Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
GENESIS
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 41
Gene LinVB 41:1  Nsima ya mbula ibale Farao aloti ndoto : atelemi o libongo lya Nil
Gene LinVB 41:2  mpe amoni ngo­mbe nsambo ibimi o ebale Nil ; ngombe inene, ya mafuta mingi, ibandi kolia matiti.
Gene LinVB 41:3  Na nsima ebimi ngombe isusu nsambo, kitoko te, ikonda mingi, ikomi penepene na ngombe iye ibimaki liboso o Nil.
Gene LinVB 41:4  Mpe tala, ngombe iye ikonda ibandi kolia ngombe inene. O nta­ngo ena Farao alamuki.
Gene LinVB 41:5  Awa alali lisusu, aloti ndoto esusu. Amoni lititi lya masangu kitoko libimisi mitó kitoko nsambo.
Gene LinVB 41:6  Na nsima ebimi mpe lititi lya masangu na mitó nsambo ya malonga te, mompepe mwa Esti mokaukisi myango,
Gene LinVB 41:7  mpe masangu mabe ma­bandi kolia masangu malamu. Elamuki Farao, ayebi ’te ezalaki bobele ndoto !
Gene LinVB 41:8  Na ntongo mayele ma Farao mabulungani, abengi banganga ba­nso na bato ba bwanya banso ba Ezipeti, ayebisi bango ndoto aloti. Kasi moto moko akoki kolimbolela Farao ndoto ya ye te.
Gene LinVB 41:9  O ntango ena, kapita wa baye bakobongaka vino, alobi na Farao : « Tika, lelo nasakola mabe nasalaki !
Gene LinVB 41:10  Mokolo moko mokonzi asilikaki na biso basaleli ba ye, biso, kapita wa baye bakobongaka vino na mpe kapita wa baye bakolambaka mampa ; atindi biso o boloko epai ya komanda wa bakengeli.
Gene LinVB 41:11  Biso babale tolotoki ndoto, se o butu boko, kasi ndimbola ya ndoto ikeseneki.
Gene LinVB 41:12  Ezalaki wana o boloko elenge mobali, mo-Ebrei, azalaki moo­mbo wa komanda wa bakengeli. Toyebisi ye ndoto ya biso, ye apesi biso ndimbola, ndimbola ya ndoto ibale ekeseneki.
Gene LinVB 41:13  Mpe manso masalemaki se lokola alimbolaki ; bazongisi ngai o mosala mwa kala, kasi mosusu babomi ye na nsinga. »
Gene LinVB 41:14  Farao abengisi Yosefu, babimisi ye noki o boloko ; akati mandefu, alati bilamba bisusu mpe bakambi ye epai ya Farao.
Gene LinVB 41:15  Farao alobi na Yosefu : « Naloti ndoto mpe moto moko ayebi kolimbola yango te. Bato bayebisi ngai ’te yo, awa oyoki lisolo lya ndoto, okoki kolimbola yango. »
Gene LinVB 41:16  Yosefu ayanoli : « Ezali ngai te, kasi Nzambe moto akoyebisa Farao maye makobongela ye. »
Gene LinVB 41:17  Bongo Farao alobi na Yosefu : « O ndoto ya ngai namimoni penepene na ebale Nil.
Gene LinVB 41:18  Mpe namoni ngombe nsambo ya mafuta mpe kitoko, ibimi o ebale mpe ibandi kolia matiti o libongo.
Gene LinVB 41:19  Na nsima namoni ngombe isusu nsambo ibimi o ebale, iye ikonda mabe, kitoko soki te, makasi mpe te ; o mokili mobimba mwa Ezipeti namoni naino ngombe ibe boye te.
Gene LinVB 41:20  Ngo­mbe iye ikonda mingi ilei ngombe mafuta nsambo.
Gene LinVB 41:21  Awa ilei yango, itikali se minkuwa mpamba lokola ngo­mbe ilei eloko te ! Na nsima nalamuki.
Gene LinVB 41:22  Namoni mpe o ndoto lititi lya masangu libimisi mitó nsambo na mbuma kitoko mpenza.
Gene LinVB 41:23  Na nsima lititi libimisi mitó misusu nsambo, mike, mikauka na mo­mpepe mwa Esti.
Gene LinVB 41:24  Mitó miye mike mimeli mitó minene nsambo. Nayebisi banga­nga makambo ma­nso, kasi ata moko te apesi ngai ndi­mbola ya yango. »
Gene LinVB 41:25  Yosefu alobi na Farao : « Ndoto ya yo ibale izali na ntina se yoko. Nzambe ayebisi yo makambo ma-nso alingi kosala.
Gene LinVB 41:26  Ngombe kitoko nsambo ilakisi mibu nsambo, mpe mitó nsambo milakisi se mibu nsambo. Ndoto ibale ilakisi se mpo yoko.
Gene LinVB 41:27  Ngombe nsambo iye iko-ndi mabe ibimi nsima, ná mpe mitó nsambo ya masangu mabe, mikauki na mompepe mwa Esti, ilakisi mibu nsambo mya nzala makasi.
Gene LinVB 41:28  Likambo nasili nalobeli Farao, lyango liye : Nzambe ayebisi Farao nini alingi asala.
Gene LinVB 41:29  O mibu nsambo mikoya, bilei bikosala mingi o mokili mwa Ezipeti mobimba ;
Gene LinVB 41:30  kasi na nsima ekoya mibu nsambo mya nzala. Bato bakoyeba lisusu te ’te biloko bizalaki mingi o Ezipeti. Nzala ekoboma bato.
Gene LinVB 41:31  Bakoyeba lisusu te mokolo nini bazalaki na biloko mingi, mpo ya nzala ekoya nsima, nzala yango ekoleka mpasi.
Gene LinVB 41:32  Bongo soko Farao alotoki ndoto mbala ibale, elakisi ’te Nzambe akani kosala bongo solo, mpe akosala yango noki.
Gene LinVB 41:33  Sikawa ebongi Farao aluka moto moko wa bwanya mpe wa mayele, alubola ye moyangeli o mokili mwa Ezipeti.
Gene LinVB 41:34  Abimisa mibeko mpe alubola bakapita o ekolo mobimba mpo ya kokongolo biloko. O mibu nsambo mikoya mbuma ikozala mingi, bongo ba-Ezipeti banso bapesa leta eteni yoko ya bita­no ya mbuma.
Gene LinVB 41:35  Bakongolo bo­ngo biloko biye bikozwama o mibu nsambo mikoya, babomba mbu­ma ya mampa o bibombelo lokola Farao akotinda ; bakende kotika bilei binso o mboka inene, mpe babo­mba byango kuna.
Gene LinVB 41:36  Biloko bina bikosalisa bato ba ekolo mobimba o eleko ya mibu nsambo, eye nzala ekongala o mokili mwa Ezipeti, bongo bato bakokufa na nzala te. »
Gene LinVB 41:37  Maloba maye masepelisi Farao na bankumu ba ye banso.
Gene LinVB 41:38  Farao alobi na bankumu : « Tokoki nde kozwa moto mosusu oyo atondi na elimo ya Nzambe lokola ye ? »
Gene LinVB 41:39  Mpe Farao alobi na Yosefu : « Awa Nzambe ayebisi yo makambo maye manso, moto moko te azali na mayele mpe na bwanya lokola yo.
Gene LinVB 41:40  Yo moto okozala moyangeli wa ndako ya ngai, bato ba ngai banso batosa mitindo mya yo. Se ngai moto nafandi o ngwende ya bokonzi nakoleka yo. »
Gene LinVB 41:41  Mpe Farao alobi na Yosefu : « Tala, nakolubola yo moyangeli wa ekolo mobimba ya Ezipeti. »
Gene LinVB 41:42  Alongoli mpete ya ye o mosapi mpe atii yango o mosapi mwa Yosefu ; alatisi ye bilamba bya motuya na mpe nsinga ya wolo o nkingo.
Gene LinVB 41:43  Na nsima abutisi ye o likalo lya ye lya mabale, mpe bato bagangi o liboso lya ye : « Nkumu, kuma ! » Aluboli ye bongo moyangeli wa Ezipeti mobimba.
Gene LinVB 41:44  Farao alobi mpe na Yosefu : « Bobele ngai nazali Farao. Kasi moto moko te akoto­mbola loboko to lokolo o Ezipeti mobimba, soko yo ondimi te. »
Gene LinVB 41:45  Apesi Yosefu nkombo ya sika Sofnat-Panea, mpe akabeli ye mwasi, nkombo ya ye Asenat, mwana wa Potifera, nganga nzambe wa engu­mba On. Na nsima Yosefu aba­ndi kotambola o Ezipeti mobimba.
Gene LinVB 41:46  O mikolo Yosefu akomaki o miso ma Farao, mokonzi monene wa Ezipeti, akokisaki mibu ntuku isato. Atiki ndako ya mokonzi mpo akende kotala ekolo mobimba.
Gene LinVB 41:48  Mibu miye nsa­mbo mbuma ibotami mingi o mokili mwa Ezipeti, Yosefu asangisi yango inso, abombi yango o bi­ngumba. O engumba yoko yoko abombi mbuma iuti o bilanga bya penepene.
Gene LinVB 41:49  Yosefu abombi mbuma ya mampa ebele mpenza, lokola zelo lya libongo lya mbu. Batiki komeka bozito bwa yango, zambi elekaki mingi mpenza.
Gene LinVB 41:50  Mobu mwa yambo mwa nzala mobandi naino te, Yosefu asili akomi na bana babale. Aboti bango na Asenat, mwana wa Potifera, nganga nzambe wa On.
Gene LinVB 41:51  Yosefu apesi mwana wa liboso nkombo Manase, alobi : « Nzambe asali ’te nabosana mpasi ya ngai inso na mpe libota lya ngai mobimba. »
Gene LinVB 41:52  Apesi mwana wa babale nkombo Efraim, alobi : « Nzambe apesi ngai bana o mokili moye nayokaki mpasi. »
Gene LinVB 41:53  Esilaki mibu nsambo miye mabelé maboti mingi o mokili mwa Ezipeti,
Gene LinVB 41:54  mibu nsambo mya nzala mibandi, lokola Yosefu alobaki. Nzala engali o bikolo binso, kasi o ekolo Ezipeti mampa mazalaki.
Gene LinVB 41:55  Ba-Ezipeti, awa bakomi koyoka nzala, bakei epai ya Farao, mpe babondeli ye ’te apesa bango bilei. Farao alobi na bango : « Bokende epai ya Yosefu mpe bosala lokola akotinda bino. »
Gene LinVB 41:56  Nzala eyei ko­ngala makasi o mokili mobimba. Yosefu afungoli bibombelo binso mpe atekisi biloko, mpo nzala ekomi makasi.
Gene LinVB 41:57  Bato ba bikolo bisusu bayei o Ezipeti kosomba mbuma ya mampa epai ya Yosefu, zambi o nse mobimba nzala ezalaki kongala makasi.