Chapter 1
Eccl | LinVB | 1:6 | Mompepe mokouta o Sudi mpe mokokende epai ya Nordi, mokozolongana bipai binso, mpe nsima mokozonga bobele nzela eye moutaki. | |
Eccl | LinVB | 1:7 | Bibale binso bikotiyolaka epai ya mbu, mpe mbu ekotonda na yango te. Mpe mai ma ebale makozongaka epai ya liziba, mpe kuna makobanda lisusu kotiyola se epai ya Sudi mpo ya kosuka o mbu. | |
Eccl | LinVB | 1:8 | Mana manso maleki mingi ! Moto moko te akoki koloba ’te miso makolembeke te na botali, matoi makolembeke te na boyoki ! | |
Eccl | LinVB | 1:9 | Makambo mazalaka kala, makomonono lisusu nsima. Makambo masalemaka liboso, makosalema lisusu. Makambo ma sika mpenza awa o mokili mazali te ! | |
Eccl | LinVB | 1:11 | Yeba ’te bato ba lelo bakokanisaka bato ba kala te, mpe baye bakobotama nsima, bakokanisa mpe bato ba lelo te. | |
Eccl | LinVB | 1:13 | Na motema monso namekaki koluka mpe koyeba makambo manso makolekaka awa o nse. Ezali mosala moko mwa mpasi Nzambe apesaki bana ba Adamu. | |
Eccl | LinVB | 1:14 | Natali misala minso mikosalemaka awa o mokili ; kasi namoni ’te yango inso izali se mpamba, ezali bolandi mompepe ! | |
Eccl | LinVB | 1:16 | Namilobeli : Nazwi sikawa bwanya, leka bakonzi banso bazalaki liboso lya ngai o Yeruzalem. Nakomi koyeba ntina ya bwanya mpe ya boyebi ; | |
Eccl | LinVB | 1:17 | nasali makasi mpo nayeba mayele ma bato, nayeba mpe bolema na bozoba bwa bango, kasi namoni ’te yango mpe ezali lokola kolanda mompepe. | |
Chapter 2
Eccl | LinVB | 2:1 | Namilobeli : Tika nameka kolanda bisengo, nayoka elengi ya bomengo. Namoni ’te yango mpe ezali se mpamba. | |
Eccl | LinVB | 2:2 | Namoni bato bazali koseke mpe nalobi : Bazali bazoba ! Namoni bato bazali kosepela, nalobi : Ntina ezali te ! | |
Eccl | LinVB | 2:3 | Nakani o motema ’te nakende komele masanga, kasi na mayele, mpe nasala bozoba mwa mikolo mpo nayeba eloko nini ebongeli bana ba Adamu na mwa mikolo miye Nzambe akopesa bango. | |
Eccl | LinVB | 2:7 | Nasombi baombo, babali mpe basi ; nazalaki na bato ba mosala mpe na nyama ebele, ngombe na mpata, leka bakonzi banso ba Yeruzalem baye bazalaki liboso lya ngai. | |
Eccl | LinVB | 2:8 | Nakongoli mpe palata na wolo na nkita iutaki na bakonzi ba bikolo bisusu, naluki bayembi babali mpe basi ; naluki mpe bomengo bonso moto akoki kolula, nazwi basi ebele. | |
Eccl | LinVB | 2:9 | Nakomi moto monene mpe na nkita enene, leka bakonzi banso bazalaki liboso lya ngai o Yeruzalem. Nzokande bwanya bwa ngai botikaki ngai te. | |
Eccl | LinVB | 2:10 | Natali maye manso miso ma ngai mazalaki kolula, napimi motema mwa ngai esengo yoko te. Mpamba te, nasepelaki misala minso nasalaki ; mizali litomba nazwaki mpo ya misala mya ngai minso. | |
Eccl | LinVB | 2:11 | Kasi na nsima nakanisi misala mya ngai minso mpe mpasi inso na-ndimaki koyoka mpo ya kosala myango. Namoni ’te yango inso izali se mpamba mpe ezali bolandi mompepe ; awa o nse mpo yoko te ezali na litomba ! | |
Eccl | LinVB | 2:12 | Na nsima nakanisi mpe namanyoli makambo ma bwanya na makambo ma bozoba mpe bolema. Namituni : Moto akokitana ngai akosala nini ? Akosala bobele lokola maye masili masalemi. | |
Eccl | LinVB | 2:14 | Moto wa bwanya akomonoko polele mpenza, kasi moto zoba akotambolaka o molili. Nzokande nayebi ’te bango babale bakosuka se motindo moko. | |
Eccl | LinVB | 2:15 | Bongo namilobeli : Maye makokwela moto zoba, makokwela mpe ngai ; mpo nini nalukaki kozala moto wa bwanya mingi boye ? Namoni ’te yango mpe ezali se mpamba. | |
Eccl | LinVB | 2:16 | Zambi moto moko akokanisaka moto wa bwanya te, se lokola bakobosanaka moto zoba libela. Nsima ya mwa mikolo bakobosana bango babale. Ná moto wa mayele, ná moto zoba, bakowa se ndenge yoko. | |
Eccl | LinVB | 2:17 | Yango wana nayini bomoi, zambi namoni ’te makambo manso ma nse mazali mabe. Binso bizali se mpamba mpe ezali bolandi mompepe. | |
Eccl | LinVB | 2:18 | Ngai naboyi misala minso nasalaki awa o nse, miye mikotikala na moto oyo akokitana ngai : | |
Eccl | LinVB | 2:19 | nani ayebi soko akozala moto wa bwanya to zoba ? Ye akozala mokonzi wa misala minso nasalaki na bwanya o mokili. Yango mpe ezali se mpamba. | |
Eccl | LinVB | 2:21 | Na bwanya moto amipesi na mosala tee abongisi mwango ; kasi asengeli kotika mwango na moto mosusu, oyo asali eloko te. Yango mpe ezali se mpamba, ntina te ! | |
Eccl | LinVB | 2:22 | Moto asali mosala mingi mpe alembisi nzoto bomoi bwa ye mobimba, akotikala na eloko nini ? | |
Eccl | LinVB | 2:23 | Mikolo minso moto amitungisi mpe ayoki mpasi, ata na butu alali mpongi te ; yango inso izali mpe mpamba ! | |
Eccl | LinVB | 2:24 | Awa o nse bolamu bozali te, bobele kolia na komele, mpe koyoka elengi ya maye ozwi na mosala mwa yo. Namoni ’te yango mpe ekoutaka o maboko ma Nzambe. | |
Chapter 3
Eccl | LinVB | 3:2 | Ntango ya kobota mpe ntango ya kokufa ; ntango ya kolona mboto mpe ntango ya kobuka mbuma. | |
Eccl | LinVB | 3:3 | Ntango ya koboma mpe ntango ya kobikisa ; ntango ya kobuka ndako mpe ntango ya kotonga yango. | |
Eccl | LinVB | 3:5 | Ntango ya kobwaka mabanga mpe ntango ya kolokoto mango ; ntango ya koyambana mpe ntango ya kotikana. | |
Eccl | LinVB | 3:6 | Ntango ya koluka mpe ntango ya kobungisa ; ntango ya kobomba biloko mpe ntango ya kosilisa byango. | |
Eccl | LinVB | 3:7 | Ntango ya kopasola elamba mpe ntango ya kobamba yango ; ntango ya kokanga monoko mpe ntango ya koloba. | |
Eccl | LinVB | 3:11 | asali binso malamu mpe na ngonga ya byango, mpe apesi moto mayele ma koyeba boumeli bwa makambo manso ; kasi moto moko te akoki koyeba mosala Nzambe asalaki ut’o libandela mpe moye akosala tee nsuka. | |
Eccl | LinVB | 3:12 | Nayebi ’te awa o nse moto akoki bobele kosepela mpe koluka kozwa bolamu bomoi bwa ye mobimba. | |
Eccl | LinVB | 3:13 | Soko moto azwi biloko bya kolia mpe bya komele, mpe soko akoki kosepela na maye azwi na mosala mwa ye, yango mpe ezali likabo lya Nzambe solo. | |
Eccl | LinVB | 3:14 | Nayebi ’te biloko Nzambe asali bikoumela seko. Bato bakoki kobakisa to kolongola eloko te ; Nzambe abongisi makambo manso mpo babanga ye. | |
Eccl | LinVB | 3:15 | Maye mazali lelo, mazalaka mpe kala ; maye makoya, mazalaka mpe liboso ; Nzambe alingi kozongisa maye maleka liboso. | |
Eccl | LinVB | 3:16 | Namoni mpe makambo masusu o mokili : moyibi afandi o kiti ya zuzi, mosumuki akati makambo o esika ya bato ba bosembo. | |
Eccl | LinVB | 3:17 | Namilobeli : Nzambe akosambisa ná moto semba ná moto mabe ; mpamba te, ntango ezali ya makambo manso mpe ya misala minso awa o nse. | |
Eccl | LinVB | 3:19 | Tala : ná bana ba Adamu ná nyama bakosuka se ndenge yoko : banso babale bazali na mpema ya bomoi mpe bakokufa se ndenge yoko. Moto aleki nyama soki moke te ; binso awa o nse bizali se mpamba. | |
Eccl | LinVB | 3:20 | Binso bikosuka se esika yoko, binso bikoutaka o mabelé, mpe binso bikozongaka o mabelé. | |
Eccl | LinVB | 3:21 | Nani ayebi soko milimo mya bato mikobuta o likolo, mpe soko mpema ya nyama ekokita o nse ? | |
Chapter 4
Eccl | LinVB | 4:1 | Namoni mpe minyoko minso mizali awa o mokili. Botala ndenge bato banyokwami bazali kolela, mpe moto moko te abondi bango. Banyokoli balakisi bango makasi ma bango, kasi moto moko abondi bango. | |
Eccl | LinVB | 4:3 | Kasi esengo epusi na moto abotami naino te ; zambi amoni makambo mabe ma mokili moye te. | |
Eccl | LinVB | 4:4 | Namoni ’te o manso bato bakomiyokisaka mpasi mpe bakolongaka, bazali se koyokelana zuwa ; yango ezali se mpamba mpe ezali lokola kolanda mompepe ! | |
Eccl | LinVB | 4:6 | Malamu ozala na mwa ntango ya bopemi esika ’te osala mosala ntango inso mpe olanda mompepe. | |
Eccl | LinVB | 4:8 | kanisa moto azali bobele ye moko, azali na moninga te, mwana te, ndeko te. Akomilembisaka na mosala, kopema te ; ata miso ma ye makolembe te na boluli nkita : « Bongo ngai, awa nakosalaka mosala, namipima bisengo bya mokili mpo ya nani ? » Yango mpe ezali mpamba, mosala mwa mpunda. | |
Eccl | LinVB | 4:9 | Bato babale baleki moto moko na makasi, zambi bakozwa lifuta linene na mosala mwa bango. | |
Eccl | LinVB | 4:10 | Soko moko akwei, moninga akotelemisa ye. Kasi mawa na moto oyo azali se ye moko ! Soko akwei, moninga oyo akotelemisa ye, azali te. | |
Eccl | LinVB | 4:11 | Mpe : soko balali esika yoko, bakoyoka molunge ; kasi soko moto azali ye moko, ndenge nini akoyoka molunge ntango ya mpio ? | |
Eccl | LinVB | 4:12 | Bakoki kokweisa yo soko azali se ye moko. Kasi soko ozali na moto mosusu, bokosukisa ye, mpo bakolobaka : Mokulu motongami na nsinga isato, mokokatanaka noki te. | |
Eccl | LinVB | 4:13 | Mwana mobola, kasi azali na mayele, aleki mokonzi wa ekolo oyo akomi mpaka, mpe na bozoba aboyi kondima malako ma bato. | |
Eccl | LinVB | 4:14 | Monzenga oyo akoki kobima o boloko mpo ya koyangela ekolo, ata abotamaki mobola mpenza. | |
Eccl | LinVB | 4:15 | Namoni ’te bato banso ba mokili bandimi bobele ye, moto oyo abimi o boloko mpe akamati esika ya mokonzi. | |
Eccl | LinVB | 4:16 | Bato balingaki ye bazalaki ebele. Nzokande bato bayei nsima basepeli na ye te. Yango mpe ezali se mpamba : ezali lokola kolanda mompepe. | |
Chapter 5
Eccl | LinVB | 5:1 | Oloba noki noki te o miso ma Nzambe, bimisa maloba se malembe, zambi Nzambe azali o likolo mpe yo ozali o nse ; yango wana oloba maloba mingi te. | |
Eccl | LinVB | 5:2 | Soko makanisi maleki mingi, okoloto ndoto, mpe soko maloba maleki mingi, okoloba makambo ma bozoba. | |
Eccl | LinVB | 5:3 | Soko olakeli Nzambe elako, kokisa yango noki ; Nzambe alingi bazoba te. Sala lokola olakeli Nzambe. | |
Eccl | LinVB | 5:5 | Maloba ma yo makomisa yo mosumuki te, mpe oloba na nganga Nzambe te : ‘Nabosani’. Mpo nini olingi kotumola Nzambe na maloba ma yo mpe kobebisa bongo mosala mwa yo ? | |
Eccl | LinVB | 5:6 | Ndoto mingi izali na makambo mazangi ntina, se bongo makolobamaka se mpamba. Yango wana malamu obanga Nzambe. | |
Eccl | LinVB | 5:7 | Soko omoni o ekolo esusu ’te bakonyokoloko babola to bakokataka makambo na bosembo te, okamwa na yango te, zambi moto monene wa leta abatelami na moninga wa ye, mpe likolo lya bango, bankumu basusu bakobatela bango. | |
Eccl | LinVB | 5:8 | Kasi bato banso bakobika mpo ya bilanga ; ata mokonzi wa ekolo akobika mpo ya mbuma ya bilanga. | |
Eccl | LinVB | 5:9 | Moto alingi mosolo mingi, akotonda na mwango mokolo moko te ; oyo alingi bomengo, akozwa na bwango litomba te. Yango mpe ezali mpamba. | |
Eccl | LinVB | 5:10 | Esika biloko bizali mingi, bato bakoya kolia byango bazali mpe ebele. Nkolo wa biloko akozwa na byango litomba kani ? Bobele lokumu la komono bato mingi. | |
Eccl | LinVB | 5:11 | Mongamba akolalaka mpongi se malamu ; ata alei mingi to alei se moke, likambo te. Kasi moto wa biloko mingi akolalaka malamu te. | |
Eccl | LinVB | 5:12 | Namoni likambo lisusu lya mawa mpenza o mokili : Moto monene abombi mosolo mingi, kasi azwi likama. | |
Eccl | LinVB | 5:13 | Nkita ya ye inso ikomi kosila na mbala yoko ; mpe mwana ye aboti akotikala maboko mpamba. | |
Eccl | LinVB | 5:14 | Abimaki bolumbu o libumu lya mama wa ye, akozonga se ndenge ayaki ; azwi litomba lyoko na mosala mwa ye te. Epai akokende, akomeme eloko yoko te. | |
Eccl | LinVB | 5:15 | Yango ezali likambo lya mawa mingi, soko akei maboko mpamba se lokola ayaki liboso. Azwi litomba nini awa asali mosala mpe mosala mokei lokola mompepe ? | |
Eccl | LinVB | 5:16 | Mikolo mya ye minso mikosila o ntei ya molili, ya mawa manene, ya mpasi mpe ya nkanda. | |
Eccl | LinVB | 5:17 | Namoni boye : Malamu moto alia, amele mpe asepela na mosala akosalaka awa o mokili, mikolo minso Nzambe akopesa ye mpema, zambi yango ezali bomoi bwa biso. | |
Eccl | LinVB | 5:18 | Solo, soko Nzambe apesi moto nkita na mosolo, soko apesi ye ntango ya kolia, yango mpe kosepela mosala mwa ye, yango ezali likabo linene lya Nzambe. | |
Chapter 6
Eccl | LinVB | 6:2 | Kanisa, Nzambe apesi moto nkita, biloko mingi na mpe lokumu ; akabeli ye binso biye motema mwa ye mokoki kolinga, kasi apesi ye ntango ya kolia byango te, mpe moto mosusu alei byango. Yango mpe ezali likambo lya mpamba mpe lya mpasi mingi. | |
Eccl | LinVB | 6:3 | To mpe : moto mosusu, aboti bana monkama mpe aumeli mibu miike mpenza, mpe azwi ata lilita te mpo bakunda ye. Bongo nalobi : Ata mwana abotami matshombe mpe akufi, aleki ye. | |
Eccl | LinVB | 6:6 | Ata moto oyo aumeli na bomoi mibu nkoto ibale, mbele azalaki na esengo mokolo moko te. Banso bakokende bobele o esika yoko. | |
Eccl | LinVB | 6:8 | Moto wa bwanya aleki moto zoba na nini ? Mpe mobola oyo ayebi komibikisa akozwa nde nini ? | |
Eccl | LinVB | 6:9 | Komono na miso eleki kolula na motema, yango mpe ezali se mpamba mpe lokola kolanda mompepe. | |
Eccl | LinVB | 6:10 | Binso biye bikelami bisili bizwi nkombo, mpe toyebi ’te moto azali se mpamba, akoki kosamba te na oyo aleki ye na bokasi. | |
Eccl | LinVB | 6:11 | Kolobaloba mingi ezali kolakisa bozoba ; na maloba ma ye ebele, moto akozwa litomba kani ? | |
Chapter 7
Eccl | LinVB | 7:1 | Lokumu la moto loleki mafuta ma nsolo mpimbo, mokolo mwa liwa moleki mokolo mwa mbotama. | |
Eccl | LinVB | 7:2 | Kokende lilaka eleki kokende li-mpati, mpo moto na moto akosuka bobele wana. Ebongi bato banso bakanisa mpo eye malamu. | |
Eccl | LinVB | 7:3 | Oyo azali na mawa aleki moto azali kosepela, zambi moto wa mawa akoki kobomba esengo o motema. | |
Eccl | LinVB | 7:4 | Motema mwa moto wa bwanya mozali o ndako ya lilaka, mpe motema mwa bazoba o ndako ya bisengo. | |
Eccl | LinVB | 7:5 | Malamu oyoka moto wa bwanya soko apaleli yo, esika ’te oyoka nzembo ya bazoba bakumisi yo. | |
Eccl | LinVB | 7:6 | Lokito la bazoba bakosekeseke lozali lokola lokito la móto mwa nzube o nse ya lisasu. Kasi yango mpe ezali se mpamba. | |
Eccl | LinVB | 7:7 | Konyokolo moto wa bwanya ekokomisa ye zoba, mpe kopesa mabonza ekobebisa motema mwa ye. | |
Eccl | LinVB | 7:8 | Kobanda mosala, eleki malamu osukisa mwango ; moto wa boboto aleki moto wa lolendo na bolamu. | |
Eccl | LinVB | 7:9 | Koyoka motema nkanda noki ezali malamu te, zambi nkanda ekozalaka o motema mwa bazoba. | |
Eccl | LinVB | 7:10 | Otuna te : ‘Ndenge nini liboso manso mazalaki malamu, leka sikawa ?’ Kotuna bongo elakisi bwanya te. | |
Eccl | LinVB | 7:11 | Bwanya bozali malamu lokola biloko tata atikeli yo, bokozwelaka bato banso ba nse litomba. | |
Eccl | LinVB | 7:12 | Bwanya bokobatelaka moto, se lokola mosolo ; kasi bwanya bokobikisa mpe moto oyo azali na bwango. | |
Eccl | LinVB | 7:14 | Mokolo ozali malamu, yoka esengo, mokolo ozali na mpasi, kanisa ’te Nzambe akeli yango inso ibale mpo ’te moto ayeba te makambo nini makoya nsima. | |
Eccl | LinVB | 7:15 | O bomoi bwa ngai bwa mpamba, namoni makambo mabale : moto malamu akokufa, ata azali moto wa bosembo, moto mabe akoumela ata azali na motema mabe. | |
Eccl | LinVB | 7:17 | Olekisa ndelo te na bosali mabe to na bozoba, soki te okokufa liboso ’te elaka ya yo ekokoka. | |
Eccl | LinVB | 7:18 | Otikala o kati ya nzela iye ibale : oyo akobangaka Nzambe, akobika o nzela iye ibale. | |
Eccl | LinVB | 7:21 | Otia matoi na bilobaloba bya bato te, bongo okoyoka te ndenge mosali azali kotongo yo. | |
Eccl | LinVB | 7:23 | Nameki koyeba mana manso na bwanya ; nakanisaki ’te nakozala moto wa mayele, kasi bwanya bokimaki ngai mosika. | |
Eccl | LinVB | 7:24 | Manso makelami liboso maleki mayele ma ngai, maleki bozindo. Nani akoki koyeba mango ? | |
Eccl | LinVB | 7:25 | Na motema moko namanyoli mpe nameki koyeba maye matali bwanya mpe ntina ya makambo manso. Namoni ’te oyo akosalaka mabe azali zoba, mpe maye akosalaka mazangi ntina. | |
Eccl | LinVB | 7:26 | Namoni likambo lileki liwa na bololo, yango nde mwasi, soko akomi motambo, soko motema mwa ye mokomi monyama, mpe maboko ma ye makomi lokola minyololo ; moto akosepelisaka Nzambe akoki kokima ye, kasi mosumuki akokangema na ye. | |
Eccl | LinVB | 7:28 | Nazalaki se koluka mpe nazwi te. O kati ya bato nkoto yoko nazwi mobali moko, kasi mwasi ata moko te ! | |
Chapter 8
Eccl | LinVB | 8:1 | Nani azali moto wa bwanya, mpe nani akoki kolimbola makambo ? Bwanya bokongengisaka elongi ya moto, bokolongolaka mawa o elongi ya ye. | |
Eccl | LinVB | 8:3 | Otika mokonzi noki te ; otungisa ye te na makambo ma kwokoso, zambi mokonzi akosalaka manso lokola alingi. | |
Eccl | LinVB | 8:5 | Moto akotosa mibeko, akozwa makambo te ; moto wa bwanya ayebi ’te makambo manso mazali na nsuka. | |
Eccl | LinVB | 8:6 | Ya solo, ngonga ya kosamba makambo manso ezali ; kasi moto azali na likambo linene lya mpasi : | |
Eccl | LinVB | 8:7 | ayebi te makambo nini makosalema, moto moko akoyebisa ye te makambo nini makokwela ye. | |
Eccl | LinVB | 8:8 | Moto moko te azali mokonzi wa mpema ya ye, moto moko te akoki kozongisa mokolo mwa liwa nsima, moto moko te akoki kokima etumba, mpe mayele mabe makobikisa moto te. | |
Eccl | LinVB | 8:9 | Namoni makambo mana manso mpe natii motema mpo nayeba manso makosalemaka o mokili, awa moto moko azali na nguya ya kokonza moto mosusu mpe ya koyokisa ye mpasi. | |
Eccl | LinVB | 8:10 | Namoni mpe ndenge bakoku-ndaka bato babe, nzokande bakobenganaka bato balamu o esika esantu, mpe bakobosanaka bango o mboka. Yango mpe ezali mpamba. | |
Eccl | LinVB | 8:12 | Ata moto asali masumu mbala nkama, azali se nzoto makasi. Kasi nayebi mpe ’te : Esengo ekozala na bato balingi Nzambe, zambi bakobangaka ye. | |
Eccl | LinVB | 8:13 | Nayebi ’te moto mabe akozala na esengo te ; bomoi bwa ye bokolimwa lokola molinga, zambi ye akobangaka Nzambe te. | |
Eccl | LinVB | 8:14 | Makambo ma kilikili makosalemaka o mokili. Ntango esusu base-mba bakozwa etumbu ekoki na bato babe, mpe bato babe bakozwa esengo ekoki na basemba. Nasili nalobi : Makambo mazali na ntina te. | |
Eccl | LinVB | 8:15 | Yango wana nakumisi bisengo bya nse : malamu moto alia o mokili moye, amele mpe asepela ; se yango ezali na ye o mikolo minso mya bomoi Nzambe akopesa ye awa o nse. | |
Eccl | LinVB | 8:16 | Natiaki motema mpo nayeba bwanya, natali ndenge bato bakosalaka mosala awa o mokili mpe boniboni butu moi bakopemaka te. | |
Chapter 9
Eccl | LinVB | 9:1 | Ya solo, nakanisi mana manso malamu mpe namoni boye : Basemba na bato ba bwanya, na misala mya bango minso, bazali o maboko ma Nzambe. Moto moko ayebi te soko bato bakolinga ye to soko bakoyina ye ; makambo mana maleki mayele ma ye. | |
Eccl | LinVB | 9:2 | Makambo ma bato banso mazali se ndenge yoko. Bokeseni bozali te kati ya moto malamu na moto mabe, kati ya moto wa motema peto na moto wa mbindo, kati ya moto abonzi mabonza na oyo abonzi mabonza te, kati ya moto azali na motema bosembo na oyo azali mosumuki, kati ya moto alayi ndai na oyo abangi kolaya ndai. | |
Eccl | LinVB | 9:3 | Ezali mabe ’te makambo manso makokwelaka bato banso mazali se ndenge yoko. Yango wana, mitema mya bato mitondi na mayele mabe, mpe bozoba bozali na bango bomoi bwa bango mobimba, na nsima bakosuka bobele o mboka ya bawa. | |
Eccl | LinVB | 9:4 | Nzokande mikolo minso bato bazali naino na bomoi batikali na elikya : Mbwa ezali na bomoi eleki ntambwe eye ekufa. | |
Eccl | LinVB | 9:5 | Bato bazali na bomoi bayebi ’te bakokufa, kasi bato bakufi bayebi eloko te. Bato bakufi bakozwa lifuta lisusu te, zambi nkombo ya bango ebungi libela. | |
Eccl | LinVB | 9:6 | Bolingi na boyini na zuwa ya bango isili kokende mosika. Makambo manso ma mokili matali bango lisusu te. | |
Eccl | LinVB | 9:7 | Kende kolia mampa na motema nsai, mpe mele vino na motema esengo, mpo Nzambe andimi misala mya yo. | |
Eccl | LinVB | 9:9 | Sepela mpe fanda na mwasi oyo olingi mwa mikolo okozala awa o mokili ; awa Nzambe apesi yo mikolo miye mya mpamba, ezali likabo lya yo mpo ya mosala okosala o mokili. | |
Eccl | LinVB | 9:10 | Sala misala minso okoki kosala, sala myango na makasi ma yo manso, zambi o mboka ya bawa esika okokende, misala, mayele, boyebi na bwanya bizali te. | |
Eccl | LinVB | 9:11 | Awa o mokili namoni lisusu boye : Bato bayebi kopota mbangu, bakolonga o momekano te ; bato baleki makasi bakolonga o etumba te ; bato baleki bwanya bakolia mampa malamu te ; bato baleki mayele bakozwa nkita te ; bato bayebi makambo mingi bakozwa lokumu te, zambi makila malamu na mabe makokwela bango banso. | |
Eccl | LinVB | 9:12 | Ntembe te, moto moko ayebi ngonga ya ye te. Se lokola mbisi ikokangema o monyama, mpe lokola ndeke ikokoto o motambo, bobele bongo bato bakokamwa na mikolo mya mpasi, bolozi bokokwela bango na mbalakaka. | |
Eccl | LinVB | 9:13 | Namoni lisusu mpo yoko etali bwanya awa o mokili, mpe ezali likambo linene o miso ma ngai. | |
Eccl | LinVB | 9:14 | Ezalaki mboka yoko eke ya bato mingi te. Mokonzi wa ekolo ayei kobunda na bato ba mboka ena, anyokoli bango mpe atongi bibombamelo binene. | |
Eccl | LinVB | 9:15 | Ezalaki wana mobola moko wa bwanya ; abikisi mboka na bwanya bwa ye. Kasi na nsima moto moko akanisi lisusu moto mobola te. | |
Eccl | LinVB | 9:16 | Bongo nalobi : Bwanya boleki bokasi na motuya, kasi bato batali bwanya bwa mobola se mpamba mpe balingi koyoka maloba ma ye te. | |
Eccl | LinVB | 9:17 | Bakondimaka maloba ma bwanya soko malobami na boboto, kasi bogangi bwa mokonzi o ntei ya bazoba, bakoyoka bwango te. | |
Chapter 10
Eccl | LinVB | 10:1 | Nzinzi epoli ekobebisa mafuta ma malasi ; mwa bozoba bokobebisa lokumu la moto wa bwanya. | |
Eccl | LinVB | 10:2 | Motema mwa moto wa bwanya mokokende nzela elamu, motema mwa moto zoba mokokende nzela ebe. | |
Eccl | LinVB | 10:3 | Ata o nzela, zoba azali na mayele te, na makambo akosalaka, bato banso bakomono ’te azali zoba. | |
Eccl | LinVB | 10:4 | Soko mokonzi asiliki na yo, okima mosala te, zala motema mpio mpo obebisa mosala mwa yo te. | |
Eccl | LinVB | 10:7 | Namoni baombo bakomi kotambwisa farasa, mpe bankumu batamboli na makolo lokola baombo. | |
Eccl | LinVB | 10:8 | Moto atimoli libulu, ye moko akoki kokweya o kati, moto abuki efelo, nyoka ekoki koswa ye. | |
Eccl | LinVB | 10:10 | Soko mbeli esili bopotu mpe basebi yango te, osengeli kosala makasi mingi mpo ya kokata ; na bwanya okozwa litomba noki. | |
Eccl | LinVB | 10:11 | Soko nyoka eswi zambi banyelisi yango malamu te, litomba nini monyelisi wa yango akozwa ? | |
Eccl | LinVB | 10:12 | Maloba ma moto wa bwanya makosepelisaka bato, kasi mbebu ya moto zoba ikobungisa ye. | |
Eccl | LinVB | 10:13 | Efungoli ye monoko, akolobaka makambo ma bozoba, maloba ma ye ma nsuka, bolema mpenza. | |
Eccl | LinVB | 10:14 | Moto zoba akolobaka makambo kilikili, nzokande ayebi te makambo nini makoya. Nani kutu akoki kolakisa ye makambo mana ? | |
Eccl | LinVB | 10:16 | Mawa na ekolo soko mokonzi azali se mwana, soko bankumu ba mboka bakomeleke masanga ut’o ntongo. | |
Eccl | LinVB | 10:17 | Esengo na ekolo soko mokonzi auti o libota lya bankumu, mpe soko bankumu bakolia o ntango ekoki, mpo ya elengi ya bilei te, kasi mpo bazwa bokasi. | |
Eccl | LinVB | 10:18 | Soko moto aleki goigoi, likonzi lya ndako likopolo, soko maboko maboyi mosala, ndako ekotanga mbula. | |
Eccl | LinVB | 10:19 | Bilei bikoyokisaka elengi, vino ekosepelisaka bomoi bwa bato, mpe na mosolo bakoki kosomba biloko binso. | |
Chapter 11
Eccl | LinVB | 11:2 | Bomba biloko bya yo epai ya bato nsambo to mwambe, zambi oyebi te mpasi nini ekoki kokwela yo nsima. | |
Eccl | LinVB | 11:3 | Soko mampata matondi o likolo, mbula ekonoko o nse. Nzete ekweya epai ya Sudi to epai ya Nordi, ekotikala se wana. | |
Eccl | LinVB | 11:4 | Moto oyo akotalaka mompepe ntango inso, akolona mboto te, oyo akotalaka mampata, akobuka mbuma te. | |
Eccl | LinVB | 11:5 | Okoki koyeba te ndenge mpema ya bomoi ekokoto o nzoto ya mwana, ntango mama azali komeme ye naino o libumu ; se bongo, okoki koyeba misala mya Nzambe te, oyo akela bikelamo binso. | |
Eccl | LinVB | 11:6 | Kende kolona mboto ya yo banda ntongo, mpe sala se mosala tee mpokwa, zambi oyebi te soko mosala nini mokobongo. | |
Eccl | LinVB | 11:8 | Ata moto akoumela mibu miike, malamu ayoka esengo o mikolo mina, akanisa ’te mikolo mya molili mikozala mpe mingi, mpe makambo manso makoya nsima mazali se mpamba. | |
Eccl | LinVB | 11:9 | Elenge mobali, sepela ntango ya bolenge bwa yo, mpe yoka esengo o mikolo ozali naino na bokasi. Sala maye motema mwa yo molingi, mpe tambola o nzela eye miso ma yo makolakisa. Kasi yeba ’te Nzambe akotuna yo makambo manso. | |
Chapter 12
Eccl | LinVB | 12:1 | Kanisa mozalisi wa yo ntango ozali naino elenge, liboso ’te mikolo mya mpasi miya, mpe mibu miye ndolobi : « Nazali na esengo lisusu te », | |
Eccl | LinVB | 12:2 | liboso ’te moi na mwinda miinda, liboso ’te sanza na minzoto mizima, liboso ’te mampata manoisa mbula. | |
Eccl | LinVB | 12:3 | O ntango ena bakengeli ba ndako bakolenge mpe bilombe ba nzoto ekasi bakogumbama, mpe basi bakotuta biloko bakotika mosala, mpo bazali baike te, mpe baye batalaki o lininisa bakomono lisusu te ; | |
Eccl | LinVB | 12:4 | bizibeli bya ndako bikokangema, lokito la konika fufu ekosila, mingongo mya ndeke mikolamusaka mpe nzembo bikoyokana lisusu te. | |
Eccl | LinVB | 12:5 | O ntango ena bato bakobanga kobuta ngomba, mpe bakoyoka nsomo mpo ya makama ma nzela. O ntango ena nzete ya lidame ekobimisa fulele mpe lipalela likotonda na bilei mpe mbuma ya nzete ya makasú ikopaswana, kasi yo moko okokende kolanda ndako ya yo ya seko mpe basi ba lilaka basili kokoma o balabala. | |
Eccl | LinVB | 12:6 | Mokolo mona nsinga ya palata ekokatana, kopo ya wolo ekobukana, mbeki ya mai ekobolana penepene na liziba, yika ya kobenda mai ekobukana, | |
Eccl | LinVB | 12:9 | Kohelet azalaki moto wa bwanya, alakisi mpe bato ba ekolo ya ye mayele, ayekoli, abongisi mpe abimisi biyele mingi. | |
Eccl | LinVB | 12:11 | Maloba ma bato ba bwanya makolendisaka lokola mangenda, liboke lya mango lokola bapiki mango na nsete. Mokambi se moko ayebisi maloba mana manso. | |
Eccl | LinVB | 12:12 | Mwana wa ngai, keba ’te obakisa eloko te : kokoma minkanda mingi ezali na nsuka te, mpe koyekola mingi ekolembisa nzoto. | |
Eccl | LinVB | 12:13 | Awa oyoki maloba maye manso, nakosukisa boye : Banga Nzambe mpe tosa mibeko mya ye, zambi botosi bozali lotomo la bato banso. | |