi monene mwa loboko la bango la mobali mpe o mosapi monene mwa lokolo la bango la mobali. Na nsima nyakela makila o mipanzi mya altare.
Exod LinVB 29:21  Kamata ndambo ya makila o altare mpe ndambo ya mafuta ma bopakoli, nyakela Arone mango na mpe bilamba bya ye ; sala mpe bongo na bana ba ye mpe na bilamba bya bango. Bongo bakosala basantu : ná ye, ná bilamba bya ye, ná bana ba ye ná bilamba bya bango.
Exod LinVB 29:22  Ya mpata ena kamata mosuni mosali na mafuta mingi, mokila, mafuta makangemi na nsopo mpe na libale, mpiko na mafuta ma yango, na mpe lokolo la mobali, zambi ezali mpata ya bokotisi moto o mosala.
Exod LinVB 29:23  O ekoló esika batii mampa mazali na nkisi te, eye ezali liboso lya Yawe, kamata limpa lyoko na monkate moko balambi na mafuta na mpe bisikiti yoko.
Exod LinVB 29:24  Tia inso o maboko ma Arone na bana ba ye, mpe tombola maboko ma bango mpo ya kobonzela Yawe yango.
Exod LinVB 29:25  Na nsima oswa yango lisusu o maboko ma bango mpe tumba inso o moboma mosali o altare ; ezali libonza lya nsolo mpimbo likosepelisa Yawe, libonza lya bilei litumbami mpo ya Yawe.
Exod LinVB 29:26  Kamata ntolo ya mpata ena, eye babomi mpo ya kokotisa Arone o mosala, tombola yango mpo ya kobonzela Yawe. Eteni eye ezali ya yo.
Exod LinVB 29:27  Okosantisa bongo ntolo eye babonzaki na mpe lokolo la mpata loye balongolaki liboso mpe balakisaki Yawe, mpo ya kokotisa Arone na bana ba ye o mosala.
Exod LinVB 29:28  Ezali eteni ya makabo Arone na bana ba ye bakoswa o maboko ma bana ba Israel ; ezali mobeko mwa seko, zambi ezali eteni ya mabonza bana ba Israel basengeli kopesa banganga Nzambe, eteni bakamataki o kati ya miboma mya bondeko, eteni ya Yawe.
Exod LinVB 29:29  Bilamba bisantu bya Arone bisengeli kokitana na bana ba ye. Mokolo bakopakola moto mafuta mpo ya kokotisa ye o mosala mwa nganga Nzambe, asengeli kolata bilamba bina.
Exod LinVB 29:30  Mwana oyo wa Arone akosala nganga Nzambe nsima ya ye, alata byango mikolo nsambo, o ntango akoyingela o Ema ya Likita mpo ya kosala mosala o esika esantu.
Exod LinVB 29:31  Kamata mpata ya bokotisi moto o mosala mpe lamba yango o esika esantu.
Exod LinVB 29:32  Arone na bana ba ye balia mosuni mwa mpata ena, na mpe mampa mazali o ekoló, balia yango o monoko mwa Ema ya Likita.
Exod LinVB 29:33  Balia biloko balambaki mpo ya kopetola bango o ntango bakotisi bango o mosala mpe basantisi bango. Moto mosusu alia byango te, zambi bisali biloko bisa-ntu.
Exod LinVB 29:34  Soko na ntongo ndambo ya mosuni mwa moboma mpo ya bokotisi bango o mosala, na mpe ndambo ya mampa itikali, bwaka yango o móto, balia yango te, zambi bisali biloko bisantu.
Exod LinVB 29:35  Sala bobele bongo na Arone na bana ba ye, se lokola natindaki yo. Bokotisi bango o mosala moye boumela mikolo nsambo.
Exod LinVB 29:36  Mokolo na mokolo okoboma mwana ngombe mpo ya milulu mya bolimbisi masumu. Okobonza yango o altare mpo ya kolongola masumu. Na nsima okopakola altare mafuta mpo ya kosantisa yango.
Exod LinVB 29:37  Mikolo nsambo okobonza o altare mabonza ma bolimbisi masumu, mpe okobenisa yango, ekosala bongo altare esantu mpenza, mpe biloko binso bikosimba altare bikosala bisantu.
Exod LinVB 29:38  Okobonza o altare bana mpata ya mbula yoko : mpata ibale mokolo na mokolo seko.
Exod LinVB 29:39  Bonza mwana mpata yoko na ntongo, esusu na mpokwa.
Exod LinVB 29:40  Elongo na mwana mpata ya yambo okobonza sani ya litele itano ya fufu esangani na kopo ya litele ibale ya mafuta ma oliva na kopo ya litele ibale ya vino.
Exod LinVB 29:41  Mwana mpata ya ibale, okobonza yango na mpokwa elo-ngo na libonza lya bolei mpe lya bomeli lokola osalaki na ntongo ; ezala libonza lya nsolo mpimbo, libonza lya bilei litumbami mpo ya Yawe.
Exod LinVB 29:42  Libonza liye likotumbama seko o mabota ma bino manso, penepene na monoko mwa Ema ya Likita, o miso ma Yawe, o esika nakoswana na yo mpo ya kosolola na yo.
Exod LinVB 29:43  Nakokutana na bana ba Israel o esika ena, eye nakosantisa na nkembo ya ngai.
Exod LinVB 29:44  Nakosantisa Ema ya Likita na altare. Nakosantisa mpe Arone na bana ba ye mpo ’te bakoka kosala mosala mwa bonganga bwa ngai.
Exod LinVB 29:45  Nakotikala o ntei ya bana ba Israel, mpe nakosala Nzambe wa bango.
Exod LinVB 29:46  Bakoyeba bongo ’te nazali Yawe, Nzambe wa bango, oyo abimisaki bango o mokili mwa Ezipeti mpo ’te nafanda o ntei ya bango, ngai Yawe, Nzambe wa bango.