MATTHEW
Chapter 26
Matt | LinVB | 26:2 | « Boyébí, etíkálí mikolo míbalé tósepela eyenga ya Pásiká ; bakokaba Mwána wa Moto mpô ya kobáka yě o kurúse. » | |
Matt | LinVB | 26:3 | O ntángo êná banganga bakonzi na bakóló ba mbóka basangání likita o ndáko ya nganga mokonzi Kaífa. | |
Matt | LinVB | 26:7 | Ntángo bazalákí kolía, mwásí mǒkó ayéí na molangi mwa mbélé mwa malási ma motúya monéne, asopí mangó o motó mwa Yézu. | |
Matt | LinVB | 26:10 | Kasi Yézu ayókí yangó, alobí : « Mpô níni bozalí kotungisa mwásí óyo ? Asálí ngáí malámu. | |
Matt | LinVB | 26:13 | Ya sôló, nayébísí bínó, o bisíká bínso bya mokili mobimba bakosangela Nsango Elámu óyo, bakokanisa yě mpé bakoloba likambo asálí sikáwa. » | |
Matt | LinVB | 26:14 | Na nsima mǒkó wa ba-zómi na bábalé, Yudási Iskarióte, akeí epái ya banganga bakonzi, | |
Matt | LinVB | 26:15 | alobí na bangó : « Bokopésa ngáí níni sókó nakabí yě o mabóko ma bínó ? » Bapésí yě bibendé ntúkú ísáto bya mosolo. | |
Matt | LinVB | 26:17 | O mokolo mwa libosó mwa mikolo bakolíaka mámpa mavímbí té, bayékoli balobí na Yézu : « Esíká níni olingí tólámbela yǒ limpáti lya Pásiká ? » | |
Matt | LinVB | 26:18 | Yézu azóngísí : « Bóyíngela o engumbá, bókende epái ya Sóngóló, bóyébisa yě : Motéyi alobí : Elaká ya ngáí ekokí, nalingí kolía limpáti lya Pásiká elongó na bayékoli ba ngáí o ndáko ya yǒ. » | |
Matt | LinVB | 26:21 | Ntángo bazalákí kolía, alobí : « Ya sôló sôló, nalobí na bínó : mǒkó o ntéi ya bínó akokaba ngáí. » | |
Matt | LinVB | 26:24 | Mwána wa Moto akobenga nzelá lokóla ekomámí mpô ya yě o Minkandá ; kasi mawa na moto óyo akokaba Mwána wa Moto ! Ebongókí ’te moto ôná ábótama té ! » | |
Matt | LinVB | 26:25 | Yudási, óyo akokaba yě, atúní yě mpé : « Mokonzi, ezalí ngáí ? » Yézu azóngísí : « Osílí olobí. » | |
Matt | LinVB | 26:26 | Ntángo bazalákí kolía, Yézu akamátí límpa, asámbélí losámbo la bobenisi, abúkí lyangó, apésí bayékoli ba yě, alobí : « Kamátáni bólía, eye ezalí nzóto ya ngáí. » | |
Matt | LinVB | 26:27 | Na nsima akamátí nkéni, atóndí Nzámbe, apésí bangó, alobí : « Bómele yangó bínó bánso, | |
Matt | LinVB | 26:28 | eye ezalí makilá ma ngáí, makilá ma bondeko, makosopana mpô ya bato ebelé mpô ’te bázwa bolímbisi masúmu. | |
Matt | LinVB | 26:29 | Nayébísí bínó : bandá sikáwa nakomele víno lisúsu té, téé mokolo nakomele víno ya sika elongó na bínó o Bokonzi bwa Tatá wa ngáí. » | |
Matt | LinVB | 26:31 | Yézu alobí na bangó : « Na butú bwa lelóméí, bínó bánso bokotúta libakú mpô ya ngáí, zambí ekomámí : Nakobéte mokéngeli wa mpatá, mpé mpatá ya etónga ikopanzana. | |
Matt | LinVB | 26:33 | Pétro alobí na yě : « Atâ bánso batútí libakú mpô ya yǒ, ngáí té, atâ mokolo mǒkó té. » | |
Matt | LinVB | 26:34 | Yézu azóngísélí yě : « Nalobí na yǒ ya sôló : Na butú bwa lelóméí, naíno nsósó elelí té, okowángana ngáí mbala ísáto. » | |
Matt | LinVB | 26:35 | Pétro azóngísí : « Atâ nasengélí kokúfa elongó na yǒ, nakowángana yǒ té. » Bayékoli bánso balobí bobélé bôngó. | |
Matt | LinVB | 26:36 | Ntángo Yézu akómí na bangó o esíká bakobéngaka Getsémani, alobí na bayékoli : « Bótíkala áwa, ngáí nakeí kosámbela kúná. » | |
Matt | LinVB | 26:37 | Akeí na Pétro mpé na bána ba Zebedéo bábalé. Abandí koyóka mawa mpé nsómo o motéma. | |
Matt | LinVB | 26:38 | Alobí na bangó : « Nayókí mawa míngi lokóla nalingí nákúfa ; bótíkala áwa mpé bókéngele elongó na ngáí. » | |
Matt | LinVB | 26:39 | Etámbólí yě mwâ moké, akwéí elongi o nsé mpé asámbélí : « Tatá wa ngáí, sókó ekokí, nkéni eye élongwa mosíká na ngáí ! Nzókandé ésálema té lokóla ngáí nalingí, kasi lokóla yǒ olingí. » | |
Matt | LinVB | 26:40 | Azóngí epái ya bayékoli, akútí bangó bazalákí kolála mpongí. Alobí na Pétro : « Bôngó ozalí na makási ma kokéngele elongó na ngáí atâ ngonga yǒ kó té ? | |
Matt | LinVB | 26:41 | Bókéngele mpé bósámbela mpô ’te bóndima masénginyá té : atâ moto azalí na mpíkó, nzóto ya yě ekolembeke. » | |
Matt | LinVB | 26:42 | Akeí kosámbela mbala ya íbalé : « Tatá, sókó nkéni eye ekokí kolongwa té, bobélé námele yangó, ésálema lokóla yǒ olingí ! » | |
Matt | LinVB | 26:43 | Na nsima azóngí, akútí bangó bazalákí kolála lisúsu, zambí míso ma bangó male-mbí na mpongí. | |
Matt | LinVB | 26:45 | Na nsima azóngí epái ya bayékoli, alobí na bangó : « Sikáwa bokokí kolála mpé kopéma. Elaká esílí ekokí, bakokaba Mwána wa Moto o mabóko ma basúmuki. | |
Matt | LinVB | 26:47 | Esílísí yě naíno koloba té, Yudási, mǒkó wa ba-zómi na bábalé, ayéí elongó na bato ebelé ; bazalákí na mimpánga mpé na mángénda o mabóko. Banganga bakonzi na bakóló batíndákí bangó. | |
Matt | LinVB | 26:50 | Kasi Yézu alobí na yě : « Ndeko, sálá maye olingí kosála. » Na nsima basúsu babelémí, basímbí Yézu na mabóko mpé bakangí yě. | |
Matt | LinVB | 26:51 | Tálá, mǒkó wa bato bazalákí na Yézu akamátí mompánga mwa yě, abétí mosáli wa nganga mokonzi mpé akátí yě litói. | |
Matt | LinVB | 26:52 | Kasi Yézu alobí na yě : « Zóngísá mompánga, mpô bato bakobimisa mompánga, bakokúfa na mompánga. | |
Matt | LinVB | 26:53 | Okanísí ’te nakokí kobóndela Tatá wa ngáí té átíndela ngáí sikasikáwa mampingá zómi na mábalé ma bǎnzelú ? | |
Matt | LinVB | 26:54 | Kasi sókó nasálí bôngó, ndéngé níni mambí mánso makomámí o Minkandá makokokisama ? » | |
Matt | LinVB | 26:55 | O ntángo êná Yézu atúní bato : « Nazalí ndé moyíbi ’te bóbimela ngáí na mimpánga mpé na mángénda mpô ya kokanga ngáí ? Mokolo na mokolo nazalákí kofánda mpé kotéya o Témpelo, mpé bokangákí ngáí té. » | |
Matt | LinVB | 26:56 | Kasi maye mánso masálémí mpô ’te maloba makomámí o Minkandá mya baproféta mákokisama. O ntángo êná bayékoli bánso batíkí Yézu mpé bakímí. | |
Matt | LinVB | 26:57 | Baye bakangákí Yézu bakeí na yě epái ya nganga mokonzi Kaífa, esíká batéyi ba Mobéko na bakóló basangání likita. | |
Matt | LinVB | 26:58 | Pétro alandí Yézu mwâ mosíká kín’o ndáko ya nganga mokonzi, ayíngélí o lopángo mpé akeí kofánda epái ya basáli, ámóno ndéngé níni likambo liye likosúka. | |
Matt | LinVB | 26:59 | Banganga bakonzi na bato bánso ba Likita linéne bazalákí koluka bato bákoka kofúnda Yézu na lokutá mpô ’te bákitisa yě o liwá ; | |
Matt | LinVB | 26:60 | kasi bazwí ntína yǒ kó té, atâ banzénénéké ba lokutá babimákí míngi. Na nsúka mpenzá bato bábalé bayéí, | |
Matt | LinVB | 26:61 | balobí : « Moto óyo alobákí : Nakokí koboma Témpelo ya Nzámbe mpé kotónga yangó lisúsu na mikolo mísáto. » | |
Matt | LinVB | 26:62 | Sikáwa nganga mokonzi atélémí mpé atúní Yézu : « Okozóngisa liloba lyǒkó té ? Bato baye bafúndí yǒ na níni ? » | |
Matt | LinVB | 26:63 | Kasi Yézu akangí monoko. Nganga mokonzi alobí na yě : « Na nkómbó ya Nzámbe wa bomoi, yébísá bísó sókó ozalí Mesíya, Mwána wa Nzámbe. » | |
Matt | LinVB | 26:64 | Yézu ayanólí : « Olobí ya sôló. Kútu nayébísí bínó : Bandá leló bokomóno Mwána wa Moto akofánda o lobóko la mobáli la óyo alekí ngúyá, mpé akoyâ o mampata ma likoló. » | |
Matt | LinVB | 26:65 | Sikáwa nganga mokonzi apasólí bilambá bya yě, alobí : « Atúkí Nzámbe ! Mpô níni tóluka lisúsu banzénénéké ? Boútí koyóka ’te atúkí Nzámbe ! | |
Matt | LinVB | 26:69 | Pétro afándí o libándá, o lopángo. Mosáli mwásí mǒkó abelémí na yě, alobí : « Yǒ mpé ozalákí na Yézu wa Galiléa. » | |
Matt | LinVB | 26:70 | Kasi Pétro awángání o míso ma bato bánso, alobí : « Nayébí té níni olingí koloba. » | |
Matt | LinVB | 26:71 | Akeí kotéleme penepene na monoko mwa lopángo. Mwásí mosúsu amóní yě, alobí na bato bazalákí wâná : « Moto óyo azalákí na Yézu wa Nazaréte. » | |
Matt | LinVB | 26:73 | Mwâ moké nsima bato bazalákí wâná bayéí epái ya Pétro, balobí na yě : « Ntembe té, yǒ mpé ozalí mǒkó wa bangó, elobeli ya yǒ ezalí kofúnda yǒ. » | |
Matt | LinVB | 26:74 | Sikáwa abandí kolaya ndaí makási makási, alobí : « Nayébí moto ôná té. » Bobélé o ntángo êná nsósó elelí. | |