Chapter 1
Song | LinVB | 1:3 | boleki nsolo ya malasi ma yo kitoko ; mobimba mwa yo bobele nsolo mpimbo. Yango wana bilenge basi balingi yo mingi. | |
Song | LinVB | 1:4 | Tika nalanda yo mpe topota mbangu ! Mokonzi akotisi ngai o ndako ya ye, alobi : « Yo okozala ntina ya esengo ya biso babale. » Nasepela bolingi bwa yo boleki vino na elengi ! | |
Song | LinVB | 1:5 | E bana basi ba Yeruzalem, nazali moindo kasi bonzenga, kitoko lokola biema bya Kedar, lokola bilamba bya motuya bya ndako ya Salomo. | |
Song | LinVB | 1:6 | Boboya ngai te mpo nazali moindo, zambi moi makasi moindisi ngai. Bandeko ba ngai babali basiliki na ngai, batindi ngai nakende kokengele bilanga bya vino, kasi elanga ya ngai moko, nabateli yango malamu te ! | |
Song | LinVB | 1:7 | Ngai nalingi bobele yo, bongo yebisa ngai : Esika nini okoleisaka mpata ya yo, esika nini okopemaka na midi ? Mpo nakende kowayawaya lokola ndumba te, penepene na bibwele bya baninga ba yo. | |
Song | LinVB | 1:8 | Bayembi : E mwasi kitoko leka basi banso, soko oyebi te azali wapi, landa matambi ma bibwele mpe leisa ntaba ya yo penepene na biema bya bakengeli. | |
Song | LinVB | 1:9 | Mobali : O miso ma ngai, yo mwasi wa ngai wa bolingo, ozali lokola farasa mwasi ya likalo lya Farao. | |
Song | LinVB | 1:10 | Matama ma yo mazali kitoko o kati ya biloko bya matoi, se bongo nkingo ya yo ezingami na mayaka. | |
Song | LinVB | 1:12 | Mwasi : Ntango mokonzi wa ngai azali o lopango la ye, malasi ma ngai makobimisa nsolo mpimbo. | |
Song | LinVB | 1:15 | Mobali : Mwasi wa ngai wa bolingo, oleki kitoko ! Miso ma yo mazali lokola bibenga. | |
Song | LinVB | 1:16 | Mwasi : Mobali wa ngai wa bolingo, oleki bonzenga ! Mbeto ya biso lokola matiti mabimi sika. | |
Chapter 2
Song | LinVB | 2:2 | Mobali : Bolingo wa ngai o ntei ya bilenge basi azali lokola fulele ya lisi o ntei ya nzube. | |
Song | LinVB | 2:3 | Mwasi : Yo, bolingo wa ngai o ntei ya bilenge babali ozali lokola limange o ntei ya nzete ya zamba. Nalingi kofanda o elilingi ya mwete mwango, mbuma ya mwango ezali elengi o monoko mwa ngai. | |
Song | LinVB | 2:5 | Leisa ngai na bisikiti bya mbuma ya vino, leisa ngai mange, nakoma makasi, zambi nazali kobele malali ma bolingo. | |
Song | LinVB | 2:7 | Mobali : E bana basi ba Yeruzalem, nabondeli bino na nkombo ya mboloko mpe ya mbuli inso ya esobe, bolongola bolingo wa ngai na mpongi te, botika ye alala tee akolamuka. | |
Song | LinVB | 2:8 | Mwasi : Nazali koyoka bolingo wa ngai, tala ye wana azali koya, apoti mbangu o ngomba, mpe apimbwi o ngomba ike. | |
Song | LinVB | 2:9 | Bolingo wa ngai azali lokola mboloko, lokola mwana wa mbuli. Atelemi nsima ya efelo ya ndako ya biso. Atali o lininisa, anongi o kati ya bibende bya lininisa. | |
Song | LinVB | 2:10 | Bolingo wa ngai abandi koyemba, alobi : Mobali : Wa bolingo, teleme, mwana bonzenga, yaka, | |
Song | LinVB | 2:12 | O esobe fulele ibandi komonono, tokomi koyoka bipai binso nzembo ya nsai, tozali koyoka bobengi bwa bikokoba. | |
Song | LinVB | 2:13 | Nzete ya figi ibandi kobota mbuma ike, nzete ya vino ibandi kobimisa nsolo mpimbo. E bolingo wa ngai, teleme, yaka, mwana bonzenga. | |
Song | LinVB | 2:14 | Ebenga wa ngai, obombami o ntei ya mabanga, o mabulu ma ngomba ; lakisa ngai elongi ya yo, yokisa ngai lolaka la yo ; mpo lolaka la yo lopusi elengi, mpe elongi ya yo epusi kitoko. | |
Song | LinVB | 2:15 | Mwasi : Bokangela biso gambala na bana ba monsole ikobebisaka nzete ya vino ilingi ibota. | |
Song | LinVB | 2:16 | Bolingo wa ngai azali wa ngai, mpe ngai wa ye. Akoleisaka mpata ya ye o ntei ya fulele ya lisi. | |
Chapter 3
Song | LinVB | 3:1 | Mwasi : Na butu, ntango nalali o mbeto, naluki bolingo wa ngai wa motema, naluki ye mingi, kasi nazwi ye te ! | |
Song | LinVB | 3:2 | Natelemi mpe natamboli mboka mobimba, naluki ye o balabala mpe o zando, namoluki, kasi nazwi ye te ! | |
Song | LinVB | 3:4 | Awa bango baleki bobele bongo, talaka… bolingo wa ngai ye wana. Nasimbi ye na loboko, nakotika ye lisusu te liboso ‘te akoto o ndako ya mama wa ngai, o eteni ya ndako ya mama oyo aboti ngai. | |
Song | LinVB | 3:5 | Mobali : E bana basi ba Yeruzalem, nabondeli bino, na nkombo ya mboloko mpe ya mbuli inso ya esobe. Bolongola bolingo wa ngai o mpongi te, botika ye alala, tee ye moko akolamuka. | |
Song | LinVB | 3:6 | Bayembi : Eloko nini ezali kobima kuna o eliki, ezali kobuta lokola milinga mya móto monene, ezali na nsolo ya mira mpe ya mpaka ya malasi, na nsolo mpimbo ya matiti mauti mosika ? | |
Song | LinVB | 3:7 | Mwasi : Tala kuna tipoi ya Salomo ezali koya, ezingami na bilombe ntuku motoba ba Israel. | |
Song | LinVB | 3:8 | Banso bazali na mopanga, bayebi etumba, banso bakangi mopanga o loketo mpo ya komibatela na makama ma butu. | |
Song | LinVB | 3:10 | Atuli makonzi ma yango na palata, akembisi yango na wolo mpe na bilamba bya longondo, bitongami na maboko ma bilenge basi ba Yeruzalem. | |
Chapter 4
Song | LinVB | 4:1 | Mobali : Ozali kitoko, bolingo wa ngai, oleki bonzenga ! Miso ma yo o nse ya litambala, lokola bibenga, nsuki ya yo izali lokola etonga ya ntaba izali kokita ngomba ya Galaad. | |
Song | LinVB | 4:2 | Mino ma yo mazali lokola mpata iuti kosukola mpo bakata yango nsuki ; mino ma yo manso mazali lokola mapasa, mpe lino lyoko lizangi te. | |
Song | LinVB | 4:3 | Mbebu ya yo lokola nsinga etane ; maloba ma yo maleki elengi. Matama ma yo mamononi o nse ya litambala lokola mbuma ya ndimo. | |
Song | LinVB | 4:4 | Nkingo ya yo ezali lokola linongi lya Davidi, litongami mpo ya kobomba biloko bazwi o etumba ; nguba nkoto itingami wana, se bibuneli bya bilombe. | |
Song | LinVB | 4:5 | Mabéle ma yo mabale lokola bana ba mboloko, lokola bana mapasa ba mbuli izali kolia o ntei ya lisi. | |
Song | LinVB | 4:6 | Awa moi mobandi kobima mpe molili mosili, nakokende o ngomba ya mira mpe o ngomba ya mpaka ya malasi. | |
Song | LinVB | 4:8 | E mwasi wa ngai wa bolingo, yaka epai ya ngai, kita ngomba ya Libano mpe landa ngai ; kita ut’o nsonge ya ngomba Amana, ut’o nsonge ya ngomba Senir na Ermon, bisika nkosi mpe nkoi ikotambolaka. | |
Song | LinVB | 4:9 | E moseka, mwasi wa ngai, otambwisi ngai motó ; soko otali ngai ata moke, nazwi ligboma ; oloki ngai na mayaka ma nkingo ya yo. | |
Song | LinVB | 4:10 | Nakosepelaka na bilembo bya bolingi bwa yo, e mwasi wa ngai wa bolingo, bileki vino na elengi, mpe nsolo ya malasi opakoli eleki matiti manso ma motuya. | |
Song | LinVB | 4:11 | Mbebu ya yo, e mwasi wa ngai, ikotangisaka mafuta ma nzoi, mafuta ma nzoi na mabéle mabombami o nse ya lolemu, malasi ma bilamba bya yo lokola malasi ma Libano. | |
Song | LinVB | 4:12 | E moseka, bolingo wa ngai, ozali lopango lokangemi malamu, ozali liziba lya mai bazingi na bibende. | |
Song | LinVB | 4:13 | Lopango la yo lotondi na nzete ya ndimo, na mbuma ya sukali mpe na matiti ma nsolo mpimbo. | |
Song | LinVB | 4:14 | Okuti wana nardi mpe krokisi, kanele na sinamome, na mpe nzete ya mpaka ya malasi ndenge na ndenge, na mira na alowes na matiti masusu ma nsolo mpimbo. | |
Song | LinVB | 4:15 | E liziba lya mai o lopango la ngai, libulu lya mai ma bomoi, mai makoutaka o Libano. | |
Chapter 5
Song | LinVB | 5:1 | Mobali : E moseka, bolingo wa ngai, nayei o lopango la ngai, nayei koluka mira ya ngai na mpaka ya malasi, nayei kolia mafuta ma nzoi, nayei komele vino na mabéle. E baninga ba ngai, boya kolia, e bandeko ba bolingo, boya komele mpe kolangwa ! | |
Song | LinVB | 5:2 | Mwasi : Nazalaki kolala mpongi, kasi nalamuki, nayoki bolingo wa ngai abeteli ezibeli ya ndako. Mobali : Fungola ndako, e moseka, mwasi wa ngai, yo ebenga wa ngai, ozali nsuka ya mwasi kitoko. Motó mwa ngai mopoli na mamio, nsuki ya ngai ipoli na londende la butu. | |
Song | LinVB | 5:3 | Mwasi : Nasili nalongoli elamba ya ngai, bongo nalata yango lisusu ? Nasili nasukoli makolo ma ngai, ndenge nini nabebisa mango lisusu ? | |
Song | LinVB | 5:4 | Bolingo wa ngai akotisi loboko o lilusu la ezibeli, mpe na mbala yoko motema mwa ngai mobeti noki. | |
Song | LinVB | 5:5 | Natelemi mpo ya kofungolela bolingo wa ngai ndako. Maboko ma ngai mabimisi nsolo ya malasi, mpe misapi mya ngai mitangi mafuta ma mira, makwei o bikangeli bya lifungola. | |
Song | LinVB | 5:6 | Nafungoleli bolingo wa ngai ndako, kasi bolingo wa ngai asili akei, alimwi. Motema likolo nabimi mpo ya kolanda ye ; naluki ye, kasi nazwi ye te, nabeleli ye, kasi ayanoli ngai te. | |
Song | LinVB | 5:7 | Nakutani na bakengeli bazalaki kokatisa mboka. Bakengeli ba lopango la mboka babeti mpe bazokisi ngai, balongoli ngai litambala. | |
Song | LinVB | 5:8 | E bana basi ba Yeruzalem, nabondeli bino, soko bokutani na bolingo wa ngai, bokoyebisa ye nini ? Boloba na ye ’te nabeli malali ma bolingo. | |
Song | LinVB | 5:9 | Bayembi : E mwasi kitoko leka basi banso na kitoko, bolingo wa yo aleki babali basusu na nini ? Oyo yo olingi aleki babali basusu na nini, mpo ’te obondela biso mingi boye ? | |
Song | LinVB | 5:10 | Mwasi : Bolingo wa ngai azali mpembe, mwa motane, ayebani o ntei ya babali basusu nkoto zomi. | |
Song | LinVB | 5:11 | Motó mwa ye mozali lokola wolo kitoko, nsuki ya ye, moindo lokola nsala ya yanganga, ilingami lokola mbuma ya mbila. | |
Song | LinVB | 5:12 | Miso ma ye mazali lokola bibenga o mabongo ma miluka, bizali kosukola nzoto o kati ya mabéle, bizali kopema penepene na libongo lya mai. | |
Song | LinVB | 5:13 | Matama ma ye mazali lokola bilanga, bizali na matiti ma nsolo mpimbo. Mbebu ya ye izali lokola fulele ya lisi, izali kotangisa mafuta ma mira. | |
Song | LinVB | 5:14 | Maboko ma ye mazali bo bikomo bya wolo, bikembami na mabanga ma topaze, nzoto ya ye lokola mpembe ya nzoku bakembisi na mabanga ma safir. | |
Song | LinVB | 5:15 | Makolo ma ye, lokola makonzi ma albatre, matelemi o matambi ma wolo kitoko. Soko atelemi azali lokola ngomba ya Libano, molai lokola nzete ya sédere. | |
Chapter 6
Song | LinVB | 6:1 | Bayembi : E mwasi kitoko leka basi banso, bolingo wa yo akei wapi ? Bolingo wa yo aleki nzela kani ? Biso na yo tokende koluka ye. | |
Song | LinVB | 6:2 | Mwasi : Bolingo wa ngai akoti o lopango la ye, akei kotala bisika bya fulele ya nsolo mpimbo ; akei koleisa mpata ya ye o lopango, akei kobuka fulele ya lisi. | |
Song | LinVB | 6:3 | Bolingo wa ngai azali wa ngai, mpe ngai wa ye, azali koleisa mpata ya ye o ntei ya lisi. | |
Song | LinVB | 6:4 | Mobali : E moninga wa ngai, ozali kitoko lokola Tirsa mpe bonzenga lokola Yeruzalem, kasi okoyokisaka nsomo lokola limpinga lya basoda bakei etumba. | |
Song | LinVB | 6:5 | Tika kotala ngai na miso, mpo mazali kotambwisa ngai mayele. Nsuki ya yo izali lokola etonga ya ntaba izali kokita ngomba ya Galaad. | |
Song | LinVB | 6:6 | Mino ma yo mazali lokola etonga ya mpata, iuti kosukola mpo bakata yango nsuki, mino ma yo manso mazali mapasa, mpe lino lyoko lilongwi te. | |
Song | LinVB | 6:8 | Mokonzi monene azali na basi ntuku motoba mpe na bamakango ntuku mwambe mpe na bilenge basi ebele mpenza. | |
Song | LinVB | 6:9 | Kasi ebenga wa ngai, nsuka ya mwana mwasi, azali likinda. Mama wa ye aboti bobele ye, aboti mwana moko aleki bolamu. Bilenge basi bakotangaka ye moto wa esengo, ata basi na bamakango ba mokonzi bakokumisaka ye. | |
Song | LinVB | 6:10 | « Nani oyo abimi lokola botani bwa ntongo, bonzenga lokola sanza, na bongengi lokola mwese, bokasi lokola limpinga lya basoda bakei etumba ? » | |
Song | LinVB | 6:11 | Nakei o lopango la nzete ya lidame kotala mbuma ya sika o lobwaku, kotala soko nzete ya vino ibandi kobimisa nkasa mpe soko nzete ya ndimo isili kobimisa fulele. | |
Chapter 7
Song | LinVB | 7:1 | Bayembi :Zonga,zonga, mwasi wa Sulam, zonga, zonga, mpo totala yo. Mobali : Mpo nini bolingi kotala elenge mwasi wa Sulam ntango akoti o kati ya basi babini ? | |
Song | LinVB | 7:2 | Makolo ma yo maleki kitoko mingi o mapapa maye, yo mwana wa bankumu ! Loketo la yo lobongi mpenza na zikida kitoko mpe na mayaka masalemi na moto ayebi mosala mwa ye. | |
Song | LinVB | 7:3 | Montolu mwa yo mozali kopo kitoko, ekoki kozanga vino elengi te. Libumu lya yo lizali libondo lya loso, lizingami na fulele ya lisi ebele. | |
Song | LinVB | 7:5 | Nkingo ya yo ezali lokola linongi lya mpembe ya nzoku, miso ma yo lokola bitima bya Esbon, penepene na ezibeli ya mboka Bat-Rabim, zolo lya yo lokola linongi lya Libano, liye litalani na Damasko. | |
Song | LinVB | 7:6 | Motó mwa yo motelemi lokola ngomba Karmel, mpe nsuki ya yo ingengi lokola elamba ya longondo ; ata mokonzi monene akolula yango. | |
Song | LinVB | 7:8 | Nzoto ya yo ezali lokola nzete ya mbila, mpe mabéle ma yo lokola bizangi bya mbuma ya vino. | |
Song | LinVB | 7:9 | Nakanisi : Tika nabuta nzete ya mbila mpe nakende kokamata mbuma ya yango. Mabéle ma yo mazalela ngai lokola bizangi bya mbuma ya vino, mpe mpema ya yo lokola nsolo ya lingolo ; | |
Song | LinVB | 7:10 | edada ya yo lokola vino elengi… Mwasi : …ezali kokita o mongongo mwa bolingo wa ngai, lokola vino o monoko mwa bato balali mpongi. | |
Song | LinVB | 7:13 | Na nta ntongo tokende kotala bilanga bya nzete ya vino, totala soko nzete ya vino isili kobima nkasa, soko nkasa ibandi kofungwama, soko fulele imononi o nzete ya ndimo. Bobele o esika ena nakolakisa yo bolingi bwa ngai. | |
Chapter 8
Song | LinVB | 8:1 | Malamusokoozalakindekowa ngai, mpe soko onungaki mabéle ma mama wa ngai ! Mbele nakokaki koyamba yo o bontolo ntango tokutani o balabala, bongo bato baseke biso te. | |
Song | LinVB | 8:2 | Mbele nakambaki yo mpe nakotisaki yo o ndako ya mama esika okoteya ngai. Mbele namelisaki yo vino elengi mpe napesaki yo masanga sukali ma ndimo. | |
Song | LinVB | 8:4 | Mobali : E bana basi ba Yeruzalem, nabondeli bino. Bolongola bolingo wa ngai o mpongi te ! botika ye alala tee ye moko akolamuka. | |
Song | LinVB | 8:5 | Bayembi : Nani oyo auti o eliki, aekemeli bolingo wa ye ? Mwasi : O nse ya limange nalamusi yo, bobele o esika ena mama wa yo azwaki zemi, esika mama oyo aboti yo akwelaki zemi. | |
Song | LinVB | 8:6 | Omeme ngai lokola elembo o motema, lokola nkoma o loboko. Zambi bolingi bozali na bokasi lokola liwa, bokoyokaka zuwa, leka Mboka ya bawa. Bolingi bokozikisaka motema lokola makula ma móto, móto lokola minkalali mya Nzambe. | |
Song | LinVB | 8:7 | Mai ebele makoki kozimisa bolingi te, mai ma ebale makoki kozindisa bwango te. Moto akanisi ’te akoki kosomba bolingi boye, ata ateki biloko bya ye binso, bakokinola ye. | |
Song | LinVB | 8:8 | Tozali na ndeko mwasi, azali naino moke, mabéle ma ye makoli naino te. Tokoki kosalisa ye na nini mokolo bakoluka kobala ye ? | |
Song | LinVB | 8:9 | Soko azalaki efelo ya lopango la mboka, mbele totongi wana manongi ma palata. Soko azalaki ezibeli ya mboka, mbele tokangisi yango makasi na mabaya ma sédere. | |
Song | LinVB | 8:10 | Nazali efelo ya lopango, mpe mabéle ma ngai mazali manongi ma yango. Nakomi bongo o miso ma ye na boboto. | |
Song | LinVB | 8:11 | Salomo azalaki na elanga ya vino o Baal-Amon. Atikeli basali elanga, bongo moko moko afuti ye mitako mya palata nkoto yoko mpo ya mbuma bazalaki kobuka wana. | |
Song | LinVB | 8:12 | Nalingi kotikala na elanga ya ngai ya nzete ya vino : Kamata, Salomo, mitako mya yo nkoto yoko, bakengeli bakamata mitako nkama ibale. | |
Song | LinVB | 8:13 | Yo moto ofandi o lopango la yo, baninga ba ngai balingi koyoka mongongo mwa yo, sala ’te ngai mpe nayoka mwango. | |