Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
DANIEL
Up
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10 11 12 13 14
Chapter 1
Dani LinVB 1:1  O mobu mwa misato mwa bokonzi bwa Yoyakim o Yuda, mokonzi wa Babilon Nabukodonozor ayei kobundisa Yeruzalem, azingi yango.
Dani LinVB 1:2  Nzambe akabi Yoyakim, mokonzi wa Yuda, o maboko ma ye na mpe ndambo ya biloko bya Tempelo ya Nzambe. Akei na byango o ekolo ya Sinear mpe atii byango o ndako ya banzambe ba ye.
Dani LinVB 1:3  Mokonzi alobi na Aspenaz, kapita wa bakengeli ba lopango la ye, ’te apono o kati ya bilenge ba Israel bana ba libota lya bakonzi to lya bankumu :
Dani LinVB 1:4  bazala na mbeba te, nzo­to kitoko, bazala mpe na mayele, bayeba makambo ma bwanya, babongo kofanda o ndako ya mokonzi. Apesi Aspenaz mosala mwa koteya bango nkoma mpe lokota la ba-Kaldea.
Dani LinVB 1:5  Mokonzi apesi bango mokolo na mokolo bilei na vino ya meza ya ye. Abokolo bango bongo mibu misato ; na nsima basalela ye.
Dani LinVB 1:6  O kati ya bango bato ba Yudea bazalaki : Daniel, Ananya, Misael na Azarya.
Dani LinVB 1:7  Kapita wa bakengeli apesi bango nkombo ya sika : Daniel akomi Baltasar, Ananya akomi Sadrak, Misael akomi Mesak mpe Azarya akomi Abednego.
Dani LinVB 1:8  Kasi Daniel aka­ni komibebisa te na bolei biloko mpe na bomeli vino ya meza ya mo­konzi ; yango wana abondeli kapita wa bakengeli atika koyela ye biloko biye bya mbindo.
Dani LinVB 1:9  Nzambe asalisi Daniel mpo ’te kapita wa bake­nge­li andimela ye mpe ayokela ye mawa.
Dani LinVB 1:10  Kasi kapita wa bakengeli alobi na Daniel : « Nabangi moko­nzi wa ngai ; ye moto aponeli bino biloko bya bolei mpe bya bomeli. Soko amoni ’te bino bokomi koko­ndo awa baninga ba bino bazali nzo­to kolongonu, ngai moto nako­zwa likambo o miso ma mokonzi. »
Dani LinVB 1:11  Ntango kapita wa bakengeli atiki moto moko akengele Daniel, Ana­nya, Misael na Azarya, Daniel alobi na ye :
Dani LinVB 1:12  « Nabondeli yo, omeka biso basaleli ba yo mikolo zomi, opesa biso se ndunda na mai.
Dani LinVB 1:13  Na nsima okotala bilongi bya biso na biye bya bana bakoliaka bilei bya mokonzi, bongo okoyeba ndenge nini okosala na biso basaleli ba yo. »
Dani LinVB 1:14  Mokengeli andimi maloba ma Daniel mpe ameki bango mikolo zomi.
Dani LinVB 1:15  Nsima ya mikolo zomi bazalaki nzoto kolongonu mpe makasi, leka bana baye bazalaki kolia bilei bya mokonzi.
Dani LinVB 1:16  Banda mokolo mona mokengeli atiki kopesa bango biloko bya bolei mpe vino, mpe apesi bango ndunda.
Dani LinVB 1:17  Nzambe apesi bana baye banei bwanya mpe mayele ma minkanda. Daniel ayebaki mpe kolimbola mamoni mpe ndoto.
Dani LinVB 1:18  Ekomi elaka ’te bakende kolakisa bango na mokonzi, kapita wa bakengeli akambi bango epai ya Nabukodonozor.
Dani LinVB 1:19  Mokonzi asololi na bango, mpe o ntei ya bilenge banso akuti moko te azalaki na mayele lokola Daniel, Ananya, Misael na Azarya. Batelemi wana o boso bwa mokonzi,
Dani LinVB 1:20  mpe ye atuni ba­ngo mituna mya bwanya na mayele ndenge na ndenge, amoni ’te baleki soki mbala zomi banganga banso ba mokili mwa ye na mayele.
Dani LinVB 1:21  Daniel atikali kuna kin’o mobu mwa yambo mwa bokonzi bwa Siro.
Chapter 2
Dani LinVB 2:1  O mobu mwa mibale mwa bokonzi bwa ye, Nabukodonozor aloti ndoto. Akomi kobanga mi­ngi mpe mpongi ekimi ye.
Dani LinVB 2:2  Bo­ngo mokonzi atindi bato babyanga banganga, bamoni-makambo, batali minzoto na bato basusu ba mayele, mpo ’te balimbola ndoto ya ye. Ntango bakomi epai ya mokonzi,
Dani LinVB 2:3  alobi na bango : « Naloti ndoto, eba­ngisi ngai ; nalingi nayeba ntina ya ndoto ena. »
Dani LinVB 2:4  Batali-minzoto balobi o lokota la ba-Aram : « Moko­nzi kuma ! Ozala seko ! Yebisa biso basaleli ba yo ndoto olotoki mpe tokolimbolela yo. »
Dani LinVB 2:5  Mokonzi ayebisi bango : « Nakoloba na bino polele : Soko boyebisi ngai ndoto mpe ndimbola ya yango te, nakokata nzoto ya bino biteni biteni, mpe nakobuka ndako ya bino ikufa nye.
Dani LinVB 2:6  Kasi soko boyebisi ngai ntina na ndimbola ya ndoto, bokozwa mosolo mpe mabonza kitoko, mpe nakokumisa bino mingi. Bongo bolimbolela ngai ndoto mpe boyebisa ngai ntina ya yango. »
Dani LinVB 2:7  Banso balobi na ye mbala ya ibale : « Mokonzi, yebisa biso basaleli ba yo ndoto olotoki mpe tokolimbolela yo ntina. »
Dani LinVB 2:8  Kasi mokonzi ayanoli : « Namoni ’te bozali kosala mayele mpo ya kolekisa ntango, zambi boyebi ’te nasili nakati likambo.
Dani LinVB 2:9  Soko bokoki koyebisa ngai ndoto te, banso bokozwa etumbu lolenge se loko. Boyokani ’te bokokosa ngai na eli­kya ’te nsima makambo mabo­ngwa­na. Yango wana bino moko boyebisa ngai ndoto nini nalotoki, bongo ngai mpe nakondima ’te boyebi kolimbola yango. »
Dani LinVB 2:10  Batali-minzoto balobi na mokonzi : « O mokili mobimba moto moko akoki kosalisa mokonzi o likambo liye te. Ata mokolo moko te mokonzi mosusu asengeki banganga likambo liye, azala mokonzi monene ndenge nini to na bokasi boni.
Dani LinVB 2:11  Eloko mokonzi asengi biso eleki kwokoso, moto moko akoki koyebisa mo­konzi te, bobele banzambe bayebi. Kasi bango bakofandaka awa na biso bato ba nsuni te. »
Dani LinVB 2:12  Eyoki mokonzi maloba mana, asiliki mpe na nkanda enene atindi ’te baboma ba­nganga banso o Babilon.
Dani LinVB 2:13  Ebimi mobeko ’te banganga banso base­ngeli kokufa, baluki mpe Daniel na baninga ba ye mpo ’te baboma ba­ngo.
Dani LinVB 2:14  Na mayele mpe na bokebi Daniel akei kotuna Ariok, kapita wa babomi, oyo alingi abanda koboma banganga o Babilon,
Dani LinVB 2:15  alobi na Ariok, ntoma wa mokonzi : « Mpo nini mokonzi abimisi mobeko moye makasi ? » Ariok ayebisi Daniel likambo malamu.
Dani LinVB 2:16  Daniel akei kokutana na mokonzi, abondeli ye ’te atikela ye mwa mikolo, azwa bo­ngo ntango ya kolimbolela moko­nzi ndoto ya ye.
Dani LinVB 2:17  Daniel azongi o ndako ya ye, ayebisi baninga ba ye Ananya, Misael na Azarya likambo lina.
Dani LinVB 2:18  Atindi bango babondela Nza­mbe wa likolo ’te asalisa bango o mobombamo moye : baboma Daniel na baninga ba ye te elongo na banganga banso ba Babilon.
Dani LinVB 2:19  Nzambe ayebisi Daniel ntina ya mobombamo o limoni na butu. Bongo Daniel atondi Nzambe wa likolo.
Dani LinVB 2:20  Daniel abandi kosakola, alobi : « Bakumisa nkombo ya Nzambe o bileko binso, zambi bobele ye azali na bwanya mpe na bokasi solo.
Dani LinVB 2:21  Ye akopesaka binso eleko mpe ntango, akolongolaka mpe akotiaka bako­nzi. Ye akopesaka bato ba bwanya mayele malamu mpe akolakisaka bango ntina ya makambo manso.
Dani LinVB 2:22  Akoyebisaka ntina ya makambo mabombami mosika ; ayebi mambi manso makosalema o kati ya molili, mpo azali na mwinda ntango inso.
Dani LinVB 2:23  Natondi yo, Nzambe wa bankoko ba ngai, nakumisi yo, mpo opesi ngai bwa­nya na mpiko, mpe oyebisi ngai maye totunaki yo ; olakisi biso ntina ya likambo lya mokonzi. »
Dani LinVB 2:24  Bongo Daniel akei epai ya Ariok, oyo mokonzi atindi ’te aboma banganga banso o Babilon. Daniel alobi na ye : « Oboma banganga o Babilon te. Kotisa ngai epai ya mokonzi. Ngai moto nakolimbolela ye ndoto ya ye. »
Dani LinVB 2:25  Ariok akotisi Daniel noki epai ya mokonzi, alobi na ye : « O kati ya ba-Yuda bakangemi awa, nazwi moko akoki koli­mbola ndoto ya yo. »
Dani LinVB 2:26  Mokonzi atuni Daniel oyo bakobengaka mpe Baltasar : « Okoki koyebisa ngai ndoto nini nalotoki mpe kolimbolela ngai yango ? »
Dani LinVB 2:27  Da­niel ayanoli mokonzi : « Mobo­mba­mo yo mokonzi olingi koyeba, banganga na bato ba bwanya na bata­li-minzoto bakoki koyebisa yo mwango te.
Dani LinVB 2:28  Kasi Nzambe moko azali o likolo, akolimbolaka mi­bomba­mo minso. Ye ayebisi yo, moko­nzi Nabukodonozor, maye makosalema o mikolo mikoya. Nakoyebisa yo ndoto olotoki mpe mamoni omonoki o mbeto ya yo :
Dani LinVB 2:29  E mokonzi, ntango ya kolala ozalaki kokanisa mingi maye masengeli koya. Oyo akolakisaka ntina ya mi­bombamo minso akoyebisa yo makambo manso makokwela yo.
Dani LinVB 2:30  Soko bayebisi ngai mobombamo mona, ezali te mpo ngai naleki bato banso na bwanya, kasi mpo ’te nayebisa yo mokonzi ntina ya mobo­mbamo moye mpe ya makanisi ma motema mwa yo.
Dani LinVB 2:31  E Mokonzi, o limoni omonoki ekeko enene mpenza, eye engengi makasi, eyei koteleme o boso bwa yo, eyokisi yo motema nsomo.
Dani LinVB 2:32  Motó mwa ekeko mozalaki mwa wolo, ntolo na maboko ma palata, libumu na bibelo bya mbengi,
Dani LinVB 2:33  ma­kolo ma bibende, matambi mazalaki ndambo ma ebende, ndambo ma mabelé ma libazi.
Dani LinVB 2:34  Awa ozalaki kotala, libanga lyoko likwei, ata moto abwaki lyango te, lipasoli makolo ma ekeko mpe libuki mango nye.
Dani LinVB 2:35  Mpe bongo na mbala yoko ekeko ekwei, inso ibukani : na ebende, na mabelé ma libazi, na mbengi, na palata na wolo ; ekomi lokola matiti. Mompepe molongoli inso, eloko yo­ko etikali te ; mpe libanga libomaki ekeko likomi ngomba enene etondisi mokili mobimba.
Dani LinVB 2:36  Yango nde ndoto olotoki ; sikawa nakopesa yo mokonzi ndimbola ya ndoto.
Dani LinVB 2:37  E Mokonzi, oleki bakonzi banso ! Nzambe wa likolo apesi yo boko­nzi mpe nguya, bokasi mpe nke­mbo.
Dani LinVB 2:38  Nzambe apesi o maboko ma yo ná bato, ná nyama ya zamba ná ndeke ya likolo, ata izali wapi ; atii yo mokonzi wa bango banso. Yango wana motó mwa ekeko mwa wolo ezali yo !
Dani LinVB 2:39  Nsima ya yo bokonzi bosusu bokobima, bokokani na bokonzi bwa yo mpenza te ; na nsima bokonzi bwa masato bokobima, bwa mbengi, bokoyangela nse mobimba.
Dani LinVB 2:40  Ekobima mpe bokonzi bwa manei, bokasi lokola ebende bokonyata binso bikoma mputulu ; lokola ebende ekobukaka binso, bokonyata mpe bokobuka bango banso.
Dani LinVB 2:41  Matambi ma makolo omonoki, ndambo ma mabelé ma libazi, ndambo ma ebende malakisi boko­nzi bokokabwana na nsima ; moko­nzi wa bwango akozala mwa makasi lokola ekeko ezali ndambo ya ebende, ndambo ya mabelé ma libazi.
Dani LinVB 2:42  Matambi, ndambo ya ebe­nde mpe ndambo ya mabelé ma libazi, malakisi ’te bokonzi bokozala na bokasi epai yoko mpe na botau epai esusu.
Dani LinVB 2:43  Esika omonoki nda­mbo ya ebende esangani na nda­mbo ya mabelé ma libazi, elakisi ’te bakonzi bakoluka kolendisa boko­nzi na mabala, kasi mabala mana makoumela kokangana te, se lokola ebe­nde ekokangana na mabelé ma libazi te.
Dani LinVB 2:44  O eleko bakonzi baye bakoyangela, Nzambe wa likolo akobimisa mokonzi wa sika, oyo akoumela seko ; mokonzi wa ekolo esusu akokweisa ye te ; akonyata mpe akosilisa bakonzi banso, kasi ye akoumela na bokonzi seko.
Dani LinVB 2:45  Lokola omonoki : libanga linene lilongwaki o ngomba, liye moto abwakaki te, libanga lina lipasoli ebende, mbengi, mabelé ma libazi, palata na wolo, elakisi ’te Mokonzi Nzambe wa bokasi ayebisi maka­mbo makoya. Ndoto ezali ya solo mpenza, ndimbola ya yango ezali mpe ya solo. »
Dani LinVB 2:46  Mokonzi Nabukodonozor, akitisi elongi o nse mpe akumbameli Daniel. Atindi ’te babonzela Daniel mabonza ma bolei na biloko bya nsolo mpimbo.
Dani LinVB 2:47  Mokonzi alobi na Daniel : « Ya solo, Nzambe wa yo azali Nzambe wa banzambe banso, mokonzi wa bakonzi banso, moli­mboli wa mibombamo minso, mpo yo moto olimboleli ngai mobo­mba­mo moye. »
Dani LinVB 2:48  Na nsima moko­nzi akumisi Daniel, apesi ye makabo manene maike, aluboli ye moya­ngeli wa ekolo ya Babilon mobi­mba mpe akomisi ye mokonzi wa bato banso ba bwanya o Babilon.
Dani LinVB 2:49  Daniel asengi mokonzi ’te Sadrak, Mesak na Abednego batala maka­mbo ma ekolo ya Babilon, Daniel ye moko atikala o lopango la mokonzi.
Chapter 3
Dani LinVB 3:1  Mokonzi Nabukodonozor ato­ngisi ekeko ya wolo : na bolai ekokisi maboko ntuku motoba, na bonene maboko motoba. Atii ya­ngo o esobe enene ya Dura, o ekolo ya Babilon.
Dani LinVB 3:2  Mokonzi Nabukodonozor abengi bankumu, bayangeli, bakambi, basalisi, bafutisi mpako, bateyi ba mibeko, bazuzi na bakomi banso ba ekolo baya kosangana mpo ’te bakumisa ekeko eye moko­nzi Nabukodonozor atongisi.
Dani LinVB 3:3  Bo­ngo bankumu, bayangeli, bakambi, basalisi, bafutisi mpako, bateyi ba mibeko, bazuzi na bakomi banso ba ekolo basangani mpo ’te basepela eyenga ya ekeko mokonzi asalisi ; bayei o boso bwa ekeko mokonzi Nabukodonozor asalisi.
Dani LinVB 3:4  Mosakoli wa mokonzi abeleli na mongongo makasi : « Bino bato ba bikolo bi­nso, ba mikili minso mpe ba nkota inso, boyoka mobeko batindi bino.
Dani LinVB 3:5  Ntango bokoyoka ’te bazali kobete mondule, mpiololo, lokombe, nze­nze, likembe, lindanda na biye­mbeli ndenge na ndenge, banso bokumbamela mpe bokumisa ekeko eye ya wolo mokonzi Nabukodonozor atongisi.
Dani LinVB 3:6  Soko moto aboyi kokumbamela mpe kokumisa ya­ngo, bakobwaka ye noki o etumbelo ya móto makasi. »
Dani LinVB 3:7  Awa bato ba bikolo binso bayoki ’te babeti mo­ndule, mpiololo, lokombe, nzenze, likembe, lindanda na biyembeli nde­nge na ndenge, bato ba bikolo binso, ba mikili minso mpe ba nkota inso bakumbami mpe bakumisi ekeko ya wolo Nabukodonozor ato­ngisi.
Dani LinVB 3:8  Nzokande ba-Kaldea basusu ba­yei kofunda ba-Yuda.
Dani LinVB 3:9  Balobi na mokonzi Nabukodonozor : « Mo­ko­nzi kuma ! Ozala seko !
Dani LinVB 3:10  Yo moko mokonzi obimisi mobeko ’te bato banso, awa bakoyoka ’te babeti mondule, mpiololo, lokombe, nzenze, likembe, lindanda na biye­mbeli ndenge na ndenge, bakumbamela mpe bakumisa ekeko.
Dani LinVB 3:11  Baye baboyi kokumbamela mpe kokumisa ekeko, babwakema o etumbelo ya móto makasi.
Dani LinVB 3:12  Nzokande tala ba-Yuda baye yo oponi o mosala mwa boyangeli ekolo ya Babilon, batali mobeko mwa yo mpamba : Sadrak, Mesak na Abednego ; basaleli nzambe wa yo te mpe baku­mbameli ekeko te, eye otongisi. »
Dani LinVB 3:13  Nabukodonozor alengi na nka­nda, atindi ’te baya na Sadrak, Mesak na Abednego. Bayei na bango o boso bwa mokonzi.
Dani LinVB 3:14  Nabukodo­no­zor atuni bango : « Ya solo, Sadrak, Mesek na Abednego, boboyi nde kosalela banzambe ba ngai mpe kokumbamela ekeko ya wolo eye nasalisi ?
Dani LinVB 3:15  Mbele bokondima sikawa kofukama mpe kokumbamela ekeko eye natongisi, ntango bokoyoka ’te babeti mondule, mpiololo, lokombe, nzenze, likembe, linda­nda mpe biyembeli ndenge na nde­nge ? Soko boboyi kokumbamela yango, bakobwaka bino sikasikawa o etumbelo ya móto makasi. Nani nde nzambe oyo akobikisa bino o maboko ma ngai ? »
Dani LinVB 3:16  Sadrak, Mesak na Abednego bazongiseli mokonzi Nabukodonozor : « Tosengeli koyanola yo motuna moye te.
Dani LinVB 3:17  Soko Nzambe oyo biso tokosalelaka ako­ki kobikisa biso o etumbelo ya móto makasi mpe o maboko ma yo, mokonzi, akobikisa biso.
Dani LinVB 3:18  Kasi ata abikisi biso te, yeba ’te biso tokosalela nzambe wa yo te, mpe tokoku­mbamela ekeko ya yo ya wolo te. »
Dani LinVB 3:19  Eyoki mokonzi Nabukodonozor maloba mana, atoki na nkanda : etali ye Sadrak, Mesak na Abednego akangi elongi. Atindi ’te bapelisa móto makasi mpenza, moleka na bokasi mbala nsambo ndenge bameseni kopelisa.
Dani LinVB 3:20  Atindi bilombe basoda ba ye ’te bakanga Sadrak, Mesak na Abednego maboko mpe makolo, babwaka bango o etumbelo ya móto makasi.
Dani LinVB 3:21  Bakangi ba­ngo awa balati milato, sapato na binkoti na bilamba binso, mpe ba­bwaki bango o etumbelo ya móto makasi.
Dani LinVB 3:22  Bato baye bamemi Sadrak, Mesak na Abednego, bango moko baziki na móto, moye mokonzi atindaki ’te bapelisa mwa­ngo makasi.
Dani LinVB 3:23  Babali basato : Sadrak, Mesak na Abednego bakwei o etu­mbelo ya móto makasi, maboko na makolo makangemi na mikulu.
Dani LinVB 3:24  Batamboli o ntei ya miloli, bakumisi Nzambe mpe bakembisi Mokonzi.
Dani LinVB 3:25  Azarya atelemi, afu­ngoli monoko mpe o kati ya móto asambeli boye :
Dani LinVB 3:26  Lokumu na yo Mokonzi, Nzambe wa bankoko ba biso ; bakumisa nkombo ya yo o bileko binso.
Dani LinVB 3:27  Ozali na bosembo o mambi ma­nso osaleli biso, misala mya yo minso mizali mya bosolo, nzela ya yo inso izali semba, okokataka makambo manso na bosembo.
Dani LinVB 3:28  O makambo manso otindelaki biso ozali se na bosembo, o likambo likwelaki Yeruzalem, engumba ya bankoko ba biso, lokola. Mpo ya masumu ma biso osalaki biso bongo, na bosembo mpe na bosolo.
Dani LinVB 3:29  Solo, tosumukaki mpe tosalaki mabe na bokimi yo, tondimi ’te tosalaki lisumu linene, toyokaki mitindo mya mobeko mwa yo te.
Dani LinVB 3:30  Totosaki mitindo mya yo te, tokokisaki bitinda bya yo te, biye opesaki biso mpo ya bolamu bwa biso.
Dani LinVB 3:31  Manso osalaki biso, etumbu opesaki biso, osalaki se na ntina mpe na bose­mbo mpenza.
Dani LinVB 3:32  Okabaki biso o maboko ma ba­nguna, bato bazangi mibeko, mpe baboyi Nzambe, mpe o maboko ma mokonzi aza­ngi bosembo, oyo aleki bakonzi ba nse banso na bobe.
Dani LinVB 3:33  Sikawa tokoki kofungola monoko te, biso basaleli ba yo, baye bakokumisaka yo, tosambwi mpe toyoki nsoni.
Dani LinVB 3:34  Mpo ya nkombo ya yo, otika biso seko te, oboya bondeko te, boye okataki na biso.
Dani LinVB 3:35  Mpo ya bolingi bwa Abarama, molingami wa yo, mpe Izaka, mosaleli wa yo, na Israel, mosantu wa yo, opima biso ngolu ya yo te.
Dani LinVB 3:36  Olakelaki bango bana ebele lokola minzoto o likolo, lokola zelo o libongo lya mbu.
Dani LinVB 3:37  Mokonzi, bato ba bikolo bisusu ba­komi koleka biso na bokasi, mpo ya masumu ma biso, tokiti lelo o miso ma bango.
Dani LinVB 3:38  Tozali lisusu na mokonzi te, profeta te, nkumu te, libonza lya kotumba to lya koboma te, mpaka ya malasi te, esika ya kobonza mbuma ya liboso mpe te, mpo tozwa ngolu o miso ma yo.
Dani LinVB 3:39  Kasi ndimela biso bato tobondeli yo na motema mawa mpe na bosawa, lokola okoyambaka libonza lya mpata na ngombe babali, lokola bana ba mpata ya mafuta nkoto na nkoto.
Dani LinVB 3:40  Yamba bongo libonza lya bomoi bwa biso lelo mpe sepela ’te tolandi yo na motema mobimba, zambi baye bakolikya na yo bakoyoka nsoni te.
Dani LinVB 3:41  Sikawa tozali kolanda yo na motema moko, kobanga yo mpe koluka elongi ya yo.
Dani LinVB 3:42  Otika biso toyoka nsoni te, kasi salisa biso na ngolu ya yo mpe lakisa biso bolingi bwa yo bonene.
Dani LinVB 3:43  Bikisa biso engebene na maka­mwisi okosalaka, bongo bato bakumisa nkombo ya yo, Mokonzi.
Dani LinVB 3:44  Sukisa baye bakoyokisaka basaleli ba yo mpasi, yokisa bango nsoni mpe silisa bokasi bwa bango.
Dani LinVB 3:45  Bayeba ’te yo moko ozali Nzambe mpe Mokonzi, Nzambe wa nkembo o nse mobi­mba.
Dani LinVB 3:46  Bato ba mokonzi, baye babwaki bango o móto, balendisi móto ; batii mpaka, mafuta maindo makasi, matiti makauka mpe nkoni.
Dani LinVB 3:47  Mi­loli mibuti likolo lya etumbelo maboko soki ntuku inei na libwa.
Dani LinVB 3:48  Móto moye mopanzani, mozikisi ba-Kaldea bazalaki penepene na etu­mbelo.
Dani LinVB 3:49  Kasi anzelu wa moko­nzi akiti o kati ya etumbelo penepene na Azarya na baninga ba ye mpe azongisi móto nsima o libanda lya etumbelo.
Dani LinVB 3:50  O kati ya etumbelo ati­ndi mpio lokola mompepe mwa nto­ngo. Móto mokomi epai ya ba­ngo te, mozikisi bango te, mpe moyokisi bango mpasi te.
Dani LinVB 3:51  Bongo bango basato, mongongo se moko, babandi kokumisa mpe kotondo Nzambe o kati ya etumbelo, balobi :
Dani LinVB 3:52  Bakumisa yo, Mokonzi, Nzambe wa bankoko ba biso, na yo lokumu mpe nkembo o bileko binso ! Bakumisa nkombo ya yo ya nke­mbo mpe ya bosantu, na yo lokumu mpe nkembo o bileko binso !
Dani LinVB 3:53  Bakumisa yo o Tempelo ya yo ya nkembo esantu, bayembela yo, bapesa yo nkembo o bileko binso !
Dani LinVB 3:54  Bakumisa yo moto ofandi o ngwe­nde ya yo ya bokonzi, bayembela yo, bapesa yo nkembo o bileko binso !
Dani LinVB 3:55  Bakumisa yo, Mokonzi, oyebi bozindo bwa mai, bayembela yo, bapesa yo nkembo o bileko binso ! Bakumisa yo moto ofandi likolo lya ba-kerubim, bayembela yo, bapesa yo nkembo o bileko binso !
Dani LinVB 3:56  Bakumisa yo kuna o etando ya likolo, bayembela yo, bapesa yo nkembo o bileko binso !
Dani LinVB 3:57  Bikelamo binso bya Nzambe, bokumisa Mokonzi, boyembela ye, bopesa ye nkembo o bileko binso !
Dani LinVB 3:58  Banzelu ba Nzambe, bokumisa Mokonzi, boyembela ye, bopesa ye nkembo o bileko binso !
Dani LinVB 3:59  Binso bya likolo, bokumisa Mokonzi, boyembela ye, bopesa ye nkembo o bileko binso !
Dani LinVB 3:60  Mai manso o likolo, bokumisa Mokonzi, boyembela ye, bopesa ye nkembo o bileko binso !
Dani LinVB 3:61  Mampinga manso ma likolo, bokumisa Mokonzi, boyembela ye, bopesa ye nkembo o bileko binso !
Dani LinVB 3:62  Mwese na sanza, bokumisa Mokonzi, boyembela ye, bopesa ye nkembo o bileko binso !
Dani LinVB 3:63  Minzoto minso mya likolo, bokumisa Mokonzi, boyembela ye, bopesa ye nkembo o bileko binso !
Dani LinVB 3:64  Mbula na londende, bokumisa Mokonzi, boyembela ye, bopesa ye nkembo o bileko binso !
Dani LinVB 3:65  Mimpepe minso, bokumisa Mokonzi, boyembela ye, bopesa ye nkembo o bileko binso !
Dani LinVB 3:66  Móto na molunge, bokumisa Mokonzi, boyembela ye, bopesa ye nkembo o bileko binso !
Dani LinVB 3:67  Mpio na malili, bokumisa Moko­nzi, boyembela ye, bopesa ye nkembo o bileko binso !
Dani LinVB 3:68  Mamio na mpela, bokumisa Mokonzi, boyembela ye, bopesa ye nkembo o bileko binso !
Dani LinVB 3:69  Mbula ya matandala, bokumisa Mokonzi, boyembela ye, bopesa ye nkembo o bileko binso !
Dani LinVB 3:70  Mbula ya mpembe, bokumisa Mokonzi, boyembela ye, bopesa ye nkembo o bileko binso !
Dani LinVB 3:71  Butu na moi, bokumisa Mokonzi, boyembela ye, bopesa ye nkembo o bileko binso !
Dani LinVB 3:72  Moi na molili, bokumisa Mokonzi, boyembela ye, bopesa ye nkembo o bileko binso !
Dani LinVB 3:73  Minkalali na mampata, bokumisa Mokonzi, boyembela ye, bopesa ye nkembo o bileko binso !
Dani LinVB 3:74  Binso o mokili, bokumisa Moko­nzi, boyembela ye, bopesa ye nkembo o bileko binso !
Dani LinVB 3:75  Ngomba inene na ike, bokumisa Mokonzi, boyembela ye, bopesa ye nkembo o bileko binso !
Dani LinVB 3:76  Nzete na ndunda, bokumisa Mokonzi, boyembela ye, bopesa ye nkembo o bileko binso !
Dani LinVB 3:77  Maziba manso, bokumisa Moko­nzi, boyembela ye, bopesa ye nkembo o bileko binso !
Dani LinVB 3:78  Mbu na ebale, bokumisa Mokonzi, boyembela ye, bopesa ye nkembo o bileko binso !
Dani LinVB 3:79  Mbisi inene na ike, bokumisa Mokonzi, boyembela ye, bopesa ye nkembo o bileko binso !
Dani LinVB 3:80  Ndeke inso ya likolo, bokumisa Mokonzi, boyembela ye, bopesa ye nkembo o bileko binso !
Dani LinVB 3:81  Nyama ya zamba mpe ya mboka, bokumisa Mokonzi, boyembela ye, bopesa ye nkembo o bileko binso !
Dani LinVB 3:82  E bino bato banso, bokumisa Mokonzi, boyembela ye, bopesa ye nkembo o bileko binso !
Dani LinVB 3:83  Bino bana ba Israel, bokumisa Mokonzi, boyembela ye, bopesa ye nkembo o bileko binso !
Dani LinVB 3:84  Bino banganga Nzambe, bokumisa Mokonzi, boyembela ye, bopesa ye nkembo o bileko binso !
Dani LinVB 3:85  Bino basaleli ba Nzambe, bokumisa Mokonzi, boyembela ye, bopesa ye nkembo o bileko binso !
Dani LinVB 3:86  Bino bankoko basemba bakufá, bokumisa Mokonzi, boyembela ye, bopesa ye nkembo o bileko binso !
Dani LinVB 3:87  Bino basantu na bato ba bosawa, bokumisa Mokonzi, boyembela ye, bopesa ye nkembo o bileko binso !
Dani LinVB 3:88  Ananya, Azarya, Misael, bokumisa Mokonzi, boyembela ye, bopesa ye nkembo o bileko binso ! Zambi abikisi biso o libulu lya limfelo, alongoli biso o maboko ma liwa, abimisi biso o etumbelo ya móto makasi, alongoli biso o kati ya miloli mya móto.
Dani LinVB 3:89  Botondo Mokonzi aleki bolamu, zambi ngolu ya ye ezali na nsuka te.
Dani LinVB 3:90  Bino baye bokosambelaka Moko­nzi, bokumisa Nzambe aleki banza­mbe banso ; boyembela ye mpe botondo ye, zambi ngolu ya ye ezali na nsuka te.
Dani LinVB 3:91  Nabukodonozor ayoki ’te bazalaki koyemba. Akamwi mingi, ate­lemi noki, atuni bankumu ba ye : « Boni, biso tobwaki bato basato o etumbelo ya móto te ? Tokangaki bango maboko mpe makolo te ? » Bango bazongisi : « Lokuta te, mokonzi. »
Dani LinVB 3:92  Mokonzi alobi : « Bongo ndenge nini nazali komono bato banei bakangemi na nsinga te, bazali kotambola o kati ya móto ? Móto mozali kozikisa bango te, mpe oyo wa banei azali na lolenge la anzelu wa Nzambe. »
Dani LinVB 3:93  Nabukodonozor abelemi na monoko mwa etumbelo, abeleli : « Sadrak, Mesak na Abednego, basaleli ba Nza­mbe wa likolo, bobima, boya awa. » Bongo Sadrak, Mesak na Abe­dnego babimi o etumbelo.
Dani LinVB 3:94  Ba­nkumu, bayangeli, bakambi na basaleli ba mokonzi bayei kotala bato baye basato, bamoni ’te móto mosali bango mabe soki te. Ata nsuki ya motó iziki te, bilamba bya ba­ngo bibebi te mpe nzoto ya bango elu­mbi nsolo ya móto te.
Dani LinVB 3:95  Bongo Nabukodonozor agangi : « Bakumisa Nzambe wa Sadrak, Mesak na Abe­dnego, zambi atindi anzelu wa ye mpe abikisi basaleli ba ye, baye batiaki mitema na ye. Baboyaki kotosa mobeko mwa mokonzi wa ekolo, mpe bandimaki kokufa mpo ’te basalela nzambe mosusu te, kasi se Nzambe wa bango.
Dani LinVB 3:96  Yango wana ngai nakobimisa mobeko moye : Moto atangi nkombo ya Nzambe wa Sadrak, Mesak na Abednego na limemya te, azala moto wa ekolo nini to wa mokili nini, to aloba ata lokota nini, nakokata nzoto ya ye biteni biteni mpe nakobuka ndako ya ye. Mpamba te, nzambe mosusu oyo akoki kobikisa lokola Nzambe ona azali te. »
Dani LinVB 3:97  Na nsima mokonzi asalisi Sadrak, Mesak na Abednego mingi mpo ’te bazwa bolamu o mokili mwa Babilon.
Dani LinVB 3:98  Ngai mokonzi Nabukodonozor ; boboto bozala na bino bato ba bikolo binso, ba mikili minso mpe ba nkota inso o nse mobimba.
Dani LinVB 3:99  Na­moni malamu ’te nayebisa bino makambo manso Nzambe wa likolo asaleli ngai.
Dani LinVB 3:100  Asaleli ngai makamwisi manene mpenza mpe alakisi ngai bilembo bya nguya enene ! Bokonzi bwa ye bozali bokonzi bwa seko, azali mokonzi o bileko na bileko !
Chapter 4
Dani LinVB 4:1  Ngai Nabukodonozor nafa­ndaki kimia o ndako ya ngai, makambo manso mazalaki kota­mbola malamu.
Dani LinVB 4:2  Kasi mokolo moko nalotoki ndoto mpe nabangaki. Makambo nalotoki ntango ya kolala, mpe mamoni namoni o ndoto bitungisaki ngai mingi.
Dani LinVB 4:3  Yango wana natindaki ’te ba­byangela ngai bato banso ba bwanya bazali o Babilon, bayebisa ngai ntina ya ndoto.
Dani LinVB 4:4  Banganga, bamoni-makambo, ba­ta­li-minzoto na bato basusu ba bwanya bayaki ; nayebisaki bango ndoto ya ngai, kasi bakokaki koli­mbolela ngai ndoto te.
Dani LinVB 4:5  Na nsima Daniel ayei, nkombo ya ye esusu Baltasar, eye azwi mpo ya nzambe wa ngai. Elimo ya banzambe basa­ntu ezali na ye. Nayebisi ye ndoto ya ngai, nalobi :
Dani LinVB 4:6  « Baltasar, kapita wa banganga, nayebi ’te ozali na elimo ya banzambe basantu bayebi mibombamo minso. Limbolela ngai ndoto eye nalotoki.
Dani LinVB 4:7  Ntango nalalaki o mbeto namonoki makambo : ‘Namoni nzete elai, etelemi o katikati ya mokili.
Dani LinVB 4:8  Nzete ena ekoli mpe elendi mpe­nza, nsonge ekei mosika kin’o likolo, bato banso ba mokili bazalaki komono yango.
Dani LinVB 4:9  Ezalaki na nkasa kitoko mpe na mbuma ebele, bato banso bazalaki kolia mbuma ya nzete ena. Nyama ya zamba izalaki kobo­mbama o nse ya nzete, mpe ndeke izalaki koya kofanda o bitapi, bato banso bazalaki koya kolia wana.
Dani LinVB 4:10  Ntango nalalaki o mbeto, namonoki makambo : Namonoki mokengeli mosantu moko, auti o likolo.
Dani LinVB 4:11  Abeleli na mongongo makasi, alobi : Bokata nzete, bobuka mpe bitapi ; bolongola nkasa inso mpe bopa­nza mbuma. Nyama ya zamba ikima o nse ya nzete ena, mpe ndeke ifanda wana lisusu te.
Dani LinVB 4:12  Kasi ekumu mpe minsisa bitikala o mabelé, bokanga yango na nsinga ya ebe­nde mpe ya mbengi. Mamio ma likolo makitela yango mingi ; nzete ena elia matiti elongo na nyama.
Dani LinVB 4:13  Motema mwa ye mokozala lisusu motema mwa moto te, bakopesa ye motema mwa nyama mpe elaka ya mibu nsambo ekolekela ye se bongo.
Dani LinVB 4:14  Bakengeli bakopesa mobeko mwa kosala bongo, basantu bakokata likambo lya­ngo, mpo ’te bato banso bazali na bomoi bayeba ’te Nzambe wa likolo azali moko­nzi wa bato banso. Akopesa bokonzi na moto oyo ye alingi, akotombola oyo azali nsima ya baninga banso !’
Dani LinVB 4:15  Oyoki sikawa ndoto ngai mokonzi Nabukodonozor nalotoki. Yo Baltasar, limbolela ngai ndoto eye, zambi bato banso ba bwanya o mokili mwa ngai bakoki te ; kasi yo okoki, zambi elimo ya banzambe basantu ezali na yo. »
Dani LinVB 4:16  Eyoki Daniel, oyo bakotangaka mpe Baltasar, maloba mana, abangi mwa moke mpe makanisi ma ye makei mosika. Mokonzi alobi na ye : « Baltasar, obanga te kolimbola ndoto eye. » Baltasar ayanoli : « Mokonzi wa ngai, ndoto eye etala bato bayini yo, mpe ntina ya ndoto etala banguna ba yo !
Dani LinVB 4:17  Nzete eye omonoki, eye ekolaki mingi mpe ekomaki makasi, na bolai kin’o likolo, eye bato banso bakoki komono,
Dani LinVB 4:18  ezalaki na nkasa kitoko mpe ebotaki mbuma mingi, ezalaki kopesa bato banso biloko bikoki na bango, nyama ya zamba izalaki kobombama o nse ya yango, ndeke mpe izalaki koya kofanda o bitapi bya yango,
Dani LinVB 4:19  e mokonzi wa ngai, nzete eye ezali se yo ! Solo, okomi moto monene mpe makasi mpenza ; otombwami kin’o likolo mpe okomi mokonzi wa mokili mobimba.
Dani LinVB 4:20  Na nsima, mokonzi, omonoki Mokengeli moko, Mosantu, auti o likolo mpe alobi : ‘Bokata nzete, bobuka mpe bitapi ; kasi botika ekumu mpe minsisa mya yango o mabelé, bokanga myango na nsinga ya ebende mpe ya mbengi ; mamio ma likolo makitela yango mingi, ekola o kati ya matiti ma bilanga elongo na nyama kin’o elaka ya mibu nsambo elekela yango se bo­ngo.’
Dani LinVB 4:21  Tala, e mokonzi ndimbola ya ndoto eye : Nzambe wa likolo akati likambo lya yo, mokonzi wa ngai.
Dani LinVB 4:22  Bakobengana yo o ntei ya bato, okofanda esika yoko na nyama, okolia matiti lokola ngombe, mamio mauti o likolo makopolisa yo, mibu nsambo Mikoleka bongo kin’o okondima ’te Nzambe wa Nta-Likolo azali mokonzi wa bato banso, mpe akopesa bokonzi na moto oyo ye alingi.
Dani LinVB 4:23  Kasi : ‘Botika ekumu mpe mi­nsisa mya nzete’, elakisi ’te boko­nzi bokotikala na yo soko ondimi ’te Nzambe wa likolo azali Mokonzi.
Dani LinVB 4:24  Yango wana, mokonzi, yoka lilako lya ngai : oboya masumu na bosali misala mya bosembo, mpe oboya mabe ma yo na boyokeli babola mawa, mpo ’te ozwa kimia mikolo mingi. »
Dani LinVB 4:26  Nsima ya sanza zomi na ibale, ezalaki ye kotambola o mbalasani ya ndako enene ya bakonzi ba Babilon,
Dani LinVB 4:27  mokonzi alobi : « Ngai moto natongi engu­mba eye enene Ba­bilon na bokasi bwa ngai, nalingaki ezala engumba ya bakonzi, eye eko­pesa bokonzi bwa ngai lokumu. »
Dani LinVB 4:28  Mokonzi asi­li­si naino koloba te, lolaka loyokani ut’o likolo : « Mokonzi Nabukodonozor, bazali koyebisa yo ’te babotoli yo bokonzi !
Dani LinVB 4:29  Bakobengana yo mosika na bato ; okofanda esika yoko na nyama o bilanga, okolia matiti lokola ngombe, mibu nsambo ekoleka bongo kin’o okondima ’te Nta-Likolo azali mokonzi wa bato banso mpe akopesa bokonzi na moto oyo ye moko alingi. »
Dani LinVB 4:30  Se o ntango ena mana manso makweli Nabukodonozor : babengani ye mo­sika na bato ; akomi kolia matiti lokola ngombe mpe azalaki kopolo na mamio ma ntongo ; nsuki ya ye ikoli lokola nsala ya engondo mpe manzaka ma ye makoli lokola maye ma ndeke.
Dani LinVB 4:31  « Esili elaka ena, ngai Nabukodonozor natomboli miso epai ya liko­lo : mayele mazongeli ngai ; nakumisi Nta-Likolo, Oyo akozala se­ko ; bokonzi bwa ye bozali bokonzi bwa seko, bokoumela o bileko na bileko.
Dani LinVB 4:32  Bato ba nse banso bakoki na ye ata moke te, akosala manso alingi, na mampinga ma likolo mpe na bato ba nse. Moto moko akoki kopekisa ye te to kotuna ye : ‘Osali nini ?’
Dani LinVB 4:33  O ntango ena mayele mazongeli ngai, bokonzi bwa ngai mpe bozongi elongo na lokumu mpe na nkembo ya ngai. Bankumu na basalisi ba ngai baluki ngai lisusu. Bazongiseli ngai bokonzi, mpe nazwi lokumu loleki lokumu la kala.
Dani LinVB 4:34  Ya­ngo wana, sikawa ngai Nabukodonozor, nazali kokumisa, kotondo mpe kokembisa Mokonzi wa likolo, zambi misala mya ye minso mizali mya bosolo, nzela ya ye inso semba ; azali na nguya ya kokitisa baye bazali na lolendo. »
Chapter 5
Dani LinVB 5:1  Mokonzi Belsazar abengi bankumu nkoto yoko ba ekolo ya ye baya kolia limpati o ndako ya ye. Ameli vino o miso ma bango.
Dani LinVB 5:2  Awa elengi ya vino ekoteli ye, Belsazar atindi ’te bayela ye kopo ya wolo na palata iye tata wa ye Nabukodonozor ayibaki o ndako esa­n­tu ya Yeruzalem mpo ’te bamele o yango : yemei mokonzi, na bankumu ba ekolo na bamakango ba ye, na bayembi basi.
Dani LinVB 5:3  Bayei na kopo ya wolo mpe ya palata, iye bayibaki o Tempelo ya Nzambe o Yeruzalem, mpe mokonzi yemei, bankumu, bamakango ba ye na bayembi basi bameli o yango.
Dani LinVB 5:4  Bameli vino mpe bakumisi bikeko bya banzambe ba bango, bisalemi na wolo, palata, mbengi, bibende, nzete to maba­nga.
Dani LinVB 5:5  Na mbala yoko ebimi wana misapi mya loboko la moto miba­ndi kokoma maloba o efelo ya ndako ya mokonzi penepene na mwi­nda monene mozalaki kopela wana. Mokonzi amoni loboko lozali kokoma ;
Dani LinVB 5:6  abangi mingi mpenza, mayele ma ye matamboli ; nzoto ya ye mobimba elembi, mpe makolo ma ye makomi kolenge.
Dani LinVB 5:7  Agangi makasi mpe abengi banganga ba Kaldea na bato bakoki kobengana bi­limo. Mokonzi alobi na bato ba bwa­nya ba Babilon : « Moto ayebi kotanga maloba mana mpe koli­mbolela ngai ntina, nakolatisa ye molato mwa longondo, na mpe nsi­nga ya mayaka ma wolo o nkingo ; ye akozala moto wa basato o ekolo ya ngai. »
Dani LinVB 5:8  Bato ba bwanya banso bayei noki ; kasi bakoki kotanga maloba te, kolimbolela mokonzi mpe te.
Dani LinVB 5:9  Mokonzi Belsazar ayoki nsomo, emononi o elongi ; mayele ma bankumu mpe masileli bango.
Dani LinVB 5:10  Mokonzi mwasi ayoki maloba ma mokonzi mpe ma bankumu, ayei mbangu o ndako ya limpati mpe alobi : « Mokonzi, zala seko ! Obanga te, bakobebisa lokumu la yo te !
Dani LinVB 5:11  Moto moko azali o ekolo ya yo : Elimo ya banzambe basantu ezali na ye. Ntango ya tata wa yo, bamonoki ’te azali na mayele mpe na bwanya bwa banzambe basantu. Tata wa yo Nabukodonozor alubolaki ye mokonzi wa banganga, wa bamoni-makambo mpe wa batali-minzoto.
Dani LinVB 5:12  Daniel, oyo mokonzi ata­ngaki Baltasar, azali na mayele mingi, moto wa bwanya ; ayebi kolimbola ndoto, koyanola mituna mya kwokoso mpe kolakisa ntina ya mibombamo. Malamu obyanga Daniel, ye moto akolimbolela yo ntina ya likambo liye. »
Dani LinVB 5:13  Babyangi Daniel, ayei o boso bwa mokonzi. Mokonzi atuni ye : « Yo Daniel, ozalaki o kati ya ba-Yuda baye tata wa ngai akendeki kozwa o mokili mwa Yuda ?
Dani LinVB 5:14  Bayebisi ngai ’te elimo ya banzambe ezali na yo. Ozali na mayele mingi mpenza.
Dani LinVB 5:15  Bati­ndelaki ngai bato ba bwanya mpe banganga mpo bata­ngela ngai maloba makomami wana, bayebisa ngai ntina ya mango, kasi bakoki te.
Dani LinVB 5:16  Nayoki ’te yo ozali na mayele mingi ma koyebisa ntina ya makambo. Yango wana, soko okoki kotanga maloba mana mpe koyebisa ngai ntina, nakolatisa yo molato mwa longondo na mpe nsi­nga ya mayaka ma wolo o nkingo. Okozala moto wa basato o boko­nzi bwa ngai. »
Dani LinVB 5:17  Daniel alobi na mo­konzi : « Bomba makabo ma yo, mpe pesa bato basusu mabonza ma yo. Ngai nakotangela yo, mokonzi wa ngai, maloba mana mpe nakoyebisa yo ntina.
Dani LinVB 5:18  E mokonzi, Nza­mbe wa likolo apesaki tata wa yo Nabukodonozor bokonzi bonene, bokasi na nkembo.
Dani LinVB 5:19  Mpo ya nguya ya ye enene bato ba bikolo binso, bazala ba mokili nini to baloba lokota nini, bazalaki kobanga ye. Soko alingaki koboma moto, abomi ye ; soko alingaki kobikisa moto, abi­kisi ye ; soko alingaki kopesa mo­to esika ya lokumu, apesi ye ya­ngo ; soko alingaki kokitisa moto, akitisi ye.
Dani LinVB 5:20  Kasi ntango akomi na lolendo mpe alakisi motema mabe na boyokeli bato mawa lisusu te, balongoli ye o bokonzi mpe babotoli ye lokumu la ye.
Dani LinVB 5:21  Balongoli ye o ntei ya bato, mpe akomi na makambo lokola nyama. Akomi kofa­nda esika yoko na mpunda mpe kolia matiti lokola ngombe, nzoto ya ye epoloki na mamio ma ntongo kin’o mokolo andimi ’te bokonzi bonso bouti epai ya Nzambe wa Nta-Likolo, mpe akopesa mwa­ngo na moto oyo ye alingi.
Dani LinVB 5:22  Yo Belsazar, mwana wa ye, oyebaki makambo maye manso, kasi otiki lolendo te.
Dani LinVB 5:23  Omitomboli o miso ma Mokonzi wa likolo. Otindi bato bakamata kopo ya Tempelo ya ye, bayela yo yango. Na nsima bomeli vino na ba­nkumu ba yo, esika yoko na bamakango ba yo mpe na bayembi basi. Bokumisi bikeko bisalemi na wolo, palata, mbengi, bibende, nzete to mabanga. Bikeko biye bikomonoko to bikoyokaka te, bizali na mayele soki te. Kasi Nzambe oyo asimbi bomoi bwa yo mpe azali kobatela nzela ya yo okumisi ye te.
Dani LinVB 5:24  Yango wana Nzambe atindi loboko la moto, mpe loboko lokomi maloba maye :
Dani LinVB 5:26  Yoka ndimbola ya mango : Me­ne lokola ‘Atangi’, zambi Nza­mbe atangi mibu mya bokonzi bwa yo mpe akati ndelo.
Dani LinVB 5:27  Tekel lokola ‘Ameki’, zambi Nzambe ameki bozito bwa yo, kasi bozito bwa yo bokoki te.
Dani LinVB 5:28  Parsin lokola ‘Akaboli’, zambi mokili mwa yo moka­bwani, Nzambe apesi mwa­ngo na ba-Medi mpe na ba-Persi. »
Dani LinVB 5:29  Sikawa Belsazar atindi ’te balatisa Daniel molato mwa longondo na mpe nsinga ya wolo o nkingo, mpe basakola ’te Daniel akozala moto wa basato o bokonzi bwa ye.
Dani LinVB 5:30  Bobele o butu bona babomi Bel­sazar, mokonzi wa Kaldea.
Chapter 6
Dani LinVB 6:1  Dario moto wa Medi akomi mokonzi o ntango akokisi mibu ntuku motoba na mibale.
Dani LinVB 6:2  Aponi bankumu monkama na ntuku ibale mpo ’te o mokili mwa ye mobimba bakonzi ba bituka bazala.
Dani LinVB 6:3  O kati ya bango aponi bato basato bazala liboso lya baninga, Daniel azalaki moko wa bango, batala mosala mwa bankumu, mpo ’te bapesa mokonzi manso makoki na ye.
Dani LinVB 6:4  Da­niel aleki bayangeli na bankumu basusu na mayele o mosala mona yango wana mokonzi alingi kokomisa ye moyangeli wa bokonzi mobimba.
Dani LinVB 6:5  Yango wana bayangeli na bankumu baluki kozwa esika nini Daniel abebisaki mosala mwa bo­ya­ngeli ekolo. Kasi bazwi ntina yoko te, zambi Daniel azalaki kosala mosala mwa ye malamu ; bazwi ye na likambo lyoko te ; abebisi mosala mwa ye mokolo moko te.
Dani LinVB 6:6  Bongo balobani : « Tokozwa Daniel oyo na likambo lyoko te, mbele tokoki komeka o nzela ya Mibeko mya Nzambe wa ye. »
Dani LinVB 6:7  Bongo bayangeli na bankumu bakei mba­ngu epai ya mokonzi, balobi na ye : « Dario, zala seko !
Dani LinVB 6:8  Baya­ngeli ba­nso ba ekolo, bankumu na baka­mbi, bayangeli na basalisi elongo na biso tokanisi ’te mokonzi asengeli kobimisa mobeko mokolendisa eki­la eye : Mikolo ntuku isato moto moko te ameka kokumisa nzambe to moto mosusu, bakumisa bobele yo, mokonzi. Oyo asali bongo, ba­bwaka ye o libulu lya nkosi.
Dani LinVB 6:9  Ya­ngo wana, mokonzi, obimisa mobeko, okoma mwango mpo moto moko abongola mwango te, engebene na mibeko mya ba-Medi na ba-Persi, miye mikoki kobongwana te. »
Dani LinVB 6:11  Eyoki Daniel ’te mokonzi abimisi mobeko mona, ayingeli o ndako ya ye. O eteni ya likolo ya ndako ya ye, maninisa masusu matalani na Yeruzalem ; mbala isato o mokolo moko Daniel afukami wana mpo ya kosa­mbela mpe kokumisa Nza­mbe, lokola ameseni kosala.
Dani LinVB 6:12  Bato ba mokonzi bayei kotala Daniel mpe bakuti ye azalaki kosambela mpe kobondela Nzambe.
Dani LinVB 6:13  Bakei epai ya mokonzi, balobi : « Okomaki monkanda te soko o mikolo miye ntuku isato moto moko te akokumisa nzambe mosusu to moto mosusu, tika se yo mokonzi, ba­bwaka ye o libulu lya nkosi ? » Mokonzi azongisi : « Tosili kokata lika­mbo lina. Epai ya biso ba-Medi na ba-Persi mobeko mokobongwanaka te ! »
Dani LinVB 6:14  Bango balobi na ye : « Mokonzi, Daniel, moko wa ba-Yuda baye bakangemaki mpe bayei awa, atali yo mpamba, atosi mobeko mwa yo te ; akosambelaka Nzambe wa ye mbala isato o mokolo moko. »
Dani LinVB 6:15  Eyoki mokonzi maloba mana, ayoki mawa mingi, aluki kobikisa Daniel. Kin’o butu aluki nzela ya kobikisa ye.
Dani LinVB 6:16  Kasi bato baye bazongi lisusu, batii molende epai ya mokonzi, balobi : « E mokonzi, yo moko oyebi ’te engebene na mobeko mwa ba-Medi na ba-Persi, lika­mbo mokonzi apekisi to mobeko ye atindi mokoki kobongwana te. »
Dani LinVB 6:17  Bongo mokonzi atindi ’te baya na Daniel mpe babwaka ye o libulu lya nkosi. Mokonzi alobi na Daniel : « Nzambe wa yo, oyo yo okosambelaka na mpiko, abikisa yo ! » Bayei na libanga linene, bazipi na lyango monoko mwa libulu ;
Dani LinVB 6:18  mokonzi abaki motako moko na nkoma ya ye, bankumu ba ye basali se bongo mpo ’te moto moko te akoka kobikisa Daniel.
Dani LinVB 6:19  Mokonzi azo­ngi o ndako ya ye. Butu mobimba alei eloko te, alingi mpe te ’te bamakango baya ; butu mobimba azwi mpongi te.
Dani LinVB 6:20  Na ntongo mpe­nza, naino moi mobimi te, atelemi, akei mbangu kotala libulu lya nkosi.
Dani LinVB 6:21  Ekomi ye penepene na libulu, abyangi Daniel na mawa manene : « Daniel, mosaleli wa Nzambe oyo azali na bomoi, Nzambe wa yo oyo okosambelaka na mpiko, abikisi yo o monoko mwa nkosi, solo ? »
Dani LinVB 6:22  Daniel azongisi : « E mokonzi,zalaseko !
Dani LinVB 6:23  Nzambe wa ngai atindi anzelu wa ye, akangisi minoko mya nkosi ; ata nkosi yoko te esali ngai mabe, zambi nazali na likambo lyoko te o miso ma Nzambe. Nasali mpe yo mabe te, mokonzi. »
Dani LinVB 6:24  Mokonzi asepeli mingi, abyangi bato babimisa Daniel o libulu. Babimisi ye, azali bobele nzoto kolongonu, zambi atiaki motema na Nzambe wa ye.
Dani LinVB 6:25  Mokonzi abyangi bato baye bafundaki Daniel, abwaki bango o libulu lya nkosi, na mpe basi na bana ba bango. Naino bakomi o nse ya libulu te, nkosi isili kokanga bango mpe kokekete minkuwa mya bango.
Dani LinVB 6:26  Mokonzi Dario atindeli bato ba bikolo binso bakolobaka nkota nde­nge na ndenge monkanda moye : « Boboto botonda o mboka ya bino !
Dani LinVB 6:27  Natindi mobeko moye : o mokili mwa ngai mobimba bato ba­nso babanga Nzambe wa Daniel : Ye azali Nzambe wa solo, azali Nzambe seko, bokonzi bwa ye bokosila mokolo moko te, akozala mokonzi o bileko binso seko.
Dani LinVB 6:28  Ye akobikisaka mpe akosikolaka bato, akosalaka misala minene o likolo mpe o nse, abikisi Daniel o minoko mya nkosi. »
Dani LinVB 6:29  Daniel oyo azalaki na lokumu lonene o eleko Dario mpe Siro bazalaki bakonzi ba-Persi.
Chapter 7
Dani LinVB 7:1  O mobu mwa yambo mwa bokonzi mwa Belsazar o Babilon, Daniel aloti ndoto mpe amoni mamoni ntango alali o mbeto ; akomi ndoto ena o monkanda, abandi yango boye :
Dani LinVB 7:2  Daniel alobi : Namoni mamoni na butu. Tala : mimpepe minei miuti o likolo mitomboli mbu enene ;
Dani LinVB 7:3  bibuki bya nyama inei bibimi o mbu, binso bikeseni.
Dani LinVB 7:4  Nyama ya liboso ezalaki lokola nkosi na mapapu ma engondo. Nátala boye, bakati nyama ena mapapu, batomboli yango mpe etelemi o makolo lokola moto ; bapesi yango mpe motema mwa moto.
Dani LinVB 7:5  Nyama ya ibale ezalaki ndenge esusu, lokola ngubu etombwami moke epai yo­ko, ememi minkuwa misato mya mopanzi o monoko. Balobi na nyama ena : « Teleme mpe lia misuni mingi. »
Dani LinVB 7:6  Na nsima natali mpe namoni nyama esusu lokola nkoi, eza­laki na mapapu manei ma ndeke o mipanzi, na mitó minei mpe na nguya enene.
Dani LinVB 7:7  Na nsima namoni o limoni na butu nyama ya inei, ya nsomo mpenza, ebangisi ngai, ezalaki na nguya enene, na mino ma ebende manene mpenza. Nyama ena ekeketi minkuwa mpe enyati na makolo biye bitikali. Ekeseni na nyama isusu mpe ezalaki na maseke zo­mi.
Dani LinVB 7:8  Ezalaki ngai kotala maseke ma yango, mwa liseke lya sika libimi, like mpenza, na mbala yoko maseke masato malongwi ; liseke like lina libimisi miso lokola miso ma moto, mpe lizwi monoko molobi makambo manene !
Dani LinVB 7:9  Ezalaki ngai kotala, batii ngwe­nde mpe Mokóló moko ayei kofanda. Elamba ya ye ezalaki mpe­mbe lokola mbula ya mpembe ; nsuki ya ye kitoko lokola nsuki ya mpata. Ngwende ya ye engengi lokola móto mopeli makasi ; yika ya yango ipeli mpe móto.
Dani LinVB 7:10  Móto mozalaki kotiyola lokola ebale. Bato nkoto na nkoto basaleli ye, mpe bato nkoto zomi batelemi o boso bwa ye. Bazuzi bafandi mpe bafungoli buku inso.
Dani LinVB 7:11  Nayoki maloba ma lolendo liseke lina lizalaki koloba ; natali tee… babomi nyama o miso ma ngai, nzoto ya yango ebebi mpe eziki o móto.
Dani LinVB 7:12  Babotoli nyama isusu bokonzi ; babomi yango naino te, kasi batikeli yango mwa elaka ya kozala na bomoi.
Dani LinVB 7:13  O limoni nalotoki na butu namoni moto moko ayei o mampata ma likolo, azalaki lokola ‘Mwana wa moto’. Ayei penepene na Mokóló, bakambi ye o boso bwa ye.
Dani LinVB 7:14  Bapesi ye bokonzi, nkembo na nguya. Mpe bato ba bikolo binso, ba mikili minso mpe ba nkota inso bayei kosalela ye. Akozala moko­nzi seko. Bokonzi bwa ye bokosila te ; ekolo ya ye ekobeba mokolo moko te.
Dani LinVB 7:15  Ngai Daniel, mayele masileli ngai, mpe makambo namoni mayokisi ngai nsomo.
Dani LinVB 7:16  Nabelemi na moko wa baye batelemi wana mpe natuni ye ntina ya makambo mana. Azongiseli ngai, mpe ayebisi ngai ntina :
Dani LinVB 7:17  « Bibuki bya nyama ina inei bizali bakonzi banei bakobima o mokili.
Dani LinVB 7:18  Baye bakozwa bokonzi ezali basantu ba Nzambe wa Nta-Likolo, bakozwa bokonzi o bileko binso seko. »
Dani LinVB 7:19  Na nsima natuni bayebisa ngai ntina ya solo ya nyama ya inei, eye ekeseni na nyama isusu, nyama eye ya nsomo na mino ma ebende mpe na manzaka ma mbe­ngi, elei biloko, ekeketi minkuwa mpe enyati na makolo biloko binso bitikali.
Dani LinVB 7:20  Natuni ntina ya maseke zomi o motó mwa nyama ena, mpe ya liseke lyoko lizalaki na miso mpe na monoko molobi makambo manene mpe lileki maseke masusu na bonene.
Dani LinVB 7:21  Natali liseke lina likei kobunda na basantu mpe likweisi bango.
Dani LinVB 7:22  Kasi Mokóló ayei kosa­mba likambo : alongisi basantu ba Nzambe wa likolo, mpe elaka ekomi ’te basantu bazwa bokonzi.
Dani LinVB 7:23  Mokóló alobi : « Nyama ya inei elakisi mokonzi wa banei, akeseni na bakonzi basusu banso. Akosilisa mokili mobimba, akonyata mwa­ngo na makolo mpe akobebisa mwa­ngo.
Dani LinVB 7:24  Maseke zomi ma bokonzi bona malakisi bakonzi zomi bakobima ; nsima ya bango mosusu akobima, akokesene na baye ba liboso, akoboma bakonzi basato.
Dani LinVB 7:25  Akoloba maloba ma botuki Nzambe mpe ako­nyokolo basantu ba Nta-Likolo. Akoluka kobongola bileko mpe mobeko. Bongo basantu bakokweya mwa mibu o maboko ma ye.
Dani LinVB 7:26  Kasi mokolo moko bakokata likambo lya ye, bakobotolo ye bokonzi ; bokonzi bwa ye bokokufa mpe bokosila nye.
Dani LinVB 7:27  Nsima boko­nzi, boyangeli mpe nkembo ya bikolo binso bikopesama na ekolo ya basantu ba Nta-Likolo. Bokonzi bwa ye bozali bokonzi bwa seko, mpe bato ba bikolo binso bakosalela mpe bakotosa ye. »
Dani LinVB 7:28  Lisolo lisuki bongo. Ngai Daniel nakomi motema likolo ; makanisi ma ngai matamboli, elongi ya ngai ebongwani, mpe nabombi makambo mana o motema.
Chapter 8
Dani LinVB 8:1  O mobu mwa misato mwa bokonzi bwa Belsazar, ngai Da­niel naloti ndoto mbala ya ibale.
Dani LinVB 8:2  O kati ya limoni lina namimoni moto azalaki o ebombamelo ya Suze o etuka ya Elam. O limoni lina namoni ’te nakomi penepene na moluka Ulai.
Dani LinVB 8:3  Nafungoli miso, namoni mpata mobali etelemi penepene na moluka. Ezalaki na maseke mabale, maseke malai, kasi bolai bwa mango bokokani te. Liseke liye lya nsima lileki liye lya liboso na bolai.
Dani LinVB 8:4  Mpata mobali ebeti motó epai ya Westi, Nordi mpe Sudi ; nya­ma yoko ekoki na mpata mobali eye te, nyama yoko te ekoki kokima yango ; ezalaki kokola mingi mpe kosala makambo manso elingi.
Dani LinVB 8:5  Ntango naluki koyeba ntina ya makambo maye manso, namoni nta­ba mobali euti epai ya Westi, elekaki mbangu o mokili mobimba, kasi enyataki mabelé na makolo te. Ntaba mobali eye ezalaki na liseke linene o kati ya miso mabale.
Dani LinVB 8:6  Ebelemi na mpata mobali eye namonoki penepene na moluka, eye ezalaki na maseke mabale, elandi yango mpo ya kotuta yango na bokasi bwa yango bonso.
Dani LinVB 8:7  Namoni ’te eko­mi penepene na mpata mobali, na nkanda enene. Etuti mpata mpe ebuki maseke ma yango mabale. Mpata ezalaki na bokasi bwa kozo­ngisela yango te. Ntaba mobali e­kweisi mpata mobali, enyati yango na makolo. Moto akoki kobikisa mpata azalaki te.
Dani LinVB 8:8  Ntaba elendi mpe­nza, kasi awa ekomi makasi mi­ngi, liseke linene lya yango libukani. Maseke masusu manei mabimi o esika ena matali epai ya nsuka inei ya mokili.
Dani LinVB 8:9  O liseke lipusi boke ebimi liseke lya sika. Liseke liye libandi kokola mingi epai ya Sudi, epai ya Esti mpe epai ya Ekolo enzenga ya Yuda.
Dani LinVB 8:10  Eko­li kin’o likolo, ekweisi ndambo ya bato ba limpinga lya likolo, na ndambo ya minzoto, enya­ti bango.
Dani LinVB 8:11  Liseke limitomboli kin’o penepene na Mokonzi wa limpinga lina, libotoli ye libonza lya mokolo na mokolo, libuki mpe mabanga ma nse ma ndako ya ye esantu,
Dani LinVB 8:12  libebisi mpe limpinga mobimba, lisantoli libonza na nkanda enene mpenza. Liseke libwaki Bosolo o nse, likomi kosala makambo manso lokola lilingi.
Dani LinVB 8:13  Nayoki mosantu ayanoli moto oyo atunaki ye : « Limoni lya libonza lya mokolo na mokolo, lya bobe bwa masumu bozali kobebisa ndako esantu, mpe lya limpinga lya likolo likonyatema, likoumela naino mikolo boni ? »
Dani LinVB 8:14  Ayanoli ye : « Ekozala naino bo­ngo ntongo mpe mpokwa nkoto ibale na nkama isato, na nsima bakozongisela ndako esantu lokumu. »
Dani LinVB 8:15  Ngai Daniel nazalaki se kotala limoni lina mpe komituna ntina ya lyango, namoni elili ya moto etelemi o boso bwa ngai.
Dani LinVB 8:16  Nayoki lolaka la moto mosusu o moluka Ulai, agangi makasi : « Gabriel, yebisa moto oyo ntina ya limoni liye ! »
Dani LinVB 8:17  Abelemi na esika eye natelemi ; awa abelemi na ngai, nakomi kole­nge na nsomo mpe nami­bwaki o nse, elongi o mabelé. Alobi na ngai : « Mwana wa moto, yoka ntina ya limoni liye malamu : elakisi maka­mbo ma eleko ya nsuka. »
Dani LinVB 8:18  Ezalaki ye koloba na ngai, nakwei senza, elongi o mabelé. Asimbi ngai mpe atelemisi ngai bobele o esika eye nazalaki.
Dani LinVB 8:19  Alobi na ngai lisusu : « Nakoyebisa yo makambo makoya mokolo nkanda ya Nzambe ekosila ; nkanda ena ekosila soko elaka ekoki.
Dani LinVB 8:20  Omonoki mpata ya maseke mabale, maseke mana malakisi bakonzi ba Medi na Persi.
Dani LinVB 8:21  Ntaba mobali elakisi mokonzi wa ba-Greki. Liseke linene lyoko lizali o katikati ya elongi ya ye lilakisi mokonzi wa yambo wa Greke.
Dani LinVB 8:22  Liseke liye linene libukani mpe libimisi maseke make manei elakisi bikolo binei bikoya nsima ya bokonzi bwa Greke, kasi bikokoka na yango na nguya te.
Dani LinVB 8:23  Na nsuka mpenza mokolo bato babe bakokokisa mabe ma bango manso, mokonzi mosusu akoya, moto azali na nsoni ata moke te mpe ayebi mayele mabe manso.
Dani LinVB 8:24  Bokasi bwa ye bokokola, bokonzi bwa ye bokoya bonene, ka­si mpo ya nguya ya ye moko te. Akozala mobebisi monene, akolo­nga o makambo manso. Akoboma bato bazalaki na nguya enene, kanisa ekolo ya basantu.
Dani LinVB 8:25  Na mayele ma ye, akozwa nzela ya kokosa bato baike. Akokoma moto wa lofu­ndo mpenza, mpe akoboma bato ntango mokili mobimba mozali na boboto. Akotombokela Mokonzi wa bakonzi. Maboko ma bato makosukisa ye te, Nzambe moto akosukisa ye.
Dani LinVB 8:26  Maye matali ntongo na mpokwa inso o limoni liye, mazali ma solo. Kasi bomba limoni lina o motema, zambi makambo mana makosalema sikawa naino te. »
Dani LinVB 8:27  Ngai Daniel, makasi masileli ngai, nabeli mwa mikolo. Nsima natelemi mpo ’te nazongela mosala mwa ngai epai ya mokonzi. Nayebisi limoni lina na moto moko te, mpe tee lelo nayebi ntina ya lyango malamu te.
Chapter 9
Dani LinVB 9:1  O mobu mwa yambo mwa bokonzi bwa Dario, moto wa ekolo ya ba-Medi, mwana wa Asuero, mokonzi wa ekolo ya ba-Kaldea,
Dani LinVB 9:2  ngai Daniel nakei kotala minka­nda misa­ntu mpo ’te nayeba mibu boni mikole­ka nsima ya Likama lya Yeruzalem, lokola Mokonzi Nza­mbe ayebisaki profeta Yeremia. Ezalaki mibu ntuku nsambo.
Dani LinVB 9:3  Namibongoli epai ya Mokonzi Nza­mbe mpo nasambela mpe nabondela ye. Nalali nzala, nalati ngoto mpe nafandi o mputulu.
Dani LinVB 9:4  Nasambeli Mo­konzi Nzambe wa ngai na bosakoli mabe ma biso : « E Mokonzi, Nzambe monene mpe wa bokasi bonso, okomemyaka bondeko mpe okolakisaka motema ngolu na bato balingi yo mpe batosi mibeko mya yo.
Dani LinVB 9:5  Tosalaki masumu, totosaki mibeko te, tosalaki mabe mpe totikaki mitindo mya yo, toboyaki myango.
Dani LinVB 9:6  Toyokemelaki basaleli ba yo te, baprofeta baye balobaki o nkombo ya yo na bakonzi ba biso, bankumu na batata na bato banso ba ekolo ya biso.
Dani LinVB 9:7  Yo Mokonzi, ozali Nzambe wa bosembo ; biso bato ba Yuda, bato ba Yeruzalem, bato banso ba Israel, baye bazali penepene na baye bazali mosika o mikili otindaki bango mpo baboyaki monoko mwa yo, banso tokomi na nsoni o mokolo mwa lelo.
Dani LinVB 9:8  E Mokonzi, biso banso, bakonzi, bankumu na batata ba biso tozali na nsoni, zambi tosali masumu.
Dani LinVB 9:9  Mokonzi Nzambe wa biso, oyokela biso ngolu mpe oli­mbisa biso, mpo tolakisaki yo motó makasi
Dani LinVB 9:10  mpe totosaki monoko mwa yo te, toboyaki maloba ma baprofeta, basaleli ba yo, baye balobaki o nkombo ya yo.
Dani LinVB 9:11  Ba-Israel banso babukaki mibeko mya yo mpe baboyaki koyoka maloba ma yo. Tosalaki masumu o miso ma yo, Nzambe ; yango wana mabe makwelaki biso mpe tozwaki bitu­mbu biye bikomami o buku ya Moze, mosaleli wa yo.
Dani LinVB 9:12  Nzambe akokisaki maloba ma bokaneli biso na bayangeli ba biso. Ayokisaki biso mpasi enene. Bato ba Yeruzalem bayokaki mpasi lokola bayokaki liboso naino te o mokili mobimba.
Dani LinVB 9:13  Makambo maye manso makwelaki biso se lokola ekomami o buku ya mobeko mwa Moze. Kasi tobo­ngolaki mitema te, tolukaki kola­nda nzela ya yo ya solo te, bongo tokitisaki motema mwa Nzambe Mokonzi wa biso te. Toboyaki masumu ma biso te, mpe tolukaki nzela ya solo te.
Dani LinVB 9:14  Mokonzi akanelaki biso mabe maye mpe atindelaki biso mango. Mokonzi Nzambe wa biso azali na bosembo o bikela bya ye binso, kasi biso toyokaki monoko mwa ye te.
Dani LinVB 9:15  E Mokonzi Nza­mbe wa biso, ya solo obimisaki bato ba ekolo ya yo o mokili mwa Ezipeti na bokasi bwa yo. Yango wana lelo nkombo ya yo ezali na lokumu lonene. Kasi biso tosali se mabe, tozali basumuki.
Dani LinVB 9:16  Kasi sikawa Mokonzi, mpo ya bolamu bwa yo, tika kosilikela Yeruzalem, tika koyokela engumba ya yo na ngo­mba esantu ya yo nkanda, zambi bikolo bizali penepene na biso biza­li koseke Yeruzalem na mpe ekolo ya yo mobimba. Mabe mana ma­uti na mabe ma biso mpe na masumu ma bankoko ba biso.
Dani LinVB 9:17  Yango wana, yo, Nzambe wa biso, yoka losa­mbo la mosaleli wa yo, yoka mabondeli ma ngai. Mpo ya lokumu la nkombo ya yo Mokonzi, fungola elongi ya yo mpe tala ndako esantu babebisi.
Dani LinVB 9:18  E Nzambe wa ngai, fu­ngola matoi mpe yoka ; fungola miso mpe tala ndenge babebisi mokili mwa biso mpe engumba eye bako­ta­ngaka na nkombo ya yo. Awa tobondeli yo, totii elikya te na malamu biso tosali, kasi bobele na ngolu ya yo enene.
Dani LinVB 9:19  Mokonzi, yoka ko ! Limbisa biso, Mokonzi ; kanisa biso, Mokonzi, mpe sala makasi, ozila lisusu te. E Nzambe wa ngai, kanisa lokumu la nkombo ya yo, za­mbi ná engumba eye ná bato ba ekolo eye bakotangemaka na nko­mbo ya yo. »
Dani LinVB 9:20  Ntango nasambeli, nazalaki kosakola masumu ma ngai mpe masumu ma bato banso ba Israel o miso ma Mokonzi Nzambe wa ngai. Nazalaki mpe kobondela ye mpo ya ngomba esantu ya Nzambe.
Dani LinVB 9:21  Nasilisaki naino te, Gabriel ayei kopimbwa epai ya ngai. Namonoki Gabriel oyo o limoni. Esalemi o ntango ya libonza lya mpokwa.
Dani LinVB 9:22  Ayebisi ngai, alobi : « Daniel, nayei kolakisa yo mayele.
Dani LinVB 9:23  Ntango oba­ndaki kosambela, Nzambe asili alobaki liloba lyoko, nayei koyebisa yo lyango. Solo, Nzambe alingi yo mingi. Malamu oyeba ntina ya liloba lina mpe ntina ya limoni omonoki :
Dani LinVB 9:24  Nzambe akateli ekolo mpe engu­mba esantu ya yo bileko ntuku nsambo bya mibu nsambo mpo ya kolongola mabe, masumu manso mpe misala minso mizangi bose­mbo. Bongo bosembo bwa seko boya, mpo ya kokokisa mamoni mpe maloba ma baprofeta, mpe kopakola mosantu wa basantu mafuta.
Dani LinVB 9:25  Yango wana oyeba malamu : banda mokolo Nzambe alobaki likambo lya kobongisa Yeruzalem tee mokolo mokonzi moko Mesiya ako­ya, okotanga poso nsambo. Poso ntuku motoba na ibale bakoto­nga engumba mpe bakobongisa bifelo. Kasi o eleko ya nsomo,
Dani LinVB 9:26  nsima ya poso iye ntuku motoba na ibale, bakoboma mopakolami wa Nza­mbe ; moto moko akokitana ye te. Nkumu moko akoya, bato ba ye bakoboma engumba mpe ndako esan­tu. Kasi ye moko akosuka o kati ya mobulungano monene, mpe kin’o nsuka etumba eko­ngala lokola Nzambe akanaki.
Dani LinVB 9:27  Poso yoko akolendisa bondeko bwa ye na bikolo biike, mpe nsima ya ndambo ya poso eye akosala ’te babonza mabonza na miboma lisusu te. O eteni yoko ya Tempelo bakotongela banzambe ba lokuta etumbelo. Mana manso makosila mokolo elaka ya kolongola mobomi ekokoka. »
Chapter 10
Dani LinVB 10:1  Ntango Siro azalaki mokonzi wa ba-Persi, o mobu mwa misato mwa bokonzi bwa ye, Nzambe ayebisi likambo lyoko na Daniel, oyo bakotangaka mpe Baltasar. Ayebisi ye likambo lya solo mpe lya mpasi mingi. Daniel ato­ngoli lyango malamu, bayebisi ye lyango o limoni.
Dani LinVB 10:2  Ntango ena ngai Daniel nalali nzala poso isato :
Dani LinVB 10:3  nazalaki kolia biloko elengi te, nameli vino mpe te, napakoli malasi o nzoto te poso isato mobimba.
Dani LinVB 10:4  Sanza ya yambo, mikolo ntuku ibale na minei, nazalaki penepene na ebale enene Tigris.
Dani LinVB 10:5  Ntango natomboli miso, namoni moto moko alati elamba mpembe, akangi mokaba mwa wolo bonze­nga o loketo.
Dani LinVB 10:6  Nzoto ya ye ezalaki kongenge lokola mabanga ma wolo, elongi ya ye lokola monkalali, mpe miso ma ye lokola mbuma ya móto, maboko na makolo ma ye lokola mbengi basukoli malamu. Lokito la mongongo mwa ye loyokani lokola mingongo mya bato ebele.
Dani LinVB 10:7  Bobele ngai Daniel namoni limoni lyango. Bato bazalaki na ngai bamoni eloko te, kasi babangi mingi mpe bakimi mpo babombama.
Dani LinVB 10:8  Natikali ngai moko. Ntango namoni limoni liye linene, makasi ma nzoto makomi kosilela ngai. Elongi ebo­ngwani, nazalaki lisusu na makasi soki te.
Dani LinVB 10:9  Nayoki ye abandi koloba, mpe o ntango ena nakwei senza, elongi o nse.
Dani LinVB 10:10  Loboko loko losimbi ngai, mabolongo na maboko makomi kole­nge.
Dani LinVB 10:11  Alobi na ngai : « Daniel, molinga­mi wa Nzambe, yoka maloba ma ngai malamu ; teleme, za­mbi batindi ngai epai ya yo. » Elobi ye bongo, natelemi na bolengi.
Dani LinVB 10:12  Alobi na ngai : « Obanga te, Daniel, banda mokolo omekaki koyeba ntina ya maloba ma Nzambe mpe omikitisaki o miso ma ye, Nzambe ayokaki losambo la yo, mpe nayei mpo ya maloba ma yo.
Dani LinVB 10:13  Elimo mobateli wa bokonzi bwa Persi aboyi kondima ngai mikolo ntuku ibale na moko, kasi elimo enene Mikael, moko wa baye baleki lokumu, ayaki kosalisa ngai, bo­ngo natiki bakonzi ba-Persi.
Dani LinVB 10:14  Nayei koyebisa yo makambo makokwela bato ba ekolo ya yo. Limoni liye litali makambo ma mikolo mikoya. »
Dani LinVB 10:15  Esilisi ye koloba bongo, natali o nse mpe nalobi eloko te ;
Dani LinVB 10:16  na nsima namoni ekelamo yoko, azalaki lokola moto, asimbi mbebu ya ngai ; nafu­ngoli monoko mpe nabandi koloba. Nalobi na moto atelemi penepene na ngai : « Mokonzi, mpo ya limoni namoni nsomo ekangi ngai, nazali na makasi lisusu te.
Dani LinVB 10:17  Boniboni ngai mosaleli wa yo nakoki koloba na yo, mokonzi, awa naza­ngi bokasi mpe mpema ya ngai ekomi kosila ? »
Dani LinVB 10:18  Oyo azalaki lokola moto asimbi ngai lisusu mpe ale­ndisi ngai.
Dani LinVB 10:19  Alobi na ngai : « Obanga te, molingami wa Nzambe, boboto na yo, zala makasi mpe na mpiko ! » Awa azalaki koloba na ngai bongo, nzoto elendi lisusu ; nalobi : « Mokonzi, loba zambi olendisi ngai. »
Dani LinVB 10:20  Atuni ngai : « Oyebi mpo nini nayei epai ya yo ? Nasengeli kobu­nda na mokonzi wa Persi ; soko nasilisi etumba ena mokonzi wa Greke akoya.
Dani LinVB 10:21  Kasi liboso nakoyebisa yo makambo manso makomami o Buku ya Bosolo. O etumba nakobunda na bango moto moko akosalisa ngai te, bobele Mikael, moko­nzi wa bino.
Chapter 11
Dani LinVB 11:1  Azali mobateli oyo akosalisa mpe akolendisa ngai.
Dani LinVB 11:2  Bo­ngo sikawa nalingi koyebisa yo makambo ma solo : Nsima ya bakonzi basato bako­ya­ngela ekolo wa ba-Persi, oyo wa banei akozwa nkita enene, akoleka baye ba liboso. Ntango akokoma makasi mpo ya nkita ya ye, akoteleme mpo ya kobundisa bakonzi banso ba-Greke.
Dani LinVB 11:3  Kasi mokonzi moko wa mpiko enene akobima ; akozala mokonzi monene mpe ako­sala manso ye moko alingi.
Dani LinVB 11:4  Ntango akozwa bokasi, bokonzi bwa ye bokobeba mpe bokoka­bwana biteni biteni, kasi bana ba ye bakozwa eloko te. Bakoyangela eko­lo ya ye te lokola ye ayangelaki yango, mpo bakobotolo bokonzi boye mpe bakopesa bwango na bato basusu.
Dani LinVB 11:5  Mokonzi wa Sudi akokoma makasi mpenza ; kasi moko wa bankumu ba ye akoleka ye na bokasi, mpe akozwa bokonzi boleki boko­nzi bwa ye.
Dani LinVB 11:6  Nsima ya mwa mibu bakoyokana : mokonzi wa Sudi akobalisa mokonzi wa Nordi mwana wa ye mpo ya kokata bondeko mpe kolendisa boboto, kasi akotikala na bokasi te, bana ba ye mpe te. Bakoboma mwana wa ye, bakoboma mpe ye moko elongo na baye bayaki na ye, na mobali wa ye lokola.
Dani LinVB 11:7  Kasi na nsima moto moko wa libota lya ye akokitana ye, akoya kobimisa bitumba na basoda ba mokonzi wa Nordi mpe akobotolo ebombamelo ya bango ; bongo akolonga bango o etumba.
Dani LinVB 11:8  Akobotolo bikeko bya banzambe ba bango, bikeko bya bibende, mpe biloko bya wolo mpe bya palata ; akomeme bya­ngo o Ezipeti. Na nsima akotika mokili mwa Nordi mwa mibu mosika na ye.
Dani LinVB 11:9  Nzokande akokoto o mokili mwa mokonzi wa Sudi, kasi na nsima akozonga o ekolo ya ye.
Dani LinVB 11:10  Bana ba ye bakole­ngele bitumba, bakosangisa basoda ebele. Moko wa bango akokende kobunda mpe akokatisa ekolo lokola ebale. Na nsima akoya lisusu kin’o ebombamelo ya Sudi.
Dani LinVB 11:11  Mokonzi wa Sudi akotomboko, akokende kobu­nda na mokonzi wa Nordi, oyo akosangisa limpinga linene mpenza. Nzokande mokonzi wa Sudi akolo­nga basoda ba ye ebele.
Dani LinVB 11:12  Kasi awa akolonga bango akolakisa lolendo ; ako­kweisa bato ebele mpenza, kasi akolonga bango seko te.
Dani LinVB 11:13  Moko­nzi wa Nordi akozongela ye, akoyela ye etumba na basoda ebele mpenza, leka limpinga lya liboso. Nsima ya mwa mibu akokotela monguna na basoda ebele mpe na biloko bya etumba ebele.
Dani LinVB 11:14  O eleko ena bato baike bakotombokela mokonzi wa Sudi, bato babe ba ekolo ya yo bakobima mpo basala ’te limoni lisalema lokola lilakisi, kasi bakokita.
Dani LinVB 11:15  Mokonzi wa Nordi akoya, akotonga efelo enene, akozinga mboka mpe akobotolo ebombamelo. Basoda ba Sudi bakokoka ye te ; basoda ba mpiko ba mokonzi wa Sudi bakozonga nsima mpo ya ye.
Dani LinVB 11:16  Ye mokonzi wa bitumba akosala lokola motema mwa ye molingi. Moto moko akokoka ye te. Bongo akokoto o mokili mpe akobebisa mwa­ngo nye.
Dani LinVB 11:17  Ye akoluka kobotolo mo­konzi wa Sudi mokili mwa ye mobimba. Na ntina ena akokata bondeko na ye na bobalisi ye mwana wa ye mpo ’te asukisa ye ; kasi akokoka kosala makambo mana te.
Dani LinVB 11:18  Na nsima akomeka kobotolo mbo­ka penepene na mbu, akobotolo mboka mingi. Kasi mokonzi moko wa basoda akosukisa maka­mbo mabe ma ye ma nsoni, mpe ye akozanga bokasi mpo ’te azongisela ye yango.
Dani LinVB 11:19  Bongo na nsima akomeka kobotolo bibombamelo bizali o mokili mwa ye moko. Kasi akokita mpe akokweya, mpe bakomono ye lisusu te.
Dani LinVB 11:20  Mosusu akobotolo ngwende ya ye. Ye akotinda moto moko mpo ya koyiba biloko bya nkembo ya ekolo. Kasi nsima ya mwa mikolo bakosukisa ye, kasi o miso ma bato te, o bitumba mpe te.
Dani LinVB 11:21  Moto mosusu akokitana ye, moto wa nkanza. Bapesaki ye lokumu la bokonzi te, kasi akomilakisa na mbalakaka mpe akokamata bokonzi na mayele mabe.
Dani LinVB 11:22  O miso ma ye mampinga ma basoda makokweya mpe makopanzana, na mpe nkumu oyo akataki na ye bo­ndeko.
Dani LinVB 11:23  Akobanda kokosaka bato bayokani na ye, mpe bongo, ata azali na bato baike te, bokonzi bwa ye bokolenda.
Dani LinVB 11:24  Na mbalakaka ako­kotela bikolo bizali na mabelé malamu ; akosala makambo batata na bankoko ba ye basalaki te. Akokabela bato ba ye biloko azwaki o bitumba. Akoluka kobotolo ata bibombamelo, kasi mibu mingi te.
Dani LinVB 11:25  Nzokande akokende komekana lisusu na mokonzi wa Sudi. Akokende na limpinga linene mpo ayeba bokasi mpe mpiko ya ye. Mokonzi wa Sudi akokende kokutana na ye na limpinga linene mpenza, limpinga lya basoda bakasi, kasi akolonga te, zambi basusu bakoyokana mpo ’te bakweisa ye.
Dani LinVB 11:26  Bato bazalaki kolia o meza ya ye mpe­nza bakosukisa ye. Basoda ba ye bakopanzana mpe baike bakokufa.
Dani LinVB 11:27  Bakonzi babale, ata bakolia esika yoko, bakokosana, zambi o mitema bakokána kosala moninga ma­be ; kasi bakolonga te, zambi manso makosalema se soko elaka ekokoka.
Dani LinVB 11:28  Bongo ye akozonga o mokili mwa ye na biloko ebele. Awa ye alingi mokili mwa Bondeko bosantu te, akosala mokili mona mabe ; nsima yango akozonga o mokili mwa ye.
Dani LinVB 11:29  Mokolo mosusu akozonga lisusu mpo ’te abundisa ekolo ya Sudi, kasi mbala ya ibale ekozala lokola mbala ya liboso te.
Dani LinVB 11:30  Bato ba Kitim bakoyela ye etu­mba na masuwa, bongo ye akole­mbe. Akozonga na nkanda mpe akosala ekolo ya Bondeko bosantu mabe. Akoyokana lisusu na baye bakotika Bondeko bosantu.
Dani LinVB 11:31  Akotinda basoda babebisa ebo­mbamelo ya Tempelo, bapekisa kobonza libonza lya mokolo na mokolo, mpe bakotisa nsomo ya bikeko kuna.
Dani LinVB 11:32  Na maloba ma boleti akoboyisa bato Bondeko bosantu, kasi basusu bayebi Nzambe wa bango malamu bakopika mpende.
Dani LinVB 11:33  Baye bazali bato ba mayele bakopesa baninga mateya, kasi mwa mikolo bakokweya mpo ya mopanga, móto, boombo mpe boyibi.
Dani LinVB 11:34  Ntango bakokweya bongo, bato basusu bakosalisa bango mwa moke, kasi bato baike bakokosa ’te bakolanda ba­ngo.
Dani LinVB 11:35  O ntei ya bato ba bwanya, basusu mpe bakokweya, kasi se mpo ’te bakoma peto, batikala na mbindo te kin’o mokolo mwa nsuka, zambi mokolo mona mokoya soko elaka ekokoka.
Dani LinVB 11:36  Mokonzi akosala manso ye ali­ngi ; akotombola mapeke mpe akomitia likolo lya banzambe banso mpe akoloba maloba mabe ona Nza­mbe oyo aleki banzambe ba­nso. Akoyoka bolamu tee mokolo nkanda ya Nzambe ekoleka makasi, zambi makambo manso makomami makosalema.
Dani LinVB 11:37  Ye akomemya banzambe ba bankoko ba ye te, na mpe nzambe oyo basi bakoli­nga­ka. Akomemya ata nzambe moko te, kasi akomitia likolo lya bango banso.
Dani LinVB 11:38  O esika ya bango akokumisa bikeko bya bibombamelo, bongo akumisa nzambe oyo ba­nkoko bayebaki te. Akokembisa bikeko na wolo, palata, mabanga na biloko bisusu bya motuya monene.
Dani LinVB 11:39  Mpo ya kolonga bibombamelo bya banguna akoluka lisalisi lya nzambe mouta. Soko bato bandimi koyokana na ye akopesa bango bisika bya lokumu lonene. Akotia bango bayangeli ba ekolo ya bato baike, mpe akopesa bango mabelé bo lifuta.
Dani LinVB 11:40  O eleko ya nsuka mokonzi wa Sudi akokende kobunda na ye. Kasi mokonzi wa Nordi akozala na makalo ma ye, bato ba farasa mpe masuwa maike. Akoyingela o mikili, akokatisa myango mpe akobebisa myango.
Dani LinVB 11:41  Akokoto mpe o Ekolo enzenga mpe bato baike bakokufa ; ekobika bobele bato ba Edom, bato ba Moab mpe bato basusu ba Amon.
Dani LinVB 11:42  Akolakisa bokonzi bwa ye o mikili minso : ata ba-Ezipeti bakobika te.
Dani LinVB 11:43  Akobotolo nkita ya wolo mpe ya palata mpe biloko binso bya motuya bya Ezipeti. Akolonga Libya na Nubia.
Dani LinVB 11:44  Nsango iye iko­uta o Esti mpe o Nordi ikotungisa ye, mpe na nkanda enene akokende kobundisa bango mpe koboma bato baike.
Dani LinVB 11:45  Na nsima akopika nga­nda enene o mabelé mazali kati ya mbu na ngomba ya Nkembo Esantu. Kuna akowa mpe moto moko akosalisa ye te.
Chapter 12
Dani LinVB 12:1  O ntango ena elimo Mikael, Mobateli monene, akoya, oyo akozalaka penepene na bato ba ekolo ya yo. Ekozala eleko ya mawa mpenza, lokola ezalaki naino te banda ntango bato bazalaki o mokili. Kasi bato ba ekolo ya yo ba­kobika. Nkombo ya bango banso ikomami o Buku.
Dani LinVB 12:2  O ntei ya bato balali o kati ya mabelé, baike bakolongwa o mpongi : basusu bakozwa bomoi bwa lobiko, basusu bakosambwa seko.
Dani LinVB 12:3  Bato ba bwanya bakongenge lokola etando ya likolo, mpe baye bateyaki bato bose­mbo, bakongenge lokola minzoto seko.
Dani LinVB 12:4  Daniel, bomba maloba mana mpe kanga Buku kin’o mokolo mwa nsuka. Bato baike bakotele­ngana mpe makambo mabe mako­ngala. »
Dani LinVB 12:5  Ngai Daniel nafungoli miso, namoni bato basusu babale : Moko atelemi penepene na ebale, mosusu o ngambo penepene na ebale.
Dani LinVB 12:6  Moko wa bango atuni moto oyo alati bilamba mpembe mpe azalaki o likolo lya mai ma ebale : « Mokolo nini makambo maye ma kokamwa makosila ? »
Dani LinVB 12:7  Nayoki moto alati bilamba mpembe, oyo azalaki o likolo lya mai ma ebale : atomboli loboko la mobali na mpe loboko la mwasi, alayi ndai na nkombo ya Oyo azali na bomoi seko : « Maka­mbo mana makoumela naino eleko yoko, bileko bibale, na ndambo ya eleko. Mokolo bakonyata bato ba ekolo esantu lisusu te, makambo mana mpe makosila. »
Dani LinVB 12:8  Nayoki maloba mana, kasi nayoki ntina ya ma­ngo te, bongo natuni : « Moko­nzi, makambo mana makosila nde­nge nini ? »
Dani LinVB 12:9  Ayanoli ngai : « Daniel, kende sikawa, zambi makambo mana makoki koyebana te mpe makobima te tee mokolo mwa nsuka.
Dani LinVB 12:10  Bato baike bakosukwama mpe bakokoma peto. Nzokande bato babe bakosala se mabe, bakoyoka ntina soki te. Bato ba bwanya bakoyoka ntina.
Dani LinVB 12:11  Mikolo mikoleka nkoto yoko na nkama ibale na ntuku libwa, banda kotanga mokolo libonza lya mokolo na mokolo likobonzama lisusu te, mpe ekeko ya nsomo ekotiama o Tempelo.
Dani LinVB 12:12  Ese­ngo na moto oyo akotia molende mpe akokoma tee mikolo nkoto yoko na nkama isato na ntuku isato na mitano.
Dani LinVB 12:13  Yo, silisa mikolo mya yo. Okopema mpe okoteleme mpo ya kozwa lifuta lya yo o mokolo mwa nsuka. »
Chapter 13
Dani LinVB 13:1  Ezalaki moto moko o Babilon, nkombo ya ye Yoakim.
Dani LinVB 13:2  Abalaki Suzana, mwana wa Kelkia, mwasi monzenga mpenza oyo akobangaka Nzambe,
Dani LinVB 13:3  zambi baboti ba ye bazalaki bato ba bosembo mpe babokoloki mwana wa bango na botosi mobeko mwa Moze.
Dani LinVB 13:4  Yoakim, moto wa nkita enene, azalaki na lopango lonene penepene na ndako ya ye. Ba-Yuda mingi bameseni kokende epai ya ye, za­mbi aleki bango banso na lokumu.
Dani LinVB 13:5  O mobu mona baponoki bakolo babale bazala bazuzi. Nzambe alobaki mpo ya bango : ‘O Babilon lisumu liuti epai ya bakolo baye bazalaki bazuzi mpe bamitii bakambi ba baninga’.
Dani LinVB 13:6  Bazalaki koya o ndako ya Yoakim mbala mingi ; bato banso bazalaki na likambo bazalaki koya epai ya bango.
Dani LinVB 13:7  Ntango ya midi, awa bato banso basili kozo­nga o ndako, Suzana akei kotambola o lopango la mobali wa ye.
Dani LinVB 13:8  Bakolo babale bamoni ’te mikolo minso azalaki kokota mpe kota­mbola o lopango, bakomi kolula ye.
Dani LinVB 13:9  Makanisi ma bango mabebi, babongoli miso mpo batala epai ya likolo te mpe bakanisa bitumbu bya bosembo te.
Dani LinVB 13:10  Bango babale bakomi kolula ye makasi, kasi bayebisani likambo lyango te.
Dani LinVB 13:11  Bazalaki koyoka nsoni mpo ya koyebisa mposa eye bazalaki koyoka ya kosala mabe na ye.
Dani LinVB 13:12  Mokolo na mokolo bazalaki koluka nzela ya komono ye.
Dani LinVB 13:13  Mokolo moko balobani : « Tokende o ndako, ntango ya kolia ekoki. » Bakabwani mpe bakei.
Dani LinVB 13:14  Ka­si bazongi mpe bakutani lisusu o esika ena. Awa batunani ntina ya yango, bandimi ’te bazalaki koyoka mposa o mitema, mpe bayokani ntango nini bakoka kokutana na Suzana ye moko.
Dani LinVB 13:15  Ezalaki bango kozila mokolo mokobongela bango, Suzana ayei, lokola asalaki mikolo mileki, elo­ngo na bilenge basi basaleli. Molunge mozalaki mingi, yango wana alingi kosukola nzoto o lopango.
Dani LinVB 13:16  Moto mosusu azalaki wana te, se bakolo babale babombami mpe bazalaki konongo ye.
Dani LinVB 13:17  Suzana alobi na basaleli : « Boyela ngai mafuta na malasi, mpe bokanga ezibeli ya lopango, mpo ’te nasukola nzoto. »
Dani LinVB 13:18  Basali lokola Suzana alobi na ba­ngo, bakangi ezibeli ya lopango mpe bakoti o ndako epai ya ezibeli ya mpembeni koluka biloko ye asengeki. Bayebi te ’te bakolo babombami wana.
Dani LinVB 13:19  Se o ntango basaleli bakei, bakolo babimi mpe bapoti mbangu epai ya Suzana,
Dani LinVB 13:20  balobi na ye : « Ezibeli ya lopango ekangemi : moto moko azali komono biso te ; tozali kolula yo mingi, ndima mpe lala na biso !
Dani LinVB 13:21  Soko oboyi, tokofunda yo mpe tokoloba ’te elenge mobali azalaki na yo ; yango wana otindaki basaleli ba yo balongwa awa. »
Dani LinVB 13:22  Suzana amimeli : « Epai na epai bazali kokanela ngai : soko nandimi, liwa likokwela ngai ; soko naboyi, nakokima maboko ma bino te.
Dani LinVB 13:23  Eleki malamu ’te nakweya o maboko ma bino awa nazali na likambo lyoko te, kasi nasumuka o miso ma Mokonzi te. »
Dani LinVB 13:24  Sikawa Suzana aba­ndi koganga makasi ; kasi bakolo babale bagangi lokola,
Dani LinVB 13:25  mpe moko wa bango akei mbangu kofungola ezibeli ya lopango.
Dani LinVB 13:26  Ntango bato bazalaki o ndako bayoki migango o lopango, bakei mbangu epai ya ezibeli ya mpembeni mpo bamono maye masalemi wana.
Dani LinVB 13:27  Bakolo basololi lisolo lya bango ; basaleli bayoki nsoni mingi mpenza, zambi mokolo moko te bafundaki Suzana na makambo mabe.
Dani LinVB 13:28  Mokolo mwa nsima bato bayei kosangana o ndako ya Yoakim, mobali wa ye. Bakolo bayei wana na motema mabe, baluki bobele kokitisa Suzana o liwa.
Dani LinVB 13:29  Balobi na bato basangani wana : « Bobenga Suzana, mwana wa Kelkia, mwasi wa Yoakim. » Babengi ye.
Dani LinVB 13:30  Suzana ayei elongo na baboti ba ye, na bana na bandeko ba ye banso.
Dani LinVB 13:32  Awa azipi elongi na li­ta­mbala, bato baye babe batindi ’te balongola ye lyango mpo ’te basepela na bonzenga bwa ye.
Dani LinVB 13:33  Ba­nde­ko ba ye na bato banso bamoni ye babandi kolela.
Dani LinVB 13:34  Bakolo babale batelemi o kati ya likita mpe batieli ye maboko o motó.
Dani LinVB 13:35  Suzana aleli, atali likolo, atii motema se epai ya Nza­mbe.
Dani LinVB 13:36  Bakolo balobi : « Tozalaki kotambola o lopango se biso babale ; mwasi oyo akoti wana elongo na basaleli basi babale. Akangi ezibeli ya lopango, na nsima atindi basaleli bakende.
Dani LinVB 13:37  Elenge mobali mo­ko abombamaki o lopango ayei mpe ayebani na ye.
Dani LinVB 13:38  Biso tozalaki o nsuka ya lopango ; awa tomoni mabe mana, tokei mbangu epai ya bango.
Dani LinVB 13:39  Tomonoki bango malamu esika yoko, kasi tokokaki kokanga elenge mobali te, zambi aleki biso na makasi, afungoli ezibeli ya lopango mpe akimi.
Dani LinVB 13:40  Kasi tokangi mwasi mpe totuni ye mobali nani azalaki na ye.
Dani LinVB 13:41  Kasi aboyi koyebisa biso. Biso bato tomonoki ya­ngo ! » Bato ba likita bandimi maloba ma bango, mpo bazalaki bakolo ba mboka mpe bazuzi, bongo bakitisi Suzana o liwa.
Dani LinVB 13:42  Suzana aleli na mo­ngongo makasi : « Nzambe wa lobiko, oyebi makambo manso mabombami na maye masalemi naino te.
Dani LinVB 13:43  Oyebi ’te bafundi ngai na lokuta. Nakokufa se mpamba ; maye bafundi ngai na mango na motema mabe, nasali mango te. »
Dani LinVB 13:45  Awa bakei na ye mpo ya koboma ye, Nzambe apesi mayele malamu na elenge mobali moko nkombo ’te Daniel.
Dani LinVB 13:46  Daniel agangi makasi : « Ngai nandimi te ’te baboma mwasi oyo ! »
Dani LinVB 13:47  Bato banso batali ye mpe batuni ye : « Mpo nini olobi bo­ngo ? »
Dani LinVB 13:48  Akei koteleme o kati ya ba­ngo banso, alobi : « Bato ba Israel, bozali nde bazoba ? Bokitisi nde mwana wa Israel o likambo, ata botuni malamu te mpe boyebi lika­mbo liye malamu te !
Dani LinVB 13:49  Bozonga o esika bokosambaka, mpo bato baye bafundi ye na lokuta. »
Dani LinVB 13:50  Bato banso bazongi wana noki, mpe bankumu balobi na Daniel : « Yaka kofanda awa o kati ya biso mpe yebisa biso makanisi ma yo, zambi Nzambe apesi yo bwanya bwa bokóló. »
Dani LinVB 13:51  Daniel alobi : « Bokabola bango, nakotuna bango. »
Dani LinVB 13:52  Bakaboli bango, mpe Daniel abe­ngi oyo wa liboso, alobi na ye : « Yo onuni o kati ya bobe. Sikawa mabe manso osalaki mako­kwela yo.
Dani LinVB 13:53  Oka­taki makambo na bosembo te, okitisaki bato basali mabe te, olongisaki baye basali mabe ; nzokande Nzambe apekisi kokitisa o liwa moto wa bosembo oyo azali na likambo te.
Dani LinVB 13:54  Bongo, awa omonoki bango malamu, yebisa biso o nse ya nzete nini basalaki mabe ! » Ye azongisi : « O nse ya nzete ya mangolo. »
Dani LinVB 13:55  Daniel alobi : « Ya solo, lokuta la yo lo­kweisi yo. Nzambe asili atindi anzelu ’te aboma yo na mopanga. »
Dani LinVB 13:56  Daniel atindi ’te bazongisa ye, abengi moto mosusu mpe atuni ye : « Yo moto wa libota lya Kanana, wa Yuda te ! Bonzenga botambwisi yo mayele, mposa ya boluli ye ebebisi motema mwa yo !
Dani LinVB 13:57  Osalaki bana basi ba Israel se bo­ngo, mpe bazalaki kondimela yo mpo ya bobangi. Kasi mwasi oyo wa Yuda andimi kosala mabe na yo te.
Dani LinVB 13:58  Bongo yebisa ngai : O nse ya nzete nini omonoki bango elo­ngo ? » Mobange azongisi : « O nse ya nzete ya safu. »
Dani LinVB 13:59  Daniel alobi : « Ya solo, lokuta la yo lokweisi yo lokola ! Tala, anzelu wa Nzambe azali kozila, mopanga o maboko, mpo ’te akata yo nkingo mpe aboma bino babale. »
Dani LinVB 13:60  Sikawa bato banso bawuloli bakolo mpe bakumisi Nzambe oyo akobikisaka bato batii elikya na ye.
Dani LinVB 13:61  Bakitisi bakolo babale, zambi Daniel alakisaki na maloba ma bango moko ’te bafundi moninga na lokuta. Lokola mobeko mwa Moze motindi, bapesi bango etumbu eye balingaki kopesa moninga.
Dani LinVB 13:62  Babomi bango ; bongo mokolo mona moto oyo asalaki mabe te, abiki.
Dani LinVB 13:63  Kelkia na mwasi wa ye batondi Nzambe botondi mpo ya mwana wa bango Suzana ; Yoakim, mobali wa ye na bandeko banso basali se bongo, za­mbi bazwi ye na likambo lyoko te.
Dani LinVB 13:64  Banda mokolo mona Daniel a­zwi lokumu lonene o miso ma bato banso.
Chapter 14
Dani LinVB 14:1  Awa mokonzi Astiage akei kokutana na bankoko ba ye, Siro moto wa Persi akitani ye :
Dani LinVB 14:2  Daniel azalaki ‘molingami wa moko­nzi’, mpe mokonzi andimi ye liboso lya bankumu banso.
Dani LinVB 14:3  Bato ba Babilon bazalaki na ekeko ya nza­mbe, oyo bakobyangaka Bel ; mokolo na mokolo bazalaki kobonzela ye saki ya fufu zomi na ibale, mpata ntuku inei na masangala manene ma vino motoba.
Dani LinVB 14:4  Mokonzi azalaki kokumbamela ekeko ena, mokolo na mokolo akei kosambela kuna. Kasi Daniel azalaki koku­mbamela se Nzambe wa ye. Mokolo moko mokonzi atuni ye : « Mpo nini oboyi kokumbamela Bel ? »
Dani LinVB 14:5  Daniel ayanoli : « Ngai nakoku­mbamela bikeko te biye bisalemi na maboko ma bato, kasi bobele Nza­mbe oyo azali na bomoi, oyo akeli likolo na nse, oyo azali mokonzi wa bato banso. »
Dani LinVB 14:6  Mokonzi atuni ye : « Okanisi ’te Bel azali na bomoi te ? Binso akoliaka mpe akomeleke mokolo na mokolo ozali komono byango te ? »
Dani LinVB 14:7  Daniel aseki, alobi : « Mokonzi, omikosa te : Bel azali se mabelé epai ya kati mpe mbengi epai ya libanda. Ata mokolo moko te alei to ameli eloko yoko. »
Dani LinVB 14:8  Mokonzi ayoki nkanda, abyangi ba­nganga ba ye, alobi na bango : « Boyebisa ngai nani akoliaka biloko binso bya Bel. Soko boyebisi ngai te, bokokufa ; kasi soko bokoki kolakisa ’te bobele Bel akoliaka bya­ngo, Daniel akokufa, mpo atuki Bel. »
Dani LinVB 14:9  Daniel ayanoli : « Esalema se bongo ! » Banganga ba Bel bazalaki ntuku nsambo, kotanga basi na bana te.
Dani LinVB 14:11  Banganga balobi : « Mokonzi, biso tokobima awa. Yo moko otia bilei mpe vino, na nsima okanga ndako mpe obaka motako mwa yo o ezibeli ya ndako.
Dani LinVB 14:12  Ozo­nga lobi na ntongo ; soko Bel alei biloko binso te, biso tondimi kokufa ; soko alei biloko binso, Daniel akufa, mpo atongi biso. »
Dani LinVB 14:13  Bazalaki mitema likolo te, mpo na bonkutu basalaki libulu o nse ya meza ya libonza, mpo bazwa bongo nzela ya koleka mpo ya kolongola mabonza mikolo minso.
Dani LinVB 14:14  Bango babimi. Mokonzi atieli Bel biloko bya bolei ; kasi na nsima Daniel abyangi basaleli ba ye, atindi bango ’te bakamata mputulu ya makala, bapa­nza yango o tempelo mobimba. Bobele mokonzi amoni yango. Nta­ngo basili bakangi tempelo, babaki motako mwa mokonzi o ezibeli ya ndako mpe bakei.
Dani LinVB 14:15  O kati ya butu banganga bayei elongo na basi mpe na bana ba bango, lokola bameseni kosala uta kala. Balei mpe bameli biloko binso.
Dani LinVB 14:16  Mokonzi ala­muki na ntongo ntongo, akei elongo na Daniel.
Dani LinVB 14:17  Mokonzi atuni ye : « Daniel, moto moko asimbi mitako te ? » Daniel ayanoli : « Moto mo­ko te, mokonzi ! »
Dani LinVB 14:18  Bongo bafungoli ezibeli ya tempelo ; moko­nzi atali meza ya libonza, asepeli mpe agangi : « Ya solo, Bel ozali nza­mbe monene ! Ozali na lokuta soki te ! »
Dani LinVB 14:19  Kasi Daniel aseki. Apekisi mokonzi kokoto, alobi na ye : « Mokonzi, tala o nse, tala soko makolo ma nani mazali wana. »
Dani LinVB 14:20  Mokonzi alobi : « Ya solo, namoni makolo ma bato, babali, basi na bana. »
Dani LinVB 14:21  Asiliki mpe atindi ’te bakanga ba­nganga, basi na bana ba bango. Balakisi ye ezibeli eye bazalaki kokoto na bonkutu mpo ’te bakamata biloko o meza ya libonza.
Dani LinVB 14:22  Mokonzi akitisi bango o liwa. Atiki ekeko ya Bel o maboko ma Daniel. Daniel abomi yango na mpe tempelo ya yango.
Dani LinVB 14:23  Bato ba Babilon bazalaki mpe kokumisa ngando enene.
Dani LinVB 14:24  Moko­nzi alobi na Daniel : « Okoki koloba te ’te nzambe oyo azali na bomoi te. Yango wana kumbamela ye ! »
Dani LinVB 14:25  Daniel azongisi : « Ngai nakoku­mbamela se Mokonzi Nzambe wa ngai, mpo azali Nzambe wa bomoi.
Dani LinVB 14:26  Soko yo, mokonzi, olingisi ngai, nakoboma nga­ndo eye, na mopa­nga te, na lingenda mpe te. » Moko­nzi azongisi : « Nandimi. »
Dani LinVB 14:27  Daniel akamati mpaka, mafuta na matiti ma nyama, asangisi yango, akotisi yango o mai, alambi minkate minene mpe apesi ngando. Ngando alei myango mpe akufi. Daniel alobi : « Bomoni eloko nini bino bokokumisaka ! »
Dani LinVB 14:28  Ntango bato ba Babilon bayoki yango, batoki na nkanda. Batombokeli mokonzi, balobi : « Mo­konzi amikomisi mo-Yuda : Alingisi ’te babuka ekeko ya Bel, baboma ngando enene mpe banga­nga nzambe. »
Dani LinVB 14:29  Yango wana bakei koyebisa mokonzi : « Kaba Daniel o maboko ma biso ; soko olingi te, tokoboma yo na libota lya yo mobimba. »
Dani LinVB 14:30  Mokonzi amoni ’te bakaneli ye mabe, nzela esusu ya kobika ezalaki te, akabi Daniel o maboko ma bango.
Dani LinVB 14:31  Bango babwaki ye o libulu lya nkosi. Atikali kuna mikolo motoba.
Dani LinVB 14:32  O libulu lyango nkosi izalaki nsambo. Mikolo minso bazalaki kopesa yango bilei : bibembe bibale na mpata ibale. Kasi mokolo mona bapesi yango eloko te mpo ’te ilia Daniel.
Dani LinVB 14:33  Nzokande profeta Abakuk azalaki o Yudea. Alambaki supu mpe atiaki ndambo ya mampa o ekoló mpo akende kopesa yango na bato ba ye bazalaki kobuka mbuma o bilanga.
Dani LinVB 14:34  Anzelu wa Nzambe alobi na Abakuk : « Babwaki Daniel o libulu lya nkosi o Babilon ; memela ye biloko byango. »
Dani LinVB 14:35  Abakuk azo­ngisi : « E Mokonzi, naino namoni Babilon mokolo moko te, mpe nayebi libulu lyango te. »
Dani LinVB 14:36  Anzelu wa Mokonzi akangi ye na motó, abe­ndi ye na nsuki, mpe amemi ye bo­ngo na mbangu lokola elimo, tee akitisi ye penepene na libulu lya nkosi.
Dani LinVB 14:37  Abakuk agangi : « Daniel, Daniel, kamata bilei Nzambe ati­ndeli yo. »
Dani LinVB 14:38  Daniel azongisi : « E Nza­mbe, ya solo okanisi ngai. Ata mokolo moko te obosani bato balingi yo. »
Dani LinVB 14:39  Daniel atelemi mpe abandi kolia. Se o ntango ena anzelu wa Nzambe akei kotika ye o ekolo ya ye.
Dani LinVB 14:40  Nsima ya mikolo motoba, mokonzi ayei kolela Daniel. Akomi o libulu, atali mpe amoni Daniel afa­ndi wana.
Dani LinVB 14:41  Agangi : « E Mokonzi, Nzambe wa Daniel, ozali monene ! Nzambe mosusu azali te, bobele yo ! »
Dani LinVB 14:42  Abimisi Daniel o libulu, mpe abwaki baye balingaki koboma ye o libulu lyango. Noki mpenza nkosi ilei bango o miso ma ye.