Chapter 1
| Zech | LinVB | 1:1 | O mobu mwa mibale mwa bokonzi bwa Dario, sanza ya mwambe, Yawe alobi na profeta Zakaria, mwana wa Berekya, nkoko wa Ido, maloba maye : | |
| Zech | LinVB | 1:3 | Loba mpe na bango : Yawe wa bokasi bonso alobi boye : Bozongela ngai, maloba ma Yawe wa bokasi bonso, mpe nakozongela bino, elobi bongo Yawe wa bokasi bonso. | |
| Zech | LinVB | 1:4 | Bozala lokola bankoko ba bino te, baye baprofeta ba kala bapalelaki na maloba maye : Yawe wa bokasi bonso alobi : Botika nzela ebe ya bino, botika misala mibe mya bino. Kasi baboyaki koyoka mpe batosaki ngai te. Maloba ma Yawe. | |
| Zech | LinVB | 1:6 | Nzokande maloba ma mibeko mya ngai, miye napesaki bango na monoko mwa baprofeta, basaleli ba ngai, mikomaki epai ya bankoko ba bino ; o ntango ena babongolaki mitema mpe balobaki : « Yawe wa bokasi bonso asalaki na biso lokola akanaki, engebene na misala mya biso. » | |
| Zech | LinVB | 1:7 | O mobu mwa mibale mwa bokonzi bwa Dario, sanza zomi na yoko, sanza Sebat, o mokolo mwa ntuku ibale na minei mwa sanza, Yawe alobi na profeta Zakaria, mwana wa Berekya, nkoko wa Ido, malobamaye : | |
| Zech | LinVB | 1:8 | Na butu namoni limoni liye : Moto moko abuteli farasa etane, atelemi o kati ya nzete ya mapela o lobwaku ; nsima ya ye namoni farasa isusu itane, iindo mpe mpembe. | |
| Zech | LinVB | 1:9 | Natuni : « Mokonzi wa ngai, bango banani ? » Anzelu oyo azalaki koloba na ngai, azongiseli ngai : « Nakoyebisa yo bango banani. » | |
| Zech | LinVB | 1:10 | Moto oyo atelemi o kati ya mapela ayanoli : « Bazali bato baye Yawe atindi batambola o mokili mobimba. » | |
| Zech | LinVB | 1:11 | Na nsima bango balobi na anzelu wa Yawe, oyo atelemi o kati ya nzete ya mapela : « Touti kotambola o mokili mpe tomoni mokili mobimba mozali kimia mpe na boboto. » | |
| Zech | LinVB | 1:12 | Anzelu wa Yawe atuni lisusu : « Yawe wa bokasi bonso, okozila naino mikolo boni mpo ’te oyokela Yeruzalem na bingumba bya Yuda mawa ? Mibu ntuku nsambo osili oyokeli bango nkanda. » | |
| Zech | LinVB | 1:13 | Yawe apesi anzelu, oyo azalaki kosolola na ngai, eyano elamu, eye ekoki kobondo mitema mya bato. | |
| Zech | LinVB | 1:14 | Anzelu oyo azalaki kosolola na ngai, alobi na ngai : « Oyebisa bango : Yawe wa bokasi bonso alobi boye : Nazali koyokela Yeruzalem mpe Sion zuwa linene, | |
| Zech | LinVB | 1:15 | kasi nazali koyokela bikolo bisusu biye bifandi kimia nkanda enene, zambi na mabe ma bango bakolisi nkanda ya ngai. | |
| Zech | LinVB | 1:16 | Yango wana Yawe alobi boye : Nakozongela Yeruzalem na motema ngolu. Ndako ya ngai ekotongama wana lisusu ; maloba ma Yawe wa bokasi bonso ; bakotanda lisusu mokulu mwa batongi o Yeruzalem. | |
Chapter 2
| Zech | LinVB | 2:2 | Natuni anzelu oyo azalaki koloba na ngai : « Ntina ya maseke mana nini ? » Alobi na ngai : « Maseke mana mapanzaki Yuda, Israel na Yeruzalem. » | |
| Zech | LinVB | 2:4 | Natuni : « Bango bayei kosala nini ? » Azongiseli ngai : « Maseke maye mapanzaki ekolo ya Yuda, bongo moto moko amekaki kotombola motó lisusu te ; na nsima batuli baye bayei kobangisa bango mpe kobuka maseke ma bikolo biye bilakisaki bokasi bwa bango o ekolo ya Yuda mpo ’te bapanza yango. » | |
| Zech | LinVB | 2:6 | Natuni ye : « Okei wapi ? » Azongisi : « Nakei o Yeruzalem komeka bonene mpe bolai bwa engumba. » | |
| Zech | LinVB | 2:7 | Mpe tala anzelu oyo azalaki koloba na ngai abelemi, anzelu mosusu ayei kokutana na ye. | |
| Zech | LinVB | 2:8 | Oyo wa liboso alobi na ye : « Kende mbangu mpe loba na elenge mobali ona maloba maye : Yeruzalem ekoki kozingama na lopango te, zambi bato na bibwele bazali kuna baleki mingi. | |
| Zech | LinVB | 2:9 | Ngai moto nakozala lopango la móto lokozinga Yeruzalem malamu, mpe nakozala wana na nkembo ya ngai. Yawe alobi bongo. » | |
| Zech | LinVB | 2:10 | Yawe alobi boye : Ee ! Napanzaki bino bipai binso o mokili, bokima ekolo ya Nordi mbangu ! Maloba ma Yawe. | |
| Zech | LinVB | 2:12 | Yawe wa bokasi bonso alobi : Oyo amilakisi na nkembo ya ye mpe atindi ngai ayebisi mpo ya bikolo biye bibotoloki biloko bya bino : « Moto asali bino mabe, ayokisi mbuma ya miso ma ngai mpasi ! | |
| Zech | LinVB | 2:13 | Solo, nakosala bango mabe, nakokaba bango o maboko ma baombo ba bango. » Bokoyeba bongo ’te Yawe wa bokasi bonso atindi ngai ! | |
| Zech | LinVB | 2:15 | Mokolo mona bato ba bikolo ndenge na ndenge bakondima Yawe, bakokoma bato ba ekolo ya ngai, mpe ngai nakofanda o ntei ya bino. Bokoyeba bongo ’te Yawe wa bokasi bonso atindi ngai ! | |
| Zech | LinVB | 2:16 | Yawe akozala nkolo wa Yuda, akokamata Yuda lokola mabelé ma ye o Mokili Mosantu, mpe akolinga Yeruzalem lisusu. | |
Chapter 3
| Zech | LinVB | 3:1 | Yawe amonisi ngai nganga mokonzi Yozue. Atelemi o boso bwa anzelu wa Yawe. Satana atelemi o loboko la ye la mobali mpo ya kofunda ye. | |
| Zech | LinVB | 3:2 | Anzelu wa Yawe alobi na Satana : « Yawe akangisa yo monoko, Satana ! Yawe asukisa yo, ye moto aponi Yeruzalem. Ye wana azali lokoni babendi o libanda lya móto te ? » | |
| Zech | LinVB | 3:4 | Anzelu alobi na baye batelemi o boso bwa ye : « Bolongola ye bilamba bya bosoto, mpe bolatisa ye bilamba bya eyenga. » Na nsima alobi na Yozue : « Tala, nalongoli lisumu lya yo. | |
| Zech | LinVB | 3:5 | Botia ye ngabuni kitoko o motó. » Bongo batii ye ngabuni kitoko o motó, mpe balatisi ye bilamba bya eyenga o miso ma anzelu wa Yawe. | |
| Zech | LinVB | 3:7 | « Yawe wa bokasi bonso alobi boye : Soko otamboli o nzela ya ngai, soko otosi mibeko mya ngai, yo moto okoyangela libota lya ngai, okokengele lopango la ngai mpe nakokotisa yo o molongo mwa baye bazali awa. » | |
| Zech | LinVB | 3:8 | Yo nganga mokonzi Yozue, na baninga ba yo bafandi pene na yo, boyoka ! Bino bato bokoyoka makambo makoya nsima. Nakotinda mosaleli wa ngai « Eboto ya sika. » | |
| Zech | LinVB | 3:9 | Tala libanga nakotia liboso lya Yozue, lizali na miso nsambo ; ngai moko nakokoma nkombo o libanga ; na mokolo moko nakolongola o mokili moye makambo mazangi bosembo. Yawe wa bokasi bonso alobi bongo. | |
Chapter 4
| Zech | LinVB | 4:1 | Anzelu oyo azalaki koloba na ngai ayei kolamusa ngai lokola bakolongolaka moto o mpongi. | |
| Zech | LinVB | 4:2 | Atuni ngai : « Ozali komono nini ? » Nazongisi : « Namoni etemiseli ya mwinda ezali mobimba ya wolo. Ezali na sani ya mafuta epai ya nsonge, mpe o nsuka mpenza miinda mizali nsambo na mipépé nsambo mya kolekisa mafuta mpo ’te miinda mipela. » | |
| Zech | LinVB | 4:5 | Anzelu oyo azalaki koloba na ngai azongisi : « Oyebi te nini ezali kolakisa ? » Nayanoli : « Mokonzi wa ngai, nayebi te ! » | |
| Zech | LinVB | 4:6 | Yawe alobi maloba maye masato matali Zorobabel : Okobika na nguya ya yo to na bokasi bwa yo te, kasi se na Elimo ya ngai. Maloba ma Yawe wa bokasi bonso. Banani bazalaki koseke ntango babandaki mosala ? Bakosepela na bomoni libanga linene o loboko la Zorobabel. Bongo natuni lisusu : « Nzete ya oliva, yoko epai ya mobali, mpe yoko epai ya mwasi ya sani ilakisi nini ? » Natuni mpe : « Bitapi bibale bya oliva bizali kopesa mwinda mafuta o mipépé mibale mya wolo, bikolakisa nini ? » Azongisi : « Yango ezali kolakisa nini, oyebi te ? » Nayanoli : « Nayebi te, mokonzi wa ngai ! » Alobi : « Ezali bato babale bapakwami mafuta mpimbo, batelemi o miso ma Mokonzi wa nse mobimba. » Yawe alobi maloba maye masato matali Zorobabel : Okobika na nguya ya yo to na bokasi bwa yo te, kasi se na Elimo ya ngai. Maloba ma Yawe wa bokasi bonso. Yo nde nani, ngomba esanda ? Soko Zorobabel abimeli yo, akokitisa yo o nse ; epai ya yo akolongola libanga linene, mpe bato bakoganga : « Malamu mpenza ! » Yawe alobi na ngai maloba maye : Zorobabel abandaki kotonga Tempelo eye, akosilisa kotonga yango na maboko ma ye. Bongo bokoyeba ’te Yawe wa bokasi bonso atindi ngai epai ya bino. Banani bazalaki koseke ntango babandaki mosala ? Bakosepela na bomoni libanga linene o loboko la Zorobabel. | |
| Zech | LinVB | 4:7 | Yawe alobi maloba maye masato matali Zorobabel : Okobika na nguya ya yo to na bokasi bwa yo te, kasi se na Elimo ya ngai. Maloba ma Yawe wa bokasi bonso. Banani bazalaki koseke ntango babandaki mosala ? Bakosepela na bomoni libanga linene o loboko la Zorobabel. Bongo natuni lisusu : « Nzete ya oliva, yoko epai ya mobali, mpe yoko epai ya mwasi ya sani ilakisi nini ? » Natuni mpe : « Bitapi bibale bya oliva bizali kopesa mwinda mafuta o mipépé mibale mya wolo, bikolakisa nini ? » Azongisi : « Yango ezali kolakisa nini, oyebi te ? » Nayanoli : « Nayebi te, mokonzi wa ngai ! » Alobi : « Ezali bato babale bapakwami mafuta mpimbo, batelemi o miso ma Mokonzi wa nse mobimba. » Yawe alobi maloba maye masato matali Zorobabel : Okobika na nguya ya yo to na bokasi bwa yo te, kasi se na Elimo ya ngai. Maloba ma Yawe wa bokasi bonso. Yo nde nani, ngomba esanda ? Soko Zorobabel abimeli yo, akokitisa yo o nse ; epai ya yo akolongola libanga linene, mpe bato bakoganga : « Malamu mpenza ! » Yawe alobi na ngai maloba maye : Zorobabel abandaki kotonga Tempelo eye, akosilisa kotonga yango na maboko ma ye. Bongo bokoyeba ’te Yawe wa bokasi bonso atindi ngai epai ya bino. Banani bazalaki koseke ntango babandaki mosala ? Bakosepela na bomoni libanga linene o loboko la Zorobabel. | |
| Zech | LinVB | 4:8 | Yawe alobi maloba maye masato matali Zorobabel : Okobika na nguya ya yo to na bokasi bwa yo te, kasi se na Elimo ya ngai. Maloba ma Yawe wa bokasi bonso. Banani bazalaki koseke ntango babandaki mosala ? Bakosepela na bomoni libanga linene o loboko la Zorobabel. Bongo natuni lisusu : « Nzete ya oliva, yoko epai ya mobali, mpe yoko epai ya mwasi ya sani ilakisi nini ? » Natuni mpe : « Bitapi bibale bya oliva bizali kopesa mwinda mafuta o mipépé mibale mya wolo, bikolakisa nini ? » Azongisi : « Yango ezali kolakisa nini, oyebi te ? » Nayanoli : « Nayebi te, mokonzi wa ngai ! » Alobi : « Ezali bato babale bapakwami mafuta mpimbo, batelemi o miso ma Mokonzi wa nse mobimba. » Yawe alobi maloba maye masato matali Zorobabel : Okobika na nguya ya yo to na bokasi bwa yo te, kasi se na Elimo ya ngai. Maloba ma Yawe wa bokasi bonso. Yo nde nani, ngomba esanda ? Soko Zorobabel abimeli yo, akokitisa yo o nse ; epai ya yo akolongola libanga linene, mpe bato bakoganga : « Malamu mpenza ! » Yawe alobi na ngai maloba maye : Zorobabel abandaki kotonga Tempelo eye, akosilisa kotonga yango na maboko ma ye. Bongo bokoyeba ’te Yawe wa bokasi bonso atindi ngai epai ya bino. Banani bazalaki koseke ntango babandaki mosala ? Bakosepela na bomoni libanga linene o loboko la Zorobabel. | |
| Zech | LinVB | 4:9 | Yawe alobi maloba maye masato matali Zorobabel : Okobika na nguya ya yo to na bokasi bwa yo te, kasi se na Elimo ya ngai. Maloba ma Yawe wa bokasi bonso. Banani bazalaki koseke ntango babandaki mosala ? Bakosepela na bomoni libanga linene o loboko la Zorobabel. Bongo natuni lisusu : « Nzete ya oliva, yoko epai ya mobali, mpe yoko epai ya mwasi ya sani ilakisi nini ? » Natuni mpe : « Bitapi bibale bya oliva bizali kopesa mwinda mafuta o mipépé mibale mya wolo, bikolakisa nini ? » Azongisi : « Yango ezali kolakisa nini, oyebi te ? » Nayanoli : « Nayebi te, mokonzi wa ngai ! » Alobi : « Ezali bato babale bapakwami mafuta mpimbo, batelemi o miso ma Mokonzi wa nse mobimba. » Yawe alobi maloba maye masato matali Zorobabel : Okobika na nguya ya yo to na bokasi bwa yo te, kasi se na Elimo ya ngai. Maloba ma Yawe wa bokasi bonso. Yo nde nani, ngomba esanda ? Soko Zorobabel abimeli yo, akokitisa yo o nse ; epai ya yo akolongola libanga linene, mpe bato bakoganga : « Malamu mpenza ! » Yawe alobi na ngai maloba maye : Zorobabel abandaki kotonga Tempelo eye, akosilisa kotonga yango na maboko ma ye. Bongo bokoyeba ’te Yawe wa bokasi bonso atindi ngai epai ya bino. Banani bazalaki koseke ntango babandaki mosala ? Bakosepela na bomoni libanga linene o loboko la Zorobabel. | |
| Zech | LinVB | 4:10 | Yawe alobi maloba maye masato matali Zorobabel : Okobika na nguya ya yo to na bokasi bwa yo te, kasi se na Elimo ya ngai. Maloba ma Yawe wa bokasi bonso. Banani bazalaki koseke ntango babandaki mosala ? Bakosepela na bomoni libanga linene o loboko la Zorobabel. Bongo natuni lisusu : « Nzete ya oliva, yoko epai ya mobali, mpe yoko epai ya mwasi ya sani ilakisi nini ? » Natuni mpe : « Bitapi bibale bya oliva bizali kopesa mwinda mafuta o mipépé mibale mya wolo, bikolakisa nini ? » Azongisi : « Yango ezali kolakisa nini, oyebi te ? » Nayanoli : « Nayebi te, mokonzi wa ngai ! » Alobi : « Ezali bato babale bapakwami mafuta mpimbo, batelemi o miso ma Mokonzi wa nse mobimba. » Yawe alobi maloba maye masato matali Zorobabel : Okobika na nguya ya yo to na bokasi bwa yo te, kasi se na Elimo ya ngai. Maloba ma Yawe wa bokasi bonso. Yo nde nani, ngomba esanda ? Soko Zorobabel abimeli yo, akokitisa yo o nse ; epai ya yo akolongola libanga linene, mpe bato bakoganga : « Malamu mpenza ! » Yawe alobi na ngai maloba maye : Zorobabel abandaki kotonga Tempelo eye, akosilisa kotonga yango na maboko ma ye. Bongo bokoyeba ’te Yawe wa bokasi bonso atindi ngai epai ya bino. Banani bazalaki koseke ntango babandaki mosala ? Bakosepela na bomoni libanga linene o loboko la Zorobabel. | |
| Zech | LinVB | 4:11 | Yawe alobi maloba maye masato matali Zorobabel : Okobika na nguya ya yo to na bokasi bwa yo te, kasi se na Elimo ya ngai. Maloba ma Yawe wa bokasi bonso. Banani bazalaki koseke ntango babandaki mosala ? Bakosepela na bomoni libanga linene o loboko la Zorobabel. Bongo natuni lisusu : « Nzete ya oliva, yoko epai ya mobali, mpe yoko epai ya mwasi ya sani ilakisi nini ? » Natuni mpe : « Bitapi bibale bya oliva bizali kopesa mwinda mafuta o mipépé mibale mya wolo, bikolakisa nini ? » Azongisi : « Yango ezali kolakisa nini, oyebi te ? » Nayanoli : « Nayebi te, mokonzi wa ngai ! » Alobi : « Ezali bato babale bapakwami mafuta mpimbo, batelemi o miso ma Mokonzi wa nse mobimba. » Yawe alobi maloba maye masato matali Zorobabel : Okobika na nguya ya yo to na bokasi bwa yo te, kasi se na Elimo ya ngai. Maloba ma Yawe wa bokasi bonso. Yo nde nani, ngomba esanda ? Soko Zorobabel abimeli yo, akokitisa yo o nse ; epai ya yo akolongola libanga linene, mpe bato bakoganga : « Malamu mpenza ! » Yawe alobi na ngai maloba maye : Zorobabel abandaki kotonga Tempelo eye, akosilisa kotonga yango na maboko ma ye. Bongo bokoyeba ’te Yawe wa bokasi bonso atindi ngai epai ya bino. Banani bazalaki koseke ntango babandaki mosala ? Bakosepela na bomoni libanga linene o loboko la Zorobabel. | |
| Zech | LinVB | 4:12 | Yawe alobi maloba maye masato matali Zorobabel : Okobika na nguya ya yo to na bokasi bwa yo te, kasi se na Elimo ya ngai. Maloba ma Yawe wa bokasi bonso. Banani bazalaki koseke ntango babandaki mosala ? Bakosepela na bomoni libanga linene o loboko la Zorobabel. Bongo natuni lisusu : « Nzete ya oliva, yoko epai ya mobali, mpe yoko epai ya mwasi ya sani ilakisi nini ? » Natuni mpe : « Bitapi bibale bya oliva bizali kopesa mwinda mafuta o mipépé mibale mya wolo, bikolakisa nini ? » Azongisi : « Yango ezali kolakisa nini, oyebi te ? » Nayanoli : « Nayebi te, mokonzi wa ngai ! » Alobi : « Ezali bato babale bapakwami mafuta mpimbo, batelemi o miso ma Mokonzi wa nse mobimba. » Yawe alobi maloba maye masato matali Zorobabel : Okobika na nguya ya yo to na bokasi bwa yo te, kasi se na Elimo ya ngai. Maloba ma Yawe wa bokasi bonso. Yo nde nani, ngomba esanda ? Soko Zorobabel abimeli yo, akokitisa yo o nse ; epai ya yo akolongola libanga linene, mpe bato bakoganga : « Malamu mpenza ! » Yawe alobi na ngai maloba maye : Zorobabel abandaki kotonga Tempelo eye, akosilisa kotonga yango na maboko ma ye. Bongo bokoyeba ’te Yawe wa bokasi bonso atindi ngai epai ya bino. Banani bazalaki koseke ntango babandaki mosala ? Bakosepela na bomoni libanga linene o loboko la Zorobabel. | |
| Zech | LinVB | 4:13 | Yawe alobi maloba maye masato matali Zorobabel : Okobika na nguya ya yo to na bokasi bwa yo te, kasi se na Elimo ya ngai. Maloba ma Yawe wa bokasi bonso. Banani bazalaki koseke ntango babandaki mosala ? Bakosepela na bomoni libanga linene o loboko la Zorobabel. Bongo natuni lisusu : « Nzete ya oliva, yoko epai ya mobali, mpe yoko epai ya mwasi ya sani ilakisi nini ? » Natuni mpe : « Bitapi bibale bya oliva bizali kopesa mwinda mafuta o mipépé mibale mya wolo, bikolakisa nini ? » Azongisi : « Yango ezali kolakisa nini, oyebi te ? » Nayanoli : « Nayebi te, mokonzi wa ngai ! » Alobi : « Ezali bato babale bapakwami mafuta mpimbo, batelemi o miso ma Mokonzi wa nse mobimba. » Yawe alobi maloba maye masato matali Zorobabel : Okobika na nguya ya yo to na bokasi bwa yo te, kasi se na Elimo ya ngai. Maloba ma Yawe wa bokasi bonso. Yo nde nani, ngomba esanda ? Soko Zorobabel abimeli yo, akokitisa yo o nse ; epai ya yo akolongola libanga linene, mpe bato bakoganga : « Malamu mpenza ! » Yawe alobi na ngai maloba maye : Zorobabel abandaki kotonga Tempelo eye, akosilisa kotonga yango na maboko ma ye. Bongo bokoyeba ’te Yawe wa bokasi bonso atindi ngai epai ya bino. Banani bazalaki koseke ntango babandaki mosala ? Bakosepela na bomoni libanga linene o loboko la Zorobabel. | |
| Zech | LinVB | 4:14 | Yawe alobi maloba maye masato matali Zorobabel : Okobika na nguya ya yo to na bokasi bwa yo te, kasi se na Elimo ya ngai. Maloba ma Yawe wa bokasi bonso. Banani bazalaki koseke ntango babandaki mosala ? Bakosepela na bomoni libanga linene o loboko la Zorobabel. Bongo natuni lisusu : « Nzete ya oliva, yoko epai ya mobali, mpe yoko epai ya mwasi ya sani ilakisi nini ? » Natuni mpe : « Bitapi bibale bya oliva bizali kopesa mwinda mafuta o mipépé mibale mya wolo, bikolakisa nini ? » Azongisi : « Yango ezali kolakisa nini, oyebi te ? » Nayanoli : « Nayebi te, mokonzi wa ngai ! » Alobi : « Ezali bato babale bapakwami mafuta mpimbo, batelemi o miso ma Mokonzi wa nse mobimba. » Yawe alobi maloba maye masato matali Zorobabel : Okobika na nguya ya yo to na bokasi bwa yo te, kasi se na Elimo ya ngai. Maloba ma Yawe wa bokasi bonso. Yo nde nani, ngomba esanda ? Soko Zorobabel abimeli yo, akokitisa yo o nse ; epai ya yo akolongola libanga linene, mpe bato bakoganga : « Malamu mpenza ! » Yawe alobi na ngai maloba maye : Zorobabel abandaki kotonga Tempelo eye, akosilisa kotonga yango na maboko ma ye. Bongo bokoyeba ’te Yawe wa bokasi bonso atindi ngai epai ya bino. Banani bazalaki koseke ntango babandaki mosala ? Bakosepela na bomoni libanga linene o loboko la Zorobabel. | |
Chapter 5
| Zech | LinVB | 5:2 | Anzelu atuni ngai : « Omoni nini ? » Nayanoli : « Namoni monkanda mopimbwi, mokoki na bolai maboko ntuku ibale, na bonene maboko zomi. » | |
| Zech | LinVB | 5:3 | Ye alobi : « Yango elakisi bobe bokokwela ekolo mobimba ; bakobengana bayibi banso awa, na mpe bato banso balayi ndai ya lokuta na nkombo ya ngai. » | |
| Zech | LinVB | 5:4 | Yawe wa bokasi bonso alobi : « Ngai moko nakotombela ndako ya moyibi mpe ya moto wa lokuta bobe ; bobe bokwela ndako ya ye mobimba, bosilisa ndako ya ye, mabasa na mabanga. » | |
| Zech | LinVB | 5:5 | Anzelu oyo azalaki koloba na ngai abelemi, alobi : « Fungola miso, tala eloko nini ezali kotambola wana. » | |
| Zech | LinVB | 5:6 | Natuni ye : « Yango eloko nini ? » Ayanoli : « Ezali kopo ya koteke biloko ezali kotambola. » Abakisi : « Bato banso o ekolo eye bakosalaka lisumu na yango. » | |
| Zech | LinVB | 5:8 | Anzelu alobi : « Tala elembo ya mabe manso bato bakosalaka. » Bongo azongisi mwasi o kati ya kopo, azipi kopo na ezipeli ezito. | |
| Zech | LinVB | 5:9 | Nátala lisusu, namoni limoni lisusu : Basi babale bazalaki kokende. Mompepe mopepi mpe mofungoli mapapu ma bango, mazalaki lokola mapapu ma nkongi. Basi batomboli kopo. | |
Chapter 6
| Zech | LinVB | 6:1 | Nafungoli miso lisusu, namoni limoni : Namoni makalo manei mazalaki koya kati ya ngomba ibale ; ngomba ina izalaki ya mbengi. | |
| Zech | LinVB | 6:2 | Likalo lya yambo libendani na farasa ya nzoto etane, likalo lya mabale na farasa ya nzoto eindo, | |
| Zech | LinVB | 6:3 | likalo lya masato na farasa ya nzoto mpembe, likalo lya manei na farasa ya nzoto matono matono. | |
| Zech | LinVB | 6:4 | Natuni anzelu oyo azalaki koloba na ngai : « Mokonzi wa ngai, makalo mana malakisi nini ? » | |
| Zech | LinVB | 6:5 | Anzelu ayanoli : « Makalo maye matelemeki o boso bwa Mokonzi wa nse mobimba mazali kokende nzela ya mimpepe minei. | |
| Zech | LinVB | 6:6 | Farasa ya nzoto eindo izali kokende o ekolo ya Nordi, iye ya nzoto mpembe o ekolo ya Westi, mpe iye ya nzoto matono matono o ekolo ya Sudi. » | |
| Zech | LinVB | 6:7 | Farasa ya nzoto etane ebandi kokende, na mposa enene ya kokoma o nse mobimba. Mokonzi atindi yango : « Bokende kokatisa nse mobimba. » Mpe ikei kokatisa nse mobimba. | |
| Zech | LinVB | 6:8 | Abengi ngai, alobi : « Tala, baye bakokende o Nordi, bakokitisa motema mwa ngai o ekolo ya Nordi. » | |
| Zech | LinVB | 6:10 | Kongolo mabonza ma bato bautaki o boombo : Keldai, Tobia na Yedaya ; mpe kende o ndako ya Yosia, mwana wa Sefanya, oyo auti o Babilon sikawa. | |
| Zech | LinVB | 6:11 | Kamata wolo na palata, sala enkoti mpe tia yango o motó mwa nganga mokonzi Yozue, mwana wa Yosadak. | |
| Zech | LinVB | 6:12 | Na nsima okoloba na ye : Yawe wa bokasi bonso alobi boye : Tala moto oyo azali na nkombo ‘Eboto ya sika’, akokola o esika azali ; akotonga Tempelo ya Yawe lisusu. | |
| Zech | LinVB | 6:13 | Ye moto akotonga Tempelo ya Yawe ; ye akolata bilamba bya bokonzi, akofanda o ngwende ya ye mpe akoyangela bato. Nganga Nzambe mpe akofanda o ngwende esusu ; bango babale bakoyokana malamu mpenza. | |
| Zech | LinVB | 6:14 | Enkoti ya bokonzi ekotikala o Tempelo ya Yawe bo elembo ya kokanisa Keldai, Tobia na Yedaya mpe mwana wa Sefanya. | |
Chapter 7
| Zech | LinVB | 7:1 | O mobu mwa minei bwa bokonzi bwa Dario, o sanza ya libwa, sanza Kisleu, mokolo mwa minei mwa sanza, Yawe alobi na Zakaria. | |
| Zech | LinVB | 7:3 | mpe batuna banganga Nzambe ba Yawe wa bokasi bonso, na mpe baprofeta : « Nasengeli kolela mpe kolala nzala o sanza ya itano lokola nazalaki kosala kala ? » | |
| Zech | LinVB | 7:5 | Tuna bato banso mpe banganga Nzambe boye : « Mibu ntuku nsambo bozalaki kolala nzala mpe kolela o sanza ya itano mpe o sanza ya nsambo ; bozalaki nde kosala bongo mpo bozalaki kolingangai ? | |
| Zech | LinVB | 7:6 | Ntango bozalaki kolia mpe komele, bozalaki kosala yango te mpo bino moko bolingaki bongo ? | |
| Zech | LinVB | 7:7 | Bobosani nde maloba ma Yawe, maye alobaki na monoko mwa baprofeta ba kala ? O ntango ena Yeruzalem ezalaki kimia mpe na boyokani na bato banso ba bingumba bya penepene, ntango Negeb mpe ekolo epai ya mbu bizalaki na bato baike. » | |
| Zech | LinVB | 7:9 | Yawe wa bokasi bonso alobaki boye : « Bokata makambo manso na bosembo bwa solo. Bolakisana bondeko mpe boyokelana ngolu. | |
| Zech | LinVB | 7:10 | Bonyokolo basi bazenge te, bana bitike, bauta na babola mpe te. Bokana kosala moninga mabe te. » | |
| Zech | LinVB | 7:12 | Bakomisaki mitema mya bango lokola libanga lya diama mpo ’te bayoka malako ma Yawe wa bokasi bonso te, na maye elimo ya ye atindaki na monoko mwa baprofeta ba kala. Bongo Yawe wa bokasi bonso asilikelaki bango mingi mpenza. | |
| Zech | LinVB | 7:13 | Esalemaki boye : Yawe wa bokasi bonso alobaki : « Bakobyanga ngai, kasi nakondima bango te, se lokola baboyaki ngai ntango nabyangaki bango. | |
Chapter 8
| Zech | LinVB | 8:2 | Yoka maloba ma Yawe wa bokasi bonso : Nakolingaka Sion mingi mpenza, nakolakisaka ye bolamu bwa ngai. | |
| Zech | LinVB | 8:3 | Yawe alobi : Nakozonga o Sion, nalingi kofanda o Yeruzalem. Bakotanga Yeruzalem ‘Engumba ya Lobokó’ mpe ngomba ya Yawe wa bokasi bonso ‘Ngomba Esantu’. | |
| Zech | LinVB | 8:4 | Yawe wa bokasi bonso alobi : Babange, babali na basi, bakopema o milolo mya Yeruzalem, moto na moto lingenda o maboko mpo ya bonuna. | |
| Zech | LinVB | 8:6 | Yawe wa bokasi bonso alobi : Soko bato ba ekolo eye bakotikala wana o mikolo mina bakokamwa na yango, ngai nakokamwa te. Maloba ma Yawe wa bokasi bonso. | |
| Zech | LinVB | 8:7 | Yawe wa bokasi bonso alobi : Nakobikisa bato ba ngai ut’o ekolo ya Esti mpe ekolo ya Westi. | |
| Zech | LinVB | 8:8 | Nakozongisa bango mpo ’te bafanda o Yeruzalem. Bakozala bato ba ngai mpe ngai nakozala Nzambe wa bango, na lobokó mpe na bosembo ! | |
| Zech | LinVB | 8:9 | Yawe wa bokasi bonso alobi : Bolendisa maboko, bino bato bokoyokaka maloba ma baprofeta ut’o mikolo miye batiaki mabanga ma liboso ma ndako ya Yawe wa bokasi bonso mpo ya kotonga Tempelo lisusu. | |
| Zech | LinVB | 8:10 | Liboso lya mikolo miye bato bazalaki kozwa lifuta te. Nyama ya bango izalaki kopesa litomba lyoko te. Bato balingaki kokende mpe kozonga bazalaki kobanga banguna o nzela. Ngai moko natikaki bato batombokelana. | |
| Zech | LinVB | 8:11 | Kasi na bato batikali o mokili moye nakosala lisusu te lokola nasalaki o ntango ena. Maloba ma Yawe wa bokasi bonso. | |
| Zech | LinVB | 8:12 | Sikawa bato bakolona na motema mpio ; nzete ya vino ekobota mbuma, mabelé makobotisa mbuma ilamu ; mampata makotangisa mamio. Nakopesa bato batikali o ekolo eye malamu maye manso. | |
| Zech | LinVB | 8:13 | Lokola mabe maye batombeli bino makwelaki bino o bikolo bisusu, libota lya Yuda mpe lya Israel, se bongo nakobikisa bino mpe nakobenisa bino. Bobanga te mpe bolendisa maboko ! | |
| Zech | LinVB | 8:14 | Yawe wa bokasi bonso alobi boye : Lokola nakanaki kosala bino mabe, mpo bankoko ba bino bayokisaki ngai nkanda - maloba ma Yawe wa bokasi bonso - mpe nakitisaki motema te, | |
| Zech | LinVB | 8:15 | se bongo nakolanda makanisi masusu : nakani kosala Yeruzalem mpe libota lya Yuda malamu. Bobanga te ! | |
| Zech | LinVB | 8:16 | Boyoka nini bosengeli kosala : Moto na moto aloba se makambo ma bosolo na moninga wa ye ; bokata makambo na bosembo mpo ’te boboto bozonga. | |
| Zech | LinVB | 8:17 | Bokanelana o mitema te, bolaya ndai ya lokuta te : nayini makambo maye manso. Maloba ma Yawe. | |
| Zech | LinVB | 8:19 | Yawe wa bokasi bonso alobi boye : « Mikolo mya kolala nzala o sanza ya inei, ya nsambo mpe ya zomi, mikozala mikolo mya esengo mya bato ba Yuda, mikolo mya kosepela lokola ntango ya eyenga. Kasi boluka bosolo mpe boboto ! » | |
| Zech | LinVB | 8:20 | Yawe wa bokasi bonso alobi boye : Bato ba bikolo bisusu na bato ba bingumba binene bakoya awa. | |
| Zech | LinVB | 8:21 | Bato ba engumba yoko bakokende koyebisa bato ba engumba esusu : « Tokende kobondela Yawe, toluka Yawe wa bokasi bonso ; biso mpe tokende. » | |
| Zech | LinVB | 8:22 | Bato baike bakoya, bato balongwi o bikolo binene bakoya koluka Yawe wa bokasi bonso o Yeruzalem mpe bakobondela ye. | |
Chapter 9
| Zech | LinVB | 9:1 | Liloba lya Yawe likatisi ekolo ya o Kadrak mpe likomi o Damasko, zambi Yawe azali nkolo wa ekolo Aram, se lokola wa mabota manso ma Israel. | |
| Zech | LinVB | 9:2 | Azali mpe mokonzi wa Amat, o ndelo ya mokili mwa biso, mpe wa Tiro na Sidoni, bingumba bya bato ba bwanya. | |
| Zech | LinVB | 9:3 | Bato ba Tiro batongi ebombamelo enene, bakongoli mosolo ebele lokola zelo, mpe wolo ebele lokola potopoto ya balabala. | |
| Zech | LinVB | 9:4 | Tala, sikawa Yawe akoya kobotolo yango, akobwaka yango o mbu, engumba mobimba ekotumbama. | |
| Zech | LinVB | 9:5 | Ntango Askelon akomono yango, akobanga, bato ba Gaza mpe bakolenga, bato ba Ekron bakobulangana. Bato ba Gaza bakozanga mokonzi, o Askelon bato bakozala lisusu te. | |
| Zech | LinVB | 9:7 | nakolongola makila o minoko mya bango, na mpe biloko bya nsomo o kati ya mino ma bango ; baye bakotikala bakokoma bato ba Nzambe wa biso, bakozala libota lyoko o ekolo ya Yuda ; Ekron akokoma lokola bato ba Yebus. | |
| Zech | LinVB | 9:8 | Nakopika nganda o boso bwa bato ba ngai, nakokenge baye bakokende mpe bakozonga. Moto moko akonyokolo bango lisusu te, zambi ngai moko nakotala bango malamu. | |
| Zech | LinVB | 9:9 | Bato ba Sion, boyoka nsai ! Bato ba Yeruzalem, boganga na esengo ! Solo, Mokonzi wa bino azali koya epai ya bino, mokonzi wa bosembo oyo akolongaka banguna. Ye moto wa bosawa abuteli mpunda, afandeli mwana wa mpunda mwasi. | |
| Zech | LinVB | 9:10 | Akobebisa makalo manso ma Efraim na farasa ya Yeruzalem. Akobuka matimbo manso ma bitumba, akoyela bato ba bikolo binso boboto. Epai na epai bokonzi bwa ye bokokoma kin’o mbu, banda ebale Efrate kin’o nsuka ya mokili. | |
| Zech | LinVB | 9:11 | Mpo ya bondeko tokataki na makila, nalongoli bato ba yo bakangemi o mabulu maye makauka mai. | |
| Zech | LinVB | 9:12 | Bino baombo baye bobwaki elikya te, bozonga o ebombamelo ya sika. Lelomei nayebisi bino : Nakozongisela bino malamu mbala ibale. | |
| Zech | LinVB | 9:13 | Natandi litimbo lya ngai, lyango nde Yuda ; nakembisi litimbo na likula, lyango nde Efraim. Nakolendisa bato ba yo, Sion, bakende kobundisa bato ba yo, Yavan, nakokomisa yo lokola mopanga mwa elombe. | |
| Zech | LinVB | 9:14 | O mikolo mina Yawe akobimela bango, likula lya ye likobete lokola minkalali. Mokonzi Yawe akolelisa mondule, ut’o Sudi akoya o ekumbaki. | |
| Zech | LinVB | 9:15 | Yawe wa bokasi bonso akobatela bango, bakolonga, bakonyata mabanga ma bilingongo, bakomele makila lokola vino, lokola mai o mbeki ya bonyakeli, lokola makila masopani o matumu ma altare. | |
| Zech | LinVB | 9:16 | Mokolo mona Yawe Nzambe wa bango akobikisa bango, mpata ya etonga ya ye ; lokola mabanga ma motuya ma enkoti ya bokonzi mangengi o mokili mwa ye. | |
Chapter 10
| Zech | LinVB | 10:1 | Bosenge Yawe mbula ya nsuka enoka. Yawe moto akobimisaka mompepe mwa ekumbaki, akonokisela bato mbula enene mpe akopesaka bilanga milona miike. | |
| Zech | LinVB | 10:2 | Bikeko bikosakolaka se na bokosi, bamoni-makambo bakomonoko bimonela bya lokuta, ndimbola ya ndoto ya bango ezali na ntina te, bakobondoko bato na makambo ma lokuta. Yango wana bato bakendeki lokola mpata, na mpasi mpenza, mpo bazangaki mokengeli. | |
| Zech | LinVB | 10:3 | Nayokeli bakengeli nkanda enene, nakotumbola ntaba babali. Kasi Yawe wa bokasi bonso akoya kotala etonga ya ye, bato ba Yuda, akokomisa bango farasa ileki bokasi o bitumba. | |
| Zech | LinVB | 10:4 | Libanga lya litumu, likonzi lya ema na litimbo lya etumba makozwama o mboka ye, na mpe bayangeli. | |
| Zech | LinVB | 10:5 | Banso elongo bakozala lokola bilombe, bakonyata potopoto ya balabala o etumba. Bakobunda makasi, zambi Yawe akosalisa bango ; bakoyokisa basoda ba farasa nsoni. | |
| Zech | LinVB | 10:6 | Nakopesa bato ba libota lya Yuda mpiko, nakobikisa libota lya Yozefu. Nakokamba bango, zambi nayokeli bango mawa, bakozala lokola bato naboyaki mokolo moko te, mpo nazali Yawe Nzambe wa bango, nakondimela bango. | |
| Zech | LinVB | 10:7 | Bato ba Efraim bakozala lokola bilombe, bakosepela mingi lokola bato bameli vino. Ntango bana bakomono bango bakosepela, mpo ya Yawe bakotonda na esengo o mitema. | |
| Zech | LinVB | 10:8 | Nakobete mondule mpe nakosangisa bango, mpo nasikoli bango ; bakozala ebele lokola kala. | |
| Zech | LinVB | 10:9 | Baye napanzaki o bikolo bisusu bakokanisa ngai o mikili mosika ; bakobokolo bana ba bango mpe bakozonga. | |
| Zech | LinVB | 10:10 | Nakolongola bango o mokili mwa Ezipeti, nakosangisa bango ut’o Asur. Nakokamba bango o Galaad mpe o Libano, mikili miye minso mikokoka na bango te. | |
| Zech | LinVB | 10:11 | Bakokatisa mbu ya Ezipeti, Yawe akopesa mbonge ya mai etinda, ebale Nil ekokauka tee o bozindo bwa yango ; lofundo la bato ba Asur lokosila, bakolongola montongo mwa bokonzi o Ezipeti. | |
Chapter 11
| Zech | LinVB | 11:2 | Nzete ya sipresi ikimela mpo ya nzete ya sédere ikwei, mpe nzete inene iye bakati ! Bino, nzete ya wenge ya Basan, bolela, zambi bakati zamba lya bino mobimba. | |
| Zech | LinVB | 11:3 | Boyoka bokimeli bwa bakengeli ba mpata, zambi bokonzi bwa bango bosili. Boyoka boleli bwa bana ba nkosi, zambi lokumu la Yordane losili. | |
| Zech | LinVB | 11:5 | Bato basombi mpata, bazali koboma yango, mpe moto moko apekisi bango te ; ntango bateki yango balobi : ‘Batondo Nzambe, nakomi moto wa nkita’, mpe bakengeli bayoki ata mawa te. » | |
| Zech | LinVB | 11:6 | Yango wana Yawe alobi : « Ngai mpe nakoyokela bato ba ekolo eye mawa te. Nakokaba bango banso o maboko ma bato basusu mpe ma mokonzi wa bango. Bango bakonyata ekolo, kasi nakobikisa yango o maboko ma bango te. » | |
| Zech | LinVB | 11:7 | Bongo nakomi mokengeli wa mpata iye bato ba mombongo balingaki koboma. Nakamati mangenda mabale ; natangi lingenda lyoko na nkombo ‘Bolamu’, lingenda lisusu ‘Lisanga’ ; nakei koleisa mpata. | |
| Zech | LinVB | 11:9 | Nalobi : « Nakoleisa mpata lisusu te : eye ezali ya kokufa, ekufa ; eye ezali ya kobeba, ebeba ; mpata ikotikala, itikala koliana. » | |
| Zech | LinVB | 11:10 | Nakamati lingenda lya ngai, liye natangaki ‘Bolamu’, nabuki lyango biteni biteni mpo ’te naboma bondeko nakataki na bikolo biye binso. | |
| Zech | LinVB | 11:11 | Bongo mokolo mona nabomi bondeko bwango. Bato ba mombongo bazalaki kotala ngai, bayebaki ’te ezalaki Yawe moto alobi bongo. | |
| Zech | LinVB | 11:12 | Nalobi na bango : « Soko bolingi, bopesa ngai lifuta lya ngai. Soko bolingi te, botika. » Bameki bozito bwa lifuta lya ngai, bapesi ngai mitako mya palata ntuku isato. | |
| Zech | LinVB | 11:13 | Yawe alobi na ngai : « Bwakela motuli lifuta liye, bango bamonoki ’te ekoki na ngai ! » Bongo nakamati mitako mya palata ntuku isato, nabwaki myango o Ndako ya Yawe mpo ’te bapesa myango na motuli. | |
| Zech | LinVB | 11:14 | Na nsima nabuki mpe lingenda lya mabale nkombo ’te ‘Lisanga’, mpo ’te naboma bondeko kati ya Yuda na Israel. | |
| Zech | LinVB | 11:16 | zambi nakopesa ekolo eye mokengeli oyo akopangana te na mpata ezangi, eye ebungi akoluka yango te, eye ezoki akosalisa yango te, eye elembi akomeme yango te ; kasi akolia iye ya mafuta, mpe akokata yango matambi. | |
Chapter 12
| Zech | LinVB | 12:1 | Liloba lya Yawe ona Israel. Liloba lya Yawe oyo atandi etando ya likolo mpe apiki mokili, oyo akeli mpema ya bomoi o kati ya moto. | |
| Zech | LinVB | 12:2 | Nakokomisa Yeruzalem lokola nkeni eye ekolangwisa mikili minso mizali penepene. Ntango banguna bakozinga Yeruzalem, Yuda mpe ekoyoka mpasi. | |
| Zech | LinVB | 12:3 | O mikolo mina nakokomisa Yeruzalem lokola libanga linene liye moto moko te akoki kotombola. Bato bakomeka kotombola lyango, bakozoka mpota enene. Bato ba bikolo binso bya nse bakoyokana ’te babundisa lyango. | |
| Zech | LinVB | 12:4 | Yawe alobi boye : Mokolo mona nakokimisa farasa, mpe nakobelisa batambwisi ba yango ligboma. Nakoboma miso ma bato ba farasa ba bikolo biye, kasi nakofungola miso mpo ya kobatela Yuda. | |
| Zech | LinVB | 12:5 | Mokolo mona bakonzi ba Yuda bakomilobela : « Bokasi bwa bato ba Yeruzalem, nde Nzambe wa bango, Yawe wa bokasi bonso. » | |
| Zech | LinVB | 12:6 | Mokolo mona nakokomisa bakonzi ba Yuda lokola móto monene mwa nkoni, lokola esungi ya móto o kati ya matiti makauka. Epai na epai bakosilisa bato o bikolo binso bizali penepene na bango. Kasi bato ba Yeruzalem bakotikala o esika ya bango. | |
| Zech | LinVB | 12:7 | Yawe akobikisa liboso bato ba Yuda mpo ’te bato ba libota lya Davidi na bato ba Yeruzalem bamitombola likolo lya bato ba Yuda te. | |
| Zech | LinVB | 12:8 | Mokolo mona Yawe akobatela mpe bato ba Yeruzalem ; moto akotatabana o ntei ya bango, akokoma lokola Davidi mokolo mona ; mpe bato ba Davidi bakozala lokola Nzambe, bakokamba bango lokola anzelu wa Yawe. | |
| Zech | LinVB | 12:10 | Kasi nakopesa bato ba libota lya Davidi mpe bato ba Yeruzalem motema malamu mpe nakoyokisa bango mposa ya kosambela. Bakobwaka miso epai ya ngai, oyo batuboli na likongo. Bakosala lilaka mpo ya ye lokola mpo ya mwanawayambo. | |
| Zech | LinVB | 12:11 | Mokolo mona bakosala lilaka linene o Yeruzalem lokola lilaka lya Adad Rimon o esobe ya Megido. | |
| Zech | LinVB | 12:12 | Bato ba ekolo bakolela, etuka na etuka. Etuka ya Davidi ekolela epai, basi ba bango epai. Etuka ya Natan ekolela epai, basi ba bango epai. | |
| Zech | LinVB | 12:13 | Etuka ya Levi ekolela epai, basi ba bango epai Etuka ya Simei ekolela epai, basi ba bango epai. | |
Chapter 13
| Zech | LinVB | 13:1 | Mokolo mona bato ba libota lya Davidi mpe ba Yeruzalem bakozwa liziba mpo ’te balongola masumu mpe mbindo ya bango. | |
| Zech | LinVB | 13:2 | Yawe wa bokasi bonso alobi : Mokolo mona nakolongola nkombo ya bikeko binso o mokili ; bato bakotanga nkombo ya bikeko lisusu te. Se bongo nakobengana baprofeta, mpe nakosilisa mayele ma mbindo o mokili. | |
| Zech | LinVB | 13:3 | Soko moto alingi lisusu koloba lokola profeta, tata na mama wa ye baye baboti ye bakoloba na ye : « Okotikala na bomoi te, mpo ozali kosakola makambo ma lokuta o nkombo ya Yawe. » Bongo tata na mama wa ye baboti ye bakotubola ye, ntango azali kosakola. | |
| Zech | LinVB | 13:4 | Mokolo mona baprofeta bakoyoka limoni lya bango nsoni, bobele o ntangomei bakosakola lyango. Bakolata molato mwa nsuki ya mpata lisusu te mpo ya kokosabato. | |
| Zech | LinVB | 13:5 | Kasi bakoloba : « Nazali profeta te, ngai nazali moto wa bilanga ; banda bomwana nazali na mabelé ma ngai. » | |
| Zech | LinVB | 13:6 | Na nsima bakotuna ye : « Mpota o ntolo ya yo euti wapi ? » Akoyanola : « Nazoki mpota iye o ndako ya balingami ba ngai. » | |
| Zech | LinVB | 13:7 | Yawe wa bokasi bonso alobi : E mopanga, banda etumba na mokengeli wa ngai, bundisa moninga wa ngai. Bete mokengeli, mpata ipanzana. Nakoya kobete bato batau lokola. | |
| Zech | LinVB | 13:8 | Yoka maloba ma Yawe : Mokolo mona ndambo ibale ya bato bakokufa, ndambo ya isato bakotikala na bomoi. | |
Chapter 14
| Zech | LinVB | 14:1 | Mokolo moko Yawe akotinda bato bakabolana biloko babotoli o bitumba o kati lya Yeruzalem ; | |
| Zech | LinVB | 14:2 | akoloba : « Nakosangisa bato ba bikolo binso mpo ya kobundisa Yeruzalem. Bakobotolo engumba, bakobuka ndako, bakobebisa basi. Bato basusu bakokende o boombo, basusu bakotikala o engumba. » | |
| Zech | LinVB | 14:3 | Nsima Yawe akokende kobundisa bato ba bikolo bina, lokola akosalaka o mokolo mwa etumba. | |
| Zech | LinVB | 14:4 | Mokolo mona akonyata ngomba ya Oliva na makolo, ngomba eye etalani na Yeruzalem. Ngomba ekobukana na ndambo ibale : banda Esti tee Westi ekokoma lobwaku lonene. Eteni yoko ekopusana epai ya Nordi, eteni esusu epai ya Sudi. | |
| Zech | LinVB | 14:5 | Mokolo mona bakokima o lobwaku lokokoma lonene kin’o Yasol. Bokokima lokola bokimaki mokolo mokili moninganaki ntango Ozia azalaki mokonzi wa Yuda. O ntango ena Yawe Nzambe wa ngai akoya elongo na basantu ba ye banso. | |
| Zech | LinVB | 14:7 | Mokolo se moko mokoya, Yawe ayebi mwango, moi na butu ikolandana lisusu te, o ntango ya mpokwa mwinda mokongenge. | |
| Zech | LinVB | 14:8 | Mokolo mona maziba makobima o Yeruzalem ; ndambo ya mai ekokende o mbu ya Esti, ndambo esusu o mbu ya Westi : o eleko ya elanga lokola o eleko ya mpela. | |
| Zech | LinVB | 14:9 | Mokolo mona Yawe akolakisa ’te azali Mokonzi wa nse mobimba. Akozala ye moko mokonzi, se nkombo ya ye ekotikala. | |
| Zech | LinVB | 14:10 | Mokili mobimba mokokoma lokola esobe, banda Geba tee Rimon ya Negeb. Yeruzalem ekotombwama mpe bato bakofanda banda Ezibeli ya Benyamin tee ezibeli ya kala mpe Ezibeli ya Litumu ; banda linongi lya Kananel tee bikamelo bya mokonzi. | |
| Zech | LinVB | 14:11 | Bato bakofanda kuna. Bakotombela moto moko bobe lisusu te. Yeruzalem mobimba ekozala na kimia mpenza. | |
| Zech | LinVB | 14:12 | Tala, Yawe akopesa bato babundaki na Yeruzalem bitumbu biye : akopolisa nsuni ya bato batelemi naino ; miso ma bango makopolo o kati ya elongi, ndemo ya bango ikopolo o kati ya monoko. | |
| Zech | LinVB | 14:13 | Mokolo mona mobulu monene mokozala o kati ya bango : bakokamatana mpe bakobetana. | |
| Zech | LinVB | 14:14 | O ntango ena bato ba Yuda bakobunda mpe o Yeruzalem. Bakosangisa nkita ya bikolo bya penepene : wolo, palata na bilamba ebele mpenza. | |
| Zech | LinVB | 14:15 | Farasa na mpunda, kamela na nyama inso ikozala o nganda ikozwa etumbu se lolengeloko. | |
| Zech | LinVB | 14:16 | Bato baye bayaki kobundisa Yeruzalem mpe bakotikala na bomoi, bakokende mobu na mobu o Yeruzalem kokumisa Yawe wa bokasi bonso mpe kosepela eyenga ya Biema. | |
| Zech | LinVB | 14:17 | Bato ba ekolo eye ekokende kokumisa Yawe mokonzi wa bokasi bonso o Yeruzalem te, mbula ekonoko epai ya bango te. | |
| Zech | LinVB | 14:18 | Soko bato ba Ezipeti baboyi koya, Yawe akopesa bango etumbu eye akopesaka bato baboyi kosepela eyenga ya Biema. | |
| Zech | LinVB | 14:19 | Etumbu eye ekokwela bato ba Ezipeti mpe ba bikolo biye bakoboya kokende kosepela eyenga ya Biema. | |
| Zech | LinVB | 14:20 | Mokolo mona maloba maye makomama o ngonga ike iye bakolatisaka farasa o nkingo : « Ebonzami na Yawe. » Nzungu ya Tempelo ya Yawe ikozala isantu lokola sani ya makila o boso bwa altare. | |