Chapter 1
| Baru | LinVB | 1:1 | Tala awa maloba ma buku eye Baruk akomaki o Babilon. Baruk azali mwana wa Neria, mpe nkoko wa Maseya. Maseya azali mwana wa Sedekia, Sedekia mwana wa Asadia mpe Asadia mwana wa Kelkia. | |
| Baru | LinVB | 1:2 | Baruk akomi buku eye o mobu mwa mitano, o mokolo mwa nsambo mwa sanza eye ba-Kaldea babotoloki Yeruzalem mpe batumbaki yango. | |
| Baru | LinVB | 1:3 | Baruk atangi maloba ma buku eye o matoi ma Yekonia, mwana wa Yoyakim, mokonzi wa Yuda, mpe ma baye banso bayei koyoka ye : | |
| Baru | LinVB | 1:4 | bankumu, bana ba mokonzi na bakolo ba mboka ; bato banso, bakolo na bana, baye bafandi o Babilon penepene na moluka Soud, bayei koyoka maloba ma ye. | |
| Baru | LinVB | 1:7 | Batindi mwango o Yeruzalem epai ye nganga Nzambe Yowakim, mwana wa Kelkia, nkoko wa Salem, epai ya banganga Nzambe basusu mpe bato banso bazalaki na bango o Yeruzalem. | |
| Baru | LinVB | 1:8 | O mokolo mwa zomi mwa sanza Divan Baruk asili kokamata biloko bya ndako ya Mokonzi, biye balongolaki o Tempelo, mpo ’te azongisa byango o mokili mwa Yuda. Sedekia, mwana wa Yozia, mokonzi wa Yuda, asalisaki byangonapalata. | |
| Baru | LinVB | 1:9 | Ezalaki o eleko Nabukodonozor, mokonzi wa Babilon, alongolaki Yekonia o Yeruzalem mpe atindaki ye o Babilon elongo na bankumu, batuli, bayangeli na bato basusu ba ekolo. | |
| Baru | LinVB | 1:10 | Bayebisi bango boye : Totindeli bino mosolo mwa kosomba mabonza ma kotumba, miboma mpe mpaka ya malasi ; bobonzela Yawe mabonza, botia miboma o altare ya Mokonzi Nzambe wa biso. | |
| Baru | LinVB | 1:11 | Bosambelela Nabukodonozor, mokonzi wa Babilon, mpe mwana wa ye Baltazar, baumela mikolo mingi awa o nse, miulana na mikolo mya likolo. | |
| Baru | LinVB | 1:12 | Yawe alendisa biso, atanisa miso ma biso mpo tofanda kimia pene na Nabukodonozor, mokonzi wa Babilon, mpe na mwana wa ye Baltazar. Tosalela bango eleko elai mpe bango basala biso se malamu. | |
| Baru | LinVB | 1:13 | Bosambela mpe Yawe Nzambe wa biso mpo ya biso, zambi tosalaki Yawe Nzambe wa biso mabe. Tee lelo nkanda Yawe ayokeli biso esili te. | |
| Baru | LinVB | 1:14 | Na nsima botanga monkanda moye totindeli bino ntango bokosakola masumu ma bino o ndako ya Mokonzi, o eyenga ya Biema mpe o biyenga bisusu. | |
| Baru | LinVB | 1:15 | Bokoloba : Mokonzi Nzambe wa biso azali na bosembo, kasi toyoki nsoni lelo, biso bato ba Yuda mpe ba Yeruzalem, | |
| Baru | LinVB | 1:18 | Totosaki ye te, toyokaki Mokonzi Nzambe wa biso te, tolandaki mibeko te, miye apesaki biso. | |
| Baru | LinVB | 1:19 | Banda mokolo Mokonzi alongolaki biso o Ezipeti tee lelo totosaki Mokonzi Nzambe wa biso te, mpe totombokoki na ye, awa toboyaki koyoka ye. | |
Chapter 2
| Baru | LinVB | 2:1 | Bongo Mokonzi akokisi liloba akanelaki biso, bazuzi bazalaki koyangela Israel, bakonzi, bankumu mpe bato banso ba Israel mpe ba Yuda. | |
| Baru | LinVB | 2:2 | Makambo asali o Yeruzalem, asali mango liboso naino te o mokili mobimba, lokola ekomami o Mobeko mwa Moze : | |
| Baru | LinVB | 2:4 | Mokonzi akabaki bato ba biso o maboko ma bikolo bisusu bizingi biso, mpo ’te bakoma eloko ya nsomo o miso ma baye bakoseke bango o bisika Mokonziapanzibango. | |
| Baru | LinVB | 2:5 | Bazalaki bakonzi lisusu te, bakomaki baombo, mpo totumolaki Mokonzi Nzambe wa biso, mpe toboyaki koyoka ye. | |
| Baru | LinVB | 2:6 | Mokonzi Nzambe wa biso azali na bosembo, kasi biso na bankoko ba biso tokomi koyoka nsoni lelo. | |
| Baru | LinVB | 2:9 | Yango wana Yawe atalaki malozi maye manso maye atindeli biso, mpo Yawe azali na bosembo o maye manso atindaki biso. | |
| Baru | LinVB | 2:10 | Kasi biso toboyaki kotosa ye. Tondimaki mibeko mya Yawe Nzambe wa biso te, miye alakisaki biso. | |
| Baru | LinVB | 2:11 | E Yawe Nzambe wa Israel, yo moto obimisaki bato ba yo o mokili mwa Ezipeti na bokasi bwa yo. Olakisaki bilembo mpe osalaki makamwisi. Bokasi bwa loboko la yo bozweli nkombo ya yo lukumu tee lelo. | |
| Baru | LinVB | 2:12 | Tosali masumu, tosali mabe, tozangaki bosembo, mpo totosaki mibeko mya Yawe Nzambe wa biso te. | |
| Baru | LinVB | 2:13 | Longola nkanda ya yo o ntei ya biso, mpo totikali se ndambo ya bato o bikolo biye opanzaki biso. | |
| Baru | LinVB | 2:14 | E Yawe, yoka losambo mpe mabondeli ma biso. Bikisa biso mpo ya lokumu la yo, mpe sala ’te baye bakangi biso bandimela biso. | |
| Baru | LinVB | 2:15 | Bongo bato banso ba nse bayeba ’te yo ozali Yawe Nzambe wa biso, mpo Israel na bana ba ye bamipesi nkombo ya yo. | |
| Baru | LinVB | 2:16 | E Yawe, ut’o ndako ya yo esantu otala biso, okanisa biso ; otandela biso matoi mpe oyoka biso. | |
| Baru | LinVB | 2:17 | Fungola miso, Mokonzi, mpe tala : Bato bawei mpe bakiti o mboka ya bawa, baye bazali na mpema o nzoto lisusu te, bakoki kokumisa Mokonzi mpo ya bosembo bwa ye te. | |
| Baru | LinVB | 2:18 | Kasi moto atondi na mawa, moto agumbami mpe azangi bokasi, miso malembi mpe motema motondi na mposa, ye akoki kokumisa yo Mokonzi mpo ya bosembo bwa yo ! | |
| Baru | LinVB | 2:19 | Awa toyei kotika mabondeli ma biso o miso ma yo, Mokonzi Nzambe wa biso, tozali kotia elikya na matomba ma bankoko to ma bakonzi ba biso te. | |
| Baru | LinVB | 2:20 | Solo, olakisi biso nkanda mpe nkele ya yo, lokola olobaki na monoko mwa baprofeta, basaleli ba yo, na maloba maye : | |
| Baru | LinVB | 2:21 | Boyoka maloba ma Yawe : « Bokitisa mitó mya bino, bosalela mokonzi wa Babilon, bongo bokotikala o mokili moye napesaki bankoko ba bino. | |
| Baru | LinVB | 2:23 | nakopekisa o bingumba bya Yuda mpe o Yeruzalem nzembo ya esengo mpe ya nsai, mpe nzembo ya mobali to ya mwasi abali sika. Mokili mobimba mokokoma mopotu, bato bakozala lisusu te. » | |
| Baru | LinVB | 2:24 | Kasi toyokaki yo te, mpe tosaleli mokonzi wa Babilon te. Yango wana okokisi maye olobaki na monoko mwa baprofeta, basaleli ba yo : Bato bayaki kolongola minkuwa mya bakonzi mpe minkuwa mya bankoko ba biso o malita. | |
| Baru | LinVB | 2:25 | Babwaki myango o libanda, sikawa balali o moi mokasi mpe mpio ya butu. Bakufaki na mpasi inene : na nzala, mopanga to bokono bobe. | |
| Baru | LinVB | 2:26 | Ndako eye batangi na nkombo ya yo, otiki yango ebeba, lokola ekomononoko lelo ; esalemi bongo mpo ya masumu ma bato ba Israel mpe ba Yuda. | |
| Baru | LinVB | 2:27 | Nzokande Mokonzi Nzambe wa biso, olakisaki biso ngolu enene ya yo mpe bolamu bonene bwa yo. | |
| Baru | LinVB | 2:28 | lokola mosaleli wa yo Moze asakolaki mokolo otindaki ’te akoma Mibeko o miso ma bana ba Israel, ntango olobaki : | |
| Baru | LinVB | 2:29 | « Soko boyoki ngai te, bato baye ebele bakotikala se bato bake o bikolo biye nakopanza bango. | |
| Baru | LinVB | 2:30 | Nayebi ’te bakoyoka ngai te, mpo bazali bato ba motó makasi. Kasi o mokili moye mwa boombo bakobanda kokanisa, | |
| Baru | LinVB | 2:31 | mpe bakondima ’te ngai nazali Yawe Nzambe wa bango. Nakopesa bango motema mwa sika mpe matoi makoyoka. | |
| Baru | LinVB | 2:33 | Bakotika lolendo la bango mpe misala mibe mya bango. Bakokanisa masumu bankoko ba bango basalaki o miso ma Mokonzi. | |
Chapter 3
| Baru | LinVB | 3:1 | Mokonzi wa bokasi bonso, Nza mbe wa Israel, toyoki motema nsomo, mayele masileli biso. Yango wana tobeleli yo : | |
| Baru | LinVB | 3:4 | Mokonzi wa bokasi bonso, Nzambe wa Israel, oyoka mabondeli ma biso, bato ba Israel, tozali pene na liwa. Tozali libota lya bato baye basalaki yo mabe, bato baboyaki koyoka Mokonzi Nzambe wa bango. Yango wana mpasi ekangani na biso. | |
| Baru | LinVB | 3:7 | Otiaki bobangi o mitema mya biso mpo tobondela nkombo ya yo. Sikawa tolingi kokumisa yo awa o boombo bwa biso, zambi tosili tolongoli o mitema mya biso mayele mabe manso bankoko ba biso basalaki masumu o miso ma yo. | |
| Baru | LinVB | 3:8 | Tee lelo tokangemi o boombo, esika opanzi biso mpe otombeli biso bobe. Tosambwi mingi mpo ya mabe manso ma bankoko ba biso, baye batikaki Mokonzi Nzambe wa biso. | |
| Baru | LinVB | 3:11 | Mpo nini okomi na mbindo mpo ya bato bawei, mpe batangi yo o molongo mwa bato ba mboka ya liwa ? | |
| Baru | LinVB | 3:14 | Yekola esika nini bwanya, bokasi mpe mayele mazali mpo ’te oyeba mpe epai wapi okozwa bomoi bolai, mwinda mwa miso mpe boboto. | |
| Baru | LinVB | 3:17 | mpe bakosakanaka na ndeke ya likolo, baye bakosangisaka palata na wolo, biloko biye bakotiaka mitema ? Wapi bato ba nkita ndelo te, | |
| Baru | LinVB | 3:20 | Basusu babotami nsima mpe bazalaki o mokili, kasi bango mpe bayebaki nzela ya bwanya te. | |
| Baru | LinVB | 3:21 | Bayebaki ezalela ya bwanya te, bana ba bango bayebaki mpe te, batiki nzela ya bwanya, leka bankoko ba bango. | |
| Baru | LinVB | 3:23 | Bana ba Agar bazalaki koluka mayele na makambo ma nse, bato ba mombongo ba Madian mpe ba Teman, ata baye bameseneki kosapa masapo mpe koluka mayele, bayebaki bwanya te, nzela ya bwanya mpe te. | |
| Baru | LinVB | 3:29 | Nani abutaki o likolo mpo ’te azwa bwanya ? Nani akitisaki bwanya ut’o mampata kin’awa o nse ? | |
| Baru | LinVB | 3:32 | Kasi Oyo ayebi makambo manso, ye moto ayebi yango. Na mayele ma ye amoni bwanya, abongisi mokili mobimba mozala seko, atondisi mwango na bibwele. | |
Chapter 4
| Baru | LinVB | 4:1 | Bwanya bona bozali buku ya mibeko mya Nzambe, miye mizali mya seko. Oyo akomemya mibeko akozala na bomoi, oyo atosi mibeko te, akokufa. | |
| Baru | LinVB | 4:2 | Bana ba Yakob, bozonga, bokangana na mibeko ; botambola o nzela ya mwinda mwa mibeko. | |
| Baru | LinVB | 4:4 | Esengo na biso, bato ba Israel, mpo bayebisi biso maye makosepelisa Nzambe ! Bandeko baombo bazala na mpiko | |
| Baru | LinVB | 4:6 | Batekaki bino na bikolo bisusu, kasi basilisi bino te. Awa boyokisaki Nzambe nkanda, bakabaki bino o maboko ma banguna. | |
| Baru | LinVB | 4:8 | Bobosanaki Nzambe wa lobiko, oyo akoleisaka bino ! Boyokisaki Yeruzalem, mama wa bino, mawa ; | |
| Baru | LinVB | 4:9 | amoni nkanda ya Nzambe ekweli bino mpe aleli boye : Bino baninga ba Sion, boyoka : Nzambe ayokisi ngai mawa mingi. | |
| Baru | LinVB | 4:10 | Namoni bana babali na bana basi ba ngai bakei o boombo, Nzambe wa lobiko atindaki bango. | |
| Baru | LinVB | 4:11 | Ngai nabokoloki bango na esengo enene ; bokei bwa bango boyokisi ngai mpasi na mawa. | |
| Baru | LinVB | 4:12 | Moko te asepela na mpasi ya ngai, mwasi bozenge azangi mosalisi. Natikali ngai moko mpo ya masumu ma bana ba ngai ; mpamba te, baboyaki kotosa mibeko mya Nzambe. | |
| Baru | LinVB | 4:13 | Bandimaki mitindo mya ye soki te, batambolaki nzela ya mitindo mya Nzambe te, balandaki nzela ya bosembo te. | |
| Baru | LinVB | 4:14 | Bino bato bofandi pene na Sion, boyaka ! Bokanisa bana ba ngai, babali na basi, baye Nzambe wa lobiko atindaki o boombo. | |
| Baru | LinVB | 4:15 | Atindelaki bango bato bautaki mosika, bato bakoyokaka nsoni te mpe bakolobaka lokota bango bayebi te, bato bakomemyaka bakolo te, bakoyokelaka ata bana bake mawa te. | |
| Baru | LinVB | 4:16 | Bakendeki na bana babali ba bolingo ba mwasi bozenge, batikaki ye moko mosika na bana basi ba ye. | |
| Baru | LinVB | 4:18 | Oyo atindelaki bino makambo mana ma mpasi, ye moto akobikisa bino o maboko ma banguna. | |
| Baru | LinVB | 4:20 | Nasili natiki elamba ya ngai ya esengo, nalati ngoto ya bobondeli ; bomoi bwa ngai mobimba nakobelela Nzambe wa lobiko. | |
| Baru | LinVB | 4:21 | Bana ba ngai, bolendisa mitema, bobelela Nzambe : Akolongola bino o minyoko mpe o maboko ma banguna ba bino ; | |
| Baru | LinVB | 4:22 | zambi natii elikya libiki lya bino likouta na Nzambe wa lobiko, ye Mosantu akoyokisa ngai esengo enene : mosika te Nzambe wa lobiko, Mobikisi wa bino, akolakisa bino ngolu ya ye. | |
| Baru | LinVB | 4:23 | Awa bokendeki, nalelaki mpe nayokaki mawa mingi, kasi mokolo Nzambe akozongisa bino epai ya ngai nakozala na esengo enene mikolo minso. | |
| Baru | LinVB | 4:24 | Baninga ba Sion bazali komono bino o boombo sikawa, mosika te, bakomono ’te Nzambe akobikisa bino ; Nzambe wa lobiko akotinda libiki, likoyela bino na nkembo enene mpe na nguya ya Nzambe wa lobiko. | |
| Baru | LinVB | 4:25 | Bana ba ngai, boikikiza nkanda ya Nzambe. Monguna anyokoli bino mingi, kasi bokomono ’te akosuka ; bokotia makolo o nkingo ya ye. | |
| Baru | LinVB | 4:26 | Bana ba ngai ba bolingo bakendeki nzela ya mabaku, lokola etonga ya bibwele biye banguna babotoloki. | |
| Baru | LinVB | 4:27 | Bana ba ngai, bolendisa mitema, bobelela Nzambe ; oyo ayokisi bino mpasi, akokanisa bino lisusu. | |
| Baru | LinVB | 4:28 | Liboso bozalaki na makanisi ma kokima Nzambe ; bozongela ye mpe bokangana na ye makasi, | |
| Baru | LinVB | 4:29 | zambi oyo atindeli bino mpasi ena enene akobikisa bino mpe akozongisela bino esengo ya seko. Makambo manso makobongo | |
| Baru | LinVB | 4:32 | Mawa na bingumba biye esika bana ba yo bazalaki baombo ; mawa na engumba eye ekangaki bana ba yo ! | |
| Baru | LinVB | 4:33 | Ata bango basepelaki mokolo okweyaki mpe obebaki, mokolo engumba ya bango ekobeba, bakoyoka mawa. | |
Chapter 5
| Baru | LinVB | 5:1 | Yeruzalem, longola monkoto mwa mawa mpe mwa mpasi, lata bilamba binzenga bikolakisa nkembo ya Nzambe. | |
| Baru | LinVB | 5:4 | Yoka nkombo Nzambe akopesa yo seko : ‘Boboto na bosembo mpe Lokumu na bomemyi Nzambe’. | |
| Baru | LinVB | 5:5 | Yeruzalem, tala ut’o ngomba, bwaka miso epai ya Esti bana ba yo bakosangana ut’o Westi kin’o Esti mpo ya etinda ya Mosantu wa yo ; bakosepela mingi zambi Nzambe akanisi bango. | |
| Baru | LinVB | 5:6 | Bakendeki na makolo, banguna bakambaki bango. Kasi Nzambe akozongisa bango epai ya yo, akomeme bango na nkembo lokola bakomemeke ngwende ya mokonzi. | |
| Baru | LinVB | 5:7 | Nzambe atindi ’te balalisa ngomba inene na ike inso, batondisa mabwaku manso mpo ’te nzela ekoma kitoko, mpo ’te bana ba Israel batambola malamu mpo ya nkembo ya Nzambe. | |
| Baru | LinVB | 5:8 | Akotinda ’te nzete ya zamba na nzete inso ikobimisaka nsolo mpimbo ipesa bana ba Israel mpio o nzela. | |
| Baru | LinVB | 5:9 | Nzambe akokamba ba-Israel, bakozala na esengo, nkembo ya ye ekolakisa bango nzela ; akobatela bango na ngolu mpe na bosembo bwa ye. Tala maloba ma monkanda moye Yeremia atindelaki bato bakambamaki o boombo o Babilon na mokonzi wa Babilon. Yeremia alingi koyebisa bango makambo maye Nzambe atindaki ye. | |
Chapter 6
| Baru | LinVB | 6:1 | Nabukodonozor, mokonzi wa Babilon, akokamba bino o Babilon mpo ya masumu bosalaki o miso ma Nzambe. | |
| Baru | LinVB | 6:2 | Ekomi bino o Babilon, bokoumela kuna mibu mingi, kin’o bokokisi mabota ma bankoko mbala nsambo. Kasi na nsima nakolongola bino kuna, bokobima na boboto. | |
| Baru | LinVB | 6:3 | O Babilon bokomono bikeko bya banzambe bya palata, bya wolo mpe bya nzete, biye bakomemeke o mapeke, mpe bikobangisakabapagano. | |
| Baru | LinVB | 6:5 | Ntango bokoteleme o boso to o nsima ya bango, bokomono bato baike bakokumbamela bikeko byango ; bongo bomilobela : « E Mokonzi, tosengeli kokumbamelabobeleyo ! », | |
| Baru | LinVB | 6:7 | Mosali bikeko abongisi ndemu ya banzambe baye. Akembisi byango na palata to na wolo ; bikeko byango bizali se mpamba, bikolobaka te. | |
| Baru | LinVB | 6:8 | Lokola elenge mwasi akolingaka komibongisa, bakotulaka bikoti bya wolo mpo ’te balatisa banzambe ba bango o mitó. | |
| Baru | LinVB | 6:9 | Mbala esusu banganga Nzambe ba bango bakoyibela banzambe ba bango palata na wolo mpo ya makambo ma bango moko, ata mpo ya kopesa bandumba o libanda lya tempelo. | |
| Baru | LinVB | 6:10 | Bakolatisaka bikeko bya wolo, bya palata to bya nzete, bilamba lokola bato mpenza, ata bikeko biye bikoki koguga mpe kobeba. | |
| Baru | LinVB | 6:11 | Bakolatisaka byango bilamba bya longondo, bakopupolaka bilongi bya bango mpo bakomi na mputulu ya tempelo. | |
| Baru | LinVB | 6:12 | Mosusu azali na montongo lokola moyangeli wa ekolo, kasi soko moto atumoli ye, akoki koboma ye te. | |
| Baru | LinVB | 6:13 | Mosusu azali na mopanga mpe na nkongo o loboko la ye la mobali, nzokande akoki komibikisa o etumba te, o maboko ma bayibi mpe te. | |
| Baru | LinVB | 6:15 | Lokola mbeki ebolani ezali lisusu na mosala te, banzambe ba bango batii o tempelo bazali mpe biloko mpamba. | |
| Baru | LinVB | 6:16 | Miso ma bango matondi na mputulu eye etombwami na makolo ma bato bakoyingelaka wana. | |
| Baru | LinVB | 6:17 | Lokola moto oyo atumoli mokonzi monene, bakokanga ye o boloko tee bakoboma ye, se bongo banganga Nzambe bakokangaka bizibeli bya tempelo na bikangeli binene mpe na bibende mpo ’te bato baya koyiba banzambe te. | |
| Baru | LinVB | 6:18 | Bakopeliselaka banzambe baye miinda leka miye misengeli na bango moko, kasi banzambe baye bakoki komono ata mwinda moko te. | |
| Baru | LinVB | 6:19 | Bazali lokola mabaya ma tempelo maliami o kati ; nkusu ikouta o mabelé, lokola nsili ikoliaka bilamba, ikosilisa minkoto mya bango, kasi bango bakoyoka eloko yoko te. | |
| Baru | LinVB | 6:21 | Mangembo, nyampeke na ndeke isusu ikopimbwaka likolo lya bango. Ata nyau izali wana. | |
| Baru | LinVB | 6:23 | Wolo eye batiaki o bikeko biye mpo ya kokembisa bango, soko bato basukoli yango te na bolongoli bosoto, bango moko bakoki kongengisa yango te. O ntango batulaki bango, bayokaki eloko yoko te. | |
| Baru | LinVB | 6:25 | Bizali na makolo te, yango wana bato bakomemeke byango o mapeke ; bikolakisaka bongo ’te bikoki kosala eloko te. Baye bakosalaka bikeko biye bakoyokaka nsoni, zambi basengeli kosalisa byango mpo ya kotelemisa byango soko bikwei. | |
| Baru | LinVB | 6:26 | Soko bitelemi, byango moko bikoki koningana te, mpe soko bitengemi, bikoki komifandisa te. Mabonza bakobonzelaka byango mazali lokola bilei bakopesaka bawei. | |
| Baru | LinVB | 6:27 | Biloko bato babonzeli byango, banganga Nzambe bakotekeke byango mpo ’te bazwa mosolo ; basi ba bango bakotiaka byango o mai ma mongwa mpo ya kobomba byango ; bakokabolaka byango te na babola mpe na bato bakeleli. Basi bazali na mbindo na basi baboti sika bakoki kosimba byango te. | |
| Baru | LinVB | 6:29 | Boniboni batanga byango banzambe ? Basi bakobonzelaka banzambe baye ba palata, ba wolo mpe ba nzete mabonza ! | |
| Baru | LinVB | 6:30 | Banganga Nzambe bakofandaka o tempelo na bilamba bipaswani, bakokoli nsuki mpe bakati mandefu, enkoti o motó te. | |
| Baru | LinVB | 6:31 | Bakogangaka mpe kokolobaka makasi o boso bwa banzambe ba bango lokola bato bazali na lilaka. | |
| Baru | LinVB | 6:33 | Basala bango malamu to mabe, banzambe baye bakoki kozongisa te. Bakoki kolubola moto moko mokonzi te, kolongola ye mpe o bokonzi te. | |
| Baru | LinVB | 6:34 | Bakoki kopesa moto nkita mpe mosolo te. Soko moto akokisi elako ya ye te, bakoki kotuna ye te. | |
| Baru | LinVB | 6:35 | Bakoki kobikisa moto moko o liwa te, kolongola mpe mobola o maboko ma moto monene te. | |
| Baru | LinVB | 6:38 | Biloko biye bya nzete bakembisi na wolo mpe na palata, biulani na mabanga maye bakokataka o ngomba. Baye bakosalelaka byango, bakosuka na nsoni. | |
| Baru | LinVB | 6:40 | Ata ba-Kaldea bakokumisaka bikeko bya bango moko te. Soko bamoni ebubu, bakokamba ye epai ya Bel, mpe bakobondela Bel alobisa moto ona, lokola nde nzambe ona akoki koyoka bango ; | |
| Baru | LinVB | 6:42 | Basi baye bakangi nsuki na nsinga bakofandaka mpembeni ya nzela mpo ya kotumba mposo ya mbuma ya mampa lokola mpaka ya malasi. | |
| Baru | LinVB | 6:43 | Soko mobali aleki wana mpe atuni mwasi moko mpo andima ye, mpe ayebani na ye, na nsima mwasi oyo akoseke moninga wa ye oyo batunaki te, mpo alati naino nsinga o nsuki ya ye. | |
| Baru | LinVB | 6:44 | Manso matali banzambe baye mazali ma lokuta. Bongo ndenge nini bakoki kokanisa to koloba ’te bazali banzambe ? | |
| Baru | LinVB | 6:46 | Baye basali byango bazali bato bakoumela te ; ndenge nini biloko bango basali biumela lokola banzambe ? | |
| Baru | LinVB | 6:48 | Soko etumba to likambo lya mpasi enene ebimi, banganga nzambe bakotunana mpe bakoyokana epai wapi bakoki kobombama na bikeko biye. | |
| Baru | LinVB | 6:49 | Bongo ndenge nini bato bakomono te ’te bikeko biye bizali banzambe te, awa bikoki komibikisa te o ntango ya etumba to ya mpasi ? | |
| Baru | LinVB | 6:50 | Nani akondima te ’te biloko biye bya nzete, bikembami na wolo mpe na palata, bizali bya lokuta ? Bato ba bikolo binso na bakonzi banso bakomono ’te bikeko bizali banzambe te, kasi bobele biloko bisalemi na maboko ma bato, bizangi nguya ya Nzambe. | |
| Baru | LinVB | 6:53 | bayebi kokata makambo ma bango moko te, to kobikisa moto anyokwami. Bazali na nguya yoko te, se lokola yanganga soko ipimbwiolikolo. | |
| Baru | LinVB | 6:54 | Soko móto mwa minkalali mokweli tempelo ya bikeko biye bya nzete, bikembami na wolo mpe na palata, banganga nzambe ba bango bakokima mpe bakoluka komibikisa. Kasi bikeko bikozika nye lokola mabaya o móto monene. | |
| Baru | LinVB | 6:57 | Bikeko bya nzete, bikembami na wolo mpe na palata, bikoki komibatela te na bayibi banene to bake ; bikoki mpe kopekisa bango te kobotolo byango wolo, palata na bilamba. | |
| Baru | LinVB | 6:58 | Malamu ozala mokonzi oyo akoki kolakisa bokasi bwa ye, to ozala mbeki ya litomba ya nkolo ya ndako, kasi ozala moko wa banzambe baye ba lokuta te. Malamu ozala ata ezibeli ya ndako ekobatelaka biloko binso bizali wana, to likonzi lya ndako ya mokonzi, kasi ozala moko wa banzambe baye ba lokuta te. | |
| Baru | LinVB | 6:59 | Mwese, sanza na minzoto miye mikongengeke mpe mikosalelaka bato mizali na botosi. | |
| Baru | LinVB | 6:60 | Lokola monkalali mongengi mozali kitoko na botali, se bongo mompepe mopepi o bikolo binso. | |
| Baru | LinVB | 6:61 | Mampata makotosa Nzambe soko atindi mango matambola o mikili minso ; móto mwa minkalali mouti o likolo se bongo : ekotumba ngomba na zamba lokola etindami. | |
| Baru | LinVB | 6:63 | Yango wana bakoki kokanisa to koloba te ’te bikeko bizali banzambe, awa bazangi nguya ya kobikisa moto o likambo to kosalisa ye. | |
| Baru | LinVB | 6:66 | Bakoki kolakisa bato elembo yoko te : bakoki kongenge te lokola mwese, to kopesa mwinda lokola sanza. | |
| Baru | LinVB | 6:68 | Solo, tomoni eloko yoko te ekoki kolakisa biso ’te bazali banzambe, bongo bobanga bango te ! | |
| Baru | LinVB | 6:69 | Bikeko bya bango bya nzete, bakembisi na wolo mpe na palata, bizali lokola edongolomiso o elanga ya ndunda, bikoki kobatela eloko te. | |
| Baru | LinVB | 6:70 | Bikeko byango, bikembisami na wolo mpe na palata, bizali lokola nzube o kati ya lopango : ndeke inso ikoya kopema wana. Bizali mpe lokola ebembe babwaki o kati ya molili. | |