I CHRONICLES
Chapter 6
I Ch | LinVB | 6:16 | Davidi aponi bato mpo ya koyembisa baninga ba bango o Tempelo ya Yawe o mokolo Sanduku ya Bondeko ekoti wana. | |
I Ch | LinVB | 6:17 | Bazalaki na mosala mwa kobongisa nzembo o Ema ya Likita tee mokolo Salomo atongi Tempelo ya Yawe o Yeruzalem. Basali mosala mwa bango se lokola mobeko motindi. | |
I Ch | LinVB | 6:18 | Baye basalaki mosala mona esika yoko na bana ba bango, bango baye : O kati ya bana ba Keat : moyembi Eman, mwana wa Yoel, mwana wa Samuel, | |
I Ch | LinVB | 6:24 | Ndeko wa ye Asaf azalaki koteleme o loboko la ye la mobali ; ye nde mwana wa Berekia, mwana wa Simea, | |
I Ch | LinVB | 6:29 | O loboko la mwasi etelemi wana bandeko ba bango, bana ba Merari : Etan, mwana wa Kisi, mwana wa Abdi, mwana wa Maluk, | |
I Ch | LinVB | 6:34 | Arone na bana ba ye bazalaki kotumba mabonza o altare ya miboma mpe o altare ya mpaka ya malasi. Mosala mwa bango bobele kotala makambo maleki masantu mpe kokokisa milulu mya kozwa bolimbisi masumu ma bato ba Israel ; balandi se mibeko minso lokola Moze mosaleli wa Yawe atindaki bango. | |
I Ch | LinVB | 6:35 | Nkombo ya mwana mpe ya bankoko ba Arone : Eleazar, mwana wa ye Pinekas, Pinekas aboti Abisai, | |
I Ch | LinVB | 6:39 | Tala awa mboka na nganda esika bafandaki o mokili mwa bango. Zeke elakisi liboso bana ba Arone, ba etuka ya Keat. | |
I Ch | LinVB | 6:42 | Kasi bapesi bana ba Arone mboka iye mobomi akoki kozwa libiki : Ebron, Libna, Yatir, Estemoa, | |
I Ch | LinVB | 6:45 | O mokili mwa libota lya Benyamin, bapesi bango Geba, Alemet, Anatot na bilanga bya penepene. Bazwi bongo mboka zomi na isato. | |
I Ch | LinVB | 6:46 | Bana basusu ba Keat bazwi mboka zomi ya libota lya Efraim, ya libota lya Dan, mpe ya ndambo ya libota lya Manase, lokola zeke elakisi. | |
I Ch | LinVB | 6:47 | Bana ba Gerson bazwi mboka zomi na isato ya libota lya Izakar, ya libota lya Aser, ya libota lya Neftali mpe ya libota lya Manase o mokili mwa Basan. | |
I Ch | LinVB | 6:48 | Na bobeti zeke bana ba Merari bazwi mboka zomi na ibale ya libota lya Ruben, ya libota lya Gad mpe ya libota lya Zabulon. | |
I Ch | LinVB | 6:50 | O libota lya Yuda, o libota lya Simeon mpe o libota lya Benyamin bapesi ba-Levi mboka iye totangi awa, lokola zeke elakisi bango. | |
I Ch | LinVB | 6:52 | Bapesi bango mboka esika mobomi akoki kozwa libiki : Sikem na bilanga bya penepene o ngomba ya Efraim, Gezer na bilanga bya penepene, | |
I Ch | LinVB | 6:55 | mpe o ndambo ya libota lya Manase, Aner na Bileam na mpe bilanga bya penepene. Iye izali mboka ya bana basusu ba Keat. | |
I Ch | LinVB | 6:56 | O ndambo ya libota lya Manase bana ba Gersom bazwi mboka Golan o mokili mwa Basan na Astarot na mpe bilanga bya penepene. | |
I Ch | LinVB | 6:61 | O libota lya Neftali bazwi Kedes o Galilea, Kamon na Kiriataim na mpe bilanga bya penepene. | |
I Ch | LinVB | 6:62 | O libota lya Zabulon, bana basusu ba Merari bazwi mboka Rimon na Tabor na mpe bilanga bya penepene. | |
I Ch | LinVB | 6:63 | O ngambo ya Yordane epai ya Yeriko, o Esti ya Yordane, o libota lya Ruben bazwi mboka Beser o eliki na Yaksa na mpe bilanga bya penepene ; | |