Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
I THESSALONIANS
Up
1 2 3 4 5
Chapter 1
I Th LinVB 1:1  Pólo, Silváno na Timotéo, ôná bandeko ba Eklé­zya ya Tesaloníki, eye ezalí ya Nzámbe Tatá mpé ya Mokonzi Yézu Krístu, ngrá­sya mpé bobóto bózala na bínó !
I Th LinVB 1:2  Tozalí kotóndo Nzámbe mpô ya bínó bánso, mbala ínso tozalí kotánga nkómbó ya bínó o losá­mbo la bísó.
I Th LinVB 1:3  Ntángo ínso tokoku­ndolaka o mitéma, o míso ma Nzámbe Tatá, boyambi bwa bínó bwa mpíkó, bolingi bonéne bokolakisaka o misálá, mpé elíkyá enéne bokotíaka na Mokonzi wa bísó Yézu Krístu.
I Th LinVB 1:4  Bandeko, toyébí ndéngé Nzámbe alingí mpé aponí bínó.
I Th LinVB 1:5  Na ntembe sókí moké té tosangélákí bínó Nsango Elámu bobélé na maloba té, kasi na ngúyá ya Elímo Sántu. Boyébí maye mánso tosálákí mpô ya bolámu bwa bínó ntángo tozalákí epái ya bínó.
I Th LinVB 1:6  Mpé boba­ndí kolanda ndakisa ya bísó mpé ya Mokonzi, áwa boyambí Liloba o káti ya minyóko, kasi na esengo ya Elímo Sántu.
I Th LinVB 1:7  Bokómí bôngó ndakisa o míso ma bakrístu bá­nso ba Masedónia mpé ba Akáya.
I Th LinVB 1:8  Ut’o bínó Liloba lya Mokonzi lipalángání, bobélé o Masédonia mpé o Akáya té ; bipái bínso bakómí koyéba bóníbóní bozalí koyamba Nzámbe ; tosengélí kobakisa maloba lisúsu té.
I Th LinVB 1:9  Bangó mǒkó bakosololaka ndéngé boyambákí bísó, ndé­ngé botíkí bikeko mpé bobó­ngólí mitéma mpô ’te bósálela Nzámbe wa sôló óyo azalí na bomoi.
I Th LinVB 1:10  Bozalí kozila Mwána wa yě akoyâ út’o likoló, Yézu óyo yě asékwísí o bawá, yě moto akobíkisa bísó o nkándá ezalí ko­yâ.
Chapter 2
I Th LinVB 2:1  Bínó mǒkó boyébí bóníbóní toyákí epái ya bínó : ezalákí mpámba té.
I Th LinVB 2:2  Boyébí ’te banyókólókí bísó mpé bafíngákí bísó o Filípi ; kasi Nzámbe wa bísó apésákí bísó mpíkó ya kosangela na moléndé Nsango Elámu ya Nzá­mbe o míso ma bínó, atâ bayókísákí bísó kwókósó mpenzá.
I Th LinVB 2:3  Zambi toléndísákí bínó, totéyákí bínó matéya ma lokutá té, ma bosóni mpé té ; tomekákí kokósa bínó té.
I Th LinVB 2:4  Nzámbe yě mǒkó amekákí bísó mpé apésí bísó mosálá mwa bosa­ngeli Nsango Elámu. Yangó wâná na botéyi bwa bísó tokolukaka kosepelisa bato té, kasi bobélé Nzámbe óyo ayébí mitéma mya bísó.
I Th LinVB 2:5  Mokolo mǒkó té tobóndélákí bínó na maloba ma boléti, boyébí yangó ; tozalákí mpé na likanisi lyǒ kó té lya kozwa mosolo, Nzámbe ayébí yangó.
I Th LinVB 2:6  Tolukákí lokúmu epái ya bato té, epái ya bínó té, epái ya bato basúsu mpé té.
I Th LinVB 2:7  Tokokákí kosénge bínó ’te bósálela bísó mpô tozalí bapóstolo ba Krístu, nzókandé tofándákí na bobóto o ntéi ya bínó, lokóla mamá akofándaka na bána ba yě.
I Th LinVB 2:8  Tozalákí kolinga bínó míngi mpenzá : tozalákí bobélé na mpósá té ya kosangela bínó Nsango Elámu, kasi tolingákí mpé komíkaba mobimba mpô ya bínó, mpô bosílí bokómákí bandeko ba bísó ba bolingo.
I Th LinVB 2:9  Bandeko, bobósání té bóníbóní totíákí moléndé mpé tomíyókísákí mpási : butú mói tozalákí kosála mosálá, mpô tómemisa moto mǒkó mókúmbá té, ntángo tosangélákí bínó Nsango Elámu ya Nzámbe !
I Th LinVB 2:10  Bínó mǒkó bomónókí na míso, Nzámbe mpé ayébí, bóníbóní epái ya bínó bakrístu tozalákí na ezalela ya bosántu, ya bosémbo, na mabé mǒkó té.
I Th LinVB 2:11  Boyébí ’te tosálákí na bínó lokóla tatá akosálaka na bána ba yě.
I Th LinVB 2:12  Totéyákí, toléndísákí mpé tobóndélákí bínó mpô ’te bózala na ezalela ebongí o míso ma Nzámbe. Yě moto abyángí bínó o Bokonzi bwa yě mpé o nkémbo ya yě.
I Th LinVB 2:13  Awa boyókí Liloba lya Nzámbe liye totéyákí bínó, bondimí lyangó lokóla liloba lya bato té, kasi boyambí lyangó lokóla liloba lya Nzámbe mpenzá, liye likobóta mbuma o mitéma mya bakrístu. Yangó wâná bísó mpé tozalí kotó­ndo Nzámbe ntángo ínso.
I Th LinVB 2:14  Zambi bínó, bolandí ndakisa ya bandeko ba Biklézya bya Nzámbe, bato ba Krístu Yézu o Yudéa. Bato ba ekólo ya bínó bayókísí bínó mpási, sé lokóla ba-Yúda bayókísákí bandeko ba Yudéa mpási.
I Th LinVB 2:15  Ba-Yúda babomákí Mokonzi Yézu mpé baproféta, banyókólí bísó lokóla ; bangó bazalí kosepelisa Nzámbe té, bazalí bangúná ba bato bánso,
I Th LinVB 2:16  áwa bazalí kopekisa bísó kotéya bapagáno mpô ’te bábíka. Ntángo ínso bazalí bôngó kokólisa masúmu ma bangó sé bokólisi. Na nsúka nkándá ya Nzámbe ekwêlí bangó.
I Th LinVB 2:17  Bandeko, tosílí tokabwání mwâ mikolo, kasi tobósání bínó atâ moké té. Yangó wâná tozalákí na mpósá mpenzá mpé tolukákí nzelá ínso mpô tómónono lisúsu.
I Th LinVB 2:18  Tolingákí koyâ epái ya bínó. Ngáí Pólo nakánákí kosála bôngó bobélé mbala yǒ­kó té to ibale té, kasi Sátana apekísákí ngáí.
I Th LinVB 2:19  Sókí bínó té, banáni bakozala elíkyá ya bísó, esengo ya bísó mpé e­nkoti ya bísó ya lokú­mu o míso ma Mokonzi Yézu mokolo ako­yâ ?
I Th LinVB 2:20  Sôló, lokúmu mpé esengo ya bísó, sé bínó.
Chapter 3
I Th LinVB 3:1  Tokokákí kokanga mitéma lisúsu té, yangó wâná tokání kotíkala bísó mǒkó o Aténe,
I Th LinVB 3:2  mpé kotínda epái ya bínó ndeko wa bísó Timotéo. Azalí mosáleli wa Nzámbe o mosálá mwa bosangeli Nsango Elámu ya Krístu ; yě moto áyâ koléndisa boyambi bwa bínó.
I Th LinVB 3:3  Bôngó moto mǒkó té ázala motéma likoló mpô ya minyóko miye. Bínó mǒkó boyébí ’te minyóko mikozángaka té.
I Th LinVB 3:4  Ntángo tozalákí epái ya bínó toyébísákí bínó ’te minyóko mikokwêla bísó. Esálémí sé bôngó, bínó mǒkó boyébí.
I Th LinVB 3:5  Yangó wâná nakokákí kokanga motéma lisúsu té : natíndákí yě áyébisa ngáí ndéngé níni bozalí koyamba. Mbele Mosénginyi asílí amekí bínó mpé tosálí mosálá sé mpámba !
I Th LinVB 3:6  Sikáwa Timotéo aútí epái ya bínó, azóngí áwa, ayélí bísó nsango ya esengo : bóníbóní bozalí koyamba mpé kolingana. Ayébísí bísó ’te bokokanisaka bísó ntángo ínso, bozalí na mpósá ya komóno bísó lisúsu, sé lokóla bísó mpé tolingí komóno bínó.
I Th LinVB 3:7  Yangó wâná, bandeko, boyambi bwa bínó boyókísí bísó esengo o káti ya mpási mpé ya minyóko tozalí koyóka.
I Th LinVB 3:8  Sikáwa toléndí, áwa toyébí ’te bozalí koyamba Mokonzi na moléndé.
I Th LinVB 3:9  Bóníbóní tokokí kotóndo Mokonzi bǒ ebongí mpô ya bínó, mpô ya esengo boyókísí bísó o míso ma Nzámbe wa bísó ?
I Th LinVB 3:10  Butú mói tokobó­ndelaka yě míngi tókoka komónono na bínó lisúsu, mpé tókokisa maye mazángí naíno o boyambi bwa bínó.
I Th LinVB 3:11  Yě mǒkó Nzámbe Tatá wa bísó, na Mokonzi wa bísó Yézu bábo­ngisela bísó nzelá mpô tókóma epái ya bínó.
I Th LinVB 3:12  Mokonzi ákólisa boli­ngani bwa bínó, átóndisa mpé mitéma mya bínó na bolingi bato bánso, sé lokóla bísó tokolingaka bínó.
I Th LinVB 3:13  Aléndisa mitéma mya bínó, ábongisa myangó mpô ’te bóbongo nyé mpé bózala na bosántu o míso ma Nzámbe, Tatá wa bísó, o mokolo Mokonzi wa bísó Yézu akoyâ elongó na basántu ba yě bánso.
Chapter 4
I Th LinVB 4:1  Lisusu bandeko, toséngí mpé tobóndélí bínó o nkómbó ya Mokonzi Yézu : tolakísákí bínó ndéngé bosengélí kosála mpô ya kosepelisa Nzámbe ; mpé, ya sôló, bokosálaka sé bôngó : bólénda naíno o nzelá êná.
I Th LinVB 4:2  Boyébí malámu mibéko káni topésákí bínó o nkómbó ya Mokonzi Yézu.
I Th LinVB 4:3  Zambi nzámbe alingí boye : bókóma basántu, bótíka makambo mánso ma bosóni.
I Th LinVB 4:4  Mǒ kó mǒkó wa bínó ábátela nzóto ya yě mǒkó na bosántu mpé na limemyá.
I Th LinVB 4:5  Alanda mpósá ebé ya nzóto té lokóla bapagáno bakosálaka, baye bayébí Nzá­mbe té.
I Th LinVB 4:6  Moto mǒkó té ákósa ndeko wa yě, tǒ ásála yě mabé o makambo maye. Mokonzi akobekola mabé mâná mánso, lokóla tosílí koloba mpé kolakisa bínó.
I Th LinVB 4:7  Nzámbe abé­ngí bísó té mpô tósála bosóni, kasi mpô tókóma basántu.
I Th LinVB 4:8  Bôngó, moto abóyí mibéko mîná, abóyí moto té, kasi abóyí Nzámbeméí, óyo akabélí bínó Elímo Sá­ntu wa yě.
I Th LinVB 4:9  Mpô ya bolingani nasengélí kokomela bínó elóko té, mpô Nzá­mbeméí alakísí bínó ’te bosengélí kolingana.
I Th LinVB 4:10  Sôló, bokosálaka bôngó na bandeko bánso ba Masedónia mobimba. Kasi tobóndélí bínó, bandeko : bókóla naíno o nzelá ya bolingani.
I Th LinVB 4:11  Bósála makási mpô bófánda nyê, moto na moto átála makambo ma yě mǒkó, mpé ásála mosálá na mabóko ma yě mǒkó, lokóla tosílí kotínda bínó.
I Th LinVB 4:12  Bôngó ezalela ya bínó ekozala ndakisa elámu o míso ma bato basúsu, mpé bokosengela na lisálisi lya moto mǒ­kó té.
I Th LinVB 4:13  Bandeko, tolingí té ’te bótíkala na ntembe o likambo litálí bato balálí mpongí ya liwá. Bôngó, bóyóka mawa té lokóla bato basúsu, baye bazángí elíkyá.
I Th LinVB 4:14  Bísó toya­mbí ’te Yézu awéí mpé asékwí, sé bôngó bato bawéí o boyambi Yézu, Nzámbe akosangisa bangó na Yézu.
I Th LinVB 4:15  Tokokí koyébisa bínó bôngó mpô ya maloba ma Mokonzi : bísó bato tokozala na bomoi kín’o Mokolo Mokonzi akoyâ, tokoleka bato bawéí té.
I Th LinVB 4:16  Zambí, ntángo ǎnzelú mokúmi akobélela mpé bakobéte mondúle mwa Nzámbe, Mokonzi yě méí akotíka likoló, ako­kita o nsé ; bato bawéí o boyambi Krístu ba­kosékwa libosó.
I Th LinVB 4:17  Nsi­ma bísó bato tokotíkala na bomoi téé mokolo môná, bakosangisa bísó na bangó ; bakokamba bísó o mampata mpô tózwana na Mokonzi o likoló. Bôngó tokozala elo­ngó na Mokonzi sékô.
Chapter 5
I Th LinVB 5:1  Bandeko, ntína yǒ kó ezalí té ’te tókomela bínó sókó o ntángo níni tǒ o mokolo níni yangó ekosálema.
I Th LinVB 5:2  Bínó mǒkó boyébí malámu ’te Mokolo mwa Mokonzi mokoyâ lokóla moyíbi na butú.
I Th LinVB 5:3  Mokolo bato bakolobana : « Tozalí na bobóto, tofándí nyê », bobélé mokolo môná liwá likokwêla bangó na mbálákáká ; lokóla mpási ya kobóta ekokwêla mwásí azalí na zémi. Moto mǒkó té akokoka kokíma.
I Th LinVB 5:4  Kasi bínó, bandeko, bofándí o molílí té, yangó wâná mokolo môná mokobimela bínó té lokóla moyíbi.
I Th LinVB 5:5  Bínó bánso bozalí bána ba mwínda, bána ba mói ; tozalí bána ba butú mpé ba molílí té.
I Th LinVB 5:6  Bôngó tólála mpongí té lokóla bato basúsu, kasi tókéngele, tólángwa té.
I Th LinVB 5:7  Baye bakolálaka mpongí, bakolálaka na butú ; baye bakolángwaka masanga, bakolángwaka na butú.
I Th LinVB 5:8  Kasi bísó bato ba mói tólángwa té : moláto mwa etumba tokoláta, boyambi na bolingani ; enkoti ya etumba, elíkyá ya libíkí.
I Th LinVB 5:9  Nzámbe aponí bísó té mpô tómóno nkándá ya yě, kasi mpô tózwa libíkí na Mokonzi wa bísó Yézu Krístu.
I Th LinVB 5:10  Yě awéí mpô ya bísó mpô ’te bánso, baye bazalí na bomoi na baye bawá, tósangana na yě o bomoi bwa lobíko.
I Th LinVB 5:11  Yangó wâná bóléndisana mitéma mpé bópésana ndakisa elámu, lokóla bokosálaka sikáwa.
I Th LinVB 5:12  Toséngí bínó, bandeko, bómemya bato bazalí komíyókisa mpási o mosálá bakosálaka o ntéi ya bínó, baye bazalí kokamba mpé kopálela bínó o nzelá ya Mokonzi.
I Th LinVB 5:13  Bókúmisa bangó na bolingi bonéne mpô ya mosálá bakosálaka. Bózala na bobóto bínó na bínó.
I Th LinVB 5:14  Tobóndélí bínó, bandeko, bópálela bato ba goigói, bóléndisa baye bakobángaka, bósálisa bato bataú, bókanga mitéma na bato bánso.
I Th LinVB 5:15  Bókéba ’te moto mǒkó ázóngisela móníngá mabé ma yě té, kasi bóluka sé kosála malámu bínó na bínó mpé na bato bánso.
I Th LinVB 5:18  O makambo mánso bótóndo Nzámbe : Nzámbe alingí ’te bósála bôngó na Krístu Yézu lisangá.
I Th LinVB 5:20  Baye bakosakolaka maloba ma Nzámbe, bókínola maloba ma bangó té.
I Th LinVB 5:21  Kasi bótála mánso sókó mazalí ma sôló : bópono maye mazalí malámu.
I Th LinVB 5:23  Nzámbe wa bobóto yě mǒkó ásántisa bínó mobimba, ábátela bínó mobimba : motéma, molímo mpé nzóto ya bínó ; bôngó bózala na mabé té o Mokolo Mokonzi wa bísó Yézu Krístu akoyâ.
I Th LinVB 5:24  Oyo abéngí bínó, akotíka bínó té, yě moto akokokisa makambo maye mánso.
I Th LinVB 5:26  Bópésa bandeko bánso mbóte na ekópi esántu.
I Th LinVB 5:27  Nabó­ndélí bínó o nkómbó ya Mokonzi, bótángela bandeko bánso monkandá moye.
I Th LinVB 5:28  Ngrásya ya Mokonzi wa bísó Yézu Krístu ézala na bínó.