Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
PSALMS
Prev Up Next
Chapter 105
Psal LinVB 105:1  Bokumisa Mokonzi, bosakola nkombo ya ye, boyebisa bato banso bikela bya ye !
Psal LinVB 105:2  Boyembela ye, bokumisa ye, bomanyola makamwisi ma ye manso.
Psal LinVB 105:3  Bosepela Nkombo ya ye esantu, lokumu la bino, bino bato bokolukaka Mokonzi, boyoka nsai.
Psal LinVB 105:4  Boluka Mokonzi na mpe nguya ya ye, bomeka kozala ntango inso penepene na ye.
Psal LinVB 105:5  Bokundola makamwisi ma ye, makamwa ma ye na boyangeli bwa ye,
Psal LinVB 105:6  bino bato ba libota lya Abarama, mosaleli wa ye, bino bana ba Yakob, moto ye apono.
Psal LinVB 105:7  Ye Mokonzi, azali Nzambe wa biso, ye akokataka makambo o nse mobimba.
Psal LinVB 105:8  Akokanisaka bondeko bwa ye ntango inso, elako ona nkoto na nkoto ya bato,
Psal LinVB 105:9  bondeko akataka na Abarama, na mpe ndai alayelaka Izaka.
Psal LinVB 105:10  Akomisi bwango mobeko mpo ya Yakob, bondeko bwa seko na bato ba Israel,
Psal LinVB 105:11  na maloba maye : « Nakopesa bino mokili, nakokabela bino mabelé ma Kanana bo lisango. »
Psal LinVB 105:12  O ntango ena bazalaki se liboke like lya bato, bazalaki bato baike te, se bampaya.
Psal LinVB 105:13  Bazalaki kolekaleka o bikolo biike, kotika mokili moko mpo ya kokende epai esusu.
Psal LinVB 105:14  Kasi alingisaki te ’te banyokolo bango, mpo ya bango apesi bakonzi basusu etumbu.
Psal LinVB 105:15  Alobi : « Botika bato baye babonzami na ngai, bosala baprofeta ba ngai mabe te ! »
Psal LinVB 105:16  Atindi nzala enene o mokili, abebisi bilanga binso bya mbuma ya mampa.
Psal LinVB 105:17  Atindi moto moko o boso bwa bango, Yozefu, oyo atekemi lokola moombo.
Psal LinVB 105:18  Bakangi ye minyololo o makolo, batii ye nkamba ya bibende o nkingo,
Psal LinVB 105:19  kin’o mokolo Mokonzi akokisi maloba ma ye, ntango makambo alobaki mayei kosalema.
Psal LinVB 105:20  Mokonzi Farao atindi ’te balongola ye minyololo, mokonzi wa bikolo mingi abikisi ye o boloko.
Psal LinVB 105:21  Atii ye moyangeli wa ndako ya ye, mpe nkolo wa biloko bya ye binso,
Psal LinVB 105:22  mpo ’te bankumu ba ekolo batosa ye, mpe ateya balaki ba mokonzi bwanya.
Psal LinVB 105:23  Bobele bongo ba-Israel bakomi o Ezipeti, Yakob akei kofanda o ekolo ya Kam.
Psal LinVB 105:24  Nzambe asalisi ekolo ya ye mpo ’te babota mingi, bakomi koleka banguna ba bango na bokasi.
Psal LinVB 105:25  Abebisi mitema mya banguna mpo bayina bato ba ye, mpe batungisa basaleli ba ye.
Psal LinVB 105:26  O ntango ena atindi Moze, mosaleli wa ye, na mpe Arone, moto amiponeli.
Psal LinVB 105:27  Na maboko ma bango asali misala minene miye alobaki, makamwisi o ekolo ya Kam.
Psal LinVB 105:28  Atindi molili mpe molili moyei, kasi baboyi kotosa maloba ma ye.
Psal LinVB 105:29  Akomisi mai ma bango makila, mpe abomisi mbisi ya bango inso o mai.
Psal LinVB 105:30  Mokili mwa bango motondi na magbololo, tee o ndako ya bakonzi ba bango.
Psal LinVB 105:31  Alobi lisusu mpe nzinzi iyei mingi na mpe nkungi o ekolo ya bango mobimba.
Psal LinVB 105:32  Mbula atindeli bango ezalaki mbula ya matandala, atindi mpe móto mwa minkalali o mokili mwa bango ;
Psal LinVB 105:33  abebisi nzete ya vino mpe ya figi, abuki nzete inso o mokili mwa bango.
Psal LinVB 105:34  Alobi lisusu mpe mapalela mayei, na makélele ebele makoki na botangi te,
Psal LinVB 105:35  masilisi matiti manso o mokili mwa bango, na mpe ndunda inso ya bilanga bya bango.
Psal LinVB 105:36  Abomi bana ba yambo banso ba ekolo, bana babali ba yambo ba mabota ma bango.
Psal LinVB 105:37  Abimisi bato ba ye, bamemi palata na wolo, mpe moto moko te atikali nsima.
Psal LinVB 105:38  Awa babimi, bato ba Ezipeti basepeli, zambi nsomo ekangaki bango.
Psal LinVB 105:39  Akitisi limpata mpo ya kobatela bango na moi, apelisi móto mópesa bango mwinda na butu.
Psal LinVB 105:40  Basengi bilei, atindeli bango bisosolo, atondisi bango na mampa mauti o likolo.
Psal LinVB 105:41  Apasoli libanga mpe mai mabimi, makatisi eliki lokola moluka.
Psal LinVB 105:42  Akundoli o motema liloba lya ye lisantu, elako alakelaki Abarama, mosaleli wa ye :
Psal LinVB 105:43  abimisi bato ba ye na esengo enene, bato ye aponoki bazalaki koganga na nsai.
Psal LinVB 105:44  Akabeli bango mabelé ma bato ba bikolo bisusu, bazwi bongo mbuma ya bilanga bya bango.
Psal LinVB 105:45  Asali maye manso mpo ’te bamemya bitinda bya ye mpe batosa mibeko mya ye. Aleluya !