Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
REVELATION OF JOHN
Up
Chapter 1
Reve LinVB 1:1  Yézu Krístu ayébísí mibómbamo, miye Nzámbeméi alakísákí yě mpô ’te áyébisa basáleli ba yě mambí masengélí koyâ nokí ; Yézu atíndí ǎnzelú wa yě áyébisa mangó na mosáleli wa yě Yoáne.
Reve LinVB 1:2  Yoáne óyo asakólí mambí mánso amónókí, mangó ndé : Liloba lya Nzámbe mpé maye Yézu Krístu asakólákí.
Reve LinVB 1:3  Esengo na moto atángí maloba maye mpé na baye bayókí mangó sókó bakondima maye makomámí áwa, zambí elaká ekómí penepene !
Reve LinVB 1:4  Yoáne ôná Biklézya nsambo o Azía : bózwa ngrásya na bobóto biútí na ‘Oyo Azalí, Azalákí mpé Akoyâ’, na Bilímo nsambo bitélémí o bosó bwa Ngwendé ya yě,
Reve LinVB 1:5  mpé na Yézu Krístu, nzénénéké wa sôló, Mwána wa Yambo, óyo asékwí o bawá, yě Nkúmú wa bakonzi ba nsé. Yě moto akolingaka bísó, mpé na makilá ma yě abíkísí bísó o masúmu,
Reve LinVB 1:6  akómísí bísó bato ba Bokonzi bwa banganga Nzámbe, mpô tósálela Tatá wa yě Nzámbe : na yě nkémbo mpé ngúyá o bileko na bileko. Amen.
Reve LinVB 1:7  Tálá, azalí koyâ o káti ya mampata ; bato bá­nso bakomóno yě, atâ baye batubólákí yě mopanzí. Bato ba bikólo bín­so áwa o nsé bakolela mpô ya yě. Ekozala sé bôngó. Amen !
Reve LinVB 1:8  Mokonzi Nzámbe alobí : « Ngáí nazalí Alfa na Oméga », « Oyo Azalí, Azalákí mpé Akoyâ », Mokonzi wa bokási bónso.
Reve LinVB 1:9  Ngáí, ndeko wa bínó Yoáne, bísó na bínó tozwí bokonzi, toyókí mi­nyóko mpé tokangí mitéma, na Yézu lisangá. Nazalákí o esanga Pátmos, mpô natéyákí Liloba lya Nzámbe mpé nasakólákí matéya ma Yézu.
Reve LinVB 1:10  O Mokolo mwa Mokonzi, Elímo akitélí ngáí mpé nsima ya ngáí nayókí, lokóla mondúle bazalákí kobéte, loláká lonéne
Reve LinVB 1:11  lolobí : « Maye okomóno, komá mangó o búku mpé tíndá yangó epái ya Biklézya nsambo : o Eféze, o Smírna, o Pérgamo, o Tiatíra, o Sárdes, o Filadélfia mpé o Laodiséa. »
Reve LinVB 1:12  Namíbóngólí mpô nátála náni moto alobí na ngáí. Tálá boye, namóní bitémiseli bya mwínda nsambo bya wólo.
Reve LinVB 1:13  O káti ya bitémiseli namóní lokóla Mwána wa Moto : alátí elambá elaí, akangí yangó na nká­mba ya wólo o lokéto.
Reve LinVB 1:14  Motó na nsúki ya yě izalákí mpémbé lokóla nsúki ya mpatá, mpémbé makási mpenzá ; míso ma yě mazalákí ko­ngenge lokóla mololi mwa móto mopelí makási ;
Reve LinVB 1:15  makolo ma yě lokóla mbengi ya motúya bapétólí na móto, mongóngó mwa yě moyókání lokóla lokitó la mái makási.
Reve LinVB 1:16  O lobóko la mobáli asímbí mi­nzóto nsambo ; mompánga mopótú mokokátaka bipái bíbalé mobimélí yě o monoko ; elongi ya yě ezalákí kongenge makási mpenzá lokóla mwésé.
Reve LinVB 1:17  Awa namóní yě, nakwéí o bosó bwa yě lokóla moto awéí, kasi atíélí ngáí lobóko la yě la mobáli, alobí : « Obánga té ! Ngáí Moto wa yambo mpé wa nsúka,
Reve LinVB 1:18  nazalí na bomoi ; nawâkí, kasi tálá, nazalí na bomoi o bileko na bileko, nazalí na mafu­ngóla ma liwá mpé ma mbóka ya bawá.
Reve LinVB 1:19  Bôngó, komá mambí omóní : mambí ma leló mpé maye mase­ngélí koyâ nsima.
Reve LinVB 1:20  Mobómbamo mwa minzóto nsambo omó­nókí o lobóko la ngáí la mobáli, mpé mwa bitémiseli nsambo bya mwínda bisálémí na wólo, mwangó moye : minzóto nsambo, ndé Bǎ­nzelú ba Biklézya nsambo ; bitémiseli nsambo, byangó ndé Biklé­zya nsambo.
Chapter 2
Reve LinVB 2:1  Komélá Anzelú wa Eklézya ya Eféze boye : Yóká maloba ma óyo asímbí minzóto nsambo o lobóko la mobáli mpé azalí kotámbola o káti ya bitémiseli bya mwínda nsambo bya wólo :
Reve LinVB 2:2  Nayébí misálá mya yŏ, mpási okoyókaka mpé ndé­ngé okokangaka motéma ; nayébí ’te okosepelaka na bato babé té. Osílí omekí baye bakokósaka ’te bazalí bapóstolo, nzókandé bazalí bapóstolo té ; mpé omóní ’te bazalí bato ba lokutá.
Reve LinVB 2:3  Okoka­ngaka motéma mpé oyókákí mpási mpô ya nkómbó ya ngáí, kasi ole­mbékí té.
Reve LinVB 2:4  Kasi nasepélí té na bomóni ’te ozalí na bolingi lokóla libosó lisúsu té.
Reve LinVB 2:5  Kanísá naíno ndéngé ozalákí libosó mpé ndéngé okómí sikáwa ; bóngólá motéma mpé zóngélá ezalela ya yŏ ya libosó. Sókí té, nakoyâ o mbóka yŏ mpé nakolongola etémiseli ya yŏ ya mwínda o esíká ezalí ; nakosála bôngó sókó obóngólí motéma té.
Reve LinVB 2:6  Kasi na likambo lyŏ kó nazalí kosepela : lokóla ngáí, okoyinaka bizalela bya bato ba Nikolá.
Reve LinVB 2:7  Moto azalí na matói, áyóka maye Elímo ayébísí bato ba Biklézya : moto akolónga etumba, nakoléisa yě mbuma ya nzeté ya bomoi eye ezalí o Paradízo ya Nzá­mbe.
Reve LinVB 2:8  Komélá Anzelú wa Eklézya ya Smírna boye : Oyo azalí Moto wa yambo mpé wa nsúka, óyo akúfákí mpé azwí bomoi lisúsu, alobí :
Reve LinVB 2:9  Nayébí ’te ozalí konyókwama mpé kokélela, kasi ozalí moto wa nkita. Nayébí ’te baye bakomíyébisaka lokóla ba-Yúda, nzókandé bazalí ba-Yúda té, bakotóngoko bínó : bazalí bato ba Sátana !
Reve LinVB 2:10  Obánga malózí té, maye makokwêla yŏ. Zábolo akokangisa bato ba bínó ba­súsu o bolóko mpô ya kosénginya bínó ; mikolo zómi bakonyókolo bínó. Sókó oyambí ngáí kín’o liwá, nakopésa yŏ enkoti ya bomoi.
Reve LinVB 2:11  Moto azalí na matói, áyóka maye Elímo ayébísí bato ba Biklézya : óyo aló­ngí etumba, liwá lya mábalé likokwêla yě té.
Reve LinVB 2:12  Komélá Anzelú wa Eklézya ya Pérgamo boye : Yóká maloba ma Oyo azalí na mompánga mopótú mokokátaka bipái bíbalé :
Reve LinVB 2:13  Nayébí esíká okofándaka : ngwendé ya Sátana ezalí kúná. Kasi okangání na nkómbó ya ngáí, owángání ngáí té, atâ o mikolo babomákí Antipás, yě nzénénéké wa ngáí wa sôló. Babomákí yě o mbóka bínó, esíká Sátana akofándaka.
Reve LinVB 2:14  Kasi na makambo ma yŏ masúsu nasepélí té : bato ba yŏ basúsu bakolandaka matéya ma Baláme ; yě moto alakísákí Balák kotíela bána ba Israél motámbo mpô ’te bálía mabonza babonzélákí bikeko mpé básála ekóbo.
Reve LinVB 2:15  Bato basúsu mpé epái ya yŏ bakolandaka matéya ma bato ba Nikolá.
Reve LinVB 2:16  Yangó wâná, bóngólá motéma : sókó obóyí, nakoyâ nokí epái ya yŏ kobu­ndisa bato na mompánga mokobima o monoko mwa ngáí.
Reve LinVB 2:17  Moto azalí na matói, áyóka maloba Elímo ayébísí bato ba Biklézya : moto alóngí etumba, nakopésa yě Manú ya sika ebómbámí ; nakopésa yě mpé mwâ libángá mpémbé, liye bakomí nkómbó ya sika ; eye eyébání na moto mŏ kó té ; bobélé moto óyo akozwa mwâ libá­ngá lyangó, akoyéba.
Reve LinVB 2:18  Komélá Anzelú wa Eklézya ya Tiatíra boye : Yóká maloba ma Mwána wa Nzámbe, óyo azalí na míso makongengeke lokóla mololi mwa móto mopelí makási, mpé na makolo lokóla mbengi ya motúya.
Reve LinVB 2:19  Nayébí misálá, bolingi mpé boyambi bwa yŏ, ndéngé okomípésaka mpé okotíaka moléndé ; nayébí ’te misálá mya yŏ mya sika milekí miye mya kala.
Reve LinVB 2:20  Kasi nasepélí té áwa olingísí Yezabél átéya ; akomíyébisaka lokóla proféta, kasi na matéya ma yě akokósaka basáleli ba ngáí mpô ’te básála ekóbo na boléi nyama iye babonzélí bikeko.
Reve LinVB 2:21  Natíkélákí yě mwâ ntángo mpô ábóngola motéma, kasi abóyí kotíka makambo ma yě ma ekóbo.
Reve LinVB 2:22  Yangó wâná nakobwáka yě o mbéto esíká akoyóka mpási, yě na báníngá ba yě bakosálaka ekóbo. Sókó babóngólí mitéma té mpé batíkí mabé ma bangó té, nakoyókisa bangó malózí ma nsómo.
Reve LinVB 2:23  Nakoboma bána ba yě, bôngó bato ba Biklézya bínso bakoyéba ’te ngáí moto nayébí makanisi mpé mitéma mya bato ; mpé nakofúta mŏ kó mŏ kó wa bínó engé­béné na misálá mya yě.
Reve LinVB 2:24  Kasi bínó, bato basúsu ba Tiatíra, bondimí matéya mâná té, mpé boyébí mibómbamo mya Sátana té, miye bangó bakotángaka bôngó, nakotíe­la bínó mókúmbá mosúsu té.
Reve LinVB 2:25  Bó­kangana téé nsúka na maye mazalí na bínó, kín’o mokolo nakoyâ.
Reve LinVB 2:26  Moto akolónga etumba, óyo akotósa mibéko mya ngáí téé nsúka, nakopésa yě likokí lya koyángela bikólo bínso :
Reve LinVB 2:27  akokamba bangó na língé­nda lya ebendé, mpé akobúka bangó lokóla mbéki ya libázi !
Reve LinVB 2:28  Ngáí na­zwí likokí lyangó o mabóko ma Tatá wa ngáí. Nakopésa yě Monzóto mwa ntó­ngó.
Reve LinVB 2:29  Moto azalí na matói, áyóka maye Elímo ayébísí bato ba Biklé­zya.
Chapter 3
Reve LinVB 3:1  Komélá Anzelú wa Eklézya ya Sárdes boye : Yóká maloba ma Oyo azalí na Bilímo nsambo bya Nzámbe mpé na minzóto nsambo. Nayébí misálá mya yŏ. Bakolobaka ’te ozalí na bomoi, kasi osílí owéí.
Reve LinVB 3:2  Olamuka mpé óléndísá mwâ bomoi botíkálí na yŏ, boye bolingí bókúfa. Namóní ’te misálá mya yŏ mibongí naíno té o míso ma Nzámbe wa ngáí.
Reve LinVB 3:3  Yangó wâná, óku­ndola o motéma ndéngé níni oya­mbákí Liloba liye oyókákí. Ndimá lyangó mpé bóngólá ezalela ya yŏ. Sókó okéngélí malámu té, nakoyâ lokóla moyíbi, okoyéba té na ngonga níni nakobimela yŏ.
Reve LinVB 3:4  Kasi bato ba yŏ basúsu o Sárdes babébísí bilambá bya bangó té. Bakotámbola na ngáí elongó na bilambá mpé­mbé, mpô balongóbání.
Reve LinVB 3:5  Moto aló­ngí etumba akoláta elambá mpé­mbé ; nakoboma nkómbó ya yě o búku ya bomoi té ; o míso ma Tatá wa ngáí mpé ma Bǎnzelú ba yě nakondima ’te azalí moto wa ngáí.
Reve LinVB 3:6  Oyo azalí na matói, áyóka maye Elímo ayébísí bato ba Biklézya.
Reve LinVB 3:7  Komélá Anzelú wa Eklézya ya Filadélfia boye : Yóká maloba ma Mosántu, yě Moto wa bosôló, óyo azalí na lifungóla lya Davídi. Sókó afungólí, moto mŏ kó akokanga té ; sókó akangí, moto mŏ kó akofungola té.
Reve LinVB 3:8  Nayébí misálá mya yŏ : oza­lákí makási míngi té, kasi obátélí lilo­ba lya ngáí mpé owángání nkómbó ya ngáí té. Yangó wâná nafu­ngólélí yŏ ezibeli, eye moto mŏ­kó akokí kokanga té.
Reve LinVB 3:9  Tálá, nakosála ’te bato ba sinagóga ya Sátana báyâ kokúmbama o bosó bwa makolo ma yŏ, bándima bôngó ’te nali­ngí yŏ. Bato baye ba lokutá bakomíyébisaka lokóla ba-Yúda, nzó­kandé bazalí ba-Yúda té.
Reve LinVB 3:10  Awa obátélí liloba lya ngáí mpé okangí motéma, ngáí mpé nakobátela yŏ o ntángo malózí makokwêla mokili mobimba mpô ya komeka bato ba nsé.
Reve LinVB 3:11  Nakozónga nokí. Okangana na maye mazalí na yŏ, moto mŏ kó té ábótolo yŏ enkoti ya lilónga.
Reve LinVB 3:12  Moto akolónga etumba, nakokómisa yě lokóla likonzí lya témpelo ya Nzámbe wa ngáí. Akolongwa wâná lisúsu té ; nakokoma o elongi ya yě nkómbó ya Nzámbe wa ngáí, nkómbó ya ngáí ya sika, mpé nkó­mbó ya Engumbá ya Nzámbe wa ngáí, Yerúzalem ya sika, eye ekoúta o likoló, epái ya Nzámbe wa ngáí.
Reve LinVB 3:13  Moto azalí na matói, áyóka maye Elímo ayébísí bato ba Biklézya.
Reve LinVB 3:14  Komélá Anzelú wa Eklézya ya Laodiséa boye : Yóká maloba ma Oyo azalí ‘Amen’, yě nzénénéké wa sôló óyo akokósaka té, óyo azalí Ntína ya bikelámo bínso bya Nzámbe.
Reve LinVB 3:15  Nayébí misálá mya yŏ : ozalí mpío té, móto mpé té ; malámu sókó ozalákí tŏ mpío tŏ móto.
Reve LinVB 3:16  Lokóla ozalí mpío té, móto mpé té, kasi sé mwâ molungé, nakosá­nza yŏ.
Reve LinVB 3:17  Okolobaka : Tálá, nazalí moto wa nkita, nakómí na mosolo míngi, nazángí elóko té ; nzókandé omóní té ’te ozalí sé moto wa mawa, óyo bakoyókelaka ngolu, mobóla, okúfá míso, ozalí bolúmbú.
Reve LinVB 3:18  Yangó wâná, yóká lilako lya ngáí : sómbá epái ya ngáí wólo bapétólí na móto ; bôngó okozala moto wa nkita. Sómbá bilambá mpémbé, látá byangó, zipá bolúmbú bwa yŏ mpô óyóka nsóni té. Sómbá mpé monô, tíá yangó o míso, bôngó ómóno lisúsu.
Reve LinVB 3:19  Nakopálela mpé nakotúmbola baye nakolingaka. Bôngó, tíá moléndé mpé bóngólá motéma !
Reve LinVB 3:20  Tálá, natélémí penepene na ezibeli ya ndáko ya yŏ, mpé nabétélí yangó : sókó moto ayókí loláká la ngáí mpé azibólí ndáko, nakoyâ o mbóka yě mpô tólía méza yŏ kó, bísó na yě.
Reve LinVB 3:21  Moto akoló­nga etumba, nakopésa yě esíká penepene na ngáí o ngwendé ya ngáí, sé lokóla ngáí, áwa nalóngí etumba, nayéí kofánda penepene na Tatá wa ngáí o ngwendé ya yě.
Reve LinVB 3:22  Moto azalí na matói, áyóka maye Elímo ayébísí bato ba Biklézya. »
Chapter 4
Reve LinVB 4:1  Nsima yangó namóní limóní liye : Ezibeli ya likoló efungwámí mpé loláká, loye nayókákí libosó lokóla mondúle babétí, lolobí na ngáí : « Butá áwa, bôngó nálakisa yŏ maye masengélí koyâ nsima. »
Reve LinVB 4:2  Sé o ntá­ngo êná Elímo akitélí ngáí. Namóní ngwendé batélémísí o likoló, mpé Moto mŏ kó afándélí yangó.
Reve LinVB 4:3  Oyo afándí amónóní lokóla libá­ngá lya yáspe tŏ kornalíne. Monama mozíngí ngwendé, mongengí lokóla emeróde.
Reve LinVB 4:4  Kíti ntúkú íbalé na ínei izíngí ngwendé ; Babangé ntúkú íbalé na bánei bafándélí kíti îná, balátí bilambá mpémbé, binkoti bya wólo o mitó.
Reve LinVB 4:5  Minkalali na lokitó la nkáké bibimí o ngwendé ; míínda nsambo mipelí o bosó bwa ngwendé, bangó ndé bilímo nsambo bya Nzámbe.
Reve LinVB 4:6  O bosó bwa ngwendé mbú emónóní lokóla talatálá, loléngé la mangéngéngé. O káti ya ngwendé mpé zóngazónga na yangó ba-Bomoi bánei batélémí, bazalákí na míso ebelé, epái ya libosó mpé epái ya nsima.
Reve LinVB 4:7  Oyo wa libosó azalákí lokóla nkósi, óyo wa bábalé lokóla mwána wa ngómbé mobáli, óyo wa básáto azalákí na elongi lokóla moto, óyo wa bánei lo­kóla engondó ezalákí kopimbwa.
Reve LinVB 4:8  Ba-Bomoi bánei bazalákí mŏ kó mŏ kó na mapapú motóbá ; bazalákí na míso zóngazónga na nzóto ya bangó mpé o káti. Butú mói bakolobaka : « Yě mosántu, mosántu, mosántu, Mokonzi Nzámbe wa ngúyá ínso, ‘Oyo Azalákí, Azalí mpé Ako­yâ’. »
Reve LinVB 4:9  Mbala ínso ba-Bomoi bapésí nké­mbo na lokúmu mpé batóndí Oyo afándí o ngwendé, Oyo azalí o bileko na bileko,
Reve LinVB 4:10  Babangé ntúkú íbalé na bánei bafukámí o bosó bwa Oyo afándí o ngwendé mpô ya kokúmbamela Oyo azalí o bileko bínso sékô. Babwákí binkoti bya bangó o bosó bwa ngwendé mpé balobí :
Reve LinVB 4:11  « E Mokonzi, Nzámbe wa bísó, olongóbání kozwa nkémbo, lokúmu na ngúyá, zambí yŏ moto ozalísí molóngó mobimba ; bínso bikelámí mpé bizwí bomoi mpô ya yŏ. »
Chapter 5
Reve LinVB 5:1  O lobóko la mobáli la Óyo afándí o ngwendé namóní Búku elí­ngámí ; bakomí o búku epái ya libándá mpé ya káti, bakangí yangó na bikangeli nsambo.
Reve LinVB 5:2  Mpé namóní Anzelú wa ngúyá, abandí kosakola na mongóngó makási : « Náni abongí kobúka bikangeli mpé kofungola búku ? »
Reve LinVB 5:3  Kasi moto mŏ kó té, o likoló, o nsé tŏ o nsé ya mabelé, akokí kofungola búku mpé kotánga yangó.
Reve LinVB 5:4  Nalelí míngi mpô moto mŏ kó té alongóbání kofu­ngola búku mpé kotánga yangó.
Reve LinVB 5:5  Bôngó mŏ kó wa Babangé alobí na ngáí : « Olela té. Nkósi wa libótá lya Yúda, Ebóto wa Davídi, alóngí etumba ; yě moto akobúka bikangeli nsambo mpé akofungola búku. »
Reve LinVB 5:6  Na nsima namóní káti ya ngwendé ya ba-Bomoi bánei mpé ya Baba­ngé, Mwâ-Mpatá atélémí, lokóla asílí abomámí. Azalákí na maséké nsambo mpé na míso nsambo, byangó ndé Bilímo nsambo bya Nzámbe, biye atíndákí o nsé mobimba.
Reve LinVB 5:7  Mwâ-Mpatá abelémí mpé akamátí búku ezalákí o lobóko la mobáli la Oyo afándí o ngwendé.
Reve LinVB 5:8  Awa akamátí búku, ba-Bomoi bánei na Babangé ntúkú íbalé na bánei bakúmbámélí Mwâ-Mpatá. Mŏ kó mŏ kó wa bangó azalákí na nzenze mpé na nkéni ya wólo etóndí na malási ; yangó ndé losámbo la basántu.
Reve LinVB 5:9  Bayémbí nzémbo ya sika. « Sôló, olongóbání kokamata búku mpé kobúka bikangeli bya yangó, mpô babomákí yŏ, mpé na makilá ma yŏ osikólí bato ba mabótá mánso, ba nkóta ínso, ba bikólo bínso mpé ba mikili mínso, opésí bangó na Nzámbe.
Reve LinVB 5:10  Mpô ya Nzámbe wa bísó okómísí bangó bakonzi mpé banganga Nzá­mbe baye bakoyá­ngela mokili. »
Reve LinVB 5:11  Nátála boye, nayókí mingó­ngó mya Bǎnzelú ebelé bazíngí ngwendé, ba-Bomoi mpé Baba­ngé ; bazalákí nkóto na nkóto, bifúku na bifúku !
Reve LinVB 5:12  Bagángí makási : « Mwâ-Mpatá babomákí alo­ngó­bání kozwa ngúyá, nkita, bwányá na bokási : bákúmisa, bákémbisa mpé báyémbela yě. »
Reve LinVB 5:13  Sikáwa nayókí bikelámo bínso o likoló, o mokili, o nsé ya mabelé, o káti ya mbú : bikelámo bínso bya molóngó mobimba bayémbí boye : « Oyo afándí o ngwendé na Mwâ-Mpatá lokóla bázwa makúmísí, lokúmu, nkémbo na ngúyá o bileko na bileko ! »
Reve LinVB 5:14  Ba-Bomoi bánei balobí : « Amen », mpé Babangé bakwéí bilongi o nsé mpô ya kokúmbamela.
Chapter 6
Reve LinVB 6:1  Awa namóní ’te abúkí ekangeli ya yambo, nayókí óyo wa libosó wa ba-Bomoi bánei agángí na loláká lokóla nkáké : « Yáká ! »
Reve LinVB 6:2  Namóní farása mpémbé eyéí, motámbwisi wa yangó azalákí na litimbó ; bapésí yě enkoti ya lilónga ; lokóla moto alóngí etumba akeí mpô ’te álónga lisúsu.
Reve LinVB 6:3  Ntángo Mwâ-Mpatá abúkí eka­ngeli ya bíbalé, nayókí wa-Bomoi wa bábalé agángí : « Yáká ! »
Reve LinVB 6:4  Sikáwa farása esúsu etáné ngwá eyéí ; batí­ndí motámbwisi wa yangó álongola bobóto o mokili, bôngó bato bábo­mana ; bapésí yě mompánga monéne.
Reve LinVB 6:5  Ntángo Mwâ-Mpatá abúkí eka­ngeli ya bísáto, nayókí wa-Bomoi wa básáto agángí : « Yáká ! » Nátála boye, namóní farása eíndo ebimí. Motá­mbwisi wa yangó azalákí na emekeli ya bozitó o mabóko.
Reve LinVB 6:6  Nayókí lokóla loláká loútí o ntéí ya ba-Bomoi bánei, lolobí : « Lítele yŏ­kó ya mbuma ya mámpa ekokí na denário yŏ kó ; lítele ísáto ya mbuma ya mámpa ma bololo ekokí na denário yŏ kó. Kasi óbébisa mafúta na víno té. »
Reve LinVB 6:7  Awa abúkí ekangeli ya bínei, nayókí wa-Bomoi wa bánei agángí : « Yáká ! »
Reve LinVB 6:8  Sikáwa farása ebimí ya lángi la mái ma mpondú ; nkómbó ya motámbwisi wa yangó : ‘Liwá’ ; mokonzi wa mbóka ya bawá alandí yě. Bapésí bangó likokí o yŏ kó ya bínei ya mokili : báboma bato na mompánga, na nzala, na bokono bobé mpé na nyama ya zámba.
Reve LinVB 6:9  Ntángo Mwâ-Mpatá abúkí eka­ngeli ya bítáno, namóní o nsé ya altáre milímo mya bato babomámí mpô ya Liloba lya Nzámbe, mpô basakólákí lyangó.
Reve LinVB 6:10  Bagángí na mongóngó makási : « Mokonzi mosántu mpé wa bosôló, okozila kín’o ntángo níni ? Sámbísá bato ba mokili baye basopí makilá mpé pésá bangó etúmbu. »
Reve LinVB 6:11  Na nsima bapésí bangó mŏ kó mŏ kó monkóto mpé­mbé ; bayébísí bangó ’te bázila naíno mwâ moké téé báníngá ba bangó ba mosálá mpé bandeko ba bangó bakokoka, baye bato ba mokili basengélí koboma lokóla bangó mŏ­kó.
Reve LinVB 6:12  Awa Mwâ-Mpatá abúkí eka­nge­li ya motóbá, namóní ’te mokili moningání makási, mwésé moíndí lokóla makála, sánzá mobimba etelí lokóla makilá,
Reve LinVB 6:13  minzóto mya etando mi­kwéí o nsé lokóla fígi ya nzeté eye eningání na mompepe makási.
Reve LinVB 6:14  Etando ya likoló elíngámí, lokóla bakolíngaka monkandá, ngómbá na bisanga bínso bilongwí o bisíká bizalákí.
Reve LinVB 6:15  Bankúmú ba mokili, bayá­ngeli ná bakonzi ba basodá, bato ba nkita ná bato banéne, bato bánso, baómbo ná bansómí, bánso bakeí kobómbama o mibé­ngá mpé o káti ya mabángá ma ngómbá,
Reve LinVB 6:16  babélélí ngómbá ná mabángá : « Bókwêla bísó mpé bóbó­mba bísó mosíká na Oyo akofándaka o ngwendé, mosíká mpé na nkándá ya Mwâ-Mpatá. »
Reve LinVB 6:17  Mpá­mba té, Mokolo monéne mwa nká­ndá ya bangó moyéí mpé náni akokí kopika mpéndé ?
Chapter 7
Reve LinVB 7:1  Na nsima namóní Bǎnzelú bánei batélémí o nsúka ínei ya mokili, bazalákí kokanga mimpepe mínei mya mokili mpô ’te mompepe mŏ kó té móbéte mokili, mbú té, nzeté yŏ kó mpé té.
Reve LinVB 7:2  Namóní Anzelú mosúsu aútí epái ya Esti, amemí elembo ya Nzámbe wa bomoi ; na mongóngó makási abélélí Bǎnzelú bánei baye bazwí likokí lya kobébisa mokili na mbú :
Reve LinVB 7:3  « Bóbéte mokili, mbú na nzeté té kín’o ntángo tokosílisa kotía ele­mbo o bilongi bya basáleli bánso ba Nzámbe wa bísó. »
Reve LinVB 7:4  Nayókí motángo mwa baye bazwí elembo : bato nkóto monkámá na ntúkú ínei na ínei, bánso bána ba mabótá mánso ma Israél :
Reve LinVB 7:5  o libótá lya Yúda bato nkóto zómi na íbalé bazwí elembo, o libótá lya Rúben bato nkóto zómi na íbalé, o libótá lya Gad bato nkóto zómi na íbalé,
Reve LinVB 7:6  o libótá lya Asér bato nkóto zómi na íbalé, o libótá lya Néftali bato nkóto zómi na íbalé, o libótá lya Manáse bato nkóto zómi na íbalé,
Reve LinVB 7:7  o libótá lya Símeon bato nkóto zómi na íbalé, o libótá lya Lévi bato nkóto zómi na íbalé, o libótá lya Izakar bato nkóto zómi na íbalé,
Reve LinVB 7:8  o libótá lya Zábulon bato nkóto zómi na íbalé, o libótá lya Yozéfu bato nkóto zómi na íbalé, o libótá lya Bényamin bato nkóto zómi na íbalé.
Reve LinVB 7:9  Na nsima namóní nkaká ya bato, moto mŏ kó té akokí kotánga bangó : bato ba bikólo bínso, ba mabótá mánso, ba mikili mínso, ba nkóta ínso. Batélémí o bosó bwa ngwendé mpé bwa Mwâ-Mpatá ; balátí bilambá mpémbé, bazalákí na mandalála o mabóko ;
Reve LinVB 7:10  bagángí makási : « Nzámbe wa bísó óyo afá­ndí o ngwendé mpé Mwâ-Mpatá babíkísí bísó ! »
Reve LinVB 7:11  Bǎnzelú bánso batélémí zóngazónga na ngwendé, ná Babangé mpé na ba-Bomoi bánei ; bakúmbámí o bosó bwa ngwendé, bilongi o nsé, mpé bakúmbámélí Nzámbe,
Reve LinVB 7:12  balobí : « Amen ! Lokúmu, nkémbo, bwá­nyá, botóndi, makúmísí, ngúyá mpé bokási na Nzámbe wa bísó o bileko na bileko ! Amen ! »
Reve LinVB 7:13  Na nsima mŏ kó wa Babangé alobí na ngáí : « Baye balátí bilambá mpé­mbé, bangó banáni, baútí wápi ? »
Reve LinVB 7:14  Nazóngísélí yě : « Mokonzi, yŏ mŏ kó oyébí. » Alobí lisúsu : « Ezalí baye babíkí o monyóko monéne ; basukólí bilambá, mpé bakómísí byangó mpémbé o makilá ma Mwâ-Mpatá.
Reve LinVB 7:15  Yangó wâná batélémí o bosó bwa ngwendé ya Nzámbe ; bakosálelaka yě butú mói o témpelo ya yě ; Oyo afándí o ngwendé akotandela bangó éma ya yě.
Reve LinVB 7:16  Bakoyóka nzala tŏ mpósá ya mái mokolo mŏ kó lisúsu té ; molu­ngé na móto mokolembisa bangó lisúsu té,
Reve LinVB 7:17  mpô Mwâ-Mpatá óyo afándí o káti ya ngwendé akozala mokéngeli wa bangó, akokamba bangó epái ya máziba ma mái ma bomoi. Nzámbe akolongola mpízolí o míso ma bangó. »
Chapter 8
Reve LinVB 8:1  Ntángo Mwâ-Mpatá abúkí ekangeli ya nsambo, likoló likómí nyê, sókí ndámbo ya ngo­nga.
Reve LinVB 8:2  Nsima namóní Bǎnzelú nsambo batélémí o bosó bwa Nzámbe ; bapésí bangó mindúle nsambo.
Reve LinVB 8:3  Anze­lú mosúsu ayéí kotéleme penepene na altáre, engwekúngwekú ya wólo o mabóko. Bapésí yě malási míngi mpô ’te ábonza mangó elongó ná losámbo la basántu bánso, o altáre ya wólo, o bosó bwa ngwendé.
Reve LinVB 8:4  Mílinga mya malási mibimí o lobóko la Anzelú, mibutí epái ya Nzámbe elongó na losámbo la basántu.
Reve LinVB 8:5  Na nsima Anzelú akamátí engwekúngwekú mpé ató­ndísí yangó na makála ma móto ma altáre mpé abwákí yangó o nsé. Ebimí nkáké, mingóngó, minkalali, mpé mokili moningání.
Reve LinVB 8:6  Bǎnzelú nsambo bazalákí na mi­ndúle nsambo, bamíléngélí mpô ya kobéte myangó.
Reve LinVB 8:7  Oyo wa libosó abétí mondúle : mbúla ya matándalá na móto, bisangání na makilá, ebétí o mokili, mpé eténi ya bísáto ya mokili ezíkí na móto, eténi ya bísáto ya nzeté ezíkí lokóla, matíti mabésu mánso mazíkí nyé.
Reve LinVB 8:8  Na nsima Anzelú wa bábalé abétí mo­ndúle : ezalákí lokóla ngómbá enéne eye ezíkí na móto ebwákémí o mbú, mpé eténi ya bísáto ya mbú ebóngwání makilá.
Reve LinVB 8:9  Eténi ya bísáto ya bikelámo bínso bikozalaka o mbú ekúfí, mpé ndámbo ya ísáto ya masúwa ezindí.
Reve LinVB 8:10  Anzelú wa básáto abétí mondúle : monzóto monéne mololí lokóla esúngi moútí o likoló mpé mokwêlí eténi ya bísáto ya bibale mpé ya máziba ma mái.
Reve LinVB 8:11  Nkó­mbó ya monzóto mwangó ‘Bololo’ : eténi ya bísáto ya mái ebóngwání mái bololo, mpé bato míngi bawéí mpô ya mái makómí bololo.
Reve LinVB 8:12  Anze­lú wa bánei abétí mondúle : eténi ya bísáto ya mwésé, ya sánzá mpé ya minzóto ebébí, mpé eténi ya bísáto ya bîná bínso ekómí molílí ; ndámbo ya ísáto ya mói mpé ya butú ekómí molílí.
Reve LinVB 8:13  Mpé namóní engondó ezalákí kopimbwa o likoló, ezalákí kogá­nga makási : « Mawa ! Mawa ! Mawa na bato bánso ba mokili ntángo Bǎnzelú basúsu básáto bakobéte mindúle. »
Chapter 9
Reve LinVB 9:1  Anzelú wa bátáno abétí mondúle : namóní monzóto mwa etando mokwéí o nsé. Bapésí mwangó lifungóla lya libúlú lya Bozindó ;
Reve LinVB 9:2  monzóto mofungólí libúlú lya Bozindó mpé út’o libúlú mólinga mobutí lokóla mólinga mobimí o etumbelo enéne : mói ná etando biíndí na mwangó.
Reve LinVB 9:3  Ut’o mólinga moye mápalela mapalángání o mokili ; bapésí mangó ngúyá lokóla ngúyá ya nkotó ya mokili.
Reve LinVB 9:4  Batíndí mangó mábébisa bilanga té, matíti té, nzeté mpé té, kasi mábéte bobélé bato bazángí elembo ya Nzámbe o elongi.
Reve LinVB 9:5  Balingísí mangó té koboma bato, kasi matíndámí ko­nyókolo bangó sánzá ítáno. Sókó lípalela liswí moto, likoyókisa yě mpási mpenzá lokóla nkotó eswí yě.
Reve LinVB 9:6  O mikolo mîná bato bakoluka liwá, kasi bakozwa lya­ngó té ; bakolíkya ’te bakokúfa nokí, kasi liwá likokíma bangó !
Reve LinVB 9:7  Mápalela mâná mazalákí lokóla farása izalí kokende etumba, bi­nkoti bya lokúmu bya wólo o mitó, na bilongi lokóla bilongi bya bato.
Reve LinVB 9:8  Nsúki ya mangó lokóla nsúki ya básí, míno lokóla míno ma nkósi.
Reve LinVB 9:9  Ntólo ya mangó lokóla miláto mya bibendé ; makeléle ma mapapú lokóla lokitó la makaló na farása ebelé izalí kokende etumba.
Reve LinVB 9:10  Mikíla mya mangó lokóla mikíla mya nkotó mizalákí na bitengú ; mikíla mya mangó mizwí ngúyá ya ko­nyókolo bato sánzá ítáno.
Reve LinVB 9:11  Mokonzi akambí mangó, Anzelú wa Bozindó, óyo bakotángaka o lokóta la ebréi ‘Abadon’, o lokóta la gréke ‘Apólion’.
Reve LinVB 9:12  Bolózí bwa yambo bolekí, kasi malózí mábalé makoyâ naíno.
Reve LinVB 9:13  Ntángo Anzelú wa motóbá abétí mondúle, nayókí mongóngó moútí o maséké mánei ma altáre ya wólo, o bosó bwa Nzámbe.
Reve LinVB 9:14  Mongóngó molobí na Anzelú wa motóbá óyo azalákí na mondúle : « Fu­ngólá minyolólo mya Bǎnzelú bánei bakangémí penepene na ebale enéne Efráte. »
Reve LinVB 9:15  Babimísí Bǎnzelú bánei bazalákí kozila elaká, mokolo, sánzá na mbúla ’te báboma ndámbo ya ísáto ya bato bánso.
Reve LinVB 9:16  Limpingá lya basodá bakotámbwisaka farása lizalákí na bifúku nkámá íbalé ; nayókí motángo mwa bangó.
Reve LinVB 9:17  O limóní namóní farása ná bato batá­mbwísí yangó : miláto mya bibendé mitelí lokóla móto, lokóla yasínte motáné ngwá mpé lokóla fofólo. Mitó mya farása lokóla mitó mya nkósi ; móto, mólinga na fofólo izalákí kobima o minoko mya bangó.
Reve LinVB 9:18  Eténi ya bísáto ya bato bawéí mpô ya malózí mâná másáto : móto, mólinga na fofólo izalákí kobima o minoko mya farása.
Reve LinVB 9:19  Mpámba té, makási ma farása mazalí sé o minoko mpé o mikíla ; sôló, mikíla mîná mizalí lokóla nyóka, nsóngé ya myangó izalí lokóla mitó mikokí kozokisa.
Reve LinVB 9:20  Nzókandé baye ba­bíkákí o malózí mâná babóngólí mitéma té, babóyí atâ misálá mya mabóko ma bangó té : batíkí kokúmbamela bazábolo té, na bikeko bya wólo, bya paláta, bya mbengi, bya mabángá mpé bya mabáyá, biye bikokí komóno té, koyóka té, mpé kotámbola té.
Reve LinVB 9:21  Batíkí koboma bato té, batíkí mpé makambo ma boloki, ma bosóni mpé ma boyíbi té.
Chapter 10
Reve LinVB 10:1  Nsima yangó namóní Anzelú mosúsu makási aútí o likoló, azíngámí na limpata, monama likoló lya motó ; elongi ya yě lokóla mwésé, makolo lokóla makonzí ma móto.
Reve LinVB 10:2  O lobóko asímbí mwâ búku efungwámí. Atíí lokolo la mobáli o mbú, lokolo la mwásí o mokili,
Reve LinVB 10:3  agángí makási lokóla nkósi ekongalaka. Awa agángí, nká­ké nsambo ibétí.
Reve LinVB 10:4  Esílí nkáké kobéte, nalingí kokoma maloba mâná ; kasi út’o likoló nayókí loláká loyébísí ngáí : « Bómbá maloba maye nkáké nsambo iútí koloba ; ókoma mangó té. »
Reve LinVB 10:5  Namóní ’te Anze­lú óyo atélémí o mbú mpé o mokili, atómbólí lobóko la mobáli epái ya likoló ;
Reve LinVB 10:6  alayí ndaí na nkómbó ya Oyo azalí o bileko bínso, Oyo azalísí likoló mpé bínso bizalí kúná, mokili mpé bínso bizalí wâná, ná mbú ná mpé bínso bizalí kúná, alobí : « Elaká ekokí !
Reve LinVB 10:7  Bobélé o ntángo bokoyóka ’te Anzelú wa nsambo akobéte mo­ndúle, Nzámbe akokokisa mokáno mwa yě, moye mobómbámí naíno, sé lokóla ayébísákí baproféta, basáleli ba yě. »
Reve LinVB 10:8  Nsima mongóngó moye nayókákí út’o likoló, molobí na ngáí lisúsu : « Kendé kokamata o lobóko la Anzelú, óyo atélémí o mbú mpé o mokili, búku eye efungwámí. »
Reve LinVB 10:9  Bôngó nabelémí na Anzelú mpé naséngí yě ápésa ngáí búku êná eké. Alobí na ngáí : « Kamátá, líá yangó ; bololo boko­swéisa yŏ libumu, kási o monoko okoyóka yangó elengi lokóla mafúta ma nzói. »
Reve LinVB 10:10  Nakamátí búku eké o lobóko la Anzelú mpé naléí yangó. O monoko nayókí yangó elengi lokóla mafúta ma nzói, áwa namelí yangó, bololo boswí ngáí makási o libumu.
Reve LinVB 10:11  Na nsima balobí na ngáí : « Osengélí lisúsu kosakola mabé ôná bato ba bikólo, ba mabótá, ba nkóta míngi mpé ma bakonzi baíké. »
Chapter 11
Reve LinVB 11:1  Na nsima bapésí ngáí nkékélé lokóla língénda lya bome­ki bolái, balobí na ngáí : « Télémé mpé kendé komeka bonéne, bolaí mpé bosándá bwa Témpelo ya Nzámbe mpé bwa altáre ; mpé tángá bato bakoyâka kokúmbamela Yě wâná.
Reve LinVB 11:2  Kasi tíká naíno lopángo la libándá la Témpelo, ómeka langó té, mpô bapésí langó na bapagáno ; bangó bakonyata Engumbá Esántu sánzá ntúkú ínei na íbalé.
Reve LinVB 11:3  Nakotínda banzénénéké ba ngáí bábalé, baye bakoláta ngóto, básakola mikolo nkóto na nkámá íbalé na ntúkú motóbá. »
Reve LinVB 11:4  Bangó ndé nzeté ya olíva íbalé mpé kandéla íbalé ízalí o bosó bwa Mokonzi wa mokili.
Reve LinVB 11:5  Sókó moto mŏ kó alingí kosála bangó mabé, móto mokobima o minoko mya bangó mpô ya kosílisa bangúná ba bangó. Moto amekí kosála bangó mabé, akowá bobélé liwá liye.
Reve LinVB 11:6  Ntá­ngo bazalí kosakola bazalí na likokí lya kokanga likoló mpô ’te mbúla énóka té, lya kobóngola mái mákóma makilá, mpé lya kopésa mokili bitúmbu ndéngé na ndéngé mbala ínso balingí.
Reve LinVB 11:7  Kasi ntángo bakosílisa kosakola, Nyama eye ekoúta o Bozi­ndó ekoyâ kobundisa, ekolónga mpé ekoboma bangó.
Reve LinVB 11:8  Bibembe bya bangó bikolála o libándá lya Engu­mbá Enéne, eye bameséní kotánga Sódoma tŏ Ezípeti, esíká babákákí Mokonzi wa bangó o kurúse.
Reve LinVB 11:9  Bibembe bya bangó bikotíkala kúná o míso ma bato ba bi­kólo, ba mabótá, ba nkóta mpé ba mikili mínso, mikolo mísáto na ndámbo ; bakolingisa moto té áku­nda bangó o malíta.
Reve LinVB 11:10  Bato ba nsé bakosepela na yangó, bakopésana longónya ná mpé makabo, mpô baproféta baye bábalé bayókísákí bangó mpási míngi.
Reve LinVB 11:11  Kasi nsima ya mikolo mîná mísáto na ndámbo, mpéma ya bomoi eye ekoúta epái ya Nzámbe ekokótela bangó ; bakotéleme o makolo ; nsómo ekokwêla bato bakotála bangó.
Reve LinVB 11:12  O ntángo êná nayókí loláká logángélí bangó makási út’o likoló : « Bóbuta áwa ! » O míso ma ba­ngúná ba bangó bayíngélí o limpata mpé babutí o likoló.
Reve LinVB 11:13  Sé o ntángo êná, mokili moningání makási : eténi ya zómi ya Engumbá êná ebúkání ; bato nkóto nsambo bawéí mpô ya boningani bwa mokili. Baye batíkálí na bomoi bayókí nsómo mpé bakúmísí Nzámbe wa likoló.
Reve LinVB 11:14  Bolózí bwa mábalé bosílí bolekí, boye bwa másáto bokoyâ nokí.
Reve LinVB 11:15  Anzelú wa nsambo abétí mo­ndúle ; mingóngó miyókání o likoló, migángí : « Bokonzi bwa mokili mobimba bokómí bwa Mokonzi wa bísó mpé bwa Krístu wa yě. Yě moto akoyángela o bileko na bileko. »
Reve LinVB 11:16  Babangé ntúkú íbalé na bánei baye bafándí o kíti ya bangó o bosó bwa Nzámbe, bakwéí o nsé mpé bakú­mbámélí Yě, balobí :
Reve LinVB 11:17  « Mokonzi Nzámbe wa bokási bónso, Oyo ‘Azalí mpé Azalákí’, totóndí yŏ botóndi, zambí olakísí ngúyá ya yŏ ndelo té, obandísí bokonzi bwa yŏ !
Reve LinVB 11:18  Bato ba bikólo bínso bayókákí nkándá ; kasi tálá, nkándá ya yŏ eyéí, mpé elaká ekokí ’te ósámbisa bawá ; okopésa mbano na baproféta, basáleli ba yŏ mpé na basántu, bato banéne ná bato baké, baye bakokúmisaka nkómbó ya yŏ ; okosílisa baye babébísí mokili. »
Reve LinVB 11:19  O ntángo êná Témpelo ya Nzá­mbe o likoló efungwámí : Sandúku ya Bondeko emónóní o Témpelo ; mo­nkalali mongengí, nkáké ebétí, mokili moningání, mbúla ya matá­ndalá enókí makási.
Chapter 12
Reve LinVB 12:1  Elembo enéne ebimí o likoló : Mwásí mŏ kó alátí Mwésé lokóla elambá, sánzá ezalákí o nsé ya makolo ma yě, mpé mi­nzóto zómi na míbalé mizalákí kokémbisa motó mwa yě ;
Reve LinVB 12:2  azalákí na zémi, alingí ábóta, alelí mpô ya mpási ya kobóta.
Reve LinVB 12:3  Elembo ya bíbalé ebimí o likoló : ebákátá ya nyama ya motáné ngwá, ekokání na Ngandó, na mitó nsambo mpé na maséké zómi : o motó mŏ kó mŏkó elátí enkoti ya bokonzi.
Reve LinVB 12:4  Mokíla mwa yangó mokómbí eténi ya bísáto ya minzóto mya likoló, mpé mobwákí myangó o nsé. Ekómí Ngandó o bosó bwa mwásí óyo alingí ábóta, elingí kolía mwána alingí ábótama.
Reve LinVB 12:5  Mwásí abótí mwána mobáli, óyo akokamba bato ba nsé bánso na língénda lya ebendé. Mwána wa yě atómbwámí o mbóka Nzámbe, penepene na ngwendé ya yě.
Reve LinVB 12:6  Mwásí akímí o elíkí ; kúná Nzámbe aléngélélí yě esíká ya kobómbama mpô ’te ázwa bilóko bya kolía mikolo nkóto yŏ kó na nkámá íbalé na ntúkú motóbá.
Reve LinVB 12:7  O ntángo êná etumba engálí o likoló : Míkael na Bǎnzelú ba yě babundísí Ngandó. Ngandó na Bǎ­nzelú ba yě babundí mpé,
Reve LinVB 12:8  kasi bako­kí kolónga té, mpé Míkael na Bǎ­nzelú ba yě babengání bangó o likoló.
Reve LinVB 12:9  Ba­bwákí ebákátá ya Nga­ndó, Nyóka ya kala, eye bako­byángaka Zábolo tŏ Sátana, mosé­nginyi wa bato bánso. Bakwêísí yě o nsé, yě na Bǎnzelú ba yě.
Reve LinVB 12:10  Sikáwa nayókí loláká logángí o likoló : « Ut’o sikáwa, lilónga, ngúyá na bokonzi bikómí bya Nzámbe wa bísó, mpé boyángeli bokómí bwa Krístu wa yě. Bakwêísí óyo afúndákí bandeko ba bísó, óyo azalákí kofú­nda bangó butú mói o bosó bwa Nzámbe wa bísó.
Reve LinVB 12:11  Bangó ndé baló­ngí yě mpô ya makilá ma Mwâ-Mpatá mpé na liloba liye basakólákí. Bali­ngákí kotíkala na bomoi té, bandimákí kokúfa.
Reve LinVB 12:12  Yangó wâná, bínó bánso bato ba likoló, bóyóka nsáí ! Kasi mawa na bínó, mokili na mbú ! Mpámba té, Zábolo akití epái ya bínó, aléngí na nkándá, ayébí ’te etíkálí moké mikolo mya yě mísíla. »
Reve LinVB 12:13  Emóní Ngandó ’te babwákí yě o nsé, akómí kolanda Mwásí óyo abótí Mwána mobáli.
Reve LinVB 12:14  Kasi bapésí Mwásí mapapú mábalé ma engo­ndó enéne mpô ’te ápimbwa kín’o ebómbelo ya yě o elíkí, mosíká na Nyóka. Kúná akozwa bilóko bya kolía mibú mísáto na ndámbo*.
Reve LinVB 12:15  Nsima ya Mwásí Nyóka asánzí mái maye mabimélí yě o monoko, míngi lokóla ebale, mpô ’te mbó­ngé ya mái íbénda yě.
Reve LinVB 12:16  Kasi mokili moyéí kosálisa Mwásí : mofungólí monoko mpé momelí ebale ya mái maye Ngandó asánzákí.
Reve LinVB 12:17  Ngandó ayókélí Mwásí nkándá, mpé akeí kobundisa bána basúsu ba Mwásí, baye bánso bakotósaka mitíndo mya Nzámbe, mpé bakobó­mbaka maloba ma Yézu o mitéma.
Chapter 13
Reve LinVB 13:1  Namóní Nyama ebimí o mbú : ezalákí na mitó nsambo mpé na maséké zómi ; o lisé­ké lyŏ kó lyŏ kó enkoti ya bokonzi, mpé o motó mŏ kó mŏ kó maloba ma botúki Nzámbe makomámí.
Reve LinVB 13:2  Nyama eye namóní eúlání na nkoi, kasi ezalákí na makolo lokóla makolo ma lúrsu, mpé na monoko lokóla monoko mwa nkós­i. Ngandó apésí yě bokási, ngwendé mpé ngúyá ya yě enéne.
Reve LinVB 13:3  Namóní ’te motó mŏ kó mwa yě molingí mókúfa mpô ya mpótá enéne, kasi mpótá eye ekómí kobéla. Bato ba mokili mobimba baká­mwí, balandí Nyama.
Reve LinVB 13:4  Bakúmbámélí Ngandó, mpô apésí Nyama liko­kí la yě mŏ kó. Bakúmbámélí mpé Nyama, balobí : « Náni akokání na Nyama ? Náni akokí kobu­ndisa yě ? »
Reve LinVB 13:5  Balingísí Nyama áloba maloba ma loléndo, átúka Nzámbe, mpé ásála mosálá mwa yě sá­nzá ntúkú ínei na íbalé.
Reve LinVB 13:6  Bôngó afu­ngólí monoko mpé abandí kotúka Nzámbe, nkómbó ya yě, mbóka ya yě ná mpé baye bakofá­ndaka o likoló.
Reve LinVB 13:7  Balingísí Nyama ábu­ndisa mpé álónga basántu ; bapésí yě likokí ákonza bato ba mabótá, ba bikólo, ba nkóta, ba mikili mínso.
Reve LinVB 13:8  Bato ba nsé bánso bakokúmbamela yě, baye bá­nso nkómbó ya bangó ikomámí o búku ya bomoi té út’o libandela lya mokili, o búku ya Mwâ-Mpatá óyo babomáká.
Reve LinVB 13:10  Moto asengélí kokóto o bolóko, bakokanga yě ; óyo asengélí kokúfa na mompánga, akokúfa na mompánga ! Na ntína êná bato ba Nzámbe basengélí kokanga mitéma mpé kozala na boyambi.
Reve LinVB 13:11  Na nsima namóní nyama esú­su ebimí o mokili : ezalákí na maséké mábalé lokóla mwána wa mpatá, kasi ezalákí koloba lokóla ngandó.
Reve LinVB 13:12  Azwákí likokí mobimba lya Nyama ya libosó, mpé o míso ma yě asálí ’te bato bánso ba mokili bákúmbamela Nyama ya libosó eye ebíkí o mpótá elingákí koboma yě.
Reve LinVB 13:13  Asálí makamwísi manéne : o míso ma bato bánso ayébí kokitisa móto mwa likoló o nsé.
Reve LinVB 13:14  Na makamwísi balingísí yě kosála, mpô ya kosálela Nyama ya libosó, ákósa bato ba nsé : atíndí bangó ’te bátó­nga ekeko mpô ya kokúmisa Nyama eye ezokákí mpótá na mompánga, kasi ekúfákí té.
Reve LinVB 13:15  Nyama ya íbalé azwí mpé ngúyá ya koyí­ngisa mpéma o ekeko ya Nyama ; bôngó ekeko ebandí koloba. Azwí mpé ngúyá ya kosála ’te báboma baye bánso babóyí kokúmbamela ekeko ya Nyama.
Reve LinVB 13:16  Asálí mpé ’te bákoma elembo o lobóko la mobáli tŏ o elongi ya bato bánso, bato baké ná bato banéne, bato ba nkita ná babóla, bansómí ná baómbo.
Reve LinVB 13:17  Bôngó moto mŏ kó té akokí kosómba tŏ kotéke elóko, sókó azá­ngí elembo eye, nkómbó ya Nyama tŏ motángo moye molakísí nkó­mbó ya yě.
Reve LinVB 13:18  Bobélé moto wa bwányá akoyéba yangó ! Moto wa mayéle akokí koyéba ntína ya motángo mwa Nyama. Na motángo moye balakísí moto. Motángo mwa yě mozalí : nkámá motóbá na ntúkú motóbá na motóbá.
Chapter 14
Reve LinVB 14:1  Natálí lisúsu, namóní MwâMpatá atélémí o ngómbá Sío­n elongó na bato nkóto monkámá na ntúkú ínei na ínei : nkómbó ya yě na nkómbó ya Tatá wa yě ikomámí o bilongi bya bangó.
Reve LinVB 14:2  Nayókí loláká loútí o likoló, lokóla lokitó la mái makási tŏ ma nkáké ya nsómo. Loláká lôná nayókákí lozalákí mpé lokóla bazalákí kobéte nzenze.
Reve LinVB 14:3  Bayémbí nzémbo ya sika o bosó bwa ngwendé, bwa ba-Bomoi bánei mpé bwa Babangé. Moto mŏ­kó té akokí koyékola nzémbo êná, bobélé bato baye nkóto monkámá na ntúkú ínei na ínei bazwí libíkí o mokili.
Reve LinVB 14:4  Bangó bato babébí na básí té, batíkálí na bo­ngondo. Bakolandaka Mwâ-Mpatá bipái bínso azalí kokende ; basikwámí o káti ya bato, bangó ndé mabonza ma yambo mabonzámí na Nzámbe mpé na Mwâ-Mpatá.
Reve LinVB 14:5  Babúkí lokutá atâ mokolo mŏ kó té bazalí na mbindo té.
Reve LinVB 14:6  Na nsima namóní Anzelú mosúsu apimbwí o ntá likoló ; azalákí na nsango elámu ya sékô asengélí kosangela bato bazalí o mokili, bato ba bikólo, mabótá, nkóta mpé mikili mínso.
Reve LinVB 14:7  Agángí na mongóngó makási : « Bóbánga Nzámbe mpé bópésa yě nké­mbo, mpô elaká ya likambo lya nsúka ebelémí ; bôngó bókúmbamela Oyo akelákí likoló, nsé, mbú na máziba. »
Reve LinVB 14:8  Anzelú mosúsu, wa bábalé, alandí yě mpé agángí : « Babilóne enéne ekwéí, ekw­éí sôló mpenzá ! » Amelísí bato ba bikólo bínso víno makási ma ekóbo.
Reve LinVB 14:9  Anzelú mosúsu, wa básáto, alandí bangó mpé agángí na mongóngó makási : « Moto nyónso akúmbámélí Nyama mpé ekeko ya yě, mpé azalí na elembo ya yě o elo­ngi tŏ o lobóko,
Reve LinVB 14:10  yě mpé akomele víno ya nkándá ya Nzámbe ; basílí baléngélí víno eye, esangání na mái té, o nkéni ya nkándá ya Nzámbe. Ako­nyókwama na móto mpé na fofólo o míso ma Bǎnzelú basántu mpé ma Mwâ-Mpatá.
Reve LinVB 14:11  Baye bakúmbámélí Nyama ná ekeko ya yě, baye bazwí elembo ya nkómbó ya yě, mílinga mya minyóko mya bangó mikobuta o likoló o bileko na bileko ; bakopéma té, ézala na mói, ézala na butú. »
Reve LinVB 14:12  Ntína yangó basántu, baye bakotósaka mitíndo mya Nzámbe mpé bayambí Yézu, basengélí kokanga mitéma.
Reve LinVB 14:13  Na nsima nayókí loláká loútí o likoló, loyébísí ngáí : « Komá boye : Esengo na bato bakowâ o bondeko bwa Mokonzi. Elímo alobí : Ya sôló, út’o leló bápéma, mpô balembí na mosálá monéne ; misálá mya bangó mikolanda bangó o nsima. »
Reve LinVB 14:14  Natálí mpé namóní Limpata lya mpémbé ná mpé moto afándélí lyangó, azalákí lokóla Mwána wa Moto, alátí enkoti ya wólo ya bokonzi o motó mpé asímbí líkwa­ngola lipótú o lobóko.
Reve LinVB 14:15  Anzelú mosúsu abimí o Témpelo mpé na mongóngó makási agángélí moto óyo afándí o limpata : « Tíndá lí­kwangola lya yŏ mpé kátá. Elaká ya bobúki mbuma ekokí, o nsé milóna mikomélí. »
Reve LinVB 14:16  Bôngó moto afándí o limpata, abwákí líkwa­ngola o mokili mpé babúkí mbuma ya mwangó.
Reve LinVB 14:17  Anzelú mosúsu abimí o Témpelo ya likoló, yě mpé azalákí na lí­kwa­ngola lipótú o lobóko.
Reve LinVB 14:18  Anzelú mosúsu abimí, aútí epái ya altáre, yě moyángeli wa mosálá mwa móto, na mongóngó makási agángélí Anzelú óyo asímbí líkwangola : « Tíndá líkwangola lipótú lya yŏ mpé kátá bituka bya mbuma ya víno o nsé, mpô mbuma ya víno isílí itelí. »
Reve LinVB 14:19  Bôngó Anzelú abwákí lí­kwangola lya yě o nsé, akátí bituka bya mbuma ya víno mpé asopí yangó o eboka enéne ya nkándá ya Nzámbe !
Reve LinVB 14:20  O libándá lya engumbá banyatí yangó na makolo, makilá o eboka masopámí, matámbólí téé kilométele nkámá ísáto. Sókó farása etélémí o káti ya mangó ekozinda kín’o nkíngó.
Chapter 15
Reve LinVB 15:1  Nsima namóní o likoló elembo esúsu enéne mpé ya kokámwa : Bǎnzelú nsambo bamemí malózí nsambo, malózí mâná ma nsúka ; na mangó nkándá ya Nzámbe ekosíla.
Reve LinVB 15:2  Namóní mpé mbú lokóla talatálá, esangání na móto. Bato baló­ngí Nyama, ekeko ya yangó ná mpé motángo mwa nkómbó ya yě, batélémí o mbú êná emónóní lokóla talatálá, nzenze ya Nzámbe o mabóko.
Reve LinVB 15:3  Bayémbí nzémbo ya Móze, mosáleli wa Nzá­mbe, mpé nzémbo ya Mwâ-Mpatá, bangó ’te : « Bikelá bya yŏ bizalí binéne, bya kokámwa, Mokonzi, Nzámbe wa bokási bó­nso ! Nzelá ya yŏ, nzelá ya bosémbo mpé ya bosôló, é Nkúmú wa bikólo bínso.
Reve LinVB 15:4  Mokonzi, náni moto ábánga yŏ té mpé ákúmisa nkómbó ya yŏ té ? Zambí sé yŏ mŏ kó ozalí mosántu. Bato ba bikólo bínso bakoyâ kokúmbamela yŏ, mpô sikáwa olakísí sôló ’te mikáno mya yŏ mizalí mikáno mya bosémbo. »
Reve LinVB 15:5  Na nsima namóní ndéngé bafu­ngólí Témpelo o likoló, yangó ndé éma ya Bondeko.
Reve LinVB 15:6  Bǎnzelú nsambo, baye bamemí malózí nsambo, babimí o Témpelo ; balátí bilambá mpé­mbé, bizalákí kongenge, bikangémí na nkámba ya wólo o lokéto.
Reve LinVB 15:7  Mŏ­kó wa ba-Bomoi bánei apésí Bǎnzelú nsambo nkéni ya wólo nsambo, itóndí na nkándá ya Nzámbe, óyo azalí o bileko na bileko.
Reve LinVB 15:8  Témpelo etóndí na mílinga miútí na nkémbo mpé na ngúyá ya Nzámbe. Moto mŏ kó té akokí koyíngela wâná kín’o mokolo malózí nsambo ma Bǎnzelú nsambo makosíla.
Chapter 16
Reve LinVB 16:1  Nayókí loláká lonéne loútí o Témpelo, lolobí na Bǎnzelú nsambo : « Bókende mpé bósopa nkéni nsambo ya nkándá ya Nzámbe o mokili. »
Reve LinVB 16:2  Anzelú wa yambo akeí kosopa nkéni ya yě o mokili : mpótá na mayíná ibimélí bato bánso bazalákí na elembo ya Nyama mpé bakúmbámélákí ekeko ya yě ; bayókí mpási.
Reve LinVB 16:3  Anzelú wa bábalé asopí nkéni ya yě o mbú : mbú ebóngwání makilá. Bakokí kokanisa ’te bato babomámí wâná ; bínso bizalákí na bomoi o mbú bikúfí.
Reve LinVB 16:4  Anzelú wa básáto asopí nkéni ya yě o bibale mpé o máziba : mái makómí makilá.
Reve LinVB 16:5  Nayókí Anzelú wa mái alobí : « Ozalí na bosémbo, yŏ, Oyo Azalí mpé Azalákí, yŏ Mosántu, áwa opésí etúmbu boye.
Reve LinVB 16:6  Basopí makilá ma basántu mpé ma baproféta ; yangó wâná omelísí bangó makilá ; bazwí etúmbu ekokí na bangó ! »
Reve LinVB 16:7  Mpé nayókí loláká loútí epái ya altáre, lolobí : « Sôló, Mokonzi, Nzámbe wa bokási bónso, okátí makambo na bosémbo mpé na bosôló. »
Reve LinVB 16:8  Anzelú wa bánei asopí nkéni ya yě o mwésé ; mwésé mokómí na ngúyá ya kotumba bato :
Reve LinVB 16:9  bato bazíkí na molungé makási mpé batúkí nkómbó ya Nzámbe, óyo azalí na likokí lya kotínda malózí mâná. Kasi babóyí kobóngola mitéma mpé kopésa Nzámbe nkémbo.
Reve LinVB 16:10  Anzelú wa bátáno asopí nkéni ya yě o ngwendé ya Nyama. Bokonzi bwa yě bokómí na molílí. Bato bakómí komíswâ lolému mpô ya mpási bayókí.
Reve LinVB 16:11  Batúkí Nzámbe o likoló mpô ya mpási mpé mpô ya mpótá ibimí mayíná, kasi babóyí kobóngola bizalela bya bangó.
Reve LinVB 16:12  Anzelú wa motóbá asopí nkéni ya yě o ebale enéne Efráte. Mái ma yangó makaúkí, bô­ngó matíkélí bakonzi baútí o Esti nzelá.
Reve LinVB 16:13  Na nsima namóní bilímo bya mbindo bísáto, lokóla magbólóló, bibimí o monoko mwa Ngandó, o monoko mwa Nyama mpé o monoko mwa pro­féta wa lokutá.
Reve LinVB 16:14  Ya sôló, bilímo biye bya zábolo bikosálaka makamwísi, bikokende kosangisa bakonzi bánso ba mokili mobimba mpô ’te bábunda etumba o Mokolo monéne mwa Nzámbe, Mokonzi wa bokási bónso. (
Reve LinVB 16:15  « Tálá, nakoyâ lokóla moyíbi : esengo na moto akokéngeleke mpé alongólí bilambá bya yě té ; bô­ngó akotámbola bolúmbú té, mpé bakomóno nsóni ya yě té. »)
Reve LinVB 16:16  Basangísí bangó o esíká ba-Ebréi bakobéngaka ‘Armagédon’.
Reve LinVB 16:17  Anzelú wa nsambo asopí nkéni ya yě o etando ya likoló : út’o Témpelo nayókí loláká lonéne lolobí : « Esílí ! »
Reve LinVB 16:18  Ebimí minkalali, mingó­ngó na nkáké ; mokili moningání makási. Bandá mokolo bato bakómí o nsé, naíno mokili moningání makási boye té !
Reve LinVB 16:19  Engumbá enéne epaswání na biténi bísáto mpé bingumbá bya bikólo bí­nso bibúkání ; Nzámbe akundólí engumbá Babilóne o motéma, bôngó apésí yangó nkéni ya víno ya nkándá ya yě enéne.
Reve LinVB 16:20  Bisanga bínso bizindí mpé ngómbá ilímwí.
Reve LinVB 16:21  Mbúla ya matá­ndalá enókélí bato ; bozitó bwa libángá lyŏ kó lyŏ kó bokokí na kiló ntúkú ínei ! Mpé bato batúkí Nzá­mbe mpô ya mbúla enéne ya matá­ndalá ; ezalákí monyóko mwa nsómo mpenzá.
Chapter 17
Reve LinVB 17:1  O ntángo êná mŏ kó wa Banzelú nsambo baye bazalákí na nkéni nsambo ayéí koyébisa ngáí : « Yáká ! Nálakisa yŏ ndéngé bakokáta likambo lya Mwásí ndú­mbá monéne, óyo afándí o libóngo lya mái manéne.
Reve LinVB 17:2  Bakonzi banéne ba mokili batá­mbólákí na yě, balángwákí víno ya makambo ma yě ma bosóni. »
Reve LinVB 17:3  Anzelú akambí ngáí o elíkí, Elímo akitélí ngáí. Namóní mwásí mŏ kó abutélí Nyama etáné ngwá ; Nyama etóndí na nkómbó ya botúki Nzámbe, ezalákí na mitó nsambo mpé na maséké zómi.
Reve LinVB 17:4  Mwásí alátí elambá ya lángi la lo­ngóndo, engengí na wólo, na ma­bá­ngá ma motúya mpé na mayaka. Azalákí na nkéni ya wólo o lobóko, eye etóndí na makambo ma nsó­mo mpé na mbindo ya bosóni bwa yě.
Reve LinVB 17:5  Nkómbó eye ekomámí o elongi ya yě elakísí mobómbamo : ‘Babilóne Engumbá enéne, mamá wa bandú­mbá mpé wa makambo ma nsómo o mokili’.
Reve LinVB 17:6  Namóní ’te mwásí alángwí na makilá ma basántu mpé ma bamartíro ba Yézu. Awa namóní yě, nakámwí míngi.
Reve LinVB 17:7  Anzelú alobí na ngáí : « Ntína níni ozalí kokámwa ? Nakolimbolela yŏ mobómbamo mwa Mwásí óyo, mpé mwa Nyama eye abutélí, nyama na mitó nsambo mpé na maséké zómi.
Reve LinVB 17:8  Nyama êná, yambo ezalákí, kasi sikáwa ezalí lisúsu té. Mokolo mosúsu ekobima o Bozindó mpé ekokende kosúka o liwá. Bato ba nsé, baye nkómbó ya bangó ikomámí té o búku ya bomoi út’o libandela, bakokámwa ntángo bakomóno Nya­ma eye ezalákí libosó, nsima elímwí, kasi sikáwa ebimí lisúsu.
Reve LinVB 17:9  Mpô ’te óyóka ntína ya likambo liye, osengélí kozala na mayéle ma sôló ! Mitó nsambo, myangó ndé ngómbá nsambo mwásí afándélí. Elakísí mpé bakonzi nsambo :
Reve LinVB 17:10  bátáno ba bangó basílí bawéí, mŏkó azalí na bomoi, mosúsu ayéí naíno té ; kasi ntángo akoyâ akoúmela míngi té.
Reve LinVB 17:11  Nyama eye ezaláká mpé ezalí lisúsu té, yangó ndé mokonzi wa mwambe ; azalí molongó mŏ kó na bakonzi nsambo, yě mpé akosúka bobélé o liwá.
Reve LinVB 17:12  Maséké zómi omónókí, mangó ndé bankúmú zómi. Naíno bazwí bokonzi té, kasi bakozwa likokí lya bokonzi sé ngo­nga yŏ kó, elongó na Nyama.
Reve LinVB 17:13  Bangó bánso bayókání ’te bakopésa Nyama ngúyá mpé likokí lya bangó.
Reve LinVB 17:14  Bakokende kobundisa Mwâ-Mpatá, kasi Mwâ-Mpatá ako­lónga bangó, mpô azalí Mokonzi wa bakonzi mpé Nkúmú wa bankúmú. Akolónga bangó elongó na bato ba yě, baye abyángí mpé aponí, baye bayambí yě. »
Reve LinVB 17:15  Anzelú akóbí : « Mái mâná omónókí esíká Mwásí ndúmbá afándí, mangó ndé : bikólo, mabótá, mikili mpé nkóta ínso ya nsé.
Reve LinVB 17:16  Kasi maséké mâná zómi ná mpé Nyama omónókí bakoyina Mwásí ndú­mbá, bakolongola yě bilambá, bakotíka yě bolúmbú, bakolía nsuni ya yě, mpé bakotumba yě.
Reve LinVB 17:17  Nzámbe moto apésí bangó mayéle ma kosála maye yě mŏ kó akání : báyókana ’te bakopésa Nyama bokonzi bwa bangó kín’o ntángo Nzámbe akokokisa maloba ma yě.
Reve LinVB 17:18  Mwásí óyo omónókí, yě ndé Engumbá enéne, eye ezalí kokonza bankúmú bá­nso ba nsé. »
Chapter 18
Reve LinVB 18:1  Na nsima namóní Anzelú mosúsu aútí o likoló, azalí na ngúyá enéne, angengísí mokili na nkémbo ya yě.
Reve LinVB 18:2  Agángí na mongóngó makási : « Babilóne ekwéí, Engu­mbá enéne ekwéí ! Ekómí mbóka ya bazábolo, ebómbamelo ya bilímo bibé mpé ya ndeke ya bosoto ndéngé na ndéngé ibóyámí.
Reve LinVB 18:3  Mpámba té, bato ba bikólo bínso bamelí víno makási ya bosóni bwa bangó, bakonzi ba nsé batámbólí na yě, bato ba mombóngo bakómí na mosolo míngi mpô ya lipo­mbó lya yě ndelo té. »
Reve LinVB 18:4  Nayókí lisúsu loláká loútí o likoló, lolobí : « Bínó, bato ba ngáí, bólongwa o engumbá êná, mpô ’te bósála mabé elongó na yě té, mpé mpô ’te malózí ma yě mákwêla bínó té.
Reve LinVB 18:5  Mpámba té, masúmu ma yě malekí míngi, mabutí kín’o likoló, Nzámbe akundólí makambo ma yě mazángí bosémbo.
Reve LinVB 18:6  Bózóngisela yě mabé asálákí ! Bózó­ngisela yě mangó mbala íbalé ! Nkéni ya víno makási amelísí bato, bómelisa yě ya­ngó mbala íbalé !
Reve LinVB 18:7  Bóyókisa yě mpási mpé mawa, sé lokóla yě mŏ­kó azalákí kowéla nkita na lipo­mbó. Amílobélí : Nafándí o ngwendé lokó­la mokonzi mwásí, nakúfélí mobáli té, atâ mokolo mŏ kó té toko­láta mpíli.
Reve LinVB 18:8  Yangó wâná malózí mánso makokwêla yě sé o mokolo mŏ kó : bokono bwa liwá, liláká na nzala. Akozíka na móto, mpô Mokonzi Nzá­mbe, óyo akosámbisa yě, alekí bokási. »
Reve LinVB 18:9  Bakonzi ba mokili, baye batá­mbólákí na yě mpé basepélákí na nkita mpé na lipombó elongó na yě, bakolela mpé bakokímela mpô ya mawa mokolo bakomóno mílinga mya móto mokozíkisa engumbá ya yě.
Reve LinVB 18:10  Bakotéleme mosíká, mpô bakobánga mpási ekokwêla yě, bakoloba : « Mawa ! Mawa ! yŏ Babilone, engumbá enéne ntá bokási, ngonga yŏ kó ekokí mpô ya kokitisa yŏ o likambo ! »
Reve LinVB 18:11  Bato ba mombóngo ba mokili bakolela mpé bakokímela ; moto mŏ kó té akosómba lisúsu bilóko bya yě :
Reve LinVB 18:12  wólo na paláta, mabángá ma motúya na mayaka, bilambá bya monzele bya lángi la longóndo, bya silíki mpé bya motáné ngwá, mabáyá kitóko na bilóko bisálémí na mpémbé ya nzoku, na mabángá ma motúya, na mbengi, na bibendé mpé na mabángá mpémbé ;
Reve LinVB 18:13  bilóko bakosangisaka na biléi mpô ya koyéisa byangó elengi, míra, mpaka ya malási, víno, mafúta, mbuma ya mámpa ná fufú ya mangó, ngómbé na mpatá, farása na makaló, baó­mbo ná bato ba mosálá.
Reve LinVB 18:14  Mbuma ya bilanga isílí itelí, iye motéma mwa yŏ molukákí, ikómí mosíká na yŏ ; bilóko bínso bya nkita mpé bya lipombó bisílí nyé, okozwa byangó lisúsu té.
Reve LinVB 18:15  Bato ba mombóngo bazwákí mosolo míngi mpô ya yě, bakotíkala kotéleme mosíká, bakobánga mpási ekokwêla yě, bakolela mpé bakokímela, bangó ’te :
Reve LinVB 18:16  « Mawa ! Mawa ! Engumbá elekí bonéne, ezalákí koláta bilambá bya mo­nzele, bya longóndo mpé bya motáné ngwá, ezalákí komíkémbisa na wólo, na mabángá ma motúya mpé na mayaka.
Reve LinVB 18:17  Sé na ngonga yŏ kó bilóko ebelé boye bya nkita bibébí. » Bakapiténi na basálisi ba yě, bato bánso bakosálaka mombóngo o nzelá ya mái, batíkálí kotéleme mosíká.
Reve LinVB 18:18  Ntángo bamóní mílinga mya engu­mbá ezíkí, bagángí : « Engu­mbá níni ekokání na engu­mbá eye enéne ? »
Reve LinVB 18:19  Babwákí mputulú o mitó, bagángí na boleli mpé na bokímeli : « Mawa ! Mawa ! Engumbá elekí bonéne ! Baye batámbwísákí masúwa o mbú bazalákí kokóma bato ba nkita ! Na ngonga yŏ kó ebébí nyé ! »
Reve LinVB 18:20  Likoló, yóká nsáí mpô ya yangó ! Ná mpé bínó basántu, bapóstolo ná baproféta, bóyóka esengo, mpô Nzámbe akitísí engumbá êná mpô ya mabé mánso asálákí bínó.
Reve LinVB 18:21  Anzelú wa bokási atómbólí libá­ngá linéne mpenzá, abwákí lyangó o mbú, alobí : « Sé bôngó, bakobwáka Babilóne, Engumbá enéne, na mbálákáká ! Bakomóno yangó lisúsu té. »
Reve LinVB 18:22  Bato bakobéteke nzenze ná bayé­mbi, baye bakobéteke mpiólóló tŏ mo­ndúle, bakoyóka bangó o mbóka ya yŏ lisúsu té. Bato bayébí mosálá, atâ mosálá káni, bakomónono o mbóka yŏ lisúsu té. Lokitó la libángá lya koníka fufú lokoyókana o mbóka yŏ lisúsu té.
Reve LinVB 18:23  Mwínda mokopela o mbóka yŏ lisúsu té. Lisoló lya baye balóngání sika likoyókana o mbóka yŏ lisúsu té. Bato ba yŏ ba mombóngo bazalákí bankúmú ba mokili ; na makambo ma yŏ ma líkundú ozalákí kokósa bato ba bikólo bí­nso.
Reve LinVB 18:24  Epái ya yŏ makilá masopání ma baproféta, ma basántu, mpé ma baye bánso babomámí o mokili.
Chapter 19
Reve LinVB 19:1  Na nsima nayókí út’o likoló mingóngó mya bato ebelé, balobí : « Alelúya ! Lokúmu mpé ngúyá na Nzámbe Mobíkisi wa bísó !
Reve LinVB 19:2  Yě akokátaka makambo na bosôló mpé na bosémbo. Akitísí Ndúmbá monéne óyo abébísí mokili na bosóni bwa yě. Azóngísélí yě mabé ma yě, mpô asopákí makilá ma basáleli ba Nzá­mbe. »
Reve LinVB 19:3  Bayé­mbí lisúsu : « Alelúya ! Mílinga mya yě mikobuta o likoló o bileko na bileko ! »
Reve LinVB 19:4  Babangé ntúkú íbalé na bánei mpé ba-Bomoi bánei ba­kwéí bilongi o nsé mpô ya kokúmbamela Nzámbe, óyo afándí o ngwendé. Balobí : « Amen, Alelúya ! »
Reve LinVB 19:5  Na nsima loláká loútí epái ya ngwendé, lolobí : « Bókúmisa Nzá­mbe wa bísó, bínó bánso basáleli ba yě, ná mpé bínó bokobángaka yě, bato baké na bato banéne. »
Reve LinVB 19:6  Mpé nayókí mingóngó mya bato ebelé ; ezalákí lokóla makeléle ma mái makási, lokóla nkáké ya nsómo. Bayé­mbí : « Alelúya ! Mokonzi, Nzámbe wa bísó wa bokási bónso, akamátí bokonzi.
Reve LinVB 19:7  Tósepela, tóyémbela mpé tókúmisa Nzámbe, zambí eyenga ya libála ya Mwâ-Mpatá ebelémí, mpé bolóngani wa yě asílí amíbo­ngísí :
Reve LinVB 19:8  balátísí yě elambá mpémbé, péto mpenzá. » Elambá êná, ndé misálá mya bosémbo mya basántu.
Reve LinVB 19:9  Mpé ǎnzelú alobí na ngáí : « Komá : Esengo na bato ba­byángémí o li­mpáti lya libála lya Mwâ-Mpatá. » Mpé abakísí : « Maloba maye maútí na Nzámbe, mazalí ma sôló. »
Reve LinVB 19:10  Nakúmbámí o bosó bwa makolo ma yě mpô ya kokúmbamela yě, kasi alobí na ngáí : « Kébá, ósála bôngó té, ngáí nazalí sé mosáleli lokóla yŏ mpé lokóla bandeko ba yŏ, bato bandimí Liloba lya Yézu. Osengélí kokúmbamela sé Nzámbe. » Maloba Yézu asakólí, Elímo moto ayébísí mangó na baproféta.
Reve LinVB 19:11  Na nsima namóní likoló lifu­ngwání, mpé farása mpémbé emónóní. Nkómbó ya Motámbwisi wa ya­ngó ‘Moto wa lobokó’ mpé ‘Moto wa bosôló’. Akokátaka makambo mpé akobundaka bitumba sé na bosémbo.
Reve LinVB 19:12  Míso ma yě matelí lokóla móto, alátí binkoti bya bokonzi biíké o motó ; nkómbó ya yě ekomámí o nzóto ya yě, bobélé yě mŏ kó ayébí yangó.
Reve LinVB 19:13  Monkóto mozí­ngí yě, motíámí o makilá. Nkómbó ya yě ndé ‘Liloba lya Nzámbe’.
Reve LinVB 19:14  Mampingá ma likoló malandí yě, batámbwísí farása mpé­mbé mpé balátí bilambá bya mo­nzele, bilambá mpémbé, péto.
Reve LinVB 19:15  Mo­mpánga mopótú mobimélí yě o monoko mpô ya kobéte na mwangó bapagáno. Yě moto akokamba bangó na língénda lya ebe­ndé, mpé akotúta bangó lokóla mbuma ya víno o eboka ya nkándá enéne ya Nzámbe wa bokási bónso.
Reve LinVB 19:16  Nkómbó ekomámí o monkóto mpé o ebelo ya yě, yangó eye : ‘Nkú­mú wa bankúmú mpé Mokonzi wa bakonzi’.
Reve LinVB 19:17  Na nsima namóní ǎnzelú atélémí o mwésé, na mongóngó makási abélélí ndeke ínso izalákí kopi­mbwa o likoló : « Yákáni, bósangana bánso o limpáti linéne lya Nzámbe.
Reve LinVB 19:18  Kúná bokolía misuni mya bakonzi, mya bakapiténi banéne, mya bilombé, mya farása, mya batámbwisi farása, mya bato bánso, mya bansómí ná baómbo, mya bato baké ná bato banéne ! »
Reve LinVB 19:19  Namóní mpé Nyama, elongó na bankúmú ba nsé na mampingá ma bangó, basangání mpô ’te bábu­nda etumba na Motámbwisi farása na li­mpingá lya yě.
Reve LinVB 19:20  Kasi bakangí Nyama mpé proféta wa lokutá. Yě óyo asálákí makamwísi manéne mpô ya Nyama : akósákí bôngó bato bazwí ele­mbo ya Nyama mpé bay­e bakúmbámélí ekeko ya yě. Babomí bangó bábalé té, kasi ba­bwákí bangó o etíma ya móto mpé ya fofólo.
Reve LinVB 19:21  Basúsu bánso bawéí : Motámbwisi farása abomí bangó na mompánga mobimélí yě o monoko ; ndeke ínso iléí mpé itóndí na nsuni ya bangó.
Chapter 20
Reve LinVB 20:1  O ntángo êná namóní ǎnzelú akití út’o likoló, azalákí na lifungóla lya Mbóka Bozi­ndó mpé na monyolólo monéne o lobóko.
Reve LinVB 20:2  Aka­ngí Ngandó, Nyóka ya kala, yě Zábolo, Sátana ; akangí yě na minyolólo mibú nkóto yŏ kó.
Reve LinVB 20:3  Abwákí yě o Bozindó, akangí bwangó na bikangeli mpé atíí bilembo ; bôngó Ngandó ákósa bato lisúsu té kín’o nsúka ya mibú nkóto yŏ kó ; nsima yangó bakokangola yě lisúsu mwâ eleko.
Reve LinVB 20:4  Na nsima namóní ngwendé ; baye bafándélí yangó bazwí likokí lya kokáta makambo. Namóní mpé milímo mya bato baye bakátákí bangó nkíngó, mpô bayambákí Yézu mpé basangélákí Liloba lya Nzámbe. Namóní mpé bánso babóyákí kokúmbamela Nyama ná ekeko ya yě, baye bayambákí elembo o elo­ngi tŏ o lobóko té. Bangó bazwí bomoi lisúsu mpé bayángélí elongó na Krístu mibú nkóto yŏ kó. Eye ezalí nsékwa ya yambo.
Reve LinVB 20:5  Bawéi basúsu bazóngí na bomoi té, kín’o mibú nkóto yŏ kó mikokoka.
Reve LinVB 20:6  Esengo na bato bakosékwa o ntángo ya nsékwa ya yambo : bazalí basántu ! Liwá lya mábalé likokí kosála bangó elóko té ; bakozala banganga ba Nzámbe mpé ba Krístu, bakoyá­ngela elongó na yě mibú nkóto yŏ kó.
Reve LinVB 20:7  Nsima ya mibú mîná nkóto yŏ kó bakokangola Sátana o bolóko.
Reve LinVB 20:8  Akokende kosénginya bato ba bikólo o bisíká bínso bya mokili. Akosangisa Góg na Magóg mpô ’te bákende etumba : bakozala baíké lokóla zélo o libóngo lya mbú.
Reve LinVB 20:9  Na nsima bakota­ndana o mokili mobimba, bakozínga nganda ya basántu, Engumbá ya bolingo. Kasi móto moye mokokita út’o likoló mokozíkisa bangó.
Reve LinVB 20:10  Zábolo, óyo asé­ngí­nyí bangó, bakobwáka yě o etíma ya móto mpé ya fofólo. Bakonyó­kwama bôngó esíká yŏ kó na Nyama mpé na proféta wa lokutá butú mói o bileko bínso sékô.
Reve LinVB 20:11  Na nsima namóní ngwendé ya mpémbé enéne ná mpé Moto afá­ndélí yangó. Likoló na nsé bilímwí o bosó bwa yě, bimónóní lisúsu té.
Reve LinVB 20:12  Namóní bato bawá, bato banéne ná bato baké, batélémí o bosó bwa ngwendé ntángo bafungólí búku míngi ; nsima bafungólí mpé búku ya bomoi ; basámbísí bawá engébéné na misálá mya bangó, sé lokóla ekomámí o búku.
Reve LinVB 20:13  Bato bawákí, baye babómbámí o mbú, babimí kúná ; baye babó­mbámí o Liwá mpé o Ades babimí mpé o esíká ya bangó. Bakátí li­kambo lya moto mŏ kó mŏ kó engébéné na misálá mya yě.
Reve LinVB 20:14  Babwákí Liwá na Ades o etíma ya móto : etíma ya móto, yangó ndé liwá lya mábalé.
Reve LinVB 20:15  Babwákí o etíma ya móto baye bánso nkómbó ya bangó ikomámí o búku ya bomoi té.
Chapter 21
Reve LinVB 21:1  Na nsima namóní likoló lya sika na mokili mwa si­ka, mpô likoló lya libosó mpé mokili mwa libosó bisílí bilímwí, mpé mbú ezalákí lisúsu té.
Reve LinVB 21:2  Namóní mpé Engumbá esántu, Yerúzalem ya sika, eútí o likoló, o mbóka Nzámbe. Balátísí yangó kitóko lokóla elengé mwásí alingí ákútana na bolóngani wa yě.
Reve LinVB 21:3  Nayókí loláká logángí út’o ngwendé : « Tálá áwa éma ya Nzámbe o káti ya bato ; akozala na bangó ndáko yŏ­kó ; bangó bakozala bato ba yě ; mpé yě akozala na bangó, akozala Nzámbe wa bangó.
Reve LinVB 21:4  Akolongola mpízolí ínso o míso ma bangó : liwá likozala lisúsu té, boleli, bogángi na mpási bikozala lisúsu té, zambí mokili mwa kala mozalí lisúsu té. »
Reve LinVB 21:5  Na nsima Oyo afándí o ngwendé alobí : « Tálá, nakokómisa bínso bya sika. » Mpé abakísí : « Komá : Maloba maye mazalí maloba ma bosôló, mazalí na ntembe sókí té. »
Reve LinVB 21:6  Alobí na ngáí lisúsu : « Esílí ! Ngáí nazalí Alfa na Omega, Libandela mpé Nsúka. Moto ayókí mpósá ya mái, nakomelisa yě mái ma líziba lya bomoi, akofúta té.
Reve LinVB 21:7  Oyo alóngí etumba, akozwa bîná bínso bŏ lisangó : Ngáí nakozala Nzámbe wa yě mpé yě akozala mwána wa ngáí.
Reve LinVB 21:8  Kasi bato bakímí mpé bawángání ngáí, baye babébí, baye babomí bato, baye bazalí na mbindo, bato ba líkundú, baye bakú­mbámélí bikeko ná bato ba lokutá, bánso bakosúka o etíma ya móto mpé ya fofólo. Lyangó ndé liwá lya mábalé. »
Reve LinVB 21:9  Mŏ kó wa bǎnzelú nsambo, baye bazalákí na nkéni nsambo iye itó­ndí na malózí nsambo ma nsúka, ayéí koyébisa ngáí : « Yáká, nálakisa yŏ Mwásí óyo Mwâ-Mpatá akobála. »
Reve LinVB 21:10  Elímo akitélí ngáí mpé ǎnzelú atómbólí ngáí kín’o nsóngé ya ngómbá esándá ; alakísí ngáí Engu­mbá esántu, Yerúzalem, eútí o likoló, o mbóka Nzámbe.
Reve LinVB 21:11  Ezalí na nkémbo ya Nzámbe, engengí lokóla libángá lya motúya monéne, lokóla libángá lya yáspe ya ma­ngé­ngéngé.
Reve LinVB 21:12  Engumbá ezíngámí na ebákátá ya lopángo. Lopángo lozalákí na bizibeli zómi na bíbalé ; bǎnzelú zómi na bábalé bakéngélí bya­ngó. Nkómbó ikomámí wâná ya mabótá zómi na mábalé ma bána ba Israél.
Reve LinVB 21:13  Epái ya Esti, bizibeli bísáto ; epái ya Nórdi bizibeli bísáto ; epái ya Súdi, bizibeli bísáto ; epái ya Wésti, bizibeli bísáto.
Reve LinVB 21:14  Lopángo la engumbá lotóngámí o mabángá manéne zómi na mábalé ; libángá lyŏ kó lyŏ kó lizalákí na nkómbó yŏ­kó ya bapóstolo zómi na bábalé ba Mwâ-Mpatá.
Reve LinVB 21:15  Anzelú óyo azalákí koloba na ngáí azalákí na nkékélé ya wólo o lobóko mpô ya komeka bonéne bwa engu­mbá, bwa bizibeli mpé bwa lopángo.
Reve LinVB 21:16  Engumbá ezalákí na matúmu mánei : bolaí na bonéne bikokání. Bôngó amekí engumbá na métele : bonéne bokokí na bolaí bwa kilométele nkóto íbalé na nkámá íbalé ; bolaí, bonéne na bosándá bikokání.
Reve LinVB 21:17  Na nsima amekí bolaí bwa lopángo : mabóko monkámá na ntúkú ínei ; ǎnzelú amekí yangó sé lokóla bakosálaka yangó.
Reve LinVB 21:18  Lopángo loye lotóngámí na yáspe, engu­mbá sé wólo na wólo ezalákí kongenge lokóla mangéngéngé.
Reve LinVB 21:19  Mabángá manéne ma nsé ma lopángo makémbámí na mabángá ma motúya ndéngé na ndéngé : libángá lya libosó yáspe, lya mábalé safíro, lya másáto kalsedwáni, lya mánei smarágda,
Reve LinVB 21:20  lya mátáno sardoníki, lya motóbá kornalína, lya nsambo krizolíta, lya mwambe beríli, lya libwǎ topáze, lya zómi krizopáze, lya zómi na lyŏ kó yasínti, lya zómi na mábalé ametísto.
Reve LinVB 21:21  Bizibeli zómi na bíbalé bizalákí mayaka zómi na mábalé : ezibeli yŏ kó liyaka lyŏ kó, ezibeli yŏ kó liyaka lyŏ kó. Balabála ya engumbá sé wólo na wólo, ezalákí kongenge lokóla mangéngé­ngé ma péto.
Reve LinVB 21:22  O engumbá eye namóní Témpelo té, mpô témpelo ya yangó, sé yě mŏ kó Mokonzi Nzámbe wa bokási bónso, bangó na Mwâ-Mpatá.
Reve LinVB 21:23  Engumbá eye esengélí na bongengi bwa mwésé tŏ bwa sánzá té, zambí nkémbo ya Nzámbe ekotánelaka yangó, mwínda mwa yangó sé Mwâ-Mpatá.
Reve LinVB 21:24  Bato ba bi­kólo bínso bakolanda sé mwínda môná, bakonzi ba nsé bakoyâ ko­bo­nzela engumbá eye nkita ya bangó.
Reve LinVB 21:25  Bizibeli bya engu­mbá bikotíkala polélé mokolo mobimba, zambí kúná butú bozalí té.
Reve LinVB 21:26  Engu­mbá eye ekozwa nkita na lokúmu ya bikólo bínso.
Reve LinVB 21:27  Elóko mbindo atâ yŏ kó té ekoyíngela o engu­mbá eye ; sé bôngó bato bakosálaka makambo ma nsómo mpé bato ba lokutá. Bobélé bato baye nkómbó ya bangó ikomámí o búku ya bomoi bwa Mwâ-Mpatá bakokí koyíngela wâná.
Chapter 22
Reve LinVB 22:1  Na nsima Anzelú alakísí ngáí ebale ya Mái ma Bomoi, mái sángisángi lokóla mangé­ngéngé. Líziba lya yangó, sé ngwendé ya Nzámbe mpé ya Mwâ-Mpatá.
Reve LinVB 22:2  Ebale ezalákí kokátisa engu­mbá. O ngámbo ínso íbalé nzeté ya bomoi izalákí ; na mbúla yŏ kó ikobótaka mbuma mbala zómi na íbalé, mbala yŏ kó na sánzá yŏkó yŏ kó. Nkásá ya nzeté iye izalí na ngúyá ya kobíkisa bapagáno.
Reve LinVB 22:3  Kúná bakotómbela moto mŏ kó lisúsu mabé té. Ngwendé ya Nzámbe mpé ya Mwâ-Mpatá ekozala o engu­mbá, mpé basáleli ba Nzámbe bakokúmbamela yě.
Reve LinVB 22:4  Bakomóno elongi ya yě, mpé nkómbó ya yě ekokomama o bilongi bya bangó.
Reve LinVB 22:5  Kúná butú bokozala lisúsu té, bato bakosengela na mwínda tŏ na mwésé té, zambí Mokonzi Nzámbe akotánela bangó, bakoyángela o bileko na bileko.
Reve LinVB 22:6  Nsima Anzelú alobí na ngáí : « Maloba maye mazalí maloba ma bosôló, mazalí na ntembe sókí té. Mokonzi Nzámbe, óyo akolakisaka baproféta bóníbóní basengélí kosakola, atíndí Anzelú álakisa basáleli maye mase­ngélí kosálema nokí.
Reve LinVB 22:7  Tálá, etíkálí moké náyâ ! Esengo na moto akotósa maloba maye proféta akomí o búku eye. »
Reve LinVB 22:8  Ngáí Yoáne, namóní mpé nayókí mambí mâná mánso. Awa nayókí maloba lisúsu té mpé namóní mamóní lisúsu té, nakwéí o bosó bwa Anzelú mpô ’te nákúmbamela yě.
Reve LinVB 22:9  Kasi alobí na ngáí : « Té, ósála bôngó té ! Nazalí sé mosáleli lokóla yŏ, lokóla bandeko ba yŏ baproféta, mpé lokóla bato bakotósaka maloba ma búku eye. Okúmbamela bobélé Nzámbe. »
Reve LinVB 22:10  Alobí na ngáí lisúsu : « Maloba makomámí o búku eye, óbómba mangó té, zambí Elaká ekómí penepene.
Reve LinVB 22:11  Mosúmuki ákóba kosála masúmu ; moto mbindo ákóba komíkómisa mbindo. Moto malámu ákóba kosála malámu, mosántu álénda o bosántu bwa yě.
Reve LinVB 22:12  Tálá, etíkálí moké náyâ. Nakoyêla bínó lifúta, nakofúta moto na moto engé­béné na mosálá asálí.
Reve LinVB 22:13  Ngáí nazalí Alfa na Omega, wa-Libosó mpé wa-Nsúka, Libandela mpé Nsúka.
Reve LinVB 22:14  Esengo na bato bakosukola bilambá bya bangó, bangó bako­koka kobeleme na nzeté ya Bomoi, koleka o bizibeli mpé koyíngela o Engumbá.
Reve LinVB 22:15  Kasi basúsu bakotíkala o libándá : (bato bakómí lokóla) mbwá, bato ba líkundú, ba-bosóni, babomi, baye bakokúmisaka bikeko ná baye bánso bakosepelaka na maloba mpé na bikelá bya lokutá ! »
Reve LinVB 22:16  Ngáí, Yézu, natíndí Anzelú wa ngáí áyébisa bínó maloba ma mibó­mbamo mitálí bato ba Biklézya. Ngáí, Ebóto wa libótá lya Davídi, mpé monzóto moye mokongengeke na ntóngó.
Reve LinVB 22:17  Elímo ná mpé Bolóngani balobí : « Yáká ! » Moto ayókí yangó, áloba mpé : « Yáká ! » Moto ayókí mpósá ya mái, ábeleme ; moto alingí, ámele mái ma Bomoi, akofúta té.
Reve LinVB 22:18  Nayébísí moto nyónso ayókí maloba ma mibómbamo makomámí o búku eye : « Sókó moto mŏ kó abakísí maloba masúsu, Nzámbe akoyókisa yě malózí mánso makomámí o búku eye !
Reve LinVB 22:19  Sókó moto alongólí maloba masúsu o maloba ma mibómbamo makomámí o búku eye, Nzámbe akobótolo yě likabo lya yě lya nzeté ya Bomoi mpé lya Engumbá esántu, biye bilakísámí o búku eye ! »
Reve LinVB 22:20  Moto ayébísí bosôló bwa maye mánso, alobí : « Sôló, etíkálí moké náyâ ! » Amen, yáká Mokonzi Yézu !
Reve LinVB 22:21  Ngrásya ya Mokonzi Yézu ézala na bínó bánso ! Amen.