Chapter 1
I Ti | LinVB | 1:1 | Pólo, apóstolo wa Krístu Yézu na ndingisa ya Nzámbe, Mobíkisi wa bísó mpé ya Yézu Krístu, elíkyá ya bísó, | |
I Ti | LinVB | 1:2 | óna Timotéo, mwána óyo nabótí sôló o boyambi, ngrásya, ngolu na bobóto biúti na Nzambe Tata mpé na Kristu Yezu Mokonzi wa biso. | |
I Ti | LinVB | 1:3 | nabóndélákí yǒ ótíkala o Eféze lokola nazalákí kokende o Masedónia, nasalaki bôngo mpô ’te ópekisa bato basúsu batéya matéya masúsu. | |
I Ti | LinVB | 1:4 | Kokangana na masapo mpé kotánga milongó mya nkómbó ya bankóko nsúka té. Mâná mánso makobimisaka sé ntembe, mpé mazalí na ntína yǒ kó té mpô ya kokokisa mosálá mwa Nzámbe : tokoyéba mwangó bobélé mpô ya boyambi. | |
I Ti | LinVB | 1:5 | Ntína ya motíndo moye ezalí sé bolingi boye bokoúta na motéma péto, na makanisi ma bosémbo mpé na boyambi bwa sôló. | |
I Ti | LinVB | 1:7 | Bakomílakisaka lokóla batéyi ba Mobéko, nzókandé bayébí té níni bazalí koloba ; mpé maye bazalí kosakola lokóla bayébí mangó sôlósôló, batongólí ntína ya mangó té. | |
I Ti | LinVB | 1:9 | Tóyéba malámu ’te babimísí Mobéko mpô ya bato balámu té, kasi mpô ya bato bakotósaka Nzámbe té, batomboki na basúmuki, baye bakokínolaka mpé bakotiolaka bilóko bisántu bínso, baye bakobomaka tatá tǒ mamá tǒ mpé bato basúsu, | |
I Ti | LinVB | 1:10 | baye bakosálaka mpô bosóni na mwásí ndúmbá tǒ na móníngá mobáli, baye bakotékeke bato bǒ baómbo, baye bakokósaka, baye bakolayaka ndaí ya lokutá, mpé baye bánso bakosálaka makambo makokí na matéya ma sôló té. | |
I Ti | LinVB | 1:11 | Matéya maye maútí na Nsango Elámu té, eye Nzámbe ntá nkémbo mpé ntá esengo atíndí ngáí násangela. | |
I Ti | LinVB | 1:12 | Natóndí Krístu Yézu, Mokonzi wa bísó, óyo apésí ngáí makási, mpô atíí motéma na ngáí, áwa aponí ngáí o mosálá mwa yě. | |
I Ti | LinVB | 1:13 | ngáí moto nazalaki libosó nazalákí kotúka, konyókolo mpé kofínga yě, kasi ayókélí ngáí ngolu, mpô nazángákí boyambi mpé nayébákí té níni nazalákí kosála. | |
I Ti | LinVB | 1:14 | Mokonzi wa bísó akabélí ngáí ngrásya míngi, apésí ngáí boyambi mpé bolingi, boye bozalí o Krístu Yézu. | |
I Ti | LinVB | 1:15 | Tokokí kotía ntembe té na liloba liye lya sôló : Krístu Yézu ayákí o nsé kobíkisa basúmuki ; ngáí moto wa yambo o káti ya bangó. | |
I Ti | LinVB | 1:16 | Yangó wâná bayókélí ngáí ngolu : Yézu Krístu alingákí kolakisa ngáí, moto wa libosó, ngolu ya yě enéne ; názala bôngó ndakisa o míso ma baye bakoyamba yě mpé bakozwa bomoi bwa lobíko. | |
I Ti | LinVB | 1:17 | Lokúmu mpé nkémbo na Mokonzi wa bileko, Nzámbe sé mǒkó, óyo akowá té mpé akomónono na míso té, lokumu mpé nkémbo o bileko na bileko ! Amen. | |
I Ti | LinVB | 1:18 | Timotéo, mwána wa ngáí, napésí yǒ mobéko moye, engébéné na maloba baproféta balobáká kala mpô ya yǒ. Maloba maye máléndisa yǒ mpô ’te óbunda etumba na mpíkó, | |
I Ti | LinVB | 1:19 | na boyambi bwa sôló mpé na motéma sémba. Basúsu babóyí maloba mâná, yangó wâná babúngísí boyambi, | |
Chapter 2
I Ti | LinVB | 2:1 | Libosó mpenzá natíndí ’te bósámbela Nzámbe, bóbóndela mpé bósénge yě, bótóndo yě mpô ya bato bánso : | |
I Ti | LinVB | 2:2 | mpô ya bakonzi na bankúmú bánso, mpô tókoka kofánda nyê mpé na bobóto, mpé tókúmisa Nzámbe na ezalela ebongí nyé. | |
I Ti | LinVB | 2:5 | Nzámbe azalí sé mǒkó, mpé mobémbísi káti ya Nzámbe na bato azalí sé mǒkó, yě ndé Krístu Yézu óyo azalí moto lokóla bísó. | |
I Ti | LinVB | 2:7 | Ngáí naponómí názala mosakoli mpé apóstolo mpô ’te nátéya bato ba bikólo bisúsu mambí ma eyamba mpé bosôló ; nalobí mambí ma sôló, nakósí té. | |
I Ti | LinVB | 2:8 | Bôngó nalingí ’te bipái bínso, babáli bakotómbola mabóko mpô ya kosámbela, bázala motéma péto, na nkándá té, na boswâni mpé té. | |
I Ti | LinVB | 2:9 | Básí mpé bámíbongisa bǒ ebongí, kasi báláta na lipombó té, bámílakisa té na nsúki bakangísí na wólo tǒ na mabángá ma motúya, bátíka mpé moláto mwa monzele. | |
I Ti | LinVB | 2:12 | Nalingísí yě té ’te ápésa matéya tǒ ámílakisa mokonzi wa mobáli, kasi asengélí kofánda nyê. | |
I Ti | LinVB | 2:14 | Adámu andimákí lisénginyá té, mwásí moto andimákí lisénginyá, yangó wâná atósákí mobéko té. | |
Chapter 3
I Ti | LinVB | 3:1 | Yóká liloba liye lya sôló : Sókó moto alingí kokóma moyángeli o Eklézya, alukí mosálá molekí malámu. | |
I Ti | LinVB | 3:2 | Moyángeli akokí kozala na likambo lyǒ kó lya mabé té, ázala na mwásí sé mǒkó, ázala na lokósó té, ázala na bwányá mpé na bonkóndé, áyéba koyamba bampaya malámu, áyéba kotéya malámu ; | |
I Ti | LinVB | 3:3 | álángwa masanga té, átomboko té, kasi ázala moto wa bobóto, áswânisa bato té, ázala moómbo wa mosolo té, | |
I Ti | LinVB | 3:4 | áyéba koyángela libótá lya yě malámu mpé ábókolo bána ba yě bǒ ebongí mpô ’te bázala na botósi mpé na limemyá. | |
I Ti | LinVB | 3:5 | Mpô sókó moto ayébí koyángela libótá lya yě mǒkó té, bóníbóní akoyángela Eklézya ya Nzámbe ? | |
I Ti | LinVB | 3:6 | Azala moyambi wa sika té, sókí té, akokóma na loléndo mpé akozwa etúmbu lokóla zábolo azwákí. | |
I Ti | LinVB | 3:7 | Esengélí mpé ’te bato basusu bátála yě lokóla moto óyo bakomemyaka, mpô ’te bákoka kotonga yě té mpé ákwéya o motámbo mwa zábolo té. | |
I Ti | LinVB | 3:8 | Badiákono mpé ndenge moko bázala bato baye bakomemyaka bangó : bato ba monoko sé mǒkó, bámele masanga míngi té, báluka mosolo na boyíbi té, | |
I Ti | LinVB | 3:10 | Malámu libosó bámeka bangó motéma, mpé na nsima, sókó bamónóní na mabé té, bakokí kosála mosálá mwa diákono. | |
I Ti | LinVB | 3:11 | Básí ba bangó mpé bázala bato balongóbání : báto ba songísongí té, ba lokósó mpé té, mpé báyéba kobongisa misálá mínso malámu. | |
I Ti | LinVB | 3:12 | diákono azala na mwasi sé mǒkó, báyéba kobókolo bana ba bangó mpé koyángela libótá malámu. | |
I Ti | LinVB | 3:13 | Baye bakosálaka mosálá mwa bangó bǒ ebongí bakozwa lokúmu, mpé bakokoka kosakola mambí ma eyamba ya Krístu Yézu polélé. | |
I Ti | LinVB | 3:15 | Kasi sókó nakokí koyâ nokí té, okoyéba bóníbóní osengélí kosála o ndáko ya Nzámbe, eye ezalí Eklézya ya Nzámbe wa bomoi, likonzí lya matéya ma sôló. | |
Chapter 4
I Ti | LinVB | 4:1 | Elímo alobí polélé ’te o mikolo mya nsúka bato basúsu bakotíka koyamba mpé bakolanda bilímo bya lokutá mpé matéya ma bazábolo. | |
I Ti | LinVB | 4:3 | Bakopekisaka kobála mpé kolía bilóko biye Nzámbe akelí mpô ’te bato baye bayambí yě mpé bayébí matéya ma sôló, bálía byangó mpé bátóndo yě. | |
I Ti | LinVB | 4:4 | Zambi bilóko bínso Nzámbe akelí bizalí malámu, elóko yǒ fkó ya ekila ezalí té, sókó okamátí yangó na motéma botóndi. | |
I Ti | LinVB | 4:6 | Sókó otéyí bandeko mambí maye, okozala mosáleli molámu wa Krístu Yézu. Bakoyéba bôngó ’te oyékólí mambí ma eyamba mpé matéya ma sôló malámu, maye oyambí na motéma mǒkó. | |
I Ti | LinVB | 4:7 | Tíká masapo ma mpámba mpé bilobáloba bya básí babangé bizángí ntína, kasi tíá moléndé na losámbo. | |
I Ti | LinVB | 4:8 | Misálá mya nzóto mizalí na ntína enéne té, kasi ezalela ya moto wa losámbo ezalí na matómba ndelo té : ezali na elakélí ya bomoi bwa mikolo miye mpé bomoi bwa mikolo mikoyâ. | |
I Ti | LinVB | 4:10 | Tozalí komíyókisa mpási na mosálá mpé kobuna makási, zambí tozalí kotía mitéma na Nzámbe wa bomoi, óyo azalí Mobíkisi wa bato bánso, libosó wa baye bayambí yě. | |
I Ti | LinVB | 4:12 | Moto mǒkó ákínola yǒ té, mpô ozalí naíno élengé. Kasi ózala ndakisa o míso ma bayambi na maloba, na ezalela, na bolingi, na boyambi mpé na bopéto bwa yǒ. | |
I Ti | LinVB | 4:14 | Sálá mosálá na ngrásya ezalí o motéma mwa yǒ ; bakabélí yǒ yangó mpô ya maloba ma baproféta, ntángo batíélákí yǒ mabóko. | |
I Ti | LinVB | 4:15 | Tíá motéma na maye mánso, ómípésa mobimba na mangó mpô ’te bato bánso bámóno ’te ozalí kokóla o boyambi. | |
Chapter 5
I Ti | LinVB | 5:1 | Ogángela mobangé té ; lobá na yě lokóla okolobaka na tatá wa yǒ. Léndísá bilengé babáli lokóla bandeko ba yǒ, | |
I Ti | LinVB | 5:4 | Sókó mwásí bozéngé azalí na bána tǒ na bankóko, lakísá bangó bóníbóní basengélí koyékola libosó mpenzá komemya libótá lya bangó mǒkó mpé kozóngisela babóti bolámu bazwákí na bangó ; yangó ekosepelisa Nzámbe. | |
I Ti | LinVB | 5:5 | Mwásí bozéngé, óyo azalí bobélé yě mǒkó, átía motéma na Nzámbe, ábóndela mpé ásámbela yě butú mói. | |
I Ti | LinVB | 5:8 | Moto asálísí libótá lya yě té, libosó mpenzá baye bafándí na yě ndáko yǒkó, abébísí boyambi, alekí mopagáno na bobé. | |
I Ti | LinVB | 5:9 | O lingómbá lya básí bazéngé bakokí kokomisa bobélé mwásí óyo akokísí mibú ntúkú motóbá, óyo abálákí sé mbala yǒ kó. | |
I Ti | LinVB | 5:10 | Ayébana na bato lokóla moto wa ezalela elámu : moto abókólí bána ba yě malámu, óyo ayébí koyamba bampaya mpé akosukolaka bandeko bakrístu makolo, akosálisaka bato ba mawa mpé akosálaka misálá milámu ndéngé na ndéngé. | |
I Ti | LinVB | 5:11 | Básí bazéngé, baye bakómí naíno bakóló mpenzá té, ókomisa nkómbó ya bangó té ; mpámba té, bakokí kotíka nzelá ya kosálela Krístu, sókó mpósá ya kobála eyélí bangó. | |
I Ti | LinVB | 5:13 | Awa bazalí na mosálá mwa sôló té, bakómí komesene kokóto epái na epái o ndáko ya bato. Kasi likambo lilekí mabé : masoló ma bangó nsúka té, bakokótoko o makambo matálí bangó té, mpé bakolobaka makambo kílíkili. | |
I Ti | LinVB | 5:14 | Bôngó nalingí ’te básí bazéngé baye bakómí naíno bakóló mpenzá té, bábála lisúsu, bábóta bána mpé báyángela libótá lya bangó ; bápésa bôngó bangúná nzelá ya kotóngo bangó té. | |
I Ti | LinVB | 5:16 | Sókó mwásí mokrístu azalí na bandeko básí bazéngé, ásálisa bangó mpô ’te mókúmbá môná mókwêla Eklézya té, bôngó Eklézya ékoka kosálisa baye bazalí atâ na moto mǒkó té. | |
I Ti | LinVB | 5:17 | Bópésa lokúmu lonéne na bakóló bakoyángelaka Eklézya malámu, libosó na baye bakomíyókisaka mpási na bosangeli Liloba lya Nzámbe mpé na botéyi báníngá. | |
I Ti | LinVB | 5:18 | Sôló, ekomámí o Minkandá Misántu : Okanga monoko mwa ngómbé té ntángo ezalí koníka mbuma ya mámpa, mpé : Ebongí mosáli ázwa lifúta lya yě. | |
I Ti | LinVB | 5:19 | Sókó bafúndí mokóló wa Eklézya, óndima yangó bobélé sókó oyókí maloba ma banzénénéké bábalé tǒ básáto. | |
I Ti | LinVB | 5:21 | Nabóndélí yǒ o míso ma Nzámbe, ma Krístu Yézu mpé ma bǎnzelú baye Nzámbe aponí : Otósa mitíndo miye sé na bosémbo, ótála bilongi bya bato té. | |
I Ti | LinVB | 5:22 | Otíela moto mǒkó mabóko nokí té. Omíkótisa o masúmu ma bato basúsu té, kasi óbómba motéma péto. | |
I Ti | LinVB | 5:23 | Tíká komele bobélé mái, melé mpé mwâ víno mpô ya libumu, mpô mpási ezalí kotungisa yǒ míngi. | |
I Ti | LinVB | 5:24 | Mabé ma bato basúsu mamónóní polélé, atâ basámbísí bangó naíno té. Mabé ma bato basúsu makomónono bobélé sókó basámbí likambo lya bangó. | |
Chapter 6
I Ti | LinVB | 6:1 | Baye bánso bazalí komeme mókúmbá mwa boómbo, basengélí komemya bankóló ba bangó na motéma mǒkó, mpô ’te bato bátúka nkómbó ya Nzámbe té, matéya ma yě mpé té. | |
I Ti | LinVB | 6:2 | Baye bazalí na nkóló mokrístu, bákínola yě té mpô azalí ndeko mokrístu ; kasi básálela yě malámu, zambí óyo akozwa litómba na mosálá mwa bangó azalí moyambi mpé ndeko wa bolingo. Tálá bóníbóní osengélí kolakisa mpé kotéya bato. | |
I Ti | LinVB | 6:3 | Sókó moto atéyí matéya masúsu mpé atíkí maloba ma bosôló, maye Mokonzi wa bísó Yézu Krístu atéyákí mpô ya kokúmisa Nzámbe bǒ ebongí, | |
I Ti | LinVB | 6:4 | azalí moto wa lofúndo mpé ayébí elóko té. Mosálá mwa yě, sé kowéla ntembe mpé kolobaloba mpámba ; mosíká té ekobima zúwa, boswâni, mafínga mpé makanisi mabé. | |
I Ti | LinVB | 6:5 | Baye bazalí na mitéma míbalé bayébí makambo ma sôló té, ntembe ya bangó ekosílaka té. Litómba bakolukaka o boyambi, sé mosolo. | |
I Ti | LinVB | 6:6 | Sôló, koyamba Nzámbe ezalí na litómba linéne, sókó moto asepélí bobélé na bilóko biye bizalí na yě. | |
I Ti | LinVB | 6:9 | Kasi baye balingí kozwa nkita enéne, bakondima masénginyá, bakokwéya o motámbo mwa mpósá ya bozóba mpé ya mabé, eye ekobébisaka bato mpé ekobomaka bangó. | |
I Ti | LinVB | 6:10 | Sôló, lokósó la mosolo lozalí ntína ya mabé mánso. Basúsu bawélákí mosolo babébísí bôngó boyambi mpé bamíyókísí motéma mpási míngi. | |
I Ti | LinVB | 6:11 | Yǒ, moto wa Nzámbe, kímá makambo mâná mánso. Luká bosémbo, zalá moto wa losámbo, na boyambi, na bolingi, na moléndé mpé na bobóto. | |
I Ti | LinVB | 6:12 | Bundá etumba elámu ya boyambi, luká kozwa bomoi bwa lobíko, zambí Nzámbe abyángákí yǒ ózwa bwangó. Na ntína êná mpé osakólákí boyambi bwa yǒ o míso ma bato baíké. | |
I Ti | LinVB | 6:13 | O míso ma Nzámbe óyo akopésaka bilóko bínso bomoi, o míso mpé ma Krístu Yézu, óyo asakólákí esakola ya sôló o bosó bwa Pónsio Piláto, nabóndélí yǒ, | |
I Ti | LinVB | 6:14 | óbátela mobéko moye mózwa mbindo té, mabé mpé té, kín’o mokolo Mokonzi wa bísó Yézu Krístu akoyâ. | |
I Ti | LinVB | 6:15 | Sókó ntángo ekokí Nzámbe akotínda yě ámónono : Mo-esengo mpé Mokonzi sé mǒkó, Nkúmú wa bankúmú, Mokonzi wa bakonzi ; | |
I Ti | LinVB | 6:16 | bobélé yě mǒkó akokúfa té, azalí o mbóka ya mwínda, esíká moto mǒkó akokí kokóma té ; moto mǒkó té asílí amóní tǒ akokí komóno mwínda môná. Na yě nkémbo mpé ngúyá ya sékô ! Amen. | |
I Ti | LinVB | 6:17 | Pálélá bato ba nkita ba mokili moye bázala na loléndo té, bátía mitéma té na nkita iye ikobéba. Kasi bátía mitéma na Nzámbe óyo akotóndisaka bísó na bilóko bínso mpô tósepela na byangó. | |
I Ti | LinVB | 6:18 | Básála sé malámu, bázwa nkita na misálá bakosálaka. Básálisa bato mpé bákabela bangó bilóko na motéma malámu. | |
I Ti | LinVB | 6:19 | Sé bôngó bakomíbómbela nkita ya sôló eye ekoúmela o bileko bikoyâ mpô ’te bázwa bomoi bwa sôló. | |
I Ti | LinVB | 6:20 | Timotéo, bátélá bolámu bónso ozwákí. Olanda masoló ma mpá-mbampámba té, maye mazalí o nzelá ya boyambi té ; ókíma mpé maloba ma ntembe ma baye bamímóní ’te bazalí na mayéle ma sôló. | |