Chapter 1
| Lame | LinVB | 1:1 | Boniboni ekomi na mawa boye engumba eye ezalaki na bato baike ? Ekomi lokola mwasi bozenge engumba eye ya lokumu o ntei ya bikolo bisusu. Mboka mokonzi o kati ya bikolo ekomi kosala misala mya boombo. | |
| Lame | LinVB | 1:2 | Ekomi kolela butu moi mpe kopolisa matama na mpizoli. O ntei ya baninga ba ye ata moko te ayei kobondo ye. Baye bazalaki kolinga ye, basuli ye, banso bakomi banguna. | |
| Lame | LinVB | 1:3 | Bato ba Yuda bakei o boombo, banyokwami, batindami kosala misala mikasi. Bakomi kofanda o bikolo bisusu, bazwaki ntango ya kopema te. Banyokoli balandi mpe bakangi bango, baluki kosukisa bango. | |
| Lame | LinVB | 1:4 | Nzela ya Sion ikomi na mawa, bato bakoyaka kosepela eyenga lisusu te. Bizibeli binso bya mboka bibebi mpe bibukani, banganga Nzambe bakokimelaka, bangondo basepeli lisusu te. Engumba etondi na mawa ! | |
| Lame | LinVB | 1:5 | Banyokoli ba bango baleki bango na bokasi, banguna ba bango basepeli, zambi Yawe ayokisi bango mpasi mpo ya masumu ma bango maike ; bana bake bakangemi o boombo, bakwei o maboko ma monyokoli. | |
| Lame | LinVB | 1:6 | Lokumu la Sion losili nye. Bankumu ba ye bazalaki lokola mbuli izangi matiti ma kolia. Mpiko soki te, bazalaki kokende liboso lya baye balingi koboma bango. | |
| Lame | LinVB | 1:7 | Bato ba Yeruzalem bakundoli mikolo bazalaki koyoka mpasi na mawa, ntango bakweyaki o maboko ma banguna mpe moto moko ayaki kosalisa bango te. Banguna bazalaki komono bango, baseki bango mpo babebaki. | |
| Lame | LinVB | 1:8 | Yeruzalem asali lisumu linene, yango wana akomi na mbindo. Bato bazalaki kokumisa ye bakomi kokinola ye, mpo bamoni bolumbu bwa ye sikawa. Ye moko azali kokimela, amibongoli mpo abomba elongi. | |
| Lame | LinVB | 1:9 | Bosoto bokangemi o nsonge ya elamba ya ye. Akanisaki te ’te akosuka bongo : akwei mpenza ! Moto moko te ayei kobondo ye. « E Yawe, tala mpasi ya ngai : monguna alongi ngai. » | |
| Lame | LinVB | 1:10 | Monguna abotoli ye nkita inso, Amoni ndenge bapagano bayingeli o ndako ya ye esantu, baye opekisaki kokoto o likita lya yo. | |
| Lame | LinVB | 1:11 | Bato ba ye banso bazali kokimela, bazali koluka biloko balia ; bazali kopesa biloko bya nkita mpo bazwa bilei mpe balendisa nzoto. « E Yawe, tala boniboni bakinoli ngai. » | |
| Lame | LinVB | 1:12 | Bino banso boleki o nzela, botala malamu mpo ’te bomono soko moto moko ayoki mpasi lokola mpasi eye ezali kotungisa ngai, mpasi mokonzi Yawe atindeli ngai o mokolo mwa nkanda ya ye enene. | |
| Lame | LinVB | 1:13 | Ut’o likolo atindeli ngai móto, mokoteli ngai kin’o mikuwa. Atandi monyama o nzela ya ngai, atindisi ngai mpe nakwei, atindi ngai moto nalembi, nakomi kobele mikolo minso. | |
| Lame | LinVB | 1:14 | Mokumba mwa masumu molembisi ngai : akangi mango liboke, mpe atii mango o mapeke ma ngai, alembisi bokasi bwa ngai. Mokonzi akabi ngai o maboko ma bato baleki ngai na bokasi ! | |
| Lame | LinVB | 1:15 | Mokonzi abengani bato banso ba mpiko, baye bazalaki na ngai. Asangisi likita lya bato mpo ’te basukisa bilenge ba ngai. Mokonzi akamoli engumba enzenga ya Yuda o ekamelo ya vino. | |
| Lame | LinVB | 1:16 | Yango wana nazali kolela, miso ma ngai mapoli na mpizoli. Azali mosika na ngai oyo akoki kobondo ngai, oyo akoki kozongisela ngai bokasi. Bana babali ba ngai babulungani, zambi monguna aleki biso na bokasi. | |
| Lame | LinVB | 1:17 | Bato ba Sion batomboli maboko, kasi ata moto moko abondi bango te. Yawe alukaki banguna epai na epai banyokolo bato ba Yakob. O kati ya bango Yeruzalem akomi eloko mbindo. | |
| Lame | LinVB | 1:18 | « Kasi Yawe azali na bosembo, ngai moto naboyaki kotosa mitindo mya ye. Bino bato ba bikolo binso, boyoka ngai, botala ndenge nazali koyoka mpasi. Bilenge banso ba ngai, babali na basi, bakambami o boombo. | |
| Lame | LinVB | 1:19 | Nabengi baye bazalaki kolinga ngai, kasi basuli ngai ; banganga Nzambe na bankumu basili kokufa o engumba, ntango balukaki biloko bya bolei mpo ’te batikala na bomoi. | |
| Lame | LinVB | 1:20 | E Yawe, tala nsomo nazali koyoka, libumu lizali koswa, motema mwa ngai mobebi, mpo natombokeli yo mpenza ! O libanda lya engumba bana bazali kokufa na mopanga, o kati liwa lizali konginda. | |
| Lame | LinVB | 1:21 | Boyoka boleli bwa ngai ! Kasi moto moko te ayei kobondo ngai. Eyoki banguna nsango ya mpasi ya ngai, basepeli na maye osali ngai. Okokisa elaka olakaka, makambo maye makwela bango mpe ! | |
Chapter 2
| Lame | LinVB | 2:1 | Na nkanda ya ye Yawe atii engumba Sion o molili ! Ut’o likolo kin’o nse abwaki nkembo ya Israel ! Akanisi ebonga ya makolo ma ye lisusu te, o mokolo mwa nkanda ya ye ! | |
| Lame | LinVB | 2:2 | Mokonzi abebisi ndako inso ya Yakob, mawa te. Na nkanda enene, abomi bibombamelo bya Yuda ; abwaki mokonzi na bankumu ba ye mpe atombeli bango bobe. | |
| Lame | LinVB | 2:3 | Na nkanda enene mpenza asilisi nguya inso ya bato ba Israel. Abendi loboko la ye la mobali o boso bwa monguna. Apelisi móto monene o ekolo ya Yakob, moye mokosilisa binso. | |
| Lame | LinVB | 2:4 | Lokola monguna abendi litimbo na loboko la mobali ; lokola monguna abomi baye banso bazalaki kosepelisa ye. Alakisi bato ba Sion nkanda enene, lokola móto mozikisi biema bya bango. | |
| Lame | LinVB | 2:5 | Mokonzi asali lokola monguna, asilisi ekolo ya Israel ; abebisi ndako inene ya bakonzi mpe abomi bibombamelo bya ye ; bato banso ba Yuda bakomi se kokimelakimela. | |
| Lame | LinVB | 2:6 | Abebisi lopango la ye, abomi esika ya bokutani na bato ba ye. Yawe asali ’te bato ba Sion babosana mikolo mya Sabato mpe mya biyenga ; na nkanda enene abengani bakonzi elongo na banganga Nzambe. | |
| Lame | LinVB | 2:7 | Mokonzi ayoki altare ya ye mpi, aboyi esika ya ye esantu ; akabi o maboko ma monguna mapango manso mazingaki ndako ya bakonzi ; makeléle mayokani o Tempelo ya Yawe lokola o eyenga enene ! | |
| Lame | LinVB | 2:8 | Yawe akanaki koboma bifelo bya engumba enzenga Sion. Atandi nsinga ya bomeki yango, azongisi loboko nsima te, abebisi binso nye. Na bifelo na manongi bitondi na mawa, binso bibebi nye. | |
| Lame | LinVB | 2:9 | Bizibeli bya Sion bikwei o nse, Mokonzi abuki bikangeli bya yango ; mokonzi na bankumu ba ye bakomi epai ya bapagano ; bayebi Mobeko lisusu te ! Yawe akolakisaka baprofeta mamoni lisusu te. | |
| Lame | LinVB | 2:10 | Bakolo ba Sion bafandi o nse, balobi eloko te ; bapakoli mputulu o mitó, mpe balati ngoto. Bangondo ba Yeruzalem bakitisi mitó o nse. | |
| Lame | LinVB | 2:11 | Miso ma ngai mateli na boleli, libumu lizali koswa, bokasi bwa nzoto bosili, mpo bato ba ekolo ya ngai basuki ; bana bake, ata baye bazali konunga mabéle, bakomi kokufa na nzala o balabala. | |
| Lame | LinVB | 2:12 | Bana batuni bamama ba bango : « Wapi biloko tolia, wapi vino tomele ? » Babundi na liwa o balabala lokola bato bazoki o etumba, mpe bakati mitema o bibelo bya bamama ba bango. | |
| Lame | LinVB | 2:13 | Naloba nini, oulani na nani, engumba Yeruzalem ? Naloba nini mpo ’te nabondo yo, ngondo, elenge mwasi wa Sion ? Mawa matondi o motema mwa yo lokola mai o mbu. Nani akobikisa yo ? | |
| Lame | LinVB | 2:14 | Mamoni baprofeta bayebisaki yo mazali ma lokuta mpe ma bokosi ; bazalaki koyebisa yo mabe ma yo te, mpo ’te okende o boombo te. Bisakola bya bango bizangaki ntina, bazalaki kokosa yo. | |
| Lame | LinVB | 2:15 | Baye banso baleki o nzela bamoni mpasi ya yo mpe basepeli ; bawuloli yo mpe baningisi mitó mpo ya yo, engumba Yeruzalem : « Eye nde engumba epusi bonzenga ? Ntina ya esengo ya mokili mobimba ? » | |
| Lame | LinVB | 2:16 | Banguna ba yo banso bafungoli monoko polele, baseki yo mpo ya mpasi ya yo ; bawuloli yo mpe balei mino, balobi : « Tosukisi ye ! Mokolo moye totiaki mitema mokoki. Tokomi o mokolo mona, tomoni mwango na miso ! » | |
| Lame | LinVB | 2:17 | Yawe akokisi maye akanaki kosala mpe maye alobaki, maye abandaki kosakola ut’o kala mpenza : abomi engumba eye, mawa te. Banguna basepeli na mpasi ya yo, ntango Yawe asali ’te balonga yo. | |
| Lame | LinVB | 2:18 | Moto wa Sion, obelela Mokonzi, ye mobateli wa yo ; olela butu moi, mpizoli ya yo itiyola lokola mai makasi ; otika kolela mokolo moko te, mai makauka o miso ma yo te ! | |
| Lame | LinVB | 2:19 | Teleme na butu mpe belela mbala inso bakengeli bakobandaka mosala ; bimisa manso o motema mwa yo, matiyola lokola mai o boso bwa Yawe ; tombola maboko epai ya ye mpo ’te abikisa bomoi bwa bana bake ba yo. | |
| Lame | LinVB | 2:20 | « E Yawe, fungola miso mpe tala : Osili osali bongo na nani ? Boniboni basi bakomi kolia bana ba bango, bana bango moko baboti ? Boniboni babomi banganga Nzambe na baprofeta o Tempelo ya Yawe ? | |
| Lame | LinVB | 2:21 | Bilenge na babange balali o mabelé o balabala. Bilenge babali na bilenge basi bakufi na mopanga : o mokolo mwa nkanda ya yo okatisi bango nkingo, mawa te. | |
Chapter 3
| Lame | LinVB | 3:19 | Nakundoli mpasi mpe nsomo nasili koyoka ; nameli yango lokola masanga bololo mpe mbondo. | |
| Lame | LinVB | 3:37 | Nani akoki kotinda se na liloba ’te biloko bizala ? Moto akokanaka kosala bongo, ezali Yawe te ? | |
Chapter 4
| Lame | LinVB | 4:1 | Ndenge nini wolo ebebi, wolo eye eleki peto ? Mabanga masantu mapanzani o matumu ya balabala inso. | |
| Lame | LinVB | 4:2 | Bana ba Sion bakoki na motuya monene, lokola wolo bapetoli ; bongo bakomi kotala bango se lokola mbeki isalemi na maboko ma moyemi ! | |
| Lame | LinVB | 4:3 | Ata minsole mikopesaka bana mabéle mpe mikonungisaka bango. Kasi bato ba ekolo ya ngai motema mabe lokola maligbanga ma eliki. | |
| Lame | LinVB | 4:4 | Bilezi bayoki mposa ya mai, lolemu la bango lokangami na edada ; bana bake basengi biloko bya bolei, kasi moto moko apesi bango te. | |
| Lame | LinVB | 4:5 | Baye bazalaki kolia biloko elengi bakomi kokufa o balabala. Baye bazalaki kolata bilamba bya longondo bakomi kolata biteni balokotoki o bipoli. | |
| Lame | LinVB | 4:6 | Masumu ma bato ba ekolo ya ngai maleki masumu ma bato ba Sodoma, eye ekufaki na mbala yoko, ata bato babomaki yango te. | |
| Lame | LinVB | 4:7 | Bilenge babali ba bango babonzami na Nzambe bazalaki peto leka mbula ya mpembe, nzoto etane leka libanga lya ngola, bilongi bya bango bingengeki leka libanga lya safir. | |
| Lame | LinVB | 4:8 | Sikawa bilongi bya bango biindi leka mputulu ya makala, bakoki koyeba bango lisusu te ; lomposo la bango lokangemi na minkuwa, lokauki lokola nkoni. | |
| Lame | LinVB | 4:9 | Baye bakufaki na mopanga bayokaki mpasi te lokola baye bakufaki na nzala, mpo bokasi bosilaki mpe balembeki nye, mpo bazalaki na mbuma ya bilanga te. | |
| Lame | LinVB | 4:10 | Bamama bakozalaka na motema bolingi balambaki mpe baliaki bana ba bango moko, mpo mpasi ya bato ba ngai elekaki. | |
| Lame | LinVB | 4:11 | Yawe alandi nkanda ya ye, atumboli na nkanda enene. Móto mwa nkanda ya ye mopeli o Sion, mozikisi engumba kin’o mabelé. | |
| Lame | LinVB | 4:12 | Bakonzi na bato banso ba nse bandimaki te ’te mokolo moko monyokoli na monguna bakoyingela o Yeruzalem. | |
| Lame | LinVB | 4:13 | Yango esalemi mpo ya masumu ma baprofeta mpe mabe ma banganga Nzambe, baye basopi makila ma bato ba bosembo o engumba. | |
| Lame | LinVB | 4:14 | Bazalaki koyengayenga o balabala lokola bato bakufa miso ; nzoto ya bango ibebaki na makila, bongo ata moto moko akokaki kosimba bango na bilamba. | |
| Lame | LinVB | 4:15 | Bato bazalaki koganga : « Keba na bango ! Osimba bango te, bazali na mbindo ! » Baye bakimaki o bikolo bisusu bakokaki kofanda kuna te. | |
| Lame | LinVB | 4:16 | Yawemei apanzaki bango, apanganaki na bango lisusu te. Bato bazalaki komemya lisusu banganga Nzambe te, bakolo ba mboka mpe te. | |
| Lame | LinVB | 4:17 | Ntango inso tozalaki koluka lisalisi, kasi se mpamba. Lokola bakengeli tozalaki kotia elikya na ekolo eye ekokaki kobikisa biso te. | |
| Lame | LinVB | 4:18 | Bazalaki kokenge nzela ya biso, mpe kopekisa biso kotambola o engumba ya biso. Mikolo mya biso mikokaki, ya solo, tokomaki o nsuka ! | |
| Lame | LinVB | 4:19 | Banyokoli bazalaki kolanda biso mbangu, leka bingondo o likolo. Bazalaki kolanda biso o ngomba mpe kotiela biso mitambo o eliki. | |
| Lame | LinVB | 4:20 | Moponomi wa Yawe, mpema ya zolo ya biso, akangemaki o mabulu ma bango. Tokanisaki ’te : « Pene na ye tokoki kofanda o bikolo bisusu ! » | |
| Lame | LinVB | 4:21 | Bato ba Edom, bosepela naino ! Boyoka naino nsai, bato ba Us ! Kasi mokolo moko bino mpe bokomele nkeni ya malozi, bokolangwa mpe bokolakisa bolumbu bwa bino ! | |
Chapter 5
| Lame | LinVB | 5:2 | Mokili mwa biso mokomi o maboko ma bauta, ndako ya biso o maboko ma bato ba bikolo bisusu. | |
| Lame | LinVB | 5:21 | Yawe, sala ’te tozongela yo, tokozonga ; bongisa bomoi bwa biso, tokoma lokola kala. | |