Chapter 1
Ruth | LinVB | 1:1 | O mikolo bazuzi bazalaki koyangela ekolo, nzala makasi ekweli mokili. Moto moko alongwi o mboka Beteleme o mokili mwa Yuda, elongo na mwasi mpe na bana ba ye babale ; akei kofanda o esobe ya Moab. | |
Ruth | LinVB | 1:2 | Nkombo ya mobali oyo Elimelek, mwasi wa ye Noemi. Nkombo ya bana babali : Malon na Kilion. Bazali bato ba Efrata, mboka ya bango Beteleme ya Yuda. Bayei o esobe ya Moab, esika bafandi. | |
Ruth | LinVB | 1:4 | Bango babale bakamataki basi ba mokili mwa Moab ; moko nkombo ya ye Orpa, mosusu Rute. Bafandi kuna mibu zomi. | |
Ruth | LinVB | 1:6 | Mokolo moko Noemi atelemi, elongo na bakilo ba ye basi atiki esobe ya Moab, zambi kuna ayokaki ’te Yawe ayokelaki bato ba ekolo ya ye mawa mpe apesaki bango mampa. | |
Ruth | LinVB | 1:7 | Bongo atiki mboka esika afandaki elongo na bakilo ba ye babale. Basimbi nzela mpo ya kozonga o ekolo ya Yuda. | |
Ruth | LinVB | 1:8 | Kasi Noemi alobi na bakilo ba ye babale : « Bozonga o mboka ya bino, moto na moto epai ya mama wa ye. Yawe asala bino malamu lokola bino bosalaki malamu na baye bawei mpe na ngai moko. | |
Ruth | LinVB | 1:9 | Yawe asalisa bino mpo ’te bozwa mobali mpe bofanda na ye malamu. » Na nsima azingi bango ekopi, kasi bango babandi kolela. | |
Ruth | LinVB | 1:11 | Noemi azongisi : « E bana ba ngai, bozonga o mboka ya bino, mpo nini bolingi kokende na ngai elongo ? Nazali nde lisusu na bana babali o libumu mpo ’te babala bino ? | |
Ruth | LinVB | 1:12 | Bozonga, bana ba ngai, bokende, zambi nasili nakomi mobange, nazali lisusu mwasi wa kobala te ! Mpe ata nalobi : ‘Elikya ezali naino : nakozala na mobali lelo na butu, mpe nakobota naino bana’, | |
Ruth | LinVB | 1:13 | bino bokozila bango tee bakomi bakolo ? Mpe bongo bokoboya kobala mobali ? Te, bana ba ngai, nazali na mawa manene mpo ya bino. Loboko la Yawe lobeteki ngai liboso. » | |
Ruth | LinVB | 1:14 | Bango bakomi kolela makasi. Orpa azingi bokilo wa ye ekopi mpe azongi o mboka ya ye, kasi Rute alingi kotika bokilo wa ye te. | |
Ruth | LinVB | 1:15 | Noemi alobi na ye : « Tala, mbanda wa yo azongi o mboka ya ye epai ya bandeko ba ye mpe nzambe wa ye. Yo mpe sala bobele lokola ye mpe zonga o mboka. » | |
Ruth | LinVB | 1:16 | Rute alobi na ye : « Otinda ngai na makasi te, nalingi kotika yo te mpe kolongwa te, zambi bipai binso okokende, ngai mpe nakokende, esika yo okofanda, ngai mpe nakofanda, ekolo ya yo ekozala ekolo ya ngai, Nzambe wa yo akozala Nzambe wa ngai. | |
Ruth | LinVB | 1:17 | Esika yo okokufa, ngai mpe nakokufa, bakokunda ngai mpe kuna. Yawe asala ngai mabe maye, mpe abakisa naino etumbu esusu, soko liwa likaboli biso te ! » | |
Ruth | LinVB | 1:19 | Bongo bango babale bakei mpe bakomi o Beteleme ; bato banso ba mboka bakamwi mpe basi bamituni : « Ye nde Noemi solo ? » | |
Ruth | LinVB | 1:20 | Kasi ye ayanoli : « Bobyanga ngai ‘Mara’, zambi Nzambe wa bokasi bonso atondisi motema mwa ngai na mawa. | |
Ruth | LinVB | 1:21 | Natondaki na biloko ntango nakendeki, sikawa Yawe azongisi ngai maboko mpamba. Mpo nini bobyangi ngai lisusu Noemi, awa Yawe asambisi ngai, mpe Nzambe wa bokasi bonso ayokisi ngai mpasi ? » | |
Chapter 2
Ruth | LinVB | 2:1 | Noemi azalaki na ndeko moko wa libota lya mobali wa ye. Ye moto wa nkita : ye na Elimelek, mobali wa ye, bazalaki makila moko ; nkombo ya ye Booz. | |
Ruth | LinVB | 2:2 | Rute, mwasi wa mokili mwa Moab, alobi na Noemi : « Tika nakende kolokoto mbuma ya mampa epai ya moto oyo akolingisa ngai. » | |
Ruth | LinVB | 2:3 | Noemi alobi : « Malamu, mwana wa ngai, kende ! » Rute azwi libaku lilamu lya bokei esika balingisi ye alokoto mbuma : ezalaki elanga ya Booz, ndeko wa Elimelek. | |
Ruth | LinVB | 2:4 | Booz autaki o Beteleme, alobi na bato bazalaki kobuka mbuma : « Yawe azala na bino ! » Bango bazongisi : « Yawe abenisa yo ! » | |
Ruth | LinVB | 2:5 | Booz atuni kapita wa bato bazalaki kobuka mbuma : « Elenge mwasi oyo, nkolo wa ye nani ? » | |
Ruth | LinVB | 2:6 | Kapita ayanoli : « Azali elenge mwasi wa Moab, ayaki awa elongo na Noemi mpe auti o esobe ya Moab. | |
Ruth | LinVB | 2:7 | Ye atunaki : ‘Olingisa ngai naluka mpe nalokoto mbuma ya mampa nsima ya bato bakobuka mbuma’. Ayaki banda ntongo mpe tee sikawa azali se wana, naino apemi te. » | |
Ruth | LinVB | 2:8 | Booz alobi na Rute : « Mwana wa ngai, yoka malamu. Okende kolokoto mbuma o elanga esusu te. Olongwa awa te, kasi otikala bobele awa nsima ya basali ba ngai. | |
Ruth | LinVB | 2:9 | Tala eteni ya elanga esika bakobuka mbuma mpe landa bango. Napekisi basali ba ngai batungisa yo te. Soko oyoki mposa ya komele mai, mele o mbeki ya basali mai batokaki. » | |
Ruth | LinVB | 2:10 | Rute akwei elongi o nse, akumbameli ye mpe alobi : « Boni osali ngai malamu boye, mpe okanisi ngai, awa nazali se mompaya ? » | |
Ruth | LinVB | 2:11 | Booz azongisi : « Bayebisi ngai manso osalaki bokilo wa yo nsima ya liwa lya mobali wa yo mpe boniboni otikaki tata na mama na mpe mboka esika obotamaki, mpo ya kokende epai ya bato oyebaki liboso te. | |
Ruth | LinVB | 2:12 | Yawe azongisela yo malamu manso osalaki ; mpe Yawe, Nzambe wa Israel, afuta yo lifuta mobimba, awa otii motema o bobateli bwa ye. » | |
Ruth | LinVB | 2:13 | Rute azongisi : « Nazwa ntango inso bolamu o miso ma yo, e mokonzi wa ngai. Okitisi ngai motema mpe olobi na ngai mosaleli wa yo maloba ma boboto, ata nakokani na moko wa basali ba yo te. » | |
Ruth | LinVB | 2:14 | O ntango ya kolia Booz alobi na Rute : « Yaka penepene, lia limpa liye mpe tuna ndambo ya limpa o masa-nga bololo. » Afandi bongo penepene na babuki mbuma mpe Booz apesi ye mbuma bakalingi. Alei mpe atondi ; mpe ndambo etikali naino. | |
Ruth | LinVB | 2:15 | Etelemi ye mpo ya kolokoto mbuma lisusu, Booz alobi na basali : « Bolingisa ye alokoto ata o kati ya maboke, botungisa ye te. | |
Ruth | LinVB | 2:16 | Mpe bobenda mitó mya mbuma o maboke ma bino, bokweisa myango o nse, alokoto myango, bopekisa ye te. » | |
Ruth | LinVB | 2:17 | Rute alokoti mbuma o elanga tee butu ; mpe esilaki ye kotuta mbuma inso alokotoki, atondisi na yango ngoto mobimba. | |
Ruth | LinVB | 2:18 | Akamati ngoto mpe azongi na yango o mboka ; bokilo wa ye amoni biloko alokotoki. Rute alakisi ye mpe biloko abombaki, biye aliaki te, apesi bokilo wa ye byango. | |
Ruth | LinVB | 2:19 | Bokilo atuni ye : « Lelo olokotoki mbuma wapi ? Osalaki epai wapi ? Nzambe abenisa moto oyo akanisaki yo ! » Rute ayebisi bokilo wa ye epai ya nani asalaki mosala, alobi : « Moto oyo epai nasalaki mosala lelo, nkombo ya ye Booz. » | |
Ruth | LinVB | 2:20 | Mpe Noemi alobi na bokilo wa ye : « Yawe abenisa moto oyo akolakisaka ntango inso bolamu na bato bazali na bomoi mpe na bato bawei. » Noemi abakisi : « Moto ona azali ndeko wa biso, azali moto wa libota lya biso, akoki kosikola biso. » | |
Ruth | LinVB | 2:21 | Rute wa Moab alobi lisusu na bokilo wa ye : « Booz alobaki na ngai mpe ’te : Tikala na basaleli tee basilisi mosala mwa kobuka mbuma inso. » | |
Ruth | LinVB | 2:22 | Noemi alobi na bokilo wa ye Rute : « Ebongi, mwana wa ngai, ’te okende elongo na basali basi ba ye, mpo ’te bato batungisa yo te o elanga ya moto mosusu. » | |
Chapter 3
Ruth | LinVB | 3:1 | Bokilo wa ye Noemi alobi na ye : « E mwana wa ngai, mosala mwa ngai : kolukela yo mobali oyo akosala yo malamu. | |
Ruth | LinVB | 3:2 | Yoka, Booz, oyo epai okendeki kolokoto mbuma nsima ya basali basi, azali ndeko wa ngai. Lelo na butu akopupola mbuma ya mampa o etutelo. | |
Ruth | LinVB | 3:3 | Yango wana, sukola nzoto mpe pakola yango malasi, kende o etutelo, kasi omilakisa na ye te tee asilisi kolia mpe komele. | |
Ruth | LinVB | 3:4 | Ekomi ntango ya kolala, otala malamu esika nini akei kopema ; na nsima yo mpe kende kuna, longola bolangiti o makolo ma ye mpe lala kuna. Ye moko akoyebisa yo nini osengeli kosala. » | |
Ruth | LinVB | 3:7 | Booz alei mpe ameli ; na nsima akei kolala mpongi na motema esengo penepene na ngoto ya mbuma. Rute ayei malembe, alongoli bolangiti o makolo ma ye mpe alali wana. | |
Ruth | LinVB | 3:8 | O kati ya butu Booz akomi kolenge, alamuki, atali epai na epai mpe amoni mwasi moko alali penepene na makolo ma ye. | |
Ruth | LinVB | 3:9 | Atuni ye : « Yo nani ? » Ye azongisi : « Nazali Rute, mosaleli wa yo. Bala ngai, mosaleli wa yo, zambi yo moto okoki kosikola ngai. » | |
Ruth | LinVB | 3:10 | Booz alobi : « Yawe abenisa yo, mwana wa ngai ; mbala eye ya ibale olakisi boniboni olingi bandeko ba yo, zambi olukaki bilenge babali te, ata babola ata bato ba nkita. | |
Ruth | LinVB | 3:11 | Sikawa, mwana wa ngai, obanga te. Manso okoloba nakosala mango mpo ya yo, mpo bato banso ba mboka ya biso bayebi ’te ozali mwasi wa lokumu. | |
Ruth | LinVB | 3:12 | Kasi sikawa, soko ezali ya solo ’te nakoki kosikola yo, yeba ’te ndeko mosusu wa penepene azali, oyo akoki kosikola yo. | |
Ruth | LinVB | 3:13 | Tikala awa na butu. Na ntongo, soko ye alingi, malamu asikola yo ! Kasi soko alingi kosikola yo te, lokola Yawe azali na bomoi, ngai moto nakosikola yo ! Lala se malamu tee ntongo. » | |
Ruth | LinVB | 3:14 | Rute alali wana penepene na makolo ma ye tee ntongo, kasi atelemi o ntango bakoki komonono na bato te. Booz alobaki : « Malamu bato bayeba te ’te mwasi oyo ayaki awa o etutelo. » | |
Ruth | LinVB | 3:15 | Alobi na ye : « Pesa liputa olati mpe tanda lyango. » Akamati liputa mpe Booz atii wana kilo ntuku ibale ya mbuma ya mampa mpe apesi ye. Nsima akei o mboka. | |
Ruth | LinVB | 3:16 | Rute azongi epai ya bokilo wa ye. Oyo atuni : « Nsango nini, mwana wa ngai ? » Rute ayebisi ye manso mobali asalaki mpo ya ye. | |
Ruth | LinVB | 3:17 | Alobi : « Moto ona apesi ngai kilo ntuku ibale ya mbuma ya mampa, mpo alobaki : Okozonga epai ya bokilo wa yo maboko mpamba te. » | |
Chapter 4
Ruth | LinVB | 4:1 | Booz akei o ezibeli ya mboka mpe afandi wana. Tala moto oyo akoki kosikola Rute, oyo Booz alobaki, azalaki koleka. Booz alobi : « Ndeko, yaka mpe fanda awa. » Moto ayei mpe afandi. | |
Ruth | LinVB | 4:2 | Booz aponi bato zomi o kati ya bakolo ba mboka mpe alobi : « Bofanda awa » ; mpe bafandi. | |
Ruth | LinVB | 4:3 | Nsima alobi na moto oyo akoki kosikola ndeko : « Noemi oyo alongwaki o esobe ya Moab, alingi koteke eteni ya mabelé eye ezalaki ya ndeko wa biso Elimelek. | |
Ruth | LinVB | 4:4 | Bongo nakanisi ’te nasengeli koyebisa yo : Somba mango o miso ma bato bafandi awa mpe o miso ma bakolo ba ekolo ya ngai. Soko olingi kosomba mango, bimisa mosolo, kasi soko olingi kosikola mango te, yebisa ngai boniboni nakoki kosala, zambi moto mosusu akoki kosomba mango te, bobele yo, mpe nsima ya yo bobele ngai. » Moto ona ayanoli : « Ngai nalingi kosomba mango. » | |
Ruth | LinVB | 4:5 | Kasi Booz alobi na ye : « Mokolo okosomba elanga o maboko ma Noemi, okozwa mpe Rute, mwasi auti o Moab, oyo akufeli mobali, mpo ’te nkombo ya mowei elongwa o mokili mwa ye te. » | |
Ruth | LinVB | 4:6 | Moto akoki kosikola alobi : « Nakoki kosomba elanga mpo ya ngai te ; soko nasali bongo, nase-ngeli koteke mabelé ma ngai masusu ! Yo moko somba elanga eye ngai nakoki kosikola, zambi ngai nazali na mosolo te mpo nasomba mango. » | |
Ruth | LinVB | 4:7 | Liboso ezalaki momeseno o Israel, soko balingi kosikola to kosomba eloko, mpo ’te emonono polele ’te likambo lisili likatemi : moto alongola lipapa lya ye mpe apesa moto mosusu lyango. Bazalaki kolakisa bongo o Israel ’te likambo lisili likatemi. | |
Ruth | LinVB | 4:8 | Oyo akoki kosikola alobi na Booz : « Yo moko somba yango », mpe alongoli lipapa lya ye. | |
Ruth | LinVB | 4:9 | Booz alobi na bakolo mpe na bato banso : « Lelo bino bozali banzeneneke ba ngai ’te nazwi o maboko ma Noemi biloko binso bizalaki bya Elimelek mpe binso bizalaki bya Kilion mpe Malon. | |
Ruth | LinVB | 4:10 | Nazwi mpe Rute, moto wa Moab, mwasi wa Malon, mpo ’te nakoka kotombola lisusu nkombo ya mowei o ekolo, bongo nkombo ya mowei ekufa te o miso ma bato ba mboka mpe o miso ma bandeko ba ye. Lelo bozali banzeneneke ba ngai. » | |
Ruth | LinVB | 4:11 | Bato banso bazalaki o ezibeli ya mboka mpe bakolo banso balobi : « Biso tomoni yango ! Yawe asala ’te mwasi oyo akokoto o ndako ya yo akokana na Rakele mpe na Lea, baye batongaki libota lya Israel. Olenda o Efrata, mpe ozwa nkombo ya lokumu o Beteleme. | |
Ruth | LinVB | 4:12 | Mpo ya bana akokabela yo na mwasi oyo, libota lya yo likoma lokola libota lya Peres, mwana oyo Tamar abotelaki Yuda. » | |
Ruth | LinVB | 4:13 | Booz abali Rute, ye akomi mwasi wa ye. Awa bakomi ndako yoko, Yawe asalisi Rute : azwi zemi mpe aboti mwana mobali. | |
Ruth | LinVB | 4:14 | Basi ba mboka balobi na Noemi : « Bakumisa Yawe oyo asalisi yo mpe apesi yo moto oyo asikoli yo. Basakola lokumu la Yawe o Israel mobimba ! | |
Ruth | LinVB | 4:15 | Mwana oyo akosalisa yo mpe akobatela yo ntango okokoma mobange, zambi mama oyo aboti ye azali bokilo wa yo mpe alingi yo mingi. Mpo ya yo, ye aleki bana babali nsambo na bolamu. » | |
Ruth | LinVB | 4:17 | Baninga ba ye basi baponi nkombo ya mwana, balobi : « Baboteli Noemi mwana mobali ! » Bongo bapesi ye nkombo Obed, ye nde tata wa Yese, nkoko wa Davidi. | |