Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
JOSHUA
Prev Up Next
Chapter 15
Josh LinVB 15:1  Bato ba libota lya Yuda bazwi mabelé maye engebene na bituka bya bango. Mokili mwa bango mobandi o ndelo ya Edom o eliki ya Sin, o mokili mwa Negeb, o Sudi mpenza.
Josh LinVB 15:2  Epai ya Sudi mokili mwa bango mobandi o mbu ya Mongwa, o esika ndambo ya mokili ezingami na mai.
Josh LinVB 15:3  Landa lisusu epai ya Sudi ya ngomba Akrabim, katisa Sin mpe kende epai ya Sudi ya Kades-Barne, leka o Esron, kende o Adar mpe tala epai ya Karba ;
Josh LinVB 15:4  na nsima leka o Asmon, koma tee o moluka mwa Ezipeti mpo ya kosuka o Mbu ya Mongwa. Ndelo ya bino ya Sudi yango eye.
Josh LinVB 15:5  Epai ya Esti mokili mobandi o Mbu ya Mongwa tee nsuka ya Yordane. Epai ya Nordi leka esika Yordane esuki.
Josh LinVB 15:6  Kende o Bet-Araba mpo ya kosuka o Libanga lya Boan, mwana wa Ruben.
Josh LinVB 15:7  Na nsima leka o Debir epai ya lobwaku la Akor mpe tala epai ya Nordi ya Gilgal, mboka etalani na lobwaku la Adumim, o Sudi ya moluka. Leka lisusu o mai ma En-Semes mpo ya kosuka o En-Rogel.
Josh LinVB 15:8  Leka lisusu o lobwaku la Ben-Inon, o Sudi ya Yeruzalem, mboka ya ba-Yebus ; na nsima buta o nsonge ya ngomba, eye etalani na lobwaku la Inon epai ya Westi, o nsuka ya esobe ya ba-Refaim epai ya Nordi.
Josh LinVB 15:9  Longwa o nsonge ya ngo­mba epai ya liziba lya mai ma Neftoa, mpe kende o mboka ya ngomba Efron mpo ya kobongwana epai ya Baala, eye ezali Kiri­at-Yearim.
Josh LinVB 15:10  Otiki Baala, kende o ngomba ya Seir epai ya Westi ; landa ngomba Yearim epai ya Kesalon o Nordi, zonga o Bet-Semes, katisa Ti­m­na,
Josh LinVB 15:11  Mpo ya kosuka o ngomba Ekron epai ya Nordi ; tala lisusu epai ya Sikaron, leka o ngomba ya Baala tee o Yabneel mpo ya kosuka o mbu.
Josh LinVB 15:12  Mokili epai ya Westi mobandi o Mbu Enene. Tala mabelé ma bana ba Yuda engebene na bituka bya bango.
Josh LinVB 15:13  Bapesi Kaleb, mwana wa Yefune, mabelé o kati ya bana ba Yuda, lokola Yawe atindaki Yozue ; azwi Kiriat-Arba, mboka ya tata wa Anak, ekomi lelo Ebron.
Josh LinVB 15:14  Kaleb abengani bana ba­sato ba Anak : Sesai, Akiman na Talmai, bankoko ba Anak.
Josh LinVB 15:15  Longwa kuna bakei kobunda na bato ba Debir ; kala Debir ezalaka na nkombo Kiriat-Sefer.
Josh LinVB 15:16  Na nsima Kaleb alobi : « Moto akobunda na Kiriat-Sefer mpe akobotolo yango, nakobalisa ye mwana wa ngai Aksa. »
Josh LinVB 15:17  Otniel, mwana wa Keniz, ndeko wa Kaleb abotoli mboka ; Kaleb abalisi ye mwana wa ye Aksa.
Josh LinVB 15:18  Ekomaki Aksa o ndako ya mobali wa ye, Otniel abo­ndeli ye ’te asenge tata wa ye elanga. Akiti mpu­nda mpe Kaleb atuni ye : « Olingi nini ? »
Josh LinVB 15:19  Aksa ayanoli : « Kabela ngai likabo. Awa otindi ngai o mokili mwa Negeb, pesa ngai maziba ma mai. » Mpe Kaleb akabeli ye maziba masusu o Nordi, masusu o Sudi.
Josh LinVB 15:20  Mabelé ma bato ba Yuda mango mana, engebene na bituka bya bango.
Josh LinVB 15:21  Nkombo ya mboka ya bato ba libota lya Yuda epai ya ndelo ya Edom o Negeb, yango iye : Yabseel, Arad, Yagur,
Josh LinVB 15:32  Lebaot, Silim, Ayin na Rimon : yango inso mboka ntuku ibale na libwa na mpe mboka ike.
Josh LinVB 15:33  Nkombo ya mboka izalaki o esobe, yango iye : Estaol, Sorea, Asna,
Josh LinVB 15:36  Sa­riaim, Aditaim, A-Gedera na Gederotaim : yango inso mboka zomi na inei na mpe mboka ike.
Josh LinVB 15:41  Gedorot, Bet-Dagon, Naama na Ma­keda : yango inso mboka zomi na motoba na mpe mboka ike.
Josh LinVB 15:44  Keila, Akzib na Maresa : ya­ngo inso mboka libwa na mpe mboka ike.
Josh LinVB 15:46  Longwa o Ekron tee mbu, mokili monso mozali epai ya Asdod na mpe mboka ike,
Josh LinVB 15:47  Asdod na mokili mwa penepene na mpe mboka ike, Gaza na mokili mwa penepene na mpe mboka ike tee o moluka mwa Ezipeti ; ndelo ezalaki Mbu ya Westi.
Josh LinVB 15:48  Nkombo ya mboka izalaki o ngomba, yango iye : Samir, Yatir, Soko,
Josh LinVB 15:51  Gosen, Olon na Gilo : yango inso mboka zomi na yoko na mpe mboka ike.
Josh LinVB 15:54  Umta, Kiriat-Arba, ezali Ebron, na Sior : yango i­nso mboka libwa na mpe mboka ike.
Josh LinVB 15:57  A-Kayin, Gibea na Timna : yango inso mboka zomi na mpe mboka ike.
Josh LinVB 15:59  Maarat, Bet-Anot na Eltekon : yango inso mboka motoba na mpe mboka ike. Tekoa, Efrata, ezali Beteleme, Peor, Etam, Kulon, Tatam, Sores, Karem, Galim, Beter na Mana : yango inso mbo­ka zomi na yoko na mpe mboka ike.
Josh LinVB 15:60  Kiriat-Baal, ezali Kiriat-Yearim, na Raba : mboka ibale na mpe mboka ike.
Josh LinVB 15:61  Nkombo ya mboka izalaki o eliki, yango iye : Bet-Araba, Midin, Sekaka,
Josh LinVB 15:62  Nibsan, Mboka ya Mongwa na Engadi : yango inso mboka motoba na mpe mboka ike.
Josh LinVB 15:63  Kasi bana ba Yuda bakokaki kobengana ba-Yebus te, baye bakofa-ndaka o Yeruzalem ; bongo ba-Yebus bakofanda o kati ya ba-Yuda naino tee lelo.