I MACCABEES
Chapter 4
I Ma | LinVB | 4:1 | Gorgias akei na basoda ba makolo nkoto itano, na basoda ba farasa nkoto yoko, alongwi na bango o kati ya butu, | |
I Ma | LinVB | 4:2 | mpo ’te bakoma o nganda ya ba-Yuda mpe babanda etumba o ntango ba-Yuda bamilengeli te. Baninga ba bango, baye bazalaki o ebombamelo, balakisi bango nzela. | |
I Ma | LinVB | 4:3 | Ntango Yudas ayoki yango, akei na basoda ba ye ba mpiko, abimi na bango kobunda na basoda ba mokonzi bazalaki o Emaus. | |
I Ma | LinVB | 4:5 | Gorgias akomi o nganda ya Yudas na butu, kasi akuti moto moko te. Akanisi ’te ba-Yuda basili kokima, bongo alandi nzela ya ngomba mpo ya koluka bango. | |
I Ma | LinVB | 4:6 | Etani ntongo, Yudas abimi o esobe na basoda nkoto isato, ata bazalaki na bibuneli mpe na mimpanga te, lokola esengelaki. | |
I Ma | LinVB | 4:7 | Bamoni nganda ya bapagano. Bazalaki baike, na bakengeli ebele, na bato ba farasa bazalaki kozinga nganda ; banso bato bameseni na bitumba. | |
I Ma | LinVB | 4:8 | Yudas alobi na bato ba ye : « Bobanga bango te, ata bazali mingi ; bokima te ntango bakobanda etumba. | |
I Ma | LinVB | 4:9 | Bokanisa boniboni bankoko ba biso babikaki o Mbu Etane mokolo Farao na basoda ba ye balandaki bango. | |
I Ma | LinVB | 4:10 | Sikawa tobelela Nzambe, andima biso, akanisa Bondeko akataki na bankoko ba biso : anyata lelo limpinga liye bozali komono na miso. | |
I Ma | LinVB | 4:15 | Kasi baye bakimi mbangu te, ba-Yuda babomi bango na mopanga, baye balandi bango tee Gazara kin’o esobe ya Idumea na Yamnia ; bato soki nkoto isato bawei. | |
I Ma | LinVB | 4:17 | Yudas alobi na bato ba ye : « Bowela biloko bya banguna te, mpo etumba esusu ezali kozila biso. | |
I Ma | LinVB | 4:18 | Gorgias na basoda ba ye bazali awa o ngomba penepene na biso. Bopika mpende mpo ’te bokweisa bango mpe. Na nsima ndebokoki kobotolo biloko bya bango lokola bolingi. » | |
I Ma | LinVB | 4:19 | Yudas asilisi naino koloba te, bamoni banguna baye bazalaki konongo bango ut’o ngomba. | |
I Ma | LinVB | 4:20 | Bango bamoni ’te baninga ba bango basili kokima nganda ya bango etumbami na móto ; bayebi yango mpo ya milinga mizalaki kobuta wana. | |
I Ma | LinVB | 4:21 | Bakomi kobanga mingi. Ntango bamoni mpe ndenge basoda ba Yudas bazalaki komilengele na etumba o esobe, | |
I Ma | LinVB | 4:23 | Nsima Yudas azongi mpo ya kobotolo biloko o nganda. Babotoli wolo na palata mingi, bilamba bya motuya bya kiusa ya longondo, mpe biloko bisusu bya motuya. | |
I Ma | LinVB | 4:24 | Awa ba-Yuda bazongi, bakumisi mpe batondi Nzambe wa likolo, bayembi boye : « Nzambe asali malamu, bolingi bwa ye bokosilaka te ! » | |
I Ma | LinVB | 4:27 | Nsango ena etambwisi ye mayele mpe ele-mbisi ye mingi, mpamba te etumba na Israel esukeli ye mabe. Mokonzi atindaki ye bongo te, ye moko mpe alingaki bongo soki te. | |
I Ma | LinVB | 4:28 | Nsima ya mobu moko, Lisias asangisi basoda ba mpiko nkoto ntuku motoba, basusu ba farasa nkoto itano, mpo ’te asilisa ba-Yuda. | |
I Ma | LinVB | 4:29 | Bakomi o Idumea, bapiki nganda o Betsur. Yudas akei kozwana na bango, na basoda nkoto zomi. | |
I Ma | LinVB | 4:30 | Emoni ye limpinga liye linene, asambeli boye : « E Mobikisi wa Israel, bato bakumisa yo. Yo mpenza osilisaki bokasi bwa elombe na maboko ma mosaleli wa yo Davidi ; yo mpenza okabaki limpinga lya ba-Filisti o maboko ma Yonatan, mwana wa Saul, mpe ma mosaleli wa ye. | |
I Ma | LinVB | 4:31 | Sala ’te limpinga liye mpe likweya o maboko ma bato ba Israel, ekolo ya yo ; bongo bokasi bwa basoda ba bango ba makolo mpe ba farasa boyokisa bango nsoni. | |
I Ma | LinVB | 4:32 | Bapanzana ; batika kotia elikya na bokasi bwa bango ; bolongi bwa biso bolembisa bango. | |
I Ma | LinVB | 4:33 | Boma bango na mimpanga mya biso baye tolingi yo, mpo ’te baye banso bayebi nkombo ya yo bakumisa yo na nzembo. » | |
I Ma | LinVB | 4:35 | Lisias amoni ’te basoda bakolonga te, mpo basoda ba Yudas bakani kobika to kokufa na mpiko. Yango wana azongi o Antiokia, akei kofuta basoda basusu mpo azonga o Yudea na basoda ebele, leka baye ba liboso. | |
I Ma | LinVB | 4:36 | Yudas na bandeko ba ye balobi : « Ya solo, tokweisi banguna ba biso. Tokende kopetola Tempelo esantu mpe tobenisa yango lisusu. » | |
I Ma | LinVB | 4:38 | Bamoni ’te Tempelo ekomi mpamba, ebebi ; banguna basantoli altare ; bizibeli bya Tempelo biziki. Matiti masili makoli o lopango la Tempelo lokola o zamba to o ngomba ; biteni bya ndako bibebi nye. | |
I Ma | LinVB | 4:40 | Bakei kolala o nse, elongi o mabelé. Ntango babandi kobete mindule babeleli Nzambe wa likolo makasi. | |
I Ma | LinVB | 4:41 | Ntango bazalaki kopetola Tempelo, Yudas atindi bato bakende kobundisa baye batikali o ebombamelo. | |
I Ma | LinVB | 4:45 | Bazwi makanisi malamu. Bandimi koboma yango mpo ’te ekomela bango eloko ya nsoni te, mpo bapagano basantoli yango ; babuki yango. | |
I Ma | LinVB | 4:46 | Kasi batii mabanga mana o ngomba ya Tempelo mpo ya kobomba mango, tee mokolo mosusu profeta moko ayebisa nini bakoki kosala na mabanga mana. | |
I Ma | LinVB | 4:47 | Na nsima bakamati mabanga makatani te, engebene na Mobeko, mpe batongi altare ya sika lokola ezalaki liboso. | |
I Ma | LinVB | 4:49 | Batuli biloko bya Tempelo ya sika, bakotisi etemiseli ya mwinda, altare ya kotumba malasi, mpe meza ya mampa. | |
I Ma | LinVB | 4:50 | Batumbi mpaka ya malasi o altare, mpe bapelisi miinda mya etemiseli mingengi o Tempelo. | |
I Ma | LinVB | 4:51 | Batii mampa o meza, bazongisi elamba enene o esika ya yango. Basukisi bongo misala mya bango minso. | |
I Ma | LinVB | 4:52 | O mobu mwa monkama na ntuku inei na mwambe, o mokolo mwa ntuku ibale na mitano mwa sanza ya libwa, sanza ya Kisleu, na nta ntongo | |
I Ma | LinVB | 4:54 | Ezalaki o mokolo mpe o elekomei bapagano basantolaki yango. Bayembi nzembo na nzenze, na lokombe mpe na likembe mpo ya kozongisela altare lokumu la kala. | |
I Ma | LinVB | 4:55 | Bato banso bakumbami tee o nse mpo ya kokumisa Nzambe, mpe basambeli losambo la bokumisi Nzambe oyo asalisaki bango o etumba. | |
I Ma | LinVB | 4:56 | Mikolo mwambe basepeli eyenga ya bobenisi altare : na esengo enene babonzi mabonza ma kotumba, ma bokumisi mpe ma botondi Nzambe. | |
I Ma | LinVB | 4:57 | Epai ya boyingeli ya Tempelo batii bikembiseli bya wolo o efelo ; babo-ngisi mbalasani mpe batii bizibeli bya sika o biteni bya ndako. | |
I Ma | LinVB | 4:59 | Yudas na bandeko ba ye na bato ba likita linene lya Israel batindi ’te mobu na mobu basepela eyenga ya bobenisi altare mikolo mwambe, banda mokolo mwa ntuku ibale na mitano mwa sanza ya Kisleu ; basepela eyenga ena na esengo enene o mitema. | |
I Ma | LinVB | 4:60 | Bobele o eleko ena batongi lopango zongazonga na ngomba Sion, na mpe manongi manene mpo ’te bapagano baya kobebisa esika eye lisusu te. | |