Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
II SAMUEL
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 22
II S LinVB 22:1  O mokolo Yawe abikisi Davidi o maboko ma banguna ba ye banso mpe o maboko ma Saul, Davidi ayembeli Yawe nzembo eye :
II S LinVB 22:2  « Yawe azali libanga lya ngai mpe ebombamelo ya ngai, ye mobikisi wa ngai.
II S LinVB 22:3  Ye azali Nzambe wa ngai, nakobo­mbama epai ya ye. Ye nguba ya ngai, ebuneli ya lilonga lya ngai, ye ebombamelo ya ngai, ye mobikisi wa ngai, akobikisa ngai o maboko ma bato ba bitumba.
II S LinVB 22:4  Bakumisa ye ! Nabeleli Yawe mpe na­longi banguna ba ngai.
II S LinVB 22:5  Mbonge ya liwa izingi ngai, mai bozindo ma Belial mabangisi ngai.
II S LinVB 22:6  Nsinga ya mboka ya bawa ikangi ngai, mitambo mya liwa mitandami liboso lya ngai.
II S LinVB 22:7  Ntango nayoki mpasi nabeleli Yawe mpe nabondeli Nzambe wa ngai. Ut’o Tempelo ya ye ayoki lolaka la ngai, mpe boleli bwa ngai bokomi o matoi ma ye.
II S LinVB 22:8  Bongo mokili moningani makasi, makonzi ma likolo makomi kole-nge mpe maningani mpo ya nkanda ya ye.
II S LinVB 22:9  Milinga mibimi o zolo ya ye ; móto mokoliaka binso mobimi o monoko mwa ye, mpe makala ma móto mazali kopela o kati.
II S LinVB 22:10  Agumbi likolo mpe akiti, atamboli o limpata liindo.
II S LinVB 22:11  Abuteli kerubim moko mpe api-mbwi, amononi likolo lya mapapu ma mompepe.
II S LinVB 22:12  Abombami o kati ya molili mozali kozipa ye o kati ya londende mpe ya mampata maindo.
II S LinVB 22:13  Mwinda makasi motamboli liboso lya ye, makala ma móto mapeli o kati.
II S LinVB 22:14  Yawe abetisi nkake ut’o likolo, oyo afandi o nta likolo ayokisi lolaka la ye.
II S LinVB 22:15  Atindi makula mpe apanzi mango, angengisi monkalali mpe abwaki mwango epai na epai,
II S LinVB 22:16  mpe nse ya mbu ekomi komonono. Makonzi ma nse makomi polele nta­ngo Yawe abandi koganga mpe zolo ya ye ebimisi mpema.
II S LinVB 22:17  Ut’o likolo abimisi loboko mpo ’te aka­nga ngai, abikisi ngai o mai manene ;
II S LinVB 22:18  abikisi ngai o maboko ma monguna makasi wa ngai, o maboko ma ba­nguna baye baleki ngai na nguya.
II S LinVB 22:19  Bakwelaki ngai o nzoto o mokolo nayokaki mpasi, kasi Yawe ayaki kosalisa ngai.
II S LinVB 22:20  Abikisi ngai, abateli ngai, abikisi ngai zambi alingi ngai mingi.
II S LinVB 22:21  Soko nasali malamu Yawe akozo-ngisela ngai malamu, soko nazali na maboko peto akopesa ngai mbano,
II S LinVB 22:22  zambi nalandi se nzela ya Yawe, naboyaki kotosa monoko mwa Nza­mbe wa ngai te.
II S LinVB 22:23  Ntango inso nakotosaka mibeko mya ye, nalongwi o nzela ya biti-nda bya ye te.
II S LinVB 22:24  Nazali na likambo libe o miso ma ye te, mpe nakimi masumu manso.
II S LinVB 22:25  Bongo Yawe afuti ngai, engebene na bosembo bwa ngai, mpe amoni bopeto bwa ngai.
II S LinVB 22:26  Okolakisaka bolingi na moto alingi yo, okolakisaka bosembo na moto semba.
II S LinVB 22:27  Okolakisaka bopeto na oyo azali na motema peto, okosalaka mayele na moto akosalaka mabe.
II S LinVB 22:28  Okobikisaka bato bake, okokitisaka bato bakomitombola.
II S LinVB 22:29  E Yawe, yo moto ozali mwinda mwa ngai, Yawe akongengeleke ngai o kati ya molili.
II S LinVB 22:30  Elongo na yo nakoki kobuka lopa­ngo, elongo na yo nakopimbwa likolo lya efelo.
II S LinVB 22:31  Nzela ya Nzambe ezali na mbeba te, liloba lya Yawe lizali na lokuta te. Ye nguba ya bato banso bakobombamaka epai ya ye.
II S LinVB 22:32  Nani azali Nzambe ? Bobele Yawe te ? Nani libanga lya ngai ? Bobele Nzambe te ?
II S LinVB 22:33  Nzambe oyo azali ebombamelo ya ngai, atambwisi ngai o nzela kitoko.
II S LinVB 22:34  Apesi ngai makolo mbangu lokola mboloko, akotelemisa ngai o ngo­mba.
II S LinVB 22:35  Amesenisi maboko ma ngai na etu­mba, mpe maboko ma ngai makogumba litimbo lya mbengi.
II S LinVB 22:36  Opesi ngai nguba ya yo ekolongisa ngai, lisalisi lya yo likolendisa ngai.
II S LinVB 22:37  Obongiseli ngai nzela, mpe makolo ma ngai makolembe te.
II S LinVB 22:38  Nalandi banguna ba ngai mpe nakoboma bango, nakozonga te soko nasilisi koboma bango te.
II S LinVB 22:39  Nabeti bango, bakoteleme lisusu te, bakwei mpe balali o nse ya makolo ma ngai.
II S LinVB 22:40  Opesi ngai nguya ntango ya etu­mba, ogumbisi banyokoli ba ngai o nse ya makolo ma ngai.
II S LinVB 22:41  Okimisi banguna ba ngai o miso ma ngai, nasilisi baye banso bayini ngai.
II S LinVB 22:42  Bagangi, kasi moto moko ayei kosalisa bango te, babeleli Yawe, kasi ayanoli bango te.
II S LinVB 22:43  Naniki bango lokola mputulu ya zando, nanyati bango na makolo lokola potopoto ya nzela.
II S LinVB 22:44  Obikisi ngai o maboko ma bato batombokoki na ngai, obateli ngai mpo ’te nayangela bikolo. Bikolo nayebaki liboso te bikomi kosalela ngai.
II S LinVB 22:45  Bampaya bakomi kokumisa ngai, se mpo ya liloba lyoko batosi ngai.
II S LinVB 22:46  Bana ba bauta bakomi kokweya, ba­lengi ntango babimi o ebombamelo ya bango.
II S LinVB 22:47  Yawe azala seko ! Bakumisa Liba­nga lya ngai ! Nzambe alonga, ye mobikisi wa ngai !
II S LinVB 22:48  Nzambe oyo apesi etumbu na bato basali ngai mabe, akitisi bato o nse ya makolo ma ngai.
II S LinVB 22:49  Obikisi ngai o maboko ma banguna, olongisi ngai o miso ma banyokoli ba ngai, mpe olongoli ngai o maboko ma bato ba bitumba.
II S LinVB 22:50  Yawe, nakokumisa yo o kati ya bapagano, mpe nakoyembela nko­mbo ya yo.
II S LinVB 22:51  Abikisi mokonzi o makama manso, alakisi Mesiya wa ye bolamu, asalisi Davidi na libota lya ye seko. »