Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
JOB
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 38
Job LinVB 38:1  Ut’o kati ya ekumbaki, Yawe alobi na Yob :
Job LinVB 38:2  Nani oyo alingi koboya mikano mya Nzambe na maloba mazangi ntina ?
Job LinVB 38:3  Lendisa motema mpe zala na mpiko, nakotuna yo, yanola ngai.
Job LinVB 38:4  Ozalaki wapi o ntango nasalaki mokili ? Loba, soko oyebi yango.
Job LinVB 38:5  Nani apesaki mwango bolai na bonene ? Nani atiaka nsinga ya komeka mwango ?
Job LinVB 38:6  Makonzi ma mwango mapikami ndenge nini ? Nani atiaki mabanga manene o nse ya mokili,
Job LinVB 38:7  ntango minzoto minso miyembaki lisanga, mpe bana banso ba Nzambe bazalaki koganga na nsai ?
Job LinVB 38:8  Nani akangisaki mai ma mbu o esika ya mango, ntango mabimaki o nse ya mabelé ?
Job LinVB 38:9  Ntango natiaki mampata o likolo makangema wana, mpe nazingaki mbu na londende lokola na elamba ;
Job LinVB 38:10  ntango nakatelaki mango ndelo, mpe natiaki bizibeli mpe mafungola,
Job LinVB 38:11  nalobaki na mbu : « Mai makoleka awa te, makasi ma mbonge ya mai makosuka awa ! »
Job LinVB 38:12  Uta babota yo osili otindi ntongo etinda ? Etani ntongo, okolakisaka yango esika ya mosala :
Job LinVB 38:13  ekende kokanga mokili epai moi mokobimaka mpe koningisa mwango mpo ’te bato babe bakweya ?
Job LinVB 38:14  Engengisa mokili mokoma motane lokola ngola, epakola mwango langi lokola o elamba ;
Job LinVB 38:15  Ntongo ekoboma mwinda mwa bato babe, ekobuka loboko la moto alingi kobete moninga.
Job LinVB 38:16  Okitaki o mbu tee o maziba ma yango ? Okendeki kotambola kin’o nse ya limfelo ?
Job LinVB 38:17  Balakisaki yo minoko mya lopango la Liwa ? Omonoko bakengeli ba mboka ya Molili ?
Job LinVB 38:18  Oyebi ata mwa moke bonene bwa mokili ? Loba, soko oyebi yango inso !
Job LinVB 38:19  Oyebi esika mboka ya mwinda ezali, mpe esika eye molili mofandi ?
Job LinVB 38:20  Bongo yo moto okende kotika yango kuna, yo moto olakisa yango esika ya yango !
Job LinVB 38:21  Soko oyebi, loba ’te babotaki yo o ntango ena, mpe osili okokisi mibu mingi, solo !
Job LinVB 38:22  Okotoki o bibombelo bya mbula ya matandala, omonoki esika mbula ya mabanga ekozalaka,
Job LinVB 38:23  mabanga maye nabongisi o mikolo mya mpasi mpe o mikolo mya bitumba binene ?
Job LinVB 38:24  Epai wapi mwinda mokobandaka kongenge, mpe esika nini mompepe mwa Esti mokobandaka kopepe ?
Job LinVB 38:25  Nani atimolelaki mbula makasi miluka, mpe nani apasolaki nzela ya mampata matondi na nkake ?
Job LinVB 38:26  Nani akonokisaka mbula o mokili mozangi bato, mpe o eliki ezali na bato te ?
Job LinVB 38:27  Nani akopesaka mai na mabelé makauki makasi, mpe nani akokolisaka wana matiti mabesu ?
Job LinVB 38:28  Mbula ezali nde na tata ? Nani akobotaka matanga ma mamio ?
Job LinVB 38:29  Matandala makobimaka o libumu lya nani ? Nani akobotaka londende louti o likolo ?
Job LinVB 38:30  O ntango ena mai makobongwana mabanga, mpe mai ma mbu makokangema makasi.
Job LinVB 38:31  Okoki nde kokanga ‘Bangondo nsambo’ liboke, kofungola minyololo mya ‘Motó mwa Ekange’,
Job LinVB 38:32  kobimisa ‘Mokwete’ o ntango ekoki, to kokamba ‘Motongolongo mwa nzoku’ na bana ba ye ?
Job LinVB 38:33  Oyebi nde mibeko nini bakotosaka o likolo ? Yo moto okotindaka mibeko awa o nse ?
Job LinVB 38:34  Okoki nde kobelela mampata mpo ’te mabima mpe manokisela yo mbula enene ?
Job LinVB 38:35  Monkalali mokobima nde mpo ya etinda ya yo mpe mokoloba na yo : « Ngai oyo, nayei » ?
Job LinVB 38:36  Nani apesaki nkongi bwanya ? Nani apesaki nsoso mobali mayele ?
Job LinVB 38:37  Nani akoki kotanga motango mwa mampata, kosopa mabenga ma mai ma likolo
Job LinVB 38:38  mpo ’te mabelé lido makangema, mpe makoma makasi lokola mabanga ?
Job LinVB 38:39  Yo nde okolukelaka nkosi nyama ya kolia, mpe okosilisaka nzala ya bana ba ye,
Job LinVB 38:40  baye bakotikalaka o mabulu ma bango, to bakobombamaka o kati ya mibenga ?
Job LinVB 38:41  Nani akolambelaka yanganga biloko bya bolei, soko bana ba ye bakomi kolela epai ya Nzambe mpe koningisa mapapu mpo ya nzala ?