Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
I PETER
Up
1 2 3 4 5
Chapter 1
I Pe LinVB 1:1  Ngáí Pétro, apóstolo wa Yézu Krístu, natíndélí bínó mbóte, bínó bato bozalí bampaya mpé bopalángání o Pónto, Galáta, Kapadósia, o Azía mpé o Bitínia.
I Pe LinVB 1:2  Bandeko, Nzámbe ayébí bínó útá kala, aponí bínó mpé asántísí bínó na Elímo wa yě mpô ’te bótósa Yézu Krístu mpé bósekwa na makilá ma yě. Natómbélí bínó ngrásya na bobóto ndelo té.
I Pe LinVB 1:3  Nkémbo na Nzámbe, Tatá wa Mokonzi wa bísó Yézu Krístu ! Mpô ya ngolu ya yě enéne apésí bísó bomoi bwa sika mpô tótía elíkyá sé na yě, áwa asékwísí Yézu Krístu o bawá.
I Pe LinVB 1:4  Abómbélí bísó lisangó likokí kobéba té, lizalí mpé na mbéba tǒ na mbindo té ; abómbélí bínó lyangó o likoló,
I Pe LinVB 1:5  zambí na ngúyá ya yě akobátelaka bínó o boyambi kín’ó mokolo bokozwa libíkí, liye likomónono o nsúka ya molóngó.
I Pe LinVB 1:6  Ntína yangó boyókí esengo ené­ne, atâ bosengélí naíno koyóka mpási mwâ ntángo na minyóko ndéngé na ndéngé.
I Pe LinVB 1:7  Bakopétolaka wólo na móto, nzókandé wólo ezalí elóko mpámba. Boyambi bwa bínó bolekí wólo na motúya. Bôngó, ebongí ’te bámeka motúya mwa boyambi bwa bínó, mpô ’te bózwa lokúmu na nkémbo o mokolo Yézu Krístu akoyâ.
I Pe LinVB 1:8  Bokolingaka Yézu, atâ bomóní yě té ; bozalí koyamba yě, atâ bomóní yě naíno té téé sikáwa. Yangó wâná bozalí na esengo ya koloba té mpé na lokúmu,
I Pe LinVB 1:9  zambí libíkí liye bozalí kotía mitéma, bokozwa lyangó.
I Pe LinVB 1:10  Baproféta, bazalákí komítúna mpé koluka koyéba nzelá ya libíkí, ntángo bazalákí kosakola ’te Nzámbe abómbélí bísó ngrásya.
I Pe LinVB 1:11  Elímo wa Krístu, óyo azalákí kolobisa bangó, ayébísí bangó ’te Krístu akoyóka mpási, mpé nsima akozwa nkémbo. Yangó wâná balukákí koyéba o eleko níni mpé bóníbóní yangó ekosálema.
I Pe LinVB 1:12  Bayébísákí bangó ’te bakosangela nsango êná mpô ya bangó mǒkó té, kasi mpô ya bínó bato bozalí koyóka yangó o mikolo miye na monoko mwa baye basangélí bínó Nsango Elámu na ngúyá ya Elímo, óyo atí­ndámí út’o likoló. Atâ bǎnzelú bazalí na mpósá ya koyéba mobómbamo moye.
I Pe LinVB 1:13  Yangó wâná bómíbongisa, bó­fu­ngola míso mpé bótía motéma mobimba na ngrásya eye bokozwa mokolo Yézu Krístu akomónono.
I Pe LinVB 1:14  Bótósaka lokóla bána mpé bóndimaka lisúsu mpósá té iye bozalákí kolanda libosó, ntángo boyébákí naíno likambo lyǒ kó té.
I Pe LinVB 1:15  Kasi bókóma basántu o ezalela ya bínó mobimba, sé lokóla Oyo abyángí bínó azalí mosántu,
I Pe LinVB 1:16  mpô ekomámí ‘te : Bózala basántu, zambí ngáí nazalí mosántu.
I Pe LinVB 1:17  Nzámbe, óyo bínó bokobyá­ngaka Tatá, akotálaka bilongi bya bato té, kasi akosámbisa bato engébéné na misálá mya bangó ; bôngó bóbánga yě o ntángo eye bozalí naíno áwa lokóla bampaya.
I Pe LinVB 1:18  Bóyéba ’te basikólí bínó té na bilóko bikobéba, lokóla paláta tǒ wólo, mpô ’te bótíka bizalela bya mpámba bya bankóko ba bínó.
I Pe LinVB 1:19  Kasi Nzámbe asikólí bínó na motúya mwa makilá ma Krístu óyo akúfákí lokóla mwána wa mpatá ezalí na mbéba té, na mbindo mpé té.
I Pe LinVB 1:20  Nzámbe asílákí kopono yě, naíno akelí mokili té, kasi mpô ya bínó alakísí yě o mikolo miye mya nsúka.
I Pe LinVB 1:21  Mpô ya yě bozalí koyamba Nzámbe, óyo asé­kwísí yě o bawá mpé apésí yě nkémbo ; áwa boyambí Nzámbe, bozalí mpé kotía elíkyá na yě.
I Pe LinVB 1:22  Awa bopétólí mitéma mya bínó na boyambi mambí ma bosôló na botósi, bosengélí kolingana na motéma mǒkó lokóla bandeko ; bóli­ngana na bolingi ndelo té.
I Pe LinVB 1:23  Bobótámí mbala ya íbalé : babótí bínó té na moto asengélí kokúfa, kasi na Liloba lya Nzámbe, liloba lya bomoi liye likoúmela sékô.
I Pe LinVB 1:24  Zambí moto nyónso azalí lokóla matíti, mpé nkémbo ya yě lokóla fuléle ya esóbé ; matíti makokauka mpé fuléle ikokúfa.
I Pe LinVB 1:25  Kasi Liloba lya Mokonzi likoúmela na lobíko. Liloba lyangó, sé Nsango Elámu basangélí bínó.
Chapter 2
I Pe LinVB 2:1  Bóbóya mabé mánso : mambí ma lokutá, ma bokósi mpé ma zúwa ; bótóngo báníngá té.
I Pe LinVB 2:2  Lokóla bána babótámí sika bakolukaka mabéle, bínó mpé bóluka komíléisa na Liloba lya Nzámbe mpô ’te bókóla o nzelá ya libíkí.
I Pe LinVB 2:3  Sôló, bosílí bomekí bolámu bwa Nzámbe, boyébí bwangó.
I Pe LinVB 2:4  Bóbeleme na Mokonzi Yézu, Yě azalí libángá lya bomoi, liye bato babwákákí ; kasi Nzámbe aponí lyangó, mpô ayébí motúya mwa lyangó.
I Pe LinVB 2:5  Bínó mpé bozalí mabángá ma bomoi, bóndima ’te bátónga na bínó Témpelo ya elímo. Bǒ banganga Nzámbe basántu bóbonza mabonza maye makosepelisa Nzámbe mpô ya Yézu Krístu.
I Pe LinVB 2:6  Mpô ekomámí o Minkandá Misántu ‘te : Nakotía o Síon libángá liye naponí, lizalí libángá lya motúya likokú­mba ndáko mobimba ; moto akotía motéma na libángá liye, akosúka mabé té.
I Pe LinVB 2:7  Yě ndé lokúmu la bínó bayambi, kasi mpô ya baye bayambí té ekomámí ’te : Libángá likokúmba ndáko mobimba, liye batóngi-ndáko babwákákí,
I Pe LinVB 2:8  likómí libakú, libángá likokwêisa bato. Baye bayambí Liloba lya Nzámbe té, bakotúta libakú na lyangó. Ut’o kala esengélákí kosálema sé bôngó.
I Pe LinVB 2:9  Kasi bínó bozalí ekólo eye eponómí, libótá lya banganga Nzámbe, ekólo esántu, ekólo ya Nzá­mbe­méí. Boponómí mpô ’te bósakola bikelá bya Yě binéne ; Yě moto alongólí bínó o molílí mpé abyángí bínó penepene na mwínda mwa yě mwa nkémbo.
I Pe LinVB 2:10  Libosó bozalákí ekólo té, kasi sikáwa bokómí libótá lya Nzámbe mpe­nzá. Libosó ayókélákí bínó ngolu té, kasi sikáwa ayókélí bínó ngolu.
I Pe LinVB 2:11  Bandeko ba bolingo, bozalí sé bampaya, bato ba mobémbo. Yangó wâná nabóndélí bínó : bóbóya mpósá ebé ya nzóto eye ekobundisaka milímo mya bínó.
I Pe LinVB 2:12  Bózala na ezalela elámu o ntéi ya bapagáno ; bôngó baye batóngí bínó ’te bosálí mabé, áwa bakomóno ’te bokosálaka malámu, bákúmisa Nzámbe o mokolo akoyâ.
I Pe LinVB 2:13  Bótósa bakonzi ba letá mpô ya Krístu, ézala mokonzi monéne óyo alekí bato bánso,
I Pe LinVB 2:14  ézala bayángeli baye mokonzi atíndí mpô ’te bápésa etúmbu na baye basálí mabé mpé bákúmisa baye bakosálaka malámu.
I Pe LinVB 2:15  Nzámbe alingí ’te bósála malámu, bókangisa bôngó minoko mya bato bazángí mayéle mpé mya baye bayébí elóko té.
I Pe LinVB 2:16  Bózala na ezalela ya bato ba bonsómí, lokóla basáleli ba Nzámbe. Bótála bonsómí té lokóla elambá ekozipa mabé ma bínó.
I Pe LinVB 2:17  Bómemya bato bánso, bólinga bandeko, bóbánga Nzámbe, bókúmisa mokonzi wa letá.
I Pe LinVB 2:18  Bínó basáli, bótósa bankóló ba bínó mpé bómemya bangó, bobélé bato balámu mpé bato ba bobóto té, kasi baye ba matáta lokóla.
I Pe LinVB 2:19  Sókó bo­nyókwámí ntína té, nzókandé bokangí mitéma mpô ya botósi Nzámbe, bosálí malámu.
I Pe LinVB 2:20  Sókó bo­kangí mitéma ntángo bapésí bínó etúmbu mpô ya mabé bosálí, bozalí na litómba té. Kasi sókó bayókísí bínó mpási mpô bosálí malámu, mpé boyambí mpási bayókísí bínó, bokosepelisa Nzámbe.
I Pe LinVB 2:21  Nzámbe abyángí bínó mpô ’te bósála bôngó, zambí Krístu ayókákí mpási mpô ya bínó mpé apésí bínó ndakisa mpô ’te bólanda nzelá ya yě.
I Pe LinVB 2:22  Yě asálí lisúmu lyŏ kó té, abúkákí lokutá atâ mbala yŏ kó té.
I Pe LinVB 2:23  Ntá­ngo bafíngákí yě, azóngísákí liloba lyŏ kó té ; ntángo banyókólókí yě, akánélákí moto mŏ kó té ; kasi amítíkákí o mabóko ma Oyo akokátaka makambo mánso na bosémbo.
I Pe LinVB 2:24  Ntángo ayókí mpási ya nzó­to o kurúse amemí masúmu ma bísó, mpô tókoka kobóya masúmu maye makoyêla bísó liwá, mpé tókoka kozala na bomoi na ezalela ya bosémbo. Ya sôló, bobíkí mpô ya mpótá ya yě.
I Pe LinVB 2:25  Bozalákí lokóla mpatá ibúngámá, kasi sikáwa bozóngélí mokéngeli óyo akobátelaka milímo mya bínó.
Chapter 3
I Pe LinVB 3:1  Sé bôngó bínó bamamá : botosa babáli ba bínó. Bôngó sókó batatá basúsu babóyí koyamba Liloba lya Nzámbe, bákóma koyamba mpô ya maloba té, kasi mpô ya ezalela elámu ya básí ba bangó,
I Pe LinVB 3:2  na bomóni ’te bozalí na bopéto mpé na limemyá.
I Pe LinVB 3:3  Bómíbongisa té na bilóko bikomónonoko na míso : ézala na bokangi nsúki kitóko, na bikémbiseli bya wólo tŏ na bilambá bya lipombó.
I Pe LinVB 3:4  Bonzéngá bwa bínó bózala o káti ya mitéma ; bonzéngá boye bokosílaka té : motéma bobóto mpé kímíá. Yangó ndé bonzéngá bwa sôló o míso ma Nzá­mbe.
I Pe LinVB 3:5  Tálá ndéngé básí basántu ba kala bazalákí komíbongisa ; bazalákí kotía mitéma na Nzámbe mpé kotósa babáli ba bangó.
I Pe LinVB 3:6  Lokóla Sára, óyo azalákí kotósa Abaráma mpé kobé­nga yě mokonzi wa yě. Bokolakisa ’te bozalí bána ba yě, sókó bosálí malámu mpé sókó elóko yŏ kó té ekokí kobángisa bínó.
I Pe LinVB 3:7  Bínó batatá sé bôngó : bófánda malámu na básí ba bínó ; bóyéba ’te balekí bínó na botaú ; bópésa bangó lokúmu lokokí na bangó, zambí bangó mpé bakozwa ngrásya eye ekopésaka bomoi. Sókó bosálí bôngó, losámbo la bínó lokotúta libakú lyŏ kó té.
I Pe LinVB 3:8  Bínó bánso bózala motéma mŏ­kó, bóyókana, bólingana lokóla bandeko, bózala motéma ngolu mpé bosáwa.
I Pe LinVB 3:9  Moto asálí bínó mabé, bó­zóngisela yě mabé té. Moto afíngí bínó, bózó­ngisela yě liloba té, kasi bóbenisa yě : Nzámbe aponí bínó bósála bôngó mpô ’te bózwa bobenisi bwa yě,
I Pe LinVB 3:10  mpô : Moto alingí kosepela mpé koyóka esengo o bomoi bwa yě, ákéngele lolému la yě mpô ’te áloba makambo mabé té, mpé ábúka lokutá té.
I Pe LinVB 3:11  Akíma makambo mabé, ásála sé malámu, áluka bobóto mpé ála­nda nzelá ya bobóto.
I Pe LinVB 3:12  Zambí Mokonzi akotálaka bato ba bosémbo, akoyókaka losámbo la bangó. Kasi abóyí baye bakosálaka mabé.
I Pe LinVB 3:13  Naní akosála bínó mabé sókó bozalí kotía moléndé mpô ya kosála malámu ?
I Pe LinVB 3:14  Atâ bosengélí koyóka mpási mpô ya bosémbo, bokozala na esengo. Bóbánga bato sókí té, bózala mitéma likoló té.
I Pe LinVB 3:15  Kasi bókúmisa Mokonzi Krístu o mitéma mya bínó. Baye batúní bínó ntína ya elíkyá ya bínó, bóbánga té kopésa bangó eyano polélé.
I Pe LinVB 3:16  Kasi bóyanola bangó na bobóto mpé na limemyá. Bózala na motéma sé­mba, mpô ’te baye bakotóngoko ezalela elámu ya bínó bakrístu, báyóka nsóni na maloba ma bangó.
I Pe LinVB 3:17  Koyóka mpási mpô ya malámu bosálí, sókó Nzámbe alingí bôngó, elekí malámu ; mabé ndé sókó bapésí bínó etúmbu té, atâ bosálí mabé.
I Pe LinVB 3:18  Mpô ya masúmu Krístu awákí mbala yŏ kó sékô ; yě moto wa bosémbo awákí mpô ya bato bazángí bosémbo, mpô ’te ákamba bísó o mbóka Nzámbe. Babomákí nzóto ya yě, kasi azwí bomoi lisúsu na ngúyá ya Elímo Sántu.
I Pe LinVB 3:19  Bobélé bô­ngó akendékí kotéya milímo mya bato bakangémí o mbóka ya bawá.
I Pe LinVB 3:20  Kala bangó babóyákí kotósa, kasi Nzámbe aka­ngákí motéma mpé azalákí kozila bangó. Ezalákí o eleko Nówe asálákí ebei enéne : bobélé bato mwambi babíkákí na yangó o mái.
I Pe LinVB 3:21  Mái mâná mazalí lokóla elembo ya batísimo ebíkísí bínó sikáwa ; batísimo eko­lo­ngolaka mbindo ya nzóto té, kasi bato bakokúla batísimo mpô ’te básálela Nzámbe na motéma molámu, mpô ya nsékwa ya Yézu Krístu.
I Pe LinVB 3:22  Yě abutí o likoló mpé afándí o lobóko la mobáli la Nzámbe ; kúná bǎ­nzelú, bilímo bya ngúyá mpé bya bokonzi bakotósa yě.
Chapter 4
I Pe LinVB 4:1  Awa Krístu ayókákí mpási o nzóto ya yě, bínó bóléndisa mitéma na likanisi ’te moto óyo ayókí mpási o nzóto asílí abóyí masúmu.
I Pe LinVB 4:2  Bôngó mikolo mínso mya bomoi bwa yě áwa o nsé álanda mpósá ya motéma té, kasi ásála maye Nzámbe alingí.
I Pe LinVB 4:3  Libosó bolekísákí ntángo míngi na bosáli makambo maye bapagáno bakosálaka : bozalákí kotá­mbola o nzelá ya mobúlú, kolanda mpósá ya nzóto, kolángwa masanga, kolía na lokósó, komele leká ndelo mpé kokúmisa bikeko bya banzámbe ba lokutá.
I Pe LinVB 4:4  Sikáwa bapagáno bazalí kokámwa na bomóni ’te botíkí komípésa elongó na bangó o makambo maye mapusí mabé ; yangó wâná bakofíngaka bínó.
I Pe LinVB 4:5  Kasi bakobima o míso ma Nzámbe óyo alingí áyâ kokáta makambo ma bato bánso, baye bazalí na bomoi ná baye bawá.
I Pe LinVB 4:6  Bobélé na ntína êná Krístu asangélákí Nsango Elámu mpé na bato bawá ; bázwa bôngó bomoi bwa Nzámbe boútí na Elímo, atâ bato basílákí kosá­mbisa bangó.
I Pe LinVB 4:7  Nsúka ya makambo mánso ekómí penepene. Yangó wâná bózala na bwányá mpé na míntéi mpô ’te bókoka kosámbela Nzámbe.
I Pe LinVB 4:8  Libosó mpenzá bótía moléndé na boli­ngani, zambí masúmu míngi makolímbama mpô ya bolingani.
I Pe LinVB 4:9  Ntángo ínso bóyamba báníngá malámu, bótíka kolobaloba.
I Pe LinVB 4:10  Bósálisa báníngá, moto na moto engébéné na ngrásya azwí, bŏ ebongí na bato bakokéngeleke makabo ebelé ma Nzámbe.
I Pe LinVB 4:11  Moto asakólí, áyéba ’te asakólí maloba ma Nzámbe ; moto óyo asálélí báníngá, áyéba ’te Nzámbe moto apésí yě ngúyá ya kosála bôngó mpô ’te o makambo mánso Nzámbe ázwa lokúmu mpô ya Yézu Krístu ; na Yě nkémbo mpé ngúyá o bileko na bileko. Amen.
I Pe LinVB 4:12  Bandeko ba bolingo, bókámwa té na bomóni ’te móto monéne mozalí kopela o káti ya bínó mpô ya komeka mitéma mya bínó, lokóla likambo linéne likwêlí bínó.
I Pe LinVB 4:13  Kasi bósepela, zambí bozalí koyóka mpási elongó na Krístu, mpô ’te bínó mpé bósepela na nsáí enéne mokolo yě akoyâ na nkémbo ya yě enéne.
I Pe LinVB 4:14  Esengo na bínó sókó bafíngí bínó mpô ya nkómbó ya Krístu ; elakísí ’te Elímo wa nkémbo, Elímo wa Nzá­mbe akitélí bínó.
I Pe LinVB 4:15  Sókó mŏ kó wa bínó asengélí koyóka mpási, ézala té mpô azalí mobomi tŏ moyíbi, tŏ mpô asálí móníngá mabé tŏ akótí o makambo ma bato basúsu.
I Pe LinVB 4:16  Kasi sókó ayókí mpási mpô azalí mokrístu, áyóka nsóni té, kasi ákúmisa Nzámbe áwa bapésí yě nkómbó eye.
I Pe LinVB 4:17  Eleko Nzámbe akosámbisa bato elingí ékoka, akosámbisa bato ba Nzámbe libosó. Sókó akosámbisa bísó libosó, ndéngé níni ekosúkela bato babóyí koyamba Nsango Elámu ya Nzá­mbe ?
I Pe LinVB 4:18  Sókó moto wa bosémbo akobíka sé na kwókósó, moto óyo abóyí Nzámbe mpé mosúmuki bakokí ndé kobíka ?
I Pe LinVB 4:19  Yangó wâná bato bazalí koyóka mpási, sé lokóla Nzámbe alingí, básála sé mambí malámu mpé bámípésa mobimba o mabóko ma Mozalisi ; akotíka bangó té.
Chapter 5
I Pe LinVB 5:1  Nakébísí bakóló o káti ya bínó : ngáí, mokóló sé lokóla bangó, namónókí mpási ya Krístu na míso, nakozala mpé elongó na yě mokolo nkémbo ya yě ekomónono.
I Pe LinVB 5:2  Bóké­ngele etónga ya mpatá eye Nzámbe apésí bínó. Bóbátela bangó sé lokóla Nzámbe alingí : na motéma mŏ kó, na matáta té, na lokósó la mbóngo té, kasi na boluki bolámu bwa bangó.
I Pe LinVB 5:3  Bóluka kolakisa bokonzi té na baye Nzámbe atíkí o mabóko ma bínó bakéngeli ba mpatá, kasi bózala lokóla ndakisa o míso ma bangó.
I Pe LinVB 5:4  Bôngó mokolo Mokonzi wa bakéngeli bánso akomónono, bokozwa enkoti ya nkémbo eye ekobéba mokolo mŏ­kó té.
I Pe LinVB 5:5  Sé bôngó, bínó bilengé, bótósa bakóló. Bánso bólakisana bosáwa, zambí Nzámbe abóyí bato ba loléndo, kasi akokabelaka bato ba bosáwa ngrásya ya yě.
I Pe LinVB 5:6  Bôngó bómíkitisa kín’o nsé ya lobóko ntá bokási la Nzámbe mpô ’te átómbola bínó mokolo yě mŏ kó alingí.
I Pe LinVB 5:7  Bótíkela yě mambí mánso mazalí kotungisa bínó, zambí yě moto akobátelaka bínó.
I Pe LinVB 5:8  Bózala na mí­ntéi mpé bókéngele ! Mongúná wa bínó, zábolo, azalí kolekaleka, ko­ngala lokóla nkósi mpé koluka sókó akolía náni.
I Pe LinVB 5:9  Bópika mpéndé o boyambi bwa sôló. Boyébí ’te bandeko ba bínó bapalángání o mokili mobimba bakoyókaka mpási sé ndéngé yŏ kó.
I Pe LinVB 5:10  Nzámbe, Mokabi wa ngrásya ínso, abyángí bínó mpô ’te bózwa nkémbo ya yě ya sékô, elongó na Krístu. Ekosíla mwâ mpási bozalí koyóka sikáwa, yěméí akobongisa, akoléndisa mpé akotélemisa bínó, bôngó bokopikama makási.
I Pe LinVB 5:11  Yě azalí na ngúyá o bileko na bileko ! Amen.
I Pe LinVB 5:12  Na lisálisi lya Silváno nakomélí bínó mwâ maloba maye ; yě azalí ndeko wa sôló. Nakomí mangó mpô ’te náléndisa bínó mpé náyébisa bínó ’te bozwí na yangó ngrá­sya ya Nzámbe. Bópikama sé o ngrásya eye.
I Pe LinVB 5:13  Bandeko ba Eklézya ezalí áwa o Babilóne batíndélí bínó mbóte. Nzámbe aponí bangó lokóla aponókí bínó. Márko, mwána wa ngáí, atí­ndélí bínó mbóte lokóla.
I Pe LinVB 5:14  Bínó na bínó bópésana mbóte na ekópi esántu. Bobóto na bínó bánso bozalí na Krístu lisangá !