Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
ROMANS
Up
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10 11 12 13 14 15 16
Chapter 1
Roma LinVB 1:1  Ngáí Pólo, mosáleli wa Krístu Yézu, natíndélí bínó, bato ba bolingo ba Nzámbe o Róma, losáko. Nzámbe abéngí ngáí názala apóstolo, aponí ngáí násangela Nsango Elámu ya yě,
Roma LinVB 1:2  eye alakéláká kala na maloba ma baproféta o Minkandá Misántu.
Roma LinVB 1:3  Nsango Elámu eye etálí Mwána wa yě, Yézu Krístu, Mokonzi wa bísó. O maye matálí bomoto, abótámákí o libótá lya Davídi ;
Roma LinVB 1:4  o maye matálí Elímo Sántu, akómí na ngúyá ya Mwána wa Nzámbe, áwa Tatá asékwísí yě.
Roma LinVB 1:5  Yě moto apésí ngáí ngrásya názala apóstolo mpô ’te nátéya bato ba bikólo bínso, báyamba mpé bátósa yě, mpô ya lokúmu la nkómbó ya yě.
Roma LinVB 1:6  Nátéya mpé bínó lo­kóla, zambí Yézu Krístu abyángí bínó.
Roma LinVB 1:7  Bínó bato ba bolingo ba Nzámbe o Róma, Nzámbe abyángí bínó bózala basántu. Nzámbe Tatá wa bísó ná Mokonzi wa bísó Yézu Krístu bákabela bínó ngrásya na bobóto.
Roma LinVB 1:8  Libosó, elongó na Yézu Krístu, natóndí Nzámbe mpô ya bínó bánso, mpô o mokili mobimba ba­kokúmisaka boyambi bwa bínó.
Roma LinVB 1:9  Nakosálelaka Nzámbe óyo na mo­téma mǒkó, áwa nakosangelaka Nsango Elámu ya Mwána wa yě. Yěméí ayébí ’te nakotíkaka té kokanisa bínó.
Roma LinVB 1:10  O losámbo la ngáí nakoséngeke Nzámbe ’te álingisa ngáí názwa nzelá ya kokóma epái ya bínó.
Roma LinVB 1:11  Nazalí na mpósá mpenzá ya komóno bínó, nákabela bínó mwâ likabo lya Elímo mpô ya koléndisa bínó.
Roma LinVB 1:12  Nalingí koloba : tóléndisana bísó na bínó na eyamba sé yǒ kó, eyamba ya bísó bánso.
Roma LinVB 1:13  Bandeko ba ngáí, malámu bóyéba ’te mbala míngi nakánákí koyâ epái ya bínó, kasi téé leló nazwí nzelá té ; nalingákí ’te mosálá mwa ngáí móbóta mwâ mbuma epái ya bínó, lokóla o bikólo bisúsu bya bapagáno.
Roma LinVB 1:14  Nazalí lokóla moto akómí na nyongo epái ya ba-Gréki, epái ya basénzi, epái ya baye bayékólá mpé epái ya baye bayékólá té.
Roma LinVB 1:15  Yangó wâná motéma mwa ngáí motíndí ngáí náyâ kosangela Nsango Elámu epái ya bínó lokóla, bínó bato ba Róma.
Roma LinVB 1:16  Sôló, Nsango Elámu ekoyókisaka ngáí nsóni té : ezalí ngúyá ya Nzámbe mpô ya kobíkisa bato bánso bayambí yangó na motéma, libosó ba-Yúda, na nsima bato ba bikólo bisúsu.
Roma LinVB 1:17  Na Nsango Elámu Nzámbe alakísí bosémbo bwa yě, zambí akokómisa moto wa bosémbo bobélé óyo ayambí yě téé nsúka. Ekomámí bôngó o Minkandá Misántu : Oyo ayambí akozala moto wa bosémbo o míso ma Nzámbe, akozala na bomoi.
Roma LinVB 1:18  Kasi út’o likoló Nzámbe akolakisaka nkándá epái ya bato bánso bakobóyaka Yě mpé bakosálaka mabé, mpámba té, misálá mya bangó miye mizángí bosémbo mikopekisa bangó koyéba bosôló.
Roma LinVB 1:19  Mambí ma Nzámbe maye bato bakokí koyéba, mazalí polélé o míso ma bangó, zambí Nzámbeméí alakísákí bangó mangó.
Roma LinVB 1:20  Sôló, ngúyá ya Nzámbe nsúka té ná mpé bonzá­mbe bwa Yě bokomónonoko na míso té. Kasi bandá Nzámbe akelí mokili, bato bakokí koyéba yangó na mayéle ma bangó mpô ya bikelá bya Yě. Bakokí kowángana yangó té.
Roma LinVB 1:21  Atâ bayébí Nzámbe, bakúmísí mpé batóndí yě té bǒ ebongí. Babúngámí, zambí makanisi ma bangó mazángí ntína ; mitéma mya bangó mikómí mpé molílí mpô bazángí mayéle :
Roma LinVB 1:22  bakanísí ’te bazalí na bwányá, nzókandé bakómí bazóba.
Roma LinVB 1:23  Batíkí kokúmisa Nzámbe wa nkémbo mpé wa lobíko, bakómí kokúmisa bikeko bya bato bakokúfaka, bya ndeke, bya nyama ikotámbolaka mpé iye ikolandaka o mabelé.
Roma LinVB 1:24  Yangó wâná Nzámbe atíkí bangó bálanda mpósá ya mitéma mpé básála makambo ma bosóni ; bábébisa bôngó nzóto ya bangó mǒkó.
Roma LinVB 1:25  Babóyákí nzelá ya sôló ya Nzámbe mpé ba­ndimákí lokutá, bakú­mbámélákí mpé basálélákí bikeko biye balingáki, kasi babóyí Mozalisi wa bilóko bínso, óyo basengélí kokúmisa sékô ! Amen.
Roma LinVB 1:26  Yangó wâná Nzámbe atíkí bangó, mpósá ya mabé ébébisa bangó : básí ba bangó batíkí (kofánda o) libála, bakómí kosála bosóni bangó na bangó ;
Roma LinVB 1:27  babáli sé bôngó : babóyí kosangana na básí ba bangó, bakómí kolúlana, bakómí kosála bosóni bangó na bangó ; bazwákí bôngó etúmbu ya masúmu o nzóto ya bangó.
Roma LinVB 1:28  Awa bakanísí ’te koyéba Nzámbe ezalí mpámba, Nzámbe akómísí bangó baómbo ba makanisi mabé, atíkí bangó básála maye mabongí té.
Roma LinVB 1:29  Bazángí bosémbo mpé batóndí na mabé ndéngé na ndéngé : lokósó, mayéle mabé na zúwa. Mosálá mwa bangó : mpósá ya koboma, koswâna, kokósa, kobébisa bat­o mpé lokúmu la bání­ngá.
Roma LinVB 1:30  Bakotóngonoko, bazalí bangúná ba Nzámbe, bakofíngaka báníngá, bavímbí na loléndo mpé na lofúndo. Bakolukaka kosála mabé, bakotósaka babóti té,
Roma LinVB 1:31  bazángí mayéle. Mitéma mya bangó, mái ma bwáto, mizalí na bolingi té, na mawa mpé té.
Roma LinVB 1:32  Nzókandé bayébí mobéko mwa Nzámbe malámu : bato bakosálaka makambo mâná bakokí na liwá. Nzókandé bakosálaka makambo mangó, kútu bakokúmisaka baye bakosálaka makambo mâná.
Chapter 2
Roma LinVB 2:1  Yǒ moto olingí kokitisa báníngá, atâ ozalí náni, okokí komílóngisa té. Awa olingí kokitisa móníngá, ozalí komíkitisa, zambí yǒ moto ofúndí móníngá, okosálaka mabé lokóla yě.
Roma LinVB 2:2  Toyébí ’te Nzámbe akokitisaka na bosémbo bato bakosálaka bôngó.
Roma LinVB 2:3  Yǒ moto ofú­ndí bato bakosálaka mabé, okosálaka mabé lokóla bangó, okanísí ’te okokíma Nzámbe ntángo akokáta likambo lya yǒ ?
Roma LinVB 2:4  Yǒ ozalí ndé kokínola Nzámbe mpô azalí bobóto míngi, akokangaka motéma mpé akopésaka bato etúmbu nokí té ? Oyébí té ’te na bobóto bwa yě azalí kobyánga yǒ óbóngola motéma ?
Roma LinVB 2:5  Yó, motéma libángá, obóyí kobó­ngola motéma, okongalisa nkándá ya Nzámbe. Ekomónono o mokolo mwa nkándá, mokolo Nzámbe akoyâ kokáta makambo ma bato bánso na bosémbo.
Roma LinVB 2:6  Akofúta moto na moto lifúta likokí na mosálá asálí :
Roma LinVB 2:7  akopésa bomoi bwa sékô na baye bakolukaka na moléndé nkémbo na lokúmu eye ekosíla té.
Roma LinVB 2:8  Kasi nkándá mpé nkele ikokwêla bato bakotósaka Nzámbe té, baye babóyí kolanda matéya ma sôló mpé balandí makambo mazángí bosémbo.
Roma LinVB 2:9  Minyóko mpé malózí makokwêla bato bánso bakosálaka mabé : libosó ba-Yúda, nsima bapagáno.
Roma LinVB 2:10  Kasi bato bánso bakosálaka malámu, Nzámbe akopésa bangó nkémbo, lokúmu na bobóto : libosó ba-Yúda, na nsima bapagáno,
Roma LinVB 2:12  Ya sôló, baye bayébí Mobéko té, sókó basálí masúmu, bakobú­nga, atâ bayébí Mobéko té. Kasi baye bayébí Mobéko, sókó basálí masúmu, Nzámbe akosámbisa bangó engébéné na Mobéko.
Roma LinVB 2:13  Mpá­mba té, baye bayókí Mobéko bobélé na matói, balongóbání o míso ma Nzámbe té ; sé bato bakotósaka Mobéko bakobíka.
Roma LinVB 2:14  Sókó bapagáno bayébí Mobéko té, kasi basálí malámu lokóla Mobéko motíndí, zambí motéma molakísí bangó bôngó, bangó mǒkó bakómí komípésa mibéko, atâ bayébí Mobéko mwa Móze té.
Roma LinVB 2:15  Na maye bakosálaka balakísí ’te Mobéko mozalí o mitéma mya bangó ; mokoyébisaka bangó sókó basálí malámu tǒ mabé.
Roma LinVB 2:16  Mokolo Nzámbe akosámbisa bato na monoko mwa Krístu Yézu, akotála makambo bato basáláká na bonkútú, mokolo môná makambo mâná makobima. Nakoyébisaka bínó bôngó o Nsango Elámu nakotéyaka.
Roma LinVB 2:17  Kasi yǒ moto olobí ’te ozalí mo-Yúda, otíí motéma na Mobéko ; omíkúmísí ’te ozalí moto wa Nzámbe ;
Roma LinVB 2:18  oyébí níni Nzámbe alingí, níni elekí malámu, lokóla Mobéko moyébísí yǒ.
Roma LinVB 2:19  Okanísí ’te okokí kozala mokambi wa bato bakúfá míso, tǒ mwínda mwa bato bakotámbolaka o molílí ;
Roma LinVB 2:20  yǒ mobókoli wa bato bazángí mayéle mpé motéyi wa bato bayékólá té, okanísí ’te ozalí na mayéle mánso mpé okolobaka bobélé makambo ma sôló mpô oyébí Mobéko…
Roma LinVB 2:21  Tálá, yǒ motéyi wa bato basúsu, mpô níni okomítéyaka té ? Okotéyaka ’te báyíba té, kasi yǒ mǒkó okoyíbaka !
Roma LinVB 2:22  Okopekisaka bokáli, kasi yǒ mǒ­kó okosálaka bwangó ! Okotálaka bikeko lokóla bilóko mpámba, kasi okoyíbaka o bisíká bakokúmisaka bikeko.
Roma LinVB 2:23  Okomíkúmisaka ’te oyébí Mobéko, kasi áwa otósí mwangó té, ozalí kobébisa lokúmu la Nzámbe.
Roma LinVB 2:24  Ekomámí bôngó o Minkandá Misántu : « Mpô ya bínó ba­pagáno bakotúkaka nkómbó ya Nzámbe. »
Roma LinVB 2:25  Sókó okotósaka Mobéko, kokátisa nzóto ezalí na ntína ; kasi sókó otósí Mobéko té, atâ bakátí yǒ nzóto, ozalí sé lokóla mopagáno.
Roma LinVB 2:26  Sé bôngó, sókó mopagáno atósí mití­ndo mya Mobéko, atâ bakátí yě nzóto té, o míso ma Nzámbe azalí lokóla moto bakátí yě nzóto.
Roma LinVB 2:27  Mpé moto óyo akotósaka Mobéko, atâ bakátí yě nzóto té, akosámbisa yǒ mo-Yúda okotósaka Mobéko té, atâ bakátí yǒ nzóto mpé oyébí Minkandá mya Mobéko.
Roma LinVB 2:28  Moto azalí bobélé mo-Yúda o míso ma bato, azalí mo-Yúda wa sôló té, mpô elembo ya mo-Yúda wa sôló ezalí bobélé o nzóto ya yě té.
Roma LinVB 2:29  Moto azalí mo-Yúda wa sôló o motéma mwa yě, mpô azalí na elembo o motéma, akotósaka bobélé Minkandá mya Mobéko té, akotósaka mpé Elímo Sántu : yě moto akozwa lokúmu epái ya bato té, kasi epái ya Nzámbe.
Chapter 3
Roma LinVB 3:1  Bôngó ba-Yúda balekí basúsu na níni ? Kokátisa nzóto ezalí ndé na litómba níni ?
Roma LinVB 3:2  Ezalí na litómba linéne o makambo míngi. Ya libosó : Nzámbe atíkélí bangó maloba ma yě.
Roma LinVB 3:3  Tóloba níni ? Awa basúsu o káti ya bangó babóyákí kotósa, Nzámbe akobóya ndé kokokisa elakó ya yě ?
Roma LinVB 3:4  Sókí moké té ! Nzámbe akokósaka té, kasi bato bánso bakobúkaka lokutá. O Minkandá Misántu ekomámí boye : « Bámóno na maloba ma yǒ ’te yǒ Nzámbe ozalí sémba ; sókó bakosá­mbisa yǒ, ntángo ínso okolónga. »
Roma LinVB 3:5  Lokóla masúmu ma bísó mamónísí bosémbo bwa Nzámbe polélé, tóloba níni ? Awa Nzámbe abétí bísó na nkándá, azángí ndé bosémbo ? Natúní bôngó lokóla bato basúsu bakotúnaka.
Roma LinVB 3:6  Atâ moké té. Sókó ezalákí bôngó, bóníbóní Nzámbe akokákí kosámbisa bato ba nsé ?
Roma LinVB 3:7  Kasi sókó lokutá la ngáí lokomónisaka bosôló bwa Nzámbe polélé mpé lokopésaka yě lokúmu, mpô níni akokitisa ngáí lokóla mosúmuki ?
Roma LinVB 3:8  Bôngó, tósála mabé mpô ’te mabé ma bísó málakisa bolámu bwa Nzámbe ? Basúsu bakopanzaka nsango ’te ngáí moto nakolobaka bôngó. Ebongí bákitisa bangó o likambo.
Roma LinVB 3:9  Bôngó tóloba ’te bísó ba-Yúda tolekí ndé bapagáno ? Sókí moké té ! Tosílí tolakísí ’te ná ba-Yúda ná bapagáno, bánso bazalí baómbo ba lisúmu,
Roma LinVB 3:10  lokóla ekomámí : « Moto wa bosémbo azalí té, atâ mǒkó té.
Roma LinVB 3:11  Moto wa mayéle azalí té, atâ moto mǒkó akolukaka Nzámbe té.
Roma LinVB 3:12  Bato bánso babúngí nzelá, babébí, bakosálaka mabé, moto akosálaka malámu azalí té, atâ mǒkó té.
Roma LinVB 3:13  Monoko mwa bangó mozalí lokóla lilíta lifungwámí, bakobúngisaka bato na lolému la bangó ; maloba ma bangó mazalí lokóla ngenge ya nyóka.
Roma LinVB 3:14  Minoko mya bangó mitóndí na maloba ma botómbeli bato mabé mpé ma bololo.
Roma LinVB 3:16  Bakobébisaka bato mpé bakoyókisaka bangó mpási.
Roma LinVB 3:19  Toyébí ’te mánso matálí baye basengélí kotósa Mobéko makomámí o Mobéko, mpô ’te mǒkó mǒ­kó ámílóngisa té, kasi bánso báyéba ’te bazalí basúmuki o míso ma Nzámbe.
Roma LinVB 3:20  Zambí atâ moto mǒkó té akozala moto wa bosémbo o míso ma Nzámbe mpô ya botósi Mobéko. Ntína ya Mobéko ezalí sé kolakisa níni ezalí lisúmu.
Roma LinVB 3:21  Sikáwa Nzámbe asílí alakísí nzelá ya kokóma na bosémbo o míso ma yě. Ekomámí o Mobéko mpé o Minkandá mya baproféta : ezalí mpô ya Mobéko té,
Roma LinVB 3:22  kasi mpô ya boyambi Yézu Krístu : baye bánso bakoyamba Nzámbe bakokóma bato ba bosémbo o míso ma yě. Bato bakeséní lisúsu té :
Roma LinVB 3:23  bánso basálí masúmu, bánso bazángí lokúmu loye lokoútaka na Nzámbe.
Roma LinVB 3:24  Bakozala bato ba bosémbo bobélé mpô ya ngrásya ya Nzámbe, zambí Krístu Yézu asikólí bangó.
Roma LinVB 3:25  Nzámbe alingákí ’te Krístu, na makilá ma yě, ázwela bato bánso bakoyamba bolímbisi masúmu. Ala­kísí bangó bôngó bosémbo bwa yě. Kala apésáká bato etúmbu mpô ya masúmu té,
Roma LinVB 3:26  mpé akangáká motéma. Kasi o mikolo miye alingákí kolakisa bosémbo bwa yě, mpô ’te ákokisa bilakó bya yě mpé ákómisa baye bánso bayambí Yézu bato ba bosémbo.
Roma LinVB 3:27  Bôngó tokokí ndé komíkúmisa ? Elóko té. Ntína níni epekísámí ? Tokokí ndé komíkúmisa mpô ya misálá tokosálaka ? Elóko té. Tosengélí sé koyamba.
Roma LinVB 3:28  Bísó toyébí ’te moto akokóma moto wa bosémbo mpô ya botósi Mobéko té, kasi mpô ya boyambi.
Roma LinVB 3:29  Tǒ Nzámbe azalí bobélé Nzámbe wa ba-Yúda ? Azalí mpé Nzámbe wa bapagáno té ? Sôló, azalí Nzámbe wa bapagáno lokóla.
Roma LinVB 3:30  Zambí Nzámbe azalí sé mǒkó : akokómisa ba-Yúda bato ba bosémbo mpô ya boyambi, akokómisa mpé bapagáno bato ba bosémbo mpô ya boyambi bwa bangó.
Roma LinVB 3:31  Bôngó tóloba ’te boyambi bolo­ngólí ntína ya Mobéko ? Sókí moké té ! Bobélé boyambi bopésí Mobéko ntína.
Chapter 4
Roma LinVB 4:1  Bôngó, tóloba níni mpô ya Abaráma, nkóko óyo abótí bísó ? Azwákí níni ?
Roma LinVB 4:2  Sókó Abaráma akómákí moto wa bosémbo mpô ya misálá mya yě, mbele akokákí komíkúmisa, kasi o míso ma Nzámbe té !
Roma LinVB 4:3  O Minkandá bakomí níni ? Abaráma ayambákí Nzámbe, yangó wâná Nzámbe akómísí yě moto wa bosémbo.
Roma LinVB 4:4  Bakokabelaka moto wa mosálá likabo té, bakofútaka yě lifúta.
Roma LinVB 4:5  Kasi sókó moto atíí motéma na Oyo akokómisa mosúmuki moto wa bosémbo, atâ asálí mosálá té, Nzámbe akotála yě lokóla moto wa bosémbo mpô ya boyambi bwa yě.
Roma LinVB 4:6  Sé bôngó Davídi atángákí moto wa esengo moto óyo akómí moto wa bosémbo o míso ma Nzámbe, atâ atálí misálá mya yě té :
Roma LinVB 4:7  Esengo na baye Nzámbe alímbísí bangó mabé basálákí, mpé na baye akundí masúmu ma bangó.
Roma LinVB 4:8  Esengo na moto óyo Nzámbe atálí yě lokóla moto wa masúmu té.
Roma LinVB 4:9  Bôngó, bobélé bato bakátísí nzóto bakozala na esengo, tǒ mpé baye bakátísí nzóto té ? Tolobákí mpô ya Abaráma : Nzámbe akómísí yě moto wa bosémbo mpô ya boyambi bwa yě.
Roma LinVB 4:10  O ntángo níni yangó esálémákí ? Ntángo basílákí kokáta yě nzóto, tǒ naíno bakátákí yě nzóto té ? Ezalákí libosó ’te bákáta yě nzóto, nsima té.
Roma LinVB 4:11  Na nsima bakátí yě nzóto lokóla elembo ’te akómí moto wa bosémbo mpô ya boyambi bozalákí na yě ntángo bakátákí yě naíno nzóto té. Bôngó akómí tatá wa bato bánso bayambí Nzámbe, atâ bakátí bangó nzóto té : Nzámbe akómísí bangó bato ba bosémbo.
Roma LinVB 4:12  Akómí mpé tatá wa baye bánso bakátísá nzóto, baye bakotálaka bobélé elembo êná ya nzóto té, kasi bakolandaka nzelá ya boyambi bwa tatá wa bísó Abaráma ntángo naíno bakátákí yě nzóto té.
Roma LinVB 4:13  Nzámbe alakélákí Abaráma na libótá lya yě ’te bakokóma bankóló ba mokili. Apésákí Abaráma elakó êná mpô ya Mobéko té, kasi mpô ya boyambi bwa yě.
Roma LinVB 4:14  Sókó bobélé bato bakotósaka Mobéko bakozwa bolámu boye Nzámbe alakélákí, boyambi bokómí mpámbá ; elakó Nzámbe alakélákí ekómí mpámba lokóla.
Roma LinVB 4:15  Etúmbu ekokí kozala bobélé sókó Mobéko mozalí ; kasi sókó Mobéko mozalí té, moto akokí kobúka bwangó té.
Roma LinVB 4:16  Bôngó, Nzámbe alakélákí bokonzi bwa mokili mpô ya boyambi, sé lokóla likabo. Yangó wâná elakó êná ekokí na bána bánso ba Abaráma : bobélé na baye té bakotósaka Mobéko, kasi mpé na baye bazalí na boyambi lokóla Abaráma, tatá wa bísó bánso.
Roma LinVB 4:17  Ekomámí mpé boye : « Nakómísí yǒ tatá wa bikólo biíké. » Azalí tatá wa bísó o míso ma Nzámbe, lokóla ayambákí ’te Nzámbe akokí kosé­kwisa bato mpé kozalisa bilóko biye bizalákí té.
Roma LinVB 4:18  Abaráma atíákí motéma na Nzámbe : atâ amóní nzelá sókí té, ayambí sé boyambi ; bôngó akómí tatá wa bato ebelé, lokóla Nzámbe alobákí : Libótá lya yǒ likozala libótá linéne.
Roma LinVB 4:19  Abaráma ayambí, abétí ntembe té, atâ amóní ’te akómí penepene na kokúfa, alingákí ákokisa mibú monkámá, mpé Sára akokákí kobóta lisúsu té.
Roma LinVB 4:20  Abaráma andimí elakó ya Nzámbe, abétí ntembe té, ayambí sé boyambi, mpé boyambi bwa yě bopésí yě ngúyá ya kokúmisa Nzámbe.
Roma LinVB 4:21  Andimí sôló ’te Nzámbe azalí na ngúyá ya kokokisa maye alakélákí.
Roma LinVB 4:22  Yangó wâná Nzámbe akómísí yě moto wa bosémbo o míso ma yě.
Roma LinVB 4:23  Awa bakomí o Minkandá ’te Nzámbe andimí yě mpô ya boyambi bwa yě, bakomí bôngó bobélé mpô ya yě mǒkó té,
Roma LinVB 4:24  kasi mpô ya bísó lokóla ; tokokóma bato ba bosé­mbo sókó toyambí Nzámbe, Oyo asékwísí Mokonzi wa bísó Yézu Krístu.
Roma LinVB 4:25  Bakabákí Yézu mpô ya masúmu ma bísó mpé asékwí mpô tókóma bato ba bosémbo.
Chapter 5
Roma LinVB 5:1  Awa tokómí bato ba bosémbo mpô ya boyambi, tokómí na bo­bóto bísó na Nzámbe mpô ya Mokonzi wa bísó Yézu Krístu.
Roma LinVB 5:2  Mpô ya boyambi akótísí bísó o bondeko bwa Nzámbe. Tofándí bô­ngó o bolingi bwa yě ; tozalí mpé na elíkyá ya sôló ’te akoyíngisa bísó o nkémbo ya yě.
Roma LinVB 5:3  Nabakísí boye : tokomíkúmisaka mpô ya malózí, mpô toyébí ’te malózí makozwela bísó moléndé ;
Roma LinVB 5:4  moléndé mokobótaka ezalela elámu, ezalela elámu ekobótaka elíkyá.
Roma LinVB 5:5  Moto azalí na elíkyá êná akobúngama té, mpô Nzámbe apésí bísó Elímo Sántu, óyo atóndísí mitéma mya bísó na bolingi bwa Nzámbe.
Roma LinVB 5:6  O elaká Nzámbe alakákí, Krístu awéí mpô ya bísó basúmuki, mpô tozalákí na ngúyá ya komíbíkisa té.
Roma LinVB 5:7  Kondima kokúfa mpô ya moto sémba ezalí mpási, mbele bakokí kondima kokúfa mpô ya moto malámu.
Roma LinVB 5:8  Yangó wâná Nzámbe amónísí bísó bolingi bwa yě, zambí Krístu awákí mpô ya bísó ntángo tozalákí naíno ba­súmuki.
Roma LinVB 5:9  Awa tokómí bato ba bosémbo mpô ya makilá ma Krístu, ntembe té, Krístu akobíkisa bísó mokolo Nzámbe akolakisa nkándá ya yě.
Roma LinVB 5:10  Tozalákí bangúná ba Nzá­mbe, kasi Nzámbe alímbísí bísó mabé mánso mpô ya liwá lya Mwána wa yě. Bôngó, áwa tozóngí o bondeko bwa yě, toyébí malámu ’te tokobíka mpô ya bomoi bwa yě.
Roma LinVB 5:11  Tóbakisa : tozwí lokúmu epái ya Nzámbe mpô ya Mokonzi wa bísó Yézu Krístu, óyo azóngísí bísó o bondeko bwa Nzámbe.
Roma LinVB 5:12  Lisúmu liyákí o mokili mpô ya mabé ma moto sé mǒkó, mpé lisúmu libótí liwá. Bôngó, bato bánso basengélí kowá, mpámba té, bánso basálí lisúmu.
Roma LinVB 5:13  Ntángo Mobéko mwa Móze mobimákí naíno té, bato bazalákí kosála masúmu ; kasi bazalákí kozwa etúmbu mpô ya masúmu té, zambí Mobéko mozalákí naíno té.
Roma LinVB 5:14  Nzókandé, bandá Adámu téé Móze bato bazalákí kowá, atâ baye basálákí lisúmu té lokóla Adámu, óyo abúkákí mobéko ; yě moto azalákí lokóla ndakisa ya Krístu, moto óyo asengélákí koyâ nsima.
Roma LinVB 5:15  Kasi mabé ma Adámu makokání na likabo lya Nzámbe té. Sôló, mpô ya mabé ma moto mǒkó, bato bánso basengélákí kowâ. Kasi bolámu bwa Nzámbe bolekí bonéne, mpé makabo ma yě maye mazwǎmí mpô ya moto mǒkó, Yézu Krístu, matóndí epái ya bato bánso.
Roma LinVB 5:16  Lisúsu : likabo liye lya Nzámbe lilekí na bonéne nyongo ya lisúmu eye to­zwákí mpô ya moto mǒkó. Mpô ya lisúmu lya moto mǒkó bato bánso bakitákí o likambo ; nzókandé mpô ya makabo ma Nzámbe bato bánso bakokóma bato ba bosémbo, atâ basálákí mabé míngi.
Roma LinVB 5:17  Ya sôló, mpô ya mabé ma moto mǒkó bato bánso basengélákí kowâ ; kasi mpô ya moto mǒkó, Yézu Krístu, bato bánso bazwí ngrásya enéne ya Nzá­mbe, bakómí bato ba bosémbo o míso ma yě, bakozwa mpé bomoi na bokonzi.
Roma LinVB 5:18  Tokokí koloba ’te mpô ya mabé ma moto mǒkó bato bánso bakitákí o likambo ; sé bôngó, mpô ya bosémbo bwa moto mǒkó bato bánso bakómí na bosémbo o míso ma Nzámbe, mpé bosémbo bôná bokozwela bangó bomoi.
Roma LinVB 5:19  Sé ndéngé yǒ kó : Mpô moto mǒkó abóyákí kotósa Nzámbe, bato bánso bakómákí basúmuki ; kasi mpô ya botósi bwa moto mǒkó, bato bánso bakokóma bato ba bosémbo o míso ma Nzámbe.
Roma LinVB 5:20  Ntángo Mobéko mobimí, mabé makómí míngi ; kasi áwa masúmu makómí ebelé, ngrásya ya Nzámbe ekómí koleka naíno.
Roma LinVB 5:21  Bôngó, lokóla masúmu mazalákí na ngúyá ya koboma bato, ngrásya ya Nzámbe bokoyêlaka bato bosémbo, bozalí na ngúyá ya kopésa bomoi bwa sékô mpô ya Mokonzi wa bísó Yézu Krístu.
Chapter 6
Roma LinVB 6:1  Bôngó, tóloba ’te tótíkala na masúmu mpô ’te Nzámbe ábakisela bísó ngrásya ? Sókí moké té !
Roma LinVB 6:2  Mpó ya maye matálí masúmu, tosílí tokúfí. Ndéngé níni tokokí kolanda mangó lisúsu ?
Roma LinVB 6:3  Bínó mǒkó boyébí malámu ’te mokolo tokúlákí batísimo ya Yézu Krístu, tokúlákí yangó mpô tókúfa na yě elo­ngó.
Roma LinVB 6:4  Bôngó, sókó na batísimo tokúfákí na yě elongó, tokundámákí mpé na yě elongó. Kasi áwa Tatá asékwísí Krístu na ngúyá ya yě, tosengélí kokóma na ezalela ya bomoi bwa sika.
Roma LinVB 6:5  Zambí lokóla tosangání na Krístu, áwa tokúfí lokóla yě akúfákí, tokosangana mpé na yě o nsékwa ya yě.
Roma LinVB 6:6  Tóyéba malámu : babomákí bomoto bwa bísó bwa kala o kurúse na yě elongó, mpô ’te nzóto ya bísó ya masúmu ékúfa mpé tózala baómbo ba lisúmu lisúsu té.
Roma LinVB 6:7  Ya sôló, moto akúfí azalí moómbo wa lisúmu lisúsu té.
Roma LinVB 6:8  Lokóla tokúfí na Krístu elongó, toyambí ’te tozalí na bomoi elongó na yě.
Roma LinVB 6:9  Toyébí ’te Krístu óyo asílí asékwí akokúfa lisúsu té, liwá likokí kosála yě lisúsu elóko té.
Roma LinVB 6:10  Na liwá lya yě asúkísí bokási bwa masúmu na mbala yǒ kó sékô. Bomoi bozalí na yě sikáwa bozalí bomoi sôló o míso ma Nzámbe.
Roma LinVB 6:11  Bínó bobélé bôngó : bóyéba ’te bosílí bokúfí o maye matálí masúmu. Kasi o míso ma Nzámbe bozalí na bomoi, mpô bozalí lisangá na Yézu Krístu.
Roma LinVB 6:12  Nzóto ya bínó, eye esengélí kokúfa, ékóma lisúsu moómbo wa lisú­mu té, bôngó bótósa lisúsu mpósá ebé ya nzóto té.
Roma LinVB 6:13  Bóndima lisúsu té ’te nzóto ya bínó ésálela mabé na lisúmu, kasi bómíbonzela Nzámbe lokóla bato babíkí o liwá ; bósála ’te nzóto ya bínó ésálela bosémbo mpô ya Nzámbe.
Roma LinVB 6:14  Lisúmu likokí kozala mokonzi wa bínó té, mpô bozalí baómbo ba Mobéko té, kasi bána ba bolingo ba Nzámbe.
Roma LinVB 6:15  Bôngó áwa tozalí lisúsu baó­mbo ba Mobéko té, kasi bána ba bolingo ba Nzámbe, tóloba ’te tokokí kosála masúmu ? Sókí moké té !
Roma LinVB 6:16  Boyébí ’te sókó bomípésí na moto mpô ya kosálela yě, bokómí baómbo ba moto óyo bozalí kotósa : sókó botósí lisúmu, bokosúka o liwá ; sókó botósí Nzámbe, bokokóma bato ba bosémbo o míso ma Yě.
Roma LinVB 6:17  Tótóndo Nzámbe, mpô bozalí lisúsu baómbo ba lisúmu té, kasi sikáwa bokómí kotósa na motéma mǒkó matéya ma sôló maye batéyákí bínó.
Roma LinVB 6:18  Bolongwí o boómbo bwa masúmu, sikáwa bokómí kosálela bosémbo.
Roma LinVB 6:19  Awa nazalí koloba na bato bataú, nakotángela bínó ndakisa ya bísó bato. Libosó bozalákí kokaba nzóto ya bínó bǒ baó­mbo na makambo ma bosóni ; maka­mbo ma bínó mazángákí bosémbo, koleka ndelo. Bómípésa sikáwa na bosémbo, mpô ’te bókóma basántu.
Roma LinVB 6:20  Ntángo bozalákí baómbo ba lisúmu, bozalákí na lotómo la kolanda nzelá ya bosémbo té.
Roma LinVB 6:21  Bozalákí kosála makambo mazalí koyókisa bínó nsóni sikáwa. Bôngó bozwákí níni ? Nsúka ya mangó, sé liwá.
Roma LinVB 6:22  Kasi sikáwa bolongwí o boómbo bwa lisúmu mpé bokómí basáleli ba Nzámbe, bozwí bôngó likabo lya bosántu ; mpé na nsúka bokozwa bomoi bwa lobíko.
Roma LinVB 6:23  Sôló, lifúta lya lisúmu, sé liwá ; kasi likabo Nzámbe akopésaka : bomoi bwa sékô mpô ya Krístu Yézu Mokonzi wa bísó.
Chapter 7
Roma LinVB 7:1  Bandeko, nalobí na bínó bato boyébí ntína ya mibéko : boyébí ’te moto asengélí kotósa mibéko bobélé ntángo azalí na bomoi.
Roma LinVB 7:2  Ndakisa : mwásí wa libála asengélí kotósa mibéko mya libála mikolo mínso mobáli wa yě azalí na bomoi. Kasi sókó mobáli awéí, akangémí na mibéko mya libála lisúsu té.
Roma LinVB 7:3  Sókó akómí na mobáli mosúsu ntángo mobáli wa yě azalí naíno na bomoi, bakobénga yě mwásí wa bo­káli. Kasi sókó mobáli akúfí, mwásí asengélí kotósa mibéko mya libála lisúsu té ; sókó babálí yě na mobáli mosúsu, bakobénga yě mwá­sí wa bokáli té.
Roma LinVB 7:4  Bandeko, bínó sé bôngó, bokangémí lisúsu na Mobéko té, mpô nzóto ya Krístu ekúfákí. Bozwí mokonzi mosúsu óyo asékwákí o bawá mpô ’te bísó tóbótela Nzámbe mbuma.
Roma LinVB 7:5  Ntángo tozalákí naíno baómbo ba nzóto, mpósá ya mabé ezalákí o nzóto ya bísó ; Mobéko mozalákí koyébisa bísó bôngó. Mpósá eye etíndákí bísó tósála mabé mpô tóbóta mbuma iye ikosúkisa bísó o liwá.
Roma LinVB 7:6  Kasi sikáwa tolongwí o boómbo bwa Mobéko, zambí tokúfí o maye matálí nzóto, eye ezalákí kokanga bísó o boómbo. Totíkí kosálela Nzámbe na ndéngé ya kala lokóla ekomámí o Mobéko, tozalí kosálela yě na ndéngé ya sika lokóla Elímo akolakisaka bísó.
Roma LinVB 7:7  Bôngó, tóloba ’te Mobéko mwa Móze mokómí ndé lisúmu ? Sókí moké té ! Sé mpô ya Mobéko nayébákí níni ezalí lisúmu. Mobéko motíndí ’Olúla té’ ; sókó Mobéko molobákí bôngó té, mbele nayébákí té ’te kolúla ezalí mabé.
Roma LinVB 7:8  Bôngó mpô ya Mobéko lisúmu lizwákí nzelá ya kotínda ngáí nálúla mabé ndéngé na ndéngé. Sókó Mobéko mozalákí té, mbele lisúmu lizalákí na ngúyá té.
Roma LinVB 7:9  Kala, ntángo Mobéko mozaláká té, ngáí nazalákí na bomoi. Kasi ntá­ngo Mobéko mobimí, lisúmu likómí na ngúyá,
Roma LinVB 7:10  mpé nakómí lokóla moto akúfí. Mobéko batíndákí mpô ya kopésa bomoi, moyélí ngáí liwá.
Roma LinVB 7:11  Mpámba té, mpô ya Mobéko lisúmu lizwí ngúyá ya kosénginya ngáí, mpé ya koboma ngáí.
Roma LinVB 7:12  Sôló, Mobéko mozalí mosántu mpé mokotíndaka sé mitíndo misá-ntu mpé milámu.
Roma LinVB 7:13  Mobéko, elóko elámu, ekómélí ngáí ndé ntína ya liwá ? Sókí moké té ! Mobéko mozalí malámu, kasi na elóko elámu, yangó ndé Mobéko, lisúmu liyélí ngáí liwá, mpé lilakísí bôngó ’te lizalí lisúmu sôló. Masúmu mazwí ngúyá ya ko­ngala makási sé mpô ya Mobéko.
Roma LinVB 7:14  Toyébí ’te Mobéko moútí na Nzámbe, kasi ngáí nazalí moto motaú, moómbo wa lisúmu.
Roma LinVB 7:15  Ya sôló, maye nakosálaka, nayébí ntína ya mangó té : maye nalingí kosála, nakosálaka mangó té, nzókandé nakosálaka maye nakobóyaka.
Roma LinVB 7:16  Bôngó, sókó nasálí maye nalingí té, nandimí ’te Mobéko mozalí molámu.
Roma LinVB 7:17  Yangó wâná emónóní ’te ngáí moto nakosálaka bôngó té, bobélé lisúmu lizalí o motéma mwa ngáí likosálaka yangó.
Roma LinVB 7:18  Sôló, nayébí ’te bosémbo bozalí na ngáí sókí té, nazalí koloba sé mpô ya nzóto. Atâ nayókí mpósá ya kosála malámu, nakokí kosála mangó té.
Roma LinVB 7:19  Yangó wâná, malámu maye nalingí kosála, nakosálaka mangó té, mpé mabé maye nalingí kosála té, nakosálaka mangó.
Roma LinVB 7:20  Bôngó, sókó nasálí likambo nalingí té, elakísí ’te ezalí ngáí té moto nasálí lyangó, kasi lisúmu liye lifándí o nzóto ya ngáí.
Roma LinVB 7:21  Yangó wâná, namóní ’te ntángo nalingí kosála malámu, mpósá ya kosála mabé eyélí ngáí.
Roma LinVB 7:22  Na motéma mwa ngáí nakosepelaka mobéko mwa Nzámbe míngi.
Roma LinVB 7:23  Kasi nayókí mpósá o nzóto ya ngáí ezalí kobunda etumba na mobéko moye nandimí na mayéle ma ngáí ; mpósá êná ekokómisaka ngáí moómbo wa lisúmu lifándí o nzóto ya ngáí.
Roma LinVB 7:24  Aá, ngáí moto wa mawa ! Náni akobíkisa ngáí o boómbo bwa nzóto eye ezalí koyêla ngáí liwá ?
Roma LinVB 7:25  Tótóndo Nzámbe mpô ya Yézu Krístu Mokonzi wa bísó ! Mayéle ma ngáí makotíndaka ngáí nátósa mobéko mwa Nzámbe, kasi nzóto ya ngáí ekotíndaka ngáí nátósa mobéko mwa lisúmu.
Chapter 8
Roma LinVB 8:1  Yangó wâná, baye basangání na Krístu Yézu bakokita o likambo lisúsu té.
Roma LinVB 8:2  Tozwí ngúyá ya Elímo Sántu, óyo apésí bísó bomoi o Yézu Krístu. Ngúyá eye ebíkísí bísó o boómbo bwa mobéko moye mokwêísákí bísó o lisúmu mpé o liwá.
Roma LinVB 8:3  Eye Mobéko mokokákí kosála té, mpô ya botaú bwa bato, Nzámbe moto asálí yangó : atíndákí Mwána wa Yě ábótama na nzóto, lokóla nzóto ya basúmuki. Asúkísí bôngó makási ma lisúmu o nzóto ya bísó
Roma LinVB 8:4  mpô tókokisa maye Mobéko motíndí, zambí tokolandaka lisúsu makambo ma nzóto té, kasi ma Elímo Sántu.
Roma LinVB 8:5  Bato bakolandaka nzóto, balingí makambo maye nzóto ekolukaka ; baye bakolandaka nzelá ya Elímo, bakokanisaka maye Elímo Sántu akolingaka.
Roma LinVB 8:6  Nsúka ya maye nzóto elingí, sé liwá ; nsúka ya maye Elímo alingí, bomoi mpé bobóto.
Roma LinVB 8:7  Baye bakokanisaka sé maye makosepelisa nzóto bakolingaka Nzámbe té, babóyí kotósa mobéko mwa Nzámbe, bakokí kotósa yě té.
Roma LinVB 8:8  Bato bakolandaka makambo ma nzóto bakokí kosepelisa Nzámbe té.
Roma LinVB 8:9  Kasi bínó bozalí baómbo ba nzóto té, bozalí bato ba Elímo, zambí Elímo wa Nzámbe afándí o mitéma mya bínó. Moto azalí na Elímo wa Krístu té, azalí moto wa yě té.
Roma LinVB 8:10  Sôló, nzóto esengélí kokúfa mpô ya masúmu, kasi sókó Krístu afándí o mitéma mya bínó, Elímo akopésa bínó bomoi, zambí bosílí bokómí bato ba bosémbo o míso ma Nzámbe.
Roma LinVB 8:11  Ya sôló, sókó Elímo wa Nzámbe óyo asékwísí Yézu o bawá azalí na bínó, bobélé Nzámbe óyo asékwísí Krístu Yézu akosé­kwisa mpé nzóto ya bínó nsima ya liwá. Akosála bôngó na ngúyá ya Elímo wa yě, óyo afándí o mitéma mya bínó.
Roma LinVB 8:12  Bôngó, bandeko ba ngáí, tozalí na nyongo, kasi ya nzóto té, mpô tóla­nda makambo ma nzóto.
Roma LinVB 8:13  Mpô, sókó bolandí makambo ma nzóto, bokokúfa ; kasi sókó na ngúyá ya Elímo Sántu botíkí makambo ma nzóto, bokozala na bomoi.
Roma LinVB 8:14  Baye bánso bandimí ’te Elímo wa Nzámbe ákamba bangó, bazalí bána ba Nzámbe.
Roma LinVB 8:15  Elímo óyo bo­zwí akómísí bínó baómbo té mpô ’te bóbá­nga lisúsu. Akómísí bínó bána ba Nzá­mbe, yangó wâná tokokí kobénga yě ‘Aba ! Tatá !’
Roma LinVB 8:16  Elímo yě mǒkó apésí bísó mayéle, ayébísí bísó ’te tozalí bána ba Nzámbe.
Roma LinVB 8:17  Mpé sókó tozalí bána, tokozwa mpé makabo ma Nzá­mbe, tokozwa mangó lisangá na Krístu, zambí áwa tozalí koyóka mpási elongó na yě, tokozwa mpé nkémbo elongó na yě.
Roma LinVB 8:18  Namóní ’te malózí mánso tokoyókaka sikáwa makokání atâ moké té na nké­mbo eye Nzámbe akolakisa bísó nsima.
Roma LinVB 8:19  Zambí, na mpósá enéne bikelámo bínso bizalí kozila mokolo bána ba Nzámbe bakomónono.
Roma LinVB 8:20  Sôló, bikelámo bínso sókó bikómí lokóla bilóko mpámba, bya­ngó mǒkó bilingákí bôngó té, Nzámbe moto akánákí bôngó. Kasi bikelámo bizángí elíkyá té :
Roma LinVB 8:21  bikobíka o boómbo bwa liwá, biko­zwa mpé bonsómí na lokúmu la bána ba Nzámbe.
Roma LinVB 8:22  Ya sôló, toyébí ’te téé sikáwa bikelámo bínso bizalí kokímela mpé koyóka mpási lokóla mwásí alingí ábóta.
Roma LinVB 8:23  Bobélé bya­ngó bizalí kokímela té, ná mpé bísó lokóla, atâ tozwí Elímo lokóla likabo lya libosó lya Nzámbe, tozalí kolela o mitéma, áwa tozalí kozila naíno mokolo Nzámbe akokómisa bísó bána ba yě mpenzá mpé akobíkisa nzóto ya bísó o boómbo.
Roma LinVB 8:24  Tosílí tobíkí ! Ezalí ntína ya elíkyá ya bísó. Moto asílí kozwa elóko azalí lisúsu na elí­kyá té ’te akozwa yangó : náni akokí ndé kolíkya elóko eye asílí azwí ?
Roma LinVB 8:25  Lokóla tozalí kolíkya maye tomóní naíno té, tozalí kozila mangó na moléndé.
Roma LinVB 8:26  Sé bôngó, Elímo Sántu akoyáka kosálisa bísó bato tozángí makási, mpô bísó mǒkó toyébí kosámbela malámu té. Elímo yě méí azalí kosámbelela bísó na bobóndeli mpenzá na maloba maye moto mǒkó akokí koloba té.
Roma LinVB 8:27  Mpé Nzámbe óyo akomónoko mitéma mya bato, ayébí maye Elímo alingí ; Elímo akobó­ndelaka Nzámbe mpô ya bísó basántu, lokóla Nzámbe yě mǒkó alingí.
Roma LinVB 8:28  Toyébí ’te Nzámbe akosálisaka baye balingí yě, bázwa bolámu o makambo mánso ; yě mǒkó aponí bangó lokóla akánákí út’o kala.
Roma LinVB 8:29  Ya sôló, áwa ayébáká bangó út’o kala, aponókí bangó bázala loléngé la Mwána wa yě, mpô ’te Krístu ázala Mwána wa libosó o ntéi ya bandeko ebelé.
Roma LinVB 8:30  Awa aponókí bangó libosó, abyángákí bangó ; mpé áwa abyángákí bangó, akómísákí bangó bato ba bosémbo o míso ma yě ; mpé baye bakómí bato ba bosémbo, akémbísí bangó.
Roma LinVB 8:31  Tóloba lisúsu níni ? Lokóla Nzá­mbe alingí bísó, náni akokí kosála bísó mabé ?
Roma LinVB 8:32  Nzámbe ayókélákí atâ Mwána wa yě mǒkó mawa té, kasi akabákí yě mpô ya bísó bánso. Bô­ngó, áwa akabí Mwána wa yě, akopésa bísó malámu mánso té, sôló ?
Roma LinVB 8:33  Náni akofúnda baye Nzámbe aponí ? Moto mǒkó te, mpô Nzámbe akómísí bangó bato ba bosémbo.
Roma LinVB 8:34  Náni akokí kokitisa bangó o likambo ? Moto mǒkó té, mpô Yézu Krístu, óyo akúfákí mpé asé­kwí, afándí o lobóko la mobáli la Nzámbe mpé azalí molobeli wa bísó.
Roma LinVB 8:35  Elóko níni ekokabola bísó na bolingi bwa Krístu ? Malózí ? Nsómo ? Minyóko ? Nzala ? Bobóla ? Likáma tǒ liwá ?
Roma LinVB 8:36  Lokóla ekomámí o Minkandá Misántu : « Mpô ya yǒ liwá likokánelaka bísó mikolo mínso, bakosálaka na bísó lokóla na mpatá ya koboma. »
Roma LinVB 8:37  Kasi tokolónga maye mánso mpô ya Nzámbe óyo akolingaka bísó.
Roma LinVB 8:38  Ya sôló, nayébí malámu ’te elóko atâ níni, ézala liwá tǒ bomoi, ézala bǎnzelú tǒ bilímo bibé, ézala makambo ma leló tǒ maye makoyâ nsima,
Roma LinVB 8:39  ézala ngúyá ya likoló tǒ ya nsé, ézala atâ ekelámo níni ekokoka kokabola bísó na bolingi bwa Nzámbe té, zambí Nzámbe alakísákí bolingi bwa yě, boye bomónóní o Mokonzi wa bísó Yézu Krístu.
Chapter 9
Roma LinVB 9:1  Maye nakoyébisa bínó mazalí ma sôló. Krístu ayébí ’te nazalí kokósa té, Elímo ayébísí ngáí mangó o motéma.
Roma LinVB 9:2  Nazalí na mawa míngi, nakoyókaka motéma mpási ntángo ínso.
Roma LinVB 9:3  Mbele epusí malámu Nzámbe ápésa ngáí mǒkó etúmbu, nákabwana mosíká na Krístu mpô ya bandeko ba ngáí, baye bazalí na ngáí ekólo yǒ kó.
Roma LinVB 9:4  Bazalí bato ba Israél, Nzámbe akómísákí bangó bána ba yě, alakísákí bangó nkémbo ya yě. Akátákí na bangó bondeko mpé apésákí bangó mibéko. Alakísákí bangó milúlú mya losámbo la sôló, apésákí bangó elakó ya libíkí.
Roma LinVB 9:5  Bazali bána ba bankóko ba bísó ba kala. Na nsima Krístu, óyo alekí bínso, abótámí o libótá lya bangó. Bákúmisa yě Nzámbe o bileko bínso sékô ! Amen.
Roma LinVB 9:6  Nzókandé liloba lya Nzámbe likeí mpámba té : bána ba Israél baponómí bánso na Nzámbe té.
Roma LinVB 9:7  Mpé atâ baye bánso babótámí o libótá lya Abaráma bazalí bána ba yě té, zambí ekomámí : Bobélé baye bazalí bána ba Izáka, bangó bato bazalí bána ba yǒ.
Roma LinVB 9:8  Elakísí ’te bána bánso ba Abaráma bazalí bána ba Nzámbe té, bobélé bána baponómí mpô ya elakó bazalí bána ba Nzámbe.
Roma LinVB 9:9  Nzámbe alakélákí Abaráma na maloba maye : Nakoyâ o ntángo ekokí, mpé Sára akobóta mwána mobáli.
Roma LinVB 9:10  Mpé esílí naíno té : Bána babáli bábalé baye Rebéka abótákí, bazalákí bána ba tatá mǒkó Izáka, óyo azalí nkóko wa bísó.
Roma LinVB 9:11  Atâ bána babótámákí naíno té, atâ basálákí naíno malámu tǒ mabé té, Nzámbe alobákí na Rebéka : Mwána wa libosó akosálela mozimi wa yě.
Roma LinVB 9:12  Nzámbe alakísí bôngó ’te akoponoko bobélé lokóla yě mǒkó alingí. Akolukaka bobélé baye yě mǒkó abyángí, akotálaka misálá mya bangó té.
Roma LinVB 9:13  Ekomámí bôngó o Minkandá Misántu : Nali­ngákí Yakób leká Ezáu.
Roma LinVB 9:14  Bôngó tóloba ’te Nzámbe azá­ngí bosémbo ? Sókí moké té !
Roma LinVB 9:15  Mpô alobákí na Móze : Oyo nalingí koyókela yě mawa, nakoyókela yě mawa ; sókó nalingí kosála moto malámu, nakosála yě malámu.
Roma LinVB 9:16  Yangó elekí maye moto akokí kolinga tǒ kosála, etálí sé Nzámbe óyo akoyókelaka bato mawa.
Roma LinVB 9:17  Eko­mámí o Minkandá Misántu ’te Nzámbe alobákí na Fárao boye : Natíákí yǒ mokonzi bobélé mpô ’te názwa nzelá ya kolakisa bokási bwa ngáí ; bôngó bato bákúmisa nkómbó ya ngáí o nsé mobimba.
Roma LinVB 9:18  Yangó wâná, sókó Nzámbe alingí, ayókélí moto mawa ; sókó alingí, akómísí yě motó makási.
Roma LinVB 9:19  Mbele okotúna ngáí : Sókó ezalí bôngó, ntína níni Nzámbe akosilikaka ? Náni akokí kobóya maye Nzá­mbe alingí ?
Roma LinVB 9:20  Moto, yǒ ndé náni ’te ótía ntembe na Nzámbe ? Elóko yǒ osálí ekokí ndé kotúna yǒ : Mpô níni osálí ngáí bôngó ?
Roma LinVB 9:21  Kanísá mosáli mbéki : akosálaka mbéki ya monzele tǒ mbéki ya mpá­mba, bôngó akokí kokémbisa yangó té lokóla yě mǒkó alingí ?
Roma LinVB 9:22  Nzámbe alingákí kolakisa nkándá mpé ngúyá ya yě : mikolo míngi mpenzá akangákí motéma na botáli mbéki iye ikómí ya kobwáka.
Roma LinVB 9:23  Asálákí bôngó mpô ya kolakisa nkémbo ya yě ndelo té na mbéki iye abongísákí út’o kala mpô ya koké­mbisa yangó.
Roma LinVB 9:24  Mbéki iye izalí bísó bato tobyángámí o ntéi ya ba-Yúda, kasi o ntéi ya bikólo bisúsu lokóla.
Roma LinVB 9:25  Elobámí bôngó o búku ya Ozéa : Ekólo eye ezalákí ya ngáí té, na­kotá­nga yangó ekólo ya ngáí, mpé baye na­zalákí kolinga té, nakolinga bangó.
Roma LinVB 9:26  Mpé o esíká bayébísákí bangó : « Bozalí bato ba ngáí té », bakotánga bangó bána ba Nzámbe wa bomoi.
Roma LinVB 9:27  Mpé Izáya asakólí mpô ya Israél : Atâ bána ba Israél bazalákí míngi lokóla zélo lya libóngo lya mbú, sé mwâ ndámbo ya bangó bakobíka ;
Roma LinVB 9:28  zambí Mokonzi akokokisa liloba lya yě o mo­kili, mobimba mpé nokí.
Roma LinVB 9:29  Mpé lokóla Izáya alobákí libosó : Sókó Mokonzi wa bokási bónso atíkéláká bísó mwâ ndámbo ya bána té, mbele tokómáká lokóla bato ba Sódoma, mbele tozaláká lokóla bato ba Gómora.
Roma LinVB 9:30  Bôngó, tóloba níni ? Bato ba bikólo bisúsu baye bazalákí koluka ’te bákóma bato ba bosémbo o míso ma Nzámbe, basílí bakómí bato ba bosémbo mpô ya boyambi.
Roma LinVB 9:31  Kasi ba-Israél bazalákí koluka Mobéko mokokí kokómisa bangó bato ba bosémbo, bakokísí ntína ya Mobéko môná té.
Roma LinVB 9:32  Ntína níni ? Mpô bazalákí kolanda nzelá ya bosémbo té ; bakanísákí ’te bakokóma bato ba bosémbo na botósi Mobéko. Batútákí libakú na libángá liye likokwêisaka bato,
Roma LinVB 9:33  lokóla ekomámí : Nakotía libángá o Síon, libá­ngá linéne likokwêisaka bato. Kasi moto akotía motéma na lyangó, akoyóka nsóni té.
Chapter 10
Roma LinVB 10:1  Bandeko, nakolíkya na motéma mobimba mpé nabó­ndélí Nzámbe mpô ’te ba-Yúda bábí­ka.
Roma LinVB 10:2  Nandimí sôló ’te bakosá­lelaka Nzá­mbe na moléndé, kasi bayébí té ndé­ngé níni basengélí kosá­la yangó.
Roma LinVB 10:3  Awa babóyákí kondima ’te bobélé Nzá­mbe akokómisaka bato bato ba bosémbo, bamekákí kokóma bato ba bosémbo na makási ma bangó mǒkó, mpé babóyákí komípésa na bosémbo bwa Nzámbe,
Roma LinVB 10:4  zambí Krístu asúkísákí Mobéko : baye bánso bakoyamba yě bakokóma bato ba bosémbo.
Roma LinVB 10:5  Mpô ya bosémbo bokozwama na botósi Mobéko, Móze akomáká : Moto akotósa Mobéko, akobíka na mwangó.
Roma LinVB 10:6  Kasi mpô ya bosémbo bokokí kozwama o nzelá ya boyambi, bakomákí boye : Tíká komítúna : Náni akobuta o likoló ? Bôngó Krístu akití naíno áwa o nsé té ?
Roma LinVB 10:7  Omítúna mpé té : Náni akokita o límfelo ? lokóla ’te : Krístu asengélí naíno kotómbwama út’o mbóka ya bawá.
Roma LinVB 10:8  O Minkandá Misántu bali­ngí kolakisa níni na maloba maye ? Liloba lya Nzámbe lizalí penepene na yǒ, o monoko mwa yǒ mpé o motéma mwa yǒ. Ezalí sé Liloba liye tozalí koyamba mpé kosakola.
Roma LinVB 10:9  Sókó osakólí ’te Yézu azalí Mokonzi, mpé sókó oyambí o motéma ’te Nzámbe asékwísí yě o bawá, okobíka.
Roma LinVB 10:10  Ya sôló, sókó oyambí Liloba o motéma, Nzámbe akokómisa yǒ moto wa bosémbo ; sókó osakólí lyangó, akobíkisa yǒ.
Roma LinVB 10:11  Ekomámí o Minkandá : Moto akoyamba Nzámbe, akoyóka nsóni té.
Roma LinVB 10:12  Yangó wâná ba-Yúda ná bato ba bikólo bi­súsu bakeséní té : bánso bazalí na Mokonzi sé mǒkó, óyo akokabaka makabo ma yě na moto nyónso akobóndela yě,
Roma LinVB 10:13  zambí moto nyó­nso akobóndela nkómbó ya Mokonzi akobíka.
Roma LinVB 10:14  Kasi ndéngé níni bábóndela Mokonzi, sókó bayambí yě té ? Ndéngé níni báyamba yě, sókó bayókí naíno nsango ya yě té ? Ndéngé níni báyóka nsango ya yě, sókó mosakoli azalí té ?
Roma LinVB 10:15  Mpé ndéngé níni moto ásakola, sókó batíndí yě té ? Yangó wâná ekomámí o Minkandá Misántu : Esengo mpenzá ya komóno bantóma bayéí kosangela Nsango Elámu !
Roma LinVB 10:16  Kasi bánso batósí Nsango Elámu té, lokóla Izáya alobákí : Mokonzi, náni andimákí matéya ma bísó ?
Roma LinVB 10:17  Ya sôló, bobélé óyo ayókí Nsango, akokí koyamba yangó, mpé Nsango êná azwí yangó mpô ya liloba lya Krístu.
Roma LinVB 10:18  Tíká nátúna : Ba-Israél bayókákí nsango êná té ? Ntembe té, bayókákí yangó, zambí bayókákí mingóngó mya basakoli o nsé mobimba, maloba ma bangó mayókánákí kín’o nsúka ya mokili.
Roma LinVB 10:19  Nátúna naíno : Mbele ba-Israél batongólókí ntína ya nsango êná té ? Móze asílí alobákí : Nakosála ’te bóyókela bato bazángí ekólo zúwa, nakoyókisa bínó nkándá mpô ya ekólo ya bato bazángí mayéle.
Roma LinVB 10:20  Mpé Izáya abá­ngákí té kobakisa boye : Bato balukákí ngáí té, bamóní ngáí. Bato batúnákí ngáí elóko té, namílakísí na bangó.
Roma LinVB 10:21  Kasi mpô ya ba-Israél alobí boye : Mói mobimba natandákí mabóko mpô ya koyamba bato babóyákí koyamba mpé kotósa.
Chapter 11
Roma LinVB 11:1  Natúní lisúsu : Bôngó Nzámbe abóyí ndé ekólo ya yě ? Sókí moké té ! Ngáí mǒkó nazalí mo-Israél, nkóko wa Abaráma, wa libótá lya Benyamin !
Roma LinVB 11:2  Nzámbe aponókí bato ba yě út’o ebandela, abóyí bangó té. Bókanisa maloba ma Minkandá Misántu esíká Elía afúndí ba-Israél epái ya Nzámbe :
Roma LinVB 11:3  « Mokonzi, babomí baproféta ba yǒ, babúkíbúkí altáre ya yǒ. Tálá, natíkálí ngáí mǒkó, mpé balingí koboma ngáí. »
Roma LinVB 11:4  Bôngó Nzámbe ayanólákí yě níni ? Nabátélí bato nkóto nsambo bázala ba ngáí mpenzá, baye bakúmbámélákí Baal té.
Roma LinVB 11:5  Bôngó téé leló mwâ ndámbo ya bato etíkálí. Nzámbe aponí bangó mpô ya bolámu bwa yě.
Roma LinVB 11:6  Aponí bangó mpô ya bolámu bwa yě, mpô ya misálá mya bangó té. Sókó aponókí bangó mpô ya misálá mya bangó, bolámu bwa Nzámbe bolingákí kozala bolámu bwa sôló té.
Roma LinVB 11:7  Bôngó, tóloba níni ? Elóko bazalákí koluka, ba-Israél bánso bazwí yangó té. Bobélé baye Nzámbe aponí, bazwí yangó. Basúsu bánso bakómákí mitó makási,
Roma LinVB 11:8  lokóla ekomámí o Minkandá Misántu : Nzámbe alembísákí mayéle ma bangó. Téé leló bazalí komóno na míso té, mpé bazalí koyóka na matói té.
Roma LinVB 11:9  Davídi mpé alobákí : Bilóko bya bangó bya kolía bíkóma kotíela bangó motámbo mpé monyámá, bí­kwêisa bangó mpô ’te bázwa etú­mbu.
Roma LinVB 11:10  Míso ma bangó mákúfa, bámó­no lisúsu té ; mpé sálá ’te bázalaka baómbo ntángo ínso.
Roma LinVB 11:11  Natúní mpé boye : Awa batútákí libakú, bakwéí ndé libélá ? Sókí moké té ! Kasi áwa bakwéí, bato ba bikólo bisúsu bazwí nzelá ya kobíka mpô ’te ba-Israél báyókela bangó zúwa.
Roma LinVB 11:12  Lokóla bato ba nsé mobimba bazwí bolámu mpô ya masúmu ma ba-Israél, mpé lokóla basúsu babíkí mpô ba-Israél bakití, esengo ekoleka mpenzá mokolo ba-Yúda bánso bakoyamba libíkí !
Roma LinVB 11:13  Nayébísí bínó bato bozalákí libosó bapagáno : ya sôló, nazalí apóstolo epái ya bapagáno, mpé nakosálaka mosálá mwangó na motéma mǒkó.
Roma LinVB 11:14  Nalingí ’te bato ba ekólo ya ngáí báyókela bínó zúwa, bôngó, na mosálá mwa ngáí, Nzámbe ábíkisa basúsu ba bangó.
Roma LinVB 11:15  Awa Nzá­mbe atíákí ba-Yúda mpembéni, azóngísí bondeko na bikólo bisú­su, yangó wâná o eleko akoyamba ba-Yúda lisúsu, bato baye bakúfákí bakozwa bomoi.
Roma LinVB 11:16  Sókó límpa lya libosó babonzélí Nzámbe likómí lisántu, mámpa masúsu mánso makómí mámpa masántu. Sókó ntína ya nzeté ezalí esántu, bitápi bya yangó bizalí mpé bisántu.
Roma LinVB 11:17  Awa bakátí bitápi bisúsu bya nzeté mpé bapikí yǒ, etápi ya nzeté ya olíva ya zámba, o mobí­mbí mpô ’te ntína ya nzeté éléisa yǒ,
Roma LinVB 11:18  ómíkúmisa té o míso ma bitápi biye bikátémí. Okokí komíkúmisa té, zambí yǒ ozalí koléisa ntína ya nzeté té, ntína moto ezalí koleísa yǒ.
Roma LinVB 11:19  Mbele okoloba : ‘Bakátí bitápi mpô ’te bátía ngáí o esíká êná’.
Roma LinVB 11:20  Olobí malámu. Bakátákí byangó zambí bizángákí boyambi, mpé yǒ otíkálí mpô ya boyambi bwa yǒ ; kasi tíká komíkúmisa, ózala sé na bobángi.
Roma LinVB 11:21  Lokóla Nzámbe akátákí bitápi bya libosó, kébá ’te ákáta yǒ mpé té.
Roma LinVB 11:22  Yangó wâná ókanisa bolámu bwa Nzámbe, ókanisa mpé nkándá ya yě : nkándá ya yě ôná baye bakwéí, bolámu bwa yě ôná yǒ sókó otíkálí o bondeko bwa yě. Sókí bôngó té, akolongola yǒ lokóla.
Roma LinVB 11:23  Mpé bangó, sókó babóngólí mitéma mpé bayambí, Nzámbe akozó­ngisa bangó o nzeté ; azalí na ngúyá ya kosála yangó.
Roma LinVB 11:24  Kanísá : Yǒ etápi ya nzeté ya olíva ya zámba, balo­ngólákí yǒ o nzeté eye ebimísákí yǒ, mpé bapikí yǒ o mobímbí mwa nzeté elámu ya olíva eye ebimísákí yǒ té. Bôngó mpô ’te bázóngisa bitápi biye bibimákí o nzeté êná o mobímbí mobimísákí byangó, ekozala mpási té ?
Roma LinVB 11:25  Bandeko, nalingí ’te bóyéba mobómbamo mǒkó mpô ’te bómíkúmisa té na mayéle ma bínó : ndámbo ya ekólo ya Israél ekolakisa motó makási téé mokolo bato ba bikólo bisúsu bakoyíngela (o Eklé­zya).
Roma LinVB 11:26  Bôngó ba-Israél bánso bakobíka, lokóla ekomámí : Mobíkisi akoúta o Síon, akolongola masúmu o libótá lya Yakób.
Roma LinVB 11:27  Tálá, nakokáta na bangó bondeko mokolo nakolongola masúmu ma bangó.
Roma LinVB 11:28  Ya sôló, áwa bínó boyambí Nsango Elamú, ba-Yúda bakómí bangúná ba Nzámbe. Kasi lokóla Nzámbe aponókí bangó, bazalí sé bána ba yě ba bolingo mpô ya elaká alakélákí bankóko ba bangó.
Roma LinVB 11:29  Makabo Nzá­mbe apésí, akobótola mangó té ; moto yě abyángí, akobóya yě té.
Roma LinVB 11:30  Kala bínó bato ba bikólo bisúsu bozalákí kotósa Nzámbe té, kasi sikáwa Nzámbe ayókélí bínó mawa, zambí ba-Yúda bazalí kotósa yě té.
Roma LinVB 11:31  Sé bôngó : sikáwa ba-Yúda bazalí kotósa Nzámbe té, mpô Nzámbe ayókélí bínó mawa. Na nsima akoyókela mpé bangó mawa.
Roma LinVB 11:32  Ya sôló, áwa bato bánso babóyí kotósa yě, Nzámbe andimákí ’te bákóma lokóla bato ba bolóko, mpô ’te bangó bánso bábíka bobélé mpô ya ngolu ya yě.
Roma LinVB 11:33  Bókanisa naíno bonéne bwa bwányá mpé boyébi bwa Nzámbe ! Ndéngé yě akobongisaka makambo tǒ ndéngé yě akosálaka : moto mǒkó akokí koyéba yangó té !
Roma LinVB 11:34  Náni ayébí makanisi ma Mokonzi Nzámbe ? Náni apésákí yě malako ?
Roma LinVB 11:35  Náni akabélákí yě atâ mwâ elóko, mpô ásénge Nzámbe ’te áfúta yě ?
Roma LinVB 11:36  Zambí bínso biútí na yě, bikelámí na yě, mpé bizalí bya yě. Nkémbo na yě o bileko bínso sékô ! Amen.
Chapter 12
Roma LinVB 12:1  Bandeko, nabóndélí bínó mpô ya ngolu ya Nzámbe : bómíbonza na Nzámbe bǒ libonza lya sôló, libonza lisántu likosepelisaka Nzámbe. Bókúmisa yě bôngó na losámbo bǒ ebongí.
Roma LinVB 12:2  Bólanda ezalela ya bato ba nsé eye té, kasi bókóma bato ba mayéle ma sika, na mitéma mya sika. Bôngó bokoyéba níni Nzámbe alingí bósála, níni ezalí malámu mpé ekosepelisa yě, mpé níni ebongí nyé mpenzá.
Roma LinVB 12:3  Mpô ya ngrásya Nzámbe apésí ngáí, nayébísí mǒkó mǒkó wa bínó bánso : Bótíka loléndo ! Moto mǒkó ámítómbola té ! Moto na moto ámíyéba sé lokóla Nzámbe akabélí yě makabo ma boyambi.
Roma LinVB 12:4  Nzóto ezalí na binama biíké, mpé enama yǒ kó yǒ kó ezalí na mosálá mwa yangó ;
Roma LinVB 12:5  na bísó sé bôngó : tozalí bato baíké, kasi tozalí nzóto sé yǒ kó o Krístu ; bísó bánso tozalí biténi bya nzóto, moto na moto na loléngé la yě.
Roma LinVB 12:6  Tozwí mpé makabo ndéngé na ndéngé, sé lokóla Nzámbe akabélí bísó mangó. Sókó ozwí likabo lya kosakola, sakólá sé lokóla eyamba etíndí.
Roma LinVB 12:7  Sókó ozwí likabo lya kosálisa báníngá, sálísá bangó malámu ; sókó ozwí likabo lya kotéya, téyá malámu ;
Roma LinVB 12:8  sókó ozwí likabo lya koléndisa bato, léndísá bangó. Moto alingí kokabela móníngá elóko, ákaba yangó na motéma mǒkó. Moto azalí na bokonzi, áyángela bato na mpíkó ; óyo akosálisaka bato ba mawa, ásála yangó na esengo.
Roma LinVB 12:9  Bólinga báníngá na mitéma míbalé té, bóbóya makambo mabé, bólanda mambí malámu na moléndé.
Roma LinVB 12:10  Bólingana na motéma mǒkó ; moto na moto átála móníngá lokóla moto alekí yě na bolámu.
Roma LinVB 12:11  Bótía moléndé, bólembe té, bósálela Mokonzi na motéma mobimba.
Roma LinVB 12:12  Na esengo bótía elí­kyá na Nzámbe, bókanga mitéma o ntángo ya mi­nyóko, bólembe kosá­mbela té.
Roma LinVB 12:13  Bó­sálisa bandeko bakrístu bazalí kokélela, mpé bóyamba bampaya malámu o ndáko ya bínó.
Roma LinVB 12:14  Bósénge Nzámbe ’te ábenisa bato bakonyókoloko bínó ; bótó­mbela bangó sé mambí malámu, mabé té.
Roma LinVB 12:15  Bósepela elongó na bato bazalí koyóka esengo, bólela elo­ngó na baye bazalí koyóka mawa.
Roma LinVB 12:16  Bóyókana malámu bínó na bínó, bózala na loléndo té. Bósepela libosó maye mánso mazángí lokúmu. Bómímóno té lokóla bato ba mayéle.
Roma LinVB 12:17  Moto asálí bínó mabé, bózó­ngisela yě mabé té, kasi bóluka kosála maye makobongela bato bánso.
Roma LinVB 12:18  Bózala na bobóto na bato bánso ; bínó mǒkó bóbóya tǒ bó­bébisa bobóto té.
Roma LinVB 12:19  Bandeko ba bolingo, sókó basálí bínó mabé, bózóngisa mabé té, bótíka yangó o mabóko ma Nzámbe, mpô ekomámí o Minkandá : « Mokonzi alobí : Ngáí moto nakokáta makambo ma bato basálí mabé, ngáí mǒkó nakopésa etúmbu. »
Roma LinVB 12:20  Kasi sókó mongúná ayókí nzala, pésá yě bilóko álía. Sókó ayókí mpósá ya mái, pésá yě mái ámele. Sókó osálí bôngó, okoyókisa yě nsóni mpenzá.
Roma LinVB 12:21  Kébá ’te mabé málónga yǒ té, kasi ólónga mambí mabé na bosáli mambí malámu.
Chapter 13
Roma LinVB 13:1  Bínó bánso bótósa bato bakoyángelaka bínó, zambí bokonzi bónso boútí na Nzámbe : Nzámbe moto apésí bayángeli bokonzi.
Roma LinVB 13:2  Yangó wâná, moto abóyí kotósa bakonzi, abóyí mobéko mwa Nzámbe. Bato bakosálaka bôngó, bakomíkitisaka o likambo.
Roma LinVB 13:3  Bato bakosálaka malámu bakokí kobánga bakonzi té, bobélé bato bakosálaka mabé bakobánga bangó. Osála níni mpô ’te óbánga bakonzi té ? Sáláká sé malámu, mpé bakonzi bakokúmisa yǒ,
Roma LinVB 13:4  zambí Nzámbe atíí bangó mpô ya kolé­ndisa yǒ ’te ósála malámu. Kasi sókó osálí mabé, bángá sé bobángi, zambí bakonzi bakolátaka mompánga mpámba té. Nzámbe apésí bangó likokí lya kopésa bato babé etúmbu eye ekokí na bangó.
Roma LinVB 13:5  Bótósa bangó bobélé mpô ya bobángi etúmbu té, kasi bótósa bangó mpô mitéma mya bínó mizalí kotínda bôngó.
Roma LinVB 13:6  Bokofútaka mpáko na ntína êná té ? Zambí bato bakofútisaka mpáko bakosálelaka Nzámbe ntángo bazalí kokokisa misálá mya bangó.
Roma LinVB 13:7  Bópésa moto na moto elóko asengélí na yangó : moto akofútisaka mpáko, bófúta yě mpáko ; óyo ayéí kozwa mpáko ya bilóko, bofúta yě mpáko ya bilóko ; óyo azalí na bokonzi, bómemya yě ; óyo azalí na lokúmu, bókúmisa yě.
Roma LinVB 13:8  Bózala na nyongo na moto mǒ­kó té. Bozalí na nyongo sé yǒ kó : kolinga báníngá ! Moto alingí báníngá, atósí Mobéko mobimba,
Roma LinVB 13:9  zambí ekomámí o mibéko mya Móze : Osála bokáli té, óboma moto té, óyíba té, ólúla elóko ya móní­ngá té ; mpé mibéko misúsu mí­nso mitángémí na bokúsé o mobéko mǒkó : Olinga móníngá lokóla okomílingaka.
Roma LinVB 13:10  Moto alingí móní­ngá, akosála yě mabé té. Yangó wâná moto alingí báníngá ba yě sôló, azalí kotósa Mibéko mí­nso.
Roma LinVB 13:11  Bandeko, boyébí mpé ndéngé níni tokómí sikáwa ; ngonga ya kolongwa o mpongí ekokí. Sikáwa libíkí lya bísó likómí penepene, leká mokolo tobandákí koyamba.
Roma LinVB 13:12  Butú bolingí bósíla, ntóngó elingí étána. Yangó wâná tótíka mambí ma molílí, tósála misálá mikokí na mói.
Roma LinVB 13:13  Tózala na ezalela elámu lokóla bato bakosálaka na mói : tólía na lokósó té, tólángwa masanga té, tótíka mambí ma bosóni mpé ma mobúlú, tóswâna té, tóyókelana zúwa té.
Roma LinVB 13:14  Bólanda ezalela ya Mokonzi Yézu Krístu ; bópangana té na malúli ma motéma mpé na maye nzóto ekoyókaka mpósá.
Chapter 14
Roma LinVB 14:1  Moto azalí na boyambi bokási té, bóyamba yě malámu ; bówéla ntembe na yě té.
Roma LinVB 14:2  Mosúsu akanísí ’te akokí kolía bilóko bínso, mosúsu óyo azángí boyambi bokási, akolíaka bobélé ndúnda.
Roma LinVB 14:3  Bôngó moto akolíaka bilóko bínso ákínola mosúsu té óyo akomípímaka bilóko ; mpé óyo akomípímaka bilóko ásámbisa mosúsu té, óyo akolíaka bínso. Nzámbe alingí bangó bánso.
Roma LinVB 14:4  Yǒ ndé náni ’te ósá­mbisa mosáli wa moto mosúsu ? Atéleme tǒ ákwéya, etálí sé nkóló wa yě. Ntembe té, Mokonzi óyo azalí na ngúyá ya kosálisa yě, akotélemisa yě.
Roma LinVB 14:5  Mosúsu akokanisaka ’te mokolo mǒkó mokobongela yě leká mikolo misúsu ; mosúsu akokanisaka ’te mikolo mínso mizalí sé ndéngé yǒ kó. Moto na moto álanda makanisi ma motéma mwa yě.
Roma LinVB 14:6  Moto akokanisaka ’te mokolo mǒ­kó mokobongela yě leká mikolo misúsu, akosálaka bôngó mpô ya kokúmisa Mokonzi. Moto akolíaka bilóko bínso, akosálaka bôngó mpô ya Mokonzi, mpô akotóndoko Nzámbe. Mpé moto akolíaka bilóko bínso té, yě mpé akosálaka bôngó mpô ya Mokonzi ; yě mpé akotóndoko Nzámbe.
Roma LinVB 14:7  Ya sôló, mǒ­kó té azalí na bomoi mpô ya yě mǒkó, mpé mǒkó té akokúfa mpô ya yě mǒkó.
Roma LinVB 14:8  Kasi tozalí na bomoi mpô ya Mokonzi, tokokúfa mpé mpô ya Mokonzi : atâ tozalí na bomoi, atâ towéí, tozalí bato ba Mokonzi ;
Roma LinVB 14:9  zambí Krístu awéí mpé asékwí mpô ’te ázala Mokonzi wa baye bazalí na bomoi mpé wa baye bawá.
Roma LinVB 14:10  Kasi yǒ, ntína níni okosá­mbisaka móníngá ? Mpô níni okokínolaka móníngá ? Nzámbe akosá­mbisa bísó bánso,
Roma LinVB 14:11  mpô ekomámí boye : « Mokonzi alobí : Sôló, ngáí nazalí ! Bato bánso bakofukamela ngáí, bato bánso bakosakola nkémbo ya Nzámbe. »
Roma LinVB 14:12  Yangó wâná moto na moto akosámba epái ya Nzámbe mpô ya makambo ma yě mǒkó.
Roma LinVB 14:13  Bôngó tótíka kosámbisana ; kasi bókána kotíela móníngá libakú lyǒ­kó té, liye likokí kokwêisa yě tǒ kobénda yě o nzelá ya masúmu.
Roma LinVB 14:14  E­ngébéné na makanisi ma Mokonzi Yézu, nayébí sôló ’te elóko yangó mǒkó ezalí ekila té. Kasi sókó moto akanísí ’te elóko ezalí ekila, ekómélí yě ekila.
Roma LinVB 14:15  Sókó oléí elóko eye móníngá atálí lokóla ekila, mpé oyókísí yě bôngó mpási o motéma, olandí mobéko mwa bolingani té. Obébisa motéma mwa móní­ngá na bilóko bya kolía té, kanísá ’te Krístu akúfákí mpô ya yě !
Roma LinVB 14:16  Bókéba ’te báníngá bákóma kotóngo bínó té mpô ya biye bokolía,
Roma LinVB 14:17  zambí moto wa bokonzi bwa Nzá­mbe akopanganaka té na biye akolíaka tǒ akomeleke, kasi akopa-nganaka na bosémbo, na bobóto mpé na esengo, makabo ma Elímo Sántu.
Roma LinVB 14:18  Bobélé moto akosálelaka Krístu bôngó, akosepelisaka Nzámbe, mpé bato bakondima yě.
Roma LinVB 14:19  Yangó wâná, tólanda bobélé maye makopésa bato bobóto mpé makoléndisa boyókani.
Roma LinVB 14:20  Obébisa mosálá mwa Nzámbe té mpô ya bilóko bya kolía. Ya sôló, bilóko bínso bizalí péto, kasi moto apésí móníngá esímbisi sókó aléi byangó, asálí mabé.
Roma LinVB 14:21  Malámu ólía nyama té, ómele masanga té, ókila bilóko bínso bikokí koyókisa ndeko wa yǒ motéma mpási, tǒ bikokí kokwêisa tǒ kolembisa yě.
Roma LinVB 14:22  Maye ondimí mpô ya bilóko bya kolía, matálí sé bínó na Nzámbe. Esengo na moto óyo azalí kobánga o motéma té, ntángo azalí kosála maye yě mǒkó andimí.
Roma LinVB 14:23  Kasi moto aléí bilóko na ntembe o motéma, amíkitísí o likambo ; mpá­mba té, aléí na ntembe ; mánso asálí na ntembe mazalí masúmu.
Chapter 15
Roma LinVB 15:1  Bísó bato tozalí na boyambi bokási tosengélí kosálisa baye bazalí naíno na boyambi botaú ; tósála bobélé té maye makosepelisa bísó.
Roma LinVB 15:2  Moto na moto áluka malámu maye makosepelisa móní­ngá mpé makokólisa yě o boyambi.
Roma LinVB 15:3  Krístu mpé alukákí bolámu bwa yě mǒkó té, lokóla ekomámí o Minkandá Misántu : Mafínga ma baye bafíngí yǒ makwélí ngáí.
Roma LinVB 15:4  Mánso makomámáká kala, makomámí mpô ya kotéya bísó mpô tózala na elíkyá, zambí tokozwa moléndé mpé libóndí o maloba ma Minkandá Misántu.
Roma LinVB 15:5  Nzámbe óyo akoléndisaka mpé akobóndoko bísó ásálisa bínó mpô ’te bóyókana malámu, lokóla Krístu Yézu alakísákí bínó.
Roma LinVB 15:6  Bôngó motéma sé mǒkó, monoko sé mǒkó bókúmisa Nzámbe, Tatá wa Mokonzi wa bísó Yézu Krístu.
Roma LinVB 15:7  Mpô ya lokúmu la Nzámbe bóyambana malámu, lokóla Krístu ayambákí bínó.
Roma LinVB 15:8  Nayébísí bínó ya sôló, Krístu amíkómísákí mosáleli wa ba-Yúda mpô ya kolakisa ’te Nzámbe alingákí kokokisa bilakó biye alakélákí bankóko.
Roma LinVB 15:9  Bato ba bikólo bisúsu bákúmisa Nzámbe mpô ayókélí bangó mawa. Ekomámí bôngó o Minkandá : Yangó wâná nakokúmisa yǒ o bikólo bínso, mpé nakoyémbela nkómbó ya yǒ nzémbo.
Roma LinVB 15:10  Mpé lisúsu : Bato ba bikólo bínso, bósepela elongó na bato ba yě,
Roma LinVB 15:11  mpé lisúsu naíno : Bikólo bínso bíkúmisa Mokonzi, mpé bato bánso ba mokili bákémbisa yě.
Roma LinVB 15:12  Izáya mpé alobí : Moto akobótama o libótá lya Yése : akotéleme mpô ’te áyángela bikólo bínso. Bato ba bikólo bínso bakotía elíkyá na yě.
Roma LinVB 15:13  Nzámbe óyo apésákí bínó elíkyá, átóndisa bínó na esengo mpé na bobóto mpô ya boyambi bwa bínó, ákólisa mpé elíkyá êná na ngúyá ya Elímo Sántu.
Roma LinVB 15:14  Bandeko ba ngáí, nayébí malámu ’te bokokí kopésana malako, mpô bolingí kosála sé malámu, mpé boyébí maye Nzámbe alingí.
Roma LinVB 15:15  Nzó­kandé nakomí maloba masúsu ma monkandá moye makási mpô ’te bókundola maye batéyákí bínó. Nakomákí mangó zambí Nzámbe apésí ngáí ngrásya,
Roma LinVB 15:16  názala mosáleli wa Krístu epái ya bapagáno mpé mosakoli wa Nsango Elámu ya Nzámbe mpô ’te bato ba bikólo bisúsu mpé bamípésa na Nzámbe lokóla ekosepelisa yě, mpé bákóma basántu na ngúyá ya Elímo Sántu.
Roma LinVB 15:17  Yangó wâná nakokí komíkúmisa o Krístu Yézu o míso ma Nzámbe.
Roma LinVB 15:18  Kasi nakokí kotánga sé eye Krístu asálákí na mabóko ma ngáí mpô ’te bato ba bikólo bisúsu bákóma kotósa Nzámbe ; asálákí yangó na maloba mpé na misálá mya ngáí.
Roma LinVB 15:19  Alakísákí bilembo mpé asálákí makamwísi na ngúyá ya Elímo wa Nzámbe : bandá Yerúzalem kín’o Ilíria nasangélákí Nsango Elámu ya Krístu bipái bínso.
Roma LinVB 15:20  Nalingákí kokende sé o bisíká biye bayókí nkómbó ya Krístu naíno té. Bôngó nátó­nga ndáko té o esíká moto mosúsu abandákí kotónga.
Roma LinVB 15:21  Na yangó nalandí maloba ma Minkandá Misántu : O bisíká basangélí naíno nsango ya yě té, bato bakomóno yě ; baye bayókí yangó naíno té, bakoyéba yangó.
Roma LinVB 15:22  Yangó ndé epekísákí ngáí mbala na mbala koyâ epái ya bínó.
Roma LinVB 15:23  Ut’o kala nalingí koyâ kotála bínó, mpé lokóla nasílísí mosálá mwa ngáí áwa,
Roma LinVB 15:24  nazalí na elíkyá ya kokútana na bínó ntángo nakokende o Espá­nya. Mpé sókó tosepélí mwâ moké bísó bánso elongó, bokokí kosálisa ngáí nákóma o mokili môná.
Roma LinVB 15:25  Kasi libosó nakokende o Yerú­zalem, násálisa bandeko ba bísó kun­á.
Roma LinVB 15:26  Zambí bandeko ba Masedónia mpé ba Akáya bandimí ko­ko­ngolo mosolo mpô ya kosálisa bandeko bakrístu ba Yerúzalem, baye bakélélí.
Roma LinVB 15:27  Bandimákí kosála bôngó, zambí bazalí na nyongo epái ya bangó : lokóla bapagáno ba-zwákí bolámu bwa Nzámbe epái ya ba-Yúda, basengélí mpé sikáwa kosálisa bangó na bilóko bisengélí na bangó.
Roma LinVB 15:28  Sókó nasílísí mosálá môná, mpé sókó natíkélí bangó mosolo bakongólókí áwa, nakoke­nde o Espánya, kasi libosó nakoleka epái ya bínó.
Roma LinVB 15:29  Mpé nayébí ’te nakoyâ epái ya bínó na bobenisi bónso bwa Krístu.
Roma LinVB 15:30  Bandeko, naséngí bínó mpô ya Mokonzi wa bísó Yézu Krístu mpé mpô ya bolingi bwa Elímo Sántu, bósálisa ngáí o etumba eye : bósá­mbelaka Nzámbe mpô ya ngáí
Roma LinVB 15:31  mpô ’te bato ba Yudéa baye babóyí Krístu básála ngáí mabé té, mpé mpô ’te bakrístu ba Yerúzalem bándima na bolámu lisálisi nakoke­nde kopésa bangó.
Roma LinVB 15:32  Bôngó, áwa nakokóma epái ya bínó na esengo, Nzámbe ápémisa ngáí mwâ moké o ntéi ya bínó.
Roma LinVB 15:33  Nzámbe wa bobóto ázala na bínó bánso ! Amen.
Chapter 16
Roma LinVB 16:1  Naséngí bínó mpô ya ndeko mwásí wa bísó Fébe, diáko­no-mwásí wa Eklézya ya Ken­kréa :
Roma LinVB 16:2  bóyamba yě mpô ya Mokonzi, lokóla bato ba Nzámbe bakosálaka ; bósálisa yě mpé o makambo mánso akokí kosénge bínó. Yě mǒkó asálísákí bakrístu baíké, asálísákí ngáí mpé.
Roma LinVB 16:3  Bópésa losáko na Príska mpé na Akwíla, baye basálísákí ngáí o mosálá mwa Krístu Yézu :
Roma LinVB 16:4  bangó babángákí liwá té mpô ya kobíkisa ngáí. Bobélé ngáí mǒkó té nasengélí kotóndo bangó, bandeko bánso ba Biklézya bya bikólo bisúsu basengélí kosála bôngó.
Roma LinVB 16:5  Bópésa mpé losáko na bandeko bánso bakosa­nganaka o ndáko ya bangó. Losáko na Epenéto, wa ngáí wa bolingo, yě moto wa libosó o Azía óyo ayambákí Krístu.
Roma LinVB 16:6  Losáko na María moto amílembísákí míngi mpô ya bínó.
Roma LinVB 16:7  Losáko na Androníko mpé na Yúniasi, bandeko ba ngáí tozalákí na bangó o bolóko : bazalí batéyi ba sôló, mpé bakómákí bakrístu libosó lya ngáí.
Roma LinVB 16:8  Losáko na Ampliáto, óyo nakolingaka mí­ngi mpô ya Mokonzi.
Roma LinVB 16:9  Losáko na Urbáno, móníngá wa ngáí o mosálá mwa Krístu, mpé na Stákis, móníngá wa ngáí wa bolingo.
Roma LinVB 16:10  Losáko na Apélo, óyo alakísákí ’te azalí moto wa Krístu sôló. Losáko na bato bánso ba libótá lya Aristóbulo.
Roma LinVB 16:11  Losáko na Eródíon, ndeko wa ngáí. Losáko na bakrístu ba libótá lya Narsísi.
Roma LinVB 16:12  Losáko na Triféna mpé na Trifóza, bato ba mpíkó o mosálá mwa Mokonzi. Losáko na ndeko mwásí Pérsis, óyo amílembísákí míngi mpô ya Mokonzi.
Roma LinVB 16:13  Losáko na Rúfo óyo Nzámbe aponí, mpé na mamá wa yě, óyo azalí mamá wa ngáí lokóla.
Roma LinVB 16:14  Losáko na Asinekríto, Flégon, Ermes, Patróba, Ermas mpé na bandeko bazalí epái ya bangó.
Roma LinVB 16:15  Losáko na Filólogo, na Yúlia, na Nério mpé na ndeko mwásí wa yě, na Olímpas mpé na bakrístu bánso bazalí epái ya bangó.
Roma LinVB 16:16  Bópésana losáko na ekópi esántu. Bandeko bakrístu bánso batíndélí bínó losáko.
Roma LinVB 16:17  Nabóndélí bínó, bandeko, bókéba na bato babóyí matéya batéyákí bínó mpé balingí kokabola bato. Bókíma bangó.
Roma LinVB 16:18  Bakosálelaka Mokonzi wa bísó Krístu té, bakokanisaka sé bilóko bya kolía ; na maloba ma sukáli mpé ma boléti bakokósaka bato bayékólá té.
Roma LinVB 16:19  Bato bánso bayébí bóníbóní bokotósaka Nzámbe, yangó wâná nakosepelaka na bínó míngi, kasi nalingí kokébisa bínó : bóyéba níni ezalí malámu, bóyéba mpé kobóya makambo mabé.
Roma LinVB 16:20  Nzámbe wa bobóto ásálisa bínó bónyata Sátana nokí. Ngrásya ya Mokonzi wa bísó Yézu Krístu ézala na bínó !
Roma LinVB 16:21  Timotéo, móníngá wa ngáí wa mosálá, atíndélí bínó losáko, ná mpé bandeko ba ngáí Lúsio, Yazon na Sosípater.
Roma LinVB 16:22  Ngáí mpé Térsio, ngáí moto nakomí monkandá moye, napésí bínó losáko la Mokonzi.
Roma LinVB 16:23  Gáyo mpé atíndélí bínó lo­sáko, yě moto ayambákí ngáí o ndáko ya yě ; akoya­mbaka mpé bato bánso ba Eklézya. Lisúsu Erásto, moto akobómbaka mosolo mwa mbóka, ná mpé ndeko wa bísó Kwárto batíndélí bínó losáko. (
Roma LinVB 16:24  Ngrásya ya Mokonzi wa bísó Yézu Krístu ézala na bínó bánso ! Amen.)
Roma LinVB 16:25  Nkémbo na Nzámbe, óyo azalí na ngúyá ya koléndisa bínó engébéné na Nsango Elámu ya Yézu Krístu eye nakosangelaka. Yangó ndé mobómbamo mwa Nzámbe moyébání sikáwa : út’o bileko na bileko bato bayébákí mwangó té,
Roma LinVB 16:26  kasi sikáwa Nzámbe alakísí mwa­ngó. Lokóla ekomámí o Minkandá mya baproféta, Nzámbe atíndí ’te báyébisa mwangó na bato ba bikólo bínso, bándima mpé bátósa mwangó.
Roma LinVB 16:27  Bobélé yě mǒkó Nzámbe apusí bwányá. Nkémbo na yě, mpô ya Yézu Krístu, o bileko bínso sékô !