Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
COLOSSIANS
Up
1 2 3 4
Chapter 1
Colo LinVB 1:1  Ngáí Pólo, apóstolo wa Krístu Yézu lokóla Nzámbe alingí, bísó na ndeko Timotéo,
Colo LinVB 1:2  ôná bandeko ba Kolóse, bandeko ba bísó o boyambi Krístu. Nzámbe Tatá wa bísó ákabela bínó ngrásya na bobóto !
Colo LinVB 1:3  Totóndí Nzámbe, Tatá wa Mokonzi wa bísó Yézu Krístu, ntángo ínso tokanísí bínó o losámbo la bísó.
Colo LinVB 1:4  Toyókí bóníbóní bozalí koyamba Krístu Yézu mpé kolinga bandeko bánso,
Colo LinVB 1:5  mpô bozalí kotía elíkyá na bolámu baléngélélí bínó o likoló. Boyókí yangó áwa basa­ngélákí bínó Liloba lya bosôló o Nsango Elámu.
Colo LinVB 1:6  Nsango Elámu eye ekómí epái ya bínó epalángání mpé ezalí kobóta mbuma o mokili mobimba. Epái ya bínó esálémí sé bôngó út’o mokolo boyókákí mpé boyébí ngrásya ya Nzámbe na bo­sôló.
Colo LinVB 1:7  Epafráse moto atéyákí bínó yangó, yě móníngá wa bísó wa bolingo wa mosálá óyo akosálelaka Krístu o nkómbó ya bísó.
Colo LinVB 1:8  Yě moto ayébísí bísó ’te Elímo akabélí bínó bolingi.
Colo LinVB 1:9  Yangó wâná, út’o mokolo toyókí nsango eye, bísó lokóla tolembí té kosámbela mpô ya bínó. Tokobóndelaka Nzámbe ’te atóndisa bínó na bwányá mpé na mayéle ma Elímo mpô ’te bóyéba maye mánso yě alingí.
Colo LinVB 1:10  Bôngó bókoka kozala na ezalela ebongí na Mokonzi mpé kosepelisa yě o mambí mánso : bokobimisa misálá milámu ndéngé na ndéngé mpé bokoyéba Nzámbe leká libosó.
Colo LinVB 1:11  Yě Nzámbe áléndisa bínó na ngúyá ya nkémbo ya yě mpô ’te bózala na moléndé mpé bóka­nga mitéma o makambo mánso.
Colo LinVB 1:12  Bótóndo Tatá Nzámbe na esengo, mpô abongísélí bínó bolámu akokabelaka basántu o mbóka ya mwínda.
Colo LinVB 1:13  Yě moto alongólí bísó o bokonzi bwa molílí mpé akótísí bísó o Bokonzi bwa Mwána wa yě wa bolingo.
Colo LinVB 1:14  Tobíkí mpô ya yě, azwě lí bísó bolímbisi masúmu.
Colo LinVB 1:15  Azalí elílí ya Nzámbe óyo akomónonoko té, abótámí yambo ya bikelámo bínso :
Colo LinVB 1:16  bilóko bínso bikelámí na yě, o likoló mpé o nsé, biye bikomónonoko na biye bikomónonoko té, milímo mizalí na Ngwendé, na Lokúmu, na Bokonzi mpé na Ngúyá : bínso bikelámí na yě, mpé mpô ya yě.
Colo LinVB 1:17  Azalí libosó lya bilóko bínso, mpé bínso bizalí na bomoi mpô ya yě.
Colo LinVB 1:18  Azalí mpé Motó mwa Nzóto : Nzóto ndé Eklézya. Yě libandela, moto wa yambo asékwí o bawá, mpô ’te ázala Mokonzi wa bikelámo bínso.
Colo LinVB 1:19  Nzámbe akanákí kotóndisa yě na bonzámbe bwa yě mobimba.
Colo LinVB 1:20  Mpô ya yě molóngó mobimba mozóngí o bondeko bwa Nzámbe, ná baye bazalí o nsé, ná baye bazalí o likoló, na makilá ma yě o kurúse azóngísí bondeko.
Colo LinVB 1:21  Bínó mpé libosó bokabwánákí na Nzámbe, bozalákí bangúná ba yě, mpô ya mabé mánso bozalákí kokanisa mpé kosála.
Colo LinVB 1:22  Kasi sikáwa, na liwá lya nzóto ya bomoto ya Krístu, Nzámbe azóngísí bondeko káti ya bínó na yě mǒkó. Akómisa bínó bôngó basántu o míso ma yě, bózala na mbéba té, na mabé mǒkó mpé té.
Colo LinVB 1:23  Yangó wâná bosengélí kopikama makási o boyambi, bótía mitéma bobélé na libíkí balakélí bínó o Nsango Elámu eye boyókákí. Bótía mitéma epái esúsu té. Basílí kosangela bato bánso Nsango êná ; ngáí Pólo nakómí mosáleli wa yangó.
Colo LinVB 1:24  Sikáwa nasepélí na mpási eye nazalí koyóka mpô ya bínó ; nákokisa bôngó o nzóto ya ngáí mpási Krístu ayókákí mpô ya Nzóto ya yě, yangó ndé Eklézya.
Colo LinVB 1:25  Nakómí mosáleli wa Eklézya, áwa Nzámbe apésí ngáí mosálá mwa bosangeli bínó Liloba lya Nzámbe mobimba.
Colo LinVB 1:26  Ut’o kala Nzámbe abómbélákí bato mobómbamo moye, sikáwa alakísí mwangó na bakrístu :
Colo LinVB 1:27  Nzámbe alingákí koyébisa bangó nkita mpé nkémbo ya mobómbamo moye epái ya bato ba bikólo bisúsu. Mobómbamo mwangó ndé : Krístu azalí o ntéi ya bínó, yě moto akopésa bínó elíkyá ya kozwa nkémbo ya Nzámbe !
Colo LinVB 1:28  Bísó tozalí kosa­ngela Krístu óyo, áwa tozalí kokébisa bato bánso mpé kotéya bangó na bwányá bonéne mpô ’te bákóma basántu sôló o Krístu.
Colo LinVB 1:29  Ngúyá ya yě ezalí kosála o motéma mwa ngáí, nazalí komípésa mobimba na mosálá môná.
Chapter 2
Colo LinVB 2:1  Nalingí bóyéba ’te nazalí kobunda etumba makási mpenzá mpô ya bínó, mpô ya bato ba Laodiséa, mpé mpô ya bato baíké bamóní ngáí naíno na míso té.
Colo LinVB 2:2  Bôngó mitéma mya bangó mílénda, bálingana na motéma mǒkó, bákoka kokóma na mayéle ma sôló mpô ’te báyéba mobómbamo mwa Nzámbe, mwangó ndé Krístu.
Colo LinVB 2:3  O motéma mwa yě nkita ínso ya bwányá mpé ya boyébi ibómbámí !
Colo LinVB 2:4  Nalobí bôngó mpô ’te moto mǒ­kó té ákósa bínó na maloba ma sukáli.
Colo LinVB 2:5  Atâ na nzóto nazalí mosíká na bínó, motéma mwa ngáí mozalí epái ya bínó. Na esengo namóní ’te boyókání malámu mpé bopikámí o boyambi Krístu.
Colo LinVB 2:6  Awa boyambí ’te Krístu Yézu azalí Mokonzi, bosengélí mpé kotámbola na yě lisangá.
Colo LinVB 2:7  Bókangana na yě lokóla nzeté o mabelé, lokóla ndáko etóngámí o mabángá. Bópikama o boyambi bwa sôló lokóla balakísí bínó ; ntángo ínso bótóndo Nzámbe botóndi.
Colo LinVB 2:8  Bókéba ’te moto mǒkó ázóngisa bínó o boómbo té. Bákósa bínó té na maloba ma bwányá bwa bato. Mâná mánso maútí sé na bato ba mokili moye, maútí na Nzámbe té.
Colo LinVB 2:9  O nzóto ya Krístu Nzámbe azalí na bonzámbe bwa yě mobimba.
Colo LinVB 2:10  Bínó mpé botóndí na malámu ma yě mánso, mpô bozalí lisangá na Oyo azalí Mokonzi wa milímo mí­nso mya Bokonzi mpé mya Ngúyá.
Colo LinVB 2:11  Bakátísí bínó mpé, kasi na ndéngé ya nzóto té, na mabóko ma bato té : Krístu moto abongísí bínó áwa abóyísí bínó makambo ma nzóto mánso.
Colo LinVB 2:12  Na batísimo bo­ku­ndámí elongó na Krístu, bosé­kwí mpé na yě elongó, mpô bondimákí ’te ngúyá ya Nzámbe esékwísí yě o bawá.
Colo LinVB 2:13  Bokúfákí mpô ya masúmu ma bínó mpé mpô ya nzóto ya bínó ekátémí té. Nzámbe asé­kwísí bínó na Krístu elongó ! Alí­mbísí bísó masúmu mánso !
Colo LinVB 2:14  Tozalákí na nyongo mpô ya mibéko tobóyákí kotósa ; kasi apasólí monkandá mwa nyongo mozalákí kokitisa bísó, abákí mwangó o kurúse.
Colo LinVB 2:15  Asílísí makási ma milímo mya Bokonzi mpé mya Ngúyá, ayókísí myangó nsóni o míso ma bato bánso, alóngí myangó na kurúse.
Colo LinVB 2:16  Bôngó, moto mǒkó té átungisa bínó na makambo matálí bilóko bya kolia mpé bya komele, tǒ na maye matálí mikolo mya eyenga, mya sánzá ya sika tǒ mya sábato.
Colo LinVB 2:17  Mâná mánso mazalí sé lokóla elílíngí ya moto óyo asengélákí koyâ : moto ôná, ndé Krístu.
Colo LinVB 2:18  Moto mǒ­kó ákitisa bínó té. Bangó bakomíkúmisaka na bosáwa bwa lokutá, bakosámbelaka bǎnzelú, bakokanisaka bobélé makambo mayélákí bangó na ndóto, batóndí na lofúndo la mpámba, mpé balandí sé makanisi ma nzóto.
Colo LinVB 2:19  Baka­ngání na Krístu té óyo azalí Motó mwa Nzóto mpé akoléisaka yangó mobimba ; yě mpé akosangisaka mi­nsisá na misuni, mpô ’te nzóto mobimba ékóla lokóla Nzámbe alingí.
Colo LinVB 2:20  Bosílí bokúfí elongó na Krístu mpé bolongwí o boómbo bwa makambo ma mokili moye. Bôngó, mpô níni bondimí ’te bápésa bínó mibéko lokóla bato batíkí makambo ma nsé té ?
Colo LinVB 2:21  « Kokamata té, komeka kolía té, kosímba té ! »
Colo LinVB 2:22  Mâná mánso matálí sé bilóko bisengélí kokúfa, biye bizalí sé na ntína ya kosálela bato ! Mazalí bobélé mitíndo mpé matéya ma bato !
Colo LinVB 2:23  Matéya mâná makokí komónono lokóla matéya ma bwányá mpô ya kokúmisa Nzámbe, kozala na bosáwa tǒ kopíma nzóto. Nzókandé mazalí sé mpámba, makokí bobélé kosepelisa nzóto.
Chapter 3
Colo LinVB 3:1  Sókó ya sôló bosékwí elongó na Krístu, bóluka mambí ma likoló, esíká Krístu azalí mpé afándí o lobóko la mobáli la Nzámbe.
Colo LinVB 3:2  Bókanisa mambí ma likoló, maye ma nsé té.
Colo LinVB 3:3  Ya sôló, bosílí bowéí, bomoi bwa bínó bobómbámí sikáwa o mbóka Nzámbe, elongó na Krístu.
Colo LinVB 3:4  Yě Krístu azalí bomoi bwa bínó ; mokolo yě akomónono, bínó mpé bokomónono na nkémbo elo­ngó na yě.
Colo LinVB 3:5  Bôngó, bóboma o binama bya bínó makambo mabé ma nsé eye, lokóla ekóbo, bosóni, bolúli bobé, mpósá ya mabé mpé lokósó lokokání na bokúmbameli bikeko.
Colo LinVB 3:6  Makambo mâná mánso makobêngaka nkándá ya Nzámbe.
Colo LinVB 3:7  Libosó botámbólákí nzelá êná ntángo bola­ndákí makambo maye ma masúmu.
Colo LinVB 3:8  Kasi sikáwa bóbwáka mâná mánso : nkándá, nkele, mayéle mabé, mafínga mpé maloba mabé ; mâná mánso makokí kobima o minoko mya bínó lisúsu té.
Colo LinVB 3:9  Bóbúkelana lokutá lisúsu té. Bótíka bizalela bya ‘moto wa kala’,
Colo LinVB 3:10  bóláta ‘moto wa sika’, óyo akolukaka mayéle ma sôló ; akomíbongisaka ntángo ínso mpô ’te ákóma elílí ya Mozalisi wa yě.
Colo LinVB 3:11  Bôngó, sikáwa bato bakeséní lisúsu té : mo-Yúda ná óyo azalí mo-Yúda té, moto akátísí nzóto ná óyo akátísí nzóto té, mosénzi ná moto ayékólá, moómbo ná nsómí, bangó bánso bazalí sé moto mǒkó ; bobélé Krístu azalí, yě azalí mánso o bato bánso.
Colo LinVB 3:12  Awa Nzámbe aponí bínó, bozalí bato ba yě mpenzá, bána ba yě ba bolingo ; bôngó bózala motéma ngolu, motéma molámu, motéma bosáwa, motéma bobóto, bóyéba kokanga mitéma.
Colo LinVB 3:13  Sókó moto mǒ­kó azwí likambo na móníngá, ebongí ’te bókanga mitéma mpé bólí­mbisana : Mokonzi alímbísí bínó, bínó mpé bósála sé bôngó.
Colo LinVB 3:14  Kasi na mabongí maye mánso bóbakisa bolingani. Bolingi bokosangisa bínó o lisangá lya sôló.
Colo LinVB 3:15  Bobóto bwa Krístu bótónda o mitéma mya bínó ; Nzámbe abyángí bínó mpô ’te bózala na bobóto, asangísí bínó o Nzóto sé yǒ kó. Bótóndo yě botó­ndi !
Colo LinVB 3:16  Liloba lya Krístu lítónda mpe­nzá o mitéma mya bínó : bótéyana mpé bópálelana na bwányá bwa sôló. Bóyémbela Nzámbe nzémbo ya botóndi, ya bokúmisi mpé nzémbo isúsu iye Elímo Sántu akolakisa bínó ; bóyémbela yě na motéma mó­nso.
Colo LinVB 3:17  Atâ níni bokoloba tǒ bokosála, bósála mánso bobélé o nkómbó ya Mokonzi Yézu : elongó na yě bótóndo Nzámbe Tatá !
Colo LinVB 3:18  Bamamá, bótósa babáli ba bínó, lokóla ebongí o míso ma Mokonzi.
Colo LinVB 3:19  Batatá, bólinga básí ba bínó, bósilikela bangó té.
Colo LinVB 3:20  Bána, bótósa babóti ba bínó o makambo mánso, yangó ekosepelisaka Mokonzi.
Colo LinVB 3:21  Ba­bóti, bólémwisa bána ba bínó té, mpô ’te bálembe té.
Colo LinVB 3:22  Baómbo, bótósa bankóló ba bínó áwa o nsé o makambo mánso ; bótósa bangó bobélé o míso ma bangó té, lokóla ekosálaka baye bakolukaka lokúmu epái ya bato, kasi bótósa bangó na motéma bosáwa, mpô ya bobángi Mokonzi Yézu.
Colo LinVB 3:23  Atâ bokosála mosálá níni, bósála mwangó na motéma mǒkó, lokóla bozalí kosálela bato té, kasi Mokonzi.
Colo LinVB 3:24  Bóyéba ’te Mokonzi akopésa bínó mbano : bokozwa bolámu boye Tatá abómbélí bána ba yě. Mokonzi óyo bozalí kosálela, ndé Krís­tu.
Colo LinVB 3:25  Moto akosálaka mabé, bakozóngisela yě mabé mâná. Nzámbe akotálaka bilongi bya bato té.
Chapter 4
Colo LinVB 4:1  Bankóló, bózala na bosémbo mpé na bosôló o makambo ma baómbo ba bínó. Bóyéba ’te bínó mpé bozalí na Nkóló o likoló.
Colo LinVB 4:2  Bótía moléndé o losámbo, bókéngeleke mpé bótóndo Nzámbe.
Colo LinVB 4:3  Bósámbela mpé mpô ya bísó : Nzámbe ápésa bísó nzelá tótéya mpé tósangela mobómbamo mwa Krístu. Mpô ya yě nakangémí sikáwa o bolóko ;
Colo LinVB 4:4  bôngó náyéba na maloba níni nasengélí kotéya mwa­ngó.
Colo LinVB 4:5  Bózala bato ba bwányá o mbó­ka bapagáno ; bólekisa ntángo eye mpámba té.
Colo LinVB 4:6  O masoló na báníngá bólakisa sé motéma bobóto, bóbakisa mwâ móngwa, bôngó bókoka kozóngisela moto na moto bǒ ebongí.
Colo LinVB 4:7  Ndeko wa bísó wa bolingoTisíko akoyébisa bínó nsango ya ngáí ínso. Yě azalí mosáleli wa sôló mpé móníngá wa ngáí wa mosálá mwa Mokonzi.
Colo LinVB 4:8  Natíndí yě epái ya bínó mpô ’te áyébisa bínó nsango ya bísó, áléndisa mpé bínó mitéma.
Colo LinVB 4:9  Na yě elongó natíndí Onezímo, ndeko wa sôló mpé wa bolingo. Yě azalí moto wa bínó. Bakoyébisa bínó makambo mánso mazalí koleka áwa.
Colo LinVB 4:10  Aristárko, móníngá wa ngáí o bolóko, atíndélí bínó mbóte, na mpé Márko, ndeko wa Bárnaba. Tosílí toyébísí bínó maye matálí yě. Bóyamba yě malámu ntángo akoyâ epái ya bínó.
Colo LinVB 4:11  Yézu mpé, óyo bakobéngaka mpé Yústo, atíndélí bínó mbóte. O káti ya ba-Yúda baye bakómí bakrístu, bobélé bangó básáto bakosálaka na ngáí elongó mpô ya Bokonzi bwa Nzámbe ; babóndókí ngáí míngi.
Colo LinVB 4:12  Epafráse, moto wa ekólo ya bínó, atíndélí bínó mbóte. Mosáleli óyo wa Krístu Yézu akolembeke té kosámbelela bínó ntángo ínso, mpô ’te bópikama makási o nzelá ya Nzámbe mpé bóndima ntángo ínso kosála maye mánso Nzámbe alingí.
Colo LinVB 4:13  Ya sôló, nazalí komóno ’te akomíyókisaka mpási mpô ya bínó, mpô ya bato ba Laodiséa mpé ba Yerápolis.
Colo LinVB 4:14  Lúka, mónganga wa bolingo, mpé Démas batíndélí bínó mbóte.
Colo LinVB 4:15  Bópésa mbóte na bandeko bazalí o Laodiséa, na Nímfa mpé na baye bakosanganaka o ndáko ya yě.
Colo LinVB 4:16  Sókó bosílísí kotánga monkandá moye epái ya bínó, bósála ’te mótá­ngama mpé o Eklézya ya Laodiséa. Bótánga mpé monkandá moye natíndélí bandeko ba Laodiséa.
Colo LinVB 4:17  Bóyébisa Arsípo : « Kébá ’te ómípésa na motéma mónso na mosálá Mokonzi apésí yǒ. »
Colo LinVB 4:18  Tálá, losáko loye, ngáí mǒkó Pólo nakomí langó. Bóbósana té ’te nakangémí o bolóko ! Ngrásya ya Nzá­mbe ézala na bínó !