Chapter 1
| Phil | LinVB | 1:1 | Bísó Pólo na Timotéo, basáleli ba Krístu Yézu, totómbélí bínó basántu bánso ba Krístu Yézu, elongó na bayángeli na ba-diákono bazalí o Filípi, | |
| Phil | LinVB | 1:5 | mpô nakundólí o motéma ndéngé bosálísákí ngáí o mosálá mwa bosangeli Nsango Elámu út’o mokolo mwa yambo kín’o leló. | |
| Phil | LinVB | 1:6 | Nayébí sôló ’te Nzámbe, óyo abandákí mosálá moye molámu o káti ya bínó, akokóba mwangó téé akosúkisa mwangó o Mokolo Krístu Yézu akoyâ. | |
| Phil | LinVB | 1:7 | Ebongí sôló ’te nákanisa bôngó mpô ya bínó bánso, zambí bokótélí ngáí o motéma. Awa nakangémí o bolóko, bínó bánso bozwí ndámbo ya ngrásya ezwákí ngáí mpô ya kobátela mpé kosangela Nsango Elámu na moléndé. | |
| Phil | LinVB | 1:8 | Nzámbe ayébí ’te nakolingaka bínó na motéma mónso, sé lokóla Yézu Krístu akolingaka bínó ! | |
| Phil | LinVB | 1:9 | O losámbo la ngáí nakoséngeke ’te bolingi bwa bínó bókóla sé bokóli o mayéle mpé o mitéma mya bínó | |
| Phil | LinVB | 1:10 | mpô ’te bókoka kopono mambí malekí malámu ; bôngó bózala motéma péto mpé na likambo lyǒ kó té o mokolo mwa Krístu akoyâ. | |
| Phil | LinVB | 1:11 | Bokotónda na mambí ma bosémbo, maye Krístu abimísí o bomoi bwa bínó, mpô ya lokúmu mpé nkémbo ya Nzámbe. | |
| Phil | LinVB | 1:12 | Bandeko, nalingí bóyéba ’te likambo likwêlí ngáí lisálí ’te Nsango Elámu épalangana nokí. | |
| Phil | LinVB | 1:13 | Basodá bánso bakokéngeleke ndáko ya mokonzi mpé bato basúsu bánso bayébí sikáwa ’te nakangémí o bolóko mpô ya Krístu. | |
| Phil | LinVB | 1:14 | Awa bamóní ngáí na minyolólo, bandeko baíké baléndí o boyambi Mokonzi : bakosangelaka Liloba lya Nzámbe na mpíkó, bakobángaka té. | |
| Phil | LinVB | 1:15 | Sôló, bato basúsu bakosangelaka na zúwa mpé na makanisi ma bowélani ; kasi basúsu bakosangelaka Krístu na motéma molámu. | |
| Phil | LinVB | 1:16 | Bato baye bakosálaka yangó sé na bolingí, zambí bayébí ’te natíndámí mpô ’te nábátela Nsango Elámu. | |
| Phil | LinVB | 1:17 | Basúsu, baye natángákí libosó, bakosangelaka Krístu na makanisi ma kowélana na ngáí ; bazalí na mitéma míbalé. Bakanísí ’te bakobakisela ngáí bôngó lisúsu mpási áwa o bolóko. | |
| Phil | LinVB | 1:18 | Kasi likambo té ! Nasepélí mpô bangó bánso bakosangelaka Krístu, atâ na motéma mwa bokósi, atâ na bosémbo. Mpé nakosepela naíno, | |
| Phil | LinVB | 1:19 | mpô nayébí ’te maye mánso makozwela ngáí sé libíkí mpô ya losámbo la bínó mpé na lisálisi lya Elímo wa Yézu Krístu. | |
| Phil | LinVB | 1:20 | Na elíkyá enéne nazalí kotía motéma mobimba ’te nakoyóka nsóni na likambo lyǒ kó té. Nayébí sôló ’te sikáwa, lokóla mikolo mínso, nkémbo ya Krístu ekomónono o nzóto ya ngáí, atâ nasengélí kotíkala na bomoi, atâ nasengélí kokúfa. | |
| Phil | LinVB | 1:21 | Bomoi bwa ngáí bozalí sé na ntína mpô ya Krístu, mpé liwá likozwela ngáí sé litómba. | |
| Phil | LinVB | 1:22 | Kasi sókó natíkálí na bomoi, nakokí kosála naíno mosálá mwa sôló. Yangó wâná nayébí té níni nápono… | |
| Phil | LinVB | 1:23 | Nabéndámí epái na epái : epái yǒ kó nalingí kolongwa o mokili moye mpô ’te názala na Krístu lisangá : yangó elekí malámu. | |
| Phil | LinVB | 1:25 | Awa nayébí yangó, nayébí mpé ’te nakotíkala naíno na bomoi ; nakotíkala naíno epái ya bínó bánso mpô ’te boyambi bwa bínó bókóla mpé bóyóka esengo na yangó. | |
| Phil | LinVB | 1:26 | Bôngó mokolo nakozónga epái ya bínó bokozala na ntína esúsu ya lokúmu mpô ya maye Krístu Yézu asálákí na ngáí mpô ya bínó. | |
| Phil | LinVB | 1:27 | Bózala na ezalela ebongí na bato bayambí Nsango Elámu ya Krístu. Bôngó, atâ nayéí kotála bínó, atâ natíkálí áwa, náyóka bobélé ’te bínó bánso bozalí sé na moléndé mpé na mayéle mǒkó ; náyóka mpé ’te bánso bozalí kobunda, na motéma sé mǒkó, etumba ya boyambi Nsango Elámu. | |
| Phil | LinVB | 1:28 | Bóbánga bangúná ba bínó atâ moké té : yangó ekolakisa bangó ’te bangó bakokúfa, kasi bínó bokobíka. Nzámbe moto akosála bôngó. | |
| Phil | LinVB | 1:29 | Zambí bozwí bobélé ngrásya ya koyamba Krístu té, kasi ya koyóka mpási mpô ya yě lokóla. | |
Chapter 2
| Phil | LinVB | 2:1 | Sókó boyambi Krístu bozalí koléndisa bínó, sókó bolingi bwa yě bozalí koléndisa bínó, sókó bolingi bwa yě bozalí kopésa bínó mpíkó, sókó bozalí na Elímo lisangá, mpé sókó bozalí kolakisa bobóto mpé ngolu, | |
| Phil | LinVB | 2:2 | bokoyókisa ngáí esengo enéne ; bôngó bánso bóyókana, bózala motéma sé mǒkó, mayéle mǒkó mpé makanisi sé ndéngé yǒ kó. | |
| Phil | LinVB | 2:3 | Bówélana té, bóluka lokúmu la mpámba té ; na motéma bosáwa bóndima ’te báníngá balekí bínó. | |
| Phil | LinVB | 2:6 | Oyo azalákí ndéngé yǒ kó na Nzámbe awélákí té kotíkala na lokúmu la yě loye lokokání na lokúmu la Nzá-mbe. | |
| Phil | LinVB | 2:7 | Kasi atíkákí nkémbo ya yě, andimákí kokóma lokóla moómbo, akómí moto lokóla bato bánso. Awa akómí moto, | |
| Phil | LinVB | 2:10 | mpô ’te bánso, áwa bayókí nkómbó ya Yézu, báfukama : o ntá likoló, o nsé mpé o mbóka ya bawá ; | |
| Phil | LinVB | 2:12 | Bandeko ba ngáí ba bolingo, bozalákí kotósa ngáí ntángo ínso ; bôngó bótósa bobélé té ntángo nazalí epái ya bínó, kasi sikáwa mpé áwa nazalí mosíká : bóluka libíkí na bobángi mpé na nsómo o mitéma. | |
| Phil | LinVB | 2:13 | Sôló, Nzámbe akosálaka ’te bólinga kobíka, engébéné na mokáno mwa yě ; akopésaka mpé moléndé mwa kolanda yangó. | |
| Phil | LinVB | 2:15 | mpô ’te bázwa bínó na likambo lyǒ kó té. Bózala na bopéto, sé lokóla bána ba Nzámbe bazángí mbindo. Bôngó o káti ya bato babúngámá mpé babébá bokongenge o mokili lokóla minzóto. | |
| Phil | LinVB | 2:16 | Bókangana na Maloba ma bomoi. Bôngó, o Mokolo Krístu akoyâ, bózwela ngáí lokúmu. Yangó ekolakisa ’te mosálá nasálí mpé mpási nayókí, bizalákí bya mpámba té. | |
| Phil | LinVB | 2:17 | Sókó nasengélí kosopa makilá ma ngáí bǒ libonza mpô ya boyambi bwa bínó, nakosepela sé bosepeli mpé nakoyóka esengo elongó na bínó. | |
| Phil | LinVB | 2:19 | Natíí motéma na Mokonzi Yézu ’te nákoka kotíndela bínó Timotéo nokí ; bôngó, názwa moléndé ntángo nakoyóka nsango ya bínó. | |
| Phil | LinVB | 2:22 | Kasi yě, lokóla bínó mǒkó boyébí, asálí mosálá út’o kala ; sé lokóla mwána akosálisaka tatá, asálísí ngáí o mosálá mwa bosangeli Nsango Elámu. | |
| Phil | LinVB | 2:23 | Ezalí bobélé yě moto nalingí kotínda epái ya bínó, út’o mokolo nakoyéba bóníbóní makambo ma ngáí makosúka. | |
| Phil | LinVB | 2:25 | Nakanísí ’te nasengélí kozóngisela bínó ndeko wa bísó Epafrodíto. Bísó na yě tosálákí mosálá motéma mǒkó, mpé toyókákí mpási ndéngé yǒ kó, bandá ntángo botíndákí yě mpô ’te ásálisa ngáí ntángo nazalákí kokélela. | |
| Phil | LinVB | 2:26 | Azalí na mpósá ya komóno bínó bánso, mpé ayókí mawa míngi mpô boyókákí ’te azalákí na maláli. | |
| Phil | LinVB | 2:27 | Azalákí na mpási makási, etíkálákí moké ákúfa. Kasi Nzámbe ayókélákí yě ngolu, ayókélakí ngáí mpé ngolu, mpô ’te náyóka mawa mbala na mbala té. | |
| Phil | LinVB | 2:28 | Yangó wâná nakotínda yě epái ya bínó nokí, mpô ’te ntángo bokomóno yě bósepela, mpé motéma mwa ngáí mókita mwâ moké. | |
| Phil | LinVB | 2:29 | Bóyamba yě lokóla ndeko wa bínó, na esengo enéne ; bókúmisaka bato bazalí lokóla yě. | |
Chapter 3
| Phil | LinVB | 3:1 | Bandeko ba ngáí, bósepela mpô ya Mokonzi… Nalembí té kokomela bínó lisúsu maye nakomákí libosó, mpô bosengélí koyéba mangó malámu. | |
| Phil | LinVB | 3:2 | Bókébaka na mbwá ! Bókéba na basáli babé ! Bókéba na baye balingí kokátakáta nzóto na lokutá ! | |
| Phil | LinVB | 3:3 | Bato bakátísí nzóto sôló, ezalí bísó té ? Bísó bato tokokúmisaka Nzámbe lokóla Elímo atíndí ; tokolukaka lokúmu la bísó o Krístu Yézu, tokotíaka mitéma té na maye matálí nzóto. | |
| Phil | LinVB | 3:4 | Atâ ngáí nakokí kotía motéma na maye matálí nzóto ! Sókó moto mosúsu akanísí ’te akokí kotía motéma na maye matálí nzóto, ngáí nalekí yě ! | |
| Phil | LinVB | 3:5 | Bakátísí ngáí nzóto mikolo mwambi nsima ya kobótama, nazalí moto wa ekólo ya Israél, wa libótá lya Benyamin ; ngáí mo-Ebréi, mwána wa ba-Ebréi. Nazalákí kotósa Mobéko lokóla mo-Farizéo ; | |
| Phil | LinVB | 3:6 | na moléndé nazalákí monyókoli wa Eklézya. O maye matálí bosémbo boye bakozwaka na botósi mibéko bakokákí kofúnda ngáí na likambo lyǒ kó té. | |
| Phil | LinVB | 3:8 | Sôló, o míso ma ngáí mánso mazalí sé mpámba ; sé elóko yǒ kó elekí malámu : koyéba Krístu Yézu Mokonzi wa ngáí. Mpô ya yě nandimí kobúngisa mánso mpé nakómí kotála mánso lokóla bosoto, mpô ’te názwa Krístu, | |
| Phil | LinVB | 3:9 | násangana na yě. Natíkí koluka bosémbo bwa ngáí mǒkó, boye bakozwaka mpô ya botósi Mobéko, kasi nazalí koluka bosémbo boye bakozwaka mpô ya boyambi Krístu, boye Nzámbe akopésaka mpô ya boyambi. | |
| Phil | LinVB | 3:10 | Nalingí koyéba Krístu, koyóka ngúyá ya nsékwa ya yě, o mpási názala na yě lisangá, nákúfa mpé lokóla yě akúfákí, | |
| Phil | LinVB | 3:12 | Sôló, nakokísí mâná mánso naíno té, nakómí naíno mosántu té. Kasi nazalí koluka na motéma mónso názwa mangó, lokóla Krístu Yézu asílí azwí ngáí. | |
| Phil | LinVB | 3:13 | Bandeko, nayébí malámu ’te nazwí mangó naíno té, nazalí koluka sé mpô yǒ kó : nábósana maye masílí malekí, nátía motéma mobimba na maye mazalí koyâ ; | |
| Phil | LinVB | 3:14 | bôngó, nazalí kokende mbángu téé nsúka, mpô ’te názwa lifúta Nzámbe alakélákí bato bayambí Krístu Yézu. | |
| Phil | LinVB | 3:15 | Bísó bánso tokómí bakóló o boyambi, tosengélí kokanisa bôngó. Sókó na likambo lyǒ kó bozalí na makanisi masúsu, Nzámbe moto akopésa bínó mpé mayéle. | |
| Phil | LinVB | 3:17 | Bandeko, bínó bánso bólanda ndakisa ya ngáí, bótálaka malámu baye bakosálaka lokóla tolakísákí bínó. | |
| Phil | LinVB | 3:18 | Nasílí koyébisa bínó mbala míngi, sikáwa nayébísí bínó lisúsu na mái o míso : Bato baíké bazalí na ezalela ebé, bazalí bangúná ba kurúse ya Krístu : | |
| Phil | LinVB | 3:19 | nsúka ya bangó, sé liwá ! Nzámbe wa bangó, libumu lya bangó ! Bakomíkúmisaka na maye masengélí koyókisa bangó nsóni, bakokanisaka sé mambí ma nsé eye ! | |
| Phil | LinVB | 3:20 | Kasi mbóka ya bísó ezalí o likoló : tozalí kozila na mpósá enéne Mokonzi wa bísó Yézu Krístu, Mobíkisi wa bísó, akoúta kúná. | |
Chapter 4
| Phil | LinVB | 4:1 | Yangó wâná, bandeko ba ngáí ba bolingo, nazalí na mpósá enéne ya komóno bínó, bínó bozalí ntína ya esengo mpé lokúmu la ngáí ! Bópikama o Mokonzi, bandeko ba ngáí ba bolingo. | |
| Phil | LinVB | 4:3 | Mpé yǒ, Sizígo, móníngá wa ngáí wa sôló, naséngí yǒ ’te ósálisa bangó ; zambí o mosálá mwa bosangeli Nsango Elámu basálísákí ngáí, elongó na Klemási mpé na báníngá ba ngáí basúsu : nkómbó ya bangó ikomámí sikáwa o búku ya bomoi. | |
| Phil | LinVB | 4:6 | Bómítungisa té, atâ na níni, kasi bósámbela mpé bóbóndela Nzámbe mpô ya kosénge yě mánso masengélí na bínó. Bótóndo yě mpé botóndi. | |
| Phil | LinVB | 4:7 | Bobóto Nzámbe akopésaka bolekí mánso bato bakokí kokanisa, bokobátela mitéma mpé makanisi ma bínó o Krístu Yézu. | |
| Phil | LinVB | 4:8 | Mpô ya kosúkisa, bandeko : bósála mambí ma sôló, maye malongóbání ; bózala na bosémbo, na bopéto, na bolingi mpé na motéma molámu ; bókanisa bobélé mambí mabongí, maye makozwelaka moto lokúmu. | |
| Phil | LinVB | 4:9 | Bósála maye boyékólákí, bozwákí, boyókákí mpé bomónókí epái ya ngáí. Bôngó Nzámbe wa bobóto akozala na bínó. | |
| Phil | LinVB | 4:10 | Nasepélí míngi o Mokonzi mpô namóní ’te bozwí nzelá ya kolakisa ngáí lisúsu motéma molámu. Sôló, bozalákí kokanisa ngáí míngi, kasi bozwákí lisúsu nzelá té ya kolakisa ngáí yangó. | |
| Phil | LinVB | 4:11 | Sókó nalobí bôngó ezalí té mpô nakélélí : o makambo mánso ngáí mǒkó nakokokisa bilóko biye bisengélí na ngáí. | |
| Phil | LinVB | 4:12 | Kokélela tǒ kozala na bilóko míngi, nayébí níni yangó. Ntángo ínso mpé na ndéngé ínso nameséní kotónda tǒ koyóka nzala, názala na bilóko míngi tǒ nákélela. | |
| Phil | LinVB | 4:15 | Bato ba Filípi, bínó mǒkó boyébí yangó malámu : Ebandákí ngáí kosangela Nsango Elámu, ntángo natíkákí Masedónia, Eklézya yǒ kó té esálísákí ngáí na mosolo, bobélé bínó. | |
| Phil | LinVB | 4:16 | Ntángo nazalákí o Tesaloníki, bínó botíndélákí ngáí mbala íbalé bilóko bisengélákí na ngáí. | |
| Phil | LinVB | 4:18 | Sikáwa bilóko bikokí na ngáí, bilekí míngi kútu. Natóndí na makabo ma bínó maye Epafrodíto ayélákí ngáí. Nzámbe ayambí mangó bǒ libonza lya nsolo mpímbó lisepélísí yě. | |
| Phil | LinVB | 4:19 | Engébéné na nkita ya yě ya nkémbo, Nzámbe wa ngáí akokabela bínó, o Krístu Yézu, bínso bizángí bínó. | |
| Phil | LinVB | 4:21 | Bópésa basántu bánso mbóte o nkómbó ya Krístu Yézu. Bandeko bazalí áwa na ngáí batíndélí bínó mbóte. | |