Chapter 1
Amos | LinVB | 1:1 | Maloba ma Amos, moko wa bakengeli ba mpata o Tekoa. Asakoli maloba ma bokaneli Israel o eleko ya Ozia, mokonzi wa Yuda, mpe o ntango ya mokonzi wa Israel Yeroboam, mwana wa Yoas. Ezalaki mibu mibale liboso lya mokolo mokili moninganaki makasi. | |
Amos | LinVB | 1:2 | Amos alobi boye : Ut’o Sion Yawe agangi makasi, ut’o Yeruzalem atomboli mongongo ; bisobe bya bakengeli ba mpata bikozala na lilaka mpe nsonge ya ngomba Karmel ekokauka. | |
Amos | LinVB | 1:3 | Yawe alobi : Damasko asali mabe mbala na mbala : Nakokokisa maye nakani kosala : mpo batuboli Galaad na epasoli ya bibende ; | |
Amos | LinVB | 1:5 | Nakobuka ekangeli ya ezibeli ya Damasko, nakoboma bato bakofandaka o Bikeat-Aven, nakoboma mokonzi oyo asimbi montongo o Bet-Eden, mpe bato ba Aram bakokende o boombo o Kir. Maloba ma Yawe. | |
Amos | LinVB | 1:6 | Yawe alobi : Gaza asali mabe mbala na mbala : Nakokokisa maye nakani kosala, mpo batindi bato banso o boombo mpe bakabi bango o maboko ma Edom. | |
Amos | LinVB | 1:8 | Nakoboma bato bakofandaka o Asdod na moto oyo asimbi montongo o Askalon. Nakolakisa Ekron ebotu ya ngai, ba-Filisti baye batikali bakokufa. Maloba ma Mokonzi Yawe. | |
Amos | LinVB | 1:9 | Yawe alobi : Tiro asali mabe mbala na mbala : Nakokokisa maye nakani kosala, mpo batekeli ba-Edom baombo ebele, babebisi bondeko bakataki na bato ba bango. | |
Amos | LinVB | 1:11 | Yawe alobi : Edom asali mabe mbala na mbala : Nakokokisa maye nakani kosala, zambi Edom abengani ndeko wa ye na mopanga, ayokeli moto moko mawa lisusu te, akobi koboma bato na nkanda mpe kobomba nkele o motema. | |
Amos | LinVB | 1:13 | Yawe alobi : Amon asali mabe mbala na mbala : Nakokokisa maye nakani kosala : o Galaad apasoli mabumu ma basi bazalaki na zemi mpo akoma na mabelé ma sika. | |
Amos | LinVB | 1:14 | Nakotia móto o lopango la Raba mótumba ndako inene ya bakonzi. Mokolo makeléle na bitumba bikongala, mokolo mbula enene ekonoko na mompepe makasi, | |
Chapter 2
Amos | LinVB | 2:1 | Yawe alobi : Moab asali mabe mbala na mbala : Nakokokisa maye nakani kosala, mpo atumbi minkuwa mya nkondo mokonzi wa Edom. | |
Amos | LinVB | 2:2 | Nakotinda móto o Moab mótumba ndako inene ya Keriot. Moab akokufa o kati ya mobulu mwa bitumba, ntango bato bakolela makasi mpe bakobete mindule. | |
Amos | LinVB | 2:3 | Nakolongola mokonzi o ntei ya bato ba ye, nakoboma bankumu banso elongo na ye. Maloba ma Yawe. | |
Amos | LinVB | 2:4 | Yawe alobi : Yuda asali mabe mbala na mbala : Nakokokisa maye nakani kosala, mpo baboyi kotosa mibeko mya Yawe, batosi mateya ma ye te. Bikeko bya banzambe ba lokuta bibungisi bango mayele, biye bankoko ba bango balandaki. | |
Amos | LinVB | 2:6 | Yawe alobi : Israel asali mabe mbala na mbala : nakokokisa maye nakani kosala, mpo bateki moto wa bosembo mpo bazwa mosolo, bateki mobola mpo basomba sapato, | |
Amos | LinVB | 2:7 | bakonyataka bato bake lokola mabelé, bakobebisaka makambo ma babola ; tata na mwana bakomi kolanda mwasi se moko, bakosantolaka bongo nkombo ya ngai esantu. | |
Amos | LinVB | 2:8 | Bakolalaka na butu penepene na altare inso o bilamba bakamataki bo ndanga. Bakomeleke vino o ndako ya nzambe wa bango, eye bafutisaki bato na mayele mabe. | |
Amos | LinVB | 2:9 | O miso ma bango nabomaki bato ba Amor, bato balai lokola sédere, na bokasi lokola nzete ya wenge ! Epai ya likolo nalongolaki mbuma inso, epai ya nse nakataki minsisa minso. | |
Amos | LinVB | 2:10 | Nabimisaki bino o Ezipeti mpe nakambaki bino o eliki mibu ntuku inei mpo ’te bozwa mabelé ma ba-Amor. | |
Amos | LinVB | 2:11 | O ntei ya bino nabimisaki baprofeta mpe o ntei ya bilenge nabimisaki babonzami ! Bato ba Israel, ezali bongo te ? Maloba ma Yawe. | |
Amos | LinVB | 2:13 | Yango wana ngai nakonyata bino sikawa, lokola likalo lya bilanga likonyataka mabelé. | |
Amos | LinVB | 2:14 | Ata moto wa mbangu akokima te, elombe akokoka kolakisa bokasi bwa ye te, moto wa mpiko enene akokima liwa te. | |
Amos | LinVB | 2:15 | Moto wa litimbo akolonga te, moto wa mbangu akokima te, ata motambwisi farasa akomibikisa te ; | |
Chapter 3
Amos | LinVB | 3:1 | Bana ba Israel, boyoka maloba ma Yawe oyo akaneli bino mpe libota mobimba nabimisaki o Ezipeti : | |
Amos | LinVB | 3:2 | O ntei ya mabota manso ma mokili nayebaki bobele bino, yango wana nakotumbola bino mpo ya mabe manso bosalaki. | |
Amos | LinVB | 3:4 | Nkosi ekolelaka nde o zamba soko ebomi naino nyama te ? Mwana wa nkosi ekolelaka nde o mobenga soko ezwi eloko ya kolia te ? | |
Amos | LinVB | 3:5 | Ndeke ekokita mpe ekokangema o motambo soko bakosi yango na eloko ya kolia te ? Monyama mokotombwama soko nyama yoko ekoti naino te ? | |
Amos | LinVB | 3:6 | Bato banso bakoyokaka nsomo te soko babeti mondule o engumba ? Malozi makokwelaka nde engumba liboso ’te Yawe atinda mango ? | |
Amos | LinVB | 3:8 | Nani akobanga te soko nkosi eleli ? Mokonzi Yawe ayebisi likambo, nani akosakola te ? | |
Amos | LinVB | 3:9 | Sakola o ndako ya bakonzi ba Asur mpe ba Ezipeti : Loba : Banso bosangana o ngomba ya Samaria, botala mobulu mpe minyoko mizali kuna ! | |
Amos | LinVB | 3:10 | Bayebi makambo ma bosembo te, batondisi ndako inene ya bango na biloko babotoli na bitumba mpe na boyibi. Maloba ma Yawe. | |
Amos | LinVB | 3:11 | Yango wana Yawe Nzambe alobi : Monguna akoya kozinga ekolo mobimba, akosilisa bokasi mpe lokumu la yo, akoyiba biloko binso bya ndako ya yo. | |
Amos | LinVB | 3:12 | Yawe alobi boye : Lokola mokengeli akomeka kobikisa o monoko mwa nkosi makolo mabale, ata litoi, Nzambe akobikisa bato ba Israel, baye bafandi o Samaria, baye bafandi o nsuka ya mbeto to o kiti enene ya motuya ya Damasko. | |
Amos | LinVB | 3:13 | Yoka mpe loba maloba ma bokaneli Yakob, mazali maloba ma Yawe Mokonzi wa bokasi bonso : | |
Amos | LinVB | 3:14 | Mokolo nakotumbola Israel mpo ya masumu ma ye, nakoya kobuka bitumbelo binso bya Betel, nakobakola maseke o matumu ma etumbelo, makokweya o nse. | |
Chapter 4
Amos | LinVB | 4:1 | Boyoka liloba liye, bino ngombe basi ya Basan, bino baye bokoliaka biloko o ngomba ya Samaria, bokonyokoloko babola mpe bokonyataka bato bakeleli, bokolobaka na babali ba bino : « Pesa biso masanga tomele ! » | |
Amos | LinVB | 4:2 | Yawe alayi na nkombo esantu ya ye, alobi : Mikolo mikoya bakokanga bino na bibende mpe na nkanya, tee moto wa nsuka ; | |
Amos | LinVB | 4:3 | bokoluka kobima o bisika lopango ebukani, moto na moto nzela ya ye ; bakokimisa bino kin’o ngomba Ermon. Maloba ma Yawe. | |
Amos | LinVB | 4:4 | Bokende o Betel mpe bosala masumu ! Bokende o Gilgal mpe bokoba kosala mabe ! Na ntongo bopesa mabonza ma bino, nsima ya mikolo misato bopesa eteni ya zomi ya biloko ; | |
Amos | LinVB | 4:5 | bobonza mampa malambami na nkisi te bo libonza lya bokumisi ; bomikumisa na mabonza bobonzi na motema mwa bino moko ! Mpo yango nde ba-Israel bolingi ! Maloba ma Mokonzi Yawe. | |
Amos | LinVB | 4:6 | Napimaki bino bilei o bingumba binso, napimaki bino mampa o ndako ya bino, ata bongo bozongeli ngai te ! Maloba ma Yawe. | |
Amos | LinVB | 4:7 | Napimaki bino mpe mbula sanza isato liboso lya eleko ya bobuki mbuma, nanokisaki yango o engumba yoko, o engumba esusu te. Epai yoko bilanga bizwaki mai, epai esusu mbula enoki te, bilanga bikauki. | |
Amos | LinVB | 4:8 | O bingumba bisusu bato balembi na mposa ya mai, bakei koluka mango o engumba ya penepene, kasi mposa ya mai esilaki te, ata bongo bozongeli ngai te ! | |
Amos | LinVB | 4:9 | Natindelaki milona mya bino bokono, napimaki ndunda ya bino na nzete ya vino mai, mapalela masilisaki nzete ya figi mpe ya oliva, ata bongo bozongeli ngai te ! Maloba ma Yawe. | |
Amos | LinVB | 4:10 | Natindelaki bino bokono bobe lokola o Ezipeti, nabomaki bilenge ba bino na mopanga, mpe nabotoloki bino farasa ya etumba, nayokisaki bino nsolo ebe ya bato bawei o nganda, ata bongo bozongeli ngai te ! Maloba ma Yawe. | |
Amos | LinVB | 4:11 | Nabulinginyi bino lokola Sodoma na Gomora, bokomaki lokola nkoni babikisi o móto, ata bongo bozongeli ngai te ! | |
Amos | LinVB | 4:12 | Yango wana, tala ndenge nini nakosala yo, Israel, mpe awa nalingi kosala yo bongo, omilengele mpo ’te okutana na Nzambe wa yo. | |
Chapter 5
Amos | LinVB | 5:3 | Yawe Nzambe alobi boye : Engumba ezalaki na babuni nkoto yoko ekotikala sikawa se na monkama, eye ezalaki na babuni monkama, ekotikala sikawa na zomi mpamba. | |
Amos | LinVB | 5:5 | Kasi boluka kokende o Betel te, boyingela o Gilgal te, boleka mpe o Berseba te, zambi bato ba Gilgal bakokende o boombo, mpe Betel ekokoma mopotu. | |
Amos | LinVB | 5:6 | Boluka Yawe mpe bokozala malamu, soki te Yawe akongala lokola móto o libota lya Yozefu, mokotumba Betel mobimba, moto moko te akokoka kozimisa mwango ! | |
Amos | LinVB | 5:8 | Oyo akeli Bangondo Nsambo na Motó mwa Ekange, oyo akobimisaka moi nsima ya butu, oyo akosangisaka mai ma mbu mpe akotangisaka mango o mokili bipai binso, nkombo ya ye, Yawe ! | |
Amos | LinVB | 5:11 | Yango wana, awa bokonyataka moto motau mpe bokokamataka mbuma ya mampa ya ye bo mpako ya lokuta, bokofanda o ndako inene ya bino te, iye botongaki na mabanga kitoko ; bilanga biye bino moko bolonaki, bokomele vino ya byango lisusu te. | |
Amos | LinVB | 5:12 | Mpamba te, nayebi mabe ma bino manso, masumu ma bino mazali na nsuka te : bokonyokoloko basemba, bokofutisaka bango mpako, mpe bokokitisaka babola o esambi. | |
Amos | LinVB | 5:14 | Boluka kosala malamu, bosala mabe te mpo ’te boumela mingi na bomoi, bongo Yawe Nzambe wa bokasi bonso azala na bino, lokola bokolobaka. | |
Amos | LinVB | 5:15 | Boboya mabe, bolinga se kosala malamu, o esambi bolanda makambo na bosembo, mbele Yawe Nzambe wa bokasi bonso akoyokela bato batikali o ekolo ya Yozefu mawa. | |
Amos | LinVB | 5:16 | Yango wana Nzambe wa bokasi bonso, Mokonzi, alobi boye : bipai binso bato bakolela, o balabala inso bato bakoloba : « Mawa e ! Mawa e ! » Bakobenga mosali wa bilanga o lilaka, mpe baye bakolelaka na nzembo balela wana ; | |
Amos | LinVB | 5:17 | bakolela o bilanga binso bya nzete ya vino, zambi nakoleka o kati ya bino, maloba ma Yawe. | |
Amos | LinVB | 5:18 | Mawa na baye bakolikya na mokolo mwa Yawe ! Mokolo mwa Yawe mokoyela bino nini ? Ekozala mokolo mwa molili, moi mokozanga. | |
Amos | LinVB | 5:19 | Bokozala lokola moto akimi nkosi kasi akutani na mpakasa ! Ayingeli o ndako, asimbi efelo mpe nyoka eswi ye ! | |
Amos | LinVB | 5:20 | Mokolo mwa Yawe mokozala mokolo mwa molili, moi mokozanga, mokolo mwa molili mpenza, mwinda soki te ! | |
Amos | LinVB | 5:22 | Soko botumbeli ngai mabonza, ata libonza lyoko likosepelisa ngai te, nyama ya mafuta bobonzeli ngai, naboyi kotala yango. | |
Amos | LinVB | 5:24 | Bosolo bwa bino bomonono lokola mai ma liziba, bosembo bwa bino bozala lokola mai o moluka makokaukaka te. | |
Amos | LinVB | 5:25 | Bato ba Israel, mibu ntuku inei bozalaki o eliki, bobonzelaki ngai nde mabonza mpe miboma ? | |
Amos | LinVB | 5:26 | Nzokande bokomeme Sakut, mokonzi wa bino, bokokumisaka monzoto Kevan bo elembo ya nzambe wa bino, bikeko biye bomisaleli. | |
Chapter 6
Amos | LinVB | 6:1 | Mawa na baye bakofandaka nye o ngomba Sion, mawa na baye bakotiaka mitema na ngomba ya Samaria, mawa na bankumu ba ekolo eleki bikolo binso ; bato ba Israel bakolukaka mayele epai ya bango. | |
Amos | LinVB | 6:2 | Bokende o Kalne mpe botala, bopusana kin’o engumba enene Amat, na nsima bokita o Gat epai ya ba-Filisti. Bikolo bina bileki nde bino na bolamu ? Mokili mwa bango moleki nde mokili mwa bino na bonene ? | |
Amos | LinVB | 6:3 | Bolingi kozongisa mokolo mwa mpasi nsima, nzokande bobengi mikolo banyokoli bakoyangela bino ! | |
Amos | LinVB | 6:4 | Bakolalaka o mbeto bakembisi na mpembe ya nzoku mpe bakopemaka o kiti ya lokumu, bakoliaka bana ba mpata ya etonga ya bango, to bana ba ngombe bazwi o lopango. | |
Amos | LinVB | 6:5 | Bakoyembaka nzembo ya bango moko na nzenze, bakobimisaka biyembeli bya sika bya miziki, lokola Davidi asalaki. | |
Amos | LinVB | 6:6 | Bakomeleke vino o nkeni inene mpe bakomipakolaka mafuta ma motuya monene. Kasi awa ekolo ya Yozefu ezali kobeba nye, bazali koyoka motema mpasi te. | |
Amos | LinVB | 6:7 | Yango wana bakozala bato ba liboso o molongo mwa baye bakokende o boombo. Lisanga lya bato ba goigoi likopanzana ! | |
Amos | LinVB | 6:8 | Mokonzi Yawe alayi na nkombo ya ye moko ; Elobi bongo Yawe Nzambe wa bokasi bonso : Nayoki lokumu la Yakob mpi, nayini ndako inene ya ye, nakokaba engumba na baye banso bafandi wana. | |
Amos | LinVB | 6:10 | Moko wa baye bakotikala akobimisa minkuwa o ndako, mpe soko atuni moto oyo azali o kati ya ndako : « Moto mosusu atikali wana epai ya yo ? » Oyo akozongisa : « Te, banso basili ! » Mpe akobakisa : « Zala nye ! Awa okoki kotanga nkombo ya Yawe te ! » | |
Amos | LinVB | 6:12 | Farasa imeseni nde kotambola o nzela ya mabanga, ngombe ya mosala ikosalaka nde o kati ya mbu ? Boniboni bino bokomisi mibeko lokola ngenge mpe misala mya bosembo lokola kongobololo ? | |
Amos | LinVB | 6:13 | Bino bato bokosepelaka mpo ya Lo-Debar ntina te, bolobi : « Tobotoli Karnayim na makasi ma biso te ? » | |
Chapter 7
Amos | LinVB | 7:1 | Boyoka makambo Mokonzi Yawe alakisi ngai : Namoni mapalela ebele o esobe ya matiti ma sika, nsima ya bobuki mbuma ya mokonzi. | |
Amos | LinVB | 7:2 | Awa mapalela masilisi matiti bisika binso, nalobi : « Yawe Nzambe wa ngai, nabondeli yo, limbisa ! Ndenge nini bato ba Yakob bakobika ? Batikali mingi te ! » | |
Amos | LinVB | 7:4 | Boyoka makambo Mokonzi Yawe alakisi ngai : Mokonzi Yawe apelisaki móto mwa etumbu, móto mosilisi Mai manene mpe mobandi kozikisa mokili. | |
Amos | LinVB | 7:5 | Nalobi : « Mokonzi Yawe, nabondeli yo, tika ! Ndenge nini bato ba Yakob bakobika ? Batikali mingi te ! » | |
Amos | LinVB | 7:7 | Boyoka makambo Yawe Nzambe alakisi ngai : Namoni Yawe atelemi o efelo, asimbi nsinga ya botongi o maboko. | |
Amos | LinVB | 7:8 | Yawe atuni ngai : « Amos, omoni nini ? » Nalobi : « Namoni nsinga ya botongi. » Mpe Mokonzi Yawe alobi na ngai : « Nayei na nsinga ya botongi komeka bato ba ekolo ya ngai Israel. Banda lelo nakolimbisa bango lisusu te. | |
Amos | LinVB | 7:9 | Nakobuka bitumbelo binso bya Izaka. Nakobebisa ndako inso ya losambo o Israel, mopanga o maboko, nakobebisa libota lya Yeroboam. » | |
Amos | LinVB | 7:10 | Amazia, nganga Nzambe o Betel, atindeli Yeroboam, mokonzi wa Israel, maloba maye : « O Israelmei Amos azali koluka kobebisa bokonzi bwa yo. Moto moko akoki kondima maloba ma ye lisusu te. | |
Amos | LinVB | 7:11 | Mpamba te, Amos alobi boye : ‘Yeroboam akowa na mopanga, bato ba Israel bakokende o boombo mosika na mokili mwa bango’. » | |
Amos | LinVB | 7:12 | Amazia alobi na Amos : « Momoni makambo, longwa, kima o mokili mwa Yuda, lia mampa ma yo kuna mpe zala profeta kuna. | |
Amos | LinVB | 7:13 | Kasi tika kosakola awa o Betel, mpo ndako esantu ezali ya mokonzi, ezali tempelo ya ekolo. » | |
Amos | LinVB | 7:14 | Amos azongiseli ye : « Nazalaki profeta te, nazalaki mpe mwana wa profeta te, kasi nazalaki mokengeli wa bibwele mpe mosali wa elanga wa figi. | |
Amos | LinVB | 7:15 | Yawe akamati ngai ntango nazalaki kokengele mpata, alobi na ngai : ‘Kende kosakola makambo na bato ba Israel.’ | |
Amos | LinVB | 7:16 | Bongo sikawa, yoka liloba lya Yawe. Yo oyebisi ngai : “Okoloba maloba ma bokaneli Israel lisusu te, okotika kofinga libota lya Izaka.” | |
Chapter 8
Amos | LinVB | 8:2 | Yawe atuni ngai : « Amos, omoni nini ? » Nazongisi : « Namoni ekoló etondi na mbuma iteli. » Yawe alobi na ngai : « Nsuka ya ekolo ya ngai Israel ekomi penepene, banda lelo nakolimbisa bango lisusu te. | |
Amos | LinVB | 8:3 | Mokolo mona o ndako inene nzembo ya boleli ekoyembama, bibembe bikozala mingi, bikobwakema bipai binso : manso makokoma nye ! » Maloba ma Mokonzi Yawe. | |
Amos | LinVB | 8:5 | Bokolobaka : « Eyenga ya Sanza ya sika ekozala mokolo nini mpo tokoka koteke mbuma ya mampa ? Mokolo mwa Sabato mokosila ntango nini mpo tokoka koteke masangu ma biso ? Tokokutola biloko mpe tokobutisa motuya, tokokamata bimekeli bya lokuta. | |
Amos | LinVB | 8:6 | Tokosomba bato batau na mosolo mpe mobola na motuya mwa sapato ; tokoteke ata mintika mya mbuma ya mampa. » | |
Amos | LinVB | 8:7 | Yawe alayi na nkombo ya ye, lokumu la Yakob : « Nakobosana mabe manso ma bango mokolo moko te. » | |
Amos | LinVB | 8:8 | Mpo ya mabe mana mokili mokoningana te ? Bato banso ba mokili bakozala na lilaka te ? Bisika binso mai makotonda lokola o ebale Nil, makotonda mpe makokita lokola ebale ya Ezipeti. | |
Amos | LinVB | 8:9 | Mokonzi Yawe alobi : Mokolo mona nakosala ’te mwese molimwa na midi, mpe nakokomisa moi molili o nse mobimba. | |
Amos | LinVB | 8:10 | Nakokomisa biyenga bya bino mikolo mya mawa. Nzembo ya bino ikokoma nzembo ya lilaka. Nakolatisa bino banso ngoto o loketo, mpe nakokokola mitó mya bino. Bokolata mpili lokola moto akufeli mwana se moko wa ye. Nsuka ya ye ekozala mokolo mwa mawa manene solo. | |
Amos | LinVB | 8:11 | Yawe alobi boye : Mokolo moko nakotinda nzala enene o ekolo eye ; nzala ya biloko te, mposa ya mai mpe te, kasi mposa ya koyoka liloba lya Yawe. | |
Amos | LinVB | 8:12 | Bakotelengana ut’o mbu yoko kin’o mbu esusu, bakoyengayenga ut’o Nordi kin’o Esti mpo ’te baluka liloba lya Yawe, kasi bakoyoka lyango te. | |
Amos | LinVB | 8:13 | Mokolo mona bonzenga bwa bilenge basi bokosila, bilenge babali bakosenzwa na mposa ya mai. | |
Chapter 9
Amos | LinVB | 9:1 | Namoni Yawe atelemi o altare, alobi na ngai : « Ningisa motondo mwa ndako, makonzi ma ndako maningana ; buka mango o mitó mya bango banso, ngai nakoboma na mopanga baye bakotikala ; moto moko te akokoka kokima, o kati ya bango moto moko akobika te. | |
Amos | LinVB | 9:2 | Soko bameki kokoto na makasi o mboka ya bawa, nakokanga bango na loboko, ata babuti o likolo, nakokitisa bango o nse ; | |
Amos | LinVB | 9:3 | ata bakei kobombama o nsonge ya Karmel, nakokende koluka mpe kokamata bango ; ata bakiti o mbu bozindo mpenza mpo ya kokima miso ma ngai, nakotinda nyoka ya mai eswa bango kuna ; | |
Amos | LinVB | 9:4 | Ata bakangemi na banguna, nakotinda bato baboma bango na mopanga, nakobwaka miso epai ya bango mpo ’te bazwa bolamu te, bazwa se bobe. » | |
Amos | LinVB | 9:5 | Awa Yawe Nzambe wa bokasi bonso asimbi mokili, mokili mokoningana mpe bato bakolela na mawa ; mokotombwama lokola mai ma Nil, mokokita lokola mai ma ebale ya Ezipeti. | |
Amos | LinVB | 9:6 | Ye amitongeli ndako enene o likolo mpe apiki etando ya likolo awa o nse, akosangisaka mai ma mbula mpe akotangisaka mango o mokili mobimba ; nkombo ya ye Yawe ! | |
Amos | LinVB | 9:7 | Yawe alobi boye : Bato ba Israel, namoni ’te bokokani na bato ba Kus ! Nabimisaki bato ba Israel o Ezipeti te, ba-Filisti o Kaftor, mpe ba-Aram o Kir ? | |
Amos | LinVB | 9:8 | Miso ma Mokonzi Yawe mazali se epai ya ekolo eye ya basumuki ; nakosilisa bango o nse mobimba, nzokande nakoboma bato banso ba Yakob te. Maloba ma Yawe. | |
Amos | LinVB | 9:9 | Ya solo, nakotinda etinda mpe nakoningisa bato ba ekolo ya Israel o bikolo binso, lokola loso bakopupolaka na lungu, lokopanzana. | |
Amos | LinVB | 9:10 | Basumuki ba ekolo ya ngai banso bakokufa na mopanga, baye bakolobaka : « Akotindela biso mpasi te, mpasi ekokwela biso te ! » | |
Amos | LinVB | 9:11 | Mokolo mona nakobongisa ndako ya Davidi eye ebebi, nakokanga malusu batuboli o lopango la ngomba, nakobongisa bifelo biye bibukani, nakotonga yango lokola ezalaka liboso ; | |
Amos | LinVB | 9:12 | bongo bato ba ngai bazwa bokonzi bwa Edom mpe bwa bikolo bisusu bizali na nkombo ya ngai. Maloba ma Yawe, akosala se bongo. | |
Amos | LinVB | 9:13 | Yawe alobi : O mikolo mikoya bato bakokataka bilanga bakobuka mbuma noki, baye bakolonaka nzete ya vino bakokamola vino noki. O ngomba inene nzete ikobota vino ya sika ebele, ngomba ike ikotonda na bilanga bya vino. | |
Amos | LinVB | 9:14 | Nakobongisa ekolo ya ngai Israel, bakotonga lisusu mboka iye ibebi mpe bakofanda wana, bakolona lisusu nzete ya vino mpe bakomele vino, bakokata lisusu bilanga mpe bakolia mbuma ya byango. | |