Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
TOBIT
Up
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10 11 12 13 14
Chapter 1
Tobi LinVB 1:1  Lisolo lya Tobit, mwana wa Tobiel, nkoko wa Ananiel, mwana wa Aduel, mwana wa Gabael, moto wa libota lya Asiel o etuka enene ya Neftali.
Tobi LinVB 1:2  O mikolo mya Salmanasar, mokonzi wa Asur, bakangaki Tobit o Tibe, o Sudi ya Kedes-Neftali, o eteni ya Nordi ya Galilea, leka Asor epai ya Westi mpe o Nordi ya Sefat.
Tobi LinVB 1:3  Ngai Tobit, natambolaki se nzela ya bosembo, mpe mikolo minso mya bomoi bwa ngai nazalaki kosala malamu. Nakabaki biloko mingi na ba­ndeko ba ngai mpe na bato ba ekolo ya ngai, baye bakendeke o boombo elongo na ngai o Ninive, o ekolo Asur.
Tobi LinVB 1:4  O bolenge bwa ngai, ntango nazalaki naino o ekolo ya ngai Israel, bato ba libota lya ngai mobimba lya nkoko Neftali bakabwanaki na libota lya Davidi mpe na Yeruzalem. O kati ya bituka binso ba-Israel baponoki engu­mba eye mpo babonza mabonza. Batongaki wana Tempelo, esika Nza­mbe akofandaka ; babenisaki yango mpo ya libiki lya bato banso bakobotama nsima.
Tobi LinVB 1:5  O ngomba inso ya Galilea bandeko ba ngai banso mpe bato banso ba libota lya Neftali bazalaki kopesa mabonza na mwana ngombe, eye Yeroboam, mokonzi wa Israel, asalaki o Dan.
Tobi LinVB 1:6  Mbala mingi nazalaki kokende se ngai moko kosambela o Yeruzalem, lokola mobeko mwa seko motindi ba-Israel banso. Nazalaki kokende na mbuma ya liboso na nyama ya liboso, eteni ya zomi ya nyama inso mpe nsuki ya mpata bakataki mbala ya yambo.
Tobi LinVB 1:7  Napesaki yango na ba­nganga Nzambe, bana ba Arone, babonza yango o altare. Napesaki mpe eteni ya zomi ya mbuma ya mampa, ya vino, ya oliva, ya malala, ya figi mpe ya mbuma isusu na bana ba Levi bazalaki kosala mosala o Yeruzalem. Napesaki ndambo esusu ya mosolo mpo ya Tempelo ; mbula na mbula nakendeki kotika yango o Yeruzalem.
Tobi LinVB 1:8  Nazalaki mpe kopesa eteni ya bisato ya mosolo na bana bitike, na basi bazenge mpe na bampaya bafandi o kati ya bato ba Israel. Nsima ya mibu misato misato, nazalaki komemele bango yango. Tozalaki kolia yango lokola etindami o buku ya Mobeko mwa Moze mpe lokola nkoko wa ngai Debora, mama wa tata wa ngai Ananiel, atindaki ; awa tata wa ngai akufi, nakomi mwana etike.
Tobi LinVB 1:9  Awa nakomi mokóló, nabali mwasi wa libota lya biso ; nkombo ya ye Ana ; aboteli ngai mwana mpe napesi ye nkombo Tobia.
Tobi LinVB 1:10  Ntango bakangaki biso mpe bakendeki na biso o Asur, nakomi o Ninive. Bandeko ba ngai banso bazalaki kolia biloko bya bapagano.
Tobi LinVB 1:11  Kasi ngai nabangaki kolia biloko bya ba­pagano.
Tobi LinVB 1:13  Yango wana Nzambe wa likolo asali ’te mokonzi Salmanazar alinga ngai mingi, mpe andima ngai o mosala mwa ye, mosala mwa mombongo.
Tobi LinVB 1:14  Nata­mboli o ekolo Medi, nakei kotala kuna wenze na zando mpo ya kosalela mokonzi wa ngai mombongo, tee liwa lya ye. Natiki talenta zomi ya palata epai ya Gabael, ndeko wa Gabri, o Rages o Medi.
Tobi LinVB 1:15  Mokolo Salmanazar awei, mwana wa ye Senakerib akitani ye. Nzela ya kokoma o Medi ikangemi, bongo nakokaki kokende kuna lisusu te.
Tobi LinVB 1:16  O eleko ya Salmanazar nakabelaki bandeko ba ngai biloko mbala mingi.
Tobi LinVB 1:17  Napesaki mampa na baye bakufi na nzala, napesaki bilamba na baye bazalaki bolumbu. Emoni ngai ebembe ya moto wa ekolo ya biso, eye ebwakemi nsima ya lopango la Ninive, nakundi yango.
Tobi LinVB 1:18  Nakundi mpe bibembe bya bato baye Senakerib abomaki o eleko alongwaki o Yudea mpe akimaki o mikolo Mokonzi wa likolo apesaki ye etu­mbu mpo atukaki Nzambe. Solo, o ntango azalaki na nkele mingi, abomaki ba-Israel baike ; kasi ngai nakamataki mpe nakundaki bibembe bya­ngo. Senakerib atindaki bato baluka byango, kasi azwaki byango te.
Tobi LinVB 1:19  Moto moko wa Ninive akei koyebisa mokonzi ’te ngai moto nazalaki kokunda byango ; yango wana nakei kobombama. Emoni ngai ’te moko­nzi asili ayebi likambo lya ngai, mpe ’te alingi koboma ngai, nabangi mpe nakimi.
Tobi LinVB 1:20  Babotoli ngai biloko binso, binso bikoti o sanduku ya mosolo mwa leta. Batikeli ngai bobele mwasi wa ngai Ana na mwana wa ngai Tobia.
Tobi LinVB 1:21  Mikolo ntuku inei milekaki naino te, bana babale ba mokonzi babomi tata wa bango. Bakimi epai ya ngo­mba Ararat. Mwana wa ye Asarkadon akitani ye. Apesi Akikar, mwana wa ndeko wa ngai Anael, mosala mwa kotala makambo manso ma mosolo mwa leta ; ayangeli mpe maka­mbo manso ma ekolo.
Tobi LinVB 1:22  Bongo Akikar alobeli ngai epai ya mokonzi mpe nazwi nzela ya kozonga o Ninive. O ntango Senakerib azalaki mokonzi mpe moyangeli wa Asur, Akikar azalaki kapita wa bato bakobongelaka mokonzi vino ; azalaki mpe moke­ngeli wa minkanda, kapita wa misala minso mya mokonzi na moyangeli wa baye bakobombaka mosolo mwa leta. Asarkadon azongisi ye bobele o mosala mona. Azalaki mpe moto wa libota lya ngai, mwana wa ndeko wa ngai.
Chapter 2
Tobi LinVB 2:1  Bongo ntango Asarkadon azalaki mokonzi, nazongi o mboka ya ngai. Bazongiseli ngai mwasi wa ngai Ana mpe mwana wa ngai Tobia. O eyenga ya biso ya ‘Poso nsambo’ tolambi limpati linene. Nafandi mpo ’te nalia.
Tobi LinVB 2:2  Batandeli ngai meza etondi na bilei. Nalobi na mwana wa ngai Tobia : « Mwana wa ngai, kende kobenga mobola moko o kati ya bandeko ba biso bakangemi awa o Ninive ; luka mobola wa motema malamu. Yaka na ye awa, tolia biso na ye. Nakozila yo, mwana. »
Tobi LinVB 2:3  Tobia akei koluka ndeko moko mobola, kasi ezongi ye abeleli ngai « Tata ! » Natuni ye : « Likambo nini, mwana ? » Azongisi : « Tata, babomi moto moko wa ekolo ya biso ; bafini ye nkingo, mpe babwaki ye o zando ; tee sikawa ebembe ya ye ezali wana. »
Tobi LinVB 2:4  Natelemi noki, natiki bilei o meza, nalongoli ebembe ya mowei o esika ena mpe nakei kotika yango o ndako mpo ’te nakunda ye soko butu boi­ndi.
Tobi LinVB 2:5  Awa nazongi, nasukoli nzoto mpe nakei kolia, kasi mawa makangi ngai.
Tobi LinVB 2:6  Nakanisi maloba profeta Amos asakolaki ona Betel : « Mikolo mya ese­ngo mikokoma mikolo mya mawa, mpe nzembo ya esengo ikokoma nzembo ya lilaka. »
Tobi LinVB 2:7  Nabandi kolela. Ekiti moi, nakei kotimola libulu mpe nakundi ye wana.
Tobi LinVB 2:8  Bato bafandi pene na ngai baseki, balobi : « Tala, aba­ngi lisusu te ! » (Boyeba ’te mbala esusu balingaki koboma ngai mpo ya likambo lyango.) « Mbala esusu akimaki, kasi sikawa abandi lisusu kokunda bawei. »
Tobi LinVB 2:9  Na butu bona nasukoli nzoto, na nsima nakei kopema o lopango, nalali penepene na efelo ya lopango. Nazipi motó na elamba te, mpo nayokaki molunge.
Tobi LinVB 2:10  Nayebaki te ’te zumbu lya ndeke ezalaki likolo lya esika nazalaki kolala. Nsete ya ndeke ikweli ngai o miso ; izikisi miso, matono ma mpembe mabimi. Nakei kosalisa miso epai ya monganga. Monganga apakoli ngai mafuta o miso mbala mingi. Nzokande mafuta mana mabomi ngai miso ; naumeli mibu minei na lolanda. Bandeko ba ngai banso bayokeli ngai mawa. Mibu mibale Akikar asalisi ngai malamu, liboso ’te ake­nde o Elimes.
Tobi LinVB 2:11  O ntango ena mwasi wa ngai Ana aluki mosala. Abandi kosala nsinga ya kosona bilamba, mpe kotonga bilamba.
Tobi LinVB 2:12  Awa asilisi mosala bapesaki ye, bafuti ye. Mokolo moko, ezalaki o mokolo mwa nsambo ya sanza ya isato, asilisi kosono elamba yoko, eye bato basengeki. Bafuti ye bo ebongi, babakiseli ye ntaba mobali ya mwana mpo ya kolia.
Tobi LinVB 2:13  Awa nakoti o ndako, ntaba eba­ndi kolela. Nabengi mwasi wa ngai, natuni ye : « Ntaba eye euti wapi ? Soko ezali ntaba eyibami, malamu ozo­ngisela bankolo ntaba ya bango, tokoki kolia eloko eyibami te ! »
Tobi LinVB 2:14  Mwasi alobi na ngai : « Ezali mbakisa likolo lya lifuta lya ngai ! » Kasi ngai nandimi te, nalobi na ye : « Zongisela ba­nkolo ntaba ya bango ! » Nzokande nayoki nsoni o miso ma ye. Mwasi azongiseli ngai na nkanda : « Bongo yo ozalaki kokabela bato biloko ntina nini ? Ozalaki kosalisa bango ntina nini ? Bato banso basili bayebi lito­mba nini ozwaki ! »
Chapter 3
Tobi LinVB 3:1  Nabandi kolela na mawa, nasambeli losambo na mawa manene o motema, nalobi :
Tobi LinVB 3:2  « Mokonzi, yo ozali na bosembo mpenza, okosalaka makambo manso se na bosembo. Oleki bolamu mpe ozali na lokuta te. Yo mosambisi wa bato banso.
Tobi LinVB 3:3  Yango wana, Mokonzi, kanisa mpe tala ngai. Opesa ngai etu­mbu mpo ya masumu ma ngai mpe ma bankoko te, to mpo ya mbala inso nabungaki. Solo, tosali masumu o mi­so ma yo.
Tobi LinVB 3:4  Tobuki mibeko mya yo. Otindaki bato basilisa biloko bya biso ; bakanga biso mpe baboma biso o ekolo eye otindaki biso ; batiola biso, baseke mpe bafinga biso.
Tobi LinVB 3:5  Solo, okokataka makambo na bosembo : opesi ngai etumbu mpo ya mabe ma ngai mpe ma bankoko ba ngai. Mpa­mba te, totosaki mitindo mya yo te, tolandaki nzela ya bosolo te.
Tobi LinVB 3:6  Sikawa osala ngai lokola olingi. Otika ngai nakufa ; nalingi kolongwa o mokili mpe kozonga o mabelé. Za­mbi liwa likobongela ngai, leka bomoi. Batumoli ngai se mpamba, nayoki mpasi mingi o motema. Mokonzi, nazali kozila ’te okobikisa ngai o mpasi eye. Tika ngai nakende o mboka ya seko ; oboya mabondeli ma ngai te ! Mpamba te, liwa lileki malamu ! Kozala ntango inso na mpasi ekosila te, ezali mabe ! Nalingi koyoka mafinga ma bato lisusu te. »
Tobi LinVB 3:7  Bobele o mokolo mona bafingi mpe Sara, mwana wa Raguel, moto wa Ekbatane o ekolo Medi. Moto afingi ye, mosali mwasi moko wa tata wa ye.
Tobi LinVB 3:8  Mpe ya solo, babalelaki Sara babali mbala nsambo, kasi mbala nsambo inso zabolo moko oyo aleki bobe, nkombo ya ye Asmodeo, abomaki mobali wa ye ntango akoti naino o ndako ya ye te. Yango wana mosali mwasi oyo afingi ye, alobi : « Solo, yo moto okobomaka babali ba yo ; osili ozwi babali mbala nsambo, mpe ata mbala yoko te libala libongoki mpenza !
Tobi LinVB 3:9  Awa babali ba yo basili kokufa, ntina yoko otumbola biso ezali te. Malamu olanda bango, tomono yo na mwana mokolo moko te, ezala mwana mobali to mwana mwasi ! »
Tobi LinVB 3:10  Sara ayoki mawa mingi, abandi kolela, akoti o ndako ya tata wa ye mpo ’te akende komiboma na nsinga. Kasi akanisi : « Te, soko nasali bongo, bakotiola tata wa ngai, bakoloba na ye : Ozalaki na mwana mwasi moko wa bolingo, mpe amibomi na nsinga mpo mpasi elekaki ye. Awa tata akomi mo­bange, nalingi koyokisa ye mawa te tee mokolo akokufa. Malamu namiboma te, kasi nasenge Nzambe abo­ma ngai, nayoka lisusu mafinga ma bato mikolo minso te. »
Tobi LinVB 3:11  Mpe akei koteleme penepene na lininisa, atomboli maboko, asambeli boye : « Bakumisa yo Nzambe wa ngolu ! Bakumisa nkombo ya yo seko. Bikelamo binso bikumisa yo na lobiko.
Tobi LinVB 3:12  Sikawa natomboli motó mpe natali epai ya yo ;
Tobi LinVB 3:13  maloba ma yo malo­ngola ngai o mokili, nalingi koyoka lisusu mafinga ma bato te.
Tobi LinVB 3:14  E Mokonzi, oyebi ’te nazali se mobimba, nayebi mobali moko te.
Tobi LinVB 3:15  Nabebisi lokumu la nkombo ya ngai te, nasambwisi tata o mokili moye mwa mpasi te. Nazali mwana se moko wa tata wa ngai, azali na mwana mosusu te mpo atikela ye biloko ; azali na ndeko mobali te penepene na ye. Moto mosusu wa libota lya ye akoki kobala ngai, azali te. Nasili nabungisi babali nsambo. Mpo nini natikala na bomoi ? Soko olingi nakufa te, yokela ngai mawa, bongo nayoka matumoli ma bato lisusu te. »
Tobi LinVB 3:16  Mbala eye Nzambe wa nkembo andimi losambo la bango babale.
Tobi LinVB 3:17  Atindi Rafael abikisa bango babale : abikisa Tobit na bolongoli lomposo la mpembe o miso ma ye mpo ’te amono mwinda mwa Nzambe na miso ; abikisa mpe Sara, mwana wa Raguel, na bopesi ye o libala na Tobia, mwana wa Tobit, mpe na bolongoli ye Asmodeo, nsuka ya bazabolo ; mpa­mba te, ebongoki ’te Tobia abala ye, liboso lya babali basusu banso. O ngonga eyemei, Tobit alongwi o lopa­ngo, akoti o ndako, mpe Sara, mwana wa Raguel, akiti o ndako ya nse.
Chapter 4
Tobi LinVB 4:1  O mokolo mona, Tobit akanisi likambo lya mosolo atikaki epai ya Gabael o Rages o ekolo Medi.
Tobi LinVB 4:2  Amilobeli o motema : Awa nasengi ’te nakufa, malamu nabenga mwana wa ngai Tobia, bongo nayebisa ye likambo lya mosolo natikaki kuna, liboso ’te nakufa.
Tobi LinVB 4:3  Abengi mwana wa ye Tobia, alobi na ye boye : « Mokolo nakokufa, osengeli kokunda ngai bo ebongi. Memya mama wa yo, oboya ye mokolo moko te. Sala manso lokola ye alingi mpe oyokisa ye motema mpasi te.
Tobi LinVB 4:4  Mwana wa ngai, okanisa boniboni mama wa yo ayokaki mpasi ntango amemeki yo o libumu, mpe mokolo ye akokufa, okunda ye penepene na ngai o lilita lyoko.
Tobi LinVB 4:5  Mwana wa ngai, tosa monoko mwa Mokonzi Nzambe mikolo mi­nso. Longola o motema makanisi ma­nso ma kosala masumu mpe ma kobuka mibeko. Bimisa misala milamu mikolo minso mya bomoi bwa yo ; tika kosala makambo mazangi bo­sembo.
Tobi LinVB 4:6  Mpo, soko olandi nzela ya bosembo, misala mya yo minso mikotambola se malamu, lokola bani­nga banso bakosalaka makambo ma bosembo.
Tobi LinVB 4:7  Kabela babola ndambo ya biloko bya yo. Oboya kotala elongi ya mobola te, bongo Nzambe mpe ako­boya kotala elongi ya yo te.
Tobi LinVB 4:8  Kabela bato makabo lokola okoki : ozali na biloko mingi, pesa mingi ; ozali na biloko mingi te, pesa moke, kasi oboya kokaba te.
Tobi LinVB 4:9  Soko osali bongo, yo moko okobika mokolo okokelela,
Tobi LinVB 4:10  za­mbi kokaba biloko ekobikisa yo o liwa, bongo okokende kosuka o molili te.
Tobi LinVB 4:11  Baye banso bakokabela moninga eloko, babonzi libonza lya motuya o miso ma Nta-Likolo.
Tobi LinVB 4:12  Mwana wa ngai, keba na ezalela ya mobulu. Pono mwasi o libota lya batata ba yo. Obala mwasi mompaya te, oyo ayebani o libota lya tata wa yo te, mpo biso tozali bana ba baprofeta. Kanisa Nowe, Abarama, Izaka na Yakob na bankoko ba biso ut’o ebandela. Banso babalaki basi o libota lya bango moko, Nzambe abenisaki bango mpe apesaki bango bana baike, yango wana bakomi bankolo ba mokili.
Tobi LinVB 4:13  Mwana, ndima mpe ba­ndeko ba yo, oboya bango te, bana ba­bali na bana basi ba ekolo ya yo, mpe bala mwasi o kati ya bango. Mpamba te, bato ba lolendo bakosuka mabe ; bakozala motema likolo. Goigoi ekokomisa moto mobola mpe mozangi, goigoi ezali mama wa nzala.
Tobi LinVB 4:14  Bato basaleli yo mosala lelo, ofuta bango lobi te, kasi pesa bango lifuta bobele lelo. Soko osaleli Nzambe malamu, okozwa mbano. Mwana wa ngai, zala na bokebi o misala minso okosala, mpe omilakisa moto wa ezalela ya solo.
Tobi LinVB 4:15  Makambo manso oli­ngi bato basala yo te, yo mpe osala ba­ngo te. Emeli yo masanga, keba ’te ola-ngwa te. Ekei yo mobembo, osala mobulu te.
Tobi LinVB 4:16  Pesa moto ayoki nzala ndambo ya limpa, mpe kabela moto azali bolumbu elamba. Soko okomi na biloko mingi, kamata ndambo, kabela babola ; mpe maye okabi lelo, na nsima oyoka mango motema mpasi te.
Tobi LinVB 4:17  O mokolo bakosala lilaka mpo ya moto wa bosembo, pesa mampa na masanga ; kasi mpo ya mosumuki akufi, osala bongo te.
Tobi LinVB 4:18  Luka kozwa lilako epai ya moto wa bwanya, mpe oboya malako malamu te.
Tobi LinVB 4:19  O makambo manso kumisa Mokonzi Nzambe, mpe bondela ye ’te atambwisa yo o nzela elamu, asalisa yo mpe mpo ’te misala mpe mikano mya yo misuka se malamu, mpo bakabelaki bato ba bikolo binso bwanya te. Se Mokonzi Nzambe ako­pesaka bolamu bonso na bato lokola alingi, to akokitisaka bango tee o mbo­ka ya bawa. Mwana wa ngai, oka­nisa mibeko mina minso malamu, olo­ngola myango o motema mwa yo te.
Tobi LinVB 4:20  Mwana wa ngai, yoka sikawa : natikaki talenta zomi epai ya Gabael, mwana wa Gabri, o Rages o ekolo Medi.
Tobi LinVB 4:21  Obanga te, mwana wa ngai, awa tokomi babola. Yeba ’te ozali moto wa nkita soko obangi Nzambe, soko okimi masumu manso mpe soko osali se lokola Mokonzi Nzambe wa yo alingi. »
Chapter 5
Tobi LinVB 5:1  Tobia ayanoli tata wa ye Tobit : « Tata, nakosala manso lokola oti­ndi.
Tobi LinVB 5:2  Kasi ndenge nini nakoki kozwa mosolo mona ? Ye ayebi ngai te, ngai mpe nayebi ye te. Nalakisa ye ele­mbo nini mpo ’te ayamba ngai mpe azongisela ngai mosolo mona ? Lisusu, nzela ekokende o Medi, nayebi ya­ngo te ! »
Tobi LinVB 5:3  Tobit ayanoli mwana wa ye Tobia : « Tokomaki nkombo ya biso babale o monkanda, moye nakabolaki mpo ’te moto na moto azwa eteni ya ye. Nakamati eteni yoko mpe natii eteni ya monkanda ya ye esika yoko na mosolo. Ekomi sikawa mibu ntuku ibale ’te natikaki mosolo kuna ! Sikawa, mwana wa ngai, luka moninga moko wa solo akende na yo nzela yoko. Tokofuta ye tee mokolo okozonga. Kende kozwa mosolo mo­na epai ya Gabael. »
Tobi LinVB 5:4  Tobia akei koluka moninga mpo ya kokende mobembo o Medi, moto ayebi nzela epai kuna. Abimi o liba­nda mpe akuti anzelu Rafael, atelemi liboso lya ye, kasi ayebi te ’te azalaki anzelu wa Nzambe.
Tobi LinVB 5:5  Atuni ye : « E ndeko, bino banani ? » Anzelu azo­ngisi : « Nazali moto wa Israel, moko wa bandeko ba yo ; nayei koluka mosala awa. » Tobia atuni ye : « Oyebi nzela ekokende o Medi ? »
Tobi LinVB 5:6  Anzelu alobi : « Nakendeki kuna mbala mingi ; nayebi nzela inso malamu. Nakendeki o Medi mbala mingi, nalalaki epai ya Gabael, moko wa bandeko wa biso, oyo afandi o Rages ya Medi. Soko olongwi o Ekbatane mpe olingi kokoma o Rages, okotambola mikolo mibale. Mboka ina ibale izali o kati ya ngomba. »
Tobi LinVB 5:7  Tobia alobi na ye : « E ndeko, zila ngai, nakende koyebisa tata wa ngai, zambi nasengeli kozala na yo o mobembo mwa ngai ; nakopesa yo lifuta. »
Tobi LinVB 5:8  Anzelu azongisi : « Malamu, nakozila yo, kasi oumela mingi te. »
Tobi LinVB 5:9  Tobia akei koyebisa tata wa ye ’te azwi moto moko, ndeko mo-Israel. Tobit alobi na ye : « Benga ye mpo nayeba soko auti o etuka nini mpe o libota nini ; nayeba soko tokoki kotia mitema na ye mpo akende mobembo elongo na yo, mwana wa ngai. » Tobia akei kobenga ye, alobi : « E ndeko, tata wa ngai abengi yo. »
Tobi LinVB 5:10  Anzelu akoti o ndako mpe Tobit apesi ye losako liboso. Anzelu azo­ngisi : « Natombeli yo mikolo mya ese­ngo mingi. » Tobit ayanoli : « Bolamu nini nakoki kozwa naino ? Miso ma ngai makufa, nakoki komono lisusu mwinda mwa likolo te, mpe nazali o kati ya molili lokola bato bawa bakomonoko moi lisusu te. Ata nazali na bomoi, nafandi o kati ya bato bawei ; nakoyokaka lolaka la bato, ka­si nokomonoko bango te. » Anzelu alobi na ye : « Lendisa motema, mosika te Nzambe akobikisa yo, lendisa motema ! » Tobit alobi na ye : « Mwana wa ngai Tobia alingi kokende o Medi. Okoki kokende na ye elongo mpe kokamba ye o nzela ? Ndeko, nakopesa yo lifuta. » Anzelu ayanoli : « Nakoki kokende na ye elongo, nayebi nzela inso kuna, nakendeki o Medi mbala mingi, nasili nakatisi bisobe na ngomba inso, nayebi nzela inso. »
Tobi LinVB 5:11  Tobit atuni ye : « Ndeko, libota lya yo nini mpe ekolo ya yo nini ? Ndeko, yebisa ngai. »
Tobi LinVB 5:12  Anzelu ayanoli : « Koyeba libota lya ngai ekoki kosala yo nini ? » Tobit alobi : « Ndeko, nali­ngi koyeba solo soko ozali mwana wa nani, nkombo ya yo nani ? »
Tobi LinVB 5:13  A­nze­lu azongisi : « Nkombo ya ngai Azaria, mwana wa Anania oyo wa Mokolo, moko wa bandeko ba yo. »
Tobi LinVB 5:14  Tobit alobi na ye : « Yambi, ndeko, losako ! Omono ngai moto mabe te soko nalingaki koyeba libota lya yo malamu. Namoni ’te ozali ndeko mpe outi o libota lilamu. Nayebi Anania na Natan malamu ; bango babale bazali bana ba Semelia wa Mokolo. Tozalaki kokende na bango kokumisa Nzambe o Yeruzalem. Bango babu-ngi nzela te. Bandeko ba yo bazali bato balamu mpe bauti o libota lya solo. Natombeli yo boyei bolamu. »
Tobi LinVB 5:15  Mpe abakisi : « Nakofuta yo dragma yoko na mokolo ; nakopesa yo biloko binso se lokola mwana wa ngai moko.
Tobi LinVB 5:16  Kende elongo na mwana wa ngai mpe nakobakisa naino mosolo mosusu. » Anzelu alobi : « Ya solo, nakokende na ye elongo. Obanga te ; manso makoleka malamu, ut’o nta­ngo tokolongwa awa tee mokolo tokozonga awa epai ya yo ; nzela eye tokoleka ezangi mabaku. »
Tobi LinVB 5:17  Tobit alobi na ye : « Ndeko, Nza­mbe abenisa yo. » Na nsima abengi mwana wa ye, alobi na ye : « Mwana wa ngai, bongisa biloko mpo ya mobembo, mpe kende elongo na ndeko wa yo. Nzambe wa likolo abatela yo kuna mpe azongisa bino babale nzoto kolongonu epai ya ngai. Anzelu wa ye akende na bino elongo, mpe abatela bino o nzela, mwana wa ngai ! » Ebimi Tobia o ndako mpo abanda mobembo, ayambi tata na mama wa ye o maboko. Tobit alobi na ye : « Ke­nde malamu ! »
Tobi LinVB 5:18  Mama wa ye abandi kolela mpe atuni Tobit : « Mpo nini otiki mwana wa ngai akende boye ? Azali lingenda lya maboko ma biso, ye moto akobatelaka biso.
Tobi LinVB 5:19  Owela bobele likambo lya mosolo te ; ná mosolo ná mwana, mwana liboso.
Tobi LinVB 5:20  Ndenge Nzambe afandisaki biso o mokili, ekokaki na biso mpenza. »
Tobi LinVB 5:21  Kasi tata azongisi : « Omitungisa te ; makambo manso ma mwana wa biso makoleka malamu tee ntango akozonga epai ya biso. Miso ma yo makomono mokolo akozonga nzoto ko­longonu, epai ya yo.
Tobi LinVB 5:22  Omitungisa te, tika kobanga mpo ya bango, mwasi wa ngai. Anzelu malamu akokende na ye, mpe akosala se mobembo malamu ; akozonga nzoto kolongonu. »
Chapter 6
Tobi LinVB 6:1  Elenge mobali akei elongo na anzelu, mpe mbwa elandi bango. Bongo basali mobembo bango babale elongo. O butu bwa yambo balali penepene na ebale Tigris.
Tobi LinVB 6:2  Elenge mobali akiti o ebale Tigris mpo ya kosukola makolo. Ebuki ya mbisi epimbwi likolo lya mai mpe elingi komele lokolo la ye. Mwana agangi.
Tobi LinVB 6:3  Anzelu alobi na ye : « Kanga yango, otika yango te. » Elenge mobali aka­ngi mbisi, mpe abendi yango o libongo.
Tobi LinVB 6:4  Anzelu alobi na ye : « Pasola ya­ngo, longola nsongi, motema na libale, mpe tia yango epai ; na nsima bwaka makundu, zambi na nsongi, na motema mpe na libale bakosalaka minó. »
Tobi LinVB 6:5  Elenge mobali apasoli mbisi, alo­ngoli nsongi, motema na libale ; na nsima akalingi mwa ndambo ya mbisi mpo ya kolia. O ndambo etikali atii mongwa mpo ya kobomba yango.
Tobi LinVB 6:6  Bango babale bakobi mobembo mwa bango tee bakomi penepene na mokili mwa Medi.
Tobi LinVB 6:7  Mwana mobali atuni anzelu motuna moye : « Ndeko Azaria, monó kani mozali o motema, o libale mpe o nsongi ya mbisi ? »
Tobi LinVB 6:8  A­nzelu ayanoli : « Soko batumbi motema na libale lya mbisi, mpe soko babutisi milinga o boso bwa mobali to bwa mwasi azali na zabolo to na elimo ebe, bokasi bwa zabolo bokosila mpe moto oyo akobika seko.
Tobi LinVB 6:9  Pakola nsongi ya mbisi o miso ma moto azali na mposo o miso, pemela mposo ena mpe miso makobika. »
Tobi LinVB 6:10  Bakoti o mokili mwa Medi. Basili bakomi penepene na Ekbatane.
Tobi LinVB 6:11  Rafael alobi na elenge mobali : « Nde­ko Tobia ! » Tobia atuni ye : « Likambo nini ? » Anzelu azongisi : « Lelo tokolala o ndako ya Raguel, azali ndeko wa yo ; azali na elenge mwasi nkombo ’te Sara.
Tobi LinVB 6:12  Azali se ye moko, azali na ndeko mobali to mwasi te. Bobele yo ozali ndeko wa ye wa penepene ; yo moko okoki kobala ye liboso lya babali basusu ; yo mpe okoki kosa-ngola biloko binso bya tata wa ye. Azali elenge mwasi wa mayele na mo­tema mpiko, moto wa boboto mingi, mpe tata wa ye azali moto malamu. »
Tobi LinVB 6:13  Mpe abakisi : « Yo moto okoki kobala ye. Yoka ngai, ndeko, lelo na mpokwa nakosolola na tata wa ele­nge mwasi mpo ’te andima kobalisa yo na mwana wa ye. Mokolo tokolongwa o Rages, tokosepela eyenga ya libala. Nayebi ’te Raguel akoki ko­boya yango te ; akoki mpe kobalisa mwana wa ye na mobali mosusu te. Asengeli kobalisa yo, liboso lya babali basusu, mpo ozali ndeko wa ye. Soki te, akozwa etumbu ya liwa, lokola ekomami o buku ya Moze. Bo­ngo yoka ngai, ndeko, lelo na mpo­kwa tokosolola na tata wa elenge mwasi mpe tokotuna ye apesa yo mwana wa ye. Mokolo tokolongwa o Rages mpo tozonga o mboka, tokokende na ye o ndako ya yo. »
Tobi LinVB 6:14  Tobia ayanoli Rafael : « Ndeko Azaria, nayoki ’te basili kobala ye mbala nsambo, mpe babali baye ba­nso bakufi ntango bayingeli o ndako ya kolala ; banso bakufi bobele o ndako ya mwasi. Bato basusu balobi ’te zabolo moko azalaki koboma bango.
Tobi LinVB 6:15  Zabolo akosala mwasi eloko te, kasi soko mobali alingi kobeleme na ye, akoboma ye. Yango wana nazali kobanga. Tata wa ngai aboti mwana mobali mosusu te, se ngai moko. Soko ngai nakufi, tata na mama bakokufa na mawa, zambi bakoyoka motema mpasi mingi mpo ya ngai. Bazali na bana babali basusu te baye bakoki kokunda bango. »
Tobi LinVB 6:16  Rafael atuni ye : « Obosani malako tata wa yo apesaki mpo obala mwasi wa libota lya tata ? Yango wana, yoka ngai, ndeko, omitungisa na zabolo ona te, mpe bala mwasi. Nayebi solo ’te o butu boyemei, bakopesa yo mwasi.
Tobi LinVB 6:17  Nzoka-nde, soko okoti o ndako ya mwasi, kamata ndambo ya libale mpe ya motema mwa mbisi mpe tia yango o makala mazali o mbeki ya malasi. Nsolo ekopalangana ; ntango zabolo akoyoka nsolo ebe, akokima, mpe bakomono ye penepene na elenge mwasi mokolo moko lisusu te.
Tobi LinVB 6:18  Kasi ntango bolingi kosangana nzo­to, liboso boteleme bino babale, bosambela mpe bobondela Mokonzi wa likolo ayokela bino mawa mpe abikisa bino. Obanga te, mpo azali mwasi baponeli yo ut’o kala ; yo moto osengeli kobikisa ye. Akolanda yo, mpe nayebi solo ’te akobotela yo bana ; mpe bana bakozala lokola bandeko ba yo. Otia ntembe te ! »
Tobi LinVB 6:19  Eyoki Tobia maloba ma Rafael, ayebi ’te Sara azalaki ndeko wa ye, moto wa libota mpe wa etuka ya tata wa ye, akomi kolinga ye mingi mpe motema mwa ye mokangemi na ye.
Chapter 7
Tobi LinVB 7:1  Ekoti bango o Ekbatane, Tobia alobi : « Ndeko Azaria, lakisa ngai noki ndako ya ndeko wa biso Raguel. » Anzelu akei na ye o ndako ya Raguel. Bakuti ye afandi o monoko mwa lopango, bango liboso bapesi ye losako. Raguel azongiseli bango : « Mbo­te mingi, bandeko. Awa boyei, nasepeli mingi. » Akotisi bango o nda­ko.
Tobi LinVB 7:2  Alobi na mwasi wa ye Edna : « Tala boniboni mwana mobali oyo aulani na ndeko wa biso Tobit ! »
Tobi LinVB 7:3  Edna atuni bango : « Bandeko, bino bouti wapi ? » Bazongisi : « Tozali bana ba libota lya Neftali, bakanga biso bao­mbo o Ninive. »
Tobi LinVB 7:4  Atuni bango lisusu : « Boyebi ndeko wa biso Tobit ? » Bayanoli : « Toyebi ye malamu. »
Tobi LinVB 7:5  Atuni lisusu : « Azali malamu ? » Bango balobi : « Azali malamu, azali naino makasi. » Mpe Tobia abakisi : « Azali tata wa ngai. »
Tobi LinVB 7:6  Na mbala yoko Raguel atelemi, ayambi Tobia o maboko mpe abandi kolela. Na nsima alobi na Tobia : « Nzambe abenisa yo, mwana wa ngai ! Tata wa yo azali moto malamu mpenza. Mawa kani ’te moto wa bosembo boye, moto apesaki makabo maike, akomi na lolanda ! » Mpe Raguel azingi ndeko wa ye Tobia ekopi, mpe abandi kolela.
Tobi LinVB 7:7  Mwasi wa ye Edna aleli mpo ya Tobit ; na mwana wa bango Sara akomi mpe kolela.
Tobi LinVB 7:8  Na nsima Raguel abomeli bango mpata, ayambi bango malamu mpenza.
Tobi LinVB 7:9  Esilisi bango kosukola nzoto, bakei kofanda o meza. Na nsima Tobia alobi na Rafael : « Ndeko Azaria, malamu otuna Raguel sikawa soko ako­ndima kobalisa ngai ndeko wa ngai Sara. »
Tobi LinVB 7:10  Raguel ayoki maloba mana, alobi na elenge mobali Tobia : « Lia mpe mele, omitungisa te na mpokwa ya lelo, moto mosusu akoki kobala Sara te, bobele yo, mwana wa ngai. Nakoki kopesa ye na moto mosusu te, mpo yo ozali ndeko wa ye. Kasi mwana, yoka malamu, nakoyebisa yo polele.
Tobi LinVB 7:11  Nazwelaki ye mobali o kati ya bandeko ba biso mbala nsambo. Bango banso bakufi se o butu bwa ya­mbo awa bakoti o ndako. Kasi sikawa, mwana, lia mpe mele. Moko­nzi akokabela yo bolamu na boboto. » Kasi Tobia azongisi : « Nalingi koyoka likambo lya komele mpe lya kolia te, soko liboso okati likambo lya ngai te. » Raguel azongisi : « Malamu, soko tolandi mobeko mwa Moze, ye azali mwasi wa yo. Yango wana ezali se Nzambe mpenza alingi topesa ye lokola mwasi wa yo. Bongo yamba nde­ko wa yo ! Banda lelo ozali ndeko wa ye, ye mpe azali ndeko wa yo. Topesi yo mwana wa biso seko. Na mpokwa ya lelo Mokonzi wa likolo akolinga yo, mwana, akokabela yo bolamu na boboto. »
Tobi LinVB 7:12  Raguel abengi mwana wa ye Sara, asimbi ye na loboko, apesi ye na Tobia, alobi : « Napesi ye o maboko ma yo. O buku ya Moze mobeko motangemi bongo, ye azali mwasi wa yo. Kamata ye, kende na ye o ndako ya tata wa yo na motema mpio. Nzambe wa likolo asalisa yo mpo ’te osala mobembo malamu ! »
Tobi LinVB 7:13  Na nsima alobi na mama wa mwana akende koluka lokasa mpo ya kokoma. Na monkanda andimi libala lya mwa­na, apesi mwana wa ye na Tobia, akokisi bongo mobeko mwa Moze.
Tobi LinVB 7:14  Esilisi ye kokoma monkanda, babandi kolia mpe komele.
Tobi LinVB 7:15  Raguel abe­ngi mwasi wa ye Edna, alobi na ye : « Mama, bongisa ndako ya bango, esika okokende kotika mwana wa yo. »
Tobi LinVB 7:16  Mama akei kobongisa mbeto o ndako ena, lokola mobali alobaki ; akotisi mwana wa ye wana. Aleli, kasi na nsima alongoli mai o miso, alobi :
Tobi LinVB 7:17  « Kobanga te, mwana wa ngai. Mokonzi wa likolo asilisa mawa ma yo, ayokisa yo esengo ! Kitisa motema, mwana ! » Na nsima abimi.
Chapter 8
Tobi LinVB 8:1  Esilisi bango kolia mpe komele, bakei kolala. Bakambi elenge mo­bali o ndako ya kolala.
Tobi LinVB 8:2  Tobia akundoli malako ma Rafael, afungoli libenga lya ye mpe akamati libale na motema mwa mbisi mpe atii yango o makala mazali o mbeki ya malasi.
Tobi LinVB 8:3  Nsolo ya mbisi ebengani zabolo mosika ; akimi na mompepe mwa milinga kin’o Ezipeti. Rafael alandi ye kuna, azwi ye mpe akangi ye na nsi­nga seko. Mokolo mwa libala
Tobi LinVB 8:4  Baboti babimi mpe bakangi ndako nsima ya bango. Tobia alongwi o mbeto, alobi na Sara : « Teleme, ndeko, tosambela biso babale, tosenge lisalisi lya Nzambe, apesa biso bolamu mpe abatela biso. »
Tobi LinVB 8:5  Sara atelemi mpe bango babale babandi kosambela Nza­mbe mpo ’te abatela bango. Tobia alobi boye : « Bakumisa yo Nzambe wa bankoko, bakumisa nkombo ya yo o bileko na bileko ! Bikelamo binso o likolo mpe o nse bikumisa yo na lobiko.
Tobi LinVB 8:6  Yo moto okelaki Adamu, okelaki mpe mwasi wa ye Eva, mpo ’te azala mosalisi mpe mobateli wa ye. Bazali bankoko ba libota linene lya bato. Yo mpenza olobaki : « Ebongi te ’te mobali atikala ye moko, malamu topesa ye mosalisi oyo akokani na ye. »
Tobi LinVB 8:7  Awa nakamati ndeko wa ngai, naweli bisengo te, kasi nabali ye na motema moko. Oyokela biso babale mawa, obatela biso tokoma babange. »
Tobi LinVB 8:8  Mpe basilisi losambo monoko moko, balobi : « Amen, amen ! »
Tobi LinVB 8:9  Na nsima bakei kolala. Nzokande Raguel atelemi mpe abe­ngi basali ba ye. Bakei kotimola libulu bo lilita,
Tobi LinVB 8:10  mpo akanisi : « Malamu akufa te, soki te bato banso bakoseke mpe bakofinga biso. »
Tobi LinVB 8:11  Esilisi bango kotimola libulu, Raguel azo­ngi o ndako mpe abengi mwasi wa ye.
Tobi LinVB 8:12  Alobi na ye : « Tinda mosaleli mwasi moko o ndako ya bango ya kolala, atala soko Tobia azali naino na bomoi. Soko akufi, tokoki koku­nda ye, mpe moto moko akoyeba te. »
Tobi LinVB 8:13  Bayebisi mosaleli mwasi, bapelisi mwinda mpe bafungoli ndako ; mosaleli mwasi akoti mpe akuti bango babale bazalaki kolala mpongi ;
Tobi LinVB 8:14  abimi mpe ayebisi bango : « Azali naino, ma­nso mazali se malamu. »
Tobi LinVB 8:15  Bongo batondi Nzambe, balobi : « Bakumisa yo, e Nzambe, na bokumisi bonene ! Bakumisa yo o bileko binso seko !
Tobi LinVB 8:16  Bakumisa yo mpo otondisi motema mwa ngai na esengo, mpo maye nabangaki masalemi te, kasi na ngolu ya yo enene, oyokeli biso mawa.
Tobi LinVB 8:17  Bakumisa yo, mpo oyokeli bana baye mawa. Lakisa bango ngolu ya yo, e Mokonzi, mpe bikisa bango ; bomoi bwa bango bazala na esengo mpe na boboto. »
Tobi LinVB 8:18  Mpe Raguel atindi basali ba ye bazipa libulu liboso ’te ntongo etana.
Tobi LinVB 8:19  Atindi mwasi wa ye alamba ma­mpa mingi. Na nsima akei o etonga, akamati ngombe babali ibale na mpata babali inei, mpe atindi basali baboma yango. Bongo babandi kolengele limpati.
Tobi LinVB 8:20  Abengi Tobia mpe alobi na ye : « Mikolo zomi na minei okolongwa awa te. Otikala bobele o esika ozali, okolia mpe okomele o ndako ya ngai. Yokisa mwana wa ngai lisusu esengo o motema, mpo makambo makwelaki ye mayokisi ye mpasi mingi o motema.
Tobi LinVB 8:21  Nakaboli biloko bya ngai binso na ndambo ibale ; kamata ndambo yoko, eye okomeme epai ya tata wa yo, bongo omitungisa na likambo lyoko te. Bakopesa yo ndambo esusu mokolo biso na mwasi wa ngai tokokufa. Lendisa motema, mwana wa ngai : ngai nazali tata wa yo, mpe Edna azali mama wa yo. Tokomi baboti ba yo, banda lelo lokola tozali baboti ba ndeko wa yo. Lendisa motema, mwana ! »
Chapter 9
Tobi LinVB 9:2  « Ndeko Azaria, kamata basali banei na kamela ibale mpe kende o Rages epai ya Gabael.
Tobi LinVB 9:3  Lakisa ye eteni ya monkanda mwa mosolo, mpe ozwa mwango. Na nsima obenga ye o eyenga ya libala awa.
Tobi LinVB 9:4  Oyebi malamu ’te tata wa ngai azali kotanga mikolo. Soko naumeli lisusu mokolo moko, akoyoka motema mpasi. Oyebi ’te Raguel alayaki ndai, nakoki kotala ndai ya ye mpamba te. »
Tobi LinVB 9:5  Rafael akei elongo na basali banei mpe na kamela ibale epai ya Rages o mokili mwa Medi ; mpe na butu balali o ndako ya Gabael. Apesi ye monkanda mwa mosolo, ayebisi ye ’te Tobia, mwana wa Tobit, abalaki mwasi. Abengi ye o limpati lya libala. Gabael atangi mabenga ma mosolo ; manso mazalaki na elembo mpe batii mango o mikongo mya kamela.
Tobi LinVB 9:6  Na nta ntongo bakei mpe bakuti Tobia azalaki kolia o meza. Tobia atelemi mpe apesi Gabael losako. Gabael abandi kolela mpe abenisi Tobia na maloba maye : « E mwana malamu wa tata malamu, oyo azali moto wa bosembo mpe akosalisaka bato ! Mokonzi Nza­mbe abenisa yo na bobenisi bwa likolo, abenisa yo ná mwasi wa yo, abenisa mpe tata na mama wa mwasi wa yo ! Tokumisa Nzambe, zambi, awa namoni Tobia, ezali lokola namoni ndeko wa ngai Tobit. »
Chapter 10
Tobi LinVB 10:1  Nzokande mokolo na mokolo Tobit azalaki kotanga mikolo mya mobembo, mya bokei mpe mya bozongi. Esilaki mikolo mina minso, mwana wa ye azongi naino te.
Tobi LinVB 10:2  Akanisi : « Mbele bapesi ye nzela ya kozonga te ! Mbele Gabael asili akufi, mpe kuna moto moko azali te mpo ya kopesa ye mosolo ! »
Tobi LinVB 10:4  Mwasi wa ye Ana alobi : « Mwana wa ngai akufi, azali lisusu na bomoi te. » Ye mpe akomi kolela mpe komitungisa mpo ya mwana wa ye, alobi :
Tobi LinVB 10:5  « Ndenge nini nandimaki ’te yo, mwana wa ngai okende, yo mwinda mwa miso ma ngai ! »
Tobi LinVB 10:6  Tobit azongiseli ye : « Mama, kitisa motema, omitungisa te ; mwana azali bobele malamu. Mbele bakuti libaku kuna ; moninga wa ye azali moto wa solo, azali ndeko wa biso. Omiyokisa mawa te ; mosika te tokomono ye. »
Tobi LinVB 10:7  Kasi ye ayanoli : « Olobela ngai lisusu liloba lyoko te, tika kokosa ngai, mwana wa ngai akufi ! » Mpe mokolo na mokolo azalaki kobima o libanda kotala nzela epai mwana wa ye ake-ndeki, mpo alingi kondima monoko mwa moto moko lisusu te. Mpe awa moi mokiti, azongi lisusu o ndako, se kokimela mpe kolela butu mobimba, alali mpongi soki te. Nsima ya mikolo zomi na minei mya eyenga ya libala lokola Raguel alayaki ndai, Tobia akei koyebisa ye : « Tika ngai nakende, mpo nayebi ’te tata na mama bazali lisusu na elikya te ’te bakomono ngai lisusu. Yango wana, nabondeli yo, tata, tika ngai nakende mpe nazonga epai ya tata wa ngai. Nasili kolimbolela yo boniboni natikaki bango. »
Tobi LinVB 10:8  Kasi Raguel alobi na Tobia : « Tikala naino, mwana wa ngai, otikala epai ya ngai. Nakotinda bantoma epai ya tata wa yo Tobit bayebisa ye nsango ya yo. »
Tobi LinVB 10:9  Tobia ale-ndisi, alobi ’te : « Nabondeli yo, tika nazonga epai ya tata wa ngai. »
Tobi LinVB 10:10  Se o ntango ena Raguel apesi ye mwasi wa ye Sara, na mpe ndambo ya biloko bya ye binso, basali babali na basali basi, ngombe na mpata, mpunda na kamela, bilamba, mosolo na biloko bisusu ndenge na ndenge.
Tobi LinVB 10:11  Atiki ba­ngo bakende na esengo enene o motema. Bakabwani na Tobia na maloba maye : « Mwana wa ngai okende nzoto kolongonu, osala mobembo malamu. Mokonzi wa likolo akamba bino o nzela, yo na mwasi wa yo Sara, mpe namono bana ba bino liboso ’te nakufa. »
Tobi LinVB 10:12  Alobi na mwana wa ye Sara : « Kende epai ya bakilo ba yo, mpo sikawa bakomi baboti ba yo se lokola biso. Kende na boboto, mwana wa ngai, nayoka bobele makambo malamu mpo ya yo, mikolo minso mya bomoi bwa ngai ! » Apesi bango mbote ya bokabwani mpe atiki bango bakende.
Tobi LinVB 10:13  Na nsima Edna mpe alobi na Tobia : « Mwana mpe ndeko wa bolingo, Mokonzi azongisa yo o mboka, mpe naumela naino mwa mikolo nakoka komono bana ba yo mpe ba mwana wa ngai Sara liboso ’te nakufa ! O miso ma Mokonzi napesi yo mwana wa ngai mpo obatela ye. Oyokisa ye motema mpasi mokolo moko te. Mwana wa ngai, kende na boboto ! Banda lelo nakomi mama wa yo, mpe Sara akomi ndeko wa yo. Biso banso toyoka esengo mikolo minso mya bomoi bwa biso ! » Na nsima ayambi bango babale o maboko, mpe atiki bango bakende na esengo enene o motema.
Tobi LinVB 10:14  Bongo Tobia alongwi epai ya Raguel na motema motondi na ese­ngo. Atondi Mokonzi wa likolo na nse, Mokonzi monene wa molo­ngo, mpo mobembo mwa ye molekaki malamu. Raguel alobi na ye : « Nza­mbe asalisa yo mpo ’te okoka komemya baboti ba yo mikolo minso mya bomoi bwa bango. »
Chapter 11
Tobi LinVB 11:1  Bakomi kobeleme na Kaserin, penepene na Ninive. Rafael alobi :
Tobi LinVB 11:3  Ebongi biso tokende liboso, mpe mwasi wa yo alanda biso. Tobongisa ndako o ntango basusu ba­zali koya. »
Tobi LinVB 11:4  Bongo bango babale bakei elongo. Rafael alobaki na Tobia ’te ameme nsongi ya mbisi. Mpe mbwa ezalaki kolanda bango.
Tobi LinVB 11:5  Ana afandi o libanda, azalaki kotala nzela eye mwana wa ye asengeli koya.
Tobi LinVB 11:6  Motema mozalaki koyebisa ye ’te mwana azali koya. Alobi na tata Tobit : « Mwana wa yo na moninga wa ye bazali koya. »
Tobi LinVB 11:7  Elingi Tobia kokende kokutana na tata wa ye, Rafael alobi na ye : « Nayebisi yo ya solo, miso ma tata wa yo makofungwana.
Tobi LinVB 11:8  Opakola ye nsongi ya mbisi o miso, monó mokolia mpe­mbe ekangi ye miso, mpembe ekolongwa. Bongo tata akomono lisusu mpe akoyeba kotala mwinda. »
Tobi LinVB 11:9  Mama apoti mbangu, akweli mwa­na wa ye o nkingo, alobi : « Nakufa sikawa, likambo te, nasili namoni yo ! » Mpe aleli.
Tobi LinVB 11:10  Tata Tobit atelemi, aza­laki kolukaluka nzela tee akomi o monoko mwa lopango. Tobia akei ko­kutana na tata wa ye.
Tobi LinVB 11:11  Azalaki na nsongi ya mbisi o maboko. Apemeli ye mpema o miso, asimbi ye malamu, alobi na ye : « Lendisa motema, tata ! » Na nsima apakoli ye nsongi ya mbisi o miso mpe atiki yango bongo mwa ntango eke.
Tobi LinVB 11:12  Na nsima asimbi lo­mposo la mpembe lozalaki o miso mpe alongoli lango na maboko.
Tobi LinVB 11:14  Agangi : « Nazali komono yo, mwana wa ngai. Okomi mwinda mwa ngai ! » Mpe alo­bi : « Bakumisa Nzambe, bakumisa nko­mbo ya ye enene ! Bakumisa banzelu basantu ba ye banso ! Bakumisa nkombo ya ye o bileko binso ! Ayokisaki ngai mpasi, kasi ayokeli ngai mawa, mpe sikawa nazali komono mwana wa ngai Tobia. »
Tobi LinVB 11:15  Tobia ayingeli o ndako na esengo enene, akumisi Nzambe na mongo-ngo makasi. Ayebisi tata wa ye ’te mobembo molekaki malamu mpe ’te amemeli ye mosolo ; alimboli mpe ndenge abalaki Sara, mwana wa Raguel, mpe abakisi : « Mwasi azali koya, akomi penepene na ezibeli ya Ninive. »
Tobi LinVB 11:16  Tobit ayoki esengo enene mpe akumisi Nzambe ; akei kokutana na bokilo wa ye o monoko mwa Ninive. Baye banso bamoni ’te Tobit azalaki kotambola ye moko, moto moko aka­mbi ye te, bakamwi mingi.
Tobi LinVB 11:17  Tobit asakoli o miso ma bango ’te Nzambe ayokeli ye mawa mpe afungoli ye miso. Tobit abelemi na Sara, mwasi wa mwana wa ye Tobia, mpe abenisi ye na maloba maye : « Yambi, mwana, na­sepeli yo mingi ! Bakumisa Nza­mbe wa yo, oyo atindi yo epai ya biso, mwana wa ngai. Tata wa yo azwa bolamu. Mwana wa ngai Tobia azwa bolamu, yo mpe, mwana wa ngai, ozwa bolamu ! Koto o ndako ya yo, toyambi yo malamu ; ozwa bolamu mpe oyoka esengo ; koto ko, mwana wa ngai ! »
Tobi LinVB 11:18  O mokolo mona, ba-Yuda banso ba Ninive basepeli mingi.
Tobi LinVB 11:19  Akikar na Nadan, bana ba ndeko wa Tobit, bayei mpe epai ya ye, bayoki mpe esengo enene.
Chapter 12
Tobi LinVB 12:1  Awa eyenga ya libala elingi esila, Tobit abengi mwana wa ye, alobi na ye : « Mwana, kanisa lifuta lya moninga wa yo wa mobembo ! Likolo lya maye toyokanaki na ye libo­so, obakisa mosolo mosusu. »
Tobi LinVB 12:2  Atuni tata : « Tata, napesa ye boni awa asalisaki ngai mingi boye ? Soko napesi ye ndambo ya biloko biye toyei na byango biso na ye, nakotikala naino na biloko mingi.
Tobi LinVB 12:3  Tala, azongisi ngai o mboka nzoto kolongonu, azweli ngai mwasi, akendeki kolukela ngai mosolo, mpe na nsima abikisi mwasi wa ngai, mpe abikisi yo lokola. Bo­ngo topesa ye nini mpo ya makambo mana manso ? »
Tobi LinVB 12:4  Tobit alobi na ye : « Ebongi azwa ndambo ya biloko binso ayei na byango. »
Tobi LinVB 12:5  Tobia abengi moninga wa ye, alobi na ye : « Kamata ndambo ya maye boyei na mango, bo lifuta lya mosala osalaki ; na nsima okoki kokende na boboto. »
Tobi LinVB 12:6  Rafael abengi bango babale mpe alobi na bango : « Bokumisa Nzambe, botambwisa nkombo ya ye epai ya bato banso, mpo ya malamu maye asalaki bino. Bokumisa ye mpe boyembela nkombo ya ye. Ebongi bato banso bayeba bikela bya ye. Boyebisa bango, mpe bolembe kotondo ye te.
Tobi LinVB 12:7  Ebongi ’te babomba makambo ma mokonzi wa ekolo ; kasi basakola bikela binene bya Nzambe polele ! Botondo ye bo ebongi. Bosala se malamu, bongo mpasi ekokwela bino mokolo moko te.
Tobi LinVB 12:8  Kosambela ezali malamu soko olali mpe nzala ; kokabela baye bakeleli biloko ezali malamu soko ozali na bosembo. Misala mina minso mileki nkita izangi bosembo. Kokabela baye bakeleli ná kosangisa wolo, kokabela bakeleli biloko eleki malamu.
Tobi LinVB 12:9  Moto akobikisa bongo molimo mwa ye o liwa mpe akopetwama na masumu manso. Baye bayebi kokaba bakokufa noki te !
Tobi LinVB 12:11  Nasili nayebisi bino manso polele, nakobombela bino eloko te. Nasili nalobi na bino : ‘Makambo ma mokonzi wa ekolo, bakobombaka ma­ngo. Kasi basakola bikela binene bya Nzambe polele !’
Tobi LinVB 12:12  Boyeba ’te o nta­ngo bino na Sara bozalaki kosambela, ngai moto nabonzelaki Mokonzi wa nkembo mabondeli ma bino ; nasalaki se bongo o ntango ozalaki kokunda bawei.
Tobi LinVB 12:13  Mokolo otelemeki noki mpe otikaki bilei o meza mpo ’te okunda mowei, natindamaki epai ya yo mpo nameka boyambi bwa yo.
Tobi LinVB 12:14  Bobele o ntango ena Nzambe atindaki ngai naya kobikisa yo na mpe bokilo wa yo Sara.
Tobi LinVB 12:15  Nazali Rafael, moko wa ba­nze­lu nsambo batelemi ntango inso penepene na Mokonzi mpo ’te bayi­ngela o Nkembo ya ye. »
Tobi LinVB 12:16  Bango babale bayoki nsomo, bakumbami o nse, babangi mingi.
Tobi LinVB 12:17  Kasi anzelu alobi na bango : « Bobanga te ! Boboto bozala na bino ! Bokumisa Nzambe seko !
Tobi LinVB 12:18  O ntango namilakisaki na bino, nazalaki wana mpo ya bolingi bwa ngai te, kasi Nzambe alingaki bongo. Bosengeli kokumisa bobele ye mikolo minso mya bomoi bwa bino ; ebongi ’te boyembela ye nzembo.
Tobi LinVB 12:19  Bomonoki lokola nde ’te nazalaki kolia, kasi ezalaki bongo te.
Tobi LinVB 12:20  Bongo bokumisa Mokonzi awa o mokili moye, mpe botondo Nzambe. Nakozonga lisusu epai ya oyo ati­ndaki ngai. Bokoma o monkanda makambo manso makwelaki bino. » Mpe abuti o likolo.
Tobi LinVB 12:22  Ba­kumisi mpe bayembeli Nzambe, batondi ye mpo ya bikela bya ye binene. Ya solo, anzelu moko wa Nzambe abimelaki bango !
Chapter 13
Tobi LinVB 13:1  Mpe Tobit alobi : « Bakumisa Nzambe oyo azali na lobiko, zambi bokonzi bwa ye bokoumela o bileko binso seko !
Tobi LinVB 13:2  Akopesaka bitumbu, mpe akolimbisaka, akotinda bato o kati ya molili o mboka ya bawa, mpe akolongola bango o mboka ya etumbu ya seko, moto moko te akoki kokima loboko la ye.
Tobi LinVB 13:3  Bino, bana ba Israel, bokumisa ye miso ma bato ba bikolo bisusu ! Apanzaki bino o kati ya bango
Tobi LinVB 13:4  mpo ya kolakisa bokasi bwa ye. Bokumisa ye o miso ma bikelamo binso, mpo ye azali Mokonzi mpe Nzambe wa biso, ye tata wa biso o bileko binso !
Tobi LinVB 13:5  Soko atumboli bino mpo ya makambo ma bino mazangi bosembo, nsima akoyokela bino banso ngolu, akolongola bino o mikili misusu, o bisika apanzaki bino.
Tobi LinVB 13:6  Soko bozongeli ye na motema mobimba mpe bosali makambo manso na bosembo o miso ma ye, akozongela bino mpe akobombela bino elongi ya ye lisusu te. Botala ndenge asalaki bino, botondo ye botondi na mongongo makasi. Bokumisa Mokonzi wa bosembo, bopesa Mokonzi monene wa seko lokumu. Ngai nakokumisa ye o mokili moye esika nazali moombo, nakolakisa bokasi mpe bonene bwa ye o ekolo eye ya basumuki. Bino basumuki, bozongela ye, bosala misala mya bosembo o miso ma ye ; mbele mokolo mosusu akolakisa bino bolingi mpe akoyokela bino banso ngolu.
Tobi LinVB 13:7  Ngai nakokumisa Nzambe, mpe motema mwa ngai mosepeli Mokonzi monene wa likolo. Bato banso
Tobi LinVB 13:8  basakola bonene bwa ye, bakumisa ye o Yeruzalem !
Tobi LinVB 13:9  Yeruzalem, yo engumba esantu, Nzambe apesi yo etumbu mpo ya mabe osalaki, kasi akoyokela bana ba bato ba bosembo ngolu.
Tobi LinVB 13:10  Botondo Mokonzi bo ebongi, bokumisa Mokonzi monene wa bileko, mpo ’te batonga Tempelo esantu misusu na esengo o mboka bino, asepelisa bato ba yo bakangemaki o boombo, mpe alinga bato ba mawa bazali o mboka ya bino, azala na bino o bileko binso seko.
Tobi LinVB 13:11  Mwinda monene mokongengele bikolo binso bya nse, bato ebele bakouta o bikolo mosika koluka Nkombo esantu ya Mokonzi Nzambe, bakoyela Mokonzi monene wa likolo mabonza. O mboka ya yo mabota manso makosepela, mpe nkombo ya Mboka eponomi ekoumela o bileko binso bikoya nsima.
Tobi LinVB 13:12  Mabe makwela baye banso bakofinga yo, baye banso bakoboma mboka ya yo mpe bakokweisa lopango la yo, baye banso bakobuka manongi mpe bakotumba ndako ya yo. Kasi esengo na baye bakotonga yo lisusu.
Tobi LinVB 13:13  O mokolo mona okosepela mpe okoyoka esengo mpo ya bana ba bato ba bosembo, zambi bakosangisa bango banso mpe bakokumisa Mokonzi wa bileko.
Tobi LinVB 13:14  Esengo na bato balingi yo ! Esengo na baye bakosepela boboto bwa yo ! Esengo na baye balelaki mpo ya bitumbu bya yo, zambi sikawa bakoyoka esengo mpo ya yo, mpe banso bakomono bolamu bwa yo nsima.
Tobi LinVB 13:15  Molimo mwa ngai mokumisi Mokonzi, nkumu monene,
Tobi LinVB 13:16  mpo bakotonga Yeruzalem lisusu, mpe bakotonga Ndako ya ye esantu seko ! Nakoyoka motema esengo soko moko wa bankoko ba ngai akoki kotikala mpo amono nkembo ya yo mpe kokumisa Mokonzi monene wa likolo. Bakotonga bizibeli bya Yeruzalem na mabanga ma safir mpe ma emerode, bakotelemisa bifelo na mabanga ma motuya, bakotonga manongi ma Yeruzalem na wolo, mpe mapango ma mboka na wolo kitoko.
Tobi LinVB 13:17  Bakobongisa balabala inso ya Yeruzalem na mabanga ma eskarbukele mpe na mabanga ma Ofir.
Tobi LinVB 13:18  Pene na bizibeli bya Yeruzalem bakoyemba nzembo ya esengo, mpe bato banso bazali o ndako bakoyemba : Aleluya ! Bakumisa Nzambe wa Israel ! Mpe bato baponomi bakokumisa Nkombo ya yo esantu seko ! »
Chapter 14
Tobi LinVB 14:1  Maloba ma kotondo Nzambe ma Tobit masuki bongo.
Tobi LinVB 14:2  Tobit akufi na boboto, akokisi mibu monkama na zomi na mibale. Baku­ndi ye o Ninive na lokumu lonene. O ntango miso ma ye makufaki, akokisaki mibu ntuku motoba na mibale, mpe o ntango abiki na lolanda, akomi moto wa nkita mingi, akabeli baninga makabo mpe azalaki ntango inso kotondo Nzambe mpe kokumisa bonene bwa ye.
Tobi LinVB 14:3  Mokolo alingi akufa, abengi mwana wa ye Tobia, apesi ye malako maye : « Mwana wa ngai, kamata bana ba yo,
Tobi LinVB 14:4  kende noki epai ya Medi, mpo nayambi solo maloba Nzambe alobaki mpo ya Ninive, maye Naume asakolaki. Manso makosalema mpe makokwela ekolo Asur na engumba Ninive. Makambo manso baprofeta ba Israel basakolaki o nkombo ya Nza­mbe, makosalema. Ya maloba ma bango bakolongola ata liloba lyoko te. Manso makosalema o mikolo mikoya nsima. O mokili mwa Medi bato bakofanda na boboto, mikili mya Asur na Babilon mikozala na mobulu. Ya solo, nayebi mpe nayambi ’te maye manso Nzambe alobaki, makosalema ; liloba ata lyoko lya baprofeta likokende mpamba te. Bakotanga mpe bakokanga bandeko ba biso ba­nso o Israel mpe bakokende na ba­ngo o boombo, mosika na ekolo eye ya esengo. Mokili mobimba mwa Israel mokokoma eliki, mpe bingumba bya Samaria na mpe Yeruzalem bikokoma mipotu. Ndako ya Nzambe ekotumbama mpe ekotikala mpamba mwa eleko.
Tobi LinVB 14:5  Kasi na nsima Nzambe akoyokela bango lisusu ngolu mpe akozongisa bango o mokili mwa Israel. Bakotonga Ndako ya ye lisusu, kasi ekozala kitoko te lokola ndako ya liboso ; bakotonga yango se nsima ya mwa mikolo. Nsima yango banso bakolongwa o boombo, bakozonga mpe bakotonga Yeruzalem lisusu na nkembo enene. O mboka ye bakotonga Ndako ya Nzambe lisusu, lokola baprofeta ba Israel basakolaki.
Tobi LinVB 14:6  O nse mobimba bato ba bikolo bi­nso bakobongola mitema mpe bakobanga Nzambe na motema moko. Banso bakotika banzambe ba bango ba lokuta, baye bazalaki kotambwisa bango o nzela ya libunga ; bakokumisa Nzambe wa bileko na motema bose­mbo.
Tobi LinVB 14:7  Bana banso ba Israel bakobika o mikolo mina, mpo bakokanisa lisusu Nzambe na motema mwa solo, bakoya kosangana mpe bakokende o Yeruzalem. Bakofanda na bo­boto o mokili mwa Abarama ; bakopesa bango mokili mona seko. Baye balingi Nzambe na bolingi bwa solo, bakoyoka esengo, kasi baye bakosalaka masumu mpe baye bazangi bosembo bakolimwa o mokili.
Tobi LinVB 14:8  Mpe sikawa, bana ba ngai, boyoka maloba ma ngai : Bosalela Nzambe na motema moko, mpe bosala se maka­mbo makosepelisa ye. Botinda bana ba bino bazala bato ba bosembo, bakaba makabo, bakanisa Nzambe, bakumisa Nkombo ya ye ntango inso, na motema moko mpe na nguya ya bango inso.
Tobi LinVB 14:9  Bongo yo, mwana wa ngai, tika Ninive, otikala awa te. Mokolo osili kokunda mama wa yo pene na ngai, otikala lisusu awa te ; longwa bobele o butu bona, kima mboka ; mpamba te, namoni ’te mabe maleki mingi ; bato bakosalaka masumu mpe bakoyokaka nsoni te.
Tobi LinVB 14:10  Mwana wa ngai, talaka naino makambo manso Nadab asalaki Akikar, tata wa ye mobokoli ; atimolaki libulu mpe akundi tata wa ye ntango azalaki naino na bomoi. Kasi o miso ma Akikar, Nza­mbe apesi mobomi wa ye etumbu : Akikar azongi o mboka ya mwinda, mpe Nadab akoti o mokili mwa seko, mpo alukaki koboma Akikar. Akikar abiki o motambo mwa liwa, mpo azalaki kokabela babola biloko, kasi Nadab akwei o libulu lya liwa, abu­ngisi bongo bomoi bwa ye.
Tobi LinVB 14:11  Bongo bomoni, bana ba ngai, ndenge ekozalaka na bato bakokabaka biloko, mpe boniboni bato bazangi bosembo bakosuka o liwa. Mpema esileli ngai. » Balalisi Tobit o mbeto ya ye mpe awei. Bakundi ye na lokumu lonene.
Tobi LinVB 14:12  Ewaki mama, Tobia akundi ye pene na tata wa ye. Na nsima, elongo na mwasi mpe na bana ba ye, akei o mokili mwa Medi. Afandi o Ekbatane epai ya bokilo wa ye Raguel.
Tobi LinVB 14:13  Akuti bakilo ba ye bakomi babange mpe asalisi bango mingi. Akundi ba­ngo o Ekbatane o Medi. Na nsima azwi mabelé na biloko binso bya Raguel, se lokola azwaki mabelé na biloko binso bya tata wa ye Tobit.
Tobi LinVB 14:14  Na bomoi azalaki moto wa lokumu, mokolo awei akokisi mibu monkama na zomi na nsambo.
Tobi LinVB 14:15  Liboso ’te awa ayoki ’te Ninive ekwei, amoni bato ba Ninive bayei o Medi ; Siaksar, mokonzi wa Medi, akangi bango mpe akei na bango o Medi. Akumisi Nza­mbe mpo ya makambo manso asalaki bato ba Ninive mpe ba Asur. Liboso ’te awa, asepeli etumbu ekweli Ninive mpe akumisi Mokonzi Nzambe o bileko binso. Amen.