Chapter 1
II C | LinVB | 1:1 | Polo, apóstolo wa Yézu Krístu, na bolingi bwa Nzambe, na ndéko Timotéo ôná Eklézya ya Nzambe o Korínti mpé ona bakrístu o mokili mwa Akáya mobimba. | |
II C | LinVB | 1:3 | Akúmisama Nzámbe, Tatá wa Mokonzi wa bísó Yézu Krístu ; yě Tatá ntá ngolu mpé Mobóndi wa bato ntángo ínso. | |
II C | LinVB | 1:4 | Akobóndoko bísó o mpási ínso tokoyókaka mpô tókoka kobóndo báníngá o mpási ya bangó ínso, lokóla Nzámbe yě méí akobóndoko bísó. | |
II C | LinVB | 1:5 | Sôló, tozalí koyóka mpási míngi mpo na Krístu, kasi na yě tokozwaka libóndí lya sôló. | |
II C | LinVB | 1:6 | Sókó tozalí koyóka minyóko, ezalí mpô ’te bózwa libóndí mpé bóbíka ; sókó babóndí bísó, ezalí sé mpô ’te bózwa libóndí mpé bózala na moléndé mpô ya koyamba minyóko sé lokóla bísó. | |
II C | LinVB | 1:7 | Tozalí kotía mitéma na bínó, zambí toyébí ’te, áwa bozalí koyóka mpási elongó na bísó, bokozwa mpé libóndí elongó na bísó. | |
II C | LinVB | 1:8 | Zambi bandeko, tokokí kobómbela bínó té mpási eye ekwêlákí bísó o mokili mwa Azía elekákí ndelo. Bamemísákí bísó mókúmbá monéne, bôngó tozalákí lisúsu na elíkyá té ’te tokotíkala na bomoi. | |
II C | LinVB | 1:9 | Sôló, tokanísákí ’te basílákí kokátela bísó etúmbu ya liwá ; yangó wâná toyébákí ’te tokokí kotía mitéma na bísó mǒkó té, kasi bobélé na Nzámbe óyo akosékwisaka bato. | |
II C | LinVB | 1:10 | Yě abíkísákí bísó o likáma lya liwá, bobélé yě moto akobíkisa bísó lisúsu. Yangó wâná totíí elíkyá na yě ’te akobíkisa bísó lisúsu. | |
II C | LinVB | 1:11 | Bínó mpé bozalí kosálisa bísó na losámbo, bôngó bato míngi bakotóndo Nzámbe mpô ya bísó, zambí tokozwa bolámu mpô ya mabóndélí ma bato baíké. | |
II C | LinVB | 1:12 | Zambi lokumu la biso ezali mitéma mya bísó mizalí koyébisa bísó ’te tozalákí o káti ya bato, míngi mpenzá o káti ya bínó, na bosáwa mpé na bosémbo boye boútí na Nzámbe. Tolandí mayéle ma bato té, kasi tondimí sé ngrásya ya Nzámbe. | |
II C | LinVB | 1:13 | Sôló, o minkandá mya bísó tokokomelaka bínó sé maye bokokí kotánga mpé koyéba, mpé nakolíkya ’te bokoyóka malámu mpenzá | |
II C | LinVB | 1:14 | maye bozalákí koyóka sé ndámbo ndámbo téé sikáwa : Mokolo Mokonzi Yézu akoyâ, bínó bokozala ntína ya lokúmu la bísó, sé lokóla bísó tokozala ntína ya lokúmu la bínó. | |
II C | LinVB | 1:15 | Sé na elíkyá yangó nalingákí koyâ libosó epái ya bínó mpô ’te náyókisa bínó esengo mbala íbalé. | |
II C | LinVB | 1:16 | Ut’o epái ya bínó nalingákí kokende o Masedónia, libosó ’te út’o Masedónia názónga epái ya bínó, mpô ’te bókoka kosálisa ngáí nákóba mobémbo kín’o Yudéa. | |
II C | LinVB | 1:17 | Nakánákí ndé kosála bôngó na motéma mǒkó té ? Tǒ bokanísí ’te nakokánaka bôngó bobélé na mayéle ma bomoto, bôngó na mbala yǒ kó nándima mpé nábóya ? | |
II C | LinVB | 1:18 | O míso ma Nzámbe óyo akokósaka té, nayébísí bínó : maye nalobí na bínó malobámí na mitéma míbalé té. | |
II C | LinVB | 1:19 | Mwána wa Nzámbe, Krístu Yézu, óyo bísó, Silváno ná Timotéo tosangélákí bínó, azalákí na mitéma míbalé té, azalákí sé na monoko mǒkó. | |
II C | LinVB | 1:20 | Na yě Nzámbe akokísákí bilakó bínso alakéláká ; yangó wâná o nkómbó ya yě, tokolobaka ‘Amen’ na Nzámbe mpô ya lokúmu la Yě. | |
II C | LinVB | 1:22 | Yě moto atíí elembo o mitéma mya bísó mpé akabélí bísó Elímo Sántu bǒ ndanga ya libíkí. | |
II C | LinVB | 1:23 | Nzámbe ayébí motéma mwa ngáí, ayébí ’te nazóngákí o Korínti té mpô nalingákí kotungisa bínó té. | |
Chapter 2
II C | LinVB | 2:2 | Sókó ngáí moto nayókísí bínó mawa o mitéma, náni akokí koyókisa ngáí esengo ? Ezalí bobélé baye té ngáí moto nayókísí bangó mawa ? | |
II C | LinVB | 2:3 | Yangó wâná nakomélákí bínó makambo maye. Sókó nayákí epái ya bínó, mbele baye basengélákí koyókisa ngáí esengo bayókísákí ngáí mawa. Nayébí malámu ’te esengo ya ngáí ekoyókisa bínó bánso esengo. | |
II C | LinVB | 2:4 | Sôló, nakomélákí bínó monkandá môná na mpási mpé na mawa manéne o motéma mpé na mái o míso. Nasálákí bongo té mpô ya kozokisa bínó mitéma, kasi mpô bóyéba ’te nalingí bínó míngi mpenzá. | |
II C | LinVB | 2:5 | Sókó moto ayókísí ngáí mawa, ayókísí mawa bobélé ngáí kaka té, kasi ayókísí mwâ mawa sókí na bínó banso té, mbele na bato basúsu mwa ebelé o káti ya bínó. | |
II C | LinVB | 2:9 | Awa nakomélákí bínó monkandá môná, nalingákí mpé komeka bínó, námóno sókó bozalí na botósi o makambo mánso. | |
II C | LinVB | 2:10 | Sókó bolímbísí yě, ngáí mpé nakolímbisa yě. Sókó nasengélákí kolímbisa, bóyéba ’te nasílí nasálí yangó mpô ya bínó o míso ma Krístu. | |
II C | LinVB | 2:12 | Ntángo nakómákí o Tróas mpô ya kosangela Nsango Elámu ya Krístu, Mokonzi afungólélí ngáí nzelá ya kosálela yě. | |
II C | LinVB | 2:13 | Kasi motéma mwa ngáí mokitákí mpenzá té, zambí nakútákí ndeko na ngáí Títo kúná té. Yangó wâná natíkí bangó mpé nakeí o Masedónia. | |
II C | LinVB | 2:14 | Tótóndo Nzámbe óyo akoka-mbaka bísó ntángo ínso o nzelá ya lilónga lya Krístu. Na mosálá mwa bísó azalí kopalinginya bipái bínso Nsango Elámu ya Krístu lokóla malási ma nsolo mpímbó. | |
II C | LinVB | 2:15 | Sôló, o míso ma Nzámbe tozalí lokóla malási ma nsolo mpímbó o káti ya baye bazalí kobíka mpé ya baye bazalí kobúngama. | |
II C | LinVB | 2:16 | Bato bazalí kobúngama bakoyókaka nsolo êná lokóla nsolo ya liwá ekokí koboma bangó, kasi baye bazalí kobíka bakoyókaka yangó lokóla nsolo ekokí kopésa bomoi. Náni mpenzá akokí na mosálá monéne moye ? | |
Chapter 3
II C | LinVB | 3:1 | Tobandá ndé komíkúmisa lisúsu ? Tosengélí ndé epáí na bísó monkandá lokóla bato basúsu, mpô bóyamba bísó malámu ? To na monkandá mpô bóyamba bísó malámu ? | |
II C | LinVB | 3:2 | Monkandá mwa bísó, mwángó ndé bínó, mokomámí o mitéma mya bísó ; monkandá môná moyébání mpé motángámí na bato bánso. | |
II C | LinVB | 3:3 | Sôló, bozalí lokóla monkandá moye Krístu akomákí na mabóko ma bísó ; mokomámí na mái ma monkandá té, kasi na Elímo wa Nzámbe wa bomoi, o méza ya mabángá té, kasi o mitéma mya bato. | |
II C | LinVB | 3:6 | Yě moto asálákí ’te tókoka na mosálá mwa bosáleli Bondeko bwa Sika ; Bondeko boye bokomámí na nkomá té, kasi na Elímo, zambí Mobéko mokobomaka, kasi Elímo akopésaka bomoi. | |
II C | LinVB | 3:7 | Mosalá mwa liwa mokomámákí na nkomá o mabángá ; bazalákí kokúmisa mwangó míngi, Ba-Israél bakokákí kotála Móze na míso té, mpô elongi ya yě ezalákí kongenge na nkémbo, atâ nkémbo êná eúmélákí té. | |
II C | LinVB | 3:9 | Mosálá moye mokokitisaka bato o likambo mozalákí na nkémbo, sôló, kasi mosálá moye mokokómisaka bangó bato ba bosémbo o míso ma Nzámbe molekí mwangó na nkémbo mosíká mpenzá ! | |
II C | LinVB | 3:10 | Awa nkémbo enéne ya mosálá mwa sika emónóní, nkémbo ya mosálá mwa libosó ekómí mpámba. | |
II C | LinVB | 3:11 | Sókó mosálá moye moúmélákí té momónónókí na nkémbo, mbele mosálá moye mokoúmela mokoleka mwa-ngó na nkémbo ! | |
II C | LinVB | 3:13 | Ezalí lokóla Móze té, óyo azipákí elongi na elambá, zambí ba-Israél bakokákí komóno té ’te nkémbo eye ekoúmela té, ekolímwa nokí. | |
II C | LinVB | 3:14 | Kasi bakómí na mayéle ma sika té ; téé leló, áwa bazalí kotánga búku ya Bondeko bwa Kala, bazalí lokóla bato bazipí bilongi na elambá. Elambá eye ekokí kolongwa bobélé na Krístu. | |
II C | LinVB | 3:17 | Zambi Mokonzi óyo, ndé Elímo Sántu, mpé esíká Elímo wa Mokonzi azalí, bonsómí bozalí mpé wâná. | |
Chapter 4
II C | LinVB | 4:2 | Tosílí kobóya makambo ma bonkútú mpé ma nsóni, tozalí na mayéle mabé té mpé tokobóngolaka Liloba lya Nzámbe té. Kasi na bolakisi bosôló polélé, tokomíyébisaka na bato bánso ba motéma sémba o míso ma Nzámbe. | |
II C | LinVB | 4:3 | Sókó Nsango Elámu eye tokosangelaka ezipámí (naíno) na elambá, ezalí bobélé kobómbama o míso ma baye bazalí kobúngama. | |
II C | LinVB | 4:4 | Bakoyambaka té, mpô Sátana azipí mayéle ma bangó mpô ’te bámóno Nsango Elámu ya nkémbo ya Krístu té, óyo azalí elílí ya Nzámbe. | |
II C | LinVB | 4:5 | Sôló, tokosangelaka nsango ya bísó mǒkó té, kasi Nsango ya Yézu Krístu Mokonzi wa bísó. Bísó tozalí sé basáleli ba bínó, mpô ya Krístu. | |
II C | LinVB | 4:6 | Sé Nzámbe óyo alobákí ’te : Mwínda móngenge út’o molílí, yě moto apelísí mwínda o mitéma mya bísó mpô ’te bato báyéba nkémbo ya yě ezalí kongenge mpé emónóní o elongi ya Krístu. | |
II C | LinVB | 4:7 | Baye bakosangelaka Nsango Elámu ezalí sé bísó bato bataú, mpô ’te bato bámóno ’te ngúyá enéne êná eútí na bísó té, kasi na Nzámbe. | |
II C | LinVB | 4:8 | Bakotungisaka bísó bipái bínso, kasi tokolembeke té ; tobungi, kasi tobwákí elíkyá té ; | |
II C | LinVB | 4:10 | Ntángo ínso tozalí komeme malózí ma liwá lya Yézu o nzóto ya bísó, mpô ’te bomoi bwa Yézu bómónono mpé o nzóto ya bísó. | |
II C | LinVB | 4:11 | Ntángo ínso bísó bato tozalí na bomoi tokobundaka na liwá mpô ya Yézu mpô ’te bomoi bwa Yézu bómónono mpé o nzóto ya bísó eye esengélí kokúfa. | |
II C | LinVB | 4:13 | Tozalí na motéma boyambi lokóla ekomámí o Minkandá Misántu : Nayambákí, yangó wâná nalobákí. Bísó mpé tozalí koyamba, yangó wâná tozalí koloba. | |
II C | LinVB | 4:14 | Toyébí ’te Oyo asékwísí Mokonzi Yézu, akosékwisa mpé bísó na Yézu elongó mpé akotía bísó penepene na yě elongó na bínó. | |
II C | LinVB | 4:15 | Mánso masálémí mpô ya bínó : ngrásya esengélí kokóla o mitéma mya bato baíké, mpô ’te bato baíké bátóndo Nzámbe mpô ya lokúmu la nkómbó ya yě. | |
II C | LinVB | 4:16 | Bôngó tólembe té. Atâ nzóto ya bísó ezalí kolembe, bomoi o mitéma mya bísó bozalí sé kokóla mokolo na mokolo. | |
Chapter 5
II C | LinVB | 5:1 | Toyébí ’te sókó ndáko eye, nzóto ya bísó, ekúfí, Nzámbe akopésa bísó ndáko ya sékô o likoló ; ndáko eye esálémí na mabóko ma bato té. | |
II C | LinVB | 5:2 | Sôló, na nzóto eye ya nsé tozalí sé kokímela mpé koyóka mpósá ya kobómbama o ndáko ya bísó o likoló. | |
II C | LinVB | 5:4 | Sôló, áwa tofándí naíno o ndáko eye, tozalí kokímela mpé koyóka motéma mpási ; mpámba té, tolingí kotíka nzóto eye té, kasi tozalí koyóka mpósá ya koláta elambá ya sika likoló lya elambá ya kala, mpô ’te nzóto eye ya kokúfa ébóngwana na nzóto ekoúmela sékô. | |
II C | LinVB | 5:5 | Nzámbe yeméí asálí bísó mpô tóbóngwana boye, áwa apésákí bísó ndanga ya libíkí ya Elímo. | |
II C | LinVB | 5:6 | Bôngó, tozalí ntángo ínso na moléndé ; toyébí malámu ’te sókó totíkálí na nzóto eye, tozalí mosíká na Mokonzi. | |
II C | LinVB | 5:8 | Kasi tozalí na moléndé ; tomóní ’te elekí malámu tótíka nzóto eye mpé tózala penepene na Mokonzi. | |
II C | LinVB | 5:9 | atâ totíkálí na nzóto ya bísó, atâ totíkí yangó, Libosó mpenzá tolingí kosepelisa yě. | |
II C | LinVB | 5:10 | Zambí bísó bánso tosengélí kosámba o bosó bwa Krístu mpô ’te moto na moto ázwa lifúta likokí na malámu mpé na mabé maye asálákí ntángo azalákí na nzóto ya yě. | |
II C | LinVB | 5:11 | Awa toyébí ’te tosengélí kobánga Mokonzi, tokomekaka kolakisa bato ’te bándima yě. Nzámbe ayébí bísó malámu mpenzá, mpé nakolíkya ’te bínó mpé boyébí bísó malámu o káti ya mitéma mya bínó. | |
II C | LinVB | 5:12 | Tolingí komíkúmisa lisúsu té o míso ma bínó, tozalí bobélé kopésa bínó nzelá mpô ’te bókoka kosepela mpô ya lokúmu la bísó ; mpé bókoka kozóngisa maloba na baye bakomíkúmisaka té na maye mazalí o káti ya motéma, kasi sé na mambí mamónóní na míso. | |
II C | LinVB | 5:13 | Sókó tolobákí maloba mazángí ntína, ezalákí mpô ya Nzámbe ; sókó sikáwa tozalí koloba bǒ ebongí, ezalí mpô ya bínó. | |
II C | LinVB | 5:14 | Bolingi bwa Krístu bozalí kotínda bísó, mpô toyébí sôló ’te moto mǒkó awéí mpô ya bánso, yangó wâná bánso basílí bawéí. | |
II C | LinVB | 5:15 | Krístu awéí mpô ya bato bánso mpô ’te baye bazalí na bomoi bámísálela lisúsu té, kasi básálela óyo awéí mpé asékwí mpô ya bangó. | |
II C | LinVB | 5:16 | Bôngó, bandá sikáwa tokotála lisúsu bato na míso ma bomoto té ; atâ toyébákí Krístu na míso ma bomoto, sikáwa toyébí yě bôngó lisúsu té. | |
II C | LinVB | 5:17 | Yangó wâná moto akómí na Krístu lisangá, akómí moto wa sika : moto wa kala akúfí, moto wa sika abimí. | |
II C | LinVB | 5:18 | Mâná mánso maútí epái ya Nzámbe, óyo atíndélí bísó Krístu mpô ’te ázóngisa bondeko káti ya bísó na yě ; mpé yě moto atíndí bísó tózóngisa bato basúsu o bondeko bwa yě. | |
II C | LinVB | 5:19 | Na bolobeli bwa Krístu, Nzámbe azóngísí bondeko káti ya bato na yě mǒkó : atálí mabé ma bato lisúsu té, mpé atíndí bísó tósangela bato nsango eye ya bondeko. | |
II C | LinVB | 5:20 | Bôngó bísó tozalí bantóma ba Krístu : Nzámbe moto akobyángaka bínó na maloba ma bísó. Tobóndélí bínó o nkómbó ya Krístu : bóndima ’te Nzámbe ázóngisa bondeko káti ya bínó na yě. | |
Chapter 6
II C | LinVB | 6:1 | Lokola tozali bato tokosálaka na Nzámbe elongó tobóndélí bínó : bótíka ngrásya ya Nzámbe ékende mpámba té. | |
II C | LinVB | 6:2 | Yě moto alobí : O ntángo ebongí nandimákí losámbo la yǒ, o mokolo mwa libíkí nasálísákí yǒ. Ntángo eye ebongí esílí ekokí, sikáwa mokolo mwa libíkí moyéí. | |
II C | LinVB | 6:3 | Tokopésaka moto mǒkó esímbisi té, zambí tolingí té ’te bátóngo bísó mpô ya mosálá mwa bísó. | |
II C | LinVB | 6:4 | O makambo mánso tokomílakisaka lokóla basáleli ba Nzámbe : na moléndé tokondimaka mambí ma kwókósó, ma mpási mpé ma nsómo : | |
II C | LinVB | 6:5 | babétí bísó fímbo, babwákí bísó o bolóko, babimísélí bísó mobúlú, misálá milekí bísó, mbala míngi tokolálaka mpongí té mpé tokoyókaka nzala. | |
II C | LinVB | 6:6 | Tokomílakisaka bato ba bopéto mpé ba bwányá, toyébí kokanga mitéma. Tozalí na bobóto, na makabo ma Elímo Sántu mpé na bolingi bwa sôló. | |
II C | LinVB | 6:7 | Tokotéyaka sé matéya ma sôló na ngúyá ya Nzámbe ; tokobundaka mpé tokopálelaka bato sé na bibundeli bya bosémbo. | |
II C | LinVB | 6:8 | Basúsu bakokúmisaka bísó, basúsu bakoyókisaka bísó nsóni ; basúsu bakondimaka bísó, basúsu bakotóngoko bísó. Bakotálaka bísó lokóla bato ba lokutá, nzókandé tokolobaka sé mambí ma bosôló. | |
II C | LinVB | 6:9 | Bakolobaka ’te bayébí bísó té, nzókandé bato bánso bayébí bísó malámu. Bakotálaka bísó lokóla bato balingí bákúfa, nzókandé tozalí na bomoi ; bakopésaka bísó etúmbu, kasi babomí bísó té. | |
II C | LinVB | 6:10 | Bakanísí ’te tozalí bato ba mawa, nzókandé tozalí na esengo ntángo ínso. Bakotálaka bísó lokóla babóla, nzókandé tokokómisaka bato baíké bato ba nkita. Tomónóní lokóla bato bazalí na elóko té, nzókandé tozalí na bínso. | |
II C | LinVB | 6:11 | Bandeko ba Korínti, tobómbélí bínó elóko té ; tolobí na bínó maye mánso mazalí o mitéma mya bísó. | |
II C | LinVB | 6:13 | Nazalí koloba na bínó lokóla na bána ba ngáí : bósála na bísó lokóla bísó tolakísí bínó ; bínó mpé bófungola mitéma. | |
II C | LinVB | 6:14 | Bótámbola na bapagáno nzelá yǒ kó té. Bosémbo bokoyókanaka ndé na bobé ? Mwínda mokoyókanaka ndé na molílí ? | |
II C | LinVB | 6:15 | Krístu na Belial bakokí ndé koyókana ? Bondeko níni bokokí kozala káti ya mokrístu na mopagáno ? | |
II C | LinVB | 6:16 | Témpelo ya Nzámbe ekokí ndé kozala esíká yǒ kó na bikeko biye bakokúmisaka ? Kasi bísó tozalí témpelo ya Nzámbe wa bomoi, sé lokóla Nzámbe yě méí alobákí : Nakofánda o káti ya bangó mpé nakotámbola na bangó elongó ; nakozala Nzámbe wa bangó mpé bangó bakozala bato ba ngáí. | |
II C | LinVB | 6:17 | Yangó wâná Mokonzi alobí : Bólongwa o káti ya bato basúsu, bófánda mosíká na bangó. Bósímba elóko mbindo té, mpé ngáí nakoyamba bínó. | |
Chapter 7
II C | LinVB | 7:1 | Bandeko ba bolingo, Nzámbe alakélákí bísó bilakó byangó ; bôngó tómípétola, mbindo ínso ya nzóto mpé ya molímo ílongwa. Bô-ngó tómemya Nzámbe mpé tómípésa mobimba na mosálá mwa bomísántisi. | |
II C | LinVB | 7:2 | Bóyamba bísó o mitéma mya bínó. Tosálákí moto mǒkó mabé té ; tobébísákí bomengo bwa moto mǒkó té, tobótólókí moto mǒkó elóko té. | |
II C | LinVB | 7:3 | Nalobí yangó té mpô ya kokitisa bínó o likambo : Nasílí nalobákí na bínó libosó : tobómbí bínó o mitéma mya bísó sékô téé liwá. | |
II C | LinVB | 7:4 | Ngáí natíí motéma na bínó mpenzá, bínó bozalí ntína ya lokúmu la ngáí ; yangó ebóndí ngáí mpé etóndísí ngáí na esengo o ntángo ya mpási ya ngáí ínso. | |
II C | LinVB | 7:5 | Ntángo tokómákí o Masedónia tokokákí kopémisa nzóto té ; bipái bínso sé makambo ma mpási : tozwákí matáta na bato basúsu, mpé tozalákí kobánga o mitéma. | |
II C | LinVB | 7:6 | Kasi Nzámbe óyo akobóndoko mitéma mya bato ba mawa abóndókí mpé bísó na boyéi bwa Títo. | |
II C | LinVB | 7:7 | Ezalí sé mpô ya boyéi bwa yě té, kasi Títo ayébísákí bísó bóníbóní bobóndókí yě. Asolólákí bísó bóníbóní bozalí na mpósá ya komóno ngáí, ndéngé bozalí koyóka mawa mpô ya ngáí mpé kobátela lokúmu la ngáí na mpíla. Yangó wâná nazalí koyóka esengo enéne. | |
II C | LinVB | 7:8 | Sôló, sókó nayókísákí bínó mpási na monkandá mwa ngáí, nazalí koyóka yangó mawa té. Mpé atâ nayókákí mawa, zambí monkandá môná moyókísákí bínó atâ mwâ mpási o motéma, | |
II C | LinVB | 7:9 | sikáwa nazalí kosepéla : ezalí té mpô namóní mawa ma bínó, kasi mpô namóní ndéngé mpási ya bínó esálákí ’te bóbóngola mitéma. Bísó tosálákí bínó mabé atâ mǒkó té, sé Nzámbe andimákí ’te bóyóka mawa. | |
II C | LinVB | 7:10 | Mawa maye mazalí kosepelisa Nzámbe makosálisa moto mpô ’te ábóngola motéma mpé ábíka. Bôngó mawa ma yě makosíla o ntángo êná ; kasi moto ayókí mawa mpô ya makambo ma nsé, akosúka o liwá. | |
II C | LinVB | 7:11 | Bótála ndéngé mawa maye mazwě lí bínó bolámu mpenzá : bobandí kopangana na mosálá mwa Nzámbe mpé kosénge bolímbisi ! Bokómí koyóka mabé na maye bosálákí, kobánga mpé koyóka mpósá ya kobongisa makambo ma bínó ! Bokómí na mpíkó sôló mpé bopésákí moto ôná etúmbu ya sôló ! Na makambo mâná mánso bolakísí ’te bondimákí mabé ma yě té. | |
II C | LinVB | 7:12 | Sókó nakomélákí bínó monkandá, nasálákí yangó té mpô ya moto asálákí mabé tǒ mpô ya moto óyo basálákí yě mabé. Kasi nalingákí ’te bolingi bokolingaka bísó bómónono polélé o míso ma Nzámbe. | |
II C | LinVB | 7:13 | Likambo liye libóndí mitéma mya bísó. Bobóndí bísó sôló, kasi toyókákí mpé esengo enéne ntángo tomóní esengo ya Títo, mpô bínó bokitísákí yě motéma. | |
II C | LinVB | 7:14 | Sikáwa nayókí nsóni té ’te nakúmísákí bíno mwâ moké o míso ma yě. Sé lokóla mambí mánso toyébísákí bínó mazalí sé mambí ma sôló, maye tolobákí na yě mpô ya kokúmisa bínó, mazalákí mpé ma sôló. | |
II C | LinVB | 7:15 | Apusí kolinga bínó bánso, áwa akundólí o motéma botósi bwa bínó mpé loléngé boyambákí yě na limemyá linéne. | |
Chapter 8
II C | LinVB | 8:1 | Bandeko, tolingí koyébisa bínó bóníbóní Nzámbe apésákí bato ba Biklézya bya Masedónia ngrásya ya yě. | |
II C | LinVB | 8:2 | Atâ bayókákí mpási ndéngé na ndéngé, bayókákí esengo enéne ; atâ bazalákí kokélela, bakongólókí mosolo míngi mpenzá. | |
II C | LinVB | 8:3 | Nayébísí bínó : bapésákí makabo lokóla ekokákí na bangó mpé leká naíno, mpô bangó mǒkó balingákí kosálisa. | |
II C | LinVB | 8:5 | Maye basálákí malekí maye tokokákí kolíkya ; bamíkabákí mobimba, libosó na Mokonzi, na nsima na bísó mǒkó, lokóla Nzámbe alingí. | |
II C | LinVB | 8:6 | Yangó wâná tobóndélí Títo ásúkisa malámu mosálá moye mwa bokongoli mosolo, mpô yě moto abandákí mwangó. | |
II C | LinVB | 8:7 | Kasi lokóla bolekí báníngá na makambo mánso : na boyambi, na botéyi, na boyébi, na bomípési na misálá ndéngé na ndéngé, mpé na bolingi bokolingaka bísó, ebongí mpé bóleka bangó na mosálá mwa bosálisi babóla. | |
II C | LinVB | 8:8 | Napésí bínó mobéko té, kasi na ndakisa ya mpíkó ya báníngá napésí bínó, nalingí komeka bínó sókó bolingani bwa bínó bozalí bwa sôlósôló. | |
II C | LinVB | 8:9 | Boyébí bóníbóní Mokonzi wa bísó Yézu Krístu alakísákí bolingi bwa sôló mpenzá : yě moto wa nkita akómí mobóla mpô ya bínó, mpô ’te ákómisa bínó bato ba nkita na bobóla bwa yě. | |
II C | LinVB | 8:10 | Nzókandé napésí bínó lilako liye : mosálá môná mobongí na bínó, mpô bínó bato bozwákí likanisi lîná libosó, mpé bobandákí mosálá mwangó o mbúla elekí. | |
II C | LinVB | 8:11 | Bôngó bósílisa mwangó sikáwa, lokóla bokánákí mwangó na esengo, bósílisa mwangó na mpíkó, lokóla ekokí na bínó. | |
II C | LinVB | 8:12 | Sôló, moto akopésa na motéma mǒkó, bakondima yě mpenzá ; elóko ezalí na yě té, bakosénge yě yangó mpé té. | |
II C | LinVB | 8:13 | Nalingí té ’te na bosálisi báníngá, bínó mǒkó bókóma kokélela ; ebongí bilóko bya bínó mpé bya bangó bíkokana. | |
II C | LinVB | 8:14 | Sikáwa bínó bozalí na bilóko míngi mpé bokokí kosálisa baye bakélélí, mbala esúsu bangó bakokoka kosálisa bínó na bilóko biíké sókó bínó bokélélí. Bôngó bilóko bya bínó mpé bya bangó bíkokana. | |
II C | LinVB | 8:15 | Ekomámí bôngó o Minkandá Misántu : Moto asangísí bilóko míngi, azwí bilóko bilekí míngi té ; moto asangísí bilóko míngi té, azángí elóko té. | |
II C | LinVB | 8:16 | Tótóndo Nzámbe óyo atíí o motéma mwa Títo mpíkó sé ndéngé yǒ kó mpô ya kosálisa bínó. | |
II C | LinVB | 8:17 | Maye toséngékí yě ásála, asílí andimí mangó : azalí koyâ epái ya bínó na mpíkó enéne. | |
II C | LinVB | 8:18 | Na yě elongó totíndí ndeko mosúsu, óyo bakokúmisaka o Biklézya bínso mpô ya mosálá mwa yě mwa bosangeli Nsango Elámu. | |
II C | LinVB | 8:19 | Kútu bato ba Biklézya baponí yě ázala móníngá wa bísó o mosálá moye mwa bosálisi báníngá ; tokosálaka mosálá moye mpô ya nkémbo ya Mokonzi, mpé mpô ya kolakisa ’te tondimí mwangó na motéma mǒkó. | |
II C | LinVB | 8:20 | Tosálí bôngó mpô ’te bákoka kotóngo bísó té, áwa tozalí kokongolo mpé kobómba mosolo míngi boye. | |
II C | LinVB | 8:21 | Sôló, tosengélí kosála malámu bobélé o míso ma Nzámbe té, kasi o míso ma bato lokóla. | |
II C | LinVB | 8:22 | Na bangó elongó totíndélí bínó mpé mǒkó wa bandeko ba bísó óyo alakísákí mpíkó mbala na mbala o makambo ndéngé na ndéngé. Sikáwa azalí na mpíkó, mpô atíí motéma na bínó. | |
II C | LinVB | 8:23 | Títo azalí móníngá wa ngáí mpé mosálisi wa ngáí epái ya bínó ; bandeko basúsu bazalí bantóma ba Biklézya mpô ya lokúmu la Krístu. | |
Chapter 9
II C | LinVB | 9:2 | Nayébí ’te bondimí kosálisa, yangó wâná nakúmísí bínó epái ya bato ba Masedónia. Nalobákí na bangó ’te : « Bato ba Akáya basílí babongísí likambo liye bandá mbúla elekí. » Bôngó, mpíla ya bínó eléndísí bato míngi o káti ya bangó. | |
II C | LinVB | 9:3 | Natíndélí bínó bandeko mpô ’te bámóno ’te nakúmísí bínó na ntína. Nalingí ’te bósílisa mosálá môná lokóla nalobákí. | |
II C | LinVB | 9:4 | Sókó bato ba Masedónia baye bakoyâ na ngáí elongó bamóní ’te bomíbongísí naíno té, tokoyóka nsóni, mpô totíí mitéma na bínó ; mbele bínó mǒkó mpé bokoyóka nsóni. | |
II C | LinVB | 9:5 | Yangó wâná namóní malámu násénge bandeko baye bákóma libosó epái ya bínó. Bábongisa mosálá mwa bokongoli makabo maye bosílí bondimí kopésa. Malámu, ntángo nakoyâ nákúta bínó bosílí bobongísí mosálá môná, bôngó émónono ’te bozalí kokaba na motéma mǒkó, na boími té. | |
II C | LinVB | 9:7 | Moto na moto ákaba lokóla akání o motéma, na mitéma míbalé té, tǒ mpé na makási té, mpô Nzámbe alingí moto óyo akokabaka na motéma esengo. | |
II C | LinVB | 9:8 | Nzámbe akokí kopésa bínó makabo ndéngé na ndéngé, mpô ’te ntángo ínso bózánga elóko té, bôngó na mosolo mokotíkala bókoka kosálisa báníngá, | |
II C | LinVB | 9:9 | lokóla ekomámi o Minkandá Misántu : Akabélí babóla makabo ma yě ndéngé na ndéngé ; bosémbo bwa yě bokoúmela sékô. | |
II C | LinVB | 9:10 | Oyo akopésaka moto wa bilanga mbóto mpé mámpa ma kolía, akokabela bínó mpé mbóto, akokómisa yangó míngi mpô ’te likabo lya bínó lízwela bíno matómba maíké. | |
II C | LinVB | 9:11 | O makambo mánso bokokóma bato ba nkita mpé bokokoka kokaba makabo ndéngé na ndéngé. Bôngó bato baíké bakotóndo Nzámbe mpô ya makabo maye tokoyêla bangó. | |
II C | LinVB | 9:12 | Zambi makabo maye ma bínó makosálisa bobélé bandeko té, kasi makosála ’te bato baíké bátóndo Nzámbe. | |
II C | LinVB | 9:13 | Ndakisa eye ya bosálisi báníngá ekosála ’te bakokúmisa Nzámbe, mpô boyambí Nsangó Elámu ya Yézu Krístu na botósi, mpé bolakísí ’te bosangání na bangó mpé na bato bánso. | |
II C | LinVB | 9:14 | Awa bakosámbelela bínó, bakolakisa bóníbóní balingí bínó mpô ya ngrásya enéne Nzámbe akabélí bínó. | |
Chapter 10
II C | LinVB | 10:1 | Ngáí mǒkó Pólo nabóndélí bínó mpô ya bobóto mpé bosáwa bwa Krístu, oyó bokolobaka ’te ntángo azalí epái ya bísó afándí nyê, kasi ntángo azalí mosíká na bísó akómí na mpíkó. | |
II C | LinVB | 10:2 | Nabóndélí bínó : bótínda ngáí té ’te nálakisa mpíkó ntángo nakoyâ epái ya bínó ; nayébí malámu ’te nakobánga té koloba polélé na bato bakanísí ’te o mosálá mwa ngáí nakolandaka sé mayéle ma bato ba nsé. | |
II C | LinVB | 10:4 | Bibundeli bya bísó bizalí bibundeli bya bato ba nsé té, kasi bizalí na ngúyá ya Nzámbe, mpé bikokí kolónga bokási bwa bangúná ; tokosúkisaka maloba ma mayéle ma bato | |
II C | LinVB | 10:5 | mpé loléndo la baye balingí koyéba Nzámbe té, mpé tokotíndaka bato bánso bábóngola makanisi ma bangó, bátósa Krístu. | |
II C | LinVB | 10:6 | Baye bánso babóyí kotósa tolingí kopésa bangó etúmbu, téé mokolo tokomóno ’te bínó bokotósa nyé. | |
II C | LinVB | 10:7 | Maye nakoloba mazalí polélé mpénzá. Sókó moto akanísí ’te azalí moto wa Krístu, áyéba ’te bísó mpé tozalí bato ba Krístu, sé lokóla yě. | |
II C | LinVB | 10:8 | Nakoyóka nsóni té, atâ namíkúmísí mwâ míngi na likokí liye Mokonzi apésí bísó sé mpô ya koléndisa boyambi bwa bínó, mpô ya koboma bwangó té. | |
II C | LinVB | 10:10 | Bakolobaka : « Akokomaka minkandá na maloba makási makási, kasi ntángo ayéí epái ya bísó, azángí makási mpé ayébí lisúsu koloba malámu té. » | |
II C | LinVB | 10:11 | Bato bakolobaka bôngó, bákanisa naíno malámu : Ntángo tokozala epái ya bínó tokosála sé lokóla tokomélákí bínó o minkandá mya bísó ntángo tozalákí mosíká na bínó. | |
II C | LinVB | 10:12 | Sôló, bato basúsu bakomíkúmisaka ’te bazalí bato banéne ; bísó tolingí kokokana tǒ komekana na bangó té. Awa bazalí komítómbola mpé komíkúmisa na ezalela ya bangó mǒkó, bazángí mayéle. | |
II C | LinVB | 10:13 | Kasi bísó, esíká tozalí komíkúmisa, tolingí kolekisa ndelo té. Tozalí kotála bobélé ndelo eye Nzámbe atíélí bísó : yě moto alingísí bísó tókóma téé epái ya bínó. | |
II C | LinVB | 10:14 | Zambi sókó toyákí epái ya bínó té, mbele tomíkúmísákí mpámba. Kasi, ya sôló, tozalákí bato ba libósó baye bayélí bínó Nsango Elámu ya Krístu. | |
II C | LinVB | 10:15 | Yangó wâná, tólekisa ndelo té na bomíkúmisi : tómíkúmisa na mosálá mwa bato basúsu té. Kasi tozalí na elíkyá ’te boyambi bokolénda o mitéma mya bínó, bôngó bósálisa bísó mpô tókóla naíno engébéné na ndelo Nzámbe atíélí bísó. | |
II C | LinVB | 10:16 | Bôngó na nsima tókoka kosangela Nsango Elámu o mikili misúsu leká mokili mwa bínó. Tolingí mpé komíkúmisa té na mosálá moye báníngá basálí o bisíká Nzámbe atíndí bangó. | |
Chapter 11
II C | LinVB | 11:1 | Bólingisa ngáí ’te náloba naíno mwa maloba ma bozóba. Nayébí ’te bokolingisa ngáí yangó. | |
II C | LinVB | 11:2 | Nazalí koyókela bínó zúwa, lokóla Nzámbe akoyókaka zúwa, mpô ngáí moto nabandísí bínó na Krístu, bolóngani wa bínó sé mǒkó, mpô ’te bókoka kokóma epái ya yě lokóla ngondo péto. | |
II C | LinVB | 11:3 | Kasi nabángí ’te, lokóla nyóka eséngínyí Eva na mayéle mabé, makanisi malámu ma bínó mábúnga mpé bótíka kolinga Krístu na motéma mǒkó. | |
II C | LinVB | 11:4 | Namóní ’te bokokí kondima nokí sókó moto atâ náni asa-ngélí bínó Yézu mosúsu, óyo bísó tosangélákí bínó té ; tǒ alingí kokúlisa bínó elímo esúsu, Elímo óyo té bínó bokúlí ; tǒ ayélí bínó Nsango Elámu esúsu, eye boyambí naíno té. | |
II C | LinVB | 11:6 | Atâ nayébí koloba malámu míngi té, nayébí mambí ma bosôló maíké ; nasílí nalakísí bínó mangó na ndéngé míngi. | |
II C | LinVB | 11:7 | Nasálákí ndé mabé áwa naséngékí bínó lifúta té ntángo nasangélákí bínó Nsango Elámu, tǒ ntángo namíkitísákí mpô ya kotómbola bínó ? | |
II C | LinVB | 11:8 | Bato ba Biklézya bisúsu basálísí ngáí mpé bapésí ngáí lifúta mpô ’te nákoka kosálisa bínó. | |
II C | LinVB | 11:9 | Ntángo nayákí epái ya bínó mpé nabandí kokélela, naséngékí bínó elóko té : bandeko baútí o Masedónia bato basálísákí ngáí o mánso mazángákí ngáí. Nalingákí kotíela bínó mókúmbá atâ moké té. Nsima nakosála sé bôngó. | |
II C | LinVB | 11:10 | Nalobí ya sôló o nkómbó ya Krístu : Atâ moto mǒkó té o mokili mwa Akáya akobótolo ngáí ntína ya litundú eye. | |
II C | LinVB | 11:12 | Nakokóba kosála bôngó mpô ’te násúkisa lokutá la baye bazalí koluka nzelá ya komíkúmisa ’te bakokání na bísó. | |
II C | LinVB | 11:13 | Zambi bangó bazalí bapóstolo ba lokutá, basáleli bazángá bosémbo, baye bakomílakisaka bǒ bapóstolo ba Krístu. | |
II C | LinVB | 11:15 | Sé bôngó bato ba yě bakokósaka ’te bazalí basáleli ba bosémbo. Kasi ekosúkela bangó mabé engébéné na misálá mya bangó. | |
II C | LinVB | 11:16 | Nalobí lisúsu : Moto mǒkó té átála ngáí lokóla zóba ; tǒ mpé, bótála ngáí lokóla zóba mpô ’te nákoka komíkúmisa mwâ moké. | |
II C | LinVB | 11:17 | Maye nakoloba, nakoloba mangó na makanisi ma Mokonzi té ; nakoloba lokóla zóba sókó namíkúmísí. | |
II C | LinVB | 11:18 | Kasi mpô bato ebelé bakomíkúmisaka na makambo ma nsé eye, tíká ngáí mpé námíkúmisa. | |
II C | LinVB | 11:20 | Bokondimaka ’te bákómisa bínó baómbo, bálía bínó, bábótolo bínó bilóko, bátála bínó na loléndo tǒ bábéte bínó o elongi. | |
II C | LinVB | 11:21 | Tozalí koyóka nsóni mpenzá na bondimi ’te tozángákí makási ma kosála bôngó. Nzókandé sókó babángí té komíkúmisa atâ na níni, náloba lokóla zóba, ngáí mpé námíkúmisa. | |
II C | LinVB | 11:22 | Bangó bazalí ba-Ebréí ? Ngáí lokóla. Bazalí ba-Israél ? Ngáí lokóla. Bazalí bankókolo ba Abaráma ? Ngáí lokóla. | |
II C | LinVB | 11:23 | Bangó bazalí basáleli ba Krístu ? Tíká náloba likambo lya bozóba : nalekí bangó. Nalekí bangó na mosálá nasálákí, bakangákí ngáí o bolóko sókó mbala bóní, babétékí ngáí sókó mbala bóní. Mbala míngi nalingákí nákúfa. | |
II C | LinVB | 11:25 | Mbala ísáto ba-Róma babétékí ngáí na língénda, mbala yǒ kó balingákí koboma ngáí na mabángá ; mbala ísáto nazalákí o masúwa mazindákí o mái ; mokolo mobimba natíkálákí o mái, butú mói ! | |
II C | LinVB | 11:26 | Nasálákí mibémbo ebelé mpé nayókákí mpási o ebale, nabíkákí o mabóko ma bayíbi, nazalákí na makáma epái ya bandeko ba ngáí mpé epái ya bapagáno ; nazalákí na makáma o engumbá mpé o elíkí, makáma o mbú mpé o káti ya bandeko ba lokutá ! | |
II C | LinVB | 11:27 | Namílembísákí na mosálá monéne ; mbala míngi nazalákí kolála mpongí té, koyóka nzala tǒ mpósá ya komele ; nalálákí nzala, nayókákí mpío mpé nazángákí ela-mbá ! | |
II C | LinVB | 11:28 | Mpási iye itíkálí nakotánga yangó té : mokolo na mokolo nakomítungisaka mpô ya bolámu bwa Biklézya. | |
II C | LinVB | 11:29 | Nani akómí motaú, ngáí mpé nakóma motaú té ; nani akwéí o masúmu, nakóma koyóka mpási o motéma té. | |
II C | LinVB | 11:31 | Bákúmisa nkómbó ya Nzámbe, Tatá wa Mokonzi Yézu, sékô ! Yě ayébí ’te nazalí kokósa té. | |
II C | LinVB | 11:32 | O Damásko moyángeli wa mokonzi Arétas atíndákí ’te bákéngele engumbá mpô ya kokanga ngáí ; | |
Chapter 12
II C | LinVB | 12:1 | Sókó nasengélí komíkúmisa, atâ nayébí ’te ezángí ntína, tíká náyébisa bínó ’te Mokonzi alakísákí ngáí mamóní na mibómbamo. | |
II C | LinVB | 12:2 | Nayébí moto mǒkó wa Krístu óyo atómbwámákí kín’o ntá likoló, esílí elekí mbúla zómi na ínei. Sókó atómbwámákí na nzóto tǒ na nzóto té, nayébí té, bobélé Nzámbe moto ayébí. Moto ôná ayíngélákí o paradízo. | |
II C | LinVB | 12:3 | Nayébí ’te moto ôná atómbwámákí kín’o paradízo, kasi sókó ezalákí na nzóto tǒ na nzóto té, nayébí té, bobélé Nzámbe moto ayébí. | |
II C | LinVB | 12:6 | Sôló, sókó nalingí komíkúmisa, nazalí zóba té, nakoloba sé mambí ma sôló ; kasi nakosála yangó té, sókí té bato bakokí komóno ngáí lokóla moto monéne, nzókandé nazalí bobélé moto óyo bato bánso bakokí komóno mpé koyóka. | |
II C | LinVB | 12:7 | Batúbí nzúbe o mosuni mwa ngáí mpô ’te bonéne bwa mibómbamo miye balakísí ngáí bókómisa ngáí moto wa loléndo té ; ntóma wa Sátana azalí kobétebéte ngáí mpô ’te nákóma na loléndo té ! | |
II C | LinVB | 12:9 | Kasi ayébísí ngáí : « Ngrásya ya ngáí ekokí na yǒ : Bokási bwa ngáí bozalí komónono o botaú bwa bato. » Yangó wâná nalingí komíkúmisa na botaú bwa ngáí mpô ’te ngúyá ya Krístu ézala na ngáí. | |
II C | LinVB | 12:10 | Yangó wâná nazalí kondima botaú bwa ngáí, ná matúmolí, ná bokéleli, ná minyóko, ná nsómo nakoyókaka mpô ya Krístu ; zambí bobélé sókó nazalí motaú, nazalí makási sôló. | |
II C | LinVB | 12:11 | Tálá, nakómí lokóla zóba ! Bínó bato botíndákí ngáí násála bôngó. Nzókandé ebongókí ’te bínó bókúmisa ngáí, zambí bato baye boko-byángaka ‘bapóstolo banéne’ balekí ngáí sókí moké té, atâ nazalí sé elóko mpámba. | |
II C | LinVB | 12:12 | O mbóka bínó bomónókí ’te nazalí apóstolo sôló : na moléndé nalakísákí bilembo mpé nasálákí makamwísi na misálá minéne. | |
II C | LinVB | 12:13 | Elóko níni bínó bozwákí té, eye bato ba Biklézya bisúsu bazwákí ? Tíká sé mpô yǒ kó : namemísákí bínó mókúmbá té. Bólímbisa ngáí mabé mâná. | |
II C | LinVB | 12:14 | Tálá, mbala ya ísáto nalingí koyâ epái ya bínó, mpé nakomemisa bínó mókúmbá té. Nazalí koluka mosolo mwa bínó té, kasi bínó mǒkó. Sôló, bána bakobómbelaka babóti bilókó té, kasi babóti bakobómbelaka bána byangó. | |
II C | LinVB | 12:15 | Nakokabela bínó bilóko na motéma esengo, mpé nakomíkaba mobimba mpô ya milímo mya bínó. Awa nalingí bínó míngi boye, bínó bólinga ngáí té ? | |
II C | LinVB | 12:16 | Atâ bokondima ’te naséngékí bínó bilóko té, bokoloba ’te nazalí na mayéle mabé mpé nakósákí bínó. | |
II C | LinVB | 12:18 | Nabóndélákí Títo áyâ epái ya bínó ; elongó na yě natíndákí mpé ndeko mosúsu. Bôngó Títo abótólókí bínó bilóko ? Bísó bábalé tosálákí ndéngé yǒ kó té ? Tolandákí sé nzelá yǒ kó té ? | |
II C | LinVB | 12:19 | Ut’o kala bokanísí ’te tolingí komílóngisa o míso ma bínó. Ezalí bôngó té ! Tozalí koloba o míso ma Nzámbe lokóla Krístu alingí. Bandeko ba bolingo, tosálí mâná mánso bobélé mpô ya koléndisa bínó. | |
II C | LinVB | 12:20 | Sôló, nabángí ’te ntángo nakoyâ nákúta bínó té lokóla motéma mwa ngáí molingí ; nabángí mpé ’te bínó bókúta ngáí té lokóla bínó mǒkó bolingí : bókabwana té, bóyókelana nkándá mpé zúwa té, bóswâna té, bótóngono té, bótíka kobébisa lokúmu la báníngá, bótíka mpé maloba ma loléndo na makambo ma mobúlú. | |
Chapter 13
II C | LinVB | 13:1 | Tálá mbala ya ísáto nakoyâ o mbóka bínó. Bakokí kokáta likambo sé o míso ma banzénénéke bábalé tǒ básáto. | |
II C | LinVB | 13:2 | Nasílí kokébisa baye basálákí masúmu ná mpé bato basúsu bánso ntángo nayákí kotála bínó mbala ya íbalé. Leló nakébísí bangó lisúsu, áwa nakómí naíno epái ya bínó té : Mokolo nakoyâ, nakoyókela moto mǒkó mawa té. | |
II C | LinVB | 13:3 | Bolingí nálakisa bínó ’te Krístu akolobaka na monoko mwa ngáí ? Krístu óyo azalí motaú té, kasi akolakisaka ngúyá ya yě o káti ya bínó. | |
II C | LinVB | 13:4 | Atâ babákákí yě o kurúse lokóla moto motaú, azalí na bomoi mpô ya ngúyá ya Nzámbe. Atâ tozalí bato bataú lokóla yě azalákí libosó, bokomóno ’te tokozala na bomoi elongó na yě, mpô ya ngúyá ya Nzámbe. | |
II C | LinVB | 13:5 | Bómítúna mpé bótála bínó mǒkó sókó bozalí na boyambi. Sókó bomóní té ’te Yézu Krístu azalí o mitéma mya bínó, mbele bomíkitísí. | |
II C | LinVB | 13:7 | Tozalí kobóndela Nzámbe ’te bósála mabé mǒkó té. Tolingí kozwa lilónga té, tolingí bobélé ’te bósála malámu mpé bóleka bísó. | |
II C | LinVB | 13:9 | Sôló, tozalí kosepela sókó bísó tozalí bataú mpé bínó bozalí makási. O losámbo la bísó tozalí kosénge ’te bólénda o boyambi. | |
II C | LinVB | 13:10 | Yangó wâná nakomélí bínó maye mánso, áwa nazalí mosíká na bínó. Bôngó mokolo nakoyâ epái ya bínó, nakosengela kopésa mibéko na makási té, zambí Mokonzi apésí ngáí ngúyá ya koléndisa, kasi ya koboma té. | |
II C | LinVB | 13:11 | Bandeko, bózala na esengo ; bómíbongisa, bóléndisana. Bózala motéma mǒkó mpé bófánda na bobóto, bôngó Nzámbe wa bolingi mpé wa bobóto akozala na bínó. | |