Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
PSALMS
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 78
Psal LinVB 78:1  Mateya ma Asaf. E bato ba ngai, boyoka mateya ma ngai, botia matoi na maloba ma monoko mwa ngai.
Psal LinVB 78:2  Nakofungola monoko mpo ya koloba na miulani, nakokundola maye Nzambe asalaki liboso.
Psal LinVB 78:3  Maye toyokaki, toyebi mango ; maye bankoko ba biso basololaki biso,
Psal LinVB 78:4  tokobombela bana ba biso mango te ; tokosolola mango na mabota makoya nsima : nkombo inso ya lokumu la Mokonzi, nguya ya ye, mpe makamwa asalaki.
Psal LinVB 78:5  Alakisaki bana ba Yakob mitindo mya ye, apesaki Israel mobeko. Apesaki batata ba biso etinda ’te balakisa mango na bana ba bango,
Psal LinVB 78:6  mpo ’te bana bakobotama nsima bayeba, bankoko bakobotama nsima ya bango mpe bayeba. Bateleme mpe balekisa nsango epai ya bana ba bango ;
Psal LinVB 78:7  mpo ’te batia elikya na Nzambe, babosana bikela binene bya Nzambe te, mpe batosa mibeko mya ye,
Psal LinVB 78:8  mpo ’te bakoma lokola batata ba bango te, bato ba lolendo mpe batomboki, libota lya bato ba motema moko te, baye baboyaki kotia mitema na Nzambe.
Psal LinVB 78:9  Bana ba Efraim bayebaki kobunda na litimbo solo, kasi o mokolo mwa etumba bakimaki.
Psal LinVB 78:10  Babomaki bondeko na Nzambe, baboyaki kolanda nzela ya mibeko mya ye.
Psal LinVB 78:11  Babosanaki bikela bya ye na makamwa alakisaki bango.
Psal LinVB 78:12  O miso ma bankoko Nzambe asalaki makamwa, o mokili mwa Ezipeti, o mabelé ma Tanis.
Psal LinVB 78:13  Apasolaki mai ma mbu mpo ’te bakoma o ngambo, atelemisaki mai lokola efelo.
Psal LinVB 78:14  Na moi akambaki bango na limpata, na butu atambwisaki bango na mwinda mwa móto.
Psal LinVB 78:15  Apasolaki mabanga o eliki, amelisaki bango mai maike lokola ebale.
Psal LinVB 78:16  Abimisaki mai o libanga, mpe mai makomaki kotiyola lokola ebale.
Psal LinVB 78:17  Nzokande bakobaki kosala masumu o miso ma ye mpe kotombokela Nta-Likolo o eliki.
Psal LinVB 78:18  Balingaki komeka Nzambe, basengeki bilei lokola bango moko balingaki,
Psal LinVB 78:19  batombokoki na Nzambe mpe balobaki : « Nzambe akoki nde kopesa bilei o eliki ?
Psal LinVB 78:20  Solo, abeteki libanga mpe mai mabimaki, mai masopanaki lokola ebale enene ; kasi akoki nde kopesa mampa lokola, mpe kokabolela bato ba ye nyama balia ? »
Psal LinVB 78:21  Eyokaki Mokonzi bongo, asilikaki mpenza, móto mopelaki likolo lya Yakob, nkanda ekwelaki Israel,
Psal LinVB 78:22  mpamba te, bazalaki koyamba Nzambe te, mpe bazalaki na elikya ya kobika mpo ya ye te.
Psal LinVB 78:23  Apesaki mampata ma likolo etinda, afungolaki bizibeli bya likolo.
Psal LinVB 78:24  Mpo ya koleisa bango anokisaki mbula ya manu, akabelaki bango mbuma ya mampa mauti o likolo.
Psal LinVB 78:25  Bato banso bakomaki kolia mampa ma banzelu, atindelaki bango bilei biike tee batondaki.
Psal LinVB 78:26  O likolo abimisaki mompepe mwa Esti, na nguya ya ye atindaki mompepe mwa Sudi.
Psal LinVB 78:27  Akitiselaki bango nyama ya kolia, mingi lokola mputulu, mpe ndeke mingi, ebele lokola zelo ya mbu.
Psal LinVB 78:28  Nyama ina ikweyaki o nganda ya bango, zongazonga na biema bya bango.
Psal LinVB 78:29  Baliaki, bameleki mpe batondaki ; apesaki bango bilei lokola balingaki.
Psal LinVB 78:30  Mposa ya bango esilaki naino te, ata bazalaki na bilei o minoko.
Psal LinVB 78:31  Yango wana Nzambe ayokelaki bango nkanda ; o kati ya bango abomaki bilombe, asilisaki bilenge na banzenga ba Israel.
Psal LinVB 78:32  Ata bongo, basumukaki lisusu, batiaki se ntembe na makamwisi ma ye.
Psal LinVB 78:33  Abotoloki bango bomoi na mbala yoko, mibu mya bango misilaki bobele o kati ya nsomo.
Psal LinVB 78:34  Ntango Nzambe azalaki koboma bango, balukaki ye, babongolaki mitema mpe bazongelaki ye.
Psal LinVB 78:35  Bakanisaki lisusu ’te Nzambe azali libanga lya bango, ’te Nzambe wa likolo azalaki mobikisi wa bango.
Psal LinVB 78:36  Kasi na monoko bazalaki kokosa ye, mpe na lolemu bazalaki kobukela ye lokuta.
Psal LinVB 78:37  Bandimaki ye na motema moko te, mpe batiaki ntembe na bondeko bwa ye.
Psal LinVB 78:38  Kasi ye ayokelaki bango ngolu, alimbisaki bango, abomaki bango te. Akangaki motema mbala na mbala, mpe alandaki nkanda ya motema te.
Psal LinVB 78:39  Akundolaki o motema ’te bazalaki bobele bato, lokola mpema mpamba ekolimwaka mpe ekozongaka te.
Psal LinVB 78:40  Mbala mingi batombokoki na ye o eliki, mpe batumolaki ye o bisika bato bakofandaka te.
Psal LinVB 78:41  Babandaki lisusu komeka Nzambe mpe koyokisa Mosantu wa Israel mawa.
Psal LinVB 78:42  Babosanaki misala mya loboko la ye, o mokolo abikisaki bango o maboko ma banguna :
Psal LinVB 78:43  alakisaki bilembo o Ezipeti mpe makamwisi o Tanis.
Psal LinVB 78:44  Abongolaki mai ma ebale mpe ma miluka, akomisaki mango makila, mpo ’te bakoka komele mango te.
Psal LinVB 78:45  Atindelaki bango mpese isilisa binso, na magbololo matungisa bango.
Psal LinVB 78:46  Atindaki mapalela masilisa bilanga bya bango, na makélele mabebisa mosala mwa bango.
Psal LinVB 78:47  Abomaki bilanga bya vino na mbula ya matandala, mpe nzete ya sikomore na mpio makasi.
Psal LinVB 78:48  Atindaki ’te mbula ya matandala ekwela ngombe ya bango mpe minkalali mibetele bibwele bya bango.
Psal LinVB 78:49  Abwakelaki bango móto mwa nkanda ya ye, ayokelaki bango nkanda enene, eyokisaki bango nsomo : atindelaki bango bantoma baye bayokisa bango mpasi.
Psal LinVB 78:50  Amitikaki na nkanda ya ye, abikisaki bango o liwa te, kasi atikaki bango bakufa na bokono bobe.
Psal LinVB 78:51  Abomaki bana ba yambo banso o Ezipeti, banzenga kitoko o biema bya Kam.
Psal LinVB 78:52  Kasi akambaki bana ba ye lokola mpata, atambwisaki bango o eliki lokola etonga.
Psal LinVB 78:53  Akambaki bango malamu, babangaki eloko te, o ntango mai ma mbu mazalaki kozindisa banguna.
Psal LinVB 78:54  Akotisaki bango o mokili mwa ye mosantu, o ngomba eye bazwaki na bokasi bwa loboko la ye.
Psal LinVB 78:55  Abenganaki bapagano o boso bwa bango, akabelaki bango mabelé mpo ’te bafanda, afandisaki mabota ma Israel o biema bya banguna.
Psal LinVB 78:56  Batombokoki lisusu mpe bamekaki Nzambe wa Nta-Likolo. Baboyaki kotosa mibeko mya ye.
Psal LinVB 78:57  Bapengwaki mpe baboyaki ye, lokola bankoko basalaka, bawanganaki ye lokola litimbo liboyi kobete.
Psal LinVB 78:58  Batumolaki ye na bokumisi banzambe basusu, bayokisaki ye zuwa na bikeko bya bango.
Psal LinVB 78:59  Eyokaki Nzambe bongo, asilikaki, aboyaki ba-Israel libela.
Psal LinVB 78:60  Alongwaki o ndako ya ye o Silo, atikaki ema esika afandaki o ntei ya bato.
Psal LinVB 78:61  Akabaki Sanduku ya Bondeko ekende o boombo, elembo ya nkembo ya ye ekomi o maboko ma banguna.
Psal LinVB 78:62  Atikaki bato ba ye bakufa na mompanga, asilikaki na bato ba ekolo ya ye.
Psal LinVB 78:63  Móto mosilisaki banzenga ba bango, mpe bilenge basi bayokaki nzembo ya libala lisusu te.
Psal LinVB 78:64  Banganga Nzambe bawaki na mompanga, mpe basi ba bango bayembaki nzembo ya lilaka lisusu te.
Psal LinVB 78:65  Mpe Mokonzi alamukaki lokola moto auti kolala mpongi, lokola soda ameli vino mpe azwi mpiko ya sika.
Psal LinVB 78:66  Abeteki mpe akimisaki banguna ba bango, mpe ayokisaki bango nsoni seko.
Psal LinVB 78:67  Aboyaki kofanda o ema ya Yozefu, alingaki kopono libota lya Efraim lisusu te ;
Psal LinVB 78:68  kasi aponoki libota lya Yuda, aponoki ngomba Sion eye alingaki.
Psal LinVB 78:69  Atongaki esika ya ye esantu o bosanda lokola likolo, epikama makasi lokola mokili, moye akelaki.
Psal LinVB 78:70  Aponoki Davidi azala mosaleli wa ye, alongolaki ye o lopango la bibwele ;
Psal LinVB 78:71  abengaki ye ntango azalaki koleisa mpata, akomisaki ye mokengeli wa Yakob, ekolo ya ye, azala mobokoli wa Israel, libota lya ye.
Psal LinVB 78:72  Ye abokoloki bango na motema moko mpenza, mpe akambaki bango na bwanya mpe na mayele.