Chapter 1
| Judi | LinVB | 1:1 | Ezalaki o mobu mwa zomi na mibale mwa bokonzi bwa Nabukodonozor o ekolo Asur o engumba enene Ninive, o eleko Arfaksad azalaki mokonzi wa ba-Medi o Ekbatane. | |
| Judi | LinVB | 1:2 | Arfaksad azingaki engumba eye na lopango, atongaki yango na mabanga manene mpenza, bonene maboko masato, bolai maboko motoba. Bosanda bwa lopango maboko ntuku nsambo mpe bonene maboko ntuku itano. | |
| Judi | LinVB | 1:3 | Likolo lya bizibeli bya mboka atongaki manongi, bolai maboko monkama ; atiaki wana mabanga ma nse bonene maboko ntuku motoba. | |
| Judi | LinVB | 1:4 | Bizibeli bya mboka bizalaki bolai maboko ntuku nsambo mpe bonene maboko ntuku inei, mpo ’te basoda bakoka kobima malamu, baye batamboli na makolo bakoka kobima milongo milongo. | |
| Judi | LinVB | 1:5 | O eleko ena Mokonzi Nabukodonozor akei kobundisa mokonzi Arfaksad o esobe enene, o mokili mwa Ragau. | |
| Judi | LinVB | 1:6 | Baye bandimi kobunda na ye elongo : bato bazali penepene na ebale Efrate, Tigris mpe Idaspe, na bato ba esobe ya Elemes, esika Ariok azalaki mokonzi. Mpe bongo bato ebele bayei kosangana mpo ’te babunda elongo na bana ba Keleud. | |
| Judi | LinVB | 1:7 | Nabukodonozor, mokonzi wa Asur, atindi monkanda na bato ba Persi, na baye bazalaki o Westi ya mokili mwa Silisia, ya Damasko, ya Libano, | |
| Judi | LinVB | 1:8 | na baye banso bazalaki o Karmel, o Galaad, o Galilea epai ya likolo, o esobe ya Esdrelon, | |
| Judi | LinVB | 1:9 | na bato ba Samaria mpe ba bingumba bya penepene, na baye bazalaki o ngambo ya Yordane tee Yeruzalem, Batanea, Kelous, Kades tee ebale ya Ezipeti, Tafnes, Ramses mpe mokili mobimba mwa Gesen, | |
| Judi | LinVB | 1:11 | Kasi bato banso ba mokili mobimba batali monkanda mwa Nabukodonozor, mokonzi wa Asur, se mpamba, baboyi kosangana na ye mpo ya kobunda na ye elongo. Babangi ye te, mpo bakanisi ’te bato banso batiki ye, bazongisi bantoma se maboko mpamba mpe na nsoni mingi. | |
| Judi | LinVB | 1:12 | Yango wana Nabukodonozor ayokeli bango banso nkanda. Alayi ndai o nkombo ya ngwende ya ye mpe ya mokili mwa ye ’te akozongisela bango mabe ; akosilisa mikili mya Silisia, Damasko mpe Siria na mopanga, akosilisa mpe bato ba Moab, Amon, Udea na Ezipeti tee ndelo ya mbu ibale. | |
| Judi | LinVB | 1:13 | O mobu mwa zomi na nsambo mwa bokonzi bwa ye, akei na limpinga linene kobundisa mokonzi Arfaksad ; alongi ye, akweisi limpinga lya basoda ba ye, na farasa na makalo ma ye. | |
| Judi | LinVB | 1:14 | Abotoli bingumba bya ye mpe akomi o Ekbatane. Kuna abotoli manongi, abebisi mboka mpe ayibi biloko binso ; bisika bizalaki na lokumu liboso, bitikali na nsoni. | |
| Judi | LinVB | 1:15 | Arfaksad akimaki o ngomba ya Ragau, kasi Nabukodonozor akangi ye mpe atuboli ye na likongo, asukisi bongo bokonzi bwa ye seko. | |
Chapter 2
| Judi | LinVB | 2:1 | O mobu mwa zomi na mwambe mwa bokonzi bwa ye, o sanza ya yambo, o mokolo mwa ntuku ibale na mibale, nsango epalangani o ndako ya mokonzi ’te Nabukodonozor, mokonzi wa Asur, akobekola o mokili mobimba lokola alobaki. | |
| Judi | LinVB | 2:2 | Abengi bankumu na bakomanda ba ye, asangani likita lya bango na bonkutu. Ye moko akani na monoko mwa ye ’te akobebisa mokili mobimba nye. | |
| Judi | LinVB | 2:4 | Esili likita, Nabukodonozor, mokonzi wa Asur, abengi Oloferne, moyangeli wa basoda ba ye banso mpe moto wa yambo nsima ya ye, alobi na ye : | |
| Judi | LinVB | 2:5 | « Yoka maloba ma ngai, mokonzi monene, nkolo wa mokili mobimba. Kende, kamata elongo na yo basoda ba mpiko baike, basoda ba makolo nkoto monkama na ntuku ibale, na mpe farasa ebele na basoda ba farasa nkoto zomi na ibale. | |
| Judi | LinVB | 2:6 | Na nsima kende kobunda na bato epai ya Westi ; mpamba te, baboyaki kotosa maloba ma ngai. | |
| Judi | LinVB | 2:7 | Otinda bango bameme mabelé na mai, zambi nakobimela bango na nkanda enene ; basoda ba ngai bakonyata mokili mwa bango na makolo mpe bakobebisa mwango. | |
| Judi | LinVB | 2:8 | Ma-bwaku makotonda na bato bazoki o bitumba ; miluka na mingala minso mikotonda na bibembe bya bango. | |
| Judi | LinVB | 2:10 | Bongo kende, botolo mokili mwa bango mobimba, mokoma mwa ngai. Soko bamikabi na yo, okozila ngai kin’o mokolo nakoya kotumbola bango. | |
| Judi | LinVB | 2:11 | Baye balingi kotosa te, tala bango na miso makasi, mawa te. Boma bango, yiba biloko bya bango binso o mokili moye mobimba natii yo mokonzi. | |
| Judi | LinVB | 2:12 | Nalayi na bomoi bwa ngai mpe na bokasi bwa bokonzi bwa ngai, nakosala manso lokola nalobi. | |
| Judi | LinVB | 2:13 | Yo nde oboya likambo lyoko lya ngai mokonzi wa yo te, kasi sala manso se lokola natindi yo, sala noki. » | |
| Judi | LinVB | 2:14 | Awa Oloferne abimi o ndako ya mokonzi, abengi bankumu, bakonzi na bayangeli ba basoda ba Asur banso. | |
| Judi | LinVB | 2:15 | Na nsima aponi basoda ba mpiko se lokola mokonzi atindaki ; azwi basoda nkoto monkama na ntuku ibale, bakisa bato ba farasa nkoto zomi na ibale, banso bazalaki na litimbo o maboko. | |
| Judi | LinVB | 2:17 | Na nsima akamati kamela, farasa na mpunda ebele mpenza mpo ya kokumba biloko, na mpe mpata, ngombe na ntaba mpo ya koleisa basoda. | |
| Judi | LinVB | 2:18 | Moto na moto azwi biloko bya kolia mingi, na mosolo moike mwa sanduku ya mokonzi, mosolo mwa wolo mpe mwa palata. | |
| Judi | LinVB | 2:19 | Na nsima akei elongo na basoda ba ye banso kobunela mokonzi Nabukodonozor etumba ; alingi atondisa mokili mobimba epai ya libongo lya mbu na makalo, na bato ba farasa mpe na basoda ba ye ba mpiko. | |
| Judi | LinVB | 2:20 | Bato basusu mingi mpenza balandi bango, ebele lokola mapalela to lokola mbuma ya zelo ; moto moko akoki kotanga bango te. | |
| Judi | LinVB | 2:21 | Bongo batiki Ninive mpe bata-mboli mikolo misato o nzela ya esobe ya Bektilet. Longwa Bektilet bakei kopika nganda pene na ngomba o loboko la mwasi la Silisia. | |
| Judi | LinVB | 2:22 | Longwa kuna, Oloferne akei epai ya ngomba, na basoda banso elongo, baye ba makolo, ba farasa mpe ba makalo. | |
| Judi | LinVB | 2:23 | Alongi Pud na Lud, akangi bato ba Rasis na bana ba Ismael, baye bafandi pene na eliki o Sudi ya Keleon. | |
| Judi | LinVB | 2:24 | Akatisi ebale Efrate na mpe mokili mwa Mesopotamia, abebisi bibombamelo binso bitongamaki pene na mongala Abrona tee mbu enene. | |
| Judi | LinVB | 2:25 | Na nsima abotoli mokili mwa Silisia, abomi bato banso bameki kobundisa ye. Akomi bongo o mokili mwa Yafet, epai ya Sudi, penepene na Arabu. | |
| Judi | LinVB | 2:26 | Azingi mokili mobimba mwa ba-Madian, atumbi nganda ya bango mpe ayibi bibwele bya bango binso. | |
| Judi | LinVB | 2:27 | Ekomi eleko ya bobuki mbuma, akei o esobe ya Damasko, atumbi bilanga bya bango binso, abomi ngombe na bibwele bya bango binso, ayibi biloko binso o mboka mpe o bilanga bya bango, abomi bilenge babali banso na mopanga. | |
Chapter 3
| Judi | LinVB | 3:2 | Balobi : « Tala, biso tozali o maboko ma yo, tozali basaleli ba mokonzi monene Nabukodonozor. Sala biso lokola olingi. | |
| Judi | LinVB | 3:3 | Esobe ya biso esika tokoleisa ngombe ya biso, bilanga bya biso na mpe mokili mwa biso mobimba, ngombe na bibwele bya biso, mapango ma biso manso mazali o maboko ma yo. Sala na yango lokola olingi. | |
| Judi | LinVB | 3:4 | O mboka ya biso bato banso bazali baombo ba yo. Okoki koya mpe kosala manso olingi. » | |
| Judi | LinVB | 3:6 | Na nsima akei na basoda ba ye epai ya mbu, atiki basoda basusu o bingumba binso mpe aponi bato mpo ’te basalisa ye na mosala mwa soda. | |
| Judi | LinVB | 3:7 | O mokili mona bato banso bayambi ye na esengo, balati binkoti bya eyenga o mitó, babini mabina mpe babeti mbonda. | |
| Judi | LinVB | 3:8 | Nzokande abebisi ndako ya bango ya losambo, mpe akati makonzi ma bikeko bya bango. Asali bongo mpo batindaki ye ’te aboma banzambe banso o mokili mpo ’te bato banso bakumisa se Nabukodonozor ye moko. Bato banso, bazala na lokota nini, bauta ata o ekolo nini, babelela ye lokola nzambe wa bango. | |
| Judi | LinVB | 3:9 | Akomi bongo o liboso lya Esdrelon, pene na Dotaia, penepene na ngomba enene ya Yudea ; | |
Chapter 4
| Judi | LinVB | 4:1 | Ba-Israel bafandi o Yudea bayoki makambo manso Oloferne, komanda wa basoda ba Nabukodonozor, mokonzi wa Asur, asalaki o bikolo bisusu, boniboni abebisaki tempelo ya bango inso mpe ayibaki biloko bisantu bya bango. | |
| Judi | LinVB | 4:2 | Awa akomi penepene bayoki motema nsomo mpe babangi mpenza mpo ya Yeruzalem mpe mpo ya Tempelo ya Mokonzi Nzambe wa bango. | |
| Judi | LinVB | 4:3 | Mpamba te, bauti o boombo bobele sika mpe bato banso ba Yudea bazongi o mokili mwa bango bapetolaki biloko bisantu, altare mpe Tempelo. | |
| Judi | LinVB | 4:4 | Batindi bato bakebisa mokili mwa Samaria, Kona, Beteron, Belmayin, Yeriko, Koba, Esora mpe lobwaku la Salem. | |
| Judi | LinVB | 4:5 | Bakei kofanda o ngomba inene inso, batiki basoda o bituka binso. Babombi biloko bya kolia mpo ya ntango ya etumba, zambi ezalaki eleko basili kobuka mbuma ya bilanga. | |
| Judi | LinVB | 4:6 | Yoyakim azalaki nganga Nzambe mokonzi o Yeruzalem. Atindi monkanda na bato ba Betulia mpe ba Betomestaim, pene na Esdrelon epai ya esobe ya Dotain. | |
| Judi | LinVB | 4:7 | Atindi bango batia basoda o nsonge ya ngomba, bakengele bongo nzela ekokende o Yudea. Nzela ena ezalaki nkaka mingi, bato bakoki koleka se babale babale, bongo kokangela nzela banguna ezalaki mpasi te. | |
| Judi | LinVB | 4:8 | Ba-Israel basali lokola nganga Nzambe mokonzi Yoyakim na Likita lya bakolo ba Yeruzalem batindaki. | |
| Judi | LinVB | 4:10 | Babali banso, basi ba bango, bana ba bango, bibwele bya bango, bampaya banso bazalaki na bango, basali na baombo, banso bakangi ngoto o loketo. | |
| Judi | LinVB | 4:11 | Ba-Israel banso baye bazalaki o Yeruzalem, ná basi ná bana, bamibwaki o mabelé o boso bwa Tempelo ; bapakoli mputulu o motó, batandi maboko mpo ’te babondela Mokonzi. | |
| Judi | LinVB | 4:12 | Bazipi altare na ngoto, mpe na migango makasi babeleli Nzambe wa Israel monoko moko, babondeli ye ’te banguna baya koyiba bana ba bango te, babebisa basi ba bango te, baboma bingumba bya bango te, basantola mpe basambwisa Tempelo te. | |
| Judi | LinVB | 4:13 | Nzambe ayoki lolaka la bango mpe amoni mpasi ya bango. Bango bakobi kolala nzala mwa mikolo mingi o mokili mobimba mwa Yudea mpe o Yeruzalem ; basali bongo o boso bwa esika esantu ya Mokonzi wa bokasi bonso. | |
| Judi | LinVB | 4:14 | Yoyakim, nganga Nzambe mokonzi, banganga Nzambe banso na basaleli banso ba Mokonzi, ngoto o loketo, bazalaki kobonza mabonza ntango inso, maye bato bapesaki o nkombo ya bango moko. | |
Chapter 5
| Judi | LinVB | 5:1 | Bayebisi Oloferne, komanda wa basoda ba Asur, ’te ba-Israel bazalaki komilengele mpo ya etumba. Balobi ’te ba-Israel bakangi nzela o kati ya ngomba, batii basoda o nsonge ya ngomba, batii mpe mitambo o esobe. | |
| Judi | LinVB | 5:2 | Oloferne ayoki nkanda enene, abengi bankumu banso ba Moab, bakomanda banso ba Amon, na bakonzi ba mikili penepene na mbu. | |
| Judi | LinVB | 5:3 | Alobi na bango : « Bino bato ba Kanana, boyebisa ngai : Bato bafandi kuna o kati ya ngomba banani ? Mboka ya bango izali boni ? Bazali na basoda boni ? Bokasi bwa bango bouti wapi ? Mokonzi akoyangela basoda ba bango, ye nde nani ? | |
| Judi | LinVB | 5:4 | Mpo nini baboyi koyamba ngai lokola bato ba bikolo bisusu bya Westi bayambaki ngai ? » | |
| Judi | LinVB | 5:5 | Akior, mokonzi wa ba-Amon, azongiseli ye : « E Mokonzi, nabondeli yo, yoka maloba ma ngai mosaleli wa yo. Nakoloba na yo se likambo lya solo mpo ya bato bafandi o ngomba, baye bakomi pene na yo. Liloba lyoko lya lokuta likobima o monoko mwa ngai mosaleli wa yo te. | |
| Judi | LinVB | 5:7 | Bakendeki kofanda o Mesopotamia, mpo baboyaki kolanda banzambe ba batata ba bango, baye bazalaki o Kaldea. | |
| Judi | LinVB | 5:8 | Batiki kolanda mimeseno mya bankoko ba bango mpe bakumisi Nzambe wa likolo, Nzambe se moko oyo bango bandimi. Ba-Kaldea babengani bango o mokili mwa banzambe ba bango ; yango wana bakimi ; bakei o Mesopotamia esika bafandi mbula ebele. | |
| Judi | LinVB | 5:9 | Nzambe wa bango ayebisi bango ’te balongwa o mokili mona mpe bakende o mokili mwa Kanana ; yango wana bakei kopasola mboka kuna, bazwi wolo na palata na ngombe ebele. | |
| Judi | LinVB | 5:10 | Na nsima bakei o Ezipeti, mpo nzala enene engalaki o mokili mwa Kanana ; batikali kuna tee bazalaki naino kozwa biloko bya kolia ; bongo bakomi ekolo enene, moto moko akoki kotanga bango lisusu te. | |
| Judi | LinVB | 5:11 | Kasi mokonzi wa Ezipeti asilikeli bango, asali bango mayele, apesi bango mosala mwa kobete biliki mpo ’te bakoma baombo ba ye. | |
| Judi | LinVB | 5:12 | Babeleli Nzambe wa bango. Nzambe ayokisi mokili mobimba mwa Ezipeti mpasi ndenge na ndenge, iye bakokaki kokima te. Ba-Ezipeti babengani bango mosika. | |
| Judi | LinVB | 5:14 | akambi bango o nzela ya Sinai mpe ya Kades-Barne. Bakimisi bato banso bafandaki o eliki. | |
| Judi | LinVB | 5:15 | Bayei kopasola mboka o mokili mwa ba-Amor ; na mpiko enene babomi bato banso ba Kesbon. Na nsima bakatisi Yordane, babotoli mokili mobimba mwa ngomba. | |
| Judi | LinVB | 5:16 | Babengani bato bafandaki kuna : ba-Kanana, ba-Perizi, ba-Yebus, ba-Sikem na ba-Girgas ; bafandi kuna mikolo ebele. | |
| Judi | LinVB | 5:17 | Mikolo bazalaki kosala masumu te o miso ma Nzambe wa bango, makambo manso mazalaki kotambola malamu, mpo Nzambe wa bango ayini makambo mazangi bosembo. | |
| Judi | LinVB | 5:18 | Kasi mbala inso, soko batiki nzela eye Nzambe alakisi bango, bazalaki kokufa ebele o bitumba to bazalaki kokangema baombo o ekolo esusu mosika. Banguna babebisi Tempelo ya Nzambe wa bango mpe babotoli bingumba bya bango. | |
| Judi | LinVB | 5:19 | Kasi sikawa bazongeli lisusu Nzambe wa bango ; yango wana bazongi ut’o bikolo esika bapanzanaki o ekolo ya bango. Bayei o Yeruzalem esika Tempelo ya bango ezali, mpe batongi mboka o bisika bya ngomba, mpo bato bazalaki wana lisusu te. | |
| Judi | LinVB | 5:20 | Bongo, yo nkumu mpe mokonzi wa ngai, soko bato bana babungi to basali lisumu o miso ma Nzambe wa bango, mpe soko tomoni ’te bango basali mabe, biso tokokende kobundisa bango. | |
| Judi | LinVB | 5:21 | Kasi soko basali likambo lyoko te, ebongi yo mokonzi wa ngai, otika kobunda na bango, mpo Mokonzi Nzambe wa bango akobatela bango. Soki bongo te, bato banso ba mokili bakoseke biso. » | |
| Judi | LinVB | 5:22 | Esilisi Akior koloba bongo, bato baye bazingi ema babandi kotomboko. Bayangeli ba Oloferne na bato banso ba ekolo penepene na mbu mpe ba-Moab balingi kobete Akior, | |
| Judi | LinVB | 5:23 | balobi : « Tobanga ba-Israel ntina nini ? Bazangi bokasi ; soko etumba engali, bakoki kobika soki moke te. | |
Chapter 6
| Judi | LinVB | 6:1 | Esili makeléle ma bato bayaki kotonda penepene na bato ba Likita, Oloferne, komanda monene wa basoda ba Asur, afingi Akior o miso ma bampaya mpe ma ba-Moab banso, | |
| Judi | LinVB | 6:2 | alobi : « Yo nde nani, Akior na bangamba ba Efraim ? Solo, obangi te koloba likambo lokola olobi sikawa ? Okebisi biso ’te tobunda na ekolo Israel te, mpo Nzambe wa bango akobatela bango ! Nani azali nzambe soko Nabukodonozor te ? Ye moto akotinda basoda ba ye mpe akosilisa ba-Israel ; Nzambe wa bango akobikisa bango te. | |
| Judi | LinVB | 6:3 | Kasi biso, bato ba Nabukodonozor, tokonyata bango lokola moto moko mpamba. Bakokoka na bokasi bwa farasa ya biso te. | |
| Judi | LinVB | 6:4 | Tokotumba bango na móto kilikili. Ngomba ya bango ikomele makila ma bango, mpe bisobe bya bango bikotonda na bibembe. Mokonzi wa nse mobimba Nabukodonozor alobi ’te bakokoka biso soki moke te, banso bakokufa, banda moto wa yambo tee moto wa nsuka. Ye alobi bongo, mpe alobi yango mpamba te. | |
| Judi | LinVB | 6:5 | Yo Akior, mongamba wa ba-Amon, maloba outi koloba makobongela yo soki moke te ; banda lelo okobima o miso ma ngai lisusu te, liboso ’te nasukisa bato baye bakimaki mokili mwa Ezipeti, lokola nakaneli bango. | |
| Judi | LinVB | 6:6 | Mokolo mona likongo lya basoda ba ngai ná mopanga mwa bayangeli ba ngai bikotubola yo mopanzi. Ntango nakobimela ba-Yuda, okokufa bobele lokola bato bakwei o etumba. | |
| Judi | LinVB | 6:7 | Sikawa basaleli ba ngai bakokamba yo o mokili mwa ngomba mpe bakotika yo o engumba pene na lobwaku. | |
| Judi | LinVB | 6:9 | Yo moto ozali na elikya ’te tokoki kobotolo bingumba bya bango te, bongo olakisa elongi ya mawa te. Awa nalobi bongo, nakokokisa makambo manso nalobi. » | |
| Judi | LinVB | 6:10 | Oloferne atindi bato bakosalaka o ema ya ye ’te bakanga Akior, bakende na ye o Betulia mpe bakaba ye o maboko ma ba-Israel. | |
| Judi | LinVB | 6:11 | Basaleli bakangi ye, babimisi ye o nganda, bakatisi esobe mpe balandi nzela ya ngomba : bakomi o esika ya maziba pene na Betulia. | |
| Judi | LinVB | 6:12 | Bato ba Betulia o nsonge ya ngomba, bamoni banguna ; yango wana bakamati bibuneli bya bango, babimi o engumba mpe bakei o nsonge ya ngomba ; baye bazalaki na bilingongo o maboko babwakeli banguna mabanga mpo ’te bapekisa bango kobuta ngomba. | |
| Judi | LinVB | 6:13 | Banguna bapusani pene na ngomba, bakangi Akior na nsinga mpe batiki ye alali wana pene na ngomba ; bango moko bazongi epai ya mokonzi wa bango. | |
| Judi | LinVB | 6:14 | Ba-Israel babimi o engumba, bakomi epai ya ye. Bafungoli nsinga mpe bakei na ye o Betulia, bakambi ye o miso ma bakonzi. | |
| Judi | LinVB | 6:15 | Ezalaki bongo : Ozia, mwana wa Mikea wa libota lya Simeon, Kabris mwana wa Gotoniel, na Karmis mwana wa Melkiel. | |
| Judi | LinVB | 6:16 | Bango babengi bakolo ba mboka banso ; bilenge na basi banso bayei o likita. Ozia atuni Akior mpo ya makambo makwelaki ye. Ye atelemi o kati ya bato. | |
| Judi | LinVB | 6:17 | Ayanoli bango, ayebisi bango mikano minso mya likita lya Oloferne, na maloba manso ye moko alobaki o miso ma bankumu ba Asur, na mpe maloba manso ma lolendo Oloferne abimisaki mpo ya kokanela ekolo Israel. | |
| Judi | LinVB | 6:19 | « E Mokonzi, Nzambe wa likolo, talaka lolendo la bato baye, oyokela libota lya yo mawa, bato ba yo basambwi mingi. Tala lelo bato baye bamikabi na yo. » | |
Chapter 7
| Judi | LinVB | 7:1 | Mokolo mwa nsima, Oloferne atindi basoda ba ye banso na mpe basoda ba bikolo biye bandimaki kosalisa ye, ’te babima o nganda mpe bakende kobundisa Betulia, bakanga nzela ekoleka o kati ya ngomba mpe babunda na ba-Israel. | |
| Judi | LinVB | 7:2 | Mokolo mona basoda banso bamilengeli mpo ya etumba. Limpinga lya basoda lizalaki boye : bato ba makolo nkoto monkama na ntuku nsambo, basoda ba farasa nkoto zomi na ibale, bakisa baye bazalaki komeme biloko mpe bato ba makolo basusu mingi mpenza. | |
| Judi | LinVB | 7:3 | Bakiti o lobwaku penepene na Betulia o nzela ya liziba, mpe batandani milongo, ut’o Dotain kin’o Belbain, mpe banda Betulia tee Kiamon, o ndelo ya esobe ya Esdrelon. | |
| Judi | LinVB | 7:4 | Emoni ba-Israel bato ebele boye, bayoki nsomo mingi, balobani : « Sikawa bakonyata mokili mobimba. Eloko yoko ekoki kopekisa bango lisusu te, ata ngomba enene, ata lobwaku bozindo, ata ngomba eke. » | |
| Judi | LinVB | 7:5 | Moko moko akamati bibuneli bya ye, bapelisi móto likolo lya manongi mabale, mpe butu mobimba bakengeli engumba ya bango. | |
| Judi | LinVB | 7:6 | Mokolo mwa mibale, Oloferne atindi basoda ba ye ba farasa bapusana penepene na ba-Israel bazalaki o Betulia. | |
| Judi | LinVB | 7:7 | Aluki koyeba nzela inso ikokoma o engumba ya bango, atali bisika binso libulu lya mai lizalaki, atii basoda o bisika bina bakengele byango, na nsima azongi epai ya bato ba ye. | |
| Judi | LinVB | 7:8 | Bakonzi banso ba ekolo ya Ezau, bakomanda ba ekolo Moab, bayangeli ba mokili penepene na mbu enene, bayei epai ya ye mpe balobi na ye : | |
| Judi | LinVB | 7:10 | Bato ba Israel bazalaki kotia elikya mpenza na makongo ma bango te, kasi na bosanda bwa ngomba, esika bafandi. Solo, kobuta tee o nsonge ya ngomba ya bango ezali mpasi mpenza. | |
| Judi | LinVB | 7:11 | Yango wana, mokonzi, otinda basoda milongo milongo te, bongo soda wa yo ata moko akokufa te. | |
| Judi | LinVB | 7:12 | Tikala o nganda mpe bomba basoda ba yo kuna ; basoda ba yo babotolo bobele liziba lya mai pene na ngomba, | |
| Judi | LinVB | 7:13 | mpo bato ba Betulia bakozwaka mai ma bomeli se wana. Bakokufa na mposa ya mai ; bongo bakomipesa o maboko ma yo. O ntango ena tokotinda bato ba biso babuta ngomba izali penepene mpe batikala wana ; bongo moto moko akoka kobima o engumba ya bango te. | |
| Judi | LinVB | 7:14 | Nzala ekosukisa bango, ná basi ná bana ba bango ; mpe ata mopanga mobeti bango naino te, bibembe bya bango bikolala o balabala ya bango. | |
| Judi | LinVB | 7:15 | Bongo nde opesi bango etumbu enene, mpo batomboki mpe baboyi koyamba yo na boboto. » | |
| Judi | LinVB | 7:16 | Maloba ma bango masepelisi Oloferne na bakomanda banso ; yango wana Oloferne atindi ’te esalema se lokola bango balobaki. | |
| Judi | LinVB | 7:17 | Basoda ba Moab balongwi wana elongo na ba-Asur nkoto itano. Bakiti o lobwaku mpe babotoli mabulu na maziba ma ba-Israel. | |
| Judi | LinVB | 7:18 | O ntango ena ba-Edom na ba-Amon bakei kopika nganda o ngomba etalani na Dotain, batindi basoda basusu epai ya Sudi mpe epai ya Esti tee Egrebel, penepene na Kus mpe na moluka Mokmur. Basoda basusu ba Asur batikali o esobe, bato-ndani o ekolo mobimba. Batiaki biema na biloko bya bango o nganda enene. Bazalaki bato ebele mpenza. | |
| Judi | LinVB | 7:19 | Ba-Israel babeleli Mokonzi Nzambe wa bango. Bakomi kolembe, mpo banguna bazingi bango epai na epai mpe bakoki kokima te. | |
| Judi | LinVB | 7:20 | Mikolo ntuku isato na minei mobimba basoda ba Asur, basoda ba makolo, makalo na basoda ba farasa, bazingi bango. Bato ba Betulia bamoni ’te mai mabandi kosila o mbeki mpe o biloko bya bango binso. | |
| Judi | LinVB | 7:21 | O mabulu mai makomi mpe kosila. Ata mbala yoko te bakoki kosilisa mposa ya mai, mpo bazalaki kopesa bato sa mwa mai moke. | |
| Judi | LinVB | 7:22 | Bana bake balembi, bilenge babali na bilenge basi na bamama bakufi na mposa ya mai ; bazalaki kokweya o balabala mpe pene na bizibeli bya mboka ; bokasi bwa bango bosili nye. | |
| Judi | LinVB | 7:23 | Bato banso, bilenge, basi na bana bakei epai ya Ozia mpe bakonzi ba mboka, bagangi na boleli mpe balobi o miso ma bakolo ba mboka : | |
| Judi | LinVB | 7:24 | « Nzambe akata likambo lya biso ! Bino bosali biso mabe mpenza, awa boboyi koyokana na ba-Asur. | |
| Judi | LinVB | 7:25 | Sikawa ata moto moko te akoki kosalisa biso. Nzambe akabi biso o maboko ma bango mpo tokufa na mposa ya mai, mpe toyoka mpasi enene o miso ma bango. | |
| Judi | LinVB | 7:26 | Bobenga bango baya nokinoki. Botika mboka mobimba o maboko ma bato ba Oloferne mpe ma bato ba ye, bayiba biloko binso, likambo te. | |
| Judi | LinVB | 7:27 | Eleki malamu tokweya o maboko ma bango, kasi tokufa na mposa ya mai te. Ntembe te, tokokoma baombo ba bango, kasi tokobika mpe tokokufa te ; tokomono mpe liwa lya bana bake ba biso te, mpe boniboni basi na bana bazali kosila. | |
| Judi | LinVB | 7:28 | Tobondeli bino o nkombo ya Mokonzi wa likolo na nse, o Nkombo ya Nzambe wa biso, Mokonzi wa bankoko ba biso, oyo apesi biso etumbu mpo ya mabe ma biso, mpe mpo ya masumu ma bankoko ba biso ; bosala naino lelo lokola tosengi bino. » | |
| Judi | LinVB | 7:29 | O likita mobimba bato banso babandi kolela makasi mpe kobondela Nzambe na mongongo makasi. | |
| Judi | LinVB | 7:30 | Ozia alobi na bango : « Bandeko, Bolendisa mitema ; tosala naino makasi mikolo mitano. Nzambe akoyokela biso ngolu, akoki koboya biso seko te. | |
| Judi | LinVB | 7:31 | Soko mikolo mitano mikoki, mpe lisalisi lyoko limononi te, nakolanda maloba ma bino. » | |
Chapter 8
| Judi | LinVB | 8:1 | O mikolo mina Yudite ayoki makambo manso malekaki. Ye mwana wa Merari, mwana wa Okse, mwana wa Yozefu, mwana wa Oziel, mwana wa Elkia, mwana wa Anania, mwana wa Gedeon, mwana wa Rafen, mwana wa Akitub, mwana wa Elia, mwana wa Kilkia, mwana wa Eliab, mwana wa Natanael, mwana wa Salamiel, mwana wa Sarasade, mwana wa Israel. | |
| Judi | LinVB | 8:2 | Mobali wa ye Manase azalaki na ye mboka yoko mpe libota lyoko ; akufaki o eleko bazalaki kobuka mbuma ya mampa. | |
| Judi | LinVB | 8:3 | Azalaki kotala bato bazalaki kosangisa matiti o bilanga ; o ntango ena moi mobeti ye makasi ; akei kolala o mbeto, mpe akufi bobele o mboka ya ye Betulia ; bakundi ye o lilita pene na bilanga kati ya Dotain na Balamon. | |
| Judi | LinVB | 8:5 | O mokili mwa ndako ya ye abongisi eteni ya kofanda ; azalaki kolata se ngoto o loketo na mpili. | |
| Judi | LinVB | 8:6 | Banda akufeli mobali azalaki kolala nzala mikolo minso, longola se mikolo liboso lya Sabato mpe o mikolomei mya Sabato, mikolo liboso lya sanza ya sika mpe mikolomei mya sanza ya sika na mpe biyenga bisusu, lokola bameseni kosala o ekolo Israel. | |
| Judi | LinVB | 8:7 | Azalaki mwasi bonzenga na elongi kitoko. Mobali wa ye Manase atikelaki ye mosolo mingi, na wolo, na basali babali na basali basi, na nyama na bilanga. Yudite azalaki kofanda wana ye moko o kati ya biloko ebele. | |
| Judi | LinVB | 8:8 | Moto moko akokaki kopalela ye ata na likambo nini, mpo azalaki kobanga Nzambe mingi. | |
| Judi | LinVB | 8:9 | Ayoki ’te bato balembi, mpo mai makomi kozanga ; ayoki maloba mabe balobaki na mokonzi wa mboka. Ayebi mpe makambo manso Ozia alobaki na bango mpe boniboni alayelaki bango ’te nsima ya mikolo mitano akokaba engumba o maboko ma ba-Asur. | |
| Judi | LinVB | 8:10 | Yango wana atindi mosaleli mwasi, mokengeli wa biloko bya ye, akende kobenga bankumu ba mboka, Kabris na Karmis. | |
| Judi | LinVB | 8:11 | Yudite alobi na bakolo ba mboka : « Bino bayangeli ba Betulia, boyoka ngai : Lelo bosali mabe, mpo bolakeli bato mpe bolayeli Nzambe ndai o miso ma bato banso ’te bokotika engumba o maboko ma banguna soko Mokonzi akosalisa biso noki te. | |
| Judi | LinVB | 8:12 | Boni, bino nde banani ’te bomeka Nzambe o mokolo mwa lelo ? Boni, bino bato mpamba, bozali komeka koleka ye ? | |
| Judi | LinVB | 8:13 | Solo, bozali komeka Nzambe wa bokasi bonso ! Bokoyoka ntina ya likambo ata lyoko mokolo moko te ! | |
| Judi | LinVB | 8:14 | Bozali na mayele ma koyeba mitema mya bato te ; bokokoka nde koyeba ntina ya makanisi ma bango na mpe ntina ya makanisi ma Nzambe, oyo akelaki bikelamo bina binso ? Boniboni bokoyeba ntina ya mikano mya ye ? Te, bandeko, botika kotumola Mokonzi Nzambe wa biso. | |
| Judi | LinVB | 8:15 | Soko alingi kobikisa biso o mikolo miye mitano te, akoki kobikisa biso o ntango ye moko alingi, akoki mpe koboma biso banso o miso ma banguna ba biso. | |
| Judi | LinVB | 8:16 | Kasi bino, bokatela Mokonzi Nzambe wa biso mikolo te. Mbele azali na mokano mosusu. Bakokanelaka Nzambe te lokola bakokanelaka moto ; bakotunaka ye mpe te lokola bakotunaka moto. | |
| Judi | LinVB | 8:17 | Tozila bobele ye abikisa biso ; yango wana tokobondela ye aya kosalisa biso ; soko alingi, akoyokemela biso. | |
| Judi | LinVB | 8:18 | Ata liboso, ata nsima, o ekolo ya biso mobimba, o mabota ma biso, o mboka to bituka bya biso, moto moko te afukameli ekeko ya nzambe wa lokuta eye basali na maboko ma bato, lokola esalemaka kala. | |
| Judi | LinVB | 8:19 | Yango wana bankoko bakufaki na mopanga, banguna babotoloki bango biloko mpe bakweisaki bango. | |
| Judi | LinVB | 8:20 | Kasi biso toyebi Nzambe mosusu te, bobele Ye. Yango wana tokoki kolikya ’te akotala biso mpamba te, mpe akoboya biso, ekolo ya ye, te. | |
| Judi | LinVB | 8:21 | Soko balongi biso lokola bozali kokanisa, bakobotolo mokili mwa Yudea mobimba, bakoyiba biloko binso bya ndako esantu mpe tokofuta na makila ma biso, mpo babebisi mboka ya ye esantu. | |
| Judi | LinVB | 8:22 | Soko babomi bandeko ba biso, soko bakei na biso o boombo, soko babebisi ekolo ya biso, mabe maye makokwela biso. O bikolo bina esika tokoma o miso ma bakonzi ba biso ba sika, tokokoma lokola liseki mpe eloko ya nsoni. | |
| Judi | LinVB | 8:23 | Zambi misala mya biso mya boombo, mikosalisa te mpo ’te bakonzi ba sika bandima biso, kasi Mokonzi Nzambe akosambwisa biso. | |
| Judi | LinVB | 8:24 | Bongo, bandeko, tokende kobunela bandeko ba biso : se biso tokoki kobikisa bango, se biso tokoki kobatela esika esantu, ná Tempelo ná altare. | |
| Judi | LinVB | 8:25 | Na ntina ena totondo Mokonzi Nzambe wa biso, oyo ameki biso, lokola amekaki bankoko ba biso. | |
| Judi | LinVB | 8:26 | Bokanisa naino ndenge Nzambe asalaki Abarama, mpasi inso ayokisaki Izaka, na maye manso makwelaki Yakob o Mesopotamia o ekolo Siria ntango azalaki kokengele mpata ya noko wa ye Laban. | |
| Judi | LinVB | 8:27 | Nzambe atindelaki bango mpasi mpo ya komeka bango mitema. Se bongo, soko Nzambe abeti biso, asali bongo mpo ya kosala biso mabe te, kasi mpo ya kokebisa biso bandeko ba ye. » | |
| Judi | LinVB | 8:28 | Ozia azongiseli ye : « Makambo manso olobi sikawa, olobi mango na mayele solo, moto moko akoki koboya maloba ma yo te. | |
| Judi | LinVB | 8:29 | Bwanya bwa yo bomononi se lelo te. Ut’o bomwana bwa yo bato banso bamoni bwanya bwa yo mpe bayebi bolamu bwa motema mwa yo. | |
| Judi | LinVB | 8:30 | Kasi awa bato bakufi na mposa ya mai, basengisi biso ’te tosala se lokola tolakelaki bango : ndai tolayaki tokoki kobuka yango te. | |
| Judi | LinVB | 8:31 | Awa ozali mwasi akobangaka Nzambe, sambela ’te anokisa mbula enene, mabulu manso matonda na mai ; bongo mposa ya mai elembisa biso lisusu te. » | |
| Judi | LinVB | 8:32 | Yudite ayanoli : « Boyoka ngai malamu. Nakosala likambo lyoko ; bana na bankoko ba biso ndebasololi lyango o bileko na bileko. | |
| Judi | LinVB | 8:33 | Na butu boye, bino botikala kokengele ezibeli ya mboka, ngai nakobima elongo na mosaleli mwasi wa ngai. Ntembe te, liboso lya mikolo bokanaki kokaba engumba ya biso o maboko ma banguna, Mokonzi akosala Israel malamu na maboko ma ngai. | |
| Judi | LinVB | 8:34 | Bino boluka koyeba te nini nakosala. Nakoyebisa bino likambo lyoko te, nakoyebisa bino bobele nsima. » | |
| Judi | LinVB | 8:35 | Ozia na bankumu balobi na ye : « Kende na boboto, Mokonzi Nzambe akamba yo mpo ya kozongisela banguna mabe manso basalaki biso. » | |
Chapter 9
| Judi | LinVB | 9:1 | O ntango bazalaki kobonza mpaka ya malasi o Tempelo ya Yeruzalem, Yudite amibwaki o nse, apakoli mputulu o motó, alongoli ngoto eye alataki mpe na mongongo makasi abeleli Mokonzi Nzambe. Asambeli boye : | |
| Judi | LinVB | 9:2 | « Mokonzi, Nzambe wa tata wa ngai Simeoni, yo moto opesaki ye mopanga mpo ya koboma bauta, baye bafungolaki liputa lya ngondo mpo ya kobebisa ye, balongolaki ye bilamba mpo ya koyokisa ye nsoni, balalaki na ye mpo ya kosambwisa ye. Basalaki likambo liye, ata olobaki : « Moto moko asala lyango te. » | |
| Judi | LinVB | 9:3 | Yango wana ondimaki ’te baboma bakonzi ba bango ; mpo ya lokuta mpe bokosi bwa bango, mbeto ya bango ekomi esika ya makila ma nsoni. Opesaki baombo na bakonzi etumbu ndenge yoko, bakonzi baye bafandi o ngwende ya bango. | |
| Judi | LinVB | 9:4 | Ondimaki ’te banguna bayiba basi ba bango, batinda bilenge basi o boombo mpe bakabola biloko bya bango. Opesaki binso na bana ba yo ba bolingo, mpo batiaki mitema na bosaleli yo, babangaki kokomisa ekolo ya bango mbindo mpe babondelaki yo ’te osalisa bango. E Nzambe, yo Nzambe wa ngai, oyoka lolaka la ngai, mwasi bozenge, | |
| Judi | LinVB | 9:5 | mpo yo moto okosalaka makambo manso ma kala, ma lelo mpe maye makoya nsima, yo moto obongisi makambo ma sikawa na maye makoya ; manso okanaki kosala, osali mango. | |
| Judi | LinVB | 9:6 | Mpo inso okanaki kosala, isalemi, tomoni yango, mpo nzela ya yo inso izali na molongo, mpe okokataka makambo na bwanya. | |
| Judi | LinVB | 9:7 | Awa ba-Asur bayei kolakisa bokasi bwa bango, bamikumisi na farasa mpe na basoda ba bango, bamibeti ntolo mpo ya mpiko ya basoda ba bango. Batii elikya na likongo mpe na nguba ya bango, na litimbo mpe na bilingongo ; kasi bayebi te ’te yo Mokonzi okolongaka bitumba. | |
| Judi | LinVB | 9:8 | Nkombo ya Mokonzi ekoki se na yo ! Na nguya ya yo silisa bokasi bwa bango ; sukisa basoda ba bango na nkanda ya yo, mpo bakani kosantola bisika bya yo bisantu, balingi kobebisa ema eye ezali na nkombo ya yo mpe kobuka liseke lya altare ya yo na ebende. | |
| Judi | LinVB | 9:9 | Tala lofundo la bango, nkanda ya yo ekwela bango ; lendisa maboko ma ngai, mwasi bozenge. | |
| Judi | LinVB | 9:10 | Awa nalingi kokosa bango na maloba ma ngai, pesa moombo na mokonzi etumbu, boma mokonzi na mosali wa ye molongo moko, sukisa lolendo la bango na loboko la mwasi moko. | |
| Judi | LinVB | 9:11 | Nguya ya yo ekoutaka na boike bwa bato te to na bokasi bwa basoda te. Ozali Nzambe wa bato ba bosawa, yo mosalisi wa bato banyokwami, molendisi wa bato batau, ebombamelo ya baye bazangi mobateli, mpe mobikisi wa baye bazangi elikya. | |
| Judi | LinVB | 9:12 | Solo, yo Nzambe wa tata wa ngai, Nzambe wa ekolo Israel, yo Nkolo wa likolo na nse, yo Mokeli wa mai manso, yo Mokonzi wa bikelamo binso, oyoka losambo la ngai. | |
| Judi | LinVB | 9:13 | Opesa ngai maloba makosenginya bato, nazokisa mpe naboma, baye bakani kosala biso, bato ba ekolo ya yo, mabe, na ndako esantu ya yo, na ngomba Sion, na mpe ndako ya bana ba yo. | |
Chapter 10
| Judi | LinVB | 10:2 | atelemi mpe abengi mosaleli mwasi wa ye, akiti o mokili mwa nse, o eteni ya ndako eye ameseni kofanda o mikolo mya Sabato mpe mya eyenga. | |
| Judi | LinVB | 10:3 | Alongoli ngoto na bilamba bya mpili, asukoli nzoto na mai, na nsima apakoli mafuta ma nsolo mpimbo, asanoli nsuki, akangi litambala o motó mpe alati bilamba bya monzele, biye azalaki kolata o ntango mobali wa ye Manase azalaki na bomoi. | |
| Judi | LinVB | 10:4 | Alati mapapa o makolo, mayaka o nkingo, bikomo o maboko mpe mpete o misapi, biloko bya matoi na biloko bisusu bya motuya ; amibongisi bongo kitoko mpo ’te babali baye bakomono ye, balula ye. | |
| Judi | LinVB | 10:5 | Na nsima apesi mosaleli wa ye libenga lya vino na elokó ya mafuta, atondisi ekoló ya ye na fufu ya mampa, minkate milambami na mbuma ya kokauka, na mampa mpembe. Akangi yango o maboke mpe apesi yango na mosaleli mwasi wa ye. | |
| Judi | LinVB | 10:6 | Bakei o ezibeli ya Betulia. Bakuti Ozia wana elongo na bakolo babale, Kabris na Karmis. | |
| Judi | LinVB | 10:7 | Emoni bango Yudite, awa abongwani elongi mpe alati bilamba bya sika, bakamwi bonzenga bwa ye mpe balobi : | |
| Judi | LinVB | 10:8 | « Nzambe wa bankoko ba biso abatela yo malamu, asalisa yo mpo ’te okokisa mokano mwa yo mobimba, mpo ’te bana ba Israel bazwa lokumu, mpe Yeruzalem ezwa nkembo enene. » | |
| Judi | LinVB | 10:9 | Yudite akumisi Nzambe mpe alobi na bango : « Botinda bato bafungola ezibeli ya mboka, nabima mpo ’te nakende kosala manso bino bouti koloba na ngai. » Batindi bakengeli bafungola ezibeli ya mboka lokola Yudite asengi. | |
| Judi | LinVB | 10:10 | Bafungoli yango mpe Yudite na mosaleli wa ye babimi. Bato ba engumba bazalaki kotala ye ntango akiti ngomba mpe akatisi lobwaku, tee bamoni ye lisusu te. | |
| Judi | LinVB | 10:12 | tala basoda ba Asur bayei kokutana na Yudite, batelemisi ye mpe batuni ye : « Bino banani ? Outi wapi mpe ozali kokende wapi ? » Azongisi : « Nazali mwasi mo-Ebrei, nalingi kokima bango, mpo etikali moke bakweya o maboko ma bino. | |
| Judi | LinVB | 10:13 | Nalingi komono Oloferne, komanda wa basoda ba bino ; nayebisa ye makambo ma solo mpenza ; nakolakisa ye nzela nini akoki koleka mpo ’te abotolo ngomba mobimba ; soda moko akufa to azoka o etumba te. » | |
| Judi | LinVB | 10:14 | Basoda bazalaki koyoka maloba ma ye, bazalaki kotala ye mpe bakamwi na bonzenga bwa ye. | |
| Judi | LinVB | 10:15 | Balobi na ye : « Awa okiti mbangu mpo ’te omonono na mokonzi wa biso, omibikisi solo ! Kende kotala ye o ema ya ye ; bato ba biso bakokende kotika yo epai ya ye. | |
| Judi | LinVB | 10:16 | Soko okomi epai ya ye, obanga eloko te ; yebisa ye makambo manso outi koloba na biso, bongo akoyamba yo malamu. » | |
| Judi | LinVB | 10:17 | Baponi bato monkama bakende kotika ye na mosaleli wa ye ; bakambi ye o ema ya Oloferne. | |
| Judi | LinVB | 10:18 | Nsango ya boyei bwa ye epala-ngani o nganda mobimba. Bato babimi o biema mpe basangani o nzela mpo ya komono ye. Awa azalaki kozila o libanda lya ema ya Oloferne mpo ’te akutana na mokonzi, bato ebele bayei wana mpe bazingi ye. | |
| Judi | LinVB | 10:19 | Bakumisi bonzenga bwa ye, mpe mpo ya ye bakumisi ba-Israel. Balobani : « Nani akoki kokinola ekolo ya bato, eye ezali na basi kitoko boye ? Soko totiki ata mobali moko na bomoi, bozoba bwa biso moko ! Mbele baye bakotikala bakokosa mokili mobimba ! » | |
| Judi | LinVB | 10:21 | Oloferne alali o mbeto eke-mbami na bilamba bitane ngwa, na wolo, na mabanga ma emerode mpe na mabanga masusu ma motuya. | |
| Judi | LinVB | 10:22 | Bayebisi ye boyei bwa Yudite. Abimi o mbalasani liboso lya ema ; bato batamboli liboso lya ye bamemi bisungi bya palata. | |
Chapter 11
| Judi | LinVB | 11:1 | Oloferne alobi na ye : « Kitisa motema, mama, obanga eloko te. Mokolo moko te nasali mabe na moto oyo andimi kosalela Nabukodonozor, mokonzi wa nse mobimba. | |
| Judi | LinVB | 11:2 | Sikawa, soko bato ba yo, baye bafandi o ngomba, batiolaki ngai te, mbele natombolaki likongo te mpo ya kobunda na bango. Bango moko balingaki bongo. | |
| Judi | LinVB | 11:3 | Kasi yebisa ngai, mpo nini okimi kuna mpe oyei epai ya biso ? Solo, awa osali bongo, omibikisi ! Lendisa motema, obiki o butu bwa lelo, okobika mpe nsima ! | |
| Judi | LinVB | 11:4 | Moto moko akosala yo mabe te, ata moke te ; bakosala yo se malamu, lokola bakosalaka bato ba mokonzi wa ngai Nabukodonozor. » | |
| Judi | LinVB | 11:5 | Yudite azongisi : « Mokonzi, ya-mba na bolamu maloba ma ngai, moombo wa yo. O butu bwa lelo nakoyebisa mokonzi wa ngai likambo lya lokuta ata lyoko te. | |
| Judi | LinVB | 11:6 | Soko olandi mayele ma ngai, mosaleli wa yo, Nzambe akokomisa makambo ma yo manso tee nsuka, mpe mokonzi wa ngai akolonga o maye akani kosala. | |
| Judi | LinVB | 11:7 | Lokumu na Nabukodonozor, mokonzi wa nse mobimba ! Ye moto atindi yo otambwisa bato banso o nzela elamu ; bakumisa bokasi bwa ye. Mpo ya yo bato banso bakotosa ye ; mpo ya bokasi bwa yo ata nyama ya zamba mpe ya mboka, na mpe ndeke ya likolo ikotosa Nabukodonozor na bato ba ye. | |
| Judi | LinVB | 11:8 | Solo, biso banso tosili toyoki ’te ozali na bwanya mpe na mayele. Bato banso o nse mobimba bayebi ’te bobele yo moko ozali moto malamu o ekolo ya yo mobimba, ozali na ntoki mpe na mayele mingi, mpe elombe mpenza o bitumba. | |
| Judi | LinVB | 11:9 | Toyoki maloba Akior alobaki o likita lya bato ba yo. Bato ba Betulia babikisi ye ; bongo ye ayebisi bango makambo manso alobaki na yo. | |
| Judi | LinVB | 11:10 | Solo, mokonzi, otala maloba ma ye mpamba te, mpo alobi ya solo mpenza. Bato ba ekolo ya biso bakozwa etumbu mpe mopanga mokosala bango mabe, bobele soko basali lisumu o miso ma Nzambe wa bango. | |
| Judi | LinVB | 11:11 | Talaka sikawa, liwa likoya kosilisa bango mpo ’te yo mokonzi wa ngai ozonga nsima te, mpe ozwa mabe te. Mpamba te, lisumu lyoko likangi bango, liye likoyokisa Nzambe nkanda, mbala inso bakosumukaka. | |
| Judi | LinVB | 11:12 | Awa biloko bya kolia bikomi kozanga, mpe mai mazali lisusu mingi te, bakani koboma ngombe na nyama inso, mpe balingi kolia misuni miye Nzambe apekisi bango na mibeko mya ye. | |
| Judi | LinVB | 11:13 | Bakani mpe kolia mbuma ya yambo, ya mampa, na biteni bya zomi bya vino mpe bya mafuta, biye babombaki malamu ; nzokande, bobele banganga Nzambe bazali o Yeruzalem, baye bakoteleme o miso ma Nzambe wa biso, bakoki kolia byango. Moto moko akoki kosimba byango te. | |
| Judi | LinVB | 11:14 | Kutu, batindi bato o Yeruzalem basenge likita lya bakolo ndingisa ya kolia biloko bina. | |
| Judi | LinVB | 11:15 | Mokolo bakozwa ndingisa ena mpe bakobanda kosala bongo, Nzambe akokaba bango o maboko ma yo, mpe bakokufa. | |
| Judi | LinVB | 11:16 | Ntango ngai, mosaleli wa yo, nayoki makambo mana manso, nakimi bango. Nzambe moto atindi ngai mpo ’te elongo na yo tosala likambo linene likokamwisa bato banso ba nse mobimba mokolo bakoyoka lyango. | |
| Judi | LinVB | 11:17 | Mpamba te, ngai mosaleli wa yo nakobangaka Nzambe. Nakokumisa Nzambe wa likolo butu moi. Yango wana, mokonzi, nalingi kotikala epai ya yo. Na butu nakobima mpe nakokita o lobwaku, kuna nasambela Nzambe mpo ’te ayebisa ngai soko bango basili kosala lisumu lya bango. | |
| Judi | LinVB | 11:18 | Na nsima nakozonga koyebisa yo, bongo okende na limpinga lya yo mobimba kobundisa bango ; mpe moko te o kati ya bango akokoka yo. | |
| Judi | LinVB | 11:19 | Nakokamba yo o mokili mobimba mwa Yudea ; okokoma penepene na Yeruzalem. Nakotia ngwende ya yo o kati ya engumba. Okokamba bango lokola bakokambaka mpata izangi mokengeli, ata mbwa ekogangela yo te. Nayoki makambo mana manso o motema ; bayebisi ngai mango, mpe batindi ngai nayebisa yo. » | |
| Judi | LinVB | 11:20 | Maloba ma Yudite masepelisi Oloferne na bato ba ye banso. Bakamwi na bwanya bwa ye, balobi : | |
| Judi | LinVB | 11:21 | « Banda nsuka ya mokili tee nsuka esusu, mwasi mosusu bonzenga lokola ye, oyo azali mpe na maloba ma bwanya lokola ye, akozwama te. » | |
| Judi | LinVB | 11:22 | Oloferne alobi na ye : « Nzambe asali malamu awa atindi yo okima bato ba ekolo ya yo. Akolendisa bongo maboko ma ngai, mpe akokweisa baye bakinolaki mokonzi wa ngai. | |
Chapter 12
| Judi | LinVB | 12:1 | Oloferne akotisi ye o esika atiaki sani ya ye inso ya palata ; apesi ye biloko bya kolia na vino. | |
| Judi | LinVB | 12:2 | Kasi Yudite alobi : « Nakoki kolia biloko biye te, mpo nabangi lisumu, nakolia biloko ngai moko namemi. » | |
| Judi | LinVB | 12:3 | Oloferne azongisi : « Kasi soko bilei bya yo bisili, tokoki kozwa byango wapi ? O kati ya biso moto moko wa ekolo ya yo azali te. » | |
| Judi | LinVB | 12:4 | Yudite alobi : « Tala, o nkombo ya yo, mokonzi wa ngai, ngai moombo wa yo nakosilisa bilei bya ngai te liboso ’te Nzambe asala na maboko ma ngai makambo manso akani kosala. » | |
| Judi | LinVB | 12:5 | Basalisi ba Oloferne bakambi ye o ema ; alali mpongi tee o kati ya butu. Na nsoso ya yambo atelemi. | |
| Judi | LinVB | 12:6 | Atindelaki Oloferne maloba maye : « Mokonzi, kebisa bato mpo ’te ngai, mosaleli wa yo, nabima mpo ya kosambela. » | |
| Judi | LinVB | 12:7 | Oloferne apesi bakengeli ba ye mobeko ’te bapekisa Yudite te soko alingi kobima. Yudite atikali o nganda mikolo misato. Na butu azalaki kobima o nzela ekokende o Betulia, mpe akei kosukola nzoto o liziba penepene na bakengeli ba nganda. | |
| Judi | LinVB | 12:8 | Ntango azalaki kobuta ngomba, azalaki kosambela Mokonzi Nzambe wa Israel mpo akamba mosala mwa ye mpo ’te bana ba ekolo ya ye babika o likama. | |
| Judi | LinVB | 12:9 | Ekomi ye lisusu nzoto peto, azongi mpe atikali bobele o ema tee ntango bayeli ye biloko bya kolia na mpokwa. | |
| Judi | LinVB | 12:10 | Mokolo mwa minei Oloferne alambi limpati ; abengi se bayangeli ba basoda ba ye, abengi basaleli ba ye basusu te. | |
| Judi | LinVB | 12:11 | Alobi na Bagoas, mobali eniki, oyo akotalaka makambo manso ma ndako ya ye : « Kende kosenge mwasi mo-Ebrei ’te andima koya, tolia mpe tomele esika yoko. | |
| Judi | LinVB | 12:12 | Nsoni mingi na biso soko totiki mwasi lokola ye mpamba mpe totamboli na ye te. Soko tomeki kondimisa ye te, akoseke biso. » | |
| Judi | LinVB | 12:13 | Bagoas abimi epai ya Oloferne mpe akoti o ema ya Yudite, alobi na ye : « Mwasi kitoko oyo andima koya epai ya mokonzi wa ngai, okozwa lokumu o miso ma ye, okomele vino elongo na biso, okosepela esika yoko na biso mpe okokoto lelo o molongo mwa bilenge basi ba Asur, baye bakozalaka o ndako ya Nabukodonozor. » | |
| Judi | LinVB | 12:14 | Yudite azongisi : « Ngai nde nani ’te naboya etinda ya mokonzi wa ngai ? Manso makoki kosepelisa ye, nakosala mango noki ; yango ekoyokisa ngai esengo enene tee mokolo nakokufa. » | |
| Judi | LinVB | 12:15 | Atelemi, alati bilamba bya monzele na biloko binso bikokembisaka nzoto ya mwasi. Mosaleli mwasi wa ye akoti liboso, atandeli ye litoko o boso bwa Oloferne, liye Bagoas apesaki Yudite mpo ’te afandelaka lyango mikolo minso o ntango ya kolia. | |
| Judi | LinVB | 12:16 | Yudite ayingeli mpe akei kofanda. Oloferne asepeli mingi, mayele ma ye matamboli, motema mwa ye mokomi koyoka mposa ya kolala na ye. Ut’o mokolo amonoki ye mbala ya liboso, azalaki koluka nzela ya kosenginya ye. | |
| Judi | LinVB | 12:18 | Yudite ayanoli : « Solo mokonzi, nakomele vino, mpo ut’o mbotama ya ngai, mokolo moko te nazwi nzela ya kosepela lokola lelo. » | |
Chapter 13
| Judi | LinVB | 13:1 | Eyindi butu, bayangeli ba ye batelemi noki mpo bakende. Bagoas abimisi naino bato basusu batikalaki o ema ya mokonzi wa ye ; na nsima akangi monoko mwa ema. Banso bakei kolala ; banso balembi mpo bameleki vino mingi. | |
| Judi | LinVB | 13:2 | Yudite atikali ye moko na Oloferne, amoni ’te alali o mbeto lokola moto akufi, mpo alangwi vino mingi. | |
| Judi | LinVB | 13:3 | Sikawa Yudite alobi na mosaleli mwasi wa ye ’te atikala o libanda penepene na ndako ya kolala, mpe akengele ye ntango akobima, lokola azalaki kosala mikolo minso. Ayebisaki ye ’te akobima mpo ya losambo. Ayebisaki Bagoas mpe bongo. | |
| Judi | LinVB | 13:4 | Bato banso babimaki o ndako ya Oloferne, ezala mokóló to mwana, moto moko atikalaki o ndako ya kolala te. Yudite atelemi pene na mbeto ya Oloferne, asambeli o motema : « Mokonzi Nzambe wa bokasi bonso, o ngonga eye, tala na bolamu mosala mwa maboko ma ngai mpo ’te Yeruzalem ezwa nkembo. | |
| Judi | LinVB | 13:5 | Sikawa mpenza ntango ya kolendisa ekolo ya yo lisusu ekoki na bokokisi likambo nakani kosala, mpo ’te nanyata banguna ba biso, baye balingi kosukisa biso. » | |
| Judi | LinVB | 13:6 | Na nsima akei penepene na mbeto esika Oloferne alalisi motó, alongoli mopanga mwa ye, | |
| Judi | LinVB | 13:7 | abelemi na mbeto, asimbi ye na nsuki, alobi : « Mokonzi Nzambe wa Israel, sikawa lendisa ngai. » | |
| Judi | LinVB | 13:8 | Apapi ye mopanga, abeti ye mbala ibale na bokasi bwa ye bonso, akati ye nkingo ; motó mwa ye molongwi. | |
| Judi | LinVB | 13:9 | Apusi nzoto ya ye elo-ngwa o mbeto, alongoli elamba likolo lya makonzi. Na nsima abimi mpe apesi mosaleli wa ye motó mwa Oloferne. | |
| Judi | LinVB | 13:10 | Mosaleli wa ye atii mwango o libenga lya bilei. Na nsima bango babale babimi o nganda lokola bameseni kosala mpo ya losambo. Awa bakatisi nganda, batiki nzela ya lobwaku, balandi nzela ya ngomba tee babuti ngomba ya Betulia mpe bakomi o ezibeli ya mboka. | |
| Judi | LinVB | 13:11 | Ezalaki ye naino mosika, Yudite agangeli bakengeli bazalaki o boso bwa ezibeli ya mboka : « Bofungola, bofungola bizibeli, mpo Mokonzi Nzambe wa biso azali na biso solo ; alingi kolakisa bato ba Israel bokasi bwa ye o etumba na banguna, lokola asali lelo. » | |
| Judi | LinVB | 13:12 | Awa bato ba mboka bayoki mongongo mwa ye, bakiti mbangu epai ya ezibeli ya mboka mpe babengi bakolo ba mboka. | |
| Judi | LinVB | 13:13 | Bato banso bayei mbangu, bakolo na bana, mpo bakanisi te ’te akoya. Bafungoli ezibeli ya mboka mpe bayambi bango babale ; bapelisi móto mpo ya komono malamu, mpe bazingi bango. | |
| Judi | LinVB | 13:14 | Na mongongo makasi Yudite ayebisi bango : « Bokumisa Nzambe, bopesa ye lokumu ! Bokumisa Nzambe oyo abosani libota lya Israel te, mpe ayokeli biso ngolu, zambi o butu bwa lelo abuki makasi ma banguna na maboko ma ngai. » | |
| Judi | LinVB | 13:15 | Na nsima abimisi motó o libenga, esika atiaki mwango, mpe alakisi bango, alobi : « Tala motó mwa Oloferne, mokonzi monene wa basoda ba Asur, tala bilamba bya mbeto esika alalaki ntango alangwaki vino ! Mokonzi abomi ye na maboko ma mwasi ! | |
| Judi | LinVB | 13:16 | Toyembela Mokonzi, mpo abateli ngai o ntango ya mosala moye monene ! Kitoko ya elongi ya ngai etambwisi mayele ma ye mpo ’te asuka mabe. Asalaki na ngai lisumu te ; yango wana nazali na nsoni te, nabebisi mpe lokumu la ngai te. » | |
| Judi | LinVB | 13:17 | Bato banso bakomi na esengo enene, bafukami mpo ya kokumbamela Nzambe, mpe banso bagangi monoko se moko : « Bakumisa yo, Nzambe wa biso, yo moto osilisi lelo banguna ba ekolo ya yo. » | |
| Judi | LinVB | 13:18 | Na nsima Ozia alobi na Yudite : « E mwana wa ngai, Nzambe wa nta likolo abenisa yo, abenisa yo leka basi banso ba mokili ; bakumisa Mokonzi Nzambe, Mozalisi wa likolo na nse, oyo akambi yo mpo okata motó mwa mokonzi wa banguna. | |
| Judi | LinVB | 13:19 | Mokolo moko te bato bakobosana ’te otiaki motema na Mokonzi, kasi bakokanisa nguya ya Nzambe seko. | |
Chapter 14
| Judi | LinVB | 14:1 | Yudite alobi na bango : « Bandeko, boyoka ngai. Bokamata motó moye mpe bobaka mwango o eteni ya likolo lya linongi lya mboka. | |
| Judi | LinVB | 14:2 | Ntango ntongo ekobanda kotana, mpe moi mokobima o mokili, bokamata bibuneli bya bino ; babali banso bazali makasi babima. Bopono moyangeli mpe bosala lokola bolingi kokita epai ya esobe mpo ya kokutana na basoda ba Asur, kasi bokita te. | |
| Judi | LinVB | 14:3 | Ba-Asur bakokamata bibuneli bya bango, bakokende o nganda ya bango mpe bakolongola bakomanda o mpongi. Na nsima bakokende mbangu epai ya ema ya Oloferne mpe bakozwa ye te. Nsomo ekokanga bango mpe bakokima bino. | |
| Judi | LinVB | 14:4 | Bino, elongo na bato banso bafandi o mokili mwa Israel, bokolanda bango, mpe bokoboma bango o nzela. | |
| Judi | LinVB | 14:5 | Kasi liboso bobengela ngai naino Akior, moto wa Amon, mpo ’te amono na miso mpe ayeba moto oyo akinolaki libota lya Israel mpe atindaki ye epai ya biso mpo akufa awa. » | |
| Judi | LinVB | 14:6 | Bongo babengi Akior o ndako ya Ozia. Ayei mbangu, mpe awa amoni motó mwa Oloferne o maboko ma moto moko wa likita, amibwaki elongi o nse mpe akwei senza. | |
| Judi | LinVB | 14:7 | Batelemisi ye, kasi amibwaki o boso bwa Yudite mpo ya kokumisa ye, alobi : « Bakumisa yo o biema bya Yuda mpe o kati ya bikolo binso ; bato bakoyoka nkombo ya yo bakokamwa mpe bakoyoka nsomo. | |
| Judi | LinVB | 14:8 | Sikawa yebisa ngai manso osalaki o mikolo miye. » Mpe Yudite asololi ye o miso ma bato banso manso asalaki banda mokolo atikaki Betulia tee ntango azalaki koloba na bango. | |
| Judi | LinVB | 14:10 | Emoni Akior makambo manso Nzambe wa Israel asalaki, ayambi ye na motema moko, asengi ’te bakata ye nzoto mpe bandimi ye seko o ekolo ya ba-Israel. | |
| Judi | LinVB | 14:11 | Etani ntongo, bato ba Betulia babaki motó mwa Oloferne o linongi lya mboka. Banso bakamati bibuneli bya bango, babimi mangomba mangomba mpe bakiti ngomba. | |
| Judi | LinVB | 14:12 | Emoni ba-Asur bongo, batindi noki bantoma epai ya bayangeli ba bango ; bango bayebisi bakonzi banene na bakomanda ba bango. | |
| Judi | LinVB | 14:13 | Bakomi bongo o ema ya Oloferne. Balobi na moto oyo azalaki kotala makambo ma ndako ya ye : « Lamusa mokonzi wa biso, mpo baombo baye bakiti ngomba mpo ya kobunda na biso ; bango banso baluki liwa. » | |
| Judi | LinVB | 14:14 | Bagoas akoti o ema, abeti maboko liboso lya elamba ya kapo ya ndako ya kolala ; akanisi ’te Oloferne alali na Yudite. | |
| Judi | LinVB | 14:15 | Kasi awa amoni ’te moto moko ayanoli te, afungoli kapo mpe akoti o ndako ya kolala ; akuti Oloferne asili akufi, alali penepene na mbeto, motó mozalaki te. | |
| Judi | LinVB | 14:18 | « Baombo batomboki ; mwasi mo-Ebrei moko ayokisi Nabukodonozor na bato ba ye nsoni mingi. Ya solo, ebembe ya Oloferne elali o mabelé, motó mozali te. » | |
Chapter 15
| Judi | LinVB | 15:2 | Babangi mingi, banso balengi. Moko te apa-ngani na moninga ; banso bapalangani na mbala yoko mpe bakimikimi o nzela ya esobe mpe ya ngomba. | |
| Judi | LinVB | 15:3 | Baye bapikaki nganda zongazonga na ngomba ya Betulia bakimi lokola. Ba-Israel banso bayebi bitumba bakei kobundisa bango. | |
| Judi | LinVB | 15:4 | Ozia atindi bantoma epai ya Betomestaim, Bebai, Kobe, Kola mpe o mokili mobimba mwa Israel mpo ’te bayebisa bato nsango ya likambo likwelaki bango. Basengi bango ’te balanda banguna mpo ya koboma bango. | |
| Judi | LinVB | 15:5 | Awa ba-Israel bayoki yango, banso motema moko bakei kobundisa bango, mpe balandi bango tee Koba. Bato ba Yeruzalem mpe ba bituka bya ngomba bayei lokola, mpo bayoki maye makwelaki nganda ya banguna. Na nsima bato ba Galaad na Galilea bazwani na banguna mpe babengani bango tee nsuka ya ndelo ya Damasko. | |
| Judi | LinVB | 15:7 | Ezongi bongo ba-Israel baye bakendeki bitumba babotoli biloko bisusu bitikalaki. Bato ba mboka isusu mpe ba bituka bya ngomba mpe bya esobe, bango mpe babotoli biloko mingi, mpo bilekaki ebele. | |
| Judi | LinVB | 15:8 | Nganga Nzambe mokonzi Yoyakim mpe likita mobimba lya bakolo ba Israel bazalaki o Yeruzalem bayei kotala malamu maye Mokonzi apesaki Israel ; bayei mpe kotala Yudite mpo ya kopesa ye longonya. | |
| Judi | LinVB | 15:9 | Awa azalaki koyingela o ndako ya ye, banso monoko moko bakumisi ye, balobi : « Yo ozali nkembo ya Yeruzalem, ntina ya lokumu la Israel, lokumu la ekolo ya biso. | |
| Judi | LinVB | 15:10 | Awa osalaki maye manso na maboko ma yo, obikisi ekolo ya biso Israel, mpe Nzambe andimi mosala mwa yo. Mokonzi wa bokasi bonso abenisa yo seko. » Mpe bato banso bazongisi : « Amen ! » | |
| Judi | LinVB | 15:11 | Bato bakei kobotolo biloko o nganda mikolo ntuku isato mobimba. Bapesi Yudite ema ya Oloferne, biloko binso bya palata, mbeto ya ye, mbeki ya ye na biloko bisusu binso. Akamati byango, atii biloko bisusu o mpunda, bisusu o makalo maye mabendami na farasa. | |
| Judi | LinVB | 15:12 | Basi banso ba Israel bayei mbangu kotala ye ; basa-ngani mpo ya kobinela mpe koyembela ye nzembo. Yudite akamati nkasa ya oliva, apesi yango na basi bazalaki kolanda ye. | |
| Judi | LinVB | 15:13 | Ye na baninga baye balati yango lokola binkoti. Na nsima bakei ; Yudite atamboli liboso, akambi lingomba lya basi bayembi. Babali banso ba Israel balandi, bibuneli o maboko, binkoti o mitó, na mpe nzembo o monoko. | |
Chapter 16
| Judi | LinVB | 16:1 | Boyembela Nzambe wa ngai nzembo, bobete mbonda, boyembela Mokonzi na miziki mpe na migbala, bobongisela ye nzembo ya kotondo ye, bokumisa ye mpe bobondela nkombo ya ye. | |
| Judi | LinVB | 16:2 | Mokonzi azali Nzambe mosukisi bitumba, apiki nganda o kati ya bato ba ye, mpo ’te abikisa ngai o maboko ma banguna. | |
| Judi | LinVB | 16:3 | Ba-Asur bautaki o ngomba epai ya Nordi, bayaki na mampinga ma basoda nkoto na nkoto ; bakangaki mai ma miluka, mpe farasa ya bango itondaki o ngomba bipai binso. | |
| Judi | LinVB | 16:4 | Balayaki ’te bakotumba mokili mwa ngai, bakoboma bilenge ba ngai na mopanga, bakobwaka bana bake ba ngai o mabelé. Bakopesa bana ba ngai na nyama, mpe bakoteke bilenge basi ba ngai. | |
| Judi | LinVB | 16:6 | Bilenge bato bakweisi elombe ona te, bana ba Titan babeti ye te, bato balai babundi na ye te ; kasi Yudite, mwana wa Merari, alongi ye ; akweisi ye mpo ya bonzenga bwa elongi ya ye. | |
| Judi | LinVB | 16:7 | Alongolaki bilamba bya ye bya mpili mpo ya kolendisa bato ba Israel bazalaki na mawa. Apakolaki elongi ya ye malasi, | |
| Judi | LinVB | 16:9 | Mapapa ma ye mabendaki miso ma ye. Bonzenga bwa ye botambwisaki ye mayele ; bongo akati ye motó na mopanga. | |
| Judi | LinVB | 16:11 | Babola ba ngai bagangi mpe banguna bayoki nsomo, awa bato batau babeleli, banguna bakomi kobanga, ntango batomboli mongongo, banguna bakimi. | |
| Judi | LinVB | 16:12 | Bana basi batau babomaki bango, batubolaki bango lokola basoda bakimi etumba, bakufaki o etumba ya Mokonzi wa ngai. | |
| Judi | LinVB | 16:13 | Nalingi koyembela Nzambe wa ngai nzembo ya sika. Mokonzi, ozali monene, oleki lokumu, ozali na nguya ya kokamwa, bakoki kolonga yo te. | |
| Judi | LinVB | 16:14 | Bikelamo binso bisalela yo ! Mpo ya liloba lya yo binso bisalemi, opemeli binso mpema, mpe binso bitongami, moto moko te akoki na liloba lya yo. | |
| Judi | LinVB | 16:15 | Ngomba ikoki kokweya mpo ya mbonge ya mai, mabanga makoki konyangwa lokola mafuta o miso ma yo, kasi baye babangi yo, okoyokela bango mawa. | |
| Judi | LinVB | 16:16 | Solo, libonza lya nsolo mpimbo lizali na ntina mpenza te ; se bongo, mafuta batumbeli yo bo libonza ; moto wa lokumu solo, se oyo akobangaka Mokonzi. | |
| Judi | LinVB | 16:17 | Mawa na bikolo bikobundisa ekolo ya ngai ! Mokonzi monene akokitisa bango o mokolo mwa likambo. Akotindela bango móto mpe nyama o misuni mpe bakolela mpo ya mpasi seko. | |
| Judi | LinVB | 16:18 | Ekomi bango penepene na Yeruzalem, banso bakumbameli Nzambe, bamipetoli, na nsima babonzeli Nzambe mabonza maye bapesi na motema mwa bango moko, mabonza ma bolei na makabo masusu. | |
| Judi | LinVB | 16:19 | Yudite abonzeli Nzambe biloko binso bya Oloferne, biye bato bapesaki ye, elamba eye ye moko akamataki o mbeto ya Oloferne, atikeli Nzambe yango seko. | |
| Judi | LinVB | 16:20 | Bato banso ba Yeruzalem basepeli pene na ndako esantu sanza isato mobimba. Yudite atikali na bango. | |
| Judi | LinVB | 16:21 | Nsima ya mikolo mina, banso bazongi o mboka ya bango. Yudite akei o Betulia kofanda o lopango la ye. Ntango azalaki na bomoi azalaki na lokumu lonene o ekolo ya ye mobimba. | |
| Judi | LinVB | 16:22 | Babali baike balingaki kobala ye, kasi ayebaki mobali moko te banda ntango mobali wa ye Manase akufa mpe akundama. | |
| Judi | LinVB | 16:23 | Awa ye akomi mobange bobele o lopango la mobali wa ye Manase, lokumu la ye lokoli naino. Akokisi mibu monkama na mitano. Apesi mosaleli mwasi wa ye bonsomi ; nsima awei o Betulia mpe bakundi ye o lilita liye bakundaki mobali wa ye Manase. | |
| Judi | LinVB | 16:24 | Ba-Israel basali lilaka mikolo nsambo. Liboso ’te akufa akaboli biloko bya ye binso na bandeko ba mobali wa ye Manase mpe na bandeko ba ye moko. | |